Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Sanza ya 9 nk. 8-13
  • Ndenge ya kokóma na “motema ya botosi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kokóma na “motema ya botosi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • LIBOSO BATOSAKI KASI NA NSIMA BAKÓMAKI BATOMBOKI
  • MATEYA OYO TOKOKI KOZWA NA NDAKISA MABE YA BAYISRAELE
  • MEKOLÁ BOTOSI YA MOKONZI YEHOSHAFATE
  • Zwá mateya na maloba ya nsuka ya mibali ya sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Yehoshafate atyeli Yehova motema
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • “Esengo na moto oyo atyelaka Yehova motema”
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2026-2027—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Sanza ya 9 nk. 8-13

09-15/11/2026

LOYEMBO 36 Batelá motema na yo

Ndenge ya kokóma na “motema ya botosi”

“Pesá ngai motema ya botosi.”—1 BAK. 3:9.

NA MOKUSE

Ndenge oyo tokoki kotosa Yehova na motema.

1. Mpo na nini mbala mosusu bato batosaka baoyo bazali na bokonzi?

BATO batosaka baoyo bazali na bokonzi mpo na bantina mingi. Bato mingi bakoki kosala yango kaka soki basusu bazali komona bango to mpo na kokima etumbu. Ntango esɛngi kotosa Nzambe, basusu bamonisaka botosi mpo na kobenda likebi ya bato epai na bango, ndenge bakonzi ya mangomba ya mikolo ya Yesu bazalaki kosala. (Mat. 23:5) Kasi, biso totosaka Yehova mpo tomonaka ete litambwisi na ye ememelaka biso bolamu. (Yis. 48:​17, 18) Yango ezali ntina oyo ebongi kotosa Nzambe, kasi tozali na ntina mosusu koleka oyo totosaka ye.

2. Wapi ntina ya libosoliboso oyo totosaka Yehova?

2 Ntina ya libosoliboso oyo totosaka Yehova ezali ete tolingaka ye mingi. (Mat. 22:​37, 38) Bolingo na biso nde etindaka biso ‘tótosa na motema.’ (Rom. 6:17) Kolinga Yehova mpe “motema ya botosi” etindaka biso tósala nyonso mpo na kotosa mibeko na ye kaka te ntango basusu bazali komona biso to ntango tomoni mbala moko matomba ya kotosa yango, kasi etindaka biso tótosa ye ntango nyonso. Kasi toyebi ete motema na biso ezali na bokosi, na yango na bantango mosusu ekoki kozala mpasi kotosa Yehova. Na lisolo oyo, tokomona masolo mibale ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tókóma na motema ya botosi. Liboso, tokolobela ntango oyo Yehova abimisaki Bayisraele na Ezipito. Mpe na nsima, tokomona ndakisa malamu ya Yehoshafate, mokonzi ya Yuda.

LIBOSO BATOSAKI KASI NA NSIMA BAKÓMAKI BATOMBOKI

3. Ndenge nini etinda ya Yehova ya kopakola makila na makonzí ya porte ekokaki komeka botosi ya Bayisraele? (Talá mpe elilingi.)

3 Liboso Yehova abimisa Bayisraele na Ezipito, apesaki bango etinda moko oyo emekaki botosi na bango. Mpo malɔzi to etumbu ya zomi mpe ya nsuka ezwa bango te, Bayisraele basengelaki kopesa mbeka ya mpate to ntaba ya mobali mpe kopakola makila na yango na makonzí ya porte ya ndako. (Kob. 12:​5, 7) Anzelu ya Yehova asengelaki koleka bandako oyo bapakoli makila mpe kotika na bomoi bana ya liboso ya mibali mpe ya banyama na bandako yango. Kasi, Bayisraele bakokaki koboya kotosa. Mpo na nini? Bakokaki kobanga ete Baezipito básilika, mpo bazalaki komona ete bampate-mibali ezali mosantu. (Kob. 8:​25-27) Atako bongo, Bayisraele bamonaki ete basengelaki kotosa na lombangu mpe ‘basalaki kaka ndenge Yehova apesaki mitindo.’ (Kob. 12:28) Yehova apambolaki bango na ndenge atikaki bana ya liboso na bomoi.

