Mobulu mozali bipai binso
AFANDI na kati ya motuka na ye wana azali kozela ete azwa ndingisa ya koleka, na pwasa, mokumbi motuka amoni engambe mobali moko azali kobɛlɛma epai na ye, azali konganga na kolobáká maloba ya nsɔ́ni, azali koningisa likofi na ye. Mokumbi motuka akangi nokinoki bizibeli mpe maninisa ya motuka na ye, kasi mobali yango azalaki bobele koya epai na ye. Mobali yango akómi na esika motuka mozali, aningisi yango mpe abendi ezibeli na yango. Na nsuka, asiliki, atomboli likofi na ye monene mpe aboli yango na talatála oyo ezalaka na liboso ya motuka, epanzani mikemike.
Oyo ezali likambo lilakisamaki kati na filime moko ya nsɔ́mɔ? Soko moke te! Ezalaki etumba mpo na kowela nzela na esanga Oahu, na Hawaï, oyo eyebani mingi lokola esika ya kimya.
Ezali likambo ya kokamwa te. Bandako ezali kokangama na mafungola, bibendé bizali kotyama na maninisa, basinzili bazali kotɛlɛma liboso na bandako minene, ata mpe makomi mazali kotyama kati na babísi mpo na koyebisa ete “Mokumbi amemaka mosolo te”—nyonso oyo ezali komonisa bobele likambo moko: Mobulu ezali bipai nyonso!
Mobulu kati na libota
Uta kala libota etalelamaka na motuya mpenza lokola esika ya kimya mpe ya libateli mpo na moto. Nzokande, likambo yango lizali kobongwana nokinoki. Mobulu kati na libota, na ndakisa konyokola bana, kobɛta mobalani, mpe koboma, ezali kolobelama na bipanzelo ya nsango kati na mokili mobimba.
Na ndakisa, engebene zulunalo Manchester Guardian Weekly, “bana soko 750 000 na Grande-Bretagne bakoki kozwa mpasi na makanisi na nsima ya mikolo mpamba te bazali kobika kati na mabota oyo kati na yango mobulu mozali kosalema.” Lapólo yango eutaki na bolukiluki moko oyo emonisaki ete “basi misato likoló na minei kati na basi oyo batunamaki mituna balobaki ete bana na bango basilaki komona makambo ya mobulu, mpe pene na bana mibale likoló na bana misato bamonaki lolenge nini bamama na bango bazalaki kobɛtama.” Bobele bongo, engebene U.S.News & World Report, lisangani ya États-Unis ya makambo matali kobebisama ya bana mike eyebisi ete “bana 2 000, mingi na bango bazali na nsé ya mibu 4, bazali kokufa mbula na mbula na mabɔ́kɔ ya baboti na bango to na mabɔkɔ ya babókoli na bango.” Lapólo yango eyebisi ete motángo yango eleki motángo ya bato oyo bakufaka na likámá ya motuka, na mai, to mpo na kokwea.
Lolenge mosusu ya mobulu kati na libota etaleli konyokola mobalani, mpo na yango tokoki kolobela kotindikama na nzoto, kobɛtama mbata, kotutama na makolo, kofinama na nkingo, kokanelama na mbeli to na mondoki, to ata mpe kobomama. Mpe lelo oyo mobulu motindo wana mozali kosalema na basi mpe na mibali. Bolukiluki moko ekundoli ete kati na makambo ya mobulu oyo mayebisami na ntina na babalani, na likambo moko likoló na makambo minei oyo ebimisaki mobulu, mobali nde abandaki, na moko mosusu mwasi nde abandaki, mpe na oyo etikali libúngá esengeli kokabolama na ngambo nyonso mibale.
Mobulu na esika ya mosala
Mosika na ndako, uta kalakala esika ya mosala etalelamaki lokola epai kuna moto akoki komona makambo mazali kotambwisama na molɔngɔ́, limemya, mpe bonkonde. Kasi emonani ete lelo oyo makambo mazali lisusu bongo te. Na ndakisa, mitángo oyo departemá oyo ekotalaka makambo ya bosembo na États-Unis ebimisaki emonisi ete mbula na mbula, bato 970 000 bazwaka mpasi mpo na mobulu na esika ya mosala. Engebene zulunalo moko (Professional Safety—Journal of the American Society of Safety Engineers), yango elimboli ete “motángo ya mosali moko likoló na minei bakoki kozwa mpasi oyo ebimisamaki mpo na mobulu ya lolenge moko to mosusu na esika ya mosala.”
Likambo oyo eleki kobulunganisa ezali oyo ete mobulu na esika ya mosala esuki te bobele na koswana mpe na kofingana. Lapólo oyo tolobelaki liboso eyebisi lisusu ete: “Mobulu oyo basáli bazali kosala epai na bankóló mosala mpe oyo basáli bazali kosala epai na basáli mosusu etángami kati na molɔngɔ́ ya makambo ya mobulu oyo ezali koboma bato mpe oyo ezali kokóla nokinoki na États-Unis.” Na mobu 1992, matata 1 kati na 6 oyo esalemaki na esika ya mosala ebomaki bato; mpo na basi motángo ezalaki bongo 1 kati na 2. Ntembe ezali te ete bopusi ya mobulu ezali kokóma makasi kati na esika ya mosala, oyo ezalaki kala esika makambo matambolaka na molɔngɔ́.
