Mokanda ya Biblia nimero 23—Yisaya
Mokomi: Yisaya
Esika ya bokomi: Yelusaleme
Nsuka ya bokomi: Nsima ya 732 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: soko 778–nsima ya 732 L.T.B.
1. Makambo nini mazalaki na Moyen-Orient, mingimingi na Yisalaele mpe na Yuda, na ekeke ya mwambe L.T.B.?
LIKÁMÁ ya kobundisama na mokonzi mabe ya Asulia ezalaki likoló na biyangeli mosusu mpe likoló na bikonzi mike ya Moyen-Orient. Teritware oyo mobimba etondaki na masoló matali kosala myango ya bobundisi mpe kosala boyokani mpo na kosangisa nguya. (Yis. 8:9-13) Na nɔ́rdi, Yisalaele oyo epɛngwaki esengelaki mosika te kokwea na makaneli wana ya mikili mingi, nzokande na súdi, bakonzi ya Yuda bazalaki koyangela mpo na ntango mokuse. (2 Mik. mik. 15-21) Bibundeli ya sika ya etumba bisalemaki mpe bisalelamaki, kobakisáká nsɔ́mɔ oyo ezalaki na ntango wana. (2 Nta. 26:14, 15) Epai wapi bato basengelaki komibalola mpo na koluka libateli mpe lobiko? Atako nkombo ya Yehova ezalaki kotángama na bibɛbu ya bato mpe ya banganga kati na bokonzi moke ya Yuda, mitema na bango mipɛngwaki mosika mpe mibalukaki epai na mabota mosusu, libosoliboso na Asulia mpe na nsima na Ezipito. (2 Mik. 16:7; 18:21) Kondima kati na nguya ya Yehova elɛmbaki. Epai kuna losambo ya bikeko ezalaki te, lolenge ya losambo ya bokosi ezalaki kosalema mingi, losambo oyo ezwaki moboko likoló na bindimandima kasi likoló na bobángi Nzambe na lolenge ya solo te.
2. (a) Nani ayanolaki na libyangi ya koloba mpo na Yehova, mpe ntango nini? (b) Likambo nini ya kobenda likebi na ntina na nkombo ya mosakoli oyo?
2 Na bongo, nani akokaki koloba mpo na Yehova? Nani alingaki koyebisa nguya na ye ya kobikisa? Eyano epesamaki nokinoki ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” Molobi ezalaki bongo Yisaya, oyo na ntango wana asilaki kobanda kosala lokola mosakoli. Ezalaki mbula oyo Mokonzi Uziya, oyo azalaki na maba, akufaki, soko na mobu 778 L.T.B. (Yis. 6:1, 8) Nkombo Yisaya elimboli “Lobiko ya Yehova,” oyo ezali na ndimbola moko na nkombo ya Yesu (“Yehova azali Lobiko”) atako ekomeli na yango ebalolami. Uta na ebandeli kino na nsuka, esakweli ya Yisaya ezali komonisa likambo oyo ete, Yehova azali lobiko.
3. (a) Makambo nini toyebi na ntina na Yisaya? (b) Asakolaki na boumeli ya eleko nini, mpe banani mosusu bazalaki basakoli na mikolo na ye?
3 Yisaya azalaki mwana ya Amoza (oyo akeseni na Amosa, mosakoli mosusu oyo autaki na Yuda). (1:1) Makomami malobeli te kobotama na ye mpe kufa na ye, atako lisoló ya kala ya Bayuda limonisaka ete abomamaki na mosumani na Mokonzi mabe Manase. (Kokanisá na Baebele 11:37.) Makomi na ye mamonisi ete afandaki na Yelusaleme elongo na mwasi na ye oyo azalaki mosakoli mpe azalaki soko na bana mibale oyo bazalaki na nkombo ya bisakweli. (Yis. 7:3; 8:1, 3) Asalaki na boumeli ya ntango ya bakonzi soko minei ya Yuda: Uziya, Yotama, Ahaza, mpe Hizikiya; mingimingi abandaki soko na mobu 778 L.T.B. (ntango Uziya akufaki, to mbala mosusu liboso na ntango wana) mpe akóbaki kino nsima na mobu 732 L.T.B. (mbula ya 14 ya Hizikiya), to na boumeli ya mibu koleka 46. Na ntembe te asilaki mpe kokoma esakweli na ye na dati wana. (1:1; 6:1; 36:1) Basakoli mosusu oyo bazalaki na ntango na ye ezalaki bongo Mika kati na Yuda mpe, na nɔ́rdi, Hosea mpe Odede.—Mika 1:1; Hos. 1:1; 2 Nta. 28:6-9.
4. Nini emonisi ete Yisaya azalaki mokomi ya mokanda oyo?
4 Likambo oyo ete Yehova atindaki Yisaya ete akoma bikateli na ye ya esakweli endimami na Yisaya 30:8: “Sasaipi, kendá, komá yango liboso na bango na etando, komá yango kati na mokanda, ete ebonga mpo na ntango ekoya, mpo na litatoli libela.” Balabi Bayuda ya ntango na kala bandimaki ete Yisaya azalaki mokomi na yango mpe batyaki mokanda oyo na esika ya liboso kati na mikanda ya basakoli minene (Yisaya, Yilimia, mpe Ezekiele).
5. Eloko nini emonisi bomoko ya mokanda ya Yisaya?
5 Bato mosusu balobaki ete kobongwana ya ekomeli ya mokanda oyo kobanda na mokapo 40 kino na nsuka emonisi ete ezalaki na mokomi mosusu, to “Yisaya ya mibale,” kolobáká ete likanisi yango limonani polele kati na kobongwana ya motó na likambo. Nzokande, ezali na bilembeteli mingi oyo bimonisi ete Yisaya nde akomaki mokanda mobimba oyo ememi nkombo na ye. Na ndakisa, bomoko ya mokanda oyo emonisami na maloba “Oyo na Bulɛɛ na Yisalaele,” oyo mamonani mbala 12 kobanda na mokapo 1 kino na mokapo 39, mpe mbala 13 kobanda mokapo 40 kino mokapo 66, nyonso na mobimba emonani mbala 25; nzokande ezali komonana bobele mbala 6 na biteni mosusu ya Makomami ya Liebele. Ntoma Paulo mpe amonisaki bomoko ya mokanda oyo na kotángaka biteni nyonso ya esakweli yango mpe na kondimáká ete mokanda yango mobimba ezalaki na mokomi bobele moko, Yisaya.—Kokanisá Baloma 10:16, 20; 15:12 na Yisaya 53:1; 65:1; 11:1.
6. Lolenge nini Barulo ya Mbu Ekufá epesi elembeteli ya kondimisa (a) ete Biblia ya mikolo na biso ezali na makomi ya ebandeli oyo mapemamaki mpe (b) ete mokanda oyo mobimba ekomamaki na Yisaya?
6 Likambo ya kobenda likebi, kobanda mobu 1947, bakundolaki babúku moko ya kala na mibengá ya molili oyo mizalaki mosika te na Khirbet Qumran, pene na ngámbo ya nɔ́rdi-ɛ́sti ya Mbu Ekufá (Mer Morte). Yango ezalaki bongo Barulo ya Mbu Ekufá, oyo ezalaki na esakweli ya Yisaya kati na yango. Yango ekomamaki na lolenge moko kitoko na Liebele liye libatelamaki malamu oyo ezalaki liboso ya makomi ya Bamasorete mpe yango eumelaki soko mibu 2000, kobanda na nsuka ya ekeke ya mibale L.T.B. Boye makomi na yango maumeli soko mbula nkóto koleka bamaniskri ya kala mpenza oyo ezalaki kati na makomi ya Bamasorete, oyo uta na yango mabongoli ya Makomami ya Liebele ya ntango na biso mazwi moboko. Bokeseni moke ezali na ekomeli na yango mpe na gramɛrɛ na yango, kasi mateya na yango makeseni te na oyo ya Bamasorete. Yango ezali elembeteli emonisi ete Biblia oyo tozali na yango lelo ezali na nsango epemami ya ebandeli oyo ezali na mokanda ya Yisaya. Lisusu, bamaniskri wana ya kala ezali kondima te likanisi oyo ete “Bayisaya” mibale nde bakomaki mokanda oyo, mpamba te mokapo 40 ebandi na molɔngɔ́ ya nsuka ya eteni ya makomi oyo masangisi mokapo 39, fraze ya ebandeli esuki na eteni oyo elandi. Na bongo, moakisi (copiste) atalelaki te oyo ekanisamaka lokola mbongwana ya mokomi to bokabwani ya mokanda na esika moko boye.a
7. Wapi bilembeteli mingi tozali na yango oyo bimonisi bosolo ya mokanda ya Yisaya?
7 Ezali na bilembeteli mingi oyo bimonisi bosolo ya mokanda ya Yisaya. Longola Mose, ezali na mosakoli mosusu te oyo baklisto baye bakomaki Biblia batángi mingi koleka. Ezali mpe na bilembeteli ya istware mpe ya arkeoloji oyo bimonisi bosolo na yango, na ndakisa mikanda milobeli lisoló ya bakonzi ya Asulia, sangisá mpe prisme ya Senakeliba oyo ezalaki na matumu motoba, oyo likoló na yango alobeli lisoló ya kozingelama ya Yelusaleme.b (Yis., mik. 36, 37) Bitiká ya kobebisama ya oyo ezalaki liboso Babilone ezali naino litatoli mpo na kokokisama ya Yisaya 13:17-22.c Ezalaki mpe litatoli ya nguya epai na moko na moko kati na bankóto ya Bayuda oyo batikaki Babilone, oyo basikolamaki na mokonzi na nkombo Siruse, oyo asakolamaki na Yisaya soko mbula 200 liboso. Ekoki kozala ete na nsima balakisaki Siruse esakweli wana, mpamba te ntango asikolaki Bayuda oyo batikalaki, alobaki ete atindamaki na Yehova mpo na kosala bongo.—Yis. 44:28; 45:1; Ezl. 1:1-3.
8. Lolenge nini kopemama ya mokanda oyo emonisami na kokokisama ya bisakweli bitalaki Masiya?
8 Likambo mpenza monene kati na mokanda ya Yisaya ezali bisakweli bitalaki Masiya. Yisaya abéngamaki ete “Mosakoli Mopalanganisi ya nsango malamu,” na ntina na bisakweli mingi oyo bikokisamaki na makambo masalemaki na bomoi ya Yesu. Mokapo 53, uta kala etalelamaki ete ezali “mokapo ya libombami,” te bobele epai na Mokube Moetiopia oyo alobelami na Misala mokapo 8, kasi mpe epai na libota mobimba ya Bayuda, mokapo oyo esakoli na nguya nyonso mpasi oyo Yesu azwaki, kolobeláká yango lokola likambo oyo moto amonaki na miso na ye mpenza. Makomami ya Greke ya boklisto elobeli kokokisama ya bisakweli bizwami na mokapo wana ya kokamwa ya Yisaya, lokola yango emonisami na bokokanisi oyo elandi: 53 v. 1—Yoane 12:37, 38; 53 v. 2—Yoane 19:5-7; 53 v. 3—Malako 9:12; 53 v. 4—Matai 8:16, 17; 53 v. 5—1 Petelo 2:24; 53 v. 6—1 Petelo 2:25; 53 v. 7—Misala 8:32, 35; 53 v. 8—Misala 8:33; 53 v. 9—Matai 27:57-60; 53 v. 10—Baebele 7:27; 53 v. 11—Baloma 5:18; 53 v. 12—Luka 22:37. Longola Nzambe, nani akokaki kozala eutelo ya bisakweli wana ya sikisiki?