Moyisraele moko azali kopakola makila na makonzí ya porte mpe mwana na ye ya mobali asimbeli ye mwinda. Bayisraele mosusu zingazinga bazali mpe kosala bongo.

Bayisraele batosaki Yehova kozanga kotala ndenge oyo Baezipito bakokaki komiyoka (Talá paragrafe 3)


4. Malako nini Yehova apesaki Bayisraele ntango balongwaki na Ezipito oyo emonanaki lokola ebongi te?

4 Kaka na butu yango, Bayisraele balongwaki na Ezipito. Yehova amemaki bango liboso na nsuka ya nɔrdi ya Mbu Motane, kasi na nsima apesaki bango malako oyo na miso ya bomoto emonanaki ete ebongi te. Ayebisaki bango bákende na sudi mpe bátya kaa kati na mbu mpe bangomba. Na kaa yango, emonanaki lokola nde basuki mpenza mpo limpinga ya Farao ezalaki kolanda bango na nsima mpe liboso na bango Mbu Motane. Kasi, na mbala oyo lisusu Bayisraele basalaki kaka ndenge Yehova apesaki mitindo na nzela ya mosaleli na ye Moize. (Kob. 14:​1-4) Kasi ntango bamonaki Baezipito bazali kopusana, “babangaki mingi” mpe balobaki kutu na Moize ete amemi bango wana mpo bábomama! (Kob. 14:​5-11) Mpo na nini bakómaki komona ete ebongaki te bátosa? Mpe ndenge nini Yehova atalelaki ezaleli oyo bamonisaki?

5. Likambo nini Bayisraele balongaki te kosala na Mbu Motane? (Nzembo 106:7 mpe maloba na nse ya lokasa)

5 Biblia elobi ete na Mbu Motane, Bayisraele “basepelaki te na misala [ya Yehova] ya kokamwa” na Ezipito to “bakangaki te ntina” ya bolingo na ye ya sembo. (Tángá Nzembo 106:7 mpe maloba na nse ya lokasa.) Bamonaki ndenge oyo Yehova abatelaki bana ya liboso na malɔzi ya zomi. Kasi bakangaki mpenza ntina te ya bolingo ya Yehova mpo na bango to batyelaki ye motema te ete akobikisa bango lisusu. Ntango amonaki mitema na bango, Yehova alobaki ete Bayisraele “batombokaki . . . pene na Mbu Motane.” Atako balandaki Moize tii na Mbu Motane, babongisaki ata moke te makanisi na bango. Nsukansuka Yehova aboyaki libota yango mobimba ya Bayisraele mpe apesaki bango nzela te ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. (Nz. 106:​21, 24-26) Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Bayisraele?

MATEYA OYO TOKOKI KOZWA NA NDAKISA MABE YA BAYISRAELE

6. Motema ya botosi ekotinda biso tósala nini? (Yirimia 23:4)

6 Lisolo ya kobima ya Bayisraele na Ezipito emonisi ete tosengeli kotalelaka bantina oyo totosaka Yehova mpe baoyo atye bátambwisa biso. Totosaka kaka ntango tomoni mbala moko matomba oyo tokozwa? Ekoki kozala ete Bayisraele mosusu bapakolaki makila ya mpate na makonzí ya porte kaka mpo na kobatela bana na bango ya liboso. Lisusu, botosi na biso esimbami na oyo basusu basalaka? Na butu ya Elekeli, Yehova asalaki ete Bayisraele “bándimama na miso ya Baezipito.” (Kob. 12:36) Kasi ntango na nsima Baezipito babalukelaki bango, batikaki kotyela Yehova motema mpe batombokaki. (Kob. 14:​10-12) Na kokesana na bango, soki tozali na motema ya botosi, yango ekotinda biso tótya motema epai ya Yehova mpe baoyo ye atye mpo na kokamba biso. (Tángá Yirimia 23:4.) Tokolanda litambwisi oyo tozwi ata soki tokangi malamu te bantina na yango nyonso to soki kolanda yango ekopesa baoyo bayinaka Yehova nkanda. Ndenge nini tokoki kokóma na motema ya botosi mpe koboya kosala mabunga oyo Bayisraele basalaki?

7. Ndenge nini kokómisa makasi bolingo na biso mpo na Yehova esalisaka biso tótosa ye?

7 Kómisá makasi bolingo na yo mpo na Yehova. Botosi na biso ekoki komekama ntango tomoni mbala moko te matomba oyo tokozwa na malako oyo ebongiseli ya Yehova epesi to ntango tomoni ete botosi ekomemela biso mikakatano. Soki esalemi bongo, tosengeli komikundwela ete totosaka Yehova libosoliboso mpo tolingaka ye mpe totyelaka ye motema. (1 Yoa. 5:3) Bolingo na biso esalisaka biso tózela ye na motema molai mpe tóndima ete ekoki kosɛnga ntango mpo tómona mbuma malamu ya botosi na biso.—Mos. 7:8; Mika 7:7.

8. Ndenge nini Batatoli ya Yehova mibale bamonisaki ekateli na bango ya kotosa?

8 Na mikolo na biso, basaleli ya Nzambe bazali kopesa ndakisa malamu na oyo etali kotosa ata ntango bamoni mbala moko te matomba ya kosala yango. Na ndakisa, ntango maladi mabe ya coronavirus ebandaki, masangá ezwaki malako ete básalaka makita na nzela ya video. Nkulutu moko na Pérou alobi boye: “Na ebandeli, nakanisaki ete malako yango ekosimba te esika tozali.” Atako bongo, azalaki kaka na ekateli ya kotosa Nzambe mpe kotyela ye motema. (Mas. 3:​5, 6) Yango ebimisaki nini? Alobi boye: “Namonaki ndenge Yehova apesaki biso mbano mpo na botosi na biso. Lisangá na biso ekómaki makasi mpe tokómaki lisusu na bomoko makasi.” Tótalela ndakisa mosusu. Na nsuka ya mobu 2020, ebongiseli na biso epesaki malako ya sika mpo na masangá mpe bituluku ya minɔkɔ ya bapaya. Ntango ndeko mwasi moko na Japon ayokaki ete etuluku oyo azalaki kopesa mabɔkɔ ekozala lisusu te, alobaki: “Nalingaki kotosa mbongwana yango mpe koboya koloba mabe mpo na yango. Nazelaki komona matomba oyo yango ekobimisa.”

9. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo tótosa ata soki tokutani na botɛmɛli? (Talá mpe elilingi.)

9 Mibongisá mpo na botɛmɛli. Ezali na ntina mingi kosala yango mingimingi na oyo etali mosala na biso ya kosakola Bokonzi. Na bikólo mingi, bipekiseli ezali te. Atako bongo, mosala na biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe esɛngi mpe koyebisa bato ete nsuka ya mokili mabe oyo ekoya mosika te. Tokokoba kosakola nsango yango tii liboso kaka mokili oyo ekóma na nsuka na yango na Armagedone. (Mat. 24:14) Lisusu, na boumeli ya bolɔzi monene, nsango oyo tokosakola ekoki kokóma oyo ekotinda mpe ekomema bato mbala moko na kozwa ekateli ya kondima Bokonzi to te. Mpo na baoyo bayinaka Yehova, mbala mosusu nsango yango ekomonana lokola bolɔzi moko “monene mpenza.”a (Em. 16:21) Na ntembe te, bakokóma na nkanda makasi, lokola kaka Farao na Mbu Motane. Tokoki komibongisa mpo na botɛmɛli yango na mikolo ekoya soki tozali kotosa sikoyo etinda ya kosakola ata soki bato bakotalela biso ndenge nini.

Ndeko mwasi moko ná mobali na ye na mosala ya kosakola ndako na ndako, balongwe na kimya nyonso na porte ya bankolo-ndako oyo bazali na nkanda.

