LISOLO YA BOYEKOLI 47
Okokoba kondima kosembolama?
“Bandeko, mpo na kosukisa, bókoba kosepela, kosembolama.”—2 KO. 13:11.
LOYEMBO 54 “Nzela yango oyo”
NA MOKUSEa
1. Na kotalela Matai 7:13, 14, mpo na nini tokoki koloba ete tozali kosala mobembo?
BISO nyonso tozali kosala mobembo. Mokano na biso ezali ya kofanda na mokili ya sika, epai Yehova akoyangela na bolingo mpenza. Mokolo na mokolo, tosalaka nyonso mpo tólanda nzela oyo ezali komema na bomoi. Kasi ndenge Yesu alobaki yango, nzela yango ezali nkaka mpe na bantango mosusu kolanda yango ezalaka pɛtɛɛ te. (Tángá Matai 7:13, 14.) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ezalaka mpasi te mpo tóbunga nzela yango.—Gal. 6:1.
2. Tokolobela nini na lisolo oyo? (Talá mpe etanda “Komikitisa esalisaka biso tósembolama.”)
2 Soki tolingi kotikala na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi, tosengeli kondima kosembola makanisi na biso, mpe makambo oyo tosalaka. Ntoma Paulo alendisaki bakristo ya Korinti ete bákoba “kosembolama.” (2 Ko. 13:11) Toli yango etali mpe biso. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa biso tósembola banzela na biso, mpe ndenge bakristo oyo bakɔmeli bakoki kosalisa biso tótikala na nzela ya bomoi. Tokomona mpe nini ekoki kosala ete kolanda litambwisi oyo ebongiseli ya Yehova epesaka biso ezala mpasi. Tokomona lisusu ndenge oyo komikitisa ekoki kosalisa biso tósala mbongwana kozanga ete tóbungisa esengo na biso na mosala ya Yehova.
TIKÁ LILOBA YA NZAMBE ESEMBOLA YO
3. Ndenge nini Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa yo?
3 Ezalaka pɛtɛɛ te tótalela malamumalamu makanisi mpe mayoki na biso. Mpo na nini? Mpo motema na biso ezali na bokosi, mpe ekoki kozala mpasi mpo tóyeba likambo oyo yango ekoki kotinda biso tósala. (Yir. 17:9) Ezalaka mpasi te mpo tómikosa na “makanisi ya lokuta.” (Yak. 1:22) Yango wana, tosengeli kosalela Liloba ya Nzambe mpo tómitalela malamumalamu mpe tóyeba “makanisi mpe mikano ya motema” na biso. (Ebr. 4:12, 13) Na maloba mosusu, Liloba ya Nzambe ezali lokola masini babengi scanner, oyo esalisaka mpo na koyeba ndenge kati ya nzoto ya moto ezali. Kasi tosengeli kozala na komikitisa mpo tósalela toli ya Biblia to oyo eutaka epai ya bandeko oyo bazali kokamba.
4. Nini emonisi ete Mokonzi Saulo akómaki na lolendo?
4 Ndakisa ya Mokonzi Saulo emonisi oyo ekoki kokómela biso soki tozangi ezaleli ya komikitisa. Saulo akómaki na lolendo mingi, mpe aboyaki kutu kondima ete asengelaki kosembola makanisi mpe misala na ye. (Nz. 36:1, 2; Hab. 2:4) Lolendo yango emonanaki polele ntango Yehova apesaki ye malako ya sikisiki na likambo oyo asengelaki kosala nsima ya kolonga Baamaleke. Kasi Saulo atosaki Yehova te. Mpe ntango mosakoli Samwele ayebisaki ye ete asali mabe, Saulo aboyaki kondima libunga na ye. Kutu, alukaki nde komilongisa mpe komonisa ete libunga yango ezalaki monene te, mpe alobaki ete bato nde batindaki ye na makasi asala bongo. (1 Sa. 15:13-24) Liboso, Mokonzi Saulo asalaki mpe likambo moko ya ndenge wana. (1 Sa. 13:10-14) Likambo ya mawa, atikaki motema na ye ekóma na lolendo. Aboyaki kosembola makanisi na ye, yango wana Yehova apamelaki ye mpe aboyaki ye.
5. Ndakisa ya Mokonzi Saulo ekoki koteya biso nini?
5 Tolingaka te kozala lokola Saulo, yango wana tosengeli komituna boye: ‘Soki natángi toli moko na Liloba ya Nzambe, nalukaka komilongisa mpo nasalela yango te? Nakanisaka ete makambo oyo nazali kosala ezali mpenza mabe te? Napesaka bato mosusu foti mpo na mabunga oyo nasali?’ Soki toyanoli ɛɛ na mituna yango, tosengeli kosembola makanisi na biso. Soki te, motema na biso ekoki kokóma na lolendo, mpe Yehova akoboya biso; tokozala lisusu baninga na ye te.—Yak. 4:6.
