LISOLO YA BOMOI
Yehova ‘asembolaki banzela na ngai’
MOKOLO moko, ndeko mobali moko ya elenge atunaki ngai boye: Vɛrsɛ nini ya Biblia osepelaka na yango mingi? Kozanga kokakatana nayanolaki: Masese 3:5, 6 oyo elobi: ‘Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.’” Ya solo, Yehova asemboli mpenza banzela na ngai. Na ndenge nini?
BABOTI NA NGAI BASALISAKI NGAI NAYEBA NZELA YA MALAMU
Baboti na ngai bayebaki solo na bambula ya 1920 liboso bábalana. Nabotamaki na 1939. Ntango nazalaki naino mwana, tozalaki kofanda na Angleterre mpe nazalaki kokende makita elongo na baboti na ngai. Mpe na nsima, nakomisaki nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Nazali koyeba lisusu mbala ya liboso oyo nasalaki lisolo na eteyelo yango. Namataki likoló ya kɛsi moko mpo nakoka komona bato malamu. Na ntango yango, nazalaki na mbula 6 mpe nazalaki kobanga mpenza. Nazalaki kotalatala mikóló nyonso oyo bazalaki wana.
Tata na ngai akomelaki ngai maloba na papye mpo na kobanda masolo na bato na mosala ya kosakola. Mbala ya liboso oyo nabimaki na mosala ya kosakola ndako na ndako, nazalaki ngai moko, mpe na ntango yango nazalaki na mbula 8. Nasepelaki makasi ntango moto moko atángaki makambo oyo ezali na papye na ngai mpe mbala moko andimaki kozwa buku “Que Dieu soit reconnu pour vrai”! Mpe napotaki mbangu na balabala mpo na koyebisa tata na ngai. Mosala ya kosakola mpe makita ezalaki kopesa ngai esengo mingi, mpe esalisaki ngai nakolisa mposa ya kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso.
Nakómaki kosepela lisusu na mateya ya Biblia mingi ntango tata na ngai asalelaki ngai abonema mpo nazwaka nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Mbala moko, soki nazwi nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko, nazalaki kotánga yango na esengo mpenza. Nakómaki lisusu kolinga Yehova mingi mpe yango etindaki ngai namipesa epai na ye.
Na 1950, libota na biso mobimba tokendeki na liyangani oyo esalemaki na New York, mpe oyo ezalaki na motó ya likambo “Bokoli ya Teokrasi.” Motó ya likambo ya mokolo ya mibale mwa 03/08 ezalaki “Mokolo ya mosala ya misionɛrɛ.” Na mokolo yango, ndeko Carey Barber, oyo na nsima akómaki moko ya bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki diskur ya batisimo. Na nsuka ya diskur na ye, ntango atunaki bandeko oyo basengelaki kozwa batisimo mituna mibale, natɛlɛmaki mpe nalobaki “ɛɛ.” Atako na ntango yango nazalaki kaka na mbula 11, namonaki ete nazwaki ekateli moko ya ntina mingi. Kasi, nabangaki kokɔta na mai mpo nayebaki kobɛta mai te. Tata-leki na ngai akendaki kotika ngai na pisini mpe ayebisaki ngai ete nabanga te, makambo nyonso ekoleka malamu. Lokola pisini yango ezalaki mozindo, makolo na ngai ezalaki kokóma na nse te. Bandeko mibali mibale basimbaki ngai, mosusu apesaki ngai batisimo mpe mosusu abimisaki ngai na pisini. Kobanda mokolo wana ya ntina mingi tii lelo, Yehova azali kokoba kosembola makolo na ngai.
