Jéhovah apesaki ngai makasi
LISOLO YA EKUMBA OKOKA
NABOTAMI na Afrique centrale, na libota na “boklisto” epai balakisaki ngai bolingo na Nzambe. Tata na ngai azalaki moteyi na molende ya Laike, mpe nazalaki kokende elongo na ye wana azalaki koteya na ndako-nzambe, to na ntango na losambo elongo na mabota mosusu. Lokola nazalaki komonana elenge mobali oyo azalaki kobanga Nzambe, bateyi mosusu ya Laike baponaki ngai ete nasalaka misa elongo na sangó. Bazalaki nkutu koloba na ngai ete, mokolo mosusu nakokóma sangó.
Nzokande, na butu, nazalaki moyembi mpe mobini monene na Matumba-Ngomo, lisangá ya miziki ezalaki na mboka wana. Na lokumu wana, nazalaki na bomoi ya mbindo elongo na bilenge mibali mpe bilenge basi ya kartye na biso. Nzokande, nazalaki kozela na motema likoló ete nazala bobele na mwasi moko, mpe na nsuka, nakende kofanda na likoló elongo na “basantu.” Namonaki ntina moko te ya kopetola bomoi na ngai mpo ete, engebene liteya ya katolike, masumu na ngai nyonso mazalaki kolimbisama wana nazalaki kotubela samedi na mpokwa
Mikakatano mibandi
Na 1969, wana nazalaki moyekoli na kelasi, nabandaki kooka mpasi kati na matongá ya nzoto (articulations). Nayebaki te soki eutaki na nini, kasi, na boumeli ya basanza, ekómaki lisusu makasi mingi. Atako tozalaki bakatolike bayebanaki mingi mpenza, baboti na ngai bazwaki ekateli ya komema ngai epai na banganga-nkisi, baoyo bazalaki koloba ete balekaki ngai, kasi na lisalisi ya mabondeli mpe bankisi na bango, nakobika. Kasi, nabandaki kotenguma, mpe na 1970 nakokaki lisusu kotambola te, ata na nzete. Na ntango wana, nabandaki kokanisa ete mosika te nakotika kotambola mpo na libela.
Na nsuka, na Février 1972, tata na ngai azwaki ekateli ya komema ngai na lopitalo ya Wembo Nyama. Toumelaki na lopitalo yango kino bakómaki kobenga ngai ete nkoló na yango! Bato bazalaki kokota na lopitalo mpo na komisalisa, bazalaki kozonga epai na bango mpe nsima koya lisusu mpo na komisalisa, nde ngai nazalaki bobele wana. Tata na ngai azongaki na mboka mpo na kobuka lóso, kasi na ntango wana nasilaki kobala mpe nazalaki na bana mibale; ezalaki bongo mwasi na ngai, oyo azalaki bobele na mibu 21 nde asalisaki ngai, mpe azwaki mosala mpo na kokokisa bamposa na biso.
Kasi, ezalela wana ezalaki konyokola makanisi na ngai. Na mibu 24, maladi ezalaki bobele koya makasi, wana baninga na ngai bazalaki na bomoi malamu. Nazalaki kokanisa ete ekozala malamu mpo na bato nyonso ete namiboma. Nabandaki bongo kokabola biloko nyonso oyo nazalaki na yango epai na bana na ngai mpe bandeko na ngai, kozanga koyebisa likambo lizalaki na makanisi na ngai. Nabómbáki eloko moko te, bobele simisi oyo nazalaki kolinga mingi, oyo nalingaki ete bakunda ngai na yango.
Bomoi ya sika ebandi
Ntango wana nde Témoin de Jéhovah moko ayaki kokóta na mbeto ezalaki pene na ngai na lopitalo, Atako azalaki komona bobele na liso moko mpe pene ete mosusu ebeba, abandaki nokinoki koloba na ngai mpo na oyo Biblia elobi na ntina na Nzambe mpe na ntina na Bokonzi. Abimaki lopitalo nsima na mwa mikolo, nde atikaki ba Témoins oyo bazalaki koya kotala ye ete basololaka elongo na ngai. Nsima na kosala masolo mingi, bango mpe bakendeki, kasi moko na bango akóbaki koyekola elongo na ngai na nzela na mikanda. Apesaki ngai mpe mikanda ndenge na ndenge, oyo natangaki na esengo mingi.
Ezali bongo nde nazwaki bilei kitoko na elimo, mpe bolembu na ngai ezalaki kobongwana mokemoke na esengo. Nazalaki komona lokola ete lingomba na ngai emelisaki ngai “acide,” nde nazalaki sikawa komela mai na bomoi na kozanga kofuta. Natondaki Jéhovah kati na motema na ngai na boye ete asikolaki ngai na bindimeli ya biyambayamba mpamba lokola Trinité, molimo ekufaka te, bobangi ya bakufi mpe losambo ya bankoko.
