KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA
Mpoto
MIKILI 47
BATO 744 482 011
BASAKOLI 1 611 290
BAYEKOLI YA BIBLIA 834 121
Eyano ya boboto
Na ekólo Géorgie, mobali moko apusanaki pene ya shario ya mikanda na biso, mpe nakoganga nyonso alobaki boye: “Nakotikela bino nzela te bósakola awa! Bato mingi ya Géorgie bazali bandimi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse.” Ndeko mobali oyo azalaki na shario atunaki moto yango na boboto nyonso soki así atángá moko ya mikanda na biso. Mobali yango ayanolaki, “Te, mpenza te.” Na mayele nyonso, ndeko yango asɛngaki ye atánga naino. Maloba ya ndeko yango ekitisaki mobali yango motema mpe azwaki mwa mikanda na biso. Mwa mikolo na nsima, mobali yango azongaki mpo na kosɛnga bolimbisi na ezaleli oyo amonisaki liboso. Alobaki ete atángelaki mama na ye oyo akufá miso bazulunalo na biso. Bango nyonso mibale basepelaki na yango mpenza mpe bazalaki na mposa ya kotánga bazulunalo ya sika. Sikoyo ayaka mbala na mbala na shario na biso mpo na kozwa bazulunalo ya sika.
Ndenge malamu ya kosilisa matata
Na Azerbaïdjan, ntango bandeko mibali mibale bazalaki na mosala ya kosakola, bapusanaki pene ya elenge mobali moko oyo atɛlɛmaki liboso ya ndako mpe bapesaki ye litatoli. Elenge mobali yango alobaki, “nakoyoka makambo wana te; ekozala lisumu.” Na nsima abimisaki mbeli na poshɛ na ye ya nsima mpe alobaki, “basali ngai mabe mpe nazali kokende kosala moto yango mabe mpo makambo esila.”
Bandeko yango bakamwaki, kasi balobaki, “koboma ezali lisumu.”
Mobali yango alobaki, “sikoyo nasala nini?” Batángelaki ye Baroma 12:17-21 mpe balimbolelaki ye ete kozongisa mabe ezali likambo ya Nzambe mpe tosengeli te ‘kotika mabe elonga biso, kasi tósalaka malamu mpo na kolonga mabe.’ Balobaki na ye ete lolemo ya boboto ezalaka na nguya mpe bayebisaki ye ete soki abomi to asali moto mabe, lisosoli ekotungisa ye. Lokola makambo ayokaki ebendaki likebi na ye, atikaki bango mpe akendaki.
Ngonga soki moko na nsima, mobali yango amonaki bandeko yango mpe alobaki: “Nauti epai ya moto oyo nalingaki koboma. Nasali ye mabe te kasi tobongisi likambo yango. Nasepeli mpenza ndenge bosalisaki ngai namema ngambo te.” Batatoli ya Yehova balimbolelaki ye ete ezali mpenza Yehova nde asalisaki ye.
Shario ya mikanda ebendaki likebi ya ndeko mwasi moko oyo atiká kosakola
Elekaki mwa bambula banda ndeko mwasi moko na Norvège atikaki solo. Kasi ntango tokómaki kosalela shario mpo na kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso, azalaki mbala mingi koleka wana ntango azali kokende zando.
Atako azalaki kopusana na shario te, azalaki komona bafɔtɔ oyo tobambaka na shario mpe mikanda oyo bandeko bazalaki kotanda. Bafɔtɔ yango, ná elateli malamu ya Batatoli ya Yehova epesaki ye mposa ya kozongela Yehova mpe lisangá.
