Eteni 9
Ndenge nini toyebi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka”
1, 2. Ndenge nini tokoki koyeba ete tozali kobika na mikolo ya nsuka?
NDENGE nini tokoki kondimisama ete tozali kobika na eleko oyo Bokonzi na Nzambe ekobebisa boyangeli ya bato ya ntango oyo? Ndenge nini tokoki koyeba ete tokómi mpenza pene na ntango oyo Nzambe akotya nsuka na mabe mpe na mpasi nyonso?
2 Bayekoli na Yesu Klisto balukaki koyeba makambo yango. Batunaki ye “elembo” ya koya na ye kati na nguya ya Bokonzi mpe oyo “ya nsuka na biloko ya ntango oyo.” (Matai 24:3, MN) Yesu ayanolaki na kotangáká makambo oyo masengelaki kobulunganisa mokili mpe makambo oyo masengelaki kobakisama na yango mpo na komonisa ete mokili ekómi pene na “ntango ya nsuka,” na “mikolo ya nsuka” na biloko ya ntango oyo. (Danyele 11:40; 2 Timoté 3:1) Tosili komona elembo yango na ekeke ya ntuku mibale? Ee, tosili komona yango, mpe na koleka mpenza.
Bitumba ya mokili mobimba
3, 4. Bitumba ya ekeke oyo bikokani na esakweli na Yesu kati na makambo nini?
3 Yesu asakolaki ete: “Libota moko likotɛmɛla libota mosusu, mpe bokonzi moko bokotɛmɛla bokonzi mosusu.” (Matai 24:7, MN) Na 1914, mokili mokɔtaki na bitumba oyo bimemaki mabota mpe bikonzi na etumba monene oyo esalemaki naino te. Yango wana, bakomi na makambo na kala babéngi yango ete Etumba Monene. Ezali etumba ya liboso esalemi motindo oyo kati na Lisoló na bato, etumba ya liboso ya mokili mobimba. Pene na basodá mpe basivile 20 000 000 bakufaki, koleka na bitumba nyonso bisalemaki liboso.
4 Etumba ya Liboso ya mokili mobimba emonisaki ebandeli ya mikolo ya nsuka. Yesu alobaki ete yango mpe makambo mosusu, ekozala “ebandeli na mpasi.” (Matai 24:8, MN) Yango ekokanaki mpamba te Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebomaki lisusu bato mingi koleka, soko basodá mpe basivile 50 000 000 bakufaki. Na ekeke oyo ya ntuku mibale, koleka bato 100 000 000 babomamaki na bitumba, mbala minei koleka mibu 400 oyo mizalaki liboso mpenza! Oyo nde mbébá monene mpo na boyangeli ya bato!
Bilembeteli mosusu
5-7. Yebisa mwa bilembeteli mosusu bimonisi ete tozali kobika na mikolo ya nsuka?
5 Yesu ayebisaki makambo mosusu oyo masengelaki komonana na mikolo ya nsuka, ete: “Koningana na mabelé ekozala mingi; maladi mpe nzala ekozala esika moko nsima na mosusu.” (Luka 21:11, MN) Yango ekokani na makambo oyo mazali kosalema uta 1914, awa mpasi euti na makambo na mawa mingi ezali sé kobakisama.
6 Koningana monene na mabelé oyo ekosalemaka mbala na mbala, esili koboma ebele na bato. Bobele maladi oyo babéngi yango ete grippe espagnole, ebomaki soko bato 20 000 000 nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba—mingi bakanisi ete ebomaki bato 30 000 000 to mpe koleka. SIDA esili koboma bankámá mingi na bato mpe ekoki koboma bamilió na bato mosusu na mikolo mizali koya. Mbula na mbula, bamilió na bato bazali kokufa mpo na bokono ya motema, cancer mpe bamaladi mosusu. Bamilió mosusu bazali kokufa mokemoke mpo na nzala. Ntembe ezali te ete ‘bafandi na mpunda ya Emoniseli’ bazali kotambola elongo na bitumba na bango, na nzala, na bamaladi oyo ezali kopalangana mingi mpenza epai na libota ya bato uta 1914.—Emoniseli 6:3-8.
