Nazali na elikya kitoko atako nazali ebɔsɔnɔ
LISOLO YA KONSTANTIN MOROZOV
Ntango nabotamaki na mokolo ya 20 Yuli 1936, ata mokuwa moko te ya nzoto na ngai ekolaki malamu, longola kaka mikuwa ya motó mpe ya mokɔngɔ. Mikuwa nyonso ya nzoto na ngai ezalaki mikemike mpe pɛtɛɛpɛtɛɛ lokola mokuwa ya litoi ya moto oyo akómi mokóló. Ntango nabotamaki, nazalaki kaka na ndambo ya kilo (gramɛ 500). Eloko oyo elakisaki ete nazali na bomoi ezalaki kaka ndenge motema na ngai ezalaki kobɛta malɛmbɛmalɛmbɛ, ndenge nazalaki kopema mpe ndenge nzoto ezalaki koningana mwa moke.
LIBOTA na biso ezalaki na bana libwa mpe ngai nazalaki mwana ya nsambo; tozalaki kofanda na mboka Sara, na Ul’yanovsk Oblast, yango ezalaki na katikati mpenza ya ekólo Russie. Ntango nakokisaki pɔsɔ misato, baboti na ngai bamemaki ngai na ndakonzambe mpo na kozwa batisimo. Sango abwakelaki ngai mai nokinoki mpe ayebisaki baboti na ngai bámema ngai nokinoki na ndako mpo nsima ya mwa ngonga nakokufa.
Na sanza ya Yanuali 1937, baboti na ngai bamemaki ngai na Kazan, engumba-mokonzi ya ekólo Tatarstan, na Russie epai ya minganga oyo bameseni kosalisa bamaladi lokola oyo ngai nazalaki na yango. Na ntango wana, nabandaki koloba “Mama,” “Papa,” mpe “Babushka” (nkɔkɔ-mwasi), mpe nayebaki bankombo ya bandeko na ngai. Ntango minganga basilisaki kotalela ngai, bayebisaki baboti na ngai ete nsima ya mbula moko, nakokufa. Basɛngaki bango ete báboma ngai mpe bátya ngai na kati ya molangi na laboratware mpo ete banakelasi oyo bazali koyekola mosala ya monganga básalelaka nzoto na ngai mpo na boyekoli na bango. Nazali mpenza kotɔnda baboti na ngai lokola baboyaki na motema moko kosala likambo yango!
Bomwana ya mpasi
Soki nakanisi malamu, banda bomwana na ngai, nzoto na ngai emonaka se mpasi na mpasi. Kasi, ata ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kosala makasi ete nalɛmbaka nzoto te, nasɛkaka mbala na mbala mpe nasepelaka na bomoi. Nabateli ezaleli wana tii lelo oyo. Mokemoke, mikuwa ya nzoto na ngai ebandaki kokóma makasi mpe nabandaki kofanda mpe konguluma mwa moke. Nakolaki lokola bana mosusu te mpe nzoto na ngai ezalaki mpenza kitoko te. Kasi na kelasi nazalaki na mayele mpe ntango nakokisaki mbula mitano, nabandaki kotánga mpe kokoma.
Na sanza ya Mai 1941, mama na ngai amemaki ngai lisusu na ndakonzambe mpo na mbala ya mibale. Bato ebele bazalaki na kati mpe bango nyonso bafukamaki mpo na kosambela. Mwasi moko oyo azalaki koyamba bato, ayaki epai ya Mama mpe atunaki ye mpo na nini afukamaki te. Ntango Mama alakisi ye ngai, mwasi yango akendaki kosolola na sango. Na nsima, ntango mwasi yango azongi, amemaki biso na libanda mpe ayebisaki Mama ete atika ngai libanda liboso na ekuke mpe akɔta kaka ye moko. Mwasi yango alobaki ete baboti na ngai basalaki masumu yango wana “moto ya mbindo” apesaki bango ngai. Mama azongaki na ndako na kolela. Bambula mingi na nsima, nazalaki kaka kokanisa likambo yango. Nazalaki komituna: ‘ “Moto ya mbindo” yango nde nani?’
