Mpo na nini osengeli koboya bikelakela?
SOKI bateyaki yo ete lolenge mosusu ya bikelakela ezalaka mpo na kosolola na bilimu ya malamu, mbala mosusu okokamwa soki oyebi makambo oyo Biblia ezali koloba mpo na bikelakela. Na ndakisa, Biblia elobi ete: “Bópɛngwa epai na bato na kosolola na [bilimu] te, to epai na banganga na nkisi te. Bóluka bango te ete bóbebisama na bango te.”—Biso nde totɛngisi makomi; Levitike 19:31; 20:6, 27.
Yango wana, Biblia etalelaka moto oyo amipesaka na bikelakela lokola “mbindo na miso na [Yehova].” (Deteronome 18:11, 12) Mpo na nini? Soki totaleli malamumalamu makambo oyo Biblia elobi mpo na lolenge moko ya bikelakela oyo eyebani mingi—oyo bato mosusu balobaka ete basololaka na bato oyo bakufá—tokozwa eyano na motuna wana.
Bato oyo bakufá bazali na bomoi?
Na bokeseni na oyo bato mingi balobaka, Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali koteya biso ete bato ya bomoi bakoki soko moke te kosolola na bandeko na bango oyo bakufá. Mpo na nini te? Mpamba te, mpo moto ya bomoi akoka kosolola na bato oyo bakufá, esengeli bato yango oyo bakufá bázala mpenza na bomoi. Esengeli ete eloko moko ya bato yango etikala na bomoi nsima ya liwa na bango. Bato mosusu balobaka ete molimo etikalaka na bomoi nsima ya liwa. Likambo yango ezali ya solo?
Lisolo ya Biblia oyo elobelaka kozalisama ya moto elobi ete: “[Yehova] Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akómaki molimo na bomoi.” (Biso nde totɛngisi makomi; Genese 2:7) Likambo yango ezali mpenza komonisa ete moto ye moko azali molimo mpe ete azali te na molimo oyo ekufaka te oyo etikalaka na bomoi nsima ya liwa ya nzoto. Yango wana, Makomami elobi ete: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4) “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo moko te . . . Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na [Sheole, NW ],” lilita ya bato nyonso.—Mosakoli 9:5, 10.
Yango wana, na Biblia, molimo ezali te eloko moko oyo etikalaka na bomoi nsima ya liwa ya moto mpe oyo bato ya bomoi bakoki kosolola na yango. Tozali na ndakisa mibale ya bato ya mayele oyo bayekolaka masolo ya Biblia, bango bapesi makanisi na bango ya nsuka ete molimo ekufaka. Clark H. Pinnock, moto ya teoloji ya ekólo Canada alobaki ete: “Likanisi oyo emonisaka ete [molimo ya moto ekufaka te] eumeli mingi na teoloji, atako eumeli kasi euti na Biblia te. Biblia eteyaka te ete molimo ekufaka te.” Ndenge moko mpe, John R. W. Stott, moto moko ya mayele na ekólo Angleterre, alobaki ete: “Koloba ete molimo ekufaka te—mpe na yango ekoki kobomama te—yango ezali likanisi ya Bagreke kasi ezali liteya ya Biblia te.”
Atako bongo, bato bazwaka mpenza nsango mpe bayokaka mingongo ya bato oyo eyokanaka lokola euti epai ya bato oyo bakufá. Na yango, banani nde balobaka?
Basololaka mpenza na banani?
Biblia elobi ete moto moko oyo azali elimo mpe amonanaka te asalelaki nyoka, lokola bato oyo balobaka nsima ya ekeko moko kasi bango bazali komonana te mpo bato bákanisa ete ekeko yango nde ezali koloba. Na ndenge wana nde moto yango oyo azali elimo asololaki na mwasi ya liboso, Eva, mpe atindaki ye atombokela Nzambe. (Genese 3:1-5) Biblia ebengaka moto yango oyo azali elimo, to anzelu yango, ete “nyoka na kalakala, oyo abyangami [Zabolo, NW ] mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba.” (Emoniseli 12:9) Ye Satana, alongaki kobenda baanzelu mosusu na botomboki. (Juda 6) Baanzelu mabe yango babengami bademo mpe bazali banguna ya Nzambe.
