Kozala mama ezali mokumba ya lokumu
MBALA mingi, bato bapesaka mokumba ya mama lokumu te mpe batyolaka yango. Eleki mwa bambula, bato mosusu bakómaki kotyola mosala ya kobɔkɔla bana. Na miso na bango, mosala yango ezalaki na ntina mingi te lokola misala mosusu mpe ezalaki lokola lolenge moko ya boombo. Kasi, bato mingi bakomona ete koloba bongo ezali kolekisa ndelo, mbala mingi bato bamonisaka lokola ete misala ya ndako oyo bamama basalaka mpe kobɔkɔla bana ezali misala oyo ezali na ntina mingi te. Bato mosusu kutu bakanisaka ete longola misala ya ndako, mwasi asengeli kosala mosala mosusu mpo na kokolisa mpenza makoki na ye.
Atako bongo, mibali mingi mpe bana mingi bapesaka mokumba oyo mama azali na yango na libota lokumu. Carlo, oyo asalaka na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Philippines, alobi boye: “Soki nazali awa lelo, ezali mpo na formasyo oyo mama apesaki ngai. Tata azalaki makambo makasi mpe azalaki koumela te na kopesa etumbu, kasi Mama azalaki kolimbolela biso makambo mpe kosalisa biso tókanga ntina. Nasepelaka mingi na lolenge oyo ateyaki ngai.”
Peter, azali na Afrika ya Sudi, akolá na libota ya bana motoba mpe mama na bango atángaki kelasi mingi te. Tata na bango asundolaki libota. Peter alobi boye: “Lokola Mama azalaki mwana ya mosala mpe azalaki kobatela ndako ya bato, bazalaki kofuta ye mbongo mingi te. Ezalaki mpasi mpo afutela biso nyonso kelasi. Mbala mingi, tozalaki kolala nzala. Azalaki kosuka kaka na kofutela ndako. Atako mikakatano wana nyonso ezalaki, Mama alɛmbisaki mabɔkɔ te. Ateyaki biso tómikokanisaka soki moke te na bato mosusu. Soki asalaka makasi te mpo na kokokisa malamu mokumba na ye, mbɛlɛ lelo oyo tozali ndenge tozali te.”
Ahmed, mobali moko ya Nigeria, amonisi ndenge atalelaka lisalisi oyo mwasi na ye apesaka ye mpo na kobɔkɔla bana na bango: “Nasepelaka mingi na oyo mwasi na ngai asalaka. Soki nazali na ndako te, nabangaka eloko te mpo na bana, mpo nayebi ete mama na bango azali. Na esika nakanisa ete mwasi na ngai alingi kobɔtɔla ngai bokonzi, napesaka ye nde matɔndi mpe nayebisaka bana ete basengeli kotosa ye kaka ndenge batosaka ngai.”
Mobali moko ya Palestine akumisi mwasi na ye ete azali mama malamu, na maloba oyo: “Lina asalaka nyonso mpo na mwana na biso mpe asalaka makasi mpo libota na biso emipesa na makambo ya Nzambe. Ndenge namonaka, ezali mateya ya lingomba na ye nde esalisaka ye asalaka bongo.” Lina azali Motatoli ya Yehova mpe alandaka mitinda ya Biblia mpo na koteya mwana na ye.
Wapi mwa ndambo ya mitinda yango? Tokoloba nini mpo na ndenge oyo Biblia etalelaka bamama? Ndenge nini bazalaki kopesa bamama lokumu mpe komemya bango na ntango ya kala, mpo na mateya oyo bazalaki koteya bana na bango?
Ndenge malamu ya kotalela bamama
Ntango Nzambe asalaki mwasi, apesaki ye mokumba ya lokumu na kati ya libota. Mokanda ya liboso ya Biblia elobi boye: “[Yehova] Nzambe alobaki ete, ezali malamu te ete moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi mobongi na ye.” (Genese 2:18) Na yango, mwasi ya liboso, Eva, asalemaki mpo azala mosungi ya Adama to ndambo na ye. Azalaki mpenza mosungi oyo abongaki na ye. Asengelaki kosangana na kokokisa mokano ya Nzambe mpo na bango: kobota bana, kobɔkɔla bango, kobatela mabelé mpe banyama. Ye ná Adama basengelaki kopesana mayele mpe kopesana mabɔkɔ, ndenge baninga ya motema basalaka. Kanisá esengo oyo Adama azalaki na yango ntango Mozalisi apesaki ye likabo wana kitoko!—Genese 1:26-28; 2:23.