Na 1948, ntango nakokisaki mbula 12, Mama amemaki ngai na mboka Merenki, na Repibliki ya Tchouvachie, na ntaka ya kilomɛtrɛ 80 na mboka na biso. Na mboka yango, ezalaki na maziba ya mai oyo esalisaka bato ya maladi mpe Mama azalaki na elikya ete mai wana ekobikisa ngai. Basango bapesaki ngai bikila mpo nakoka kobika, kati na bikila yango, nasengelaki kolya te na boumeli ya mikolo misato. Nasengelaki mpe kolya kominyo na ndakonzambe. Nandimaki kosala makambo basɛngaki ngai, atako nazalaki mpenza kondima makambo ya lingomba yango te. Mobembo ezalaki molai mpe ya mpasi mpo na ngai, kasi nalɛmbaki yango te mpo nazalaki kosepela kotala banzete kitoko ya mboka wana.
Bato batondaki na ndakonzambe. Ntango Mama azalaki komema ngai na kati ya bato wana, mwasi moko mobange apesaki ngai bombo moko. Nazwaki yango mpe natyaki yango na libenga na ngai. Ntango ekómaki ngala na ngai ya kozwa kominyo, mobange mwasi yango agangaki ete: “Tata sango, kopesa ye kominyo te! Auti kolya bombo!” Namekaki koyebisa bango ete bombo yango ezali na libenga na ngai, kasi sango agangaki ete: “Yo, elima, ozali kobanga mikóló te! Okotika kokosa te? Bóbimisa ye libanda!” Na mokolo oyo elandaki, sango mosusu akambaki misa mpe asukolaki ngai na mai yango “ya makamwisi.” Kasi ata likamwisi moko esalamaki te. Natikalaki kaka ebɔsɔnɔ.
Misala ya mayele
Atako nazalaki ebɔsɔnɔ, na bolenge na ngai, namipesaki na kelasi mpe nazalaki na mokano ya kotánga mingi. Na 1956, nakɔtaki na Komsomol (Lisangá ya bilenge ya kominisme) mpe na nsima, nakómaki kotángisa bilenge istware ya Komsomol. Nazalaki mosangani ya Commission socioculturelle ya lisangá moko ya bibɔsɔnɔ oyo nazalaki kobongisa masolo mpe kosala yango na radio.
Lisusu, nazalaki kosala na motuka moko oyo ezalaki bibliotɛkɛ mpe ezalaki na bakasɛti ya botángi ya mikanda mpo na bato oyo bakufá-miso, mpe baponaki ngai lokola mosangani ya Commission de la magistrature pour la lutte contre l’abus d’alcool. Nazalaki mpe na lisangá moko ya bayembi, nazalaki koyemba mpe nazalaki kobɛta bibɛtelo mingi ya miziki.
Na ndako ya bibɔsɔnɔ
Na 1957, ntango nakokisaki mbula 21, lokola nazalaki ebɔsɔnɔ nakendaki kofanda na ndako ya bibɔsɔnɔ. Kasi nalɛmbaki nzoto te. Na Ɔkɔtɔbɛ 1963, nalongwaki kuna mpe nakendaki na Moscou, na Institut de recherche en science prothétique (Lopitalo mpo na kosalisa bibɔsɔnɔ). Kuna, basalaki ngai lipaso mbala 18 mpo na komeka kosembola makolo na ngai.
Liboso, basembolaki makolo na ngai. Nsima ya mikolo mwambe, basalaki ngai lipaso. Na nsima, batyaki ngai simá na makolo mpo eningana te tii na lipaso mosusu. Lifulumɛ azalaki kolela ntango azalaki komona ndenge nazalaki komona mpasi.
Na boumeli ya sanza minei oyo elandaki, nayekolaki kotambola na banzete. Nazalaki kotɛlɛma na banzete yango mpe molai na ngai ezalaki mɛtrɛ 1,10. Nazalaki na kilo 25. Na 1964, ntango namesanaki kotambola na banzete yango, nazongaki na ndako ya bibɔsɔnɔ. Likambo ya mawa, mikuwa ya makolo na ngai ezalaki pɛtɛɛ mpenza mpe ekokaki te komema kilo ya nzoto na ngai; yango wana naumelaki te mpe esengelaki nazongela lisusu konguluma to kotambola na velo ya bibɔsɔnɔ. Tii lelo, natambolaka mingimingi na velo ya bibɔsɔnɔ.