MAKAMBO MAZALI KATI NA YISAYA
9. Makambo mazali kati na Yisaya makabwani na biteni boni?
9 Mikapo motoba ya liboso milobeli makambo mazalaki na Yuda mpe na Yelusaleme mpe miyebisi ngambo oyo Yuda azalaki na yango liboso na Yehova mpe mokumba ya Yisaya. Mokapo 7 kino mokapo 12 elobeli makaneli ya banguna mpo na etumba mpe elaka ya kobɔndisama ya Mokonzi na Kimya oyo aponamaki na Yehova. Mokapo 13 kino mokapo 35 ezali na ebele ya nsango na ntina na mabota mingi mpe esakweli ya lobiko oyo Yehova akopesa. Makambo masalemaki na ntango ya boyangeli ya Hizikiya malobelami na mokapo 36 kino mokapo 39. Mikapo mitikali kobanda mokapo 40 kino mokapo 66, motó na likambo na yango ezali kosikolama longwa na Babilone, bozongi ya Bayuda oyo batikalaki, mpe kobongisama ya Siona.
10. (a) Mpo na nini Yisaya azali kobyanga libota ete eya kobongisa makambo? (b) Asakoli nini mpo na mikolo ya nsuka?
10 Nsango ya Yisaya “mpo na Yuda mpe Yelusaleme” (1:1–6:13). Talá ye alati ngɔtɔ mpe sandale, wana atɛlɛmi na Yelusaleme mpe azali konganga ete: Bakonzi mabe! Bato! Bóyoka! Libota na bino ezali na bokɔnɔ longwa na motó kino na mosapi ya lokolo, mpe bosili kolɛmbisa Yehova na mabondeli na bino ya kotombola mabɔkɔ matondi na makila. Yakani, tóbongisa makambo, ete masumu oyo makómi motane lokola ngola mákoka kokóma mpɛmbɛ lokola mbula-mpɛmbɛ. Na mikolo ya nsuka, ngomba ya ndako ya Yehova ekotombwana, mpe mabota nyonso makokende epai na yango mpo na koteyama. Bakoyekola lisusu etumba te. Yehova akotombwama mpe akosantisama. Kasi sikawa Yisalaele mpe Yuda, atako balónamaki lokola elanga ya miwiti kitoko, bazali kobota mbuma mabe, oyo ezali bongo ezaleli ya kotyola mibeko. Bazali kosala ete malamu ekóma mabe mpe mabe ekóma malamu, mpamba te na miso na bango, bandimi ete bazali na mayele.
11. Na emonaneli nini Yisaya azwi mokumba na ye?
11 ‘Nzokande, namonaki Yehova, afandi na kiti na bokonzi etombwi likoló mosika,’ ezali wana maloba ya Yisaya. Elongo na emonaneli wana, Yehova apesi etindá oyo: “Kendá mpe lobá na bato oyo ete, Bóyoka koyoka.” Mpo na ntango boni? “Kino mboka ebebisami.”—6:1, 9, 11.
12. (a) Lolenge nini Yisaya mpe bana na ye basalelamaki lokola bilembo ya esakweli? (b) Elaka monene nini epesami kati na Yisaya mokapo 9?
12 Makaneli ya banguna mpo na etumba mpe elaka ya kobɔndisama (7:1–12:6). Yehova asaleli Yisaya mpe bana na ye lokola ‘bilembo mpe makamwisi’ ya esakweli mpo na komonisa liboso ete boyokani kati na Sulia mpe Yisalaele mpo na kobundisa Yuda ekokwea kasi na ntango oyo elakami Yuda akokende na boombo, mpe bobele batikali nde bakozonga. Moseka akozwa zemi mpe akobota mwana mobali. Nkombo na ye ekozala nini? Imanuele (elimboli, “Elongo na biso Nzambe azali”). Tiká ete banguna oyo basangani mpo na kobundisa Yuda bákanga ntina! “Bómikanga loketo mpe bóbebisama.” Ntango na mpasi ekozala, kasi na nsima pole monene ekongɛnga likoló na bato ya Nzambe. Mpamba te mwana asili kobotamela biso, “mpe nkombo na ye ekobéngama Mopesi-toli na kokamwa, Nzambe na nguya, Tata na seko, Nkolo na kimya.”—7:14; 8:9, 18; 9:6, NW.
13. (a) Likambo nini ezali kozela Moasulia ya lolendo? (b) Nini ekobima na boyangeli ya “etape” oyo euti na Yisai?
13 Yehova angangi ete: “Mawa epai na Asulia, lingenda na nkanda na ngai.” Nsima na kosalela lingenda yango mpo na kobɛta “libota na lipɛngwi,” Nzambe akoboma Moasulia ya lolendo. Na nsima, “ndambo oyo etikalaki ekozonga.” (10:5, 6, 21, NW) Talá sikawa mombóto moko, etape longwa na ekumu ya Yisai (Tata ya Davidi)! “Etape” wana ekoyangela na boyengebene, mpe na nzela na ye bikelamu nyonso bikosepela, mpasi to libebi ekozala te “zambi mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbongé ekozipaka mai-na-monana.” (11:1, 9) Lokola ye azali elembo mpo na mabota, balabála monene ekozala mpo na batikali baoyo bakouta longwa na Asulia. Bosepeli ekozala na kotoka mai uta na maziba ya lobiko mpe koyemba nzembo mpo na Yehova.
14. Kokwea nini esakolami mpo na Babilone?
14 Nsango ya etumbu ya Babilone (13:1–14:27). Yisaya azali sikawa kotalela mikolo mileki ya Asulia na ntango oyo lokumu ya Babilone eyaki makasi. Bóyoka! Mongongo ya bato mingi, lokito ya bikonzi, ya mabota oyo masangani! Yehova azali koyanganisa mampinga ya etumba! Ezali mokolo ya molili mpo na Babilone. Bilongi ya bato bizali na nsɔ́mɔ mpe bingali ngwaa, mpe mitema na bango mizali kopaswana. Bamede oyo bazangi koyokela mawa bakokweisa Babilone, “nkembo na makonzi.” Ekokóma esika ya libebi oyo ekozala na bafandi te mpe banyama na zámba bakozala wana “libota na libota.” (13:19, 20) Bakufi kati na Sheol bazali koningana mpo na koyamba mokonzi ya Babilone. Nkusu ikokóma esika na ye ya kolala mpe mpambo ezipeli na ye. Oyo nde kokwea monene mpo na ‘monzɔtɔ wana ya kongɛnga, mwana na kobima na moi’! (14:12) Akanisaki kotombola kiti ya bokonzi na ye kasi asili kokóma ebembe oyo ebwakami, na kotalela lolenge Yehova asili kokɔmbɔla Babilone na nkɔmbɔ ya libebi. Ezali na nkombo moko te, motikali moko te, mwana moko te, mombóto moko te, oyo akotikala!
