Mikolo ya nsuka—Ntango nini?
ZULUNALO moko (Sky & Telescope) elobi boye: “Nsima ya mbula soki miliare moko, mabelé ekokóma esika moko ekauká, ya polele mpe ya mpamba. Tondimi te ete bikelamu ya bomoi ekozala kaka.” Mpo na nini? Zulunalo mosusu (Astronomy) elobi boye: “Lokola moi ekoleka makasi, ekotɔkisa mai ya mbu mpe ekokaukisa mabelé nyonso.” Ebakisi boye: “Likambo yango ya nsɔmɔ ezali makanisi mpamba te, ekokómela biso mpenza.”
Nzokande, Biblia elobi boye: “Yo [Nzambe] otɛmisaki mokili likoló na moboko na yango ete yango eningana libela na libela te.” (Nzembo 104:5) Ya solo, Mozalisi ya mabelé azali mpe na makoki ya kobatela yango. Kutu, “asalaki yango . . . ete bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Kasi, akanaki te ete bato oyo bakofanda wana bázala bato mabe mpe bákufaka. Nzambe atye ntango oyo akozongisa boyangeli na ye na nzela ya Bokonzi oyo Danyele 2:44 elobeli.
Yesu asakolaki Bokonzi ya Nzambe. Alobaki ete ekozala na ntango moko oyo bikólo mpe bato bakosambisama. Alobelaki bolɔzi moko monene oyo ekoleka bolɔzi mosusu nyonso esalemá na mokili. Apesaki mpe elembo oyo ekomonisa ete nsuka ya mokili ekómi pene.—Matai 9:35; Malako 13:19; Luka 21:7-11; Yoane 12:31.
Makambo yango ebendaki likebi ya bato mingi mpamba te Yesu, moto oyo ayebani mingi, nde alobaki yango. Makambo yango esengelaki kosalema ntango nini? Bato mosusu bayekolaki bisakweli mpe badati ya Biblia mpo na koyeba ntango mpenza oyo nsuka ekoya. Moko na bato yango ezali Isaac Newton, moto moko ya mayele na matematiki oyo azalaki na bomoi na ekeke ya 17.
Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Ezali likambo na bino te koyeba bantango mpe bileko oyo Tata atye na nse ya bokonzi na ye moko.” (Misala 1:7) Lisusu, ntango Yesu apesaki “elembo ya kozala na [ye] mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” alobaki mpe boye: “Na oyo etali mokolo yango mpe ngonga yango moto moko te ayebi, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata ye moko.” (Matai 24:3, 36) Bongo, nsima ya kokokanisa kobomama ya mokili na ntango ya Noa mpe kobomama oyo esengelaki kosalema na eleko ya “kozala ya Mwana ya moto,” Yesu alobaki boye: “Na yango, bókɛngɛlaka mpo boyebi te na mokolo nini Nkolo na bino akoya.”—Matai 24:39, 42.
Na yango, atako Yesu ayebisi biso te mokolo oyo nsuka ya “ebongiseli ya makambo ya ntango oyo” ekoya, “elembo” oyo apesaki esengeli kosalisa biso tósosola ete tozali na eleko oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1) Esengeli kozala ntango ya ‘kolala mpɔngi te’ mpo ‘tólonga kokima makambo nyonso oyo esengeli koya.’—Luka 21:36.
Liboso Yesu alobela elembo yango, alobaki boye: “Bókeba mpo bóbungisama nzela te; mpo mingi bakoya na nkombo na ngai, kolobáká ete, ‘Ngai nazali ye,’ mpe ete, ‘Ntango yango ekómi pene.’ Bólanda bango te. Lisusu, ntango bokoyoka lokito ya bitumba mpe ya makambo ya mobulumobulu, bózala na nsɔmɔ te. Mpo makambo wana esengeli kobima liboso, kasi nsuka ekoya na mbala moko te.”—Luka 21:8, 9.
Elembo ezali nini?
Mpo na komonisa biso makambo oyo esengelaki komonana na mikolo ya nsuka, Yesu alobaki boye: “Ekólo ekotombokela ekólo, mpe bokonzi ekotombokela bokonzi; mpe koningana minene ya mabelé ekozala, mpe epai na epai bamaladi mabe mpe kozanga ya bilei ekozala; makambo ya nsɔmɔ ekomonana mpe uta na likoló bilembo minene.” (Luka 21:10, 11) Yesu alobaki lisusu boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Makambo oyo Yesu alobelaki—bitumba, koningana ya mabelé, bamaladi, kozanga bilei—ezali makambo ya sika te. Makambo yango esalemaka banda na ebandeli ya mokili. Bokeseni ezali ete makambo yango esengelaki kosalema na mbala moko, na eleko moko.
Omituna boye, ‘Ntango nini makambo oyo Baevanzile elobeli esalemaki na eleko moko?’ Kobanda 1914, bitumba ya mokili mobimba ezali kosalema; koningana makasi ya mabelé oyo ebimisi makambo mosusu na ndakisa tsunamis; bamaladi ndenge na ndenge oyo ezali koboma ebele ya bato, na ndakisa malaria, grippe, mpe sida; bamilio ya bato bazali kokufa mpo na kozanga bilei; bato ya mokili mobimba bazali kobanga makambo ya bateroriste mpe bibundeli oyo ebomaka ebele ya bato na mbala moko; mpe Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba. Makambo yango nyonso ezali kosalema ndenge Yesu asakolaki yango.
Longola yango, ntoma Paulo mpe akomaki boye: “Yebá likambo oyo, ete na mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, batuki, bato bazangi botosi epai ya baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, bato oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo, bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe, bazali na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango.” (2 Timote 3:1-5) Ya solo, na “bantango ya ndenge mosusu,” makambo lokola bobuki-mibeko, ezaleli ya kotyola Nzambe, koboma bato, mpe moimi, esengelaki komonana na mokili mobimba.a
Ekoki nde kozala ete “mikolo ya nsuka,” oyo ekozala liboso mokili ebomama eyei naino te? Ezali nde na likambo mosusu oyo esengelaki komonisa ebandeli ya mikolo ya nsuka?
“Ntango ya nsuka” esengelaki kobanda ntango nini?
Nsima ya kozwa emonaneli ya makambo oyo esengelaki kosalema bambula mingi na nsima, bayebisaki mosakoli Danyele boye: “Na ntango yango [“ntango ya nsuka” oyo Danyele 11:40 elobeli] Mikaele [ Yesu Klisto], mokonzi monene oyo [azali] mobateli ya bato na yo, akotɛlɛma.” (Danyele 12:1) Mikaele akosala nini?
Mokanda ya Emoniseli elobeli ntango oyo Mikaele asengelaki kosala mosala na ye lokola Mokonzi. Elobi boye: “Etumba ebimaki na likoló: Mikaele mpe baanzelu na ye babundaki ná dalagona, mpe dalagona mpe baanzelu na ye babundaki, kasi alongaki te, mpe esika ezalaki lisusu te mpo na bango na likoló. Bongo dalagona yango ya monene abwakamaki na nse, ye nyoka ya ebandeli, oyo abengami Zabolo mpe Satana, oyo azali kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela; abwakamaki na mabelé, mpe baanzelu na ye babwakamaki na nse elongo na ye. Yango wana bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bozali kofanda na likoló! Mawa na mabelé mpe na mbu, mpamba te Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.”—Emoniseli 12:7-9, 12.
Boyekoli ya badati ya Biblia emonisi ete etumba yango, oyo nsima na yango Satana ná bademo na ye basengelaki kobwakama na mabelé, esengelaki komema mawa makasi na mabelé mpo ete Zabolo asengelaki kozala na nkanda lokola ayebi ete atikali na ntango mokuse mpo na koyangela mabelé. Nkanda na ye esengelaki kokóma makasi na boumeli ya mikolo ya nsuka tii ntango akolongama na etumba ya Armagedona.—Emoniseli 16:14, 16; 19:11, 15; 20:1-3.
Nsima ya kolobela etumba wana oyo esengelaki kosalema na likoló, ntoma Yoane alobaki boye: “Nayokaki mongongo moko ya makasi na kati ya likoló elobi ete: ‘Sikoyo lobiko mpe nguya mpe bokonzi ya Nzambe na biso mpe bokonzi ya Klisto na ye eyei, mpamba te mofundi ya bandeko na biso abwakami na nse, oyo afundaka bango butu moi liboso ya Nzambe na biso!’” (Emoniseli 12:10) Omoni ete vɛrsɛ yango elobeli kotyama ya Bokonzi ya Klisto? Ya solo, Bokonzi yango ya likoló ebandaki koyangela na 1914.b Nzokande, ndenge Nzembo 110:2 emonisi yango, Yesu asengelaki koyangela “kati ya bayini na [ye]” tii ntango oyo Bokonzi yango elingaki koyangela mabelé mobimba ndenge ezalaki koyangela na likoló.—Matai 6:10.
