Mokapo ya Mwambe
Mangomba ya lokuta: Kolimwa na yango ya nsɔmɔ esakolami
1, 2. (a) Mpo na nini bato mosusu bazali kondima te ete etikali moke mbongwana monene esalema na mangomba ya mokili? (b) Ndenge nini toyebi ete maloba ya Yisaya mokapo 47 ekokokisama lisusu na mikolo ezali koya? (c) Mpo na nini nkombo “Babilone Monene” ebongi mpenza mpo na kolobela mangomba nyonso ya lokuta?
“MANGOMBA ezongi lisusu makasi.” Maloba oyo ekomamaki na lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (The New York Times Magazine). Lisolo yango emonisaki ete mangomba ezali naino na bopusi makasi na mitema mpe na makanisi ya bamilio ya bato. Na yango, ekoki kozala mpasi mpo moto andima ete etikali moke mbongwana monene esalema na mangomba ya mokili. Kasi mbongwana ya ndenge wana elobelami na mokapo 47 ya Yisaya.
2 Maloba ya Yisaya ekokisamaki eleki sikoyo mbula 2 500. Nzokande, maloba oyo ekomami na Yisaya 47:8 ezongelami na mokanda ya Emoniseli mpe kuna bamonisi ete ekokokisama na mikolo ezali koya. Kuna Biblia esakoli nsuka ya ebongiseli moko oyo ekokani na mwasi ya ndumba, na nkombo “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. (Emoniseli 16:19) Nkombo “Babilone” ebongi mpenza mpo na kolobela mangomba nyonso ya lokuta, mpamba te ezali na Babilone ya kala nde mangomba ya lokuta ebandaki. Longwa na Babilone, mangomba ya lokuta epalanganaki na mabelé mobimba. (Genese 11:1-9) Mateya ya lingomba oyo euti na Babilone, lokola molimo ekufaka te, lifelo ya mɔtɔ mpe kosambela banzambe ya bosato, endimami na mangomba penepene na nyonso, ata mpe na mangomba ya boklisto.a Esakweli ya Yisaya esalisi mpenza biso tóyeba likambo nini oyo ekokómela mangomba na mikolo ezali koya?
Babilone akiti tii na putulu
3. Lobelá nkembo oyo Babilone azalaki na yango ntango alekaki bikólo ya mokili mobimba na makasi.
3 Yoká nsango ya malamu oyo euti na Nzambe: ‘Kitá na nse mpe fandá na putulu, ee moseka, mwana mwasi ya Babilone; fandá na mabelé nde na kiti te, ee mwana mwasi ya Kaladi. Zambi okobengama lisusu te ete na pɛtɛpɛtɛ mpe na nguya moke.’ (Yisaya 47:1) Mpo na bambula ebele Babilone ezalaki ekólo oyo elekaki makasi na mokili mobimba. Ezalaki “nkembo ya makonzi,” mboka oyo makambo ya mangomba, ya mombongo mpe ya basoda ezalaki kotambola malamu. (Yisaya 13:19) Na ntango oyo Babilone ezalaki na nkembo monene, bokonzi na yango ekendeki tii na sudi, na ndelo ya Ezipito. Mpe ntango Babilone ekweisaki Yelusaleme na mobu 607 liboso na ntango na biso (L.T.B.), emonanaki lokola nde ete ata Nzambe akokaki te kopekisa ye kobɔtɔla bamboka! Na yango, azali komimona lokola “moseka,” oyo bapaya bakokɔtela ye soki moke te.b