NAPONI KOTYELA YEHOVA MOTEMA
Ntango nasilisaki kelasi, nazalaki na mposa ya kosala mosala ya mobongisi-nzela. Kasi, balakisi na ngai balendisaki ngai nakɔta na iniversite. Nandimaki makanisi na bango mpe nakɔtaki na iniversite. Kasi na nsima, namonaki ete nakokoka te kotikala ngwi na kati ya solo mpe kotya makanisi na ngai na kelasi. Na yango, nazwaki ekateli ya kolongwa na iniversite. Nabondelaki Yehova mpo na likambo yango, mpe na nsima, nakomelaki balakisi na ngai mokanda, mpe na boboto nyonso, nayebisaki bango ete nakokata kelasi na nsuka ya mbula yango ya liboso. Lokola natyelaki Yehova motema, nabandaki mbala moko mosala ya mobongisi-nzela.
Na sanza ya 07/1957, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na engumba Wellingborough. Nasɛngaki na bandeko mibali oyo bazalaki na Betele ya Londres bápesa ngai nkombo ya mobongisi-nzela oyo aumeli mingi mpo nakende kosala elongo na ye. Ndeko Bert Vaisey alakisaki ngai makambo mingi. Azalaki mosakoli ya molende, mpe asalisaki ngai nazala na programɛ ya malamu ya mosala ya kosakola. Lisangá epai nakendaki ezalaki na bandeko basi motoba ya mibange, mpe ngai ná ndeko Vaisey. Kobongisa mpe koyangana na makita nyonso ya lisangá epesaki ngai mabaku mingi ya kokoba lisusu kotyela Yehova motema mingi, mpe ya komonisa kondima na ngai.
Nsima ya kolekisa mwa mikolo na bolɔkɔ mpo naboyaki kokɔta na mosala ya soda, nakutanaki na Barbara, ndeko mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela monene. Tobalanaki na 1959, mpe tondimaki kokende na bisika nyonso oyo bakotinda biso. Liboso, batindaki biso na Lancashire oyo ezali na nɔrdi-wɛsti ya Angleterre. Na nsima, na sanza ya 01/1961, babengisaki ngai na Londres na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi, oyo ezalaki koumela sanza moko. Nsima ya eteyelo yango, nakamwaki ndenge basɛngaki ngai nakende na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Na boumeli ya pɔsɔ mibale, mokɛngɛli ya zongazonga moko oyo aumelaki mingi na mosala apesaki ngai formasyo na engumba Birmingham, mpe bandimaki Barbara akende elongo na ngai. Na nsima, tozongaki lisusu na teritware na biso na Lancashire mpe na Cheshire.
KOTYELA YEHOVA MOTEMA NDE LIKAMBO OYO EBONGI KOSALA
Na sanza ya 08/1962 ntango tozalaki na konje, biro ya filiale etindelaki biso mokanda. Na kati ya mokanda yango, ezalaki na baformilɛrɛ mpo na kokɔta na Eteyelo ya Gileade. Nsima ya kobondela mpo na likambo yango, ngai ná Barbara totondisaki baformilɛrɛ yango, mpe tozongisaki yango mbala moko na biro ya filiale ndenge basɛngaki biso. Sanza mitano na nsima, tokendaki na Brooklyn, na New York, mpo na kokɔta na kelasi ya mbala ya 38 ya Eteyelo ya Gileade, oyo ezalaki koumela sanza zomi.
Na Gileade, toyekolaki kaka te makambo etali Nzambe mpe ebongiseli na ye, kasi mpe makambo etali bandeko na biso ya mokili mobimba. Kutu, ntango tozalaki na bambula mwa moke koleka 20, toyekolaki makambo mingi epai ya bana-kelasi mosusu oyo tozalaki na bango na Gileade. Mokolo na mokolo, nazalaki na libaku ya kosala badevuare elongo na ndeko Fred Rusk oyo azalaki moko ya balakisi na biso. Liteya ya ntina mingi oyo azalaki kobenda likebi na biso mpo na yango, ezalaki ya kopesaka ntango nyonso toli na bosembo, elingi koloba, komindimisa ete toli oyo tozali kopesa euti na Biblia. Kati na bandeko oyo basalaki badiskur na boumeli ya eteyelo na biso ezalaki ndeko Nathan Knorr, Frederick Franz, mpe Karl Klein. Mpe toyekolaki makambo mingi epai ya ndeko Alexander Macmillan, oyo azalaki ndeko moko ya komikitisa mpenza. Ateyaki biso ndenge oyo Yehova asalisaki basaleli na ye na boumeli ya bambula ya mpasi, elingi koloba, kobanda 1914 tii na ebandeli ya 1919.
