‘Nakopumbwa lokola mboloko’
LISOLO YA FRANCESCO ABBATEMARCO
“Mpo na nini Nzambe atikaki likambo ya boye esalema? Mpo na nini kaka ngai?” Nazalaki komituna mituna wana mbala mingi. Kotikala bomoi na ngai mobimba na velo ya bibɔsɔnɔ kozanga ete nasalela mabɔkɔ mpe makolo na ngai, ezalaki kosala ngai mpasi mingi.
NABOTAMÁ na 1962, na mboka moko moke ya etúká ya Basilicate, na Italie. Kasi, nalingaki kokufa kaka mokolo oyo nabotamaki. Mama abotaki ngai na mpasi, mpe monganga apesaki ngai ntonga oyo ebendelaki ngai mindɔndɔ. Mikolo misato nsima ya kopesa ngai ntonga yango, nzoto na ngai mobimba ebandaki kolɛnga. Nazalaki lisusu kokoka koningisa mabɔkɔ mpe makolo te mpe mongongo na ngai ebebaki.
Ntango nazalaki kokola, likambo yango ekómaki kotungisa ngai mingi. Nakómaki nkandankanda mpe mbala mingi nazalaki kofinga bato. Nazalaki komona ete nazali na ntina te na mokili. Ntango nakokisaki mbula 25 nalɛmbaki mpenza na makanisi mpe ata likambo moke ekómaki kosala ngai mpasi na motema. Lokola nayebaki te mpo na nini Nzambe atikaki nanyokwama, yango etindaki ngai nakóma na makanisi ete Nzambe azalaka te.
Nabongoli makanisi
Mokolo moko na 1987, nafandaki na velo na ngai ya bibɔsɔnɔ na libándá, namonaki bilenge mibali mibale balati kitoko bazali koya esika nazalaki. Lokola nakanisaki ete balingi kosolola na ndeko na ngai, nayebisaki bango ete ndeko na ngai azali te, atako nazalaki na mokakatano ya koloba. Kasi, bango bazongiselaki ngai ete “Tolingi nde kosolola na yo.” Likambo yango ekamwisaki ngai mpo bato bazalaki kokipe ngai mpenza te.
Batunaki ngai ete: “Ondimaka ete Nzambe azalaka?” Nazongiselaki bango na nkanda nyonso ete “ndenge nazali boye, nakoki kondima ete Nzambe azalaka?” Tobandaki kosolola, mpe nayaki koyeba ete bazali Batatoli ya Yehova. Bapesaki ngai buku La vie: Comment est-elle apparue? Évolution ou création?a Nazwaki yango na mitema mibale. Bayebisaki ngai ete bakoya lisusu. Nakanisaki ete bakoya lisusu te.
Batatoli yango bayaki lisusu ndenge balakaki ngai, mpe tokobaki lisolo na biso. Nazali kokanisa lisusu vɛrsɛ oyo batángelaki ngai, Yisaya 35:5, 6: “Bongo miso ya bakufeli miso makofungolama, mpe matoi ya bimimi makozipolama; bongo, motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya ebubu ekoyemba na esengo.” Maloba yango ezalaki malamu, kasi ezalaki na boyokani ata moke te na bomoi na ngai. Nazalaki kokoka ata kotɛlɛma te, ndenge nini nakokaki kopumbwa lokola mboloko? Atako bongo nandimaki tóyekolaka Biblia na bango, kasi nandimaki te ete Biblia ekokaki kosalisa ngai na ntango wana. Nandimaki mpe te ete mokolo mosusu nakozala lisusu ebɔsɔnɔ te.
Mokolo moko, Batatoli yango babengisaki ngai na makita na Ndako ya Bokonzi. Nabosaná motó ya likambo ya lisukulu oyo esalemaki mokolo yango, kasi nabosanaka te bolingo oyo Batatoli bamoniselaki ngai. Balukaki ete namiyoka malamu na kati na bango, kasi te namona ete bazali koyokela ngai mawa. Mokolo yango nayebaki ete esika na ngai ezali nde na Ndako ya Bokonzi, mpe nakómaki koyangana na makita nyonso.
Mokakatano oyo nasengelaki kolonga
Boyekoli ya Liloba ya Nzambe ebongolaki mpenza motema na ngai. Ezalaki lokola nde nzete moko oyo ekaukaki ebandi lisusu kobota. Motema na ngai ekómaki na esengo oyo kala nazalaki na yango te. Nazalaki koyoka lokola nde nazongi na bomoi! Nakómaki na mposa ya koyebisa basusu makambo kitoko oyo nazalaki koyekola. (Matai 24:14) Kasi, ndenge nini nakokaki kobanda kosakola? Nabondelaki mpenza Yehova, nasɛngaki ye alakisa ngai ndenge ya kosala yango.