15. Yisaya asakoli na ntina na libebi ya mikili nini?
15 Libebi ya mikili mikeseni (14:28–23:18). Yisaya alobeli sikawa makambo malekaki na Filisitia oyo ezali zingazinga na Mai Monene Méditerranée mpe na nsima alobeli makambo matali Moaba, oyo ezali na súdi-ɛ́sti ya Mbu Ekufá. Apesi esakweli na ntina na Damaseke ya Sulia oyo ezali mosika na nɔ́rdi ya Yisalaele, na ntina na Etiopia na súdi, mpe kino na Ebale Nil na Ezipito, elongo na bikateli ya Nzambe mpo na kobebisa mikili nyonso wana. Alobeli makambo matali Salegone, mokonzi ya Asulia, oyo azalaki liboso ya Senakeliba, oyo atindaki Tartan mokonzi na basodá mpo na kobundisa Asedode, engumba ya Filisitia, oyo ezali na wɛ́sti ya Yelusaleme. Na ntango wana, elobamaki na Yisaya ete alongola bilamba mpe atambola bolumbu mpe makolo ngulu na boumeli ya mbula misato. Na yango amonisi na nguya mpenza bozoba ya kotya motema epai na Ezipito mpe epai na Etiopia, baoyo, na “masɔkɔ na bango polele,” bakomemama na boombo na Moasulia.—20:4.
16. Mpasi nini esengeli kokwela Babilone, Edome, bato ya yikiyiki na Yelusaleme, mpe lisusu Sidona mpe Tulo?
16 Mosɛnzɛli uta na linɔ́ngi na ye azali kotala kokwea ya Babilone mpe ya banzambe na yango, mpe azali komona mpasi oyo ezali kokwela Edome. Yehova ye moko alobeli bato ya yikiyiki ya Yelusaleme oyo bazali koloba ete, “Tólya mpe tómɛla zambi lobi tokokufa!” Yehova alobi ete, ‘Bokokufa.’ (22:13, 14) Masuwa ya Talasisi mpe makolela, mpe Sidona akoyoka nsɔ́ni, mpamba te Yehova asili kopesa toli epai na Tulo, mpo na “koyeisa nsɔ́ni epai na bato na lokumu kati na mokili.”—23:9.
17. Etumbu nini mpe kobongisama lisusu nini esakolami mpo na Yuda?
17 Bikateli ya Yehova mpe lobiko (24:1–27:13). Kasi talá sikawa Yuda! Yehova azali kotika mokili mpamba. Bato mpe banganga, basáli mpe bankolo, basombi mpe batɛki—bango nyonso basengeli kobebisama, mpamba te basili kotika mibeko ya Nzambe mpe babuki kondimana oyo esalemaki mpo na libela. Kasi na ntango oyo elakami akotya likebi na ye epai na bakangami mpe akoyanganisa bango. Azali esika makasi mpe ebombamelo. Akosala elambo monene na ngomba na ye mpe akolongola kufa mpo na libela, akopangwisa mpisoli na bilongi nyonso. Ekolobama ete: “Talá oyo Nzambe na biso. Oyo azali Yehova.” (25:9, NW) Yuda ezali na engumba oyo lobiko ezali mpo na bifelo. Kimya ya koumela ezali mpo na baoyo bazali kotya motema epai na Yehova, ‘mpo ete Yah, Yehova azali libanga likoumela seko.’ Kasi moto mabe “akoyekola boyengebene te.” (26:4, 10) Yehova akosilisa banguna na ye nyɛɛ, nde akozongisa lisusu Yakobo.
18, 19. (a) Bokeseni nini ezali kati na mawa mpe esengo oyo esakolami mpo na Efelaima mpe Siona? (b) Na oyo etali kobikisa mpe koyangela libota na ye, Yehova akomimonisa lokola nani?
18 Nkanda ya Nzambe mpe mapamboli (28:1–35:10). Mawa epai na balangwi-masanga ya Efelaima, oyo “kokembisama ya kitoko” esengeli kobebisama! Kasi Yehova “akozala motole na nkembo mpe motole na kitoko” epai na baoyo batikali na libota na ye. (28:1, 5) Nzokande, bato ya lolendo na Yelusaleme bazali koluka ebombamelo kati na lokuta, na esika ya koluka yango kati na libanga limekami mpe ya kitoko oyo lizwami na Siona. Mbonge ya mai ekosukola bango nyonso. Basakoli ya Yelusaleme bazali kolala mpɔngi, mpe búku ya Nzambe ekangami mpo na bango. Bibɛbu bizali penepene, nde mitema mizali mosika mpenza. Kasi mokolo ekoya wana bakufi-matoi bakoyoka maloba ya búku oyo. Bakufi-miso bakomona mpe basɔkɛmi bakosepela.
19 Mawa mpo na baoyo bazali kokita na Ezipito mpo na koluka ebombamelo! Bato wana ya motó makasi balingi bimonaneli ya kosepelisa mpe ya lokuta. Bakobomama, kasi Yehova akozongisa lisusu batikali. Bango bakomona Molakisi na bango Monene, mpe bakopalanganisa bikeko na bango, bakoloba na yango ete, “Longwá awa!” (30:22) Yehova azali Mobateli ya solo ya Yelusaleme. Mokonzi akoyangela na boyengebene, elongo na bana ya mokonzi. Akoyeisa kimya mpe kobatelama mpo na libela. Bokosi ekosala ete bamemi-nsango na kimya bálela makasi, kasi epai na bato na ye, Oyo na Monene, Yehova, azali Mosambisi, Mopesi-Mibeko, mpe Mokonzi, mpe ye moko akobikisa bango. Mofandi moko akoloba te ete: “Nazali na malali.”—33:24.