Nazongá na ndakonzambe wana lisusu ata mokolo moko te. Ndenge balobaki na ngai ete nautaki na “moto ya mbindo,” likambo yango ezalaki ntango nyonso kozokisa motema na ngai. Nalingaki tata na ngai na mama na ngai mingi mpe nakokaki kondima ata moke te ete bango na Nzambe nde basalaki ete nazala ebɔsɔnɔ. Nasalaki makasi nazala na esengo. Nazalaki na mposa ya kosalela bato mosusu malamu mpe mingimingi, nalingaki komindimisa ete nakoki kosala yango.
Nazali kobikela ngai moko
Na 1970, nabalaki Lidia; mopanzi moko ya nzoto na ye ezalaki kosala te banda bomwana na ye. Tosombaki ndako moko ya moke mpe tofandaki wana na boumeli ya mbula 15. Na ntango wana, biso mibale tozalaki kosala mpo na kobikela. Nayekolaki kobongisa bamontre mpe bamasini misusu ya mikemike.
Nakómaki mpe kosalela mbwa moko oyo babɔkɔlá yango malamu mpe mbwa yango ezalaki kosalisa ngai na misala ndenge na ndenge. Ngai na moto moko oyo abɔkɔlaka bambwa tosalaki mwa eloko moko ya ndenge na biso oyo mbwa akokaki komema na yango biloko. Nazalaki na mbwa mibale, moko nkombo na yango Vulkan mpe mosusu Palma. Palma azalaki moninga na ngai ya malamu na boumeli ya bambula ebele. Na magazini, azalaki kozwela ngai biloko ya kolya. Ezalaki na eloko moko Palma azalaki kolinga te: kotɛlɛma na molɔngɔ mpo na kofuta mbongo. Azalaki komema pɔtɔmɔni na ngai na mino na ye, mpe azalaki na ebende moko na nsinga ya nkingo na ye, esika azalaki komema sakosi na ngai ya kotya biloko oyo nazalaki kosomba.
Na 1973, mama na ngai abɛlaki makasi. Lokola nazalaki kobima te, ngai na mwasi na ngai tondimaki ete mama aya kofanda na biso. Na ntango wana, tata na ngai na bayaya na ngai ya mibali mitano basilaki kokufa mpe bandeko na ngai mosusu misato bazalaki kofanda na bamboka mosusu ya Russie. Ntango nyonso oyo Mama afandaki na biso, nasalaki nyonso oyo nakokaki kosala mpo na ye. Nsukansuka, akufaki na mbula 85.
Na 1978, nakanaki kosala motuka moko mpo na ngai moko. Namekaki mituka ebele tii, na nsuka, nasalaki moko oyo ebongi na ngai. Biro oyo etalaka makambo ya mituka na mboka epesaki ngai nzela nasala ekzamɛ mpo na kozwa mikanda ya kotambwisa motuka mpe nakomisa motuka na ngai na mikanda ya Leta. Napesaki motuka yango nkombo Osa (Lɔ́tɔ). Ngai na mwasi na ngai tosalelaki yango mwa eteni moko mpo na komema biloko kino kilo 300. Tokokaki kotambola biso mibale na kati ya motuka yango mpe komema biloko na biso. Motuka wana esalisaki biso tii na 1985.
Na ntango wana, liso na ngai ya mobali ekufaki mpe oyo ya mwasi ezalaki komona lisusu malamu te. Na nsima, maladi ya motema ekómaki kotungisa Lidia. Lokola tozalaki lisusu na makoki te, na sanza ya Mai 1985, tozongaki kofanda na ndako ya bibɔsɔnɔ, na engumba Dimitrovgrad.
Ntina oyo nazali na bomoi ya esengo sikoyo
Na 1990, na eleko ya molunge, Batatoli ya Yehova bayaki kotala biso na ndako ya bibɔsɔnɔ. Nasepelaki mingi na mateya na bango. Balakisaki ngai mokapo ya Evanzile ya Yoane oyo elobeli moto oyo abotamaki mokufi-miso. Yesu alobaki boye mpo na moto yango: “Moto oyo asali mabe te soko baboti na ye te.” (Yoane 9:1-3) Balimbolelaki ngai ete tosangoli lisumu mpe maladi na nkɔkɔ na biso Adama.—Baloma 5:12.
