Kozala moto malamu ekopesa yo bomoi malamu na mikolo ezali koya?
Banda kala, bato bakanisaka ete kozala moto malamu ekosalisa moto azala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Na ndakisa, bato ya Azia batosaka maloba ya moto moko ya filozofi mpe moteyi na nkombo Confucius (551-479 L.T.B.). Moto yango alobaki: “Eloko olingi básalela yo te, kosalela yango mpe bato te.”a
BATO MINGI BASALAKA BONGO
Bato mingi bakanisaka ete kozala na bizaleli malamu ekopesa moto bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Basalaka makasi bázala na limemya, báyeba kofanda na bato, bámityaka na esika ya bato mosusu, mpe bázala na lisosoli ya malamu. Mwasi moko na nkombo Linh, oyo afandaka na Vietnam alobi boye: “Nazalaki ntango nyonso kokanisa ete soki nazali sembo mpe na kolongobana, nakozala na bomoi ya malamu mpenza.”
Bato mosusu basalaka makambo ya malamu mpo lingomba na bango esɛngi bongo. Mobali moko na nkombo Hsu-Yun, oyo afandaka na Taïwan, alobi boye: “Bateyaki ngai ete soki moto azali kosala makambo ya malamu, ntango akokufa, akozala na bomoi ya malamu mpo na libela, kasi soki azali kosala makambo ya mabe, akonyokwama mpo na libela.”
YANGO EBIMISI MAKAMBO NINI?
Ezali solo ete ntango tosalelaka basusu makambo ya malamu, tozwaka mapamboli mingi. Kasi, bato mosusu oyo bazali kosala makasi básalela bato makambo ya malamu, bamoni ete bato bazali kozongisela bango bolamu wana te. Mwasi moko, na nkombo Shiu Ping, oyo afandaka na Hong Kong, alobi boye: “Makambo nakutaná na yango endimisi ngai ete bato oyo basalaka bolamu bazongiselaka bango bolamu yango te. Nasalaki nyonso mpo nabatela libota na ngai mpe nazala na bizaleli malamu. Kasi, libala na ngai ebebaki mpe mobali na ngai asundolaki ngai ná mwana.”
Bato mingi bamoni ete lingomba ebongisaka ntango nyonso te bizaleli ya bato. Etsuko, mwasi moko oyo afandaka na Japon, alobi boye: “Nakɔtaki na lingomba moko boye mpe nakómaki mokambi ya bilenge ya lingomba yango. Nazalaki koyoka mabe mpenza ndenge bandimi ya lingomba yango bazalaki na bizaleli ya mabe, bazalaki kowelana, mpe koyiba mbongo ya lingomba.”
“Nasalaki nyonso mpo nabatela libota na ngai mpe nazala na bizaleli malamu. Kasi, libala na ngai ebebaki mpe mobali na ngai asundolaki ngai ná mwana.”—SHIU PING, HONG KONG
Bato mosusu oyo bamipesi na lingomba mpe bazali kosala nyonso básalaka makambo ya malamu, balɛmbaka nzoto ntango bazongiselaka bango mabe na esika ya bolamu oyo basalaki. Yango nde likambo oyo ekómelaki Van, mwasi moko oyo azali moto ya Vietnam. Alobi boye: “Mokolo na mokolo, nazalaki kosomba mbuma, bafololo, biloko ya kolya, mpe nazalaki kokende kotya yango na etumbelo ya losambo ya bankɔkɔ, na likanisi ete bomoi na ngai ekozala malamu na nsima. Atako nasalaki makambo nyonso wana mpe milulu ya losambo bambula mingi, mobali na ngai abɛlaki makasi mpenza. Mpe na nsima, mwana na ngai ya mwasi oyo azalaki kotánga na mboka-mopaya akufaki na mbula 20 mpamba.”
Soki kozala moto malamu ekoki kopesa moto bomoi ya malamu te na mikolo ezali koya, nini nde ekoki kosalisa moto azala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tosengeli na eloko moko oyo ekoki kopesa biyano na mituna na biso mpe koyebisa biso ndenge ya kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Epai wapi tokoki kozwa eloko yango?
a Mpo na koyeba mateya ya Conficius, talá mokapo 7 ya buku L’humanité à la recherche de Dieu, paragrafe 31-35, ebimisami na Batatoli ya Yehova, ezali mpe na Internet na www.jw.org.