20. Nkanda nini esengeli kokwela mabota, kasi mapamboli nini mazali liboso ya batikali oyo bakozongisama lisusu?
20 Nkanda ya Yehova esengeli kokwela mabota. Bibembe bikobimisa nsolo, mpe ngomba ikotonda na makila. Edome ekobebisama. Kasi mpo na basikolami na Yehova, mokili mokauki mokobimisa fololo, mpe “nkembo na [Yehova], bokonzi na Nzambe na biso,” ekomonana. (35:2) Bakufi-miso, bakufi-matoi, mpe bibubu bakobikisama, mpe Nzela ya Bulɛɛ ekofungwama mpo na basikolami ya Yehova wana bakozonga na esengo na Siona.
21. Maloba nini ya kotumola Moasulia abimisi na ntina na Yelusaleme?
21 Yehova azongisi Asulia na mikolo ya Hizikiya (36:1–39:8). Elendiseli ya Yisaya oyo etali kotya motema epai na Yehova ebongi mpenza? Ekoki mpenza kolónga liboso na komekama? Na mbula ya 14 ya boyangeli ya Hizikiya, Senakeliba moto na Asulia akɔmbɔli Palestine na mopanga ya etumba mpe atindi mwa mapinga na ye mpo na komeka kobangisa Yelusaleme. Labasake, molobeli na ye oyo alobaka Liebele, na kotyola nyonso atuni mituna epai na bato wana atɛlɛmaki na bifelo ya engumba: ‘Nini elikya oyo yo ozali kobatela yango? Ezipito? Mongendu oyo motutami! Yehova? Ezali na nzambe moko te oyo akoki kobikisa bato na ye longwa na mabɔkɔ ya mokonzi ya Asulia!’ (36:4, 6, 18, 20) Mpo na komonisa botosi epai na mokonzi, bato bayanoli te.
22. Lolenge nini Yehova ayanoli na libondeli ya Hizikiya, mpe lolenge nini Ye akokisi esakweli ya Yisaya?
22 Hizikiya abondeli Yehova mpo na koluka lobiko na ntina na nkombo na Ye, mpe na nzela ya Yisaya, Yehova ayanoli ete Ye akotya ndɔbɔ na ye kati na zolo ya Moasulia mpe akozongisa ye na nzela oyo autaki. Anzelu moko abomi Baasulia 185 000, mpe Senakeliba azongi nokinoki na ndako na ye, epai kuna bana na ye mpenza babomi ye na nsima kati na tempelo na ye ya bopakano.
23. (a) Na mabaku nini Hizikiya asalaki loyembo mpo na Yehova? (b) Kozanga bokɛngi nini amonisi, yango ekokisi esakweli nini ya Yisaya?
23 Hizikiya abɛli makasi pene na liwa. Nzokande, na lolenge ya likamwisi Yehova azongisi elili oyo moi ebimisaki mpo na komonisa, lokola elembo ete Hizikiya akobika, mpe ete mbula 15 ekobakisama likoló na bomoi ya Hizikiya. Mpo na komonisa botɔ́ndi na ye, asali loyembo moko ya kitoko mpo na kosanzola Yehova. Ntango mokonzi ya Babilone, na bokosi nyonso, atindi bamemi-nsango mpo na kopesa ye longonya lokola maladi esili, na kozanga bokɛngi, Hizikiya amonisi bango bozwi ya bokonzi. Na yango, Yisaya asakoli ete eloko nyonso oyo ezali kati na ndako ya Hizikiya ekomemama mokolo mosusu na Babilone.
24. (a) Nsango nini ya kobɔndisa Yehova asakoli? (b) Banzambe ya mabota bakoki nde kokokana na Yehova mpo na bonene, mpe litatoli nini asɛngi mpo na likambo yango?
24 Yehova abɔndisi batatoli na ye (40:1–44:28). Maloba ya ebandeli ya mokapo 40, “Bóbɔndisa,” mamonisi malamu eteni oyo etikali ya mokanda ya Yisaya. Mongongo kati na mokili mokauki ezali konganga ete: “Bópɛtola nzela ya Yehova, bino bato!” (40:1, 3, NW) Oyo ezali nsango malamu mpo na Siona. Yehova azali kobatela etongá na ye, azali komema bana na mpate na ntolo na ye. Uta na makoló matombwani azali kotala awa na zolongano ya mabelé. Mpo na bonene, akokani na nani? Azali kopesa nguya mingi mpe makasi mingi epai na bato oyo balɛmbi mpe bazangi nguya, oyo bazali kolikya epai na ye. Alobi ete bikeko na mabota bizali mopɛpɛ mpe bizangi ntina. Moponami na ye akozala lokola kondimana mpo na bato mpe pole ya mabota mpo na kofungola miso ya bakufi-miso. Yehova alobi epai na Yakobo ete: “Nalingi yo,” mpe akoloba na ebimelo na moi, mpe na elalelo na moi, na nɔ́rdi, mpe na súdi ete: ‘Tiká! Zongisá bana babali na ngai mpe bana basi na ngai.’ (43:4, 6, NW) Kati na esambiselo, atyeli banzambe ya mabota ntembe mpo ete bábimisa batatoli oyo bakomonisa bonzambe na bango. Libota ya Yisalaele lizali batatoli ya Yehova, basaleli na ye, oyo bakomonisa ete ye azali Nzambe mpe Mobikisi. Epai na Yesuluna (“Mosembwi,” Yisalaele) alaki kopesa elimo na ye mpe koyokisa nsɔ́ni epai na basáli na bikeko oyo bimonaka te, biyebi mpe eloko te. Yehova azali Mosikoli ya libota na ye; bato bakofanda lisusu na Yelusaleme mpe tempelo na yango ekotongama lisusu.
