INDONÉSIE
Batikaki koyangana te
Na ntango ya epekiseli, masangá mingi ekobaki koyangana mpo na losambo na bandako ya bandeko. Kasi, mpo na kobenda likebi ya bato te, masangá mingi ezalaki koyemba te na ntango ya makita. Bakonzi bakómaki na bisika mosusu oyo bandeko bazalaki kosala makita, kasi mbala mingi, ezalaki kotungisa bandeko te.
Mbala mingi, bandeko bazalaki kosalela bokutani na libota to bafɛti ya mabala mpo na kosala mayangani. Ndeko Tagor Hutasoit alobaki boye: “Bandeko bazalaki kokomisa libala na bango na buku ya Leta mpe bazalaki kosɛnga bapolisi nzela básala fɛti ya monene. Na ntango ya fɛti, babalani bazalaki kofanda na estrade, mpe bandeko bazalaki koleka mpo na kosala badiskur.”
Na liyangani moko, polisi moko abengaki ndeko Tagor pembeni.
Atunaki ye: “Bafɛti mingi ya libala eumelaka kaka ngonga mibale to misato. Ndenge nini oyo ya bino ezalaka banda ntɔngɔ tii mpokwa?”
Ndeko Tagor ayanolaki: “Bato mosusu oyo babalani bazalaka na mikakatano mingi, esɛngaka kopesa bango toli ebele oyo euti na Liloba ya Nzambe.”
Polisi yango aningisaki motó mpe alobaki: “Namoni olobi solo.”
Na libaku moko, mabala ebele esalemaki mpo bandeko básala badiskur ya liyangani ya etúká “Bokonzi esangisi biso” na stade moko monene ya Jakarta. Bandeko mpe baninga ya solo pene na 4000 bayaki na liyangani yango, mpe bato 125 bazwaki batisimo na nkuku liboso liyangani ebanda. Na nsima, ntango epekiseli elɛmbaki, bandeko basalaki mayangani ya minene koleka; na moko na yango bato bazalaki koleka 15 000.
Batongi biro ya filiale na ntango ya epekiseli
Na bambula ya 1980 mpe 1990, biro ya filiale esɛngaki guvɛrnema mbala na mbala ete elongola epekiseli na mosala ya Batatoli ya Yehova. Bandeko ya bikólo mosusu mpe bakomelaki guvɛrnema ya Indonésie mpe baambasadɛrɛ na yango mpo na kotuna ntina oyo Batatoli ya Yehova bandimami te na Leta ya Indonésie. Bakonzi mingi ya Leta bandimaki ete epekiseli elongwa, kasi bakambi minene ya ebongiseli oyo etambwisaka mangomba ya bokristo bazalaki kolinga te.
Na 1990, bandeko bamonaki ete bakoki kotonga biro ya filiale ya sika na esika oyo ekobenda likebi ya bato te. Na mbula yango kaka, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki básomba lopango moko pembeni ya Bogor, mwa mboka moko moke na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 40 na sudi ya Jakarta. Kasi, bandeko oyo bayebaki kotonga bandako bazalaki mingi te. Ndenge nini Betele ekotongama?
Eyano eutaki na lisangá ya bandeko ya mokili mobimba. Biro ya Brooklyn oyo etalelaka misala ya kotonga mpe biro ya Australie oyo etambwisaka misala ya kotonga na bikólo ya zingazinga esalaki plan mpo na Betele yango. Bandeko soki 100 ya mikili mosusu balakisaki bandeko mosala na boumeli ya mbula mibale.
Hosea Mansur, ndeko moko ya Indonésie oyo bazalaki kotinda asolola na bakonzi ndenge na ndenge ya Leta, alobaki boye: “Mokolo moko ntango bakonzi oyo bazalaki Bamizilma bamonaki ndenge nakomaki nkombo na ngai na mokuse H.M. na ekɔti na ngai ya mosala, bakanisaki ete H elakisi ‘Hājjī,’ titre ya lokumu mingi oyo Bamizilma bakendaka koluka na la Mecque. Na yango, bamoniselaki ngai limemya makasi. Mwa libunga wana esalisaki biso tóbongisa mosala kozanga mindɔndɔ.”
Molulu ya bofungoli Betele ya sika esalemaki na mwa 19/07/1996. John Barr, ndeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde asalaki diskur ya bofungoli. Bayangani bazalaki 285: bandeko 118 ya Babetele mosusu, bamisionɛrɛ ya kala oyo bautaki na bikólo mosusu, mpe bandeko 59 ya Betele ya Indonésie. Bato 8 793 bayanganaki na liyangani ya etúká “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe” na Jakarta mikolo mibale oyo elandaki.
Yehova asikoli basaleli na ye
Na 1998, Prezida Soeharto (Suharto) oyo aumelaki na bokonzi na Indonésie atikaki bokonzi, mpe ezalaki libaku ya kosala guvɛrnema ya sika. Na yango, bandeko basalaki nyonso mpo na kosɛnga ete epekiseli elongwa.
Na 2001, ntango Djohan Effendi, secrétaire d’État ya Indonésie, asalaki mobembo na New York, akendaki kotala Betele ya Brooklyn mpe akutanaki na bandeko misato ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Makambo oyo amonaki ekamwisaki ye, mpe andimaki ete mokili mobimba eyebi ete Batatoli ya Yehova bazali bato ya bizaleli malamu. Tata Effendi andimaki epekiseli elongwa, kasi alobaki ete Marzuki Darusman, prokirɛrɛ monene ya Indonésie nde akokata likambo.
Prokirɛrɛ monene mpe andimaki bálongola epekiseli, kasi bakonzi mosusu ya motema mabe oyo bazalaki kosala elongo na ye bazalaki koumisa makambo na elikya ete bakotya prokirɛrɛ mosusu ya sika mosika te. Nsukansuka, na mwa 01/06/2001, babengisaki ndeko Tagor Hutasoit na biro ya prokirɛrɛ monene. Ndeko Tagor alobaki boye: “Mbula soki 25 liboso, kaka na biro yango, bapesaki ngai mokanda oyo elobaki ete mosala ya Batatoli ya Yehova epekisami. Kasi mokolo wana, prokirɛrɛ monene apesaki ngai mokanda oyo elongolaki epekiseli; ezalaki mokolo na ye ya nsuka na biro yango.”
Na mwa 22/03/2002, departema oyo etalelaka makambo ya mangomba na Indonésie ekomaki lisangá ya Batatoli ya Yehova na buku ya Leta. Mokambi monene ya departema yango ayebisaki bandeko ya filiale ete: “Ata soki bokomami na buku ya Leta, yango te nde epesi bino bonsomi ya losambo. Bonsomi na bino euti epai ya Nzambe. Mokanda oyo elobi kaka ete lingomba na bino eyebani na guvɛrnema. Sikoyo bokoki kosala makambo nyonso lokola mangomba mosusu esalaka mpe guvɛrnema ezali wana mpo na kosalisa bino.”