Mokapo 36
Mboka monene ebebisami
Emonaneli 12—Emoniseli 18:1 kino 19:10
Teme: Kokwea mpe kobomama ya Babilone Monene; kosakolama ya libala na Mwana na Mpate
Eleko na kokokana na yango: Uta 1919 kino koleka bolozi monene
1. Likambo nini ekozala ebandeli ya bolozi monene?
KOBEBISAMA ya Babilone Monene, ekoya pwasa, ekokamwisa bato mingi mpe ekozala mpo na libela. Ekozala bongo moko na makambo maleki nsomo kati na Lisolo mobimba na bato, yango nde ekofungola nzela na “bolozi monene, lokola emonanaki longwa na ebandeli te. Ekobima mpe boye lisusu te.”—Matai 24:21.
2. Na kokesana na bikonzi ya politike oyo bibimaki mpe bilimwaki, lisanga nini eumeli kino lelo?
2 Esili koleka mibu mingi uta lingomba na lokuta ebotamaki. Ebandaki na eleko na Nimerode, mosopi monene na makila oyo atemelaki Jéhovah. Nimerode ayanganisaki bato mpo na kotonga ndako molai na Babele. Ntango Jéhovah abulunganisaki monoko na batomboki wana mpe apalanganisaki bango na mabelé, moto na moto amemaki losambo na lokuta ya Babilone na esika ekendaki ye. (Genese 10:8-10; 11:4-9) Uta ntango yango, bikonzi na politike bibotamaki mpe bilimwaki, kasi lingomba na Babilone eumelaki ntango nyonso. Ezwaki mitindo mingi, kokomaka bongo lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta, lisangá oyo esakolamaki na esakweli: Babilone Monene. Eteni na yango ya monene koleka ezali boklisto ya lokuta, oyo ebotami na nzela na ebele na mateya na yambo na Babilone mpe mateya na “boklisto” ya lipengwi. Lokola Babilone Monene esili koumeli mingi mpenza, bato bazali kondima te ete ekobomama mokolo mosusu.
3. Emoniseli elobi nini na ntina na likambo oyo ezali kozela mangomba na lokuta?
3 Na bongo ebongi ete mokanda na Emoniseli emonisa polele etumbu oyo ezali kozela mangomba na lokuta na kopesaka biso ndimbola mibale ya sikisiki mpo na kokwea na yango mpe ya makambo oyo makobima mpe makobenda kobomama na yango mobimba. Losambo na lokuta emonisamaki lokola “ndumba monene” oyo na nsuka bapanzaki ye na bamakango na ye ya kala ya politike. (Emoniseli 17:1, 15, 16) Sikawa, na emonaneli mosusu, akomonisamela biso lokola engumba moko, oyo Babilone ya kala, na makambo na yango ya losambo, ezalaki elilingi na yango.
Kokwea ya Babilone Monene
4. (a) Emonaneli nini Yoane amoni sikawa? (b) Ndenge nini tokoki koyeba soki anzelu oyo azali nani, mpe mpo na nini ebongi ete ye asakola kokwea ya Babilone Monene?
4 Yoane akobi lisolo na ye na maloba oyo: “Na nsima na makambo oyo namonaki anzelu mosusu kokita na likoló, azalaki na nguya monene, mpe mokili engengaki na nkembo na ye. Angangaki na mongongo makasi ete, Ekwei! Babilone Monene ekwei!” (Emoniseli 18:1, 2a) Oyo ezali mbala ya mibale Yoane ayoki maloba oyo na anzelu. (Tala Emoniseli 14:8.) Nzokande, ya mbala oyo, ntina ya kosakolama yango emonisami mpenza mpo na lokumu na anzelu oyo azali kosakola yango, mpamba te nkembo na anzelu yango ezali kongengisa mabelé mobimba. Ekoki bongo kozala nani? Bikeke mingi liboso, koyebisaka emonaneli moko ya likóló, mosakoli Ezekiele alobaki ete “mokili engengaki mpo na nkembo na [Jéhovah].” (Ezekiele 43:2) Anzelu bobele moko oyo akoki kongenga na nkembo motindo wana oyo ekokani na oyo na Jéhovah ezali Nkolo Yesu, oyo azali ‘elilingi na nkembo na Nzambe mpe momonisi na Motindo na ye mpenza.’ (Baebele 1:3) Na 1914, Mwana na moto akomaki Mokonzi na likoló. Kobanda ntango yango, Yesu azali na bokonzi likoló na mabelé lokola Mokonzi mpe Mosambisi na nse na litambwisi na Jéhovah. Na bongo ebongi mpenza ete ye asakola kokwea na Babilone Monene.
5. (a) Anzelu azali kosalela nani mpo na kosakola kokwea ya Babilone Monene? (b) Ntango nini lisambisi na baoyo bazali koloba ete bazali “ndako na Nzambe” ebandaki, mpe nini ekomelaki boklisto n mokili oyo?