Kotosa sikoyo ebongisaka biso mpo na botɛmɛli oyo tokokutana na yango na mikolo ekoya (Talá paragrafe 9)


MEKOLÁ BOTOSI YA MOKONZI YEHOSHAFATE

10. Yehoshafate amiyokaki ndenge nini ntango bikólo esanganaki mpo na kobundisa Yuda?

10 Biblia ezali mpe na bandakisa malamu ya bato oyo bazalaki kotosa. Na ndakisa, Mokonzi Yehoshafate asengelaki kobunda na bikólo misato oyo esanganaki mpo na kobundisa Yuda. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge Yehoshafate ná bato ya ekólo na ye babangaki. (2 Nt. 20:​1-3) Kasi mokonzi yango atikaki te kobanga elɛmbisa ye; asalaki likambo moko. Komekola oyo Yehoshafate asalaki na nsima ekoki kosalisa biso tókóma na motema ya botosi.

11. Yehoshafate asalaki nini ntango akómaki kobanga? (2 Ntango 20:​5, 6, 10-12)

11 Zwá mokano ya koluka Yehova mpe kotosa ye. Ntango Yehoshafate akómaki kobanga, “azwaki mokano ya koluka Yehova.” (2 Nt. 20:3) Yehoshafate asilaki kopesa ndakisa malamu na oyo etali koluka litambwisi ya Yehova. (2 Nt. 19:3) Kasi na ntango oyo ya mpasi, “azwaki mokano,” to akómisaki makasi ekateli na ye, ya koluka Yehova mpe kotosa ata malako nini oyo Ye apesi. Na nsima Yehoshafate asalaki libondeli oyo eutaki mpenza na motema. (Tángá 2 Ntango 20:​5, 6, 10-12.) Ntango tozali na mitungisi, tómekola ndakisa na ye. Tózwa mokano ya kotosa Yehova, koluka litambwisi na ye na nzela ya libondeli mpe ya boyekoli, mpe kotya motema ete akosalisa biso.—Nz. 119:112.

12. Ndenge nini tokoki kokómisa makasi ekateli na biso ya kotosa Yehova?

12 Kolisá boyebi na yo ya Biblia. Libondeli ya Yehoshafate emonisaki ete azalaki na boyebi mingi ya Makomami. Ayebaki malamu ndenge oyo Yisraele ezwaki mokili oyo Nzambe alakaki Abrahama. (Eba. 12:7) Maloba ya Yehoshafate ekokanaki na oyo Salomo asalelaki ntango abondelaki na molulu ya bofungoli tempelo. (2 Nt. 6:​28-30; 20:​5-9) Boyebi ya Yehoshafate esalisaki ye atyela lisusu Yehova motema mingi mpe azala na ekateli ya kotosa Ye. Mpo tókómisa makasi ekateli na biso ya kotosa ye, tosengeli kokoba kotondisa ‘esika na biso ya kobomba biloko ya motuya,’ elingi koloba kobakisa mateya ya sika na oyo tosilá koyeba. (Mat. 13:52) Soki tosali bongo, tokokómisa makasi ekateli na biso ya kotosa Yehova ata na ntango ya mikakatano.

13. Ndenge nini komikitisa ekoki kosalisa biso tózala na botosi?

13 Zalá na komikitisa. Libondeli ya Yehoshafate emonisaki mpe komikitisa na ye. Lokola azalaki mokonzi, akokaki koluka kotya motema na makasi mpe na likoki na ye ya kobundisa banguna. Kasi, na libondeli oyo asalaki na miso ya bato, andimaki na komikitisa nyonso ete Yuda ezalaki na mposa ya lisalisi ya Nzambe. (2 Nt. 20:12) Komikitisa ya mokonzi yango esalaki ete andima na pɛtɛɛ nyonso litambwisi ya Nzambe. Ndenge moko mpe, komikitisa ekosalisa biso tóbatela motema ya botosi ata soki tokutani na likambo nini.—Flp. 2:​5, 8.

14. Yehoshafate asalaki nini ntango azwaki malako ya Nzambe?

14 Talelá oyo misala na yo ekosala epai ya basusu. Yehova ayanolaki na libondeli ya Yehoshafate na ndenge apesaki ye malako ya polele na nzela ya mosakoli Yahaziele, oyo ayebisaki bato ya ekólo ete bakozala na ntina ya kobunda te. Mpe apesaki bango malako oyo: “Bótɛlɛma wana, bóningana te mpe bótala ndenge Yehova akobikisa bino.” Biblia elobi ete na nsima Yehoshafate “agumbamaki, elongi na nse.” Mpe bato nyonso “bafukamaki . . . mpo na kosambela Yehova.” Na mokolo oyo elandaki, ntango bazalaki kobima, mokonzi alendisaki bato ‘bándimela Yehova’ mpe “basakoli na ye.”—2 Nt. 20:​14-20.