NAZWI MOKUMBA YA SIKA
Pene na nsuka ya eteyelo, ndeko Knorr ayebisaki ngai ná Barbara ete bakotinda biso na ekólo Burundi, na Afrika. Tokendaki nokinoki na bibliotɛkɛ ya Betele mpe totalaki na buku ya mobu mpo na koyeba motángo ya basakoli oyo bazalaki na ekólo yango. Kasi, tokamwaki ntango tomonaki ata esika moko te oyo elakisi motángo ya basakoli na ekólo yango. Tozalaki kokende na teritware moko epai basakolá naino te. Teritware yango ezali na Afrika, mokili oyo toyebaki makambo mingi te mpo na yango. Tozalaki kobanga mpenza. Kasi nsima ya kobondela, motema na biso ekitaki.
Na teritware yango, makambo nyonso ezalaki kaka ya sika. Klima, mimeseno, mpe monɔkɔ oyo bato bazalaki koloba. Tosengelaki mpe koyekola monɔkɔ ya Français. Tozalaki mpe na mokakano mpo na kozwa esika malamu ya kofanda. Mikolo mibale nsima ya kokóma na ekólo yango, ndeko Harry Arnold, moko ya bana-kelasi na biso ya Gileade, ayaki kotala biso ntango azalaki kokende na ekólo Zambie epai batindaki ye. Asalisaki biso tózwa ndako oyo ekómaki ndako na biso ya liboso ya bamisionɛrɛ. Kasi, mwa moke na nsima, lokola bakonzi ya Leta bayebaki Batatoli ya Yehova malamu te, bakómaki kotɛmɛla biso. Kaka ntango tokómaki kosepela na mosala na biso, bakonzi ya Leta bayebisaki biso ete tokofanda na ekólo yango te soki tozwi ndingisa te. Likambo ya mawa, esengelaki tólongwa na Burundi mpo na kokende na Ouganda, ekólo mosusu ya sika.
Tozalaki kobanga kokende na ekólo Ouganda mpo tozalaki na viza te. Kasi totyelaki Yehova motema. Ndeko mobali moko ya Canada, oyo ayaki kosala na Ouganda epai mposa ya basakoli ezalaki monene, akendaki koyebisa likambo na biso epai ya mokonzi moko, oyo alandelaka makambo ya bapaya oyo bakɔti na mboka. Mokonzi yango alobaki na biso ete tokoki kofanda mwa basanza tii ntango tokozwa ndingisa ya kofanda na ekólo yango. Likambo yango emonisaki ete Yehova azalaki mpenza kosalisa biso.
Na Ouganda, makambo ekeseneki mpenza na oyo ya Burundi. Mosala ya kosakola ezalaki kosalema na Ouganda. Kasi, ezalaki kaka na Batatoli ya Yehova 28 na ekólo yango mobimba. Na teritware yango, ezalaki na bato ebele oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Anglais. Kasi na nsima, toyaki komona ete, mpo na kosalisa bato oyo bazalaki kosepela na solo bákola malamu na elimo, esengelaki tóyekola moko ya minɔkɔ oyo bato mingi bazalaki koloba. Tobandaki kosakola na engumba Kampala mpe na bamboka oyo ezali zingazinga na yango, epai bato mingi bazalaki koloba monɔkɔ ya Luganda. Na yango, tomonaki malamu tóyekola monɔkɔ yango. Esɛngaki mwa bambula mpo tóyeba koloba monɔkɔ yango malamu. Kasi, koyeba monɔkɔ ya Luganda esalisaki biso mingi na mosala na biso ya kosakola. Tokómaki koyeba malamu bamposa ya elimo ya bato oyo tozalaki koyekola na bango Biblia. Ntango bayekoli na biso ya Biblia bamonaki ete tozalaki kotyela bango likebi, bakómaki koyebisa biso ndenge oyo bazalaki komiyoka mpo na mateya oyo bazalaki koyekola.