Na eleko wana, nalingaki kobima na lopitalo. Kasi nayokaki ete balingaki kotinda ba pionniers mibale na Wembo Nyama; nazwaki bongo ekateli ya kozela kino koya na bango. Boni nasepelaki ntango bayaki kokuta ngai na lopitalo! Nasengelaki kolanda koyekola elongo na moto na esika ete nayekolaka na nzela na mikanda.
Nsima na mikolo, natunaki bango soki bazalaki kosala makita kati na Salle du Royaume, lokola etangaki ngai yango kati na bazulunalo. Bayanolaki ngai na boboto nyonso ete bazalaki kosala makita na bango nyonso kati na mwa ndako moke, epai moko na bango azalaki kofanda. Balobaki na ngai lisusu ete, bazalaki na esengo ya komema ngai kuna na velo. Atako mpasi makasi oyo nazalaki kooka kati na mikuwa ya mokongo mpe na matongá, nasanganaki na esengo na makita nyonso. Ntango nakokisaki masengami, nakómaki mosakoli azwi naino batisimo te, mpe nabandaki kopesa rapport na Avril 1974.
Sanza misato na nsima, namonisaki liboso ya bato nyonso ete namipesi epai na Jéhovah na kozwáká batisimo. Napesaki litatoli epai na basali ya lopitalo, na bato ya maladi, epai na bamisionere ya protesta baoyo bazalaki koya kotala biso, mpe, epai na basangani ya libota na ngai, atako botemeli na bango makasi. Na eleko yango, nazalaki kopesa litatoli wana nazalaki kolala na mbeto na ngai to wana nazalaki kofanda na fauteuil bapesaki ngai na lopitalo, kino nakokaki kosomba oyo ya ngai moko.
Koyika mpiko eboti mbuma
Atako botemeli ya libota na ngai, nalandaki kotambola na banzela na Jéhovah, mpe napambolamaki mingi mpenza. Mwasi na ngai ayambaki solo, mpe azwaki batisimo na 1975. Tozwaki ekateli ya kofanda na Katakokombe, epai kuna lisangá lizalaki. Baboti na ngai bazalaki komitungisa na ntina na biso mpo bayebisaki bango ete ba Témoins nyonso bakobomama na 1975. Lokola toboyaki kotika kondima na biso, batikaki kotindela biso bilei, mpe tokómaki kokelela mingi. Nazali komikundola lisusu ete mwana na biso moke ekweyaki sembaa (évanoui) mpo ete: toliaki eloko te uta mokolo mobimba na ndambo. Na nsima, baninga na biso baklisto bamemelaki biso mbisi mpe biloko mosusu. Mpe baboti na ngai babandaki lisusu kosalisa biso, kasi baninga na biso batikaki te kosalisa biso na mosuni.
Na Février 1975, loboko na ngai ya mobali ekomaki paralizé mpe ebandaki kokonda makasi. Atako bongo, nazalaki ntango nyonso na kondima, mpe nabatelaki ekateli na ngai ya kosalela Jéhovah na esengo. Nzokande nazali lelo na esengo mpamba te na nsima, loboko na ngai ebongaki lisusu, mpe nakoki kosala na yango misala, ndakisa kofungola Biblia mpe mikanda ya la Société.
Mpiko liboso na bakonzi
Na 1977, commissaire ya mboka na biso afundaki ngai liboso na bakonzi ya région, baoyo bautaki kokanga pionnier special moko na lisangá ya pene. Mokolo mosusu, soda moko ayaki epai na ngai elongo na mokanda mpo na kokanga ngai. Nabondelaki elongo na libota na ngai, napesaki bilendiseli na lisangá, mpe nalandaki soda wana. Na lisalisi na elimo na Jéhovah, nayanolaki na mpiko mpenza na bifundeli nyonso, mpe, nsima na lisolo molai elongo na bakonzi ya mboka mpe ya basoda, batikaki ngai mpe pionnier spécial wana.
Mwa basanza na nsima, nabiangamaki na commissaire mosusu, mpe na mbala wana lisusu, na lisalisi na Jéhovah, nakótelaki nsango malamu na esengo mpe na molende. Nasololaki mingi mpenza elongo na moto yango, mpe na nsuka na lisolo, atikaki ngai mpe abimisaki ngai na biro kopusaka fauteuil na ngai ye moko. Mpe alobaki na ngai na mongongo moke ete: “Yaka epai na ngai na mpokwa ya lelo.” Nsima na kotala ye mwa mbala mingi, nabandaki boyekoli na Biblia elongo na ye. Na nsuka, natambwisaki boyekoli na Biblia nsambo elongo na bamonisi ya bakonzi. Mingi na bango bazalaki kosangana na makita ya lisangá ya mboka wana.
