Mokapo 19
Ntango boyebi ya Nzambe ekotonda na mabelé mobimba
1, 2. Lolenge nini biloko Yehova azalisaki bibebisamaki?
KANISÁ mopakoli-lángi-moyemi oyo auti kosilisa koyema etánda moko kitoko. Azali kotalela yango ete ezali malamu—mosala moko kitoko! Kasi na butu, moto moko ya zuwa abebisi yango. Ya solo, yango ekopesa mopakoli-lángi-moyemi mawa mingi. Oyo nde mposa makasi akozala na yango ya komona ete mobebisi atyami na bolɔ́kɔ! Mpe okoki kokanisa esengo makasi akozala na yango ntango amoni ete mosala na ye mozongisami na kitoko na yango ya ebandeli.
2 Lokola mopakoli-lángi-moyemi wana, Yehova asalaki mosala moko monene na kobongisáká mabelé mpe na kotyáká moto likoló na yango. Nsima ya kozalisa mobali mpe mwasi, alobaki ete mosala na ye nyonso awa na mabelé ezalaki “malamu mingi.” (Genese 1:31) Adama mpe Eva bazalaki bana ya Nzambe mpe alingaki bango. Akanaki ete bázala na bomoi moko ya esengo mpe ya kitoko na mikolo mizalaki koya. Ya solo, Satana akɔtisaki bango kati na botomboki, kasi mosala kitoko ya Nzambe mobebisamaki mpo na libela te.—Genese 3:23, 24; 6:11, 12.
3. “Bomoi ya solosolo” ezali nini?
3 Nzambe azwaki ekateli ya kobongisa makambo. Alingi mpenza komona biso kozala na bomoi lolenge akanaki yango na ebandeli. Bomoi na biso ya mokuse mpe etondi na mikakatano ezali te “bomoi ya solosolo,” mpamba te ekeseni mpenza na oyo Yehova akanaki. “Bomoi ya solosolo” oyo Nzambe alingi mpo na biso ezali “bomoi ya seko” kati na makambo ya kokoka.—1 Timoté 6:12, 19, NW.
4, 5. (a)Lolenge nini elikya ya Paladiso ekokokisama? (b) Mpo na nini tosengeli kokanisa na ntina na elikya na biso mpo na mikolo mizali koya?
4 Boyebi tozali na yango na ntina na Yehova ezali kotyela biso mikumba liboso na ye. (Yakobo 4:17) Kasi kanisá na mapamboli okozwa soki osaleli boyebi yango mpe soki otye molende ya kozwa bomoi ya seko. Kati na Liloba na ye, Biblia, Yehova Nzambe asili komonisa lolenge nini bomoi yango ekozala kitoko kati na Paladiso oyo esili kobɛlɛma awa na mabelé. Ya solo, libota ya Yehova bazali kosalela Nzambe bobele mpo na kozwa mbano te. Tozali kosalela Nzambe nde mpo na bolingo oyo tolingi ye. (Malako 12:29, 30) Lisusu, tokozwa bomoi yango te mpo na makoki na biso moko na kosaleláká Yehova. Bomoi ya seko ezali nde likabo ya Nzambe. (Baloma 6:23) Ekozala malamu mpo na biso komanyola likoló na bomoi yango mpamba te elikya ya Paladiso ezali kokundwela biso lolenge ya Nzambe oyo Yehova azali—“mopesi na mbano [na bolingo nyonso] epai na baoyo bazali koluka ye mpenza.” (Baebele 11:6, NW) Elikya makasi kati na makanisi na biso mpe na mitema na biso ekopesa biso likoki ya koyika mpiko na mikakatano oyo mizali kati na mokili ya Satana.—Yilimia 23:20.
5 Tiká tótya likebi na biso sikawa likoló na elikya na bomoi ya seko oyo ezwami kati na Biblia mpo na mikolo mizali koya na mabelé oyo makobongwana Paladiso. Bomoi ekozala lolenge nini ntango boyebi ya Nzambe ekotonda na mabelé mobimba?