MIBEMBO NDENGE NA NDENGE
Toyokaki esengo mingi ntango tosalisaki bato báyeba solo. Mpe esengo na biso ebakisamaki lisusu mingi koleka ntango basɛngaki biso tósala mosala ya mokɛngɛli motamboli na ekólo yango mobimba. Na litambwisi ya filiale ya Kenya, totambolaki na ekólo yango mobimba mpo na koyeba bisika oyo ekosɛnga ete bátinda babongisi-nzela monene. Mbala mingi, ata bato oyo bakutaná naino na Batatoli ya Yehova te bazalaki koyamba biso malamu. Bazalaki ata kolambela biso biloko ya kolya.
Na nsima, tosalaki mpe mobembo ya ndenge mosusu. Kolongwa na Kampala, nasalaki mobembo ya mikolo mibale mobimba na engbunduka mpo na kokóma na libongo ya Mombasa. Ntango nakómaki na Mombasa, nazwaki masuwa mpo na kokende na Seychelles, bisanga oyo ezali na Océan Indien. Na nsima, kobanda 1965 tii 1972, ngai ná Barbara tozalaki kosala mibembo mpo na kotala masangá oyo ezalaki na Seychelles. Na ebandeli, ezalaki kaka na basakoli mibale oyo bazalaki kofanda kuna. Kasi na nsima, bakómaki etuluku, mpe na nsima mpenza, bakómaki lisangá. Tosalaki mpe mibembo mosusu mpo na kotala bandeko na Érythrée, na Éthiopie, mpe na Soudan.
Ntango tozongaki na Ouganda, makambo ebongwanaki mpenza mpo mwa etuluku ya basoda nde bakómaki kotambwisa makambo na ekólo yango. Na bambula wana ya mpasi, tomonaki ntina ya kolanda toli ya Biblia oyo esɛngaka biso tótosa bakonzi ya Leta. (Mrk. 12:17) Na ntango moko boye, basɛngaki na bapaya nyonso oyo bazalaki kofanda na Ouganda bákende kokomisa bankombo na bango na biro ya polisi oyo ezalaki pene na bisika bazalaki kofanda. Totosaki mbala moko mobeko yango. Mwa mikolo na nsima, mokolo moko ntango nazalaki kokumba motuka na engumba Kampala, bakonzi ya polisi batɛlɛmisaki ngai ná ndeko mosusu ya misionɛrɛ oyo azalaki elongo na ngai. Tobangaki makasi. Bafundaki biso ete tozali banɔngi. Bamemaki biso na biro monene ya polisi. Ntango tokómaki kuna, tolimbwelaki bango ete tozali bamisionɛrɛ mpe tozali bato ya mobulu te. Atako toyebisaki bango ete tosilaki kokomisa bankombo na biso na biro ya bapolisi, bayokelaki biso te. Bakangaki biso mpe bamemaki biso na biro ya bapolisi oyo ezalaki pene na ndako ya bamisionɛrɛ epai tozalaki kofanda. Mitema na biso ekitaki ntango mokonzi moko ya bapolisi, oyo ayebaki ete tokomisaki bankombo na biso, ayebaki biso mpe ayebisaki na bapolisi bátika biso.