Biblia ezali komonisa ete bademo bazali na nguya ya kokosa bato. (Luka 8:26-34) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ndenge Mobeko ya Nzambe elobi ete: “Moto akozwama kati na bino te . . . moto na kosala nkisi mpo na kosakola liboso, to nganga na nkisi, to molengoli, to moto na kobyanga [bilimo, NW ], to nganga na soloka, to moto na kosolola na bakufi. Mpo ete baoyo nyonso na kosala makambo oyo bazali mbindo na miso na [Yehova].” (Deteronome 18:10-12) Makama nini ekoki kokómela moto oyo aboyi kotosa mobeko yango?
Likambo oyo ekómelaki Saulo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, ezali koyanola na motuna yango. Lokola azalaki kobanga banguna na ye, Mokonzi Saulo akendaki koluka nganga-nkisi. Asɛngaki ye aluka kosolola na mosakoli Samwele oyo asilaki kokufa. Ntango ayokaki nganga-nkisi yango azali koloba ete amoni mobali moko ya mobange boye mpe amonisi lolenge na ye, Saulo akanisaki ete ezali Samwele. Nsango nini Saulo azwaki? Yisalaele esengelaki kopesama na mabɔkɔ ya banguna, mpe Saulo na bana na ye ya mibali basengelaki kozala elongo na “Samwele,” yango elingi koloba basengelaki kokufa. (1 Samwele 28:4-19) Nzambe asalaki nini na ekateli oyo Saulo azwaki ya kokenda epai ya nganga-nkisi? Makomami eyebisi biso ete: “Saulo akufaki boye mpo na kotomboka na ye, oyo . . . akendaki kotuna toli epai na mosololi na [bilimo, NW ].” (1 Ntango 10:13) Oyo nde etumbu monene!
Ndenge moko mpe lelo, baoyo bamikɔtisaka na bikelakela, bamityaka na likama monene. Biblia ezali kokebisa ete “baoyo bamipesaka na bikelakela” bakokufa “liwa ya mibale [to liwa ya libela].” (Emoniseli 21:8, NW;Emoniseli 22:15) Na yango, ezali polele ete nzela ya mayele oyo ekobatela moto na bomoi ezali nde koboya lolenge nyonso ya bikelakela.
Ndenge nini koboya kozala na boyokani na bilimu mabe
Okosala nini soki osilá komipesa na bikelakela? Osengeli kosala nokinoki mpo na komibatela yo moko mpe kobatela libota na yo ete bilimu mabe bányokola bino te. Okosala nini? Na ndakisa, ndenge nini moto asalaka mpo na kobatela ndako na ye mpe libota na ye mpo na mwa banyama mabe lokola ngungi, nzinzi, mpese, mpe bongo na bongo? Nsima ya kolongola yango na ndako na ye, akolongola mpe biloko oyo ebendaka yango. Akozipa madusu nyonso mpe akobongisa bifelo malamumalamu mpo ekɔtisa mwa banyama yango na ndako te, mpe soki ezali kosila te, akoki kosɛnga lisalisi na misala ya Leta oyo etalelaka bopɛto ya mboka.
Ezali mpe ndenge moko soki olingi kokima bilimu mabe mpe kokata boyokani nyonso na bango. Tótalela ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso oyo bazalaki na Efese mpe bazalaki kosala bikelakela liboso ya kokóma baklisto. Nsima ya kobongola makanisi na bango mpe koboya bikelakela, basalaki makambo misato mpo na komibatela mpo na bilimu mabe ndenge moko na moto oyo akomibatela mpo na ngungi, nzinzi, mpese mpe bongo na bongo. Basalaki nini?