5 Anzelu oyo na bokonzi monene azali kosalela nani mpo na kosakola nsango oyo na kokamwa epai na bato? Azali kosalela mpenzampenza baoyo basikolami nsima na kokwea ya Babilone Monene, batikali na baklisto bapakolami oyo bazali naino na mabelé, kelasi na Yoane. Kobanda 1914 kino 1918, baklisto banyokwamaki mingi na maboko na Babilone Monene, kasi na 1918 Nkolo Jéhovah mpe “ntoma [na ye] na kondima [na Abrahame],” Yesu Klisto, babandaki mosala na bango ya kosambisa na “ndako na Nzambe,” elingi koloba baoyo bazali komibenga baklisto. Boklisto na mokili na lipengwi ebandaki kosambisama. (Malaki 3:1; 1 Petelo 4:17) Nyongo monene ya makila oyo asopisaki na boumeli na Etumba na Liboso ya mokili mobimba, kopesa maboko mpo ete banyokola ba Témoins de Jéhovah ya sembo mpe mateya na ye mauti na Babilone, nyonso wana ekweisaki yango na ntango na kosambisama; biteni mosusu ya Babilone Monene bindimamaki mpe na Nzambe te.—Tala Yisaya 13:1-9.
6. Mpo na nini tokoki koloba ete Babilone Monene ekweaki na 1919?
6 Ezali na motindo yango nde Babilone Monene ekweaki na 1919, yango epesaki nzela na kosikola basaleli na Nzambe mpe kotelemisa bango lokola na mokolo moko kati na mboka na bango, elingi koloba kati na makambo kitoko ya elimo. (Yisaya 66:8) Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto, Darius Monene mpe Siruse aleki Monene, batambwisaki makambo mpo ete kobanda na mbula wana losambo na lokuta ekanga lisusu basaleli na Jéhovah na boombo te. Ekokaki lisusu kopekisa bango te ete basalela Jéhovah te soko mpe kopekisa bango ete basakola te epai na baoyo nyonso bakokaki koyoka bango ete mwasi na pite, Babilone Monene, asengelaki kobomama mpe mosika te, bokonzi na Jéhovah elingaki kolongisama.—Yisaya 45:1-4; Danyele 5:30, 31.
7. (a) Atako Babilone Monene ebomamaki te na 1919, ndenge nini Jéhovah azali kotalela yango? (b) Ntango Babilone Monene ekweaki na 1919, litomba nini ebimaki mpo na basaleli na Jéhovah?
7 Ya solo, Babilone Monene ebomamaki na 1919 te, lokola mpe engumba ya kala ya Babilone ebomamaki na 539 te liboso ya ntango na biso, wana ekweaki yango na maboko na basoda oyo batambwisamaki na Siruse moto na Perse. Kasi, na miso na Jéhovah, lisangá yango ekweaki. Ekweaki na lisambisi mpe ezalaki kozela kobomama na yango. Na bongo ekokaki lisusu te kokanga basaleli na Jéhovah na boombo. (Luka 9:59, 60) Bango babimisamaki mpo ete bakoka kosala lokola moombo na sembo mpe na mayele ya Nkolo, mpo na kopesa bilei na elimo na ntango na yango. Balongisamaki. Nkolo alobaki na bango: “Malamu” mpe apesaki bango mokumba ya kosala lisusu mingi kati na mosala ya Jéhovah.—Matai 24:45-47; 25:21, 23; Misala 1:8.
8. Mokengeli oyo ayebisami na Yisaya 21:8, 9 azali kosakola likambo nini, mpe na mikolo na biso mokengeli yango azali komonisa nani?
8 Ekoki sikawa mibu nkoto mingi, Jéhovah asalelaki basakoli mosusu mpo na koyebisa likambo yango monene. Na ndakisa, Yisaya alobaki na ntina na mokengeli moko oyo “angangaki lokola nkosi ete: ‘Jéhovah, natelemi likoló na ekengelo, mpe natiami kotalatala, butu na moi.’” Likambo nini mokengeli oyo amonaki mpe asakolaki yango na molende lokola nkosi? Ezali oyo: “Babilone ekwei, ekwei; bikeko nyonso na banzambe na ye, [Jéhovah] abuki yango kino mabelé!” (Yisaya 21:8, 9) Mokengeli yango azalaki elilingi na kelasi na Yoane na ntango na biso oyo, wana ezali bango kosenzela, bazali kosalela zulunalo Mosenzeli mpe mikanda mosusu mikolimbolaka Biblia mpo na kosakola na bisika nyonso ete Babilone ekwei.
Nsuka ya Babilone Monene
9, 10. (a) Nini emonisi ete bopusi na mangomba oyo mauti na Babilone ezali kokwea uta Etumba na Liboso ya mokili mobimba? (b) Na maloba nini anzelu na nguya azali koyebisa kokitisama na Babilone Monene?
9 Kokwea ya Babilone ya kala na 539 liboso na ntango na biso, ezalaki ebandeli ya eleko molai oyo esukaki na kobomama ya engumba yango. Motindo moko mpe, kobanda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bopusi na mangomba oyo eutaki na Babilone ekweaki na lolenge ya polele kati na mokili mobimba. Na Japon, losambo ya mokonzi na shintoïsme epekisamaki nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na Chine, bokonzi ya Communiste ezali kotya mibeko mpo na boponami nyonso mpe na misala nyonso ya mangomba. Kati na mikili oyo balandaka lingomba na protestá na Europe ya nord, ntalo monene na bato bazali kosepela lisusu na lingomba te. Mpo na oyo etali Lingomba na katolike, kala mingi te euti kolembisama na bokabwani mpe na kozanga boyokani oyo ezali koleka kati na yango.—Tala Malako 3:24-26.