4. Makambo nini Babilone akokutana na yango?
4 Nzokande, bakolongola “moseka” wana ya lolendo na kiti oyo afandi mpo azala lisusu te ekólo oyo eleki makasi na mokili mobimba, ekólo oyo ekólo mosusu te ekokaki kobɛtela yango ntembe, mpe ‘akofandisama na putulu’ na nsɔni. (Yisaya 26:5) Akotalelama lisusu te lokola oyo “na pɛtɛpɛtɛ mpe na nguya moke,” lokola mokonzi mwasi oyo babondelaka ye mingi. Yango wana, Yehova apesi etinda oyo: “Kamatá mabanga na kotuta mpe tutá fufu; longolá ezipeli na elongi na yo, longolá bilamba na yo, zipolá lokolo na yo, leká kati na bibale.” (Yisaya 47:2) Nsima ya konyokola ekólo mobimba ya Bayuda lokola moombo, sikoyo Babilone ye moko mpe akonyokwama lokola moombo! Bamede ná Baperse, oyo bakolongola ye na ebonga na ye ya bokonzi, bakokómisa ye boi.
5. (a) Ndenge nini bakolongola Babilone ‘ezipeli na elongi mpe bilamba’ na ye? (b) Etinda oyo bapesi ye ya ‘koleka kati na bibale’ ekoki komonisa nini?
5 Na yango, bakolongola Babilone ‘ezipeli na elongi mpe bilamba,’ akobungisa eloko nyonso oyo ezali komonisa nkembo mpe lokumu oyo azalaki na yango kala. Bakapita bakopesa ye etinda, “Leká kati na bibale.” Mbala mosusu, bato mosusu ya Babilone bakozwa mpenza etinda ya kosala misala oyo basɛngaka baombo básala libándá ya ndako. To esakweli yango ekoki kolimbola ete bakokatisa mpenza basusu kati na bango bibale wana bazali komema bango na boombo. Ezala maloba yango elimboli nini, Babilone akosala lisusu te mibembo na lokumu nyonso lokola mokonzi mwasi oyo bamemi ye na tipoyi to na likalo mpo na kokatisa ye mai. Kutu, akozala nde lokola moombo mwasi oyo asengeli kolongola nsɔni na ye, kotombola elamba mpe kotika makolo na ye polele mpo na kokatisa ebale. Asambwe mpenza!
6. (a) Ndenge nini bolumbu ya Babilone ekomonisama? (b) Ndenge nini Nzambe ‘akondima elongi ya moto moko te’? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
6 Yehova alandisi maloba na ye ya kotyola: ‘Bolumbu na yo ekomonisama, mpe nsɔni na yo ekomonana. Nakozongisela yo mabe na yo, mpe nakondima elongi ya moto moko te.’ (Yisaya 47:3)c Babilone akoyoka nsɔni mpe akosambwa. Makambo mabe mpe mpasi oyo amonisaki bato ya ekólo ya Nzambe ekomonana polele na miso ya bato. Moto moko te akoki kopekisa Nzambe kozongisela ye mabe na ye!
7. (a) Bayuda oyo bakangami na boombo bakosala nini ntango bakoyoka nsango ya kokwea ya Babilone? (b) Ndenge nini Yehova akosikola bato ya ekólo na ye?
7 Nsima ya boombo mbula 70 na Babilone, mboka makasi, bato ya ekólo ya Nzambe bakosepela mingi ntango mboka yango ekokwea. Bakoganga ete: ‘Mosikoli na biso, Yehova na bibele ezali nkombo na ye, azali Mosantu ya Yisalaele.’ (Yisaya 47:4) Na ntango ya Mibeko ya Moize, soki moto moko ya Yisalaele amitɛki lokola moombo mpo na kofuta nyongo na ye, mosikoli (moto moko ya libota na ye) akokaki kosomba, to kosikola ye, na boombo. (Levitike 25:47-54) Lokola Bayuda bakotɛkama na boombo na Babilone, ekosɛnga básikola bango, to bápesa bango bonsomi. Mpo na baombo, mbala mingi soki mboka mosusu ya nguya elongi mboka oyo ekangaki bango, yango emonisi kaka ete bakómi na bankolo ya sika. Kasi Yehova akotinda Mokonzi Sirise aya kokweisa Babilone mpe kosikola Bayuda na boombo. Ezipito, Etiopia mpe Seba ekopesama na Sirise lokola “lisiko” na esika ya Bayuda. (Yisaya 43:3) Yango wana babengi Mosikoli ya Yisalaele ete “Yehova na bibele.” Basoda ya Babilone, ata bazali komonana makasi, bazali mpenza eloko te liboso na ebele ya baanzelu ya Yehova.