Likambo oyo esimbaki motema na ngai koleka makambo nyonso ezali ete nsukansuka, Nzambe akobikisa bato nyonso oyo bakozwa bomoi na Bokonzi ya Mwana na ye, Yesu Klisto, ntango mabele ekozonga Paladiso. (Nzembo 37:11, 29; Luka 23:43; Emoniseli 21:3, 4) Nalelaki na esengo mpe nalobaki na mongongo ya nse ete: “Nazwi solo, solo, solo!” Na boumeli ya mbula moko, nayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova mpe na 1991, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi epai ya Yehova Nzambe.
Atako nazalaki na mposa makasi ya kosalela Yehova mpe ya kosakola mikano malamu na ye, nakutanaki na mikakatano ebele. Liboso, nazalaki kobima mingi te, kasi nasengelaki sikoyo kobima mpo na koteya bato mosusu bindimeli na ngai. Teritware na ngai ya liboso mpo na mosala ya kosakola ezalaki ndako ya biso bibɔsɔnɔ, esika bato koleka 300 bazalaki kofanda. Mpo na kokutana na bato mingi, nasɛngaki ete nasalaka na biro oyo etalelaka makambo ya ndako.
Ntɔngɔ nyonso nazalaki kofanda ngai moko na esika na ngai ya mosala mpe nazalaki kokokisa mikumba na ngai. Na mosala na ngai, nakómi na baninga ya sika ebele mpe nasololaka na bango masolo kitoko ya Biblia. Mingi kati na bango bandimaki kozwa mikanda mpe bazulunalo oyo esalisaki bango bákanga ntina ya makambo oyo ezali na Biblia. Bapaya bayaka epai na ngai mpo natángelaka bango mikapo ya Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. Na midi, na ntango ya kolya, bato batondaka na esika oyo ngai na mwasi na ngai tofandaka na boye ete moto mosusu akoki kokɔta te.
Bandeko na ngai baklisto, mibali mpe basi ya lisangá ya Batatoli ya Yehova, basalisi ngai mingi na mosala ya kosakola. Bamemelaka ngai mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe balekisaka ntango elongo na ngai na mwasi na ngai. Basalisaka ngai mpe mpo na kokóma na Ndako ya Bokonzi mpo na kokɔta na makita ya lisangá. Motatoli moko asombaki tukutuku moko oyo ezali na esika ya kofanda na pembeni kaka mpo amemaka ngai. Bandeko mosusu oyo bazali na mituka basepelaka koya kozwa ngai na eleko ya malili makasi.
Ezali mpo na lisungi wana nde nakokaki kozala na mayangani (likita mpo na kozwa mateya) mingi ya Batatoli ya Yehova. Liyangani ya liboso oyo nakendaki ezalaki liyangani ya mikili mingi oyo esalamaki na Moscou, na 1993, esika bato 23 743, oyo bautaki na mikili koleka 30, bayanganaki. Mpo na ngai, kokende na liyangani wana ezalaki lokola kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 1 000. Banda ntango wana, nazangisaka ata liyangani moko te ya basaleli ya Yehova.
Bakonzi ya ndako na biso ya bibɔsɔnɔ bazali komemya ngai makasi mpe nazali kopesa bango matɔndi mingi mpo na yango. Lidia, mwasi na ngai oyo tofandi na ye malamu na boumeli ya mbula 30, atako ngai na ye tozali lingomba moko te, asungaka ngai mpe asalisaka ngai. Na koleka, Yehova asungaka ngai na lobɔkɔ na ye makasi mpe asopelaka ngai mapamboli mingi mpenza. Eumeli naino te, na Setɛmbɛ 1997, nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka mosakoli ya ntango nyonso.
Mbala mingi na bomoi na ngai, motema na ngai elingaki kotika kobɛta mpe nakokaki kokufa. Sikoyo, nazali na esengo mingi ndenge nakufaki te mpe ndenge nayekoli koyeba mpe kolinga Yehova Nzambe, Mobandisi ya bomoi! Mposa na ngai ezali ete nasalela ye ntango nyonso esika moko na bandeko na ngai ya elimo na mokili mobimba tii ntango motema na ngai ekotika kobɛta.
[Elilingi na lokasa 24]
Ngai na Lidia, mwasi na ngai
[Elilingi na lokasa 25]
Nazali koteya moyekoli moko na ndako na biso ya bibɔsɔnɔ