6. Bokeseni nini ezalaki kati na Mokonzi Saulo mpe Mokonzi Davidi?
6 Talá bokeseni oyo ezalaki kati na Mokonzi Saulo mpe Mokonzi Davidi. Mokonzi Davidi alingaki “mobeko ya Yehova.” (Nz. 1:1-3) Davidi ayebaki ete Yehova abikisaka bato ya komikitisa kasi atɛmɛlaka bato ya lolendo. (2 Sa. 22:28) Yango wana, Davidi atikaki ete mobeko ya Nzambe esembola makanisi na ye. Akomaki boye: “Nakopambola Yehova moto apesi ngai toli. Ya solo mpenza, na butu bangɛi na ngai esemboli ngai.”—Nz. 16:7.
7. Tokosala nini soki tozali na komikitisa?
7 Soki tozali na komikitisa, tokotika Liloba ya Nzambe esembola makanisi ya mabe oyo tozali na yango liboso etinda biso tósala makambo ya mabe. Liloba ya Nzambe ekozala lokola mongongo oyo ezali koyebisa biso ete: “Nzela yango oyo. Bótambola na yango.” Ekokebisa biso soki tobandi kosala likambo moko ya mabe. (Yis. 30:21) Soki tozali koyoka Yehova, tokozwa mapamboli mingi. (Yis. 48:17) Na ndakisa, tokoboya kosala makambo oyo ekoyokisa biso nsɔni mpe oyo ekosɛnga básembola biso. Mpe tokopusana penepene na Yehova mpo toyebi ete asalelaka biso makambo ndenge tata ya bolingo asalaka.—Ebr. 12:7.
8. Na kotalela Yakobo 1:22-25, ndenge nini tokoki kosalela Liloba ya Nzambe lokola talatala?
8 Liloba ya Nzambe ezali lokola talatala. (Tángá Yakobo 1:22-25.) Mingi kati na biso tomitalaka na talatala na ntɔngɔ liboso ya kobima. Na ndenge yango, tokoki komona esika oyo tosengeli kobongisa liboso bato mosusu bámona biso. Ndenge moko mpe, soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, tokomona ndenge oyo tokoki kosembola makanisi na biso. Bandeko mingi bamonaka ete kotánga mokapo ya mokolo na ntɔngɔ liboso ya kobima esalisaka mpenza. Batikaka ete makambo oyo batángi ebongisa makanisi na bango. Mpe na boumeli ya mokolo, balukaka ndenge ya kosalela toli oyo euti na Liloba ya Nzambe. Longola yango, tosengeli koyekolaka mpe komanyolaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. Yango ekoki komonana lokola likambo ya pɛtɛɛ, kasi ezali moko ya makambo oyo eleki ntina oyo tokoki kosala mpo tótikala na nzela ya nkaka oyo ekomema na bomoi.
YOKÁKÁ BANINGA OYO BAKƆMELI NA ELIMO
9. Mpo na nini moninga moko asengelaki kosembola yo?
9 Obandaki kosala likambo moko oyo ezalaki kobebisa boyokani na yo ná Yehova? (Nz. 73:2, 3) Soki moninga moko oyo akɔmeli na elimo azwaki mpiko ya kosembola yo, oyokaki toli na ye mpe osalelaki yango? Soki bongo, osalaki likambo ya malamu mpenza, mpe na ntembe te, osepelaka mingi ndenge akebisaki yo.—Mas. 1:5.
10. Okosala nini soki moninga moko asemboli yo?
10 Liloba ya Nzambe ezali kokundwela biso ete: “Bampota oyo moto oyo azali kolinga azokisi yo ezali sembo.” (Mas. 27:6) Yango elimboli nini? Tózwa ndakisa oyo: Kanisá ete olingi kokatisa balabala moko oyo mituka elekaka mingi mpe ozali kofinafina telefone na yo. Obandi kokatisa balabala yango kozanga ete otala epai na epai. Na mbala moko, moninga moko akangi yo na lobɔkɔ mpe abendi yo. Lokola akangaki yo makasi mpenza, oyoki mpasi na lobɔkɔ, kasi yango ebikisi yo mpo motuka etuta yo te. Ata soki lobɔkɔ yango esali yo mpasi mikolo mingi, okosilikela moninga wana mpo akangaki yo makasi mpenza? Te! Okopesa ye nde matɔndi ndenge asalisaki yo. Ndenge moko mpe, soki moninga moko akebisi yo ete maloba to makambo oyo osalaka eyokani te na mibeko ya sembo ya Nzambe, yango ekoki kosala yo mpasi na ebandeli. Kasi, kosilika te mpo apesaki yo toli yango. Ekozala bozoba mpenza soki osali bongo. (Mos. 7:9) Kutu, ekozala malamu opesa ye matɔndi mpo na mpiko oyo azwaki ya koloba na yo polelepolele.