Lifuti ya motema mabe
8. Na ndimbola nini Babilone ‘akokɔta na molili’?
8 Yehova azongeli lisusu esakweli na ye oyo ezali kotɔndɔla Babilone: “Fandá nyɛɛ mpe kɔtá na molili, ee mwana mwasi ya Kaladi, zambi okobengama lisusu te ete nkolo mwasi na makonzi.” (Yisaya 47:5) Eloko mosusu ekozala te mpo na Babilone kaka molili ná mawa. Akozala lisusu te nkolo mwasi ya motema mabe oyo azalaki kokonza bikólo mosusu.—Yisaya 14:4.
9. Mpo na nini Yehova asilikelaki Bayuda?
9 Mpo na nini bapesaki liboso Babilone nzela ya konyokola bato ya ekólo ya Nzambe? Yehova ayebisi boye: “Nasilikaki na bato na ngai, nabebisaki libula na ngai; napesaki bango na lobɔkɔ na yo.” (Yisaya 47:6a) Yehova azali na ntina mpenza ya kosilikela Bayuda. Akebisaki bango liboso ete soki batosi mibeko na ye te, bakobengana bango na mokili na bango. (Deteronome 28:64) Ntango bazalaki kokwea na losambo ya bikeko mpe na pite to ekobo, Yehova azalaki na bolingo nyonso kotindela bango basakoli mpo na kozongisa bango na losambo ya pɛto. “Kasi bazalaki kosɛka bantoma ya Nzambe mpe kotyola maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye; nkanda ya [Yehova] epelisami liboso na bato na ye, kino akokaki kotika lisusu te.” (2 Ntango 36:16) Yango wana Nzambe atikaki libula na ye, Yuda, ebebisama ntango Babilone ekɔtaki na mboka yango mpe ebebisaki tempelo mosantu na Ye.—Nzembo 79:1; Ezekiele 24:21.
10, 11. Atako mokano ya Yehova ezalaki ete Babilone elonga bato na ye, kasi mpo na nini asilikeli Babilone?
10 Soki ezali bongo, Babilone akokisaki kaka mokano ya Nzambe ntango amemaki Bayuda na boombo, boye te? Te, mpamba te Nzambe alobi boye: ‘Oyokelaki bango mawa te; epai ya mibange, ozalisaki ekangelo na yo na bozito monene. Olobaki ete, Libela nakozala nkolo mwasi, bongo otyaki makambo oyo na motema te, okanisaki nsuka na yango te.’ (Yisaya 47:6b, 7) Nzambe atindaki Babilone te asala makambo mabe koleka mpe aboya komonisa boboto ‘ata epai ya mibange.’ (Bileli 4:16; 5:12) Atindaki mpe bango te bátyola Bayuda oyo bakangamaki baombo mpe básepela na komona mpasi na bango.—Nzembo 137:3.
11 Babilone ayebaki te ete bokonzi na ye likoló na Bayuda ezalaki ya ntango mokuse. Atyaki likebi te na makebisi oyo Yisaya apesaki ete, na nsima Yehova akozongisa bato na ye na bonsomi. Azalaki kosala makambo lokola nde bapesi ye lotomo ya kozala libela na bokonzi likoló ya Bayuda mpe kotikala libela nkolo mwasi ya bikólo oyo ye azalaki koyangela. Alandaki te nsango oyo elobaki ete bokonzi na ye oyo ezalaki konyokola bato ekozala na “nsuka”!