25. Bato basengeli koyeba nini na ekateli ya Yehova likoló na Babilone mpe banzambe na yango ya lokuta?
25 Kobekolama likoló na Babilone (45:1–48:22). Mpo na bolamu ya Yisalaele, Yehova aponi Siruse mpo na kolónga Babilone. Bato basengeli koyeba ete bobele Yehova nde azali Nzambe, Mozalisi ya likoló, ya mabelé, mpe ya bato oyo bafandi na yango. Azali kosɛka Bele mpe Nebo, banzambe ya Babilone, mpamba te bobele Ye nde akoki koyebisa uta na ebandeli makambo oyo makoya. Moseka ya Babilone asengeli kofanda na mputulu, alongolami na kiti na bokonzi mpe atikali bolumbu, nzokande ebele ya bapesi na ye ya toli bakotumbama lokola lokasa. Yehova ayebisi ‘nkingo na ebendé, elongi na motako’ Bayisalaele basambeli na bikeko ete bakoki kozala na kimya, boyengebene, mpe bozwi bobele na koyokáká ye, kasi ‘kimya ezali te mpo na bato mabe.’—48:4, 22.
26. Lolenge nini Siona ekobɔndisama?
26 Siona ebɔndisami (49:1–59:21). Kosaláká ete mosaleli na ye azala lokola pole ya mabota, Yehova azali kobelela epai na baoyo bazali kati na molili ete: “Bóbima!” (49:9) Siona ekobɔndisama, mpe mokili na yango mokauki mokokóma lokola Edene, elanga na Yehova, oyo etondi na esengo, na bosepeli, na masanzoli, mpe na nzembo. Yehova akosala ete likoló ekima lokola mólinga, mabelé ebeba lokola elamba, mpe bafandi na yango bákufa lokola nzinzi. Na bongo, mpo na nini kobanga botyoli ya bato oyo bakoki kokufa? Kɔ́pɔ ya bololo oyo Yelusaleme esili komela esengeli sikawa koleka epai na mabota oyo mabebisaki yango.
27. Nsango malamu nini esakolami na Siona, mpe nini esakolami na ntina na ‘mosaleli ya Yehova’?
27 ‘Lamuká, ɛ Siona, mpe tɛlɛmá longwa na mputulu!’ Talá momemi-nsango, azali kopota likoló na ngomba azali na nsango malamu mpe azali koloba na Siona ete, “Nzambe na yo asili kokóma mokonzi.” (52:1, 2, 7, NW) Bóbima na esika ya mbindo mpe bómibatela pɛto, bino baoyo bozali kati na mosala ya Yehova. Mosakoli alobeli sikawa ‘mosaleli ya Yehova.’ (53:11) Azali moto oyo ayinami, aboyami, oyo azali komema bampasi na biso kasi nde atalelami lokola ete abɛtami na Nzambe. Atɔbɔlamaki mpo na bikweli na biso, kasi abikisaki biso na bampota na ye. Lokola mpate oyo bamemi mpo na koboma, asalaki mobulu te mpe alobaki lokuta te. Apesaki molimo na ye lokola mbeka ya ekweli mpo na komema mabungá ya bato mingi.
28. Lolenge nini mapamboli oyo mazali koya mpo na Siona malobelami, mpe yango ezali na boyokani na kondimana nini?
28 Lokola mobali mpe nkolo na yango, Yehova ayebisi Siona ete anganga na esengo mpamba te kobota na yango eyei. Atako ayokisamaki mawa mpe abɛtamaki na mopɛpɛ, akokóma engumba oyo ezali na miboko ya safili, na nsamba ya salali, mpe na bikuke ya mabanga ya kongɛnga. Bana na ye, oyo bakoteyama na Yehova, bakozala na kimya mingi, mpe ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na bango ekolónga te. Yehova alobi na mongongo makasi ete: “Ɛ moko na moko oyo ayoki mposa na komela yaká!” Soki bayei, akosala elongo na bango “kondimana mpo na motema-boboto na ye epai na Davidi”; akopesa motambwisi mpe mokóló lokola motatoli epai na bato. (55:1-4, NW) Makanisi ya Nzambe maleki mosika makanisi ya moto, mpe liloba na ye likolónga solo. Mikube oyo bazali kotosa mobeko na ye, ezala ete bauti na ekólo nini, bakozwa nkombo ya malamu koleka bana mibali mpe bana basi. Ndako ya Yehova ekobéngama ndako na mabondeli mpo na bato nyonso.
29. Yehova alobi nini epai na basambeli na bikeko, kasi elikya nini apesi na libota na ye?
29 Lokola azali Oyo na likoló mpe oyo akumisami mingi, ye oyo nkombo na ye ezali bulɛɛ, Yehova ayebisi na basambeli na bikeko oyo bamipesá na makambo ya pite ete ye akowelana na Yisalaele libela na libela te. Kokila na bango ya bilei mpo na losambo ezali sé mikalo mpamba mpo na kosalaka mabe. Lobɔkɔ ya Yehova ezali mokuse te mpo na kobikisa, litoi na ye mpe lizali bozito te mpo na koyoka, kasi Yisaya alobi ete ezali ‘mpenza mabungá na bino bato nde esili koyeisa bokabwani kati na bino mpe Nzambe na bino.’ (59:2) Yango wana bazali kolikya mpo na pole kasi bazali kati na molili. Epai mosusu, elimo ya Yehova likoló na bato na ye ya sembo oyo asalaki kondimana elongo na bango emonisi ete liloba na ye likozala na minɔkɔ na bango kino na mabota oyo makoya nsima, libela na libela.