11. Nini ekoki kotinda moto aboya toli oyo moninga moko ya motema apesi ye?
11 Nini ekoki kotinda moto aboya toli oyo moninga moko ya motema apesi ye? Ezali lolendo. Bato ya lolendo balingaka koyoka ‘makambo oyo matoi na bango elingaka koyoka. Matoi na bango eboyaka koyoka solo.’ (2 Tim. 4:3, 4) Bakanisaka ete basengeli na toli te mpo bazali na bwanya mingi mpe na ntina mingi koleka bato mosusu. Nzokande ntoma Paulo akomaki ete: “Soki moto akanisi ete azali moto ya ntina ntango azali moto mpamba, azali kokosa makanisi na ye moko.” (Gal. 6:3) Mokonzi Salomo alimbolaki likambo yango malamu mpenza. Akomaki boye: “Mwana oyo akelelá kasi azali na bwanya aleki mokonzi oyo azali mobange kasi zoba, oyo azali lisusu komona ntina ya makebisi te.”—Mos. 4:13.
12. Na kotalela Bagalatia 2:11-14, ndakisa ya ntoma Petro eteyi biso nini?
12 Kanisá ndenge ntoma Petro asalaki ntango ntoma Paulo asembolaki ye na miso ya bato. (Tángá Bagalatia 2:11-14.) Soki Petro atyaka makanisi nyonso na lolenge mpe na esika oyo Paulo asembolaki ye, akokaki kosilikela ntoma Paulo. Kasi ntoma Petro azalaki na bwanya. Andimaki toli mpe abombelaki ntoma Paulo nkanda na motema te. Kutu na nsima, akomaki ete ntoma Paulo azali ‘ndeko ya bolingo.’—2 Pe. 3:15.
13. Makambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kopesa moto toli?
13 Soki omoni ete osengeli kopesa moninga moko toli, makambo nini osengeli kobosana te? Liboso osolola na moninga na yo, omituna boye, ‘Namimonisaka ete nazali “moyengebene koleka ndelo”?’ (Mos. 7:16) Moto oyo azalaka moyengebene koleka ndelo, asambisaka bato na kolanda makanisi na ye moko, kasi te na kolanda mitinda ya Yehova, mpe mbala mingi ayokelaka bato mawa te. Nsima ya komitalela yo moko, soki omoni ete osengeli kaka kosolola na moninga na yo, yebisá ye likambo yango polele, mpe tuná ye mituna oyo ekosalisa ye amona libunga oyo asalaki. Omindimisa ete makambo nyonso oyo okoloba euti na Biblia, mpe kobosana te ete, moninga na yo akozongisa monɔkɔ nde epai ya Yehova kasi epai na yo te. (Rom. 14:10) Salelá bwanya oyo ezali na Liloba ya Nzambe, mpe ntango ozali kopesa moto toli, mekolá motema mawa ya Yesu. (Mas. 3:5; Mat. 12:20) Mpo na nini? Mpo Yehova akosalela biso makambo kaka ndenge biso mpe tosalelaka basusu.—Yak. 2:13.
LANDÁ LITAMBWISI OYO EBONGISELI YA NZAMBE EPESAKA
14. Ebongiseli ya Nzambe epesaka biso nini?
14 Mpo na kokamba biso na nzela ya bomoi, Yehova azali kosalela eteni ya ebongiseli na ye oyo ezali awa na mabele mpo na kobimisa bavideo, mikanda, mpe makita oyo esalisaka biso tósalela toli oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Ebongi mpenza kotyela makambo wana nyonso motema mpo eutaka na Makomami. Ntango bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazwaka bikateli oyo etali lolenge malamu ya kosakola, batyelaka elimo santu motema. Atako bongo, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etalelaka mbala na mbala bikateli oyo ezwaki mpo na koyeba bisika oyo esengeli kosembolama. Mpo na nini? Mpo “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana,” mpe ebongiseli ya Nzambe esengeli kosala makambo na kotalela mbongwana yango.—1 Ko. 7:31.