Mosala ya pionnier special
Nasengaki na Jéhovah ete asalisa ngai na kokokisa ndai nasalaki mpo na kosalela ye na makasi nyonso atako maladi. Kozanga kosenga yango na lisangá, ngai moko namekaki mosala ya pionnier auxilliaire. Nalóngaki na lisalisi ya Jéhovah, mpe nasalaki bongo demande mpo na kosala yango kobanda Juin kino Octobre. Na nsima, la Société andimaki demande na ngai mpo na mosala ya pionnier permanent, to mosali ya ntango nyonso, mpe na Novembre 1976 nabandaki mosala yango. Na Septembre 1977, esengo na ngai ekokisamaki wana naponamaki lokola pionnier spécial kati na lisangá ya Katako-Kombe.
Ndenge nini nazali kokokisa mosala yango? Nazali kotambola na fauteuil na ngai, na lisalisi ya mwasi na ngai mpe ba Témoins ya lisangá epai nazali. Mbala mosusu, nabimaka ngai moko; na bongo, natambolaka na banzete na ngai. Nakweaki mbala moko soko mibale Nazalaki bongo kolala na nsé, kozeláká ete moleki nzela moko asalisa ngai na kotelema, mpe na kolokota banzete na ngai. Nazali ntango nyonso komikundola ekateli ya bantoma mpe bayekoli mosusu na Yesu. (Misala 14:21, 22; Baebele 10:35-39) Mbala nyonso oyo nazali kokwea, nakobondelaka Jéhovah na kosalisa ngai ete nalemba te mpe apesa ngai makasi ete nalanda kosalela ye. Nazali ntango nyonso kokanisa elaka kitoko na Yisaya oyo esakoli ete “motengumi akopumbwa lokola mbolokó.”—Yisaya 35:6.
Wana nazali kokólisa mosala na ngai, nazali mpenza koyikela mpasi na ngai mpiko. Na 1978, Nazwaki libaku malamu ya kokóta na Eteyelo ya mosala na Bokonzi na Lubumbashi, mobembo oyo mozalaki pene na bakilometele 2 000, mobembo oyo nasalaki na motuka, na masuwa mpe na engbunduka mpe nakómaki Solo mpenza, na boumeli ya mobembo yango, Jéhovah apesaki ngai makasi mingi. (Yisaya 12:2; 40:29) Sikawa, kozanga kosalela banzete, nakoki kotambola na bametele nkama—atako nakozala na mikakatano mingi. Nandimisami ete Jéhovah ayokaki libondeli natindaki epai na ye na 1978, oyo nasengaki ye makasi mpo ete nasalela ye na molende mpenza.
Teritware ya sika
Na 1984, nsima na kolekisa mbula sambo kati na lisangá ya Katako-Kombe, natindamaki na lisangá ya Lodja-Centre. Mbula moko na nsima, tosalaki etuluku moko mpo na boyekoli ya mokanda na ntaka ya bakilometele 12 na epai tozalaki, mpe na nsima tosalaki mosusu, na ntaka ya bakilometele 30 na esika tozali. Yango ekómaki etuluku etangwi na lisangá , mpe, na 1988, ekómaki lisangá kati na yango nazali nkulutu.
Mosala ya pionnier esili kopesa ngai bolamu, ezala na elimo mpe na mosuni. Na kosakoláká na banzete na ngai, nakokaki kosala ba ekzerisise oyo minganga bazali kotinda ete nasala yango. Sikawa nazali na makasi koleka ntango oyo nabandaki mosala ya pionnier, mpe nazali na mposa ya kolendendela kati na mosala yango kino nsuka. Nazali na mposa mpenza ya komona lolenge nini Jéhovah akosala ete ‘napumbwa lokola mbolokó’ mpe lolenge oyo akolongola bampasi euti na maladi oyo.
Nazali kotondo Tata na biso ya likoló na motema mobimba lokola apesaki ngai makasi, mpiko mpe mosala ya pionnier. Nazali sikawa na mibu 36, mpe, nsima na kolekisa mibu 11 kati na mosala ya pionnier, nazali kolikya kokóba na yango atako nini ekoki koyela ngai. Nasili kozwa ekateli ya kosalela makasi na ngai nyonso mpo na kokumisa mpe kosanzola Jéhovah Nzambe aleki monene.
Kati na nimero ekolanda
Solo likoló na Beteleme mpe Noel
Toyikisana mpiko, awa emoni biso ete mokolo yango ezali kobelema
‘Toluka maloba kitoko, maloba na solo’