10 Na ntembe te makambo nyonso wana makotisami kati na ‘kokauka na Efrate,’ kokauka oyo ezali kobongisa nzela mpo ete mampinga baya kobundisa Babilone Monene. Pape alobelaki ‘kokauka’ yango kozanga kobimisa yango polele na ntango alobaki na Octobre 1986 ete Lingomba esengeli “lisusu kokoma mosengi,” na ntina na banyongo na yango. (Emoniseli 16:12) Mingimingi uta 1919, esakolamaki polele ete Babilone Monene ezali esika ebebisami kati na elimo, engebene maloba oyo anzelu na nguya azali kosakola sikawa: “Esili kokoma efandelo na bilimu mabe, ebombamelo na mipepe na mbindo nyonso, mpe ebombamelo na bandeke nyonso na mbindo bayinami!” (Emoniseli 18:2b) Mosika te ekobomama mpenza, ekotikala mpamba lokola Babilone etikala kuna na Irake lelo oyo.—Tala mpe Yilimia 50:25-28.
11. Na ndimbola nini Babilone Monene ekomi “efandelo na badémo” mpe na ‘banyama na yauli na esobe mpe na bandeke na mbindo’?
11 Liloba “bilimu mabe” (badémo) oyo esalelami awa ezali bobele yango moko na oyo ebongolami na liloba “badémo na motindo na ntaba mibali”(se‘irimʹ) kati na lolenge oyo Yisaya amonisaki Babilone nsima na kokwea na yango: “Kasi banyama na yauli bakolala wana, ndako na yango ekotonda na bisulungutu; maligbanga ikofanda wana mpe badémo na motindo na ntaba mibali bakobinabina wana.” (Yisaya 13:21, MN) Liloba yango ezali mbala mosusu kolobela bilimu mabe te, kasi banyama na pwale milai oyo bazalaki kofanda na esobe, oyo lolenge ya nzoto na bango ezalaki kotinda bato bazalaki kotala bango na kokanisa na badémo. Komonana ya banyama yango na elilingi, bakisa mpe ya mopepe na kilo mpe ya mabe (“mipepe na mbindo”) mpe ya bandeke na mbindo kati na Babilone Monene oyo esili kobebisama, emonisi ete Babilone esili kokufa kati na elimo. Ezali kopesa ata elikya moko te epai na bato.—Tala Baefese 2:1, 2.
12. Na nini ezalela na Babilone Monene ekokani na esakweli oyo ezwami kati na Yilimia mokapo 50?
12 Ezalela na Babilone Monene ekokani mpe na maloba oyo ya esakweli na Yilimia: “‘Mopanga likoló na Bakaladi’! Jéhovah alobi bongo; ‘mpe likoló na bafandi na Babilone, mpe likoló na mikóló na bango mpe bato na ye na mayele. . . . Kokauka eyei na mai na ye, nyonso ekauki; mpamba te ezali mokili na bililingi, bazali bibebe mpo na bikeko. Boye banyama na yauli na lisobe mpe ngombolo bakofanda wana; bandeke minene bakozala mpe kati na yango. . . . Bato bakofanda wana lisusu te kino mabota na mabota.’” Losambo ya bikeko mpe loyembo ya mabondeli oyo ezongelami mbala na mbala ekoki kobikisa Babilone Monene te ete azanga kozwa etumbu oyo Nzambe akweisaki likoló na Sodome mpe Gomore.—Yilimia 50:35-40.
Vinyo oyo ezali kobenda mposa
13. (a) Na maloba nini anzelu na nguya amonisi bondumba makasi ya Babilone Monene? (b) Pite oyo etondaki kati na Babilone na kala ezali komonana kati na Babilone Monene?
13 Sikawa anzelu na nguya amonisi polele bondumba makasi ya Babilone Monene na kosakolaka ete: “Mpo ete mabota nyonso basili komela vinyo na kongala na pite na ye [vinyo oyo ezali kobenda mposaa] mpe bakonzi na mokili basali na ye pite, mpe bato na mombongo na mokili bazui mosolo mingi mpo na koyikana na mosolo na ye.” (Emoniseli 18:3) Babilone Monene akosaki mabota nyonso na nzela na misala na ye ya mbindo. Engebene mogreke Herodote, ye mokomi na lisolo ya makambo na bato, alobi ete kati na Babilone ya kala bilenge basi nyonso basengelaki koyeba mobali na kosalaka pite kati na tempelo. Lelo mpe, kati na tempelo ya Angkor Vat (Kampuchéa), okoki komona bikeko, oyo ebebisamaki na bitumba, bililingi ya bizaleli na nsoni mingi. Kati na batempelo ya Khajuraho (Inde), nzambe na ba hindou oyo abengami Vishnou amonisami katikati na bililingi ya mbindo ya bato bazali kosala pite. Na Etats-Unis, kopalangana na nsango na pite oyo ekweisi bato bakosakolaka na télévision, na 1987 mpe na 1988, bakisa mpe kosangisa nzoto kati na mibali na mibali epai na basango mpe bapastere emonisi ete boklisto ya mokili oyo epesi nzela ete basangani na yango basala pite kozanga kooka nsoni. Kasi mabota nyonso masili kokwea na motindo moko ya pite oyo eleki mabe.
14-16. (a) Boyokani nini kati na politike mpe mangomba esalamaki kati na Italie fasciste? (b) Ntango Italie akamataki Ethiopie, baepiskopo ya katolike balobaki nini?
14 Tosilaki kolobela na ntina na boyokani ya mbindo kati na politike mpe lingomba, boyokani oyo epesaki Hitler nzela ete azwa bokonzi kati na Alemanye nazi. Mikili misusu minyokwamaki mpe mpo na komikotisa ya mangomba kati na makambo ya mokili. Na ndakisa na Italie fasciste, boyokani ya Latran oyo esalamaki kati na Mussolini mpe cardinal Gasparri le 11 Février 1929 ekomisaki cité ya Vatican Ekolo moko ya bonsomi. Pape Pie XI alobaki ete “apesaki Italie epai na Nzambe, mpe Nzambe epai na Italie.” Ezalaki mpenza solo? Totala likambo oyo ebimaki mbula motoba na nsima. Le 3 Octobre 1935, Italie akamataki Ethiopie, kolobaka ete “ekólo yango ezali naino sivilizé te mpamba te bazalaki naino kokanga bato na boombo.” Nani mpenza amimonisaki ete azali sivilizé te kati na likambo wana? Lingomba na katolike ekweisaki mabe ya Mussolini? Wana pape azalaki koloba polele te, baepiskopo na ye bazalaki kopambola polele mampinga ya “ekolo” na bango, Italie. Kati na mokanda Le Vatican à l’ère des dictateurs (Angl.), Anthony Rhodes alobi na ntina yango:
15 “Kati na mokanda oyo atindelaki baklisto na ye na le 19 Octobre [1935], episkopo ya Udine [Italie] akomaki: ‘Ebongi ata moke te mpe ezali mpenza malamu te ete tomona mabe kati na likambo oyo. Mokumba na biso lokola tozali ba Italyé, mpe mingi mpenza lokola tozali baklisto, ezali ya kopesa maboko mpo na elonga na bibundeli na biso.’ Episkopo ya mboka Padoue, ye nde akomaki boye na le 21 Octobre: ‘Na ngonga oyo ya mpasi, tozali kosenga bino ete bozala na kondima epai na bakambi na biso mpe na mampinga na biso.’ Le 24 Octobre, episkopo ya Crémone apambolaki bendele mwa mingi na basoda mpe alobaki: ‘Tika ete Nzambe apambola basoda oyo bakokende na mabelé na Afrike mpe bakobotola mabelé na sika mpe ya malamu mpo na bato na mayele na Italie, mpe bakomemela bato ya kuna bizaleli ya Baromé mpe ya boklisto! Tika ete na mbala oyo lisusu Italie ezala motambwisi ya baklisto nyonso kati na mokili mobimba!’”
16 Na bongo bakotaki mpenza na Ethiopie, mpe nyonso wana na lipamboli na bakonzi na Lingomba ya katolike. Moko kati na bango akokaki koloba, lokola ntoma Paulo, ete “azalaki peto na makila na bato nyonso”?—Misala 20:26.
17. Mpasi nini Espanye ezwaki mpo ete bakonzi na lingomba ‘batulaki mipanga na bango te mpo na kobongola yango bitimweli’?
17 Longola Alemanye, Italie mpe Ethiopie, mokili mosusu ezwaki mpe mpasi likoló na pite ya Babilone Monene: ezali Espagne. Moko na bantina na etumba oyo engalaki kati na mboka yango kobanda 1936 kino 1939 eutaki mpenzampenza, na meko oyo ekamatamaki na boyangeli ya demokratike mpo na kokitisa bokonzi monene ya Lingomba na katolike. Na boumeli ya etumba yango, Franco, mokonzi fasciste ya katolike ya mampinga na botomboki, amimonisaki ye moko lokola “mokambi moklisto ya basoda kati na etumba mosantu,” titre oyo ayaki koboya yango na nsima. Ntalo monene na ba Espanyole bakufaki na boumeli ya bitumba. Epai mosusu, bato bakanisi ete, ba Nationalistes oyo batambwisamaki na Franco babomaki basangani 40 000 ya parti ebengami Front populaire, nzokande bato yango babomaki basángo mpe banyango 8 000. Tala nsomo oyo etumba wana ya bana mboka epesaki bato. Yango emonisi ete ezali mpenza mayele na kolanda toli oyo na Yesu: “Zongisa mopanga na yo na esika na yango. Mpamba te baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52) Oyo nsoni ya motindo nini mpo na boklisto ya mokili oyo na kosangana na kosasa ya lolenge boye! Na ntembe te, bakonzi na mangomba batulaki te ‘mipanga na bango mpo na kokomisa yango bitimweli.’—Yisaya 2:4.
Bato na mombongo na mokili
18. “Bato na mombongo na mokili bazali banani”?