Kokwea ya Babilone esakolami
12. Mpo na nini babengi Babilone “molingi ya bisengo”?
12 Yehova alobi boye: ‘Bongo sikoyo, yoká oyo, molingi ya bisengo, yo oyo okofandaka na kimya, oyo okolobaka na motema na yo ete, Nazali awa mpe mosusu elongo na ngai azali te, nakofandaka lokola mokufeli-mobali te, nakoyeba kobungisa bana te.’ (Yisaya 47:8) Eyebani polele ete Babilone alingaki bisengo. Na ekeke ya 5 L.T.B., mokomi ya makambo ya kala Hérodote alobaki ete bato ya Babilone bazalaki na “momeseno ya nsɔni mpenza,” basi nyonso basengelaki kosala kindumba mpo na kokumisa nzambe-mwasi na bango ya bolingo. Quinte-Curse, mokomi mosusu ya makambo ya kala ya ntango wana alobaki mpe boye: “Bizaleli ya bato ya Babilone ebebaki mpenza koleka; makambo nyonso ezalaki kosalema kaka mpo na kolamusa mpe kopelisa bamposa mabe ya nzoto.”
13. Na ndenge nini mposa makasi ya Babilone mpo na bisengo ememaki ye na kokwea noki?
13 Mposa makasi ya Babilone ya koluka bisengo etindaki ye akwea noki. Na mpokwa oyo mboka yango ekweaki, mokonzi mpe bankumu na ye bazalaki kosala fɛti, bamɛlaki na ndenge ya nsɔmɔ. Na yango, bakokaki ata kotya likebi te ete basoda ya Bamede ná Baperse bazali kokɔta na mboka. (Danyele 5:1-4) Lokola Babilone ‘afandaka na kimya,’ akanisaki ete bifelo na ye oyo emonani ete bakoki kolonga yango te mpe mai oyo ezingi yango ekobatela ye. Alobaki na motema ete ‘mosusu azali te’ oyo akoki kobɔtɔla ebonga na ye ya mboka oyo eleki makasi. Akanisaki ata moke te ete mokolo mosusu akokóma “mokufeli-mobali,” akobungisa mokonzi na ye oyo ayangelaka bakonzi mosusu, elongo na “bana,” to bato na ye. Nzokande, efelo moko te ekoki kobatela ye ntango lobɔkɔ ya Yehova Nzambe ekozongisela ye mabe na ye! Na nsima Yehova alobaki ete: ‘Ata Babilone akomata kino lola, ata akokembisa bisika na ye na makasi kino likoló, nde babebisi bakoyela ye longwa na ngai.’—Yilimia 51:53.
14. Na ndenge nini Babilone akozwa mbala moko mpasi ya “kobungisa bana mpe kokufela-mobali”?
14 Nini ekokómela Babilone? Yehova alobi lisusu boye: ‘Makambo oyo mibale makoyela yo na ntango moke na mokolo moko; kobungisa bana mpe kokufela-mobali ekoyela yo na litondi nyonso; ata nkisi na yo ezali mingi, mpe bikelakela na yo ezali na nguya monene.’ (Yisaya 47:9) Ɛɛ, ebonga ya Babilone ya ekólo oyo eleki makasi na mokili mobimba ekosuka pwasa. Na ntango ya kala, kuna na mikili ya Ɛsti, kokufela mobali mpe kobungisa bana nde ezalaki makambo ya mpasi mingi koleka mpo na basi. Toyebi te “bana” boni Babilone abungisaki na butu oyo akweaki.d Nzokande, na ntango oyo etyamá, engumba yango esengelaki kotikala mpenza mpamba. (Yilimia 51:29) Asengelaki mpe kokóma mwasi akufelá mobali mpamba te bakonzi na ye bakolongolama na kiti ya bokonzi.
15. Longola makambo mabe oyo Babilone asalelaki Bayuda, wapi ntina mosusu oyo Yehova asilikeli ye?
15 Nzokande, soki Yehova asilikeli bato ya Babilone ezali kaka te mpo banyokolaki Bayuda. ‘Ebele ya nkisi na ye’ mpe epelisaki nkanda ya Yehova. Mibeko oyo Nzambe apesaki Yisalaele epekisaki misala oyo ezali na boyokani na bilimo mabe; nzokande bato ya Babilone bamipesaki mingi na misala yango. (Deteronome 18:10-12; Ezekiele 21:21) Buku moko (Social Life Among the Assyrians and Babylonians) elobi ete bato ya Babilone “bazalaki ntango nyonso kobanga ebele ya bademo, oyo bazalaki bisika nyonso, ndenge bango bazalaki kokanisa.”
