Engebene Biblia
Ndenge nini Nzambe atalelaka mobulu?
MOBULU ezali bipai nyonso mpe ezali mitindo na mitindo. Longola mobulu ya bitumba, ezali mpe na mobulu ya bamɛli-bangi, babandi, mobulu na eteyelo, na esika ya mosala mpe na masano. Ata mpe na kati ya mabota, mobulu ekómi komonana mingi. Na ndakisa, ankɛtɛ moko oyo euti kosalema emonisi ete na boumeli ya mbula mitano oyo euti koleka, mibali mpe basi 1 200 000 na Canada babɛtamaki ata mbala moko na babalani na bango. Ankɛtɛ mosusu emonisaki ete mibali ntuku mitano likoló na monkama (50 %) oyo babɛtaka basi na bango babɛtaka mpe bana na bango.
Na ntembe te, lokola ebele ya bato mosusu, yo mpe ozali koyoka mpasi na motema mpo na mobulu ya ndenge wana. Nzokande, mobulu ekómi komonana mingi na masano mingi ya mikolo na biso. Bato bazali kosepela kaka na mobulu oyo balakisaka na bafilme te, kasi bazali mpe kosepela na mobulu ya solosolo oyo balakisaka na televizyo. Na bikólo mingi, bato balingaka mingi lisano ya makofi mpe masano mosusu ya makasimakasi. Kasi ndenge nini Nzambe atalelaka mobulu?
Mobulu ebandá kala
Mobulu ebandá kala. Mobulu ya liboso oyo moto asalelaki moninga na ye moto elobelami na Biblia na Genese 4:2-15. Kaina, mwana ya liboso ya Adama na Eva, ayokelaki ndeko na ye Abele zuwa mpe abomaki ye na nko. Nzambe asalaki ye nini? Biblia elobi ete Yehova Nzambe apesaki Kaina etumbu moko makasi.
Totángaka na Genese 6:11 ete mbula koleka 1 500 nsima ya likambo yango, mokili “etondaki na [mobulu, NW].” Nzambe asalaki lisusu nini? Yehova alobaki na moyengebene Noa atonga masuwa oyo ekobikisa ye na libota na ye ntango Ye akoyeisa mpela na mabele mpo na ‘kobebisa’ bato yango ya mobulu. (Genese 6:12-14, 17) Kasi nini etindaki bato yango bálinga mobulu makasi bongo?
Mosala ya bademo
Lisolo ya Genese emonisi ete bana mosusu ya Nzambe, elingi koloba baanzelu oyo bazangaki botosi, balataki nzoto ya bato, babalaki basi mpe babotaki na bango bana. (Genese 6:1-4) Bana yango, oyo babengaki bango Banefilime, bazalaki bingambe mpe bilombe. Na bopusi ya batata na bango bademo, bakómaki bato ya mobulu makasi. Ntango mpela eyaki mpe ezindisaki mabele mobimba, bato yango ya mobulu bakufaki. Nzokande emonani ete bademo batikaki nzoto ya bato mpe bazongelaki nzoto na bango ya elimo.
Biblia emonisi polele ete kobanda wana, baanzelu yango batomboki bazali kosala mosala monene mpo na kotinda bato na kosala mabe. (Baefese 6:12) Mokonzi na bango, Satana, abengami “mobomi-bato” ya liboso. (Yoane 8:44) Na yango, ebongi mpenza tóloba ete mobulu oyo ezali kosalema awa na mabele euti na bademo, to na Satana.
Biblia ezali kokebisa bato ete mobulu ebendaka. Na Masese 16:29, Biblia elobi boye: “Moto na [mobulu, NW] akobenda mozalani na ye; akolekisa ye na nzela oyo ezali malamu te.” Lelo oyo bato mingi bandimaka makambo ya mobulu, batindaka bato básala yango to basalaka yango bango moko. Lisusu, ebele ya bato bakómá kosepela na masano oyo ezali kokumisa mobulu. Maloba ya Nzembo 73:6 (Bible na Lingala ya lelo oyo) ebongi mpenza mpo na kolobela bato ya lelo. Mokomi ya nzembo alobi boye: “Balataka lolendo lokola mayaka; mobulu ekómá lokola elamba na bango ya nzoto.”
Nzambe ayini mobulu
Etamboli nini baklisto basengeli kozala na yango na kati ya mokili oyo etondi na mobulu? Lisolo ya Biblia oyo elobeli Simeona na Levi, bana ya Yakobo, ezali komonisa biso yango polele. Dina, leki na bango ya mwasi, amikómisaki moninga ya bato ya Sekeme oyo bazalaki na etamboli mabe. Nsukansuka mobali moko ya Sekeme abebisaki ye. Mpo na kozongisa mabe wana, Simeona na Levi babomaki mibali nyonso ya Sekeme kozanga koyoka mawa. Na nsima, Yakobo apemamaki na Nzambe mpe alakelaki mabe nkanda makasi oyo bana na ye bayokaki; alobaki boye: “Simeona ná Levi bazali bandeko. Bibundeli na bango ya etumba ezali biloko ya kosala na yango mobulu. Ɛ molimo na ngai, kokɔta na molɔngɔ ya baninga na bango te. Kosala bomoko te na lisangá na bango.”—Genese 49:5, 6, NW.
Baklisto batosaka maloba wana; yango wana baboyaka kosangana na bato oyo batindaka bato básala mobulu to oyo basalaka yango bango moko. Emonani polele ete Nzambe ayinaka bato oyo babimisaka mobulu. Biblia elobi boye: “[Yehova] akomeka moyengebene mpe moto mabe, molimo na ye [eyini] ye oyo alingi mobulu.” (Nzembo 11:5) Baklisto balendisami ete bákima lolenge nyonso ya nkanda ya makasi, ezala ata kokatela baninga mangala.—Bagalatia 5:19-21; Baefese 4:31.
Mobulu ekosuka mokolo mosusu?
Habakuku, mosakoli ya kala, atunaki Yehova boye: “Tii ntango nini nakobelela yo mpo osalisa ngai mpo na mobulu?” (Habakuku 1:2, NW) Ntango mosusu yo mpe osilá kotuna motuna ya ndenge wana. Nzambe ayanolaki Habakuku, alakaki ye ete akolongola “moto mabe.” (Habakuku 3:13, NW) Yisaya, mokanda ya bisakweli, ezali mpe kopesa elikya. Kuna Nzambe alaki boye: “Mobulu ekoyokana lisusu kati na mokili na yo te, kobebisama to kopunzama kati na ndelo na yo te.”—Yisaya 60:18.
Batatoli ya Yehova bazali na elikya ete mosika te Nzambe akolongola awa na mabele lolenge nyonso ya mobulu na baoyo bazali kobimisa yango. Na ntango yango, na esika ete etonda na mobulu, “mokili ekotonda [nde] na boyebi ya nkembo ya Yehova lokola mai ezipaka mbu.”—Habakuku 2:14, NW.
[Elilingi na lokasa 12]
Mobulu ebandaki ntango Kaina abomaki Abele