30. Lolenge nini Yehova akɛmbisi Siona, mpe yango emonisami na nkombo nini ya sika?
30 Yehova akɛmbisi Siona (60:1–64:12). “Tɛlɛmá, ɛ mwasi, ngɛngisa pole, mpo . . . nkembo mpenza ya Yehova esili kongɛnga.” Nzokande, molili tuu ezipi mabelé mobimba. (60:1, 2, NW) Na ntango wana Siona ekotombola miso na yango mpe ekongɛnga, mpe motema na yango ekolɛnga wana yango ekomona biloko kitoko ya mabota koya epai na ye likoló na ebele ya bakamela. Lokola mapata ya bibenga oyo bizali kopumbwa, bakoyanganisama epai na ye. Bapaya bakotonga bifelo na ye, bakonzi bakosalela ye, mpe bikuke na ye bikofungama soko moke te. Nzambe na ye asengeli kokóma kitoko na ye, mpe akofulukisa moko ete ekóma nkóto mpe oyo moke ekokóma libota na nguya. Mosaleli ya Nzambe azali koloba ete elimo ya Yehova ezali likoló na ye, epakoli ye mpo ete ayebisa nsango malamu. Siona ezwi nkombo ya sika, Esengo na Ngai ezali kati na Ye (Hefesiba), mpe mokili na ye ekobéngama Mwasi oyo azali na Nkolo (Beulah). (62:4, NW, maloba na nsé ya lokasa) Etindá epesami ya kobongisa nzela monene ya bokonzi longwa na Babilone mpe kotɛlɛmisa elembo kati na Siona.
31. Nani auti na Edome, mpe libondeli nini libota ya Nzambe ezali kosala?
31 Longwa na Bosola kati na Edome, moto oyo alati bilamba bitondi na makila azali koya. Na nkanda oyo azali na yango asili konyata bato kati na ekamwelo ya vinyo, kokamoláká bango kino kobimisa makila. Bato ya Yehova bayebi malamu ezalela na bango ya mbindo mpe bazali kopesa mabondeli ya kosimba motema, kolobáká ete, ‘Ɛ Yehova, ozali nde tata na biso, biso tozali lima, yo ozali moyemi. Ɛ Yehova, yoká nkanda monene mingi te. Tozali bato na yo.’—64:8, 9.
32. Na bokeseni na baoyo bazali kotika Yehova, na makambo nini libota ya Yehova likoki kosepela?
32 “Makoló ya sika mpe mabelé ya sika”! (65:1–66:24). Bato oyo basili kotika Yehova mpo na banzambe ya “Makila Malamu” mpe ya “Bomoi oyo esilá kokanama liboso” bakozala na nzala mpe bakoyoka nsɔ́ni. (65:11) Basaleli ya Nzambe bakozala na esengo mingi. Talá! Yehova azali kozalisa makoló ya sika mpe mabelé ya sika. Oyo nde esengo mpe bosepeli esengeli kozala na Yelusaleme mpe epai na bato na yango! Bandako ekotongama mpe bilanga ya miwiti bikolónama, mbwa ya zámba mpe mwana na mpate bakolya esika moko. Mabe to libebi ekozala te.
33. Bosepeli nini, nkembo nini, mpe makambo nini masengeli kozala libela na libela masakolami mpo na baoyo balingaka Yelusaleme?
33 Makoló ezali kiti na ye ya bokonzi mpe mabelé ezali etyelo na ye ya makolo, na yango ndako nini bato bakoki kotonga mpo na Yehova? Libota moko lisengeli kobotama bobele na mokolo moko, mpe baoyo nyonso balingaka Yelusaleme babyangami na kosepela lokola Yehova afulukisi kimya likoló na yango lokola ebale. Liboso na banguna na ye akoya lokola mɔ́tɔ mpenza—makalo na ye makozala lokola mopɛpɛ makasi mpo na komonisa nkanda na ye elongo na nkɛlɛ mpe na kongala na mɔ́tɔ epai na bato nyonso oyo bazangi botosi. Bamemi-nsango bakotindama epai na mabota nyonso mpe na bisanga mosika mpo na koyebisa nkembo na ye. Makoló mpe mabelé na ye ya sika masengeli kozala libela na libela. Bobele bongo, baoyo bazali kosalela ye mpe bana na bango bakotɛlɛma seko. Ekozala to bomoi ya seko to liwa ya seko.
LITOMBA NA YANGO
34. Wapi mwa ndambo na bililingi ya kosimba motema oyo ebakisi nguya na nsango ya Yisaya?
34 Na makambo nyonso, mokanda ya esakweli ya Yisaya ezali likabo ya litomba mpenza liuti epai na Yehova Nzambe. Ezali komonisa makanisi matombwani ya Nzambe. (Yis. 55:8-11) Baoyo balobelaka makambo matali solo ya Biblia liboso na bato bakoki kozwa kati na mokanda ya Yisaya, lokola kati na ebombelo ya biloko ya motuya, bililingi ya kosimba motema oyo ezali na nguya lokola bilakiseli oyo Yesu azalaki kosalela. Yisaya alobeli biso na nguya nyonso bozoba ya moto oyo azali kosalela nzeté sé moko mpo na kopelisa mɔ́tɔ mpe mpo na kosala ekeko ya losambo. Azali komonisa biso mayoki ya kozanga esengo ya moto oyo amilalisi na mbeto oyo ezali mpenza mokuse mpe azali na bolangeti ya moke, mpe azali komonisa biso mpɔngi ya bozito ya basakoli baye bakokani na mbwa oyo izali ebubu, oyo izali mpenza na gɔigɔi mpo na konganga. Lokola Yisaya alendisi biso, soki biso moko tozali ‘koluka kati na búku ya Yehova mpe kotánga yango na mongongo makasi,’ tokoki kososola nguya ya nsango oyo Yisaya azali na yango mpo na mikolo oyo.—44:14-20; 28:20; 56:10-12; 34:16.
35. Lolenge nini Yisaya abendi likebi likoló na Bokonzi ya Masiya mpe likoló na Yoane Mobatisi, moto oyo atindamaki liboso?