Atyaki motema na makambo mabe
16, 17. (a) Ndenge nini Babilone ‘atye motema na makambo mabe na ye’? (b) Mpo na nini moto moko te akoki kopekisa kokwea ya Babilone?
16 Banganga-nkisi ya Babilone bakobikisa ye? Yehova apesi eyano oyo: ‘Yo otalelaki makambo mabe na yo, olobaki ete, Moto te akomona ngai! Mayele na yo mpe boyebi na yo epɛngwisaki yo, olobaki na motema na yo ete, Ngai nazali mpe mosusu elongo na ngai azali te.’ (Yisaya 47:10) Babilone akanisi ete akotikala kaka ekólo oyo eleki makasi na mokili mobimba mpo na bwanya na ye na makambo ya mokili mpe ya losambo, mpo na nguya ya basoda na ye mpe mpo na mayele mabe mpe misala na ye ya mabe. Akanisi ete moto moko te akoki ‘komona’ ye, elingi koloba kotuna ye mpo na misala na ye ya mabe. Azali mpe komona te bokonzi nini oyo ekowelana na ye. Azali koloba na motema na ye ete, “Ngai nazali mpe mosusu elongo na ngai azali te.”
17 Nzokande, na monɔkɔ ya mosakoli mosusu, Yehova apesi likebisi oyo: “Moto akolonga nde komibomba na bisika na nkuku ete ngai namona ye te?” (Yilimia 23:24; Baebele 4:13) Yango wana Yehova alobi: ‘Kasi mabe makoyela yo mpe okoyeba nkisi mpo na komibatela na yango te. Likambo ekokwela yo oyo yo okoyeba kopekisa yango te. Libebi ekokómela yo pwasa, naino oyebi yango te.’ (Yisaya 47:11) Ezala banzambe ya Babilone to ‘bankisi’ ya bato na ye oyo bamipesi na misala ya bilimo mabe ekoki kopekisa te mabe oyo ezali koya, mpe oyo naino akutaná na yango te na bomoi na ye!
Bapesi-toli ya Babilone balongi te
18, 19. Na ndenge nini motema oyo Babilone atyelaki bapesi-toli na ye ememi ye na likama?
18 Na lityo moko ya kosambwisa mpenza, Yehova apesi etinda oyo: ‘Tɛlɛmá nyɛɛ na nkisi na yo, mpe na misala ya bonganga-nkisi mingi na yo, oyo osali mosala na yango longwa na bolenge na yo. Soko nde okozwa litomba? Soko nde okolonga?’ (Yisaya 47:12) Yehova alobi na Babilone ‘atɛlɛma nyɛɛ,’ to atingama kaka na makambo ya nkisi oyo ye atyeli motema. Kutu, ekólo ya Babilone emipesi na koyekola misala ya bikelakela longwa na “bolenge” na yango.
19 Kasi Yehova azali kosɛka ye na maloba oyo: ‘Osili kolɛmba na bapesi-toli na yo mingi; tiká ete bábima mpe bábikisa yo, basambeli ya biloko ya likoló, baoyo batalaka minzoto, baoyo na ntango ya sanza ya sika, bakoyebisa yo makambo makoyela yo.’ (Yisaya 47:13)e Babilone akomona ete bapesi-toli na ye balongi ata moke te. Ezali solo ete, nsima ya kotalatala minzoto na boumeli ya bankama ya bambula, bato ya Babilone bakolisi mayele na bango ya kosakola makambo na nzela ya minzoto to astroloji. Kasi na butu oyo akokwea, ekomonana polele ete mayele ya kosakola makambo ezali na ntina te, mpamba te bato na ye oyo batalaka minzoto balongi ata moke te.—Danyele 5:7, 8.
