INDONÉSIE
“Nakobanda awa!”
Mokolo moko, Alexander MacGillivray, mokɛngɛli ya filiale na Australie, akendaki mosika na makanisi mpe azalaki kotambolatambola na biro na ye. Mikolo euti koleka, likambo moko ezalaki kotungisa ye, mpe sikoyo ayebaki ndenge ya kosilisa yango. Na yango, alingaki kosolola na ndeko Frank Rice.
Frank, ndeko moko ya mbula 28 oyo azalaki colporteur (mobongisi-nzela) ya molende akómaki na filiale yango esali mwa bapɔsɔ. Ayekolaki solo liboso akokisa mbula 20 mpe eumelaki te akómaki colporteur. Na nsima asakolaki mbula koleka zomi na bisika mingi ya Australie, azalaki kotambola na mpunda, na velo, na tukutuku mpe motuka. Lokola alekisaki mwa mikolo na Betele, Frank azwaki makasi ya kokoba mosala na ye na teritware oyo bakopesa ye.
Ndeko MacGillivray abengisaki Frank na biro na ye, mpe na karte moko, alakisaki ye bisanga oyo ezali na nɔrdi ya Australie. Atunaki ye boye: “Frank, ndenge nini okoki kobanda kosakola awa? Ndeko ata moko te azali na bisanga oyo nyonso!”
Miso ya Frank ekweaki na bisanga oyo ezalaki kongɛnga lokola mayaka na kati ya Oceán Indien: mokili ya Indes orientales néerlandaises (lelo Indonésie).a Ebele ya bato ya bisanga yango bayokaki naino nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe te. Nsima ya kolakisa mboka-mokonzi Batavia (lelo Jakarta), Frank alobaki: “Nakobanda awa!”
Mosala ya kosakola na Java
Na 1931, Frank Rice akómaki na Jakarta, engumba moko monene mpe ya loyenge na esanga Java. Azwaki ndako ya kofutela na kati mpenza ya engumba yango mpe atondisaki ndako yango na kartɔ ya mikanda; yango ekamwisaki mama-lopango yango.
Ndeko Frank alobaki boye: “Na ebandeli, nazalaki kokoka kofanda kuna te. Mibali bazalaki kotambola malɛmbɛ balati kazaka ya mpɛmbɛ ná bikɔti na mitó, nzokande ngai nazalaki kolata bilamba ya kilo ya Australie. Nayebaki ata liloba moko te ya monɔkɔ ya Néerlandais to ya Indonésien. Nsima ya kobondela Yehova alakisa ngai nzela, likanisi eyelaki ngai ete na bisika ya mombongo, bato oyo balobaka Lingelesi bakozanga te. Kuna nde esika nabandaki kosakola mpe ebotaki mpenza mbuma!”
Lokola bato mingi na Jakarta bazalaki koloba Néerlandais, Frank asalaki nyonso mpo ayeba monɔkɔ yango mpe eumelaki te, akómaki kosakola ndako na ndako. Azalaki mpe komeka koloba Indonésien, mpe mokemoke ayebaki koloba yango. Alobaki boye: “Mabe moko kaka nazalaki na mikanda ya Indonésien te. Na nsima, Yehova asalaki ete nakutana na molakisi moko oyo alobaka monɔkɔ ya Indonésien; akómaki kosepela na solo mpe andimaki kobongola mwa buku Bakufi bazali wapi? Na nsima, abongolaki mwa babuku mosusu mpe bato ebele oyo balobaka monɔkɔ ya Indonésien bakómaki kosepela na solo.”
Na sanza ya zomi na moko na 1931, babongisi-nzela mosusu mibale ya Australie, ndeko Clem Deschamp oyo azalaki na mbula 25 ná Bill Hunter oyo azalaki na mbula 19, bayaki na Jakarta. Ndeko Clem ná Bill bayaki na motuka oyo bakómisaki ndako na bango ya babongisi-nzela; mituka ya ndenge wana ekɔtaki naino mingi te na Indonésie. Nsima ya koyekola mwa maloba na monɔkɔ ya Néerlandais, babandaki kosala mibembo mpe basakolaki na bingumba minene ya Java.
Na 1935, Charles Harris, mobongisi-nzela mosusu ya molende ya Australie ayaki. Asalaki mibembo na bingumba mingi ya Java na motuka na ye oyo akómisaki ndako, mpe na velo. Akabolaki mikanda na minɔkɔ mitano: Arabe, Chinois, Néerlandais, Lingelesi mpe Indonésien. Nsima ya mwa bambula akabolaki mikanda soki 17 000.