7 Yesu asakolaki lisusu bokóli ya mabe oyo ezali komonana na mikili nyonso. Alobaki ete: “Lokola kotyola mibeko ekobakisama, bolingo na bato mingi ekolɛmba.”—Matai 24:12, MN.
8. Esakweli ya 2 Timoté mokapo 3 ekokani na eleko na biso kati na makambo nini?
8 Lisusu, Biblia esakolaki na ntina na bizaleli mabe oyo bizali lelo komonana bipai nyonso kati na mokili: “Kasi osengeli koyeba ete, na mikolo ya nsuka, ekozala na ntango na mpasi mpe mikakatano. Mpo ete bato bakomilinga bango moko, baninga na mosolo, bamikumisi na bango mpenza, bato na lolendo, batuki, bato bazangi kotósa baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi sembo, bato bazangi bolingo, bato na mitó makasi, batɔngi, bato bazangi komipekisa, babomi, bato baboyi makambo malamu, bakosi, bato na nkɔ, bato bavimbi [na lolendo], bato balingi bisengo koleka Nzambe, bato bazali komonisa motindo na ezaleli ya kobanga Nzambe, nde batyoli nguya na yango. . . . Bato mabe mpe bakosi bakokóla ntango nyonso mpo na kosala mabe mingi.” (2 Timoté 3:1-13, MN) Nyonso wana ezali mpenza komonana na miso na biso.
Likambo mosusu
9. Likambo nini lisalemaki na likoló wana mikolo ya nsuka mibandaki awa na mabelé?
9 Ezali na likambo mosusu oyo libimisi bokóli monene ya mpasi na eleko oyo. Na boyokani na ebandeli ya mikolo ya nsuka na 1914, likambo moko lisengelaki kotya bato kati na likámá monene. Na ntango yango, lokola eyebisami na esakweli moko ezwami na mokanda ya nsuka ya Biblia, ete: “Etumba ebimaki kati na likoló; Mikaele [Klisto oyo asili kokembisama] na baanzelu na ye babundaki etumba na Dalagona [Satana] mpe baanzelu na ye [bilimu mabe], nde balongaki te, mpe esika kati na likoló ezwami mpo na bango lisusu te. Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka ya kalakala, oyo abyangami Diable mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba, abwakami na nsé, ye mpe baanzelu na ye elongo.”—Emoniseli 12:7-9.
10, 11. Mpasi nini ekómelaki bato na ntango oyo Satana mpe bilimu mabe na ye babwakamaki awa na mabelé?
10 Makambo nini mabimaki mpo na libota na bato? Esakweli yango elandi ete: “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaká mokuse.” Ya solo, Satana ayebi ete ebongiseli na ye ekómi pene na nsuka, na yango azali kosala nyonso ekoki na ye mpo ete bato batɛmɛla Nzambe liboso ete ye mpe mokili na ye balongolama. (Emoniseli 12:12; 20:1-3) Oyo nde kokitisama monene mpo na bikelamu wana ya elimo mpo ete basalelaki lotómo na bango ya kopona oyo balingi na lolenge mabe! Oyo nde makambo na mpasi mazali komonana na mabelé uta yango ezali na nsé na bopusi na bango, mingi mpenza uta 1914!
11 Ezali likambo ya kokamwa te wana Yesu asakolaki mpo na ntango na biso ete: “Mabota bakozala na mitema likoló mpe bakokakatana . . . Bato bakosɛnzwa na nsɔmɔ mpo na makambo oyo makoyela mabelé mafandami.”—Luka 21:25, 26, MN.
Nsuka ebɛlɛmi mpo na boyangeli ya bato mpe bilimu mabe
12. Wapi moko na bisakweli oyo bisengeli naino kokokana liboso na nsuka ya ebongiseli oyo?
12 Etikali bisakweli boni ya Biblia oyo bisengeli kokokana liboso ete Nzambe aboma biloko ya ntango oyo? Bobele moke mpenza! Moko na yango ezali na 1 Batesaloniki 5:3 (MN) ete: “Wana bakoloba: ‘Kimya mpe makambo mazali te!’ Libebi likoya pwasa likoló na bango.” Yango emonisi ete nsuka ya ebongiseli oyo, ekobanda “wana bakoloba.” Likambo ya pwasa likoyela mokili, libebi likoya na ntango oyo bakomizela na yango te, wana bato bakotya elikya na bango na kimya mpe na libateli oyo bazalaki kozela uta kala.