15. Mokakatano nini bandeko mosusu bazali kokutana na yango?
15 Na ntembe te, ntango ebongiseli ya Nzambe epesaka biso ndimbola ya sika ya liteya moko ya Biblia, to malako ya sika na oyo etali bizaleli malamu, tondimaka mpe tosalelaka yango. Kasi tosalaka nini ntango ebongiseli ya Nzambe esali mbongwana moko oyo ekoki kobongola makambo mosusu ya bomoi na biso? Na ndakisa, na bambula oyo euti koleka, kosomba bisika ya losambo mpe kobongisa yango ekómaki kosɛnga mbongo mingi mpenza. Na yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesaki malako ete masangá ebele esalelaka Ndako ya Bokonzi moko. Yango wana, basangisaki masangá mosusu, mpe Bandako ya Bokonzi mosusu etɛkamaki. Mbongo yango esalisaki mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi na bisika oyo bandako yango ezali mingi te. Soki ofandaka na esika oyo bazali kotɛka Bandako ya Bokonzi mpe kosangisa masangá mosusu, ekoki kozala mpasi mpo omesana na makambo yango ya sika. Sikoyo, basakoli mosusu basengeli kokende mosika mpenza mpo na koyangana na makita. Bandeko mosusu oyo basalaki mosala makasi mpo na kotonga mpe kobatela Bandako ya Bokonzi yango, bakoki komituna ntina oyo bazali kotɛka yango. Bakoki komona ete basalaki mosala ya mpunda. Atako bongo, bazali kondima ebongiseli yango ya sika, mpe tosengeli kopesa bango longonya.
16. Na ndenge nini kosalela toli oyo ezali na Bakolose 3:23, 24 ekosalisa biso tóbatela esengo na biso?
16 Tokobatela esengo na biso soki tobosani te ete tozali kosalela Yehova, mpe ete ye nde azali kotambwisa ebongiseli na ye. (Tángá Bakolose 3:23, 24.) Mokonzi Davidi atiká ndakisa malamu mpenza na ndenge apesaki mbongo mpo na kotonga tempelo. Alobaki: “Ngai nani mpe bato na ngai banani, mpo tózala na nguya ya kopesa makabo ya bolingo ya ndenge oyo? Mpo eloko nyonso euti na yo, mpe oyo topesi yo euti na lobɔkɔ na yo moko.” (1 Nt. 29:14) Biso mpe ntango topesaka makabo, topesaka Yehova biloko oyo euti na lobɔkɔ na ye moko. Atako bongo, Yehova asepelaka ndenge topesaka ntango, makasi, mpe mbongo na biso mpo na mosala na ye.—2 Ko. 9:7.
TIKALÁ NA NZELA YA NKAKA
17. Mpo na nini osengeli kolɛmba nzoto te soki esɛngi ete osembola matambe na yo?
17 Mpo tótikala na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi, biso nyonso tosengeli kolanda matambe ya Yesu malamumalamu. (1 Pe. 2:21) Soki omoni ete osengeli kosembola matambe na yo, kolɛmba nzoto te. Kutu, yango ezali elembo ya malamu oyo ekoki komonisa ete oyebi mpe ondimaka litambwisi ya Yehova. Kobosana te ete Yehova ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka. Yango wana, azelaka te ete tómekola Yesu na ndenge ya kokoka.
18. Tosengeli kosala nini mpo tókokisa mokano na biso?
18 Tiká ete biso nyonso tótya makanisi na biso na bomoi oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya, mpe tóndima kosembola makanisi na biso mpe makambo oyo tosalaka. (Mas. 4:25; Luka 9:62) Tiká ete tózala ntango nyonso bato ya komikitisa, mpe ‘tókoba kosepela mpe kosembolama.’ (2 Ko. 13:11) Soki tosali bongo, “Nzambe ya bolingo mpe ya kimya” akozala na biso. Akosalisa biso tózala na esengo sikoyo, mpe akopesa biso bomoi ya seko na mokili ya sika.
LOYEMBO 34 Tambolá na bosembo
a Basusu kati na biso bakoki kozala na mokakatano ya kobongola makanisi na bango mpe makambo oyo balingaka kosala. Lisolo oyo ekomonisa ntina oyo biso nyonso tosengeli kosembolama mpe ndenge oyo tokoki kobatela esengo na biso ntango tozali kosala yango.
b NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko ya elenge azali koyebisa ndeko mobali moko ya mokóló makambo oyo ekómelaki ye nsima ya kozwa ekateli moko ya mabe. Ndeko mobali ya mokóló (na lobɔkɔ ya mobali) azali koyoka na likebi mpenza mpo na koyeba soki asengeli kopesa ye toli.