35 Esakweli ebendi likebi na biso mingi likoló na Bokonzi ya Nzambe na nzela ya Masiya. Yehova ye moko azali Mokonzi oyo aleki likoló, mpe ye nde azali kobikisa biso. (33:22) Kasi ezali boni mpo na Masiya ye moko? Nsango ya anzelu epai na Malia na ntina na mwana oyo asengelaki kobotama emonisaki ete Yisaya 9:6, 7 esengelaki kokokisama na ntango oyo akozwa kiti ya bokonzi ya Davidi; “akozala mokonzi na ndako na Yakobo libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33) Matai 1:22, 23 emonisi ete kobotama ya Yesu epai na moseka ekokisaki Yisaya 7:14 mpe emonisi ye lokola “Imanuele.” Soko mbula 30 na nsima, Yoane Mobatisi abandaki kosakola ete “bokonzi na Likoló esili kobɛlɛma.” Bakomi nyonso minei ya Baevanzile batángi Yisaya 40:3 mpo na komonisa ete Yoane azalaki moto oyo ‘azali konganga na mokili mokauki.’ (Mat. 3:1-3; Mko. 1:2-4; Luka 3:3-6; Yoa. 1:23) Na ntango ya batisimo na ye, Yesu akómaki Masiya—Mopakolami ya Yehova, etape to mosisa ya Yisai—mpo na koyangela mabota. Likoló na ye basengeli kotya elikya na bango, mpo na kokokisama ya Yisaya 11:1, 10.—Lom. 15:8, 12.
36. Kokokisama ya bisakweli nini ya ntina emonisi polele Masiya Mokonzi?
36 Talá lolenge Yisaya akóbi komonisa Masiya Mokonzi! Yesu atángaki mokumba na ye uta na rulo moko ya Yisaya mpo na komonisa ete azalaki Mopakolami ya Yehova, mpe na nsima abandaki “kosakola Nsango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe, [mpamba te],” lokola alobaki yango, “mpo ete natindami na likambo yango.” (Luka 4:17-19, 43; Yis. 61:1, 2) Masoló ya Baevanzile minei matondi na makambo oyo mamonisi mosala ya Yesu awa na mabelé mpe lolenge ya liwa na ye lokola yango esakolamaki kati na Yisaya 53. Atako bayokaki nsango malamu ya Bokonzi mpe bamonaki misala ya kokamwa ya Yesu, Bayuda bakangaki ndimbola te na ntina na mitema makasi na bango, yango ekokisaki Yisaya 6:9, 10; 29:13; mpe 53:1. (Mat. 13:14, 15; Yoa. 12:38-40; Mis. 28:24-27; Lom. 10:16; Mat. 15:7-9; Mko. 7:6, 7) Yesu azalaki libaku mpo na bango, kasi akómaki libanga ya moboko oyo Yehova atyaki kati na Siona mpe likoló na yango Ye atongi ndako na ye ya elimo mpo na kokokisama ya Yisaya 8:14 mpe 28:16.—Luka 20:17; Lom. 9:32, 33; 10:11; 1 Pet. 2:4-10.
37. Lolenge nini bantoma ya Yesu batángaki mpe basalelaki mokanda ya Yisaya?
37 Bantoma ya Yesu bakóbaki kosalela malamu esakweli ya Yisaya, kosaleláká yango na mosala na bango. Na ndakisa, mpo na komonisa ete basakoli basengeli kozala mpo na kotonga kondima, Paulo atángi Yisaya, na kolobáká ete: “Kitoko boni makolo na bango bakosakolaka nsango malamu na makambo malamu!” (Lom. 10:15, NW; Yis. 52:7; talá lisusu Baloma 10:11, 16, 20, 21.) Petelo mpe atángi Yisaya mpo na komonisa ete nsango malamu esengeli koumela seko: “Mpo ete, Bato nyonso bazali lokola matiti, kitoko na bango nyonso lokola felele na matiti; matiti makauki mpe felele ikwei; nde Liloba na [Yehova] ezali koumela seko. Liloba yango ezali Nsango Malamu oyo esakolami epai na bino.”—1 Pet. 1:24, 25; Yis. 40:6-8.
38. Motó na likambo kitoko nini etali Bokonzi elobelami na Yisaya, oyo eyaki kolobelama lisusu na nsima na bakomi mosusu ya Biblia?
38 Na lolenge ya kitoko mpenza, Yisaya alobeli elikya ya Bokonzi mpo na mikolo mizali koya! Talá! Ezali “makoló ya sika mpe mabelé ya sika,” kati na yango “mokonzi akoyangela mpo na boyengebene” mpe bana na mokonzi bakoyangela na bosembo. Oyo nde ntina ya kozala na esengo mpe na bosepeli! (65:17, 18; 32:1, 2, NW) Lisusu, Petelo atángi nsango ya esengo ya Yisaya: “Kasi ezali na makoló ya sika mpe mabelé ya sika oyo tozali kozela engebene elaka [ya Nzambe], mpe kati na yango boyengebene ekozala.” (2 Pet. 3:13, NW) Motó na likambo oyo ya kitoko ya Bokonzi ekómi na nkembo na yango monene kati na mikapo ya nsuka ya Emoniseli.—Yis. 66:22, 23; 25:8; Emon. 21:1-5.
39. Elikya nini kitoko Yisaya azali kolobela?
39 Na bongo, mokanda ya Yisaya, atako ezali kotɔndɔla polele banguna ya Yehova mpe baoyo bazali koloba na bokosi nyonso ete bazali basaleli na ye, yango ezali komonisa na lolenge ya nkembo elikya kitoko ya Bokonzi ya Masiya oyo na nzela na yango nkombo monene ya Yehova ekosantisama. Ezali kolimbola mingi makambo minene ya solo oyo matali Bokonzi ya Yehova mpe ezali kobɔndisa biso mitema kati na elikya ya esengo na “lobiko na ye.”—Yis. 25:9; 40:28-31.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 1221-1223.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 957; Vol. 2, nkasa 894-895.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 324.