Na nsima, Nzambe apesaki malako mpo na ndenge ya kotalela basi. Na ndakisa, esengelaki kopesa bamama ya Yisalaele lokumu, kasi komona bango mpamba te. Soki mwana mobali “alakeli tata na ye to mama na ye mabe,” asengelaki kozwa etumbu ya liwa. Bilenge baklisto basengelaki ‘kotosa baboti na bango.’—Levitike 19:3; 20:9; Baefese 6:1; Deteronome 5:16; 27:16; Masese 30:17.
Mama asengelaki koteya bana na ye, ezala ya mibali to ya basi, na kolanda malako ya mobali na ye. Mwana mobali asengelaki ‘kolongwa na mobeko ya mama na ye te.’ (Masese 6:20) Lisusu, Masese mokapo 31 ezali na “toli ya kilo oyo mama na ye [Mokonzi Lemuele] apesaki ye mpo na kosembola ye.” Apesaki mwana na ye toli ya bwanya mpo na kopekisa ye komɛla mingi masanga ya makasi, alobaki boye: “Ebongi te bakonzi bámɛla vinyo to bankumu ya mboka báloba ete: ‘Wapi masanga oyo elangwisaka?’ noki te bámɛla mpe bábosana mibeko mpe bákata malamu te likambo ya moko na bana ya mpasi.”—Masese 31:1, 4, 5, NW.
Longola yango, elenge mobali nyonso oyo azali kokana kobala akomonisa ete azali na bwanya soki ataleli makambo oyo mama ya Mokonzi Lemuele alobaki mpo na “mwasi ya motema malamu.” Mama yango alobaki ete: “[Mwasi yango] aleki mabanga ya penini na motuya.” Lisusu, nsima ya kolobela makambo oyo mwasi ya ndenge wana asalaka mpo na libota na ye, mama ya mokonzi alobi boye: “Bonzenga ekozimbisa mpe kitoko ezali mpamba, nde mwasi oyo atosaka [Yehova], ye akosanzolama.” (Masese 31:10-31) Emonani polele ete Mozalisi asalá basi mpo bázala na esika ya lokumu mpe na mokumba monene na kati ya libota.
Na lisangá ya boklisto, bapesaka mpe basi ná bamama lokumu mpe basepelaka na bango mingi. Baefese 5:25 elobi ete: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino.” Bapesaki elenge Timote, oyo mama na ye mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi bateyaki ye kotosa “makomi mosantu,” toli oyo epemami: “Bondelá . . . basi oyo bazali mikóló lokola bamama.” (2 Timote 3:15; 1 Timote 5:1, 2) Yango wana, mobali asengeli kozala na limemya mpo na mwasi oyo azali mokóló, kotalela ye lokola mama na ye. Kozanga ntembe, Nzambe azwaka basi na motuya mingi mpe apesaka bango lokumu mingi.
Monisá botɔndi na yo
Mobali moko oyo akolá na esika oyo batalelaka basi lokola bato mpamba, alobi boye: “Bateyaki ngai ete mobali azali mokonzi, mpe namonaki ndenge bazalaki konyokola basi mpe kosalela bango makambo kozanga limemya. Na yango, nasengeli kosala makasi mpo na kotalela mwasi ndenge Mozalisi atalelaka ye: lokola mosungi, moninga mpe mosalani na mosala ya kobɔkɔla bana. Atako nakokaka te koloba na mwasi na ngai mwa maloba ya kokumisa ye, nayebi ete soki bana na ngai bazali kokola malamu, ezali mpo na mosala makasi oyo mwasi na ngai asalaka.”
Ya solo, bamama oyo bakokisaka mokumba na bango ya koteya bana na bango basengeli mpenza kosepela na mosala na bango. Ezali mosala moko ya ntina mingi. Babongi mpenza kozwa longonya mpe matɔndi oyo euti na motema. Toyekolaka makambo mingi epai ya bamama: mimeseno oyo ekosalisa biso bomoi na biso mobimba, bizaleli malamu oyo ezali na ntina mingi mpo na kofanda malamu na bato, mpe mbala mingi bateyaka bilenge bizaleli oyo ebongi mpe makambo ya elimo oyo esalisaka bango bátambola na nzela ya malamu. Na mikolo oyo, oyebisaki mama na yo ete ozali na botɔndi mingi mpo na nyonso oyo asalá mpo na yo?
[Elilingi na lokasa 9]
Mama ya Peter ateyaki ye alɛmbisaka mabɔkɔ te
[Elilingi na lokasa 10]
Ahmed asepelaka mingi ndenge mwasi na ye asalisaka ye mpo na kobɔkɔla bana na bango malamu
[Elilingi na lokasa 10]
Mobali ya Lina alobaka ete soki mwana na bango ya mwasi azali na bizaleli malamu, ezali mpo na mateya ya lingomba ya mwasi na ye