Na boumeli ya ntango wana, mbala mingi, basoda bazalaki kotɛlɛmisa biso na nzela, mingimingi baoyo bazalaki na kwiti. Mbala mingi, libondeli ezalaki kosalisa biso tóyoka kimya ya motema, mpe na nsima, bazalaki kotika biso tókende. Kasi, likambo ya mawa, na 1973, basɛngaki na bamisionɛrɛ nyonso bálongwa na Ouganda.
Na mbala oyo mpe, batindaki biso na Côte d’Ivoire, ekólo oyo ezali na Afrika ya Wɛsti. Yango ezalaki mbongwana monene mpenza mpo na biso. Tosengelaki koyekola mimeseno ya sika, koloba lisusu monɔkɔ ya Français ntango nyonso, mpe komesana lisusu kofanda na bamisionɛrɛ oyo bautaki na bikólo ndenge na ndenge. Kasi, tomonaki lisusu lobɔkɔ ya Yehova ntango bato ya mitema sembo mpe ya komikitisa bazalaki kondima nsango malamu nokinoki. Tomonaki lisusu ndenge oyo kotyela Yehova motema esembolaki banzela na biso.
Kasi, mbala moko, bazwaki Barbara na maladi ya kanser. Atako tozongaki mbala mingi na Mpoto mpo na koluka lisalisi oyo ebongi, na 1983, tomonaki ete tokokoka lisusu te kosala na Afrika. Likambo yango elɛmbisaki biso mpenza nzoto.
MAKAMBO EBONGWANI LISUSU
Ntango tokómaki kosala na Betele ya Londres, kanser ya Barbara ekómaki lisusu makasi, nsukansuka akufaki. Bandeko ya libota ya Betele basalisaki ngai mpenza. Na ndakisa, ndeko mwasi moko ná mobali na ye basalisaki ngai namesana mpe nakoba kotyela Yehova motema. Na nsima, nakutanaki na Ann, ndeko mwasi moko oyo azalaki koya kosala na Betele. Na kala, azalaki mobongisi-nzela monene mpe azalaki ndeko mwasi moko ya elimo. Ngai ná Ann tobalanaki na 1989, mpe banda wana tosalaka na Betele ya Londres.
Kobanda 1995 tii 2018, nazalaki momonisi ya biro monene mpe nasalaki mibembo mpo na kotala bafiliale ya bikólo pene na 60. Na bikólo yango nyonso, namonaki ndenge oyo Yehova asalisaka basaleli na ye ata soki bakutani na makambo nini.
Na 2017, tozongaki lisusu na Afrika. Nazalaki na esengo ndenge namemaki Ann na Burundi mpo na mbala ya liboso, mpe tokamwaki ndenge bokoli esalemaki na ekólo yango. Batongi Betele moko ya kitoko kaka na balabala epai nasakolaki ndako na ndako na 1964. Mpe ekólo yango ezali na basakoli koleka 15 500.
Esengo na ngai ebakisamaki lisusu ntango bayebisaki ngai babiro ya filiale oyo nakokende kotala na 2018. Côte d’Ivoire mpe ezalaki na kati ya bikólo oyo nasengelaki kokende kotala. Ntango tokómaki na engumba Abidjan, ezalaki nde lokola tozongi na mboka na biso. Ntango natalaki banimero ya telefone ya bandeko oyo bakozala pene na shambrɛ oyo tokozala na Betele, namonaki nkombo ya ndeko mobali Sossou. Ntango nazalaká na Abidjan, ye nde azalaká mokɛngɛli ya engumba na ntango yango. Nzokande nasalaki libunga, ezalaki nde mwana ya ndeko Sossou yango.
Yehova azali kokokisa elaka na ye. Mikakatano ya ndenge na ndenge oyo nakutanaki na yango eteyaki ngai ete, soki tozali kotyela Yehova motema, akosembola mpenza banzela na biso. Sikoyo nazali na mposa ya kokoba kolanda nzela oyo ezali na nsuka te, oyo ekongɛnga lisusu makasi na bomoi oyo tokozala na yango na mokili ya sika.—Mas. 4:18.