20. Bapesi-toli ya Babilone bakosuka ndenge nini?
20 Yehova asukisi eteni oyo ya bisakweli na maloba oyo: ‘Talá bazali lokola matiti makauki, mɔtɔ ekozikisa bango; bakolonga komibikisa na nguya ya mɔtɔ te. Makala ekotikala te oyo moto akoyɔta mɔtɔ na yango to epelelo ya mɔtɔ mpo moto afanda liboso na yango. Bakozala bongo epai na yo, baoyo osalanaki na bango mosala, banganga-nkisi na yo longwa na bolenge na yo, bakolekaleka moko na moko na nzela na ye, moko te akobikisa yo.’ (Yisaya 47:14, 15) Na yango, “mɔtɔ” ekokwela bapesi-toli wana ya lokuta. Ekozala te mɔtɔ ya kitoko oyo bato bakoyɔta, kasi nde mɔtɔ ya kobebisa, ya kozikisa oyo ekomonisa polele ete bapesi-toli yango ya lokuta bazali lokola matiti mpamba. Yango wana bapesi-toli ya Babilone bakokima na nsɔmɔ! Lokola bato ya nsuka oyo basimbaki Babilone bakimi, moto mosusu akozala te mpo na kobikisa ye. Akozwa etumbu mpenza oyo apesaki Yelusaleme.—Yilimia 11:12.
21. Ndenge nini mpe ntango nini esakweli ya Yisaya ekokisamaki mpenza?
21 Na mobu 539 L.T.B., maloba wana ya Nzambe ebandaki kokokisama. Sirise akambaki basoda ya Bamede ná Baperse mpo na kokamata engumba yango, mpe babomaki Belesasala, mokonzi oyo azalaki wana. (Danyele 5:1-4, 30) Kaka na butu moko mpamba Babilone abungisi bokonzi monene oyo azalaki na yango likoló na mokili. Na ndenge yango, bokonzi ya bakitani ya Semi likoló ya bikólo ya mokili, oyo eumelaki bankama ya bambula, elekaki epai na bakitani ya Yafete. Nsima na yango, na boumeli ya bankama ya bambula, Babilone elimwaki mokemoke. Na ekeke ya minei T.B., etikalaki kaka ‘mabondo ya mabanga.’ (Yilimia 51:37) Na ndenge yango, esakweli ya Yisaya ekokisamaki mobimba.
Babilone ya mikolo na biso
22. Liteya nini kokwea ya Babilone eteyi biso na oyo etali lolendo?
22 Esakweli ya Yisaya ezali solo kotinda biso na kokanisa. Ya liboso, ezali komonisa makama oyo eutaka na lolendo. Kokwea ya Babilone oyo atondaki na lolendo ezali komonisa bosolo ya lisese oyo ya Biblia: ‘Lolendo liboso ya kobeba, elimo ya nzombo liboso ya kokwea.’ (Masese 16:18) Ntango mosusu lolendo ezwaka esika ya liboso na bomoto na biso ya kozanga kokoka, nzokande ‘kovimba na lolendo’ ekoki kotinda moto na “kokwea na kati ya nsɔni mpe na motambo ya Zabolo.” (1 Timote 3:6, 7) Na yango, ekozala malamu tólanda toli oyo ya Yakobo: “Bómikitisa na miso ya Yehova, mpe ye akotombola bino.”—Yakobo 4:10.
23. Esakweli ya Yisaya ezali kosalisa biso tótyela nani motema?
23 Maloba wana ya esakweli ezali mpe kosalisa biso tótyela Yehova motema, mpamba te aleki batɛmɛli na ye nyonso na nguya. (Nzembo 24:8; 34:7; 50:15; 91:14, 15) Na mikolo oyo ya mpasi, kokanisa likambo yango ezali solo kobɔndisa motema. Kotyela Yehova motema ezali kokómisa makasi ekateli na biso ya kotikala sembo na miso na ye, awa toyebi ete “mikolo oyo ezali koya ekozala na kimya mpo na [moto oyo azali sembo].” (Nzembo 37:37, 38, NW) Liboso ya “mayele mabe” ya Satana, ebongi ntango nyonso tótalelaka Yehova kasi tótya motema te na makoki na biso moko.—Baefese 6:10-13.
