Paradis oyo ezongi ezali kokumisa Nzambe
“Nakobongisa na nkembo etanda na makolo na ngai.”—YISAYA 60:13.
1, 2. (a) Likambo nini Nzambe asakolaki na ntina etali mabelé, na nzela na mosakoli Yisaya? (b) Makambo nini mamonani na miso na biso soki totali mibu nkoto ya avenire na moto?
JEHOVAH azali kotalela mabelé, oyo ye akelaki, lokola etando moko epai oyo azali kotia makolo na ye, etemelo na makolo na ye na elilingi. Na monoko ya mosakoli na ye Yisaya, ayebisaki ete ‘akobongisa na nkembo etemelo na makolo na ye’. (Yisaya 60:13) Na lisalisi ya Biblia, mokanda oyo epemami na Nzambe, tokoki komona lokola na nzela ya télescope moko ya nguya mingi mibu nkoto ya avenire na moto. Emoneli moko kitoko ezali komonisama liboso na miso na biso: mabelé engengi na kitoko mpo ete Jardinier oyo aleki monene na molongo mobimba abongisi yango. Paradis ezongi kobanda nsuka kino nsuka mosusu ya etando mpo na bolamu na bato.
2 Ee, Nzambe oyo aleki likoló, oyo na ebandeli atiaki moto kati na paradis, azali kokana bolamu moko eleki monene mpo na bato. Oyo Mozalisi nini atondi na bolingo boye! Ezali kolekisa ndelo te soki tokoloba mpo na ye ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8, 16) Kati na Paradis oyo ezongi, mibali mpe basi oyo bateli mpe ya kokoka bafandi elongo lokola bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali kolingana. (Yisaya 9:6) Lokola batambwisami na bolingo, bazali komonisa botosi ya kokoka epai na Mozalisi ya lokumu ya likoló mpe mabelé, Jéhovah Nzambe.
3, 4. (a) Kokokana nini makóló mpe mabelé ekozla na yango? (b) Baanzelu bakosala nini ntango Paradis ekozongisama na mabelé?
3 Esili koleka bankoto na mibu, kati na ndimbola moko oyo epemami na Nzambe na ntina na esika oyo ye azali koyangela, Nzambe alobaki maloba oyo ya polele epai na libota na ye: “Lola [makóló] ezali kiti na ngai mpe mokili ezali etielo na makolo na ngai.” (Yisaya 66:1) Nkembo makasi ya “etielo” na ye na makolo, Paradis ya mabelé, esengeli mpenzampenza kokokana na oyo ya kiti na ye kati na makóló.
4 Na eleko ya kozalisa mabelé, bikelamu oyo bazalaki kosala penepene na kiti ya bokonzi na Nzambe kati na makoló bazalaki komona etando yango. Batondaki na esengo na ntango bamonaki kongenga makasi na yango! Ndenge nini bakokaki kokanga motema mpo na kozanga koyemba banzembo ya esengo? (Tala Sofoni 3:17; Nzembo 100:2) Mozalisi, oyo asepelaki mpe atondaki na esengo, apemisaki moko na basaleli na ye mpo ete akoma ndimbola oyo ya sikisiki ya makambo malekaki na likoló: “Wana myoto na ntongontongo eyembaki elongo moko mpe bana nyonso na Nzambe bangangaki na esengo.” (Yobo 38:7) Baanzelu, bana na Nzambe, bakonganga lisusu makasi na esengo, mpo na nkembo ya Nzambe, ntango Paradis ekozongisama.
5. Mayoki nini kokokisama ya mokano na Nzambe na ntina na mabelé esengeli kobimisa kati na biso?
5 Ezali mpenza likambo ya kolendisa na kotanga kati na Makomami Mosantu oyo mapemami na Nzambe ete kobanda na ebandeli mpenza Jéhovah Nzambe azali na mokano ete mabelé ekoma paradis, Ebongi mpenza komizela na boye ete Nzambe moko oyo lokumu na ye ezali kobakisama ntango nyonso, mpe oyo bokonzi na ye ezali kokwea ata moke te, akokamba mokano na ye oyo etali mabelé na bolongi wana oyo ekobimisa esengo mpe ekopesa nzela na kokembisa ye. Nkembo nyonso ebongi mpo na ye!—Nzembo 150:1, 2; Yisaya 45:18; Emoniseli 21:3-5.
Basekwi bapesi maboko na kozongisama ya Paradis
6. Ndenge nini mabelé ekotondisama na bato nsima na Armagedon?
6 Babiki ya Armagedon bakozala moke na kotalela bonene ya mabelé, kasi mabelé ekotonda bobele na bakitani na bango te. Jéhovah ‘akokumisa mpe etielo na makolo na ye’ na kozongisaka na bomoi baoyo bazali kati na nkunda mpe baoyo bakopesamela matomba ya mbeka na lisiko na Klisto. Basekwi yango bakozala na libaku malamu ya kosangana na mosala kitoko ya kobongola mabelé Paradis moko kitoko koleka.—Misala 24:15.
7. Maloba nini na Yesu babiki na Armagedon bakobatela yango kati na makanisi na bango?
7 Babiki ya Armagedon bakobatela ntango nyonso na makanisi na bango maloba kitoko oyo Nkolo Yesu Klisto alobaki yango mokolo mosusu ete: “Bokamwa na likambo oyo te, mpo ete ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Oyo eleko nini kitoko ntango, kati na nkunda na bango, bakufi bakobanda koyoka mongongo ya Mwana na Nzambe! Akopesa bango maloba motindo moko na oyo alobaki na Lazare, oyo nzoto na ye etiamaki kati na nkunda moko na Betania: “Lazare, bima libanda!”—Yoane 11:43.
8, 9. Banani bakoki kozala bato ya liboso na kosekwisama mpo na bomoi ya sika awa na mabelé? Na ntango yango esengo nini babiki na Armagedon bakozala na yango?
8 Na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto na Yesu Klisto, mpe na kotindama na Ye, banani bakoki kozala bato na liboso na kosekwisama mpo na bomoi ya sika awa na mabelé? Ebongi na kokanisa ete ekozala “bampate mosusu” oyo bakufaki na boumeli ya mikolo na nsuka ya biloko na ntango oyo. Bakosekwa nokinoki. (Yoane 10:16) Bango bakozala na mikakatano mingi te mpo na komesena na mokili ya sika.—Tala Matai 25:34; Yoane 6:53, 54.
9 Babiki ya Armagedon bakosepela makasi na komona ete “bampate mosusu” oyo bakufaki na boumeli ya ekeke oyo ezalaki liboso na “bolozi monene” basekwisami. (Matai 24:21) Bakoyeba bango kozanga nkaka, bakoyamba bango, mpe bakokoba elongo moko na bango kosalela Nzambe Oyo-Aleki-Likoló kati na bomoko.
10. Soki obiki na Armagedon, okozala temwe ya makambo nini?
10 Soki obiki na Armagedon, mbala mosusu okozala temwe ya lisekwa ya mosangani ya liboso kati na basangani ya libota na yo. Na bongo okozala na mayoki motindo moko na oyo ya baboti oyo babulunganaki mpo na liwa ya mwana na bango ya mwasi ya mibu 12. “Bakamwaki na kokamwa monene.” (Malako 5:42) Na ntembe te, okoyoka esengo nsuka te ntango bakufi oyo basimbami na Hadés mpe na mai monene bakosekwisama. (Emoniseli 20:13) Ee, ekozala mokolo ya nkembo, mpe esili kobelema!
“Ba princes na mabelé mobimba”
11, 12. (a) Nzembo 45:16 eyebisi likambo nini? (b) Kati na bato nini Mokonzi, Yesu Klisto, akokoka kopona bato ye akotia bango ba “princes na mabelé mobimba”?
11 Na kosalelaka nguya na ye ya kosekwisa bakufi oyo mpo na bango apesaki bomoi na ye ya moto ya kokoka lokola mbeka ya lisiko, Yesu akosala ete Nzembo 45:16 ezwa kokokisama na yango. Nzembo yango eyebisi na motindo na esakweli epai na Mokonzi Yesu Klisto oyo azwi bokonzi: “Bana na yo bakozala na esika na batata na yo [ya mabelé]; okotia bango lokola bana na mokonzi (princes) na mokili mobimba.” Nzembo yango eyebisi polele ete Yesu Klisto akokoma tata ya likoló mpo na bana ya mabelé, mpe akotia bamoko kati na bango “ba princes na mokili mobimba”. Lokola azali “mwana na Davidi” mpe mobotami ya liboso ya moseka moyuda Marie, Yesu azalaki na molongo ya bankoko na bomoto oyo ekomaki kino na tata ya liboso, Adam.—Luka 3:23-38.
12 Nzembo 45:16 elingi mpenza koloba ete baoyo nyonso bazalaki bankoko na Yesu na mosuni nde bakokoma bana na ye na ntango akosekwisa bango? Ee. Verset oyo elingi mpe koloba ete, lokola azalaki mokitani na bango, Mokonzi Yesu akomonisa bango boboto oyo ekