Mokanda ya Biblia nimero 22—Loyembo na Salomo
Mokomi: Salomo
Esika ya bokomi: Yelusaleme
Nsuka ya bokomi: soko 1020 L.T.B.
1. Mpo na nini mokanda oyo ekoki kobéngama “Loyembo oyo loleki nzembo mosusu nyonso”?
“MOKILI mobimba mozali na eloko ya motuya te koleka mokolo oyo loyembo oyo nta bonzenga epesamelaki Yisalaele.” Ezali na maloba wana nde “labi” Akiba, ye oyo azalaki na bomoi na ekeke ya liboso na Ntango na Biso, amonisaki bosepeli na ye mpo na Loyembo na Salomo.a Nkombo ya mokanda yango ezali bongo bokuse ya maloba oyo mazwami na ebandeli ya mokanda yango: “Loyembo oyo loleki nzembo nyonso ezali loyembo na Salomo.” Engebene kokomama na yango na Liebele na liloba mokomoko, ebéngami “Loyembo oyo loleki nzembo mosusu nyonso,” komonisáká bongo nkembo oyo eleki nyonso, oyo ekokani na liloba “makoló ya makoló,” mpo na kolobela makoló oyo maleki makoló. (Det. 10:14, NW) Ezali te kosangisama ya nzembo mingi kasi ezali bobele loyembo moko, “loyembo oyo ekomami na lolenge ya kokoka mpenza, moko na nzembo oyo eleki nzembo nyonso oyo esilá kosalema kino lelo.”b
2. (a) Nani akomaki Loyembo na Salomo, makoki nini azalaki na yango, mpe mpo na nini mokanda yango mobongaki kobéngama ete loyembo ya bolingo oyo ekokisami te? (b) Epai wapi mpe ntango nini mokanda yango mokomamaki?
2 Lokola maloba ya ebandeli emonisi yango, ezali Mokonzi Salomo na Yelusaleme nde akomaki loyembo yango. Azalaki mpenza na makoki mingi mpo na kokoma ndakisa wana nta bonzengá ya ntɔ́ki ya Liebele. (1 Mik. 4:32) Ezali bongo maloba kitoko ya ntɔ́ki mpe ezali na ndimbola monene mpe ezali kolobela makambo na bonzengá nyonso. Motángi oyo akoki komona kati na makanisi na ye mokili ya Orient epai kuna makambo oyo malobelami awa masalemaki akosepela na yango lisusu koleka. (Loy. 4:11, 13; 5:11; 7:4) Libaku oyo epusaki kokomama na yango ekokani na mosusu te. Mokonzi monene Salomo, ye oyo azalaki na nkembo mpe na mayele, na makasi mpe na nguya, na bozwi mingi ya mosuni, oyo epusaki ata mokonzi-mwasi na Seba ete akumisa ye, kasi nyonso wana ebendaki soko moke te likebi ya elenge mwasi moko ya mboka oyo ye azalaki kolinga ete akóma mwasi na ye. Lokola elenge mwasi yango abatelaki bobele bolingo na ye epai na elenge mobali mobɔkɔli na mpate, mokonzi alóngaki te. Na yango, mokanda oyo ekokaki kobéngama na lolenge lobongi mpenza Loyembo ya bolingo ya Salomo oyo ekokisami te. Na kopemama na Yehova Nzambe, akomaki loyembo wana mpo ete ekoka kopesa matomba epai na batángi ya Biblia ya bileko oyo bisengelaki koya na nsima. Akomaki yango na Yelusaleme. Ekoki kozala ete ekomamaki pene na mobu 1020 L.T.B., mwa bambula moke na nsima wana tempelo esilaki kotongama. Na ntango oyo akomaki loyembo yango, Salomo azalaki na “basi na mokonzi ntuku motoba mpe makango ntuku mwambe,” nzokande akómaki na “basi nkámá nsambo, bango bana na mikonzi, mpe makango nkámá misato” na nsuka ya bokonzi na ye.—Loy. 6:8; 1 Mik. 11:3.
3. Elembeteli nini emonisi ete Loyembo na Salomo etángami kati na mikanda mipemami ya Biblia?
3 Kondimama ya Loyembo ya Salomo lokola moko na mikanda mipemami ya Biblia ebɛtɛlamaki ntembe soko moke te na ntango ya kala. Etalelamaki lokola eteni moko kati na mikanda mipemami oyo mindimamaki na Baebele uta kala, na liboso na Ntango na Biso. Ekɔtisamaki kati na Biblia ya Greke ya Septante. Josèphe, ye mokomi na makambo ya kala, akɔtisaki yango kati na kataloge na ye ya mikanda ya bulɛɛ. Na yango, lolenge moko na mikanda mosusu ya Makomami ya Liebele, mokanda yango ezali na bilembeteli oyo emonisi kondimama na yango lokola moko na mikanda mipemami ya Biblia.
4. (a) Lokola liloba “Nzambe” ezangi kati na mokanda yango, elimboli ete ekoki te kotángama kati na mikanda oyo mindimami ete mipemami ya Biblia? (b) Eloko nini epesi yango esika ya ntina mingi kati na mikanda mipemami ya Biblia?
4 Nzokande, basusu babɛtaki ntembe likoló na kondimama na yango kati na makomami mapemami ya Biblia, mpamba te Nzambe alobelami te kati na yango. Ekoki kolobama te ete mokanda yango endimami te kati na makomami mapemami bobele mpo ete nkombo ya Nzambe elobelami kuna te, lolenge moko mpe ekoki kolobama te ete mokanda boye to mokanda boye epemami bobele mpo ete liloba “Nzambe” ezwami kati na yango. Nkombo ya Nzambe ezwami mpenza kuna na ebéngeli na yango na bokuse na mokapo 8, molɔngɔ́ 6 (NW), epai kuna bolingo elobami ete ezali “mɔ́tɔ na Yah.” Ntembe ezali soko moke te ete mokanda yango mozali kati na makomami oyo Yesu andimaki yango wana ayebisaki ete: “Bozali kolukaluka kati na makomi mpo ete bobanzi ete na yango bokozwa bomoi na seko. Mpe izali yango mpenza itatoli mpo na ngai.” (Yoane 5:39) Lisusu, elilingi na yango ya nguya ya bolingo ya solosolo oyo emonisami kati na bato mibale, lokola yango emonisami, na ndimbola ya elimo, kati na Klisto mpe “mwasi” na ye, epesi na Loyembo na Salomo esika eleki motuya kati na Biblia.—Emon. 19:7, 8; 21:9.
MAKAMBO MAZALI KATI NA LOYEMBO NA SALOMO
5. (a) Lolenge nini bato oyo bazali kati na lisoló yango bamonisami? (b) Motó na likambo nini ya kosimba motema elobelami?
5 Makambo oyo mazwami kati na mokanda yango malobelami na lolenge ya kolandana ya masoló kati na bato oyo bazali kolobana. Molobi mokomoko azali koloba na ngala na ye. Bato bazali koloba ezali bongo Salomo mokonzi ya Yelusaleme, mobɔkɔli moko na mpate, molingami na ye Sulamite, bandeko na ye mibali, bilenge basi na ndako na mokonzi (“bana basi na Yelusaleme”), mpe basi na Yelusaleme (“bana basi na Siona”). (Loy. 1:5-7; 3:5, 11) Bayebani malamu engebene makambo oyo bazali koloba na ntina na bango moko to na ntina na oyo elobami epai na bango. Lisoló yango ezali koleka pene na Suneme, to Suleme, epai kuna Salomo mpe basáli kati na ndako na ye bakendeki kofanda na bahema na bango. Ezali kolobela motó na likambo moko ya kosimba motema—bolingo ya mwana mwasi moko ya mboka Suneme mpo na moninga na ye oyo azali mokɛngɛli na mpate.
6. Lisoló nini esalemi kati na elenge mwasi mpe basi na ndako na mokonzi na káa ya Salomo?
6 Elenge mwasi Sulamite azwami kati na káa ya Salomo (1:1-14). Elenge mwasi amonani na esika bahema ya mokonzi etyamaki, epai kuna mokonzi amemi ye, kasi elenge mwasi yango azali bobele na mposa ya komona molingami na ye, mokɛngɛli na mpate. Na mposa makasi ya komona molingami na ye, azali koloba makasi lokola nde elenge mobali yango azalaki wana. Basi ya ndako ya mokonzi, “bana basi na Yelusaleme,” oyo bazalaki kozela mokonzi, bazali kotala Sulamite na kokamwa nyonso mpo ete loposo ya nzoto na ye ezalaki moindo. Alobi ete aziká loposo mpo na moi mpo ete akɛngɛlaka bilanga ya vinyo ya bandeko na ye ya mibali. Na nsima, abandi koloba epai na molingami na ye lokola nde azalaki na bonsomi mpe azali kotuna soki akoki komona ye epai wapi. Basi na ndako ya mokonzi bayebisi ye ete abima mpe akende koleisa etongá na ye pene na bahema ya babateli na mpate.
7. Maloba nini ya kolamwisa bolingo Salomo alobi yango epai na elenge mwasi wana, kasi azwi litomba nini mpo na yango?
7 Salomo ayei. Aboyi kotika elenge mwasi yango ete akende. Akumisi kitoko na ye mpe alaki ete akokembisa ye na ‘biloko na wolo’ mpe “na palata.” Sulamite aboyi bilaka yango mpe ayebisi ye ete azali na bolingo bobele mpo na molingami na ye.—1:11.
8. Lolenge nini molingami ya elenge mwasi wana ayikisi ye mpiko? Azali na mposa makasi ya komona nini?
8 Mobɔkɔli na mpate molingami akómi (1:15–2:2). Molingami ya Sulamite akei kati na káa ya Salomo mpe alendisi ye. Andimisi ye ete alingaka ye mingi. Sulamite amonisi mposa makasi ya kozala pembeni ya molingami na ye mpe esengo ya kozala na ye elongo kati na bilanga mpe na zámba.
9. Lolenge nini elenge mwasi mpe molingami na ye bakumisi kitoko na ye?
9 Sulamite azali elenge mwasi moko ya komikitisa. Alobi ete: “Ngai nazali felele kitoko na salono.” Molingami na ye mobateli na mpate andimi ete Sulamite akokani na mosusu te, kolobáká ete: “Lokola felele na sosana kati na nzube, boye ezali molingami na ngai kati na bana basi.”—2:1, 2.
10. Elenge mwasi yango amikundoli likambo nini na ntina na bolingo na ye?
10 Elenge mwasi amonisi mposa makasi ya kokutana na molingami na ye mobateli na mpate (2:3–3:5). Awa akabwani lisusu na molingami na ye, Sulamite amonisi ete alingaka ye koleka bato mosusu nyonso, mpe ayebisi basi na Yelusaleme ete bazali na ndai ya komeka te kolamwisa epai na ye bolingo oyo ye aboyi epai na moto mosusu. Sulamite amikundoli ntango oyo molingami na ye mobɔkɔli na mpate azalaki koyanola na libyangi na ye mpe lolenge azalaki koyebisa ye ete bákende na ngomba na eleko ya molungé. Kati na makanisi, azali komona ye lolenge azali komata na bangomba, kopumbwáká na esengo. Ayoki ye azali konganga ete: “Tɛlɛmá, molingami na ngai, oyo na bonzengá na ngai.” Nzokande, bandeko na ye mibali, oyo bandimisamaki mpenza te na ntina na ye ete akotikala ngwi, batindaki ye ete akende kosala kati na elanga ya vinyo. Sulamite alobi ete: “Molingami na ngai azali na ngai mpenza, ngai mpe nazali na ye,” mpe asɛngi na ye ete alanda ye.—2:13, 16.
11. Ndai nini Sulamite akundoli lisusu epai na bana basi ya Yelusaleme?
11 Sulamite alobeli lolenge akangamaki kati na káa ya Salomo. Kati na mbeto na ye na butu, azali na mposa makasi ya komona molingami na ye mobateli na mpate. Akundweli lisusu bana basi na Yelusaleme ete bazali na ndai ya komeka te kolamwisa epai na ye bolingo oyo ye aboyi yango.
12. Elendiseli nini mosusu elenge mobali apesi epai na molingami ntango Salomo amemi ye na Yelusaleme?
12 Sulamite kati na Yelusaleme (3:6–5:1). Salomo azongi na Yelusaleme na nkembo nyonso, mpe bato na nzela bazali kokumisa molɔngɔ́ mobimba oyo ezali kolanda ye. Ata kati na ntango oyo ya komekama, mobateli na mpate asundoli Sulamite te. Alandi molingami na ye, oyo azipami elamba, mpe akutani na ye. Ayikisi ye mpiko na maloba kitoko ya bolingo. Ayebisi ye ete alingi kozwa bonsomi mpe kobima na engumba wana, molingami na ye apusami na mayoki makasi ya bolingo mpe alobi ete: “Yo ozali na bonzengá nyonso, molingami na ngai.” (4:7) Mwa kotala pamba ya Sulamite ezali kobɛtisa elenge mobali motema nokinoki. Maloba ya bolingo ya elenge mwasi mazali kitoko koleka vinyo, nsolo ya nzoto na ye ezali kitoko lokola oyo ya Lebanona, mpe loposo ya nzoto na ye lokola elanga ya mbuma na limona. Elenge mwasi abéngi molingami na ye ete aya kati na “elanga na ye,” mpe elenge mobali andimi. Baninga na ye, basi na Yelusaleme balendisi bango ete: “Lyá, ɛ baninga! Melá mpe lángwá na bolingo.”—4:16; 5:1 (NW).
13. Elenge mwasi alɔ́ti ndóto nini, mpe lolenge nini alobeli molingami na ye epai na bana basi na ndako na mokonzi?
13 Ndɔ́tɔ ya elenge mwasi (5:2–6:3). Sulamite ayebisi basi na ndako na mokonzi ndɔ́tɔ moko auti kolɔ́ta, oyo kati na yango ayoki moto moko azali kobɛta ekuke. Molingami na ye azali libanda, azali kosɛnga na ye ete akɔta. Kasi ye azali na mbeto. Na nsuka ntango alamuki mpo na kofungola ndako, alimwe kati na butu. Alandi ye, kasi amoni ye te. Bakɛngɛli bakutani na ye mpe babɛti ye. Ayebisi basi na ndako na mokonzi ete soki bamoni molingami na ye, báyebisa ye ete abɛli maladi ya bolingo. Batuni ye soki molingami na ye akeseni na basusu na eloko nini. Sulamite abandi sikawa koloba na ntina na molingami na ye, koyebisáká ete azali “pɛɛ mpe motane, azali liboso na nkóto zomi.” (5:10) Basi na ndako na mokonzi batuni ye soki molingami na ye akendeki wapi. Alobi ete akendeki koleisa mpate kati na bilanga.
14. Atako Salomo asalelaki maloba kitoko ya kolɛngola, lolenge nini atikaki?
14 Masɛnginya ya nsuka ya Salomo epai na Sulamite (6:4–8:4). Mokonzi Salomo abɛlɛmi epai na Sulamite. Ayebisi ye lisusu ete azali kitoko mpenza, kitoko koleka “basi na mokonzi ntuku motoba mpe makango ntuku mwambe,” kasi atako bongo Sulamite aboyi ye. (6:8) Akómaki kuna bobele mpo ete mosala na ye momemaki ye kino pembeni ya káa na ye. Atuni ete: ‘Omoni nini epai na ngai?’ Salomo asaleli libaku ya koyanola na motuna wana ya sembo mpo na koyebisa ye na ntina na kitoko na ye, kobanda na manzaka ya makolo kino na nsuki ya motó, kasi elenge mwasi aboyi koyoka maloba sukali nyonso wana. Na mpiko nyonso, alobi ete azali mpo na molingami na ye mobateli na mpate, mpe angangi mpo na kobénga ye. Mpo na mbala ya misato, akundweli bana basi na Yelusaleme ete bazali na nsé ya ndai ya komeka te kolamwisa epai na ye bolingo oyo ye aboyi yango. Salomo apesi ye nzela ete azonga epai na ye. Atiki koluka ete Sulamite alinga ye.
15. (a) Eloko nini elenge mwasi asɛngaki epai na bandeko na ye ya mibali na nsima ya bozongi na ye? (b) Lolenge nini bolingo ya motema moko elóngaki?
15 Bozongi ya Sulamite (8:5-14). Bandeko na ye ya mibali bamoni ye azali koya, kasi azali ye moko te. “ayekami na lipeka na molingami na ye.” Akundoli ete akutanaki na molingami na ye na nsé ya nzeté ya pɔ́mɔ mpe ayebisi na ntina na bolingo makasi oyo azali na yango epai na ye. Mokanda yango moyebisi mwa ndambo ya maloba oyo bandeko na ye mibali balobaki yango liboso na ntina na ye wana babéngaki ye “ndeko mwasi moke,” kasi alobi ete amimonisi ete azali mwasi oyo akɔmɛli mpe azangi kotengatenga. (8:8) Tiká ete sikawa bandeko na ye ya mibali bándima libala na ye. Mokonzi Salomo akoki kofanda na bozwi na ye! Elenge mwasi azali kosepela na elanga na ye ya miwiti, mpamba te alingi ye oyo alingi bobele ye na motema mobimba. Mpo na ye, bolingo oyo ezali na nguya motindo moko na liwa mpe ekozikisa lokola “mɔ́tɔ na Yah.” Bolingo na ye ya komipesa mobimba mpe kozanga kobongwana oyo ezali “makasi lokola Shéol,” elóngaki mpe etombolaki ye na nkembo mingi ya bomoko elongo na molingami na ye mobateli na mpate.—8:5, 6, NW.