15. Ndenge nini Yehoshafate amonisaki kondima makasi?

15 Mpo na komonisa kondima makasi na ye, Yehoshafate aponaki mibali oyo “bakoleka liboso ya bato oyo bazali na bibundeli” mpo na koyemba masanzoli. (2 Nt. 20:21) Yehoshafate asalaki yango kaka “nsima ya koyokana na bato.” Apesaki ndakisa malamu ndenge alendisaki bato ya ekólo na ye bátyela Yehova motema mpe bázala na botosi! Yehova apesaki bango mbano na ndenge asalaki ete banguna na bango bábomana bango na bango.—2 Nt. 20:​22-24.

16. Mateya nini baoyo bazali na bokonzi bakoki kozwa na ndakisa ya Yehoshafate? (1 Bakonzi 3:9) (Talá mpe elilingi.)

16 Bankulutu, baboti, mpe basusu oyo bazali na bokonzi bakoki kozwa mateya na ndakisa ya Yehoshafate. Ndenge oyo azalaki kotosa na motema mobimba ezalaki ndakisa malamu mpo na baoyo bazalaki na nse ya bokonzi na ye. Mpo na yango, azalaki lokola Mokonzi Salomo. Ntango Salomo azalaki sembo, abondelaki Yehova apesa ye motema ya botosi. Salomo asɛngaki yango mpo na matomba na ye moko te, kasi nde mpo na matomba ya bato ya ekólo. Alingaki kosambisa bango na kolanda makanisi ya Yehova. (Tángá 1 Bakonzi 3:9.) Na komikitisa nyonso Yehoshafate ayokaki basakoli ya Nzambe, asololaki na bato ya ekólo liboso ya kozwa ekateli ya monene, mpe alendisaki bango bátosa malako ya Yehova. Bankulutu bamonisaka bwanya ndenge balandaka ndakisa na ye. Na komikitisa nyonso, batalelaka Liloba ya Nzambe, mikanda na biso, mpe bayokaka bankulutu mosusu liboso ya kozwa bikateli oyo etali lisangá. (Mas. 15:22) Lisusu, na maloba mpe misala na bango, basalisaka bandeko ya lisangá bátosaka na motema. Ndenge moko mpe, baboti bayebaka ete bana bamekolaka ndakisa na bango ya botosi, ezala ya malamu to ya mabe.—Mas. 1:8; 14:1.

Lisangani moko ya bankulutu ezali kolobela malako mpe mitinda ya Biblia oyo ezali na lisolo “Ndenge ya komonisa bolingo mpe motema mawa ntango ndeko moko asali lisumu” na “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ya 08/2024.

Bankulutu bamonisaka bwanya ndenge bayokaka Yehova, ebongiseli na ye, mpe baninga na bango bankulutu (Talá paragrafe 16)


17. Mpo na nini tosengeli kokoba kozala na motema ya botosi?

17 Ezala mokakatano ya ndenge nini tokoki kokutana na yango, soki tozali na motema ya botosi, tokoki kotya motema ete Yehova akopesa biso lisalisi mpe litambwisi. Kaka ndenge ezalaki na ntango ya kala, na ntembe te Yehova akopesa biso litambwisi na nzela ya bamonisi na ye awa na mabele. Mpe soki malako oyo apesi emonani lokola ebongi te, tosengeli kokamwa te. Mpo banzela mpe makoki ya Yehova eleki mosika mpenza oyo ya biso. (Yis. 55:9) Na yango, tiká ete tókoba kozala na motema ya botosi.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa mabe ya Bayisraele ntango babimaki na Ezipito?

  • Ndenge nini Yehoshafate amonisaki ete azalaki na “motema ya botosi”?

  • Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yehoshafate?

LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo

a Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 08/2025.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto