LISOLO YA BOYEKOLI 20
LOYEMBO 67 “Sakolá Liloba”
Tiká bolingo etinda yo okoba kosakola!
“Na bikólo nyonso, nsango malamu esengeli naino kosakolama.”—MRK. 13:10.
NA MOKUSE
Ndenge oyo bolingo etindaka biso tózala na molende mpe tómipesa mobimba na mosala ya kosakola.
1. Makambo nini toyokaki na likita ya nsuka ya mbula ya 2023?
NA LIKITA ya nsuka ya mbula ya 2023,a tozwaki bingɛngiseli mpo na bindimeli na biso mosusu mpe toyokaki mayebisi ya esengo oyo etali mosala ya kosakola. Na ndakisa, toyokaki ete bato mosusu bakoki kozwa libaku ya koya na ngámbo ya basaleli ya Yehova ata nsima ya kobebisama ya Babilone Monene. Toyokaki mpe ete kobanda na sanza ya 11/2023, ntango basakoli bapesi lapolo ya mosala ya kosakola, bakokoma lisusu te makambo nyonso oyo basalaki. Mbongwana yango emonisi nde ete mosala ya kosakola ekómi na ntina moke, ete esengeli lisusu kosalema na lombangu te? Te, ezali bongo te!
2. Mpo na nini tozali komona mokolo na mokolo ete tosengeli kosakola na lombangu? (Marko 13:10)
2 Mokolo na mokolo, tozali se komona ete tosengeli kosakola na lombangu mpenza. Mpo na nini? Mpo ntango ezali lisusu mingi te. Talá oyo Yesu alobaki mpo na mosala ya kosakola na mikolo ya nsuka. (Tángá Marko 13:10.) Na kotalela lisolo yango na Evanzile ya Matai, Yesu alobaki ete nsango malamu ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi liboso ete “nsuka” eya. (Mat. 24:14) Nsuka yango ezali ya mokili mabe oyo eyangelami na Satana. Yehova asilá kotya ‘mokolo mpe ngonga’ mpo na makambo yango oyo ekosalema mosika te. (Mat. 24:36; 25:13; Mis. 1:7) Mokolo mokomoko ememeka biso pene ya ntango yango. (Rom. 13:11) Wana tozali kozela, tosengeli kokoba kosakola tii nsuka ekoya.
3. Nini etindaka biso tósakola?
3 Na oyo etali mosala ya kosakola, ekozala malamu tómituna motuna oyo ya ntina mingi: Mpo na nini tosakolaka nsango malamu? Na mokuse, bolingo nde etindaka biso tósakola. Ntango tozali na mosala ya kosakola, tomonisaka ete tolingaka nsango malamu, tolingaka bato, mpe koleka nyonso, tolingaka Yehova mpe nkombo na ye. Tólobela yango mokomoko.
TOSAKOLAKA MPO TOLINGAKA NSANGO MALAMU
4. Tosalaka nini ntango tozwi nsango ya malamu?
4 Okoki koyeba lisusu ndenge oyo omiyokaki ntango ozwaki nsango moko ya malamu? Mbala mosusu mwana moko abotami sika na libota to ozwaki mosala oyo osengelaki na yango mpenza? Na ntembe te, ozalaki na mposa makasi ya koyebisa bandeko mpe baninga na yo nsango yango. Esalemaki mpe ndenge wana ntango oyokaki nsango oyo eleki bansango nyonso, nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe?
5. Ndenge nini omiyokaki mbala ya liboso oyo oyekolaki solo ya Liloba ya Nzambe? (Talá mpe bililingi.)
5 Kanisá lisusu ndenge oyo omiyokaki mbala ya liboso oyo oyokaki solo ya Liloba ya Nzambe. Oyekolaki ete Tata na biso ya likoló alingaka yo, ete alingi okɔta na libota ya basambeli na ye, alaki ete mpasi mpe mikakatano ekosila, ete okoki kolikya komona lisusu bandeko mpe baninga oyo bakufá ntango bakosekwa na mokili ya sika, mpe oyekolaki makambo mosusu mingi. (Mrk. 10:29, 30; Yoa. 5:28, 29; Rom. 8:38, 39; Em. 21:3, 4) Mateya yango esimbaki motema na yo. (Luka 24:32) Olingaki makambo oyo ozalaki koyekola, mpe okokaki te kobomba mateya yango ya motuya mpo na yo moko!—Talá mpe Yirimia 20:9.
6. Lisolo ya Ernest ná Rose eteyi yo nini?
6 Tólobela ndakisa moko. Ndeko mobali moko na nkombo Ernestb azalaki na mbula soki zomi ntango tata na ye akufaki. Ernest alobi boye: “Nazalaki komituna: ‘Akei likoló? Azali lisusu na bomoi te mpo na libela?’ Nazalaki kolula bana oyo bazali naino na batata na bango.” Ernest azalaki kokende mbala na mbala esika bakundaki tata na ye, azalaki kofukama liboso ya lilita mpe kobondela boye: “Nabondeli yo Nzambe, nalingi nayeba soki papa na ngai azali wapi.” Mbula soki 17 nsima ya liwa ya tata na ye, Batatoli basɛngaki Ernest báyekola na ye Biblia, mpe andimaki na mbala moko. Asepelaki mingi ntango ayekolaki ete bakufi bayebaka eloko te, bazali lokola moto oyo alali mpongi makasi, mpe ete Biblia epesi elaka ya lisekwa na mikolo ezali koya. (Mos. 9:5, 10; Mis. 24:15) Nsukansuka Ernest azwaki biyano na mituna oyo etungisaki ye ntango molai! Ernest azalaki kosepela mingi na solo ya Biblia oyo azalaki koyekola. Mwasi na ye Rose mpe akómaki koyekola Biblia mpe alingaki nsango ya Bokonzi lokola ye. Bazwaki batisimo na 1978. Na molende mpenza, bayebisaki bindimeli na bango ya motuya epai ya libota, baninga, mpe moto nyonso oyo andimaki koyoka yango. Na yango, Ernest ná Rose basalisi bato koleka 70 bákola na elimo tii bázwa batisimo.
7. Nini ekosalema ntango bolingo mpo na solo ya Biblia ezwi misisa na motema na biso? (Luka 6:45)
7 Ezali polele ete ntango bolingo mpo na solo ya Biblia ezwi misisa na motema na biso, tokokoka kofanda nyɛɛ te. (Tángá Luka 6:45.) Tokoyoka lokola bayekoli ya Yesu ya siɛklɛ ya liboso, oyo balobaki: “Tokoki kotika te koloba makambo oyo tomoni mpe toyoki.” (Mis. 4:20) Tolingaka solo mingi yango wana tolukaka koyebisa yango bato mingi mpenza.
TOSAKOLAKA MPO TOLINGAKA BATO
8. Nini ekotinda biso tóluka koyebisa bato nsango malamu? (Talá etanda “Lingá bato—Kómisá bango bayekoli.”) (Talá mpe elilingi.)
8 Lokola Yehova ná Mwana na ye, tolingaka bato. (Mas. 8:31; Yoa. 3:16) Toyokaka mawa makasi mpo na bato oyo ‘bazali na Nzambe te’ mpe bazali na “elikya te.” (Ef. 2:12) Mikakatano ya bomoi ezali kozindisa bango, mpe biso tozali na eloko oyo basengeli na yango mpo na kobima na libulu: nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bolingo mpe mawa mpo na bato ya ndenge wana ekotinda biso tósala nyonso mpo na koyebisa bango nsango malamu. Nsango yango ya motuya ekoki kopesa bango elikya, kosalisa bango bázala na bomoi oyo eleki malamu banda sikoyo, mpe kopesa bango elikya ya kozwa “bomoi ya solosolo,” bomoi ya seko, na mokili ya sika ya Nzambe.—1 Tim. 6:19.