18 Banani bazali “bato na mombongo na mokili”? Na ntembe te lelo oyo tobengi bango, ba trafiquants, bakomelesá minene, to ba hommes d’affaires. Yango elingi koloba te ete ezali mabe mpo na kosala mombongo na bosembo. Nkutu Biblia ezali kopesa batoli malamu epai na baoyo bazali kosala mimbongo; ezali kokebisa bango na ezaleli ya kozanga bosembo, na lokoso mpe na makambo mosusu mabe ya motindo yango. (Masese 11:1; Zakaria 7:9, 10; Yakobo 5:1-5) Litomba eleki monene ezali “na makambo na Nzambe soki makokitisa motema.” (1 Timote 6:6, 17-19) Nzokande, mokili na Satana ezali kolanda mitinda na sembo te. Mabe etondi meke. Tozali komona yango kati na mangomba, kati na politike mpe epai na bato na mombongo. Mbala na mbala, myango ya bopanzi nsango ezali komonisa makambo mabe koleka, na ndakisa moyibi na mosolo oyo esalemi na bato minene mpe mombongo ya bibundeli.
19. Likambo nini oyo etali nkita ya mokili mobimba epesi nzela na kolimbola ntina oyo Emoniseli ezali koloba mpo na bato na mombongo na mokili na maloba ya lokumu te?
19 Mosolo nyonso oyo ezwami na mobu moko mpo na botekisi bibundeli kati na mokili mobimba eleki 1 000 miliare ya badolare, nzokande ebele na bamilió na bato bazangi ata biloko oyo bisengeli mpo na bomoi. Yango ezali mawa, kasi botekisi bibundeli emonani ete ezali moko na mimbongo oyo esimbi nkita ya mokili. Mpo na likambo yango, tala oyo ekokaki kotangama kati na Spectator ya 11 Avril 1987, zulunalo moko ya Londres: “Soki batangi bobele bakompanyi oyo etalelami na likambo yango [ya botekisi bibundeli], ezali kopesa bisika na misala mpo na bato pene na 400 000 na Etats-Unis mpe 750 000 na Mpoto. Kasi, likambo ya kokamwa mpenza, wana bakompanyi oyo esalaka bibundeli ezali kobakisa mosolo na yango mingi mpe epesi mosala epai na bato mingi, likambo monene ya koyeba soki libateli malamu ebongisami mpo na mikili mizali kosala bibundeli, likambo yango etyami na esika ya nsuka.” Mikili yango mizali kozwa matomba mingi mpo na botekisi ya babombe mpe ya bibundeli bisusu ya bitumba oyo bazali kotekisa kati na mokili mobimba, ata na mikili oyo ekoki kobalukela bango. Nzokande mokolo mosusu babombe wana ekoki kobimisa etumba monene oyo kati na yango ata batekisi na yango bakokufa. Tala naino! Tobakisa na makambo nyonso wana kanyaka, oyo ezali komonana mingimingi kati na bakompanyi ya bibundeli. Bobele na Etats-Unis, engebene zulunalo Spectator, “état-major ezali mbula nyonso kobungisa na lolenge moko ya nkuku motuya ya 900 milió ya badolare mpo na bibundeli mpe biloko mosusu ya mosala na soda.” Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete Emoniseli esaleli maloba na lokumu te mpo na bato na mombongo na mokili!
20. Ndakisa nini emonisi ete mangomba masili kosala mimbongo mizangi kolongobana?
20 Lokola anzelu na nkembo asakolaki yango, mangomba emikotisaki mpe kati na mombongo ya kozanga bosembo. Tozwa ndakisa ya mosala oyo Vatican asalaki mpo na kokweisa banke Ambrosiano na 1982. Likambo yango eumelaki mingi na ba 1980, bazalaki koluka koyeba mbongo ekendaki wapi. Na Février 1987, bazuzi ya Milan batindaki mikanda mpo na kokanga basángó misato, kati na bango episkopo moko ya Amerike, oyo bafundamaki ete bazalaki mpe kati na bato oyo bakweisaki banke yango. Nzokande, Vatican aboyaki kotalela mokanda oyo etindamaki mpo na kosenga ete bapesa nzela na kosambisa basángó wana misato. Na Juillet 1987, lokola matata ebimaki mpo na koboya kosambisa bango, mikanda oyo mitindamaki mpo na kokanga basángó wana milongolamaki na Cour de cassation ya Italie mpo na kolanda boyokani moko oyo esalamaka kala kati na Vatican mpe boyangeli ya Italie.
21. Makambo nini mamonisi ete Yesu amikotisaki ata moke te kati na mimbongo mabe oyo ezalaki kosalema na ntango na ye, kasi eloko nini tozali komona lelo mpo na oyo etali mangomba mauti na Babilone?
21 Yesu amikotisaki nde na misala ya mimbongo mabe ya ntango na ye? Te. Azalaki na mapango te, mpamba te “azalaki na esika na kolalisa motó na ye te.” Nkutu apesaki toli oyo epai na elenge mokonzi moko mozwi: “Teka biloko nyonso bizali na yo, kabola yango na babola, mpe okozala na biloko na motuya kuna na likoló; mpe yaka kolanda ngai.” Ezalaki wana toli moko kitoko, mpamba te soki elenge mobali wana ayokaki toli yango, mbele asengelaki komilongola na mabanzo nyonso mauti na mombongo. (Luka 9:58; 18:22) Nzokande, mangomba na Babilone mazali mbala mingi kosala boyokani ya motindo boye elongo na bato oyo bazali kosala mimbongo. Na ndakisa, na 1987 zulunalo moko (Albany Times Union) eyebisaki ete mobateli na mosolo ya archidiocèse katolike ya Miami (Etats-Unis) andimaki ete Lingomba etyaki mosolo kati na bakompanyi oyo ezali kosala bibundeli ya nikleere, bafilme ya nsoni mpe makaya.