Amonaki mpe site Internet na biso jw.org, yango wana azwaki ekateli ya kokɔta na site yango. Asepelaki ntango amonaki ete ezalaki mpasi te komona adrɛsi ya Ndako ya Bokonzi oyo ezalaki pene ya esika afandaka mpe ngonga ya makita. Azwaki mwa mikanda yango na Internet mpe na motema likoló, akendaki na Ndako ya Bokonzi. Bayambaki ye malamu mpe bankulutu bazwaki ebongiseli mpo ndeko mwasi moko ayekola na ye Biblia. Eumelaki te, azwaki baninga ya malamu na lisangá mpe azongelaki makambo ya elimo. Lelo oyo azangisaka makita to mosala ya kosakola te, asepelaka ndenge azongeli lisusu boyokani na ye na Yehova.
Apesi baninga na ye ya kelasi litatoli na bisi ya kelasi
Na Norvège, elenge Ronja oyo azali na mbula 15 asololaki na baninga na ye ya kelasi misato ya mibali na bisi likambo etali liteya ya evolisyo. Baninga yango bazalaki kotyola mateya oyo ndeko na biso wana ya mwasi andimaka mpe yango ezalaki kotungisa ye. Lokola amonaki ete amibongisaki te mpo na kolobela likambo yango, asɛngaki mama na ye asalisa ye azwa bilembeteli oyo ezali kondimisa ete Nzambe azalaka.
Mokolo oyo elandaki, na bisi ya kelasi, Ronja asalelaki makambo oyo abongisaki. Ata bongo, bilenge mibali yango batyolaki ye mpo azalaki kondimela Yehova. Moko na bango alobaki na mongongo makasi boye: “Na bisi oyo, moto andimelaka Yehova azali te! Soki bongo, baoyo bandimelaka evolisyo bátombola misapi mpe baoyo bandimelaka Yehova bátombola misapi.” Ronja akamwaki ntango elenge mobali moko oyo afandaki pene na ye atombolaki mosapi mpe alobaki, “nandimelaka Yehova!” Bana mosusu mibale balobaki, “biso mpe!” Bana-kelasi mosusu mpe bayokaki makambo Ronja alobaki na baninga na ye ya kelasi mpe bamosusu kati na bango bandimaki bilembeteli oyo Ronja apesaki!
Mobali moko oyo ayebi kotánga te amoni buku moko
Mokolo moko na nsima ya midi, mibali mibale ya ekólo Syrie, oyo balobaka monɔkɔ ya Arabe bayaki na Betele ya Danemark. Bayebisaki bandeko basi oyo bazalaki kosala na esika bayambaka bato ete bazali koluka Batatoli ya Yehova. Ntango bandeko yango bayebisaki bango ete Batatoli ya Yehova bazalaka nde wana, mibali yango basepelaki. Bazwaki adrɛsi yango ndenge nini? Balakisaki moto moko oyo asalaka na bibliotɛkɛ ya Leta fɔtɔ oyo bakangaki na telefone na bango. Ezalaki fɔtɔ ya lokasa ya ebandeli ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? na monɔkɔ ya Arabe. Yango wana, moto ya bibliotɛkɛ amonaki adrɛsi ya Betele mpe alakisaki bango yango.
Mibali yango bazalaki kobundana na koloba monɔkɔ ya Danois, yango wana babengaki ndeko moko oyo alobaka Arabe aya kosolola na bango. Emonanaki polele ete moko ya mibali yango azalaki na mposa makasi ya koyeba makambo mingi ya Biblia. Ndeko yango azwaki adrɛsi na ye mpe alakaki ete akokende kotala mobali yango nsima ya mwa ngonga mpe akomemela ye ndeko mosusu oyo alobaka monɔkɔ ya Arabe.
Ntango bandeko yango bakómaki na ndako ya mobali yango, ayebisaki bango ete asololá naino te na Batatoli ya Yehova. Ayebisaki bango lisusu ete amonaki buku yango na kɛsi oyo batikelaka ye mikanda, atako kɛsi yango ezalaki na nkombo te oyo emonisi ete ezali ya moto oyo alobaka monɔkɔ ya Arabe. Lokola ayebaki kotánga te, asɛngaki moninga na ye moko atángela ye buku yango mpe nsima ya mikolo misato basilisaki kotánga yango. Makambo ayokaki endimisaki ye ete amoni lingomba ya solo.