24, 25. (a) Mpo na nini astroloji ezali na ntina te, kasi mpo na nini bato mingi bazali komipesa na yango? (b) Mpo na nini baklisto baboyaka biyambayamba?
24 Bakebisi biso mpenza tóboya misala ya bilimo mabe, mingimingi astroloji. (Bagalatia 5:20, 21) Ntango Babilone ekweaki, bato batikaki kaka astroloji etambwisa bango. Buku moko (Great Cities of the Ancient World) emonisi ete bituluku ya minzoto oyo bato ya Babilone bayemaki karte na yango “esili kolongwa” esika ezalaki, “yango esali ete likanisi mpenza ya [astroloji] ezala na ntina te.” Atako bongo, astroloji ezali se kopalangana, mpe bazulunalo mingi ezangaka te kokoma makambo ya oroskopɛ mpo na batángi na yango.
25 Nini etindaka bato, ata baoyo batángá mingi, bátalatala minzoto to bámipesa na biyambayamba ezangi ntina, atako yango eyokani te na makanisi malamu? Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Biyambayamba ekosila mbala mosusu te na bomoi ya bato soki bato batiki te kobangana mpe soki bayebi malamu te ndenge nini makambo ekozala na mikolo ekoya.” Kobangana mpe kozanga koyeba malamu makambo oyo ekoya ekoki kotinda bato bákóma na biyambayamba. Nzokande baklisto baboyaka biyambayamba. Babangaka bato te, mpamba te Yehova azali mosungi na bango. (Nzembo 6:4-10) Mpe bayebi malamu ndenge makambo na bango ekozala; bayebi mikano ya Yehova mpe bazali na ntembe te ete “toli ya [Yehova] ekoumela seko.” (Nzembo 33:11) Koyokanisa bomoi na biso na toli ya Yehova ekopesa biso bomoi ya esengo mpe ya libela na mikolo oyo ezali koya.
26. Ndenge nini emonani ete “kokanisakanisa ya bato ya bwanya ezali mpamba”?
26 Na bambula oyo eleki, bato mosusu balukaki koyeba makambo oyo ekoya na “mayele ya siansi.” Ezali kutu na liteya moko oyo babengi na Lifalanse futurologie, oyo balimbolaka yango lokola “boyekoli oyo etali makambo ekoya na kotalela ndenge makambo ezali kosalema sikoyo.” Na ndakisa, na 1972 etuluku moko ya bato ya mayele mpe ya bato minene ya mombongo oyo bayebani na nkombo ya Club de Rome basakolaki ete tii na 1992 wolo, merkire, zɛnk mpe petrole nyonso ya mabelé ekosila. Ezali solo ete uta 1972 mokili ekutaná na mikakatano mingi ya makasi, kasi esakweli na bango ebimi lokuta na makambo nyonso. Mabelé ezali naino na ebele ya wolo, merkire, zɛnk mpe petrole. Bato bamilɛmbisi mpenza na koluka kosakola makambo oyo ekoya, kasi mbala mingi makambo oyo bakanisaka ete ekosalema esalemaka te. Ya solo, “kokanisakanisa ya bato ya bwanya ezali mpamba”!—1 Bakolinti 3:20.