“Bino bato na ngai bobima na ye”
22. (a) Mongongo mouti na likoló mozali koloba nini? (b) Likambo nini lisepelisaki libota na Nzambe na mobu 537 liboso na ntango na biso mpe na 1919 ya ntango na biso?
22 Sikawa Yoane azali komonisa polele kokokisama mosusu ya esakweli: “Nayokaki mongongo mosusu na likoló koloba ete: ‘Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te.’” (Emoniseli 18:4) Bisakweli na Makomami na liebele na ntina na kokwea na Babilone ya kala ezali mpe na etinda oyo Jéhovah apesaki na libota na ye: “Bokima longwa na kati na Babilone.” (Yilimia 50:8, 13) Motindo moko mpe, lokola akani koboma Babilone Monene na mikolo mizali koya, basaleli na Nzambe basengeli sikawa kokima lisangá yango. Na 537 liboso ya ntango na biso, Bayisraele na sembo basepelaki mingi mpo na kobima na Babilone. Motindo moko mpe, basaleli na Nzambe bazalaki na esengo mingi na kosikolama na boombo ya Babilone na 1919. (Emoniseli 11:11, 12) Mpe, kobanda na mobu wana, bamilió na bato batosaki etinda ya kobima na Babilone Monene.
23. Na maloba nini mongongo mouti na likoló mozali komonisa polele ete ezali likambo ya nokinoki na kotika Babilone Monene?
23 Ezali mpenza likambo ya nokinoki mpo na kobima na Babilone Monene, na kokata boyokani nyonso elongo na mangomba ya mokili, na kokabwana mpenza na yango? Ee, mpamba te esengeli na biso kotalela lisangá wana ya nsomo, ya losambo ya lokuta oyo eumeli bikeke mingi, lokola Nzambe azali kotalela yango. Ayini yango, ntina wana abengi yango ndumba monene. Yango wana mongongo oyo euti na likoló ezali sikawa kopesa bandimbola mosusu na Yoane likoló na mwasi wana ya etamboli mabe: “Mpo ete mopiko na masumu na ye ekomi kino na likoló, mpe Nzambe asili kokanisa misala mabe na ye. Bozongisa na ye lokola ye mpe azongisaki. Ee, bozongisa mbala mibale na misala na ye. Na kopo esanganisi ye, bosanganisa yango mbala mibale mpo na ye. Na motindo ekumisaki ye nzoto na ye mpe esepelaki ye na mosolo, bopesa ye mpasi na mawa bobele bongo. Mpo ete na motema na ye alobi ete, Nakofanda mokonzi mwasi, nakufeli mobali te mpe nakomona mawa soko moke te; yango wana na mokolo moko malozi na ye makoya, na liwa, na kolela, na nzala, mpe akotumbama na móto, mpo ete Jéhovah Nzambe mosambisi na ye azali makasi.”—Emoniseli 18:5-8.
24. (a) Mpo na nini basaleli na Nzambe basengeli kokima Babilone Monene? (b) Masumu nini bato oyo baboi kotika Babilone Monene bazali kosangana na yango elongo na ye?
24 Oyo nde maloba makasi! Esengeli bongo kozwa ekateli nokinoki. Ezali yango nde Yilimia alobaki na Bayisraele ya eleko na ye ete: “Bokima longwa na kati na Babilone. . . . Mpamba te oyo ezali ntango na kobukanisa na Jéhovah; lifuti lizali ye kofuta epai na ye. Bato na ngai, bobima longwa na kati na ye, moto na moto abikisa bomoi na ye, longwa na nkanda makasi na Jéhovah.” (Yilimia 51:6, 45) Motindo moko mpe, mongongo mouti na likoló mokebisi sikawa basaleli na Nzambe ete bakima na Babilone Monene mpo ete bazwa moko na malozi na ye te. Bikateli oyo bikokani na malozi oyo Jéhovah alobaki mpo na mokili, bakisa mpe Babilone Monene, bisakolami sikawa. (Emoniseli 8:1 kino 9:21; 16:1-21) Basaleli na Nzambe basengeli kokabwana na mangomba ya lokuta soki balingi te kozwa bitumbu to kokufa elongo na yango. Lisusu, soki bakotikala kati na mangomba yango, bakosangana na masumu na yango. Bakosala pite na elimo lokola ye mpe bakozwa nyongo ya makila “ya baoyo nyonso babomamaki na mokili.”—Emoniseli 18:24; tala Baefese 5:11; 1 Timote 5:22.
25. Na mitindo nini basaleli na Jéhovah babimaki na Babilone ya kala?
25 Kasi ndenge nini libota na Jéhovah ezali kobima na Babilone Monene? Bayuda oyo babimisamaki na Babilone ya kala bazongaki mpenza na Mabelé na ndaka. Kasi esukaki bongo te. Yisaya alobaki na Bayisraele kati na esakweli ete: “Bolongwa! Bolongwa! Bokima na esika yango, bosimba eloko na mbindo te; bobima na kati na ye, bomibulisa bino mpenza, bino bokokumba biloko na Jéhovah!” (Yisaya 52:11) Ya solo, basengelaki kotika misala nyonso na mbindo ya lingomba na Babilone oyo ekokaki kobebisa losambo oyo bazalaki kopesa na Jéhovah.