Azalaki komitungisa mpenza mpo akimá mboka na ye mpe bato ya libota na ye batikalá mosika, kasi azwaki libɔndisi na Biblia. Mbala ya liboso oyo bandeko bakendaki epai na ye, atunaki bango boye: “Banda kala wana bozalaki wapi mpo na koya kotala ngai? Nazalaki mpenza na mposa ya makambo oyo.” Azali kokoba boyekoli yango mpe azali kosepela mpenza na makambo azali koyekola.
Liboso azalaki komiyoka lokola azangi eloko moko, sikoyo azwi esengo
Dmitry azalaki kosala na kompanyi ya makaya na Ukraine, kasi ntango ayebaki mpenza ete makaya ebebisaka nzoto ya moto, atikaki mosala yango atako ezalaki ya mbongo mingi. Nsima ya sanza misato, mama na ye ná mama-bokilo na ye bakufaki. Likambo yango esalaki ye mpasi mingi na motema. Akanisaki ete lingomba na ye ekobɔndisa ye mpe ekopesa ye biyano na mituna na ye, kasi esalemaki bongo te. Moninga moko ayebisaki ye ete lokola ozali mondimi ya lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, yango elimboli ozali “na ekulusu na kingo mpe ozali lokola moto oyo azangi eloko.” Dmitry azalaki komiyoka mpe bongo. Amonaki ete ayebi ata likambo moko te etali Nzambe to Biblia. Na komitungisa nyonso, abandaki kobondela mpo na kosɛnga lisalisi. Na nsima, amonaki ete así ayoká makambo etali Batatoli ya Yehova. Amonaki site Internet na biso mpe akamwaki ndenge ezali kolobela makambo mingi etali Biblia. Na nsima, alukaki Ndako ya Bokonzi oyo ezalaki pene na esika afandaka. Ntango akómaki na parkingi ya Ndako ya Bokonzi, ndeko moko ayambaki ye mpe atunaki ye soki azali na mposa ya nini. Dmitry alobaki, “nazali na mposa ya koyekola Biblia.” Eleki sikoyo sanza motoba banda akómá koyekola Biblia mpe ayanganaka na makita nyonso, apesaka mpe biyano.
Kotika mwa nɔti mpo na kolandela bato oyo basepelaki
Paul ná Faith, oyo bafandaka na Grande-Bretagne, basololaki na mwasi moko na nkombo Susan mpe bamibongisaki mpo na kozongela ye. Ntango bazongelaki ye, bakutaki ye te. Paul ná Faith basalelaki makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya 11/2014, oyo elobelaki kokomela moto oyo okuti te mwa mokanda mpe batikelaki Susan mwa nɔti ete bakozongela ye mokolo oyo elandi. Ntango bazongelaki ye, bakamwaki ndenge bakutaki nɔti moko oyo Susan atikelaki bango na porte ya ndako na ye. Akomelaki bango ete akendeki zando kosomba biloko ya libala ya mwana na ye ya mwasi. Paul ná Faith batikelaki ye nɔti mosusu mpo na koyebisa ye ete bakozonga lisusu na pɔsɔ oyo ekolanda. Na pɔsɔ yango, Susan azalaki kozela bango mpe babandaki koyekola na ye Biblia na buku Biblia eteyaka.
Lokola libala ya mwana na ye ekómaki pene, Susan ayebisaki bango bázela naino. Ntango Paul ná Faith bayaki lisusu, moto azalaki te, yango wana batikaki nɔti oyo ezalaki mpe na nimero ya telefone. Basepelaki ntango Susan atindelaki bango mesaje mpo na kosɛnga bolimbisi ndenge bakutaki ye te mpo azalaki kosolola na moninga na ye moko ya kartye na jardin. Banda wana, Susan azangisaka lisusu boyekoli ya Biblia te mpe auti koyangana na makita mpo na mbala ya liboso.