Mobulu kati na masano mpe kati na kominanola
Masano mpe kominanola esalelamaka lokola myango ya kosepelisa nzoto to ya komipemisa mpo na kozwa lisusu makasi ya kosala misala mosusu ya ntina ya bomoi. Lelo oyo kominanola ezali kokɔtisa bamiliare ya badolare. Mpo na kozwa mosolo mingi koleka kati na mombongo wana, bato oyo babimisaka myango ya kominanola bakakatanaka te mpo na kosalela banzela nyonso oyo bakoki kosalela. Moko na yango ezali bongo mobulu.
Na ndakisa, Forbes, zulunalo moko oyo elobelaka makambo ya mombongo, eyebisaki ete kompanyi moko oyo esalaka masano ya video esalaki lisano moko ya bitumba oyo bato mingi balingaka yango, kati na yango mobundi moko akati motó mpe mokúwa ya mokongo ya monguna na ye wana batáli bazali koyemba ete: “Bomá ye! Bomá ye!” Nzokande, bobele lisano yango esalemaki na motindo mosusu mpo na kompanyi mosusu ya masano ya video, kasi ezalaki na likambo wana ya nsɔ́mɔ kati na yango te. Ebimisaki nini? Motindo ya lisano yango oyo ezalaki na makambo mingi ya mobulu etekisamaki mingi koleka oyo mosusu na motángo ya 3 likoló na 2. Yango ebimisaki mosolo mingi. Na ntango bakaseti ya masano yango oyo masalemaki mpo ete bato bátalaka yango kati na bandako na bango ekómaki kolakisama epai na bato banso, bakompanyi yango ekɔtisaki bamilió 65 ya badolare na mikili mingi na pɔ́sɔ mibale ya liboso! Mpo na kozwa mosolo mingi, mobulu ezalaka mwango mosusu ya kolɛngɔla oyo esalelamaka mpo na kobenda bato mingi.
Mobulu kati na masano ezali mpe likambo mosusu. Basani bamikumisaka mingi mpo na mbeba oyo bakoki kopesa epai na baninga na bango. Na ndakisa, na 1990, na boumeli ya lisano moko ebéngami hockey, bitumbu minene bipesamaki mbala 86—kino lelo motángo mosusu oyo eleki oyo ezali te. Lisano yango ekatamaki na bangonga misato na ndambo mpo ete basani bazalaki kosana na mobulu nyonso. Moko na basani asengelaki kozwa lisalisi ya monganga mpo ete abukanaki mikuwa ya elongi, loposo na ye oyo ezipaka liso ezokakizokaki, mpe azokaki mpótá moko monene. Mpo na nini mobulu motindo boye? Moko na basani alobaki ete: “Soki olóngi mpenza kati na lisano moko ya mayoki, na kobunda mingi mpenza, na ntango okozonga na ndako okomona ete boyokani na yo elongo na baninga na yo ya lisano ekokóma lisusu makasi koleka. Nabanzi ete bitumba bikómisaki yango lisano ya solosolo ya elimo.” Kati na masano mingi oyo esalamaka na mikolo na biso, emonani ete mobulu esili kokóma bobele mwango ya bolóngi te kasi ekómi nde bolóngi yango moko.
Mobulu kati na eteyelo
Eteyelo etalelamaki uta kala lokola esika makasi epai kuna bilenge babosanaka mitungisi na bango mpe bamibanzabanzaka bobele mpo na kokólisa mayele na bango mpe nzoto na bango. Nzokande, lelo oyo, eteyelo ezali lisusu te esika ya kimya mpe ya libateli. Bolukiluki moko esalemaki na 1994 emonisaki ete mobulu mpe bituluku ya bilenge ya mobulu bazali kopesa mokakatano moleki monene kati na biteyelo ya Leta na États-Unis, kosɛngáká bongo kobimisama ya mosolo mingi, yango ezalaki na esika ya liboso mpenza kati na molɔngɔ́ ya mbula elekaki. Lolenge nini ezalela oyo ezali mpenza mabe?
Na motuna oyo etunamaki na boumeli ya bolukiluki yango, “Osilá kozwa mpasi mpo na likambo moko ya mobulu oyo esalemaki kati na eteyelo to zingazinga ya eteyelo?” moyekoli moko likoló na bayekoli minei ayanolaki ete ee. Balakisi mingi mpe bandimaki ete ee. Bolukiluki yango emonisaki ete 13% ya bayekoli, mibali mpe basi, bandimaki ete bamemaki mondoki na eteyelo mbala moko to na mbala mosusu. Mingi na bango balobaki ete basalaki bongo mpo na kobangisa basusu to mpo na komibatela. Kasi moyekoli moko ya mibu 17 abɛtaki molakisi na ye lisasi na ntólo wana molakisi yango alukaki kobotola mondoki na ye.
Mimeseno ya mobulu
Ntembe ezali te ete mobulu mozali bipai binso lelo oyo. Kati na ndako, na mosala, na eteyelo, mpe kati na kominanola, tozali kobika liboso na mimeseno ya mobulu. Lokola bazali kati na yango mokolo na mokolo, mingi bakómi kotalela yango ete ezali mabe te—wana bango moko bakutani na yango naino te. Na ntango bazali kokutana na yango, bazali kotuna ete: Ekosila mokolo mosusu? Yo mpe olingi koyeba eyano na motuna oyo? Na yango, tosɛngi na yo ete otánga lisoló lilandi.