Na Sɛtɛmbɛ 1991, batindaki mobongisi-nzela moko na lisangá na biso. Mokolo moko ntango tozalaki na ndako na ye, nayebisaki ye ete nazali na mposa nasakolaka. Nazalaki koloba malamu te, na yango tozwaki likanisi nabanda kokoma mikanda na masini. Kasi, nakokaki kosala yango te na mabɔkɔ na ngai. Mobongisi-nzela yango asalisaki ngai nameka mayele ndenge na ndenge. Namekaki kokanga kilio na mino mpe kosalela yango mpo na kobɛta masini. Na nsima, alatisaki ngai ekɔti mpe akangisaki mwa nzete na ekɔti yango mpe nazalaki kosalela motó na ngai mpo na kobɛta masini na nzete yango. Kasi, nyonso wana esimbaki kaka te.
Na nsima, ntango tozalaki kosolola, mobongisi-nzela yango asakanisaki ngai; alobaki na ngai ete: “Ozali na zolo kitoko.” Mbala moko, namekaki kobɛta masini na zolo na ngai mpe esimbaki. Nsukansuka, nakómaki kosalela zolo na ngai mpo na kokoma na masini. Kanisá naino mosala oyo ezalaki kosɛnga ngai mpo na kobongisa bisika oyo nasali mabunga! Na yango, tomonaki ete soki nasaleli ordinatɛrɛ, ekosɛnga ngai mosala mingi te. Kasi, nakokaki kozwa mbongo wapi mpo na kosomba ordinatɛrɛ? Nalukaki ntango ya malamu mpo na koyebisa baboti na ngai likambo yango. Mwa moke na nsima, nakómaki kosalela ordinatɛrɛ mpo na kokoma mikanda mpo na koteya bato.
Mposa na ngai ekokisami
Nabandaki liboso kokomela baninga mpe bandeko na ngai, na nsima nakomelaki bato mosusu oyo bazalaki kofanda na engumba na biso mpe na bingumba mosusu ya pembeni. Eumelaki te, nakómaki kokomana na bato oyo bazalaki kofanda na bisika ndenge na ndenge ya Italie. Maloba ezali te mpo na kolobela esengo oyo nazalaki koyoka ntango nyonso oyo nazwi eyano na mokanda moko oyo natindelaki moto. Na 1991, na sanza ya Desɛmbɛ, nakómaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Nakómaki mpe kosala masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, eteyelo oyo esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ na masangá ya Batatoli ya Yehova. Soki bapesi ngai lisolo, nazalaki kosalela ordinatɛrɛ mpo na kobongisa yango malamu. Ntango nazalaki kokóma na makita, nazalaki kopesa papye oyo nabɛtaki na ordinatɛrɛ na moninga moko mpe ye azalaki komata na estrade mpo na kotánga makambo oyo nabongisi.
Lokola nazalaki ntango nyonso na botɔndi mpo na bolingo oyo Yehova azalaki komonisela ngai, nayebaki ete likambo oyo nasɛngelaki kosala na nsima ezalaki komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo. Na mpiko nyonso nayebisaki ekateli yango na baboti na ngai. Basepelaki te, kasi lokola nazalaki na mposa makasi ya kozwa batisimo, yango elongolaki ngai kobanga nyonso. Yehova asungaki ngai mpe baninga mosusu na kati ya lisangá balendisaki ngai, yango wana nazwaki batisimo na Augusto 1992. Nazalaki na esengo mingi na ndenge yaya na ngai ná mwasi na ye bayaki na batisimo na ngai.
Ndenge mosusu ya kotalela makambo
Wana nakómaki kokanga ntina ya mitinda ya Liloba ya Nzambe, namonaki ete nasengeli kolongola bizaleli ya mabe. Namonaki ete mokakatano na ngai ya nzoto esalaki ete nazala na moimi mingi mpe natalelaka kaka bamposa na ngai moko. Nasengelaki kosala makasi mpo natika bizaleli wana. Nasengelaki mpe kozala na komikitisa mpo nandimaka ete basusu básunga ngai.