Paul ná Faith bazali na esengo ndenge batikaka mwa nɔti mpo na kolandela mposa ya moto. Balobi boye: “Bato mingi mosusu oyo totikelaka mwa nɔti babengaka biso na telefone. Ezalaka malamu mpenza!”
Kondima na ye esimbaki motema ya monganga na ye
Na sanza ya 08/2014, ndeko na biso moko akɔtaki lopitalo na Hongrie mpo azalaki na maladi moko na pumɔ oyo babengi embolie pulmonaire. Likambo ya mawa, eumelaki te, akufaki. Mwasi ya ndeko yango akomaki boye mpo na Tünde, monganga oyo azalaki kosalisa mobali na ye:
“Na 2015, na eleko ya molunge, ngai ná mwana na ngai ya mobali toyanganaki na liyangani ya etúká ‘Mekolá Yesu!’ Na mokolo ya nsuka ya liyangani yango, ntango tozalaki na parkingi mpo tózonga ndako, mwasi moko atɛlɛmaki liboso na ngai, abwakaki sakosi, ayambaki ngai mpe abandaki kolela. Ezalaki monganga oyo, mbula soki moko liboso, asalisaki mobali na ngai na lopitalo, na esika oyo batyaka bato ya maladi makasi. Mwasi yango ayebisaki ye ete lokola monganga mokomoko azalaki kokɔta na ngala na ye mpo na kolandela moto moko ya maladi, azalaki kobondela ete na ngala na ye, bátya ye esika mobali na ngai azalaki. Mbala nyonso ezalaki kosalema mpe bongo!
“Tünde alobi ete lokola mobali na ngai azalaki na kondima mpe bizaleli malamu mpe azalaki ntango nyonso kolobela elikya na ye, yango nde epesaki ye mposa ya kobanda koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova.
“Tünde, azali sikoyo koyekola Biblia mpe azali kozela na motema moko ntango oyo akomona lisusu mobali na ngai. Azali na mposa ya koyebisa mobali na ngai ete bizaleli malamu oyo amonisaki mpe kondima makasi oyo azalaki na yango nde esalisaki ye ayeba Yehova mpe bilaka kitoko oyo apesi.”
Kosakola na motuka mokomoko
Lokola mobulu esalemaki mpe bazalaki kopekisa bato bákɔta to bábima, na ntango moko boye, bakangaki bandelo mosusu oyo ekaboli ekólo Grèce ná Bulgarie yango wana ebele ya mituka etandanaki na nzela. Lisangá moko ya Bulgarie oyo ezalaki pene wana esalelaki libaku yango mpo na kopesa mikanda na biso epai ya bato oyo bakangamaki na nzela. Bandeko bayaki kosakola na esika yango mpe bamemaki mikanda na minɔkɔ 12. Atako mingi ya bakumbi-mituka yango bazalaki ya kolɛmba mpe na nkanda, kasi bandimaki kosolola na bandeko. Bandeko bayokaki bakumbi-mituka yango na boboto nyonso, bapesaki bango elikya mpe balendisaki bango. Mokumbi-motuka moko atunaki bango, “bozali Batatoli ya Yehova?” Ntango bandeko bandimaki, moto yango abakisaki boye: “Nayebaki yango mpo kaka Batatoli ya Yehova nde basakolaka lokola bino.” Moto moko ya Autriche oyo azalaki kokumba motuka monene, alobaki boye na masɛki: “Bozalaka bisika nyonso, bino bakoki kokima bino te! Bobongi kozwa longonya! Bókoba kobɔndisa mpe kopesa bato elikya.” Mosusu alobaki boye: “Nasepelaka te kotánga mikanda na bino. Kasi sikoyo nakosepela kotánga yango.” Mokumbi-motuka mosusu atangisaki mai ya miso ntango ndeko mobali moko apesaki ye litatoli. Alobaki ete azalaká Motatoli ya Yehova eleki bambula ebele. Bandeko balendisaki ye atánga mikanda mpe aluka esika lisangá ezali.