13, 14. Yesu asakolaki eleko nini oyo mobulu mokozala, mpe ekosuka lolenge nini?
13 Etikali ntango moke mpo na mokili molongwa na nsé na bopusi ya Satana. Mosika te, ekokóma na nsuka na yango, ntango na mpasi oyo Yesu alobelaki yango, ete: “Ekozala na bolózi monene lokola oyo emonani naino te uta ebandeli ya mokili kino sikawa, mpe ekobima lisusu te.”—Matai 24:21, MN.
14 “Bolózi monene” ekosuka na Armagedon, etumba na Nzambe. Yango ezali ntango oyo elobelamaki na mosakoli Danyele, wana Nzambe “akoboma mpe akosilisa bikonzi oyo nyonso.” Wana ekozala nsuka mpo na biyangeli nyonso bizwi lipandá longwa na Nzambe. Na eleko wana, Bokonzi wana ya makoló ekoyangela makambo nyonso na bato. Lisusu, Danyele asakolaki ete, bokonzi yango “bokopesama na bato mosusu te.”—Danyele 2:44; Emoniseli 16:14-16.
15. Nini ekokómela bopusi ya Satana mpe bilimu mabe na ye?
15 Na ntango wana, bopusi nyonso ya Satana mpe bilimu mabe ekozala lisusu te. Bikelamu wana ya elimo oyo bisili kotomboka, bakopesamela nzela te ete ‘bizimbisa lisusu mabota.’ (Emoniseli 12:9; 20:1-3) Basili kokatelama etumbu ya liwa mpe bazali kozela libebi. Oyo nde kobɔndisama mpo na bato wana bakosikolama longwa na bopusi na bango ya mabe!
Nani akobika? Nani akobika te?
16-18. Nani akobika na nsuka ya ebongiseli oyo, mpe nani akobika te?
16 Nani akobika wana Nzambe akokweisa bikateli na ye na mokili oyo? Nani akobika te? Biblia emonisi ete ye oyo alingi boyangeli ya Nzambe akobatelama mpe akobika. Ye oyo aboyi boyangeli ya Nzambe, akobatelama te kasi akobomama nde elongo na mokili ya Satana.
17 Masese 2:21, 22 elobi ete: “Basembwi [baoyo bazali kotósa boyangeli ya Nzambe] bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe [baoyo baboyi kotósa boyangeli ya Nzambe] bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakopikolama wana.”
18 Lisusu, Nzembo 37:10, 11 elobi ete: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Nde bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” Nzembo 37 Verset 29 ebakisi ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”
19. Toli nini tosengeli kosimba yango?
19 Tosengeli kosimba toli oyo ezwami na Nzembo 37:34 (MN) ete: “Tya elikya epai na Jéhovah mpe batela nzela na ye, mpe akotombola yo ete osangola mokili. Okomona wana bato mabe bakopikolama.” Nzembo 37 Verset 37 mpe verset 38 (MN) elobi ete: “Tala moto na sembo mpe boya moyengebene te, mpo ete moto yango akozwa kimya na ntango ekoya. Kasi basali na mabe bakobomama elongo; bato mabe bakopikolama na ntango ekoya.”
20. Mpo nini tokoki koloba ete tozali kobika na eleko ya esengo?
20 Oyo nde bolamu, ee, oyo nde elendiseli na koyeba ete Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso mpe, mosika te, akosilisa mabe mpe mpasi nyonso! Oyo nde esengo na koyeba ete mosika te, bisakweli na nkembo bikokokana!
[Elilingi na lokasa 20]
Biblia esili kosakola makambo oyo makozala “elembo” na mikolo ya nsuka
[Elilingi na lokasa 22]
Mosika te, baoyo baboyi kotósa boyangeli ya Nzambe bakobomama na Armagedon. Baoyo bazali kotósa boyangeli ya Nzambe bakozala na bomoi kati na mokili ya sika ya boyengebene