Nasalaki mpe makasi mpo natika ezaleli ya kozala mawamawa mpe natika kokanisaka ete nazali na libabe. Nakómaki mpe koyeba kosɛka makambo mosusu. Mokolo moko ntango tozalaki kosakola ndako na ndako, tobɛtaki na ndako moko mpe mwana moko ayaki kofungola porte. Moko ya bandeko oyo nabimaki na bango atunaki mwana yango soki baboti na ye bazali. Mwana yango agangaki ete: “Mama, bato mibale mpe moto moko ya maladi bazali koluka yo.” Ntango mama ya mwana yango ayaki ayokaki nsɔni mpo na ndenge mwana na ye alobaki, mpe azangaki maloba. Kasi, moninga moko oyo tozalaki na ye alobaki ete: “Te, ezali nde bato mibale ya maladi mpe moto moko oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ nde bazali koluka yo.” Biso nyonso tosɛkaki mpe na nsima tosololaki malamu na mwasi yango.
Mposa na ngai ya kosala mingi
Nsima ya kozwa batisimo, nasalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya sanza libwa, nazalaki kolekisa ngonga 60 sanza nyonso na mosala ya kosakola. Kasi, mposa na ngai ezalaki nasala mingi lisusu. Eumelaki te nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, nakómaki kolekisa ngonga mingi lisusu na mosala ya kosakola. Basanza ya liboso ezalaki pɛtɛɛ te. Bato mingi bazalaki kokanisa ete nayei na ndako na bango mpo na kosɛnga mbongo, mpe yango ezalaki kopesa ngai mpe Batatoli oyo nazalaki kobima na bango nsɔni.
Lisusu, bandeko mingi na lisangá bazalaki koyoka te soki nazali koloba mpe bazalaki koyeba te ndenge nini bakoki kosalisa ngai. Kasi, na lisalisi ya Yehova mpe ya bandeko na lisangá, makambo ebongaki mokemoke. Lelo oyo bato bayebi ete nazali Motatoli ya Yehova mpe nasalaka makasi mpo na kosalisa bato mosusu báyeba mikano ya Nzambe; batalelaka ngai lisusu te lokola moto moko oyo atambolaka na velo ya bibɔsɔnɔ.
Na sanza ya Yuli 1994, nazwaki libaku ya kokɔta na Eteyelo mpo na babongisi-nzela. Kuna, na boumeli ya pɔsɔ mibale, toyekolaki mitinda ya Biblia oyo tosengeli kolanda na mosala ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. Toyekolaki mpe ndenge ya kosakola. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo nakendaka na eteyelo yango mpo kilomɛtrɛ 60 ekabolaki esika oyo eteyelo ezalaki na esika oyo nazalaki kofanda. Nakokaki mpe kolala esika mosusu te; yango wana, bandeko babongisaki ete mokomoko na bango ayaka kozwa ngai na ntɔngɔ mpo na komema ngai na eteyelo mpe kozongisa ngai na mpokwa. Na ntango ya bolei, moko azalaki komema ngai na etaze ya mibale esika bana-kelasi nyonso bazalaki kolya.
Mokumba monene
Na sanza ya Marsi 2003, nakómaki nkulutu. Mokumba yango esɛngaka ete nasala mingi mpo na basusu. Lelo oyo, nasili mpenza kokanga ntina ya maloba ya Yesu ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Nazali kosala elongo na bankulutu mosusu oyo batondi na boboto mpe basalisaka ngai mpo nakokisaka malamu mokumba na ngai ya nkulutu. Bandeko nyonso ya lisangá na biso basepelaka na ngai, mingimingi bilenge, mpe bazangisaka te kokɔtisa ngai na makambo oyo bazali kosala. Bayebi mikakatano oyo nalongá mpo na kosalela Yehova, mpe mingi basɛngaka ngai toli mpo na kolonga mikakatano na bango.
Sikoyo nayebi ete mpo moto azala na esengo ezali kosɛnga kaka te azala nzoto kolɔngɔnɔ. Kasi, likambo oyo eleki ntina ezali nde kondimama na Yehova mpe kosala mokano na ye. Nazali kotɔnda ye mingimingi mpo na elikya oyo apesi ngai ete mosika te nakotambola lisusu na velo ya bibɔsɔnɔ te. Nazali kozela na motema moko mokolo oyo ‘nakopumbwa lokola mboloko’ mpe nakosalela Yehova mpo na libela.—Yisaya 35:5, 6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
Lelo oyo bato bayebi ete nazali Motatoli ya Yehova oyo asalaka makasi mpo na kosalisa bato mosusu báyeba mikano ya Nzambe; Kasi te lokola moto kaka oyo atambolaka na velo ya bibɔsɔnɔ
[Elilingi na lokasa 21]
Nazali kosalela zolo mpo na kokoma na ordinatɛrɛ mpo na kobongisa makita