Likambo ya liboso oyo basalaki
Biblia elobi ete: “Mingi na baoyo basali makambo na nkisi bayanganisi mikanda na bango mpe batumbi yango na miso na bato nyonso.” (Misala 19:19) Lokola batumbaki mikanda na bango ya bikelakela, bato yango oyo bakómaki baklisto sika bapesaki ndakisa mpo na baoyo nyonso balingi koboya misala yango lelo. Bwaká biloko nyonso oyo ezali na boyokani na bikelakela. Yango ekoki kozala mikanda, bazulunalo, babuku, bakasɛti video, mwa bikeko, makambo oyo batii na ordinatɛrɛ, miziki, bakisa mpe bansinga ya kolata na nzoto to biloko ya “komibatela.”—Deteronome 7:25, 26; 1 Bakolinti 10:21.
Mobali moko na Amerika ya Sudi, oyo amipesaki na bikelakela na boumeli ya bambula mingi, asalelaki toli yango ya Biblia. Alobi ete: “Mokolo moko, na liboso ya ndako na ngai, nasangisaki biloko na ngai nyonso oyo ezali na boyokani na bilimu mabe, nazwaki epasola mpe napasolaki yango nyonso.” Na nsima atumbaki biloko yango nyonso. Akolaki na elimo mpe eumelaki te akómaki mosakoli ya molende na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova.
Kasi, esuki kaka wana te. Mpo na nini? Ata ntango baklisto wana ya Efese batumbaki mikanda na bango ya maji, nsima ya bambula ebele, ntoma Paulo akomelaki bango boye: “Tozali kobunana . . . na [bilimu, NW ] mabe.” (Biso nde totɛngisi makomi; Baefese 6:12) Bademo batikaki bango libela te. Bazalaki ntango nyonso koluka ndenge ya kotungisa bango. Baklisto wana basengelaki kosala lisusu nini?
Likambo ya mibale
Paulo alendisaki baklisto ya ekeke ya liboso oyo bazalaki na Efese ete: “Bólata molato mobimba na etumba na Nzambe ete bóyeba kotɛlɛma liboso na mayele na oyo mabe.” (Baefese 6:11) Toli yango ezali na ntina tii lelo. Ndenge moko na moto oyo azali koluka ete nyamankɛkɛ lokola ngungi, nzinzi, mpese, mpe bongo na bongo ekɔta na ndako na ye te, moklisto asengeli kosala makasi mpo na kobakisa bibundeli na ye ete ayeba komibatela na etumba ya bilimu mabe. Likambo yango ya mibale esɛngi nini?
Paulo alobi ete: “Na yango nyonso bókamata nguba na kondima, na yango bokoki kozimisa mbanzi nyonso na mɔ́tɔ na oyo mabe.” (Biso nde totɛngisi makomi; Baefese 6:16) Nguba yango ezali mpenza na ntina mingi. Soki kondima na yo ezali makasi, okozala na nguya mingi ya kotɛmɛla bilimu mabe.—Matai 17:20.
Yango wana, ndenge nini okoki kobakisa bibundeli na yo? Soki olandi koyekola Biblia. Na ndenge nini boyekoli ya Biblia ezali na boyokani na kondima? Efelo ezalaka makasi soki moboko na yango etyamá mpe malamu, ndenge moko mpe kondima ya moto ezalaka makasi na makambo oyo esimbi kondima yango. Makambo yango nini?
Boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe. Ntoma Paulo alobi ete: “Kondima euti na koyoka mpe koyoka euti na Liloba na Klisto.” (Baloma 10:17) Tolendisi yo osɛnga na Motatoli ya Yehova moko ayekola na yo Biblia, yebisá ye ntango nini mpe esika nini oyo olingi ete bóyekolaka. Boyekoli ya ndenge wana ekolendisa kondima na yo. (Baloma 1:11, 12; Bakolose 2:6, 7) Okozwa litomba nini? Ekoumela te, kondima na yo ekokóma makasi lokola efelo mpe ekosalisa yo lokola nguba oyo ekobatela yo mpo na matumoli ya bilimu mabe.—Nzembo 91:4; 1 Yoane 5:5.