Ebele ya mikanda oyo Charles akabolaki ebendaki likebi ya bato. Mokonzi moko ya Leta na Jakarta atunaki ndeko Clem Deschamp boye: “Bozali na bato boni oyo basakolaka na Java oriental?”
Ndeko Deschamp alobaki: “Moko kaka.”
Mokonzi yango agangelaki ye ete: “Okanisi nakoki kondima likambo ya boye? Bozali na bato ebele kuna, talá kaka ebele ya mikanda na bino oyo ezali kokabolama bisika nyonso!”
Babongisi-nzela wana ya liboso bakobaki kosala nyonso mpo bákutana na bato ebele. Ndeko Bill Hunter alobaki: “Tosakolaki na esanga yango mobimba, mpe ezalaki mpasi tósolola na moto moko mbala mibale.” Balonaki mboto ya solo ebele mpenza mpe na nsima ekómaki bilanga monene mpo na kobuka mbuma ya elimo.—Mos. 11:6; 1 Ko. 3:6.
Nsango malamu ekɔti na Sumatra
Na mobu soki 1936, babongisi-nzela oyo bazalaki na Java balobelaki ndenge ya kosakola na Sumatra, esanga ya motoba oyo eleki monene na mokili. Esanga yango ya mabangamabanga ezali mpenza na mondelo ya équateur mpe ezali na bingumba minene, bilanga, bitando minene ya pɔtɔpɔtɔ mpe bazamba.
Babongisi-nzela wana bayokanaki bátinda ndeko Frank Rice kuna; na yango, basangisaki mwa mbongo mpo na kofutela ye tike. Mwa moke na nsima, Frank akómaki na Medan, engumba moko ya Sumatra du Nord; azalaki na sakosi mibale ya mosala ya kosakola, kartɔ 40 ya mikanda, mpe mwa mbongo na mabɔkɔ. Frank azalaki na kondima makasi mpenza. Abandaki mbala moko kosakola; atyaki elikya ete Yehova akopesa ye oyo asengeli na yango mpo asala mosala na ye malamu.—Mat. 6:33.
Na pɔsɔ ya nsuka oyo Frank azalaki kosakola na Medan, akutanaki na moto moko ya boboto, mwana-mboka Pays-Bas, mpe abengisaki ye bámɛla mwa kafe. Frank ayebisaki moto yango ete azali koluka motuka mpo asakola nsango malamu na esanga yango mobimba. Moto yango alakisaki Frank motuka moko ekufá na lopango na ye, mpe alobaki: “Soki okokoka kobongisa yango, pesá ngai kaka guilders 100.”b
Frank alobaki: “Nazali na yango te.”
Moto yango atalaki Frank na elongi tii atunaki ye: “Olingi mpenza kosakola na Sumatra mobimba?”
Frank ayanolaki, “Ɛɛ.”
Moto yango alobaki: “Soki okokoka kobongisa motuka wana, zwá yango. Mokolo okozwa mbongo, oyei kofuta.”
Frank abandaki kobongisa motuka yango mpe eumelaki te ekómaki kotambola. Na nsima, Frank akomaki: “Natondisaki mikanda na motuka, natondisaki motuka esansi, mpe lokola motema na ngai etondaki na kondima, nakendaki koteya bato ya Sumatra.”
Mbula moko na nsima, ntango Frank asilisaki kotambola esanga yango mobimba, azongaki na Jakarta. Kuna, atɛkaki motuka yango na guilders 100 mpe atindelaki nkolo-motuka wana mbongo na engumba Medan.
Mwa bapɔsɔ na nsima, biro ya Australie etindelaki Frank mokanda oyo esɛngaki ye akende na teritware mosusu. Na mbala moko, akangaki bisaka mpe akendaki kosakola na Indochine (lelo Cambodge, Laos mpe Vietnam).
a Bato ya Pays-Bas bakómaki kuna mbula 300 liboso mpe bazalaki koyangela bato mpo na kosala mombongo ya bikelakela ya kotya na bilei, oyo ezalaki na benefisi mingi. Na buku oyo, tokobenga bisika na bankombo oyo ebengamaka lelo.
b Lelo, ezali mbongo soki dolare 1 100.