NSIMA YA ARMAGEDON—PALADISO NA MABELÉ
6. Armagedon ezali nini, mpe yango ekolimbola nini mpo na bato?
6 Lokola tomonaki yango liboso, mosika te Yehova Nzambe akoboma ebongiseli ya biloko mabe ya lelo. Mokili ezali kobɛlɛma nokinoki na oyo Biblia ezali kobénga ete Har-Magedon, to Armagedon. Liloba wana ekoki kotinda bato mosusu na kokanisa ete ezali kobomama na nzela na bibundeli ya nikleere oyo ekoyeisama na bitumba ya mabota, kasi Armagedon ezali nde eloko mosusu. Lokola Emoniseli 16:14-16 emonisi yango, Armagedon ezali “etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” Ezali etumba esangisi “bakonzi na mikili nyonso,” to mabota. Mosika te, Mwana na Yehova Nzambe, oyo asili kotyama Mokonzi, akobanda etumba. Nsuka ya etumba yango ezali na ntembe te. Baoyo nyonso bazali kotɛmɛla Bokonzi ya Nzambe mpe baoyo basangani na ebongiseli mabe oyo ya Satana, bakobomama. Bobele baoyo bazali sembo epai na Yehova nde bakobika.—Emoniseli 7:9, 14; 19:11-21.
7. Satana mpe bademó na ye bakozala wapi na boumeli ya Mbula Nkóto ya Boyangeli ya Klisto, mpe lolenge nini yango ekopesa bato matomba?
7 Kanisá ete yo osili kobikisama na likámá wana. Bomoi ekozala lolenge nini na mabelé kati na mokili ya sika oyo Nzambe alaki? (2 Petelo 3:13) Tosengeli te kokanisakanisa, mpamba te Biblia eyebisi biso yango, mpe oyo yango ezali koloba ezali likambo ya nsáí mpenza. Elobi na biso ete Satana mpe bademó na ye bakozala lisusu na nguya te, bakokangama kati na libulu mozindo ya kozanga mosala na boumeli ya Mbula Nkóto ya Boyangeli ya Yesu Klisto. Bikelamu wana mabe, oyo bazali na mayele mabe, bakozala lisusu na likoki te ya kobimisa mikakatano mpe komeka kopusa biso na kosala misala mizangi sembo liboso na Nzambe. Oyo nde kobɔndisama!—Emoniseli 20:1-3.
8, 9. Kati na mokili ya sika, ekozala boni mpo na bampasi, bokɔnɔ mpe konuna?
8 Na ntango ebongi, lolenge nyonso ya bokɔnɔ ekolimwa. (Yisaya 33:24) Na ntango yango, batɛngumi bakotɛlɛma, bakotambola, bakopota mpe bakobina na makolo oyo ezali makasi. Nsima ya bambula mingi ya kozanga koyoka, bakufi-matoi bakoyoka mingongo ya esengo zingazinga na bango. Bakufi-miso bakokamwa mingi na komona balángi mpe biloko ndenge na ndenge liboso na bango. (Yisaya 35:5, 6) Na nsuka, bakomona bilongi ya balingami na bango! Mbala mosusu, komona na bango ekobulungana mwa ntango moke mpo na mpisoli ya esengo.
9 Kanisá naino! Manɛti makozala lisusu te, nzeté ya batɛngumi mpe nzeté ya bakufi-miso ekozala lisusu te, nkisi ya monganga ekozala lisusu te, bisika ya kosalisa mino to lopitalo ekozala lisusu te! Bokɔnɔ ya mayoki mpe konyokwama na makanisi ekozala wana te mpo na kobebisa esengo ya bato. Bana bakobɛla lisusu te. Bobangé ekosila. (Yobo 33:25) Tokozala na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ mpe na makasi. Ntɔ́ngɔ́ nyonso tokolamuka nsima na kolekisa mpɔngi kitoko na butu, wana tozwi nguya ya sika, totondi na makasi mpe na molende mpo na kobanda mokolo ya sika ya bomoi moko ya esengo mpe na mosala ya kosepelisa.
10. Mosala nini ekopesama na babiki na Armagedon?
10 Babiki na Armagedon bakozala na mosala monene mpe ya esengo: bakobongola mabelé ete mákóma paladiso. Mbeba nyonso ya ebongiseli oyo enuni ekolongolama. Na esika ya bandako mabe mpe matiti ekóli mpambampamba, ekozala nde mapango kitoko mpe bilanga kitoko. Moto nyonso akozala na ndako kitoko mpe oyo ebongi. (Yisaya 65:21) Nsima na ntango, bisika wana bibongwani paladiso awa na mabelé bikokóma mingi mpe bikoyikana moko na mosusu kino etando mobimba ekokokisa masɛngami ya bonzenga oyo epesamaki kala na Mozalisi kati na elanga ya Edene. Ekozala mpenza likambo ya bosepeli na kosangana na mosala wana ya kozongisa paladiso!
11. Boyokani nini ekozala na mikolo mizali koya kati na bato elongo na ezingelo ya mabelé mpe banyama?
11 Nyonso oyo ekosalema na nsé ya litambwisi ya Nzambe na boye ete ezingelo ekobebisama te. Bato bakofanda na kimya elongo na banyama. Na esika ya koboma bango mpambampamba, moto akozongela nde mokumba na ye ya kotambwisa mabelé, mpe akobatela bango malamu. Kanisá naino mbwa ya zámba mpe mwana na mpate, nkosi mpe mwana na ngombe bazali kolya esika moko—mpe bibwɛlɛ bifandi na kimya nyonso. Ata mwana moke akobanga nyama na zámba te; kimya ya mokili ya sika ekobebisama soko moke te na bato bakokani na nyama mabe mpe na yauli. (Yisaya 11:6-8) Ekozala mpenza mokili ya sika ya kimya!
BATO BABONGWANI
12. Lolenge nini Yisaya 11:9 ezali kokokisama lelo oyo, mpe lolenge nini ekokokisama na Paladiso?
12 Yisaya 11:9 (NW), eyebisi biso mpo na nini mabe ekozala te na mabelé mobimba. Totángi ete: “Mabelé makotonda mpenza na boyebi ya Yehova lokola mai matondi na mbú.” Mokapo yango etaleli bato mpamba te banyama bakoki te kozwa “boyebi ya Yehova” mpe kosala mbongwana, mpo ete batambwisami na loómbi. Nde boyebi ya Mozalisi na biso ebongolaka bato. Na ntembe te, osili kosala mbongwana na makambo mosusu matali yo moko mpo ete ozali kosalela boyebi ya Nzambe kati na bomoi na yo. Bamilió ya bato basili kosala bongo. Na yango, esakweli oyo esili kobanda kokokisama epai na baoyo bazali kosalela Yehova. Nzokande, ezali lisusu kolobela ntango oyo bato na mokili mobimba bakotika kosala makambo lokola banyama mpe makambo nyonso ya mobulu mpe bakokóma bato na kimya mpo na libela.
13. Ebongiseli nini ya koteya bato ekosalema na mabelé?
13 Ekozala likambo ya kitoko mingi ntango boyebi ya Nzambe ekotonda na mabelé mobimba! Kuna ekozala na ebongiseli monene ya koteya bato, ebongiseli oyo ekotambwisama na Mokonzi Yesu Klisto mpe bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na ye. “Baruló” ya sika ekobanda bongo kosalelama. Emonani ete ekozala malako makomami ya Nzambe oyo makosalelama lokola moboko mpo na koteya bafandi ya mabelé. (Emoniseli 20:12) Bato bakoyekola etumba lisusu te, kasi kimya. Bibundeli nyonso bikolimwa mpo na libela. (Nzembo 46:9) Bafandi ya mokili ya sika bakoyekola kosalela baninga na bango makambo na bolingo, na limemya mpe na lokumu.
14. Lolenge nini mokili ekobongwana mpenza ntango bato bakozala libota sé moko oyo lizali na bomoko?
14 Bato bakokóma libota sé moko. Eloko moko te ekoya kobebisa bomoko mpe bondeko. (Nzembo 133:1-3) Ntina ya kokanga ndako na fungola mpo na miyibi ekozala te. Kimya ekozala na mitema nyonso, na ndako nyonso mpe na esika nyonso awa na mabelé.—Mika 4:4.
LISEKWA YA ESENGO
15. Wapi bituluku mibale ya bato oyo bakosekwa awa na mabelé?
15 Na boumeli ya Mbula Nkóto wana, lisekwa ekosalema. Baoyo basalaki lisumu na nkó kotɛmɛla elimo santu ya Nzambe to nguya na ye oyo ekosalaka mosala, na koboyáká kondima mosala na yango to na kotombokeláká yango, mpe babongoli motema te, bakosekwisama te. (Matai 23:15, 33; Baebele 6:4-6) Ya solo, bobele Nzambe nde ayebi nani asalaki lisumu kotɛmɛla elimo na ye. Kasi bituluku mibale ya bato bakosekwisama—“bato sembo mpe bato na sembo te.” (Misala 24:15) Mpo ete makambo makotambwisama na molɔngɔ́, tokoki koloba ete bato ya liboso oyo bakozongisama na bomoi awa na mabelé bakozala bayengebene, baoyo basalelaki Yehova na bosembo nyonso.—Baebele 11:35-39.
16. (a) Banani bakozala kati na “bato na sembo” oyo bakosekwa awa na mabelé? (b) Banani bato ya sembo ya ntango na kala oyo okolinga mpenza kokutana na bango, mpe mpo na nini?
16 Na esika ya koyoka bansango ya bitumba, ya makámá mpe bato bakufi, basaleli ya Yehova bakoyoka nde nsango ya bato basekwi. Oyo nde esengo tokozala na yango na koyoka nsango ya lisekwa ya mibali mpe basi ya sembo lokola Abele, Enoka, Noa, Abalayama, Sala, Yobo, Mose, Rahaba, Luta, Davidi, Eliya, Esetele. Oyo nde masoló ya kosimba motema bakopesa wana bakolobela biso na sikisiki makambo makomami na Biblia, oyo bakutanaki na yango! Na ntembe te, bango mpe bayengebene oyo basili kokufa kala mingi te bakozala na motema mɔ́tɔ ete tóyebisa bango ndenge nini ebongiseli ya Satana esukaki mpe lolenge nini Yehova asantisaki nkombo na ye mosantu mpe alóngisaki lotómo na ye ya koyangela.
17. Lisungi nini ya motuya mingi bato na sembo bakopesa epai na basusu oyo bakosekwa?
17 Bato wana ya sembo bakozala lisungi monene na boumeli ya eteni oyo ekolanda ya lisekwa, wana bamiliare ya “bato sembo te” bakobima longwa na kufa! Ebele mingi na bato bazwaki soko moke te libaku ya koyeba Yehova. Satana ‘azipaki miso na bango.’ (2 Bakolinti 4:4) Kasi misala ya Zábolo mikobebisama nyee. Bato na sembo te bakozonga na bomoi na mabelé moko ya kitoko mpe ya kimya. Bakoyambama na libota libongisami malamu mpo na koteya bango na ntina na Yehova mpe Mwana na ye, Mokonzi Yesu Klisto. Lokola bamiliare ya basekwi bakokóma koyeba mpe kolinga Mozalisi na bango, boyebi ya Yehova ekotonda na mabelé lokola emonanaki naino liboso te.
18. Mayoki na yo makozala ndenge nini ntango okoyamba balingami na yo oyo bakosekwisama?
18 Oyo nde esengo lisekwa ekopesa na mitema na biso! Nani amonaki mpasi te na ntina na monguna na biso oyo ete kufa? Ya solo, nani abulunganaki te ntango molingami na ye to moninga na ye akufaki na ntina na bokɔnɔ, na bobangé, na likámá to na etumba? Na bongo, kanisá esengo ya kokutana na bango lisusu kati na Paladiso. Bamama mpe batata, bana mibali mpe bana basi, baninga mpe bandeko, bakoyambana na kosɛka mpe na kolela na esengo.
EZALELI YA KOKOKA NA NSUKA!
19. Likamwisi nini likosalema na boumeli ya Mbula Nkóto?
19 Na boumeli ya Mbula Nkóto, likamwisi ya kitoko ekosalema. Mpo na bato, ekozala mbala mosusu likambo lileki kosimba motema na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto. Yehova akotinda Mwana na ye ete asalela matomba ya mbeka ya lisiko mpo na mobali nyonso mpe mwasi nyonso ya sembo mpe ya botosi. Na nzela yango, masumu nyonso makolongolama mpe bato bakokóma na ezaleli ya kokoka.—1 Yoane 2:2; Emoniseli 21:1-4.
20. (a) Kozala na ezaleli ya kokoka ekolimbola nini? (b) Ntango nini babiki na Armagedon mpe basekwi bakobanda kozala na bomoi ya solosolo?
20 Ezaleli ya kokoka! Yango ekolimbola nini? Ekolimbola kozonga na bomoi oyo Adama mpe Eva bazalaki na yango liboso ete básumuka epai na Yehova Nzambe. Na nzoto, na makanisi, na mayoki, na bizaleli, na elimo—na lolenge nini oyo tokoki kokanisa yango—bato ya kokoka bakobonga na makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga. Kasi bato banso bakozala sé lolenge moko? Soko moke te! Biloko bizalisami na Yehova—banzeté, bafololo, banyama—nyonso ezali koteya biso ete Nzambe alingaka biloko bizala ndenge na ndenge. Bato ya kokoka bakozala na bomoto mpe na makoki oyo ekeseni. Moko na moko akozala na bomoi lokola Nzambe alingaki yango. Emoniseli 20:5 elobi ete: “Bakufi oyo batikalaki [bakómaki] na bomoi liboso na nsuka na mbula yango nkóto te.” Motindo moko na ebele monene ya babiki na Armagedon, basekwi bakokóma na bomoi ya solosolo bobele nsima na kozwa ezaleli ya kokoka oyo ezangi masumu.
21. (a) Nini ekosalema na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto? (b) Na nsuka, nini ekokómela Satana mpe baoyo nyonso bakolanda ye?
21 Bato ya kokoka bakokutana bongo na komekama ya nsuka. Wana Boyangeli ya Mbula Nkóto ekosila, Satana mpe bademó na ye bakobimisama na libulu mozindo mpo na mwa ntango moke mpe nzela ekotikelama bango na kosala milende ya nsuka mpo na kopɛngwisa bato longwa na Yehova. Basusu bakotya mposa mabe na esika ya liboso koleka bolingo ya Nzambe, kasi botomboki wana ekozala sé ya ntango mokuse. Yehova akoboma bato wana ya moimi elongo na Satana mpe bademó na ye. Na bongo, basáli nyonso na mabe bakolimwa mpo na libela.—Emoniseli 20:7-10.
OKOSALA NINI?
22. Okosepela kosala nini kati na Paladiso?
22 Bomoi ya seko ekopesama na baoyo nyonso balingi Yehova Nzambe mpe bakofanda kati na Paladiso awa na mabelé. Tokoki mpenza te kokanisa esengo boni bakozala na yango, kasi yo mpe okoki kozala na esengo yango. Miziki, ntɔ́ki, misala—ee, misala nyonso oyo bato ya kokoka bakosala ekoleka misala kitoko oyo mizali kati na mokili ya lelo oyo misalemi na bato ya mayele ya mokili oyo esili konuna! Mpamba te, bato bakozala na kokoka mpe ntango na bango ekozala na ndelo te. Kanisá oyo okozala na likoki ya kosala ntango okozala moto ya kokoka. Kanisá lisusu, na ntina na makambo oyo yo mpe baninga na yo bokoyekola na ntina na biloko oyo Yehova azalisaki—longwa na bamiliare ya maboke mineneminene ya minzoto oyo ezali na mɔlɔ́ngɔ́ kino biloko oyo bizali mikemike koleka atɔ́mi. Makambo nyonso oyo moto akosala makosepelisa mpenza motema ya Yehova, Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló.—Nzembo 150:1-6.
23. Mpo na nini bomoi kati na Paladiso ekolɛmbisa soko moke te?
23 Tokolɛmba bomoi te. Tokosepela nde mingi mpe mingi lisusu na bomoi wana ntango ekozala koleka. Boyebi na ntina na Nzambe ezali na ndelo te. (Baloma 11:33) Seko na seko, tokozala ntango nyonso na makambo mingi ya koyekola mpe biloko ya sika mpo na koyeba. (Mosakoli 3:11) Mpe, wana okolanda koyekola na ntina na Yehova Nzambe, okoumela na bomoi—mwa bambula te kasi libela na libela!—Nzembo 22:26.
24, 25. Mpo na nini osengeli uta sikawa kozala na bomoi na boyokani na boyebi ya Nzambe?
24 Elikya kitoko boye mpo na bomoi kati na mabelé oyo makobongwana paladiso, ebongi ete tótyela yango milende nyonso komipimela makambo mosusu, boye te? Ezali bongo! Yehova apesi yo lifungola mpo na mikolo kitoko wana mizali koya. Lifungola yango ezali boyebi ya Nzambe. Okosalela yango?
25 Soki olingi Yehova, okosepela kosala mokano na ye. (1 Yoane 5:3) Okozwa mapamboli mingi na kolanda nzela yango! Soki okosalela boyebi ya Nzambe, yango ekomemela yo bomoi ya esengo ata kati na mokili oyo ya yikiyiki. Mpe mbano oyo okozwa na mikolo mizali koya ezali mpenza monene, mpamba te yango ezali boyebi oyo ekomema na bomoi ya seko! Sikawa ezali ntango malamu mpo na yo na kosala eloko. Zwá ekateli ya kozala na bomoi oyo eyokani na boyebi ya Nzambe. Monisá bolingo na yo mpo na Yehova. Kumisá nkombo na ye mosantu mpe monisá ete Satana azali mobuki ya lokuta. Kosaláká bongo, Yehova Nzambe, Ye Liziba ya mayele ya solo mpe ya boyebi ya solo, akosepela mingi na ntina na yo. (Yilimia 31:3; Sefania 3:17) Mpe akolinga yo mpo na libela!
MEKÁ BOYEBI NA YO
“Bomoi ya solosolo” ezali nini?
Nsima na Armagedon, nini ekosalema awa na mabelé?
Nani akosekwisama awa na mabelé?
Lolenge nini bato bakokóma na ezaleli ya kokoka mpe komekama nini ekoyela bango na nsuka?
Elikya na yo na ntina na Paladiso ezali nini?
[Elilingi na lokasa 188, 189]
Ozali kolikya kozala na bomoi kati na Paladiso, ntango boyebi ya Nzambe ekotonda na mabelé mobimba?