9. Likebisi nini tozali kopesa mpo na mikolo ezali koya, mpe mpo na nini? (Ezekiele 33:7, 8)
9 Kolinga bato ekotinda biso mpe tókebisa bango ete nsuka ya mokili oyo mabe ekómi pene. (Tángá Ezekiele 33:7, 8.) Toyokelaka bazalani na biso mpe bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli te mawa. Mingi basalaka makambo na bango ya mokolo na mokolo kozanga báyeba nini ezali koya: “bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda ebandeli ya mokili tii sikoyo, mpe ekosalema lisusu te.” (Mat. 24:21) Tolingi báyeba makambo oyo ekosalema na ntango yango ya lisambisi: mangomba ya lokuta ekolongolama mpe nsima na yango mokili oyo mabe mobimba ekobebisama na Armagedone. (Em. 16:14, 16; 17:16, 17; 19:11, 19, 20) Tobondelaka ete bato mosusu ebele bándima likebisi yango mpe báya kosambela Yehova elongo na biso na losambo ya pɛto sikoyo. Kasi, ekozala boni mpo na baoyo bazali koboya koyoka likebisi yango sikoyo, ata mpe bandeko ya libota na biso oyo tolingaka mpenza?
10. Mpo na nini ezali lisusu na ntina mingi koleka ete tókoba kokebisa bato?
10 Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, ekoki kozala mokano ya Yehova ete abikisa bato oyo babongoli motema ntango bamoni kobebisama ya Babilone Monene. Soki ekozala bongo, boye ezali lisusu na ntina mingi koleka ete tókoba kokebisa bato mpo na makambo oyo ezali koya? Kanisá likambo oyo: Na ntango yango, bato bakoki kokanisa makambo oyo tozali koyebisa bango sikoyo. (Talá mpe Ezekiele 33:33.) Mbala mosusu bakokanisa lisusu likebisi oyo tozalaki koyebisa bango mpe ekotinda bango báya kosambela Yehova elongo na biso ntango libaku ezali naino. Ndenge moko na mokɛngɛli ya bolɔkɔ na Filipi, oyo abongolaki motema kaka ntango “koningana monene ya mabele esalemaki,” mbala mosusu bato mosusu oyo bazali koboya koyoka sikoyo bakobongola motema nsima ya kobebisama ya Babilone Monene oyo ekoningisa mokili.—Mis. 16:25-34.
TOSAKOLAKA MPO TOLINGAKA YEHOVA MPE NKOMBO NA YE
11. Ndenge nini topesaka Yehova nkembo, lokumu, mpe nguya? (Emoniseli 4:11) (Talá mpe bililingi.)
11 Tosakolaka nsango malamu libosoliboso mpo tolingaka Yehova Nzambe mpe nkombo na ye mosantu. Tomonaka ete mosala ya kosakola ezali lolenge ya kosanzola Nzambe oyo tolingaka. (Tángá Emoniseli 4:11.) Tondimaka na motema mobimba ete Yehova Nzambe abongi kozwa nkembo, lokumu, mpe nguya epai ya basaleli na ye ya sembo. Topesaka Yehova nkembo mpe lokumu ntango tolakisaka basusu bilembeteli ya polele oyo emonisi ete ‘azalisaki biloko nyonso’ mpe ete tozali na bomoi mpo ye nde apesaki biso yango. Topesaka ye nguya—nguya na biso—ntango tosalelaka ntango, makasi, mpe biloko na biso mpo na kosakola na molende na kotalela makambo ya bomoi na biso. (Mat. 6:33; Luka 13:24; Kol. 3:23) Na mokuse, tolingaka kolobela makambo ya Nzambe oyo tolingaka. Etindaka biso mpe tóyebisa basusu nkombo na ye mpe oyo yango elimboli. Mpo na nini?
12. Ndenge nini tosantisaka nkombo ya Yehova na mosala ya kosakola?
12 Bolingo na biso mpo na Yehova etindaka biso tósantisa nkombo na ye. (Mat. 6:9) Tolingaka kopesa mabɔkɔ na kosukola nkombo na ye na nsɔni nyonso oyo Satana abwakelá yango mpo na makambo ya lokuta oyo alobá mpo na ye. (Eba. 3:1-5; Yobo 2:4; Yoa. 8:44) Na mosala ya kosakola, tolingaka mpenza kokɔtela Nzambe na biso, toyebisaka moto nyonso oyo akoyoka biso solo na ntina na Yehova mpe bizaleli na ye. Tolingaka moto nyonso ayeba ete ezaleli na ye ya libosoliboso ezali bolingo, ete ayangelaka na bosembo mpe na boyengebene, mpe ete mosika te Bokonzi na ye ekosukisa mpasi mpe ekomemela bato kimya ná esengo. (Nz. 37:10, 11, 29; 1 Yoa. 4:8) Ntango tozali kolobela makambo yango ya Yehova na mosala ya kosakola, tozali kosantisa nkombo na ye. Toyokaka mpe esengo mpo toyokanisi bomoi na biso na nkombo oyo tomemi. Na ndenge nini?
13. Mpo na nini tomonaka ete ezali lokumu kobengama Batatoli ya Yehova? (Yisaya 43:10-12)
13 Yehova aponi biso tózala “batatoli” na ye. (Tángá Yisaya 43:10-12.) Eleki mwa bambula, mokanda moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi elobaki boye: “Lokumu eleki monene oyo tokoki kozala na yango ezali ya kobengama Batatoli ya Yehova.”c Mpo na nini ezali lokumu monene? Tótalela ndakisa moko. Soki esengeli moto moko azala motatoli to témoin na yo na tribinale, okopona moto oyo oyebi mpe oyo otyelaka motema, moto oyo litatoli na ye ekondimama. Ndenge Yehova aponi biso tózala Batatoli na ye emonisi ete ayebi biso malamu mpe ete atyelaka biso motema mpo tótatola ete azali Nzambe ya solo kaka moko. Tomonaka yango lokumu mpenza kozala Batatoli na ye, yango wana tosimbaka libaku nyonso mpo na koyebisa bato nkombo na ye mpe kotɛmɛla lokuta oyo elobamá mpo na ye. Ntango tozali kosala bongo, tozali kosala na boyokani na nkombo oyo tomemi na esengo nyonso, Batatoli ya Yehova!—Nz. 83:18; Rom. 10:13-15.
TOKOKOBA KOSAKOLA TII NA NSUKA
14. Makambo nini ya esengo ekoki kosalema na mikolo ezali koya?
14 Makambo ya malamu mpenza ezali liboso! Na lipamboli ya Yehova, tozali kolikya komona lisusu bato ebele bándima solo liboso bolɔzi monene ebanda. Lisusu, tozali na esengo ya koyeba ete mbala mosusu ata na ntango wana ya mabe mpenza mpo na bato, elingi koloba na ntango ya bolɔzi monene, bato mosusu ebele bakoki kokima mokili ya Satana mpe bakoya kosanzola Yehova elongo na biso.—Mis. 13:48.
15-16. Tokokoba kosala nini, mpe tii ntango nini?
15 Kasi sikoyo, tozali na mosala ya kosala. Tozali na libaku malamu ya kosala likambo oyo ekozongelama lisusu te: kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mabele mobimba. Kaka na ntango yango, tosengeli kokoba kokebisa bato. Bato basengeli koyeba ete nsuka ya mokili oyo mabe ezali koya nokinoki. Bongo, na ntango ya lisambisi yango, bakoyeba ete nsango oyo tosakolaki eutaki epai ya Yehova Nzambe.—Ezk. 38:23.
16 Na yango, tozali na ekateli nini? Tiká ete bolingo—bolingo mpo na nsango malamu, bolingo mpo na bato, mpe koleka nyonso, bolingo mpo na Yehova Nzambe mpe nkombo na ye—ekoba kotinda biso tósakola na mposa makasi, na lombangu, mpe na molende tii ntango Yehova akoloba ete: “Ekoki bongo!”
LOYEMBO 54 “Nzela yango oyo”
a Likita ya nsuka ya mbula esalemaki na mwa 07/10/2023, na Ndako ya mayangani ya Batatoli ya Yehova na Newburgh na New York, na États-Unis. Programɛ yango mobimba ebimaki na nsima na TV JW—Eteni 1 ebimaki na sanza ya 11/2023 mpe Eteni 2 na sanza ya 01/2024.
b Talá lisolo “Biblia ebongolaka bato—Biyano ya polele mpe oyo ebongi ya Biblia, ekamwisaki ngai,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2015.
c Talá Buku ya mobu 2007 ya Batatoli ya Yehova lok. 3, na Français.