Nsuka ya Babilone Monene ekómi pene
27. Ntango nini mpe ndenge nini Babilone Monene ekweaki lokola Babilone ekweaki na mobu 539 L.T.B.?
27 Mangomba ya mikolo na biso ezali kolanda koteya makambo mingi oyo euti na Babilone ya kala. Na yango, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba ebongi mpenza na nkombo Babilone Monene. (Emoniseli 17:5) Lisangá wana ya mangomba ya mokili mobimba esilá kokwea ndenge Babilone ya kala ekweaki na mobu 539 L.T.B. (Emoniseli 14:8; 18:2) Na 1919, batikali ya bandeko ya Klisto babimaki na boombo ya elimo mpe bamilongolaki na bokonzi ya mangomba ya boklisto, oyo ezali eteni monene ya Babilone Monene. Kobanda ntango yango mangomba ya boklisto ezali lisusu na bokonzi makasi te na bikólo mingi epai ezalaki makasi.
28. Ndenge nini Babilone Monene azali komikumisa, kasi nini ezali kozela ye?
28 Nzokande, kokwea wana ezalaki kaka kosakola kobomama ya nsuka oyo ekokwela mangomba ya lokuta. Kutu, esakweli ya Emoniseli oyo ezali kolobela kobomama ya Babilone Monene ezali kokundolela biso maloba ya esakweli oyo ezali na Yisaya 47:8, 9. Ndenge moko na Babilone ya kala, Babilone Monene ya mikolo na biso ezali koloba: “Nafandi mokonzi-mwasi, mpe nazali te mwasi oyo akufelá mobali, mpe nakomona mawa ata mokolo moko te.” Kasi “na mokolo kaka moko malɔzi na ye ekoya, liwa mpe mawa mpe nzala, mpe akozikisama na mɔtɔ nyɛɛ, mpamba te Yehova Nzambe, oyo asambisi ye, azali makasi.” Yango wana maloba ya esakweli oyo ekomami na Yisaya mokapo 47 ezali likebisi epai ya baoyo bazali naino na mangomba ya lokuta. Soki balingi kokufa te na ntango ya kobomama na ye, basengeli kolanda etinda oyo: “Bóbima na kati na ye”!—Emoniseli 18:4, 7, 8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba malamu ndenge mateya ya lokuta ya mangomba epalanganaki, talá buku L’humanité à la recherche de Dieu, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Na monɔkɔ ya Liebele “moseka, mwana mwasi na Babilone” ezali ebengeli mpo na kolobela Babilone to bato ya Babilone. Azali “moseka (to ngɔndɔ)” mpamba te banda Babilone aleki bikólo nyonso ya mokili mobimba na makasi, basoda ya bikólo mosusu bapunzi ye naino te.
c Bato ya mayele balobi ete maloba ya Liebele oyo ebongolami “Nakondima elongi ya moto moko te” ezali “maloba oyo maleki mpasi” mpo na kobongola yango. Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli maloba yango boye: “Nakokutana na moto moko te na boboto.” Yango ekɔtisi liloba “na boboto” mpo na komonisa ete bakopesa bato mosusu nzela te ya koya kobikisa Babilone. Na maloba na yango na nse ya lokasa, libongoli mosusu ebongoli maloba yango boye: “Nakotika moto moko te alobela ye.”
d Buku moko (Nabonidus and Belshazzar), ya Raymond Dougherty, elobi ete atako Libanga ya Nabonide elobi ete basoda oyo balongaki Babilone bakɔtaki na mboka yango “kozanga kobunda,” Xénophon, mokomi ya makambo ya kala ya ekólo Grèce, ye amonisi ete mbala mosusu makila esopanaki mingi.
e Maloba ya Liebele oyo ebongolami “basambeli ya biloko ya likoló” basusu babongolaka yango “baoyo bakabolaka likoló.” Yango ekoki komonisa momeseno ya kokabola likoló na biteni mingi mpo na kosakola makambo oyo ekoya.
[Bililingi na lokasa 111]
Babilone, molingi ya bisengo, akokita tii na putulu
[Elilingi na lokasa 114]
Banganga-minzoto ya Babilone bakokoka te kosakola kokwea na ye
[Elilingi na lokasa 116]
Manaka ya astroloji ya bato ya Babilone, ya bambula ya nkóto L.T.B.
[Bililingi na lokasa 119]
Etikali moke Babilone ya mikolo na biso ekozala lisusu te