Likambo ya misato oyo baklisto ya Efese basengelaki kosala ezali nini?
Likambo ya misato
Na Efese ya kala, bandimi wana ya sika basalaki milende mpo na koboya bikelakela, nzokande baklisto yango bazalaki kaka kofanda na engumba oyo etondaki na makambo ya bademo. Bazalaki na mposa ya libateli mosusu. Yango wana, ntango ntoma Paulo akomelaki baninga na ye bandimi, ayebisaki bango nini basengelaki kosala, alobaki ete: “Na mabondeli nyonso mpe na malɔmbɔ, bóbondelaka ntango nyonso kati na [elimo, NW ]. Mpo na yango bólongwa na mpɔngi na etingya nyonso mpe bólɔmbaka mpo na babulami nyonso.”—Baefese 6:18.
Ya solo, kobondela mingi mpe ntango nyonso mpo na kozwa libateli ya Yehova ezalaki mpe ezali naino likambo ya ntina mpo na komibatela na bilimu mabe. Ezali mpenza likambo ya kolendisa ya koyeba ete Yehova akoyanola na mabondeli na yo oyo osali na motema mobimba, mpe akobatela yo. Abatelaka mpe na lisalisi ya baanzelu na ye. (Nzembo 34:7; 91:2, 3, 11, 14; 145:19) Yango wana, ezali na ntina mingi kosambela Nzambe ntango nyonso ete, “Bikisa biso na oyo mabe.”—Matai 6:13; 1 Yoane 5:18, 19.
Kala, Antônio azalaki nganga-nkisi na ekólo Brésil, amonaki mpenza ntina ya kobondelaka. Ntango andimaki koyekola Biblia mpe na nsima ayebaki nkombo ya Nzambe, Yehova, akómaki kosambela Yehova Nzambe mingi mpo asalisa ye akata nsinga na makambo ya bikelakela. Soki azongisi makanisi na nsima, alobaka ete: “Kosala mabondeli epai ya Yehova ezali mpenza esika ya kokima mpo na ngai mpe mpo na bato mingi oyo bakómaki baombo ya bilimu mabe.”—Masese 18:10.
Okoki kolonga
Ezali malamu ete ntango oyebi Yehova, otyela ye mpenza motema, ondima bokonzi na ye, mpe otosa mibeko na ye. Soki osali bongo, ntango okosɛnga lisalisi na ye, osaleli nkombo na ye, akobatela yo. Antônio azwaki libateli ya ndenge wana. Lelo oyo azali nkulutu moklisto na lisangá ya Batatoli ya Yehova na São Paulo mpe azali na botɔndi mingi ndenge ayebi solo oyo esikoli ye.—Yoane 8:32.
Lokola Antônio na bankóto ya bato mosusu oyo bamipesaki kala na bikelakela bazali lelo oyo kosalela Yehova Nzambe, yo mpe okoki kosikolama na misala ya bikelakela. Yango wana, bwaká biloko nyonso oyo ezali na boyokani na bilimu mabe, lendisá kondima na yo na lisalisi ya boyekoli ya Biblia, mpe bondelá Yehova mpo na kozwa libateli na ye. Salá makambo wana—bomoi na yo etalelami na yango!
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Biblia elobi ete, bato ya bomoi bakoki kosolola na bato oyo bakufá te
[Elilingi na lokasa 6]
1. Bwaká biloko nyonso oyo ezali na boyokani na bilimu mabe
[Elilingi na lokasa 7]
2. Kobá koyekola Biblia
[Elilingi na lokasa 8]
3. Saláká mabondeli mbala na mbala