LITOMBA NA YANGO
16. Mateya nini ya ntina mazwami kati na loyembo oyo?
16 Mateya nini moto na Nzambe akoki kozwela yango litomba lelo kati na loyembo oyo ya bolingo? Kobatela elaka, bosembo, mpe bokangami kati na mitindá miuti na Nzambe emonisami polele. Loyembo yango ezali koteya ete bizaleli malamu mpe kozala sembo kati na bolingo ezali likambo moko malamu mpenza. Ezali koteya ete bolingo ya solo ekoki kolóngama te, ekoki kozimana te, ekoki kosombama te. Bilenge mibali mpe bilenge basi baklisto, mpe mibali baklisto mpe basi baklisto bakoki kozwa litomba kati na ndakisa oyo ebongi mpenza kosalisa bango na ntango bakutani na masɛnginya to kolɛngolama.
17. (a) Lolenge nini Paulo amonisi ete loyembo oyo ekomamaki mpo na koteya lisangá ya boklisto? (b) Mpo na nini ekoki kozala ete Paulo akanisaki yango wana azalaki kokomela baklisto ya Kolinti mpe ya Efese? (c) Bokokanisi nini kitoko ekoki kosalema kati na yango mpe makomi mapemami ya Yoane?
17 Kasi loyembo wana epemami ezali lisusu na litomba mingi koleka mpo na lisangá ya boklisto na mobimba na yango. Baklisto ya ekeke ya liboso bandimaki yango ete ezali moko na biteni ya Makomami Mosantu, moko na bango akomaki ete: “Mpo na nyonso ikomamaki kalakala, ikomami mpo na kolakisa biso ete tózala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na kolendisama na makomi.” (Lom. 15:4) Paulo, mokomi yango oyo apemamaki, akokaki mpenza kokanisa na ntina na bolingo makasi ya Sulamite epai na molingami na ye mokɛngɛli na mpate ntango akomaki lisusu epai na lisangá ya boklisto ete: “Nazali na zúwa mpo na bino engebene zúwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe, mpamba te ngai mpenza nalakaki kopesa bino na libala epai na mobali moko, ete nasengeli kolakisa bino lokola moseka epai na Klisto.” Paulo akomaki mpe na ntina na bolingo ya Klisto lokola bolingo ya mobali epai na mwasi na ye. (2 Kol. 11:2, NW; Ef. 5:23-27) Yesu Klisto azali te bobele Mobateli na Mpate aleki malamu mpo na bango, kasi azali mpe mokonzi na bango, oyo alaki epai na bayekoli na ye bapakolami esengo eleki monene ya “libala” elongo na ye kati na makoló.—Emon. 19:9; Yoa. 10:11.
18. Lolenge nini bayekoli bapakolami ya Klisto Yesu bazali kozwa litomba kati na ndakisa ya elenge mwasi Sulamite?
18 Na ntembe te, bayekoli ya Yesu Klisto oyo bazali bapakolami bakoki kozwa matomba mingi kati na ndakisa ya elenge mwasi Sulamite. Bango mpe basengeli kozala sembo na bolingo na bango, komitikáká soko moke te ete kongɛnga ya biloko ya mosuni ya mokili elengola bango, kobateláká bongo bosembo na bango kino na ntango bakozwa mbano. Makanisi na bango matyami likoló na biloko ya likoló mpe ‘bazali koluka liboso Bokonzi.’ Bazali koyamba maloba ya bolingo ya Mobateli na Mpate, Yesu Klisto. Bazali na esengo monene ya koyeba ete molingami wana, atako azangi komonana, azali na bango pene mpenza, mpe azali koyikisa bango mpiko ete bálónga mokili. Lokola bazali na bolingo oyo ekoki kobebisama te, oyo ezali makasi lokola “mɔ́tɔ na Yah,” mpo na Mobateli na bango, bakolónga mpenza mpe bakozala na bomoko elongo na ye lokola baninga na ye basangoli ya libula kati na Bokonzi ya nkembo na makoló. Na motindo yango, nkombo ya Yah ekokumisama!—Mat. 6:33; Yoa. 16:33.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mishnah ya Bayuda (Yadayim 3:5).
b Búku Commentary ya Clarke, Vol. III, lokasa 841.