Lisusu, anzelu oyo amonisaki Danyele makambo yango alobaki mpe boye: “Nde yo, Danyele, zipá maloba mpe kangá mokanda na elembo, kino [ntango, NW] ya nsuka. Bato mingi bakopota bipai na bipai, mpe boyebi ekofuluka.” (Danyele 12:4) Yango mpe emonisi ete tozali lelo oyo na “ntango ya nsuka.” Ndimbola ya bisakweli yango eyebani polele lelo oyo mpe ezali kosakolama na mokili mobimba.c
“Mikolo ya nsuka” ekosila ntango nini?
Biblia eyebisi te ntango boni mikolo ya nsuka ekoumela. Kasi na mikolo ya nsuka, makambo ya mokili ekokoba kobeba wana ntango ya Satana ezali se kokóma mokuse. Ntoma Paulo alobaki ete “bato mabe mpe bakosi bakokende lisusu mosika na kati ya mabe, kobungisáká bato nzela mpe kobungisamáká.” (2 Timote 3:13) Lisusu, ntango Yesu azalaki kolobela makambo oyo esengelaki koya, alobaki boye: “Mikolo yango ekozala mikolo ya bolɔzi moko oyo esalemá naino boye te banda ebandeli ya bozalisi oyo Nzambe azalisaki tii na ntango wana, mpe ekosalema lisusu te. Kutu, soki Yehova ayeisaki mikolo yango mokuse te, mosuni ata moko te elingaki kobika. Kasi mpo na baponami oyo ye aponá ayeisá mikolo yango mokuse.”—Malako 13:19, 20.
Makambo mosusu oyo esengeli koya ezali ‘bolɔzi monene,’ oyo ekomema na etumba ya Armagedona, mpe kokangama ya Satana ná bademo na ye mpo bákoka kozimbisa lisusu bato te. (Matai 24:21) “Nzambe, oyo akoki te kobuka lokuta,” alaki biso ete makambo yango nyonso ekosalema. (Tito 1:2) Armagedona mpe kokangama ya Satana ekozala mosala ya Nzambe.
Ntoma Paulo apemamaki mpo na koloba makambo oyo esengelaki kosalema liboso Nzambe aboma mokili oyo mabe. Na oyo etali “bantango mpe bileko,” akomaki boye: “Mokolo ya Yehova ekoya mpenzampenza lokola moyibi na butu. Na ntango oyo bakoloba: ‘Kimya mpe kobatelama!’ na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko ndenge mpasi ya kobota eyelaka mwasi ya zemi; mpe bakokima soki moke te.” (1 Batesaloniki 5:1-3) Biblia eyebisi te likambo oyo ekotinda bato báloba ete “kimya mpe kobatelama,” mpe ekoyebana kaka na mikolo ekoya; kasi, likambo yango ekopekisa te koya ya mokolo ya kosambisa ya Yehova.d
Soki tozali mpenza na kondima ete bisakweli yango ezali kokokisama, tosengeli kokanga mabɔkɔ te. Tosengeli kosala nini? Petelo alobi boye: “Lokola biloko nyonso wana esengeli kosilela bongo, bosengeli kozala bato ya ndenge nini na misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kozeláká mpe kobateláká na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova!” (2 Petelo 3:11, 12) Kasi, okoki komituna boye, ‘Yango ezali na ntina nini mpo na ngai?’ Lisolo oyo elandi ekoyanola motuna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na “mikolo ya nsuka,” talá Lamuká! ya Aprili 2007, nkasa 8-10 (ebimeli ya Lifalanse), mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Sɛtɛmbɛ 2006, nkasa 4-7, mpe ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 2005, nkasa 4-7, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Mpo na koyeba makambo mosusu etali boyekoli ya badati ya Biblia, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? nkasa 215-218, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Talá buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! mpe Annuaire des Témoins de Jéhovah 2008, nkasa 31-39, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
d Talá buku Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi! (ebimeli ya 2006), nkasa 250-251, paragrafe 13 mpe 14.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Yesu alobaki ete kaka Nzambe nde ayebi “Mokolo yango mpe ngonga yango”
[Elilingi na lokasa 4]
Isaac Newton
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© A. H. C./age fotostock
[Bililingi na lokasa 7]
Elembo oyo Yesu apesaki ezali komonana polele kobanda 1914
[Eutelo ya bafɔtɔs]
© Heidi Bradner/Panos Pictures
© Paul Smith/Panos Pictures