26. Motindo nini baklisto na Kolinti batosaki etinda oyo: ‘Bobima kati na bango mpe bosimba eloko na mbindo te’?
26 Ntoma Paulo atangaki maloba na Yisaya kati na mokanda na ye, na kolobaka ete: “Bokangana na ekanganeli na bokesene te, esika moko na bato bazangi kondima. Mpamba te kokokana nini ezali kati na boyengebene mpe mabe? Lisangana nini ezali kati na moi mpe molili? . . . ‘Yango wana, bobima na kati na bango, mpe bokabwana na bango.’ Jéhovah alobi bongo. ‘Bosimba eloko na mbindo te.’” Esengamaki te epai na baklisto na Kolinti ete batika engumba na bango mpo na kotosa etinda oyo. Nzokande, epekisamaki na bango ete bakota na batempelo ya mbindo ya mangomba na lokuta mpe, kati na elimo, basengelaki kokabwana na basambeli na bikeko na koboyoka kosala misala na bango ya mbindo. Ezali mpe na motindo wana nde basaleli na Nzambe babandaki kokima Babilone Monene na 1919. Babwakaki mateya mpe misala nyonso ya mbindo oyo batikaki naino te, mpe na bongo bakokaki kosalela Nzambe lokola libota na ye oyo epetolami.—2 Bakolinti 6:14-17; 1 Yoane 3:3.
27. Bokokani nini ezali kati na bikateli oyo biyebisamaki likoló na Babilone ya kala mpe likoló na Babilone Monene?
27 Kokwea mpe kobomama ya nsuka ya Babilone na kala epesaki etumbu na mboka yango mpo na masumu na yango. “Mpo ete etumbu na ye ekei likoló kino lola.” (Yilimia 51:9) Motindo moko, masumu ya Babilone Monene “makomi kino na likolo,” na boye ete Jéhovah ayebi yango. Babilone Monene ekweisami mpo na bokesene, losambo na bikeko, pite, minyoko, moyibi mpe koboma bato. Moko na bantina mpo na yango Babilone ekweaki, ezalaki mpo na makambo oyo yango esalaki na tempelo mpe na basambeli ya solo ya Jéhovah. (Yilimia 50:8, 14; 51:11, 35, 36) Motindo moko mpe, kokwea ya Babilone Monene mpe kobomama na yango ezali etumbu mpo na makambo oyo yango esalaki epai na basambeli na solo na boumeli ya bikeke. Kobomama na yango ya libela ekozala bongo ebandeli ya “mokolo na kobukanisa na Nzambe na biso.”—Yisaya 34:8-10; 61:2; Yilimia 50:28.
28. Ekateli nini Jéhovah azali kokokisa na Babilone Monene, mpe mpo na nini?
28 Na mibeko na Moïse, soki Moyisraele ayibi, asengelaki kozongisa mbala mibale to mingi biloko oyo ye ayibaki. (Exode 22:1, 4, 7, 9) Ntango Babilone Monene ekobomama na mikolo mizali koya, Jéhovah akosalela ekateli ya sembo ya motindo moko. Lisangá yango ekozwa etumbu mbala mibale mpo na makambo oyo esalaki. Mawa ekozala te, mpamba te Babilone Monene ayokaki mawa te epai na bato oyo ye anyokolaki. Ayibaki biloko ya mokili mpo ete ‘asepela na mosolo mingi.’ Sikawa akozwa mpasi mpe mawa. Babilone ya kala ezalaki kokanisa ete ezalaki na libateli ya kokoka; ezalaki koloba na lolendo nyonso: “Nakofanda lokola mokufeli-mobali te, nakoyeba kobungisa bana te.” (Yisaya 47:8, 9, 11) Babilone Monene mpe azali kokanisa ete azali na libateli. Kasi kobomama na yango, uta na Jéhovah, Ye oyo “azali makasi” ekoya na lolenge ya pwasa, lokola “na mokolo moko.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi oyo ezali na mitindami mpe maloba na nse na lokasa.
[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 263]
“Bakonzi . . . basali pite elongo na ye”
Na ebandeli na ekeke ya 19, bato na mombongo na Mpoto bazalaki kokotisa na ndenge ya moyibi bangi mingi na Chine. Na Mars 1839, bakonzi ya Chine bamekaki kotya nsuka na mombongo yango ya moyibi na kokangaka bakesi 20 000 ya drogue yango epai na batekisi ya Grande-Bretagne. Likambo yango ebimisaki matata kati na Grande-Bretagne mpe Chine. Lokola boyokani kati na bamboka yango mibale ebandaki kobeba, bamisionere ya misioni bapusaki Grande-Bretagne abundisa Chine; babimisaki maloba lokola oyo elandi:
“Matata oyo ezali kosepelisa ngai mingi, mpamba te nakanisi ete esengeli kosilikisa boyangeli ya Grande-Bretagne mpe Nzambe, na nguya na ye, akoki kokweisa bikangeli oyo bizali kopekisa evanzile na Klisto ete ekota na Chine te.”—Henrietta Shuck, Missionnaire baptiste.
Na nsuka, etumba ekweaki. Babengaki etumba yango “Guerre de l’opium” (Etumba ya bangi). Bamisionere bapusaki na makasi nyonso Grande-Bretagne na maloba lokola oyo elandi:
“Namoni mpenza ete ezalela ya sikawa ezali likambo etali kotekisa bangi te to likambo etali Angleterre te, kasi ezali Mokano ya Nzambe ya kosala na boye ete motema mabe ya moto esalela Mokano na ye ya motema mawa mpo na Chine na kokweisaka mur monene oyo ekaboli yango na mokili.”—Peter Parker, Missionnaire congrégationaliste.
Misionere mosusu congrégationaliste, na nkombo ya Samuel W. Williams, abakisaki: “Loboko ya Nzambe ezali komonana na nyonso oyo esalami na ndenge ya kokamwa. Totye ntembe te ete Ye oyo alobaki ete akoyeisa mopanga na mabelé ayei awa mpo na koboma nokinoki Banguna na ye mpe kotya Bokonzi na Ye. Akobebisa makasi mpenza kino ntango akotya Mokonzi na Kimya.”
Mpo na ndenge ba Chinois mingi babomamaki, misionere J. Shuck akomaki: “Mpo na ngai wana nyonso ezali . . . nzela esalelami na Nkolo mpo na kolimwisa mbindo oyo ezali kotya nkaka na bokoli ya Solo na Nzambe.”
Misionere congrégationaliste Elijah Bridgman abakisaki: “Nzambe asili kosalela mbala mingi loboko na ye ya makasi mpo na kobongisela Bokonzi na ye nzela. . . . Na ntango oyo ya mpasi, esaleli ezali ya bato, kasi nguya ezali ya Nzambe. Moyangeli aleki monene ya mabota manso asaleli Angleterre mpo na kopesa etumbu mpe kokitisa Chine.”—Maloba mazwami na mokanda ezali na moto na likambo “La fin et les moyens,” ya Stuart Creighton Miller, ebimisamaki na Anglais na 1974 kati na mokanda L’aventure missionnaire en Chine et en Amérique (boyekoli oyo esalamaki na Harvard mpe ebimisamaki na John K. Fairbank).
[Etanda na lokasa 264]
“Bato na mombongo . . . bazwi mosolo mingi”
“Kobanda 1929 kino kokoma na Etumba na mibale ya mokili mobimba, [Bernadino] Nogara [mokonzi na makambo matali mosolo na Vatican] akotisaki mosolo ya Vatican (mpe bato na ye) na makambo mingi ya mombongo ya Italie, mingimingi na lotiliki, na kominikasio, banke, kodefisa mosolo, na bakompanyi ya enbgunduka, masini ya bilanga, bakompanyi ya ciment mpe kompanyi ya bilamba. Mingi na bakompanyi yango ebimisaki mbongo. Oyo ya bilamba ekolaki na ndenge elandi:
Nogara asangisaki mwa bakompanyi lokola Società Italiana della Viscosa, La Supertessile, La Società Meridionale Industrie Tessili mpe La Cisaraion. Nyonso wana atyaki yango kompanyi moko: la Cisa-Viscosa, mpe apesaki yango na baron Francesco Mario Oddasso, moko na bato oyo Vatican atyelaki motema mpo ete atambwisa yango. Bongo Nogara asalaki nyonso mpo ete asangisa kompanyi oyo ya sika na kompanyi eleki monene ya Italie mpo na kosala bilamba, SNIA-VISCOSA. Na nsuka, Vatican ekomaki kosepela mingi na SNIA-VISCOSA, oyo eumelaki te na kotambwisama na ye ndenge yango emonisamaki mpo baron Oddasso akomaki vice-président na kompanyi yango.
“Nogara amikotisaki bongo na molongo ya bakompanyi ya bilamba. Kasi amikotisaki mpe na bakompanyi oyo ekosalaka biloko mosusu mpe amikotisaki na mitindo mingi. Lokola azalaki na makoki mingi, mobali oyo azalaki lisusu koluka litomba te . . . na ntembe te asalaki mingi koleka moto nyonso ya mombongo mpo na kotelemisa ekonomi ya Italie. . . . Soko Benito Mussolini akokaki te mpo na kosala boyangeli oyo azalaki kolikya, ata bongo apesaki nzela epai na Vatican mpe epai na Bernadino Nogara ete basala boyangeli moko ya ndenge mosusu.”—L’or du Vatican, ya Nino Lo Bello, nkasa 89 kino 92.
Wana ezali se ndakisa ya boyokani makasi ya bato na mombongo na mabelé mpe Babilone Monene. Ezali likambo ya kokamwa te ete bato na mombongo yango bakolela ntango moninga na bango ya mombongo akolimwa!
[Elilingi na lokasa 259]
Wana epalanganaki bango na mabelé mobimba, bato bamemaki lingomba na Babilone
[Bililingi na lokasa 261]
Lokola mokengeli, kelasi na Yoane ezali kosakola ete Babilone esili kokwea
[Elilingi na lokasa 266]
Bitika na Babilone ya kala bizali komonisa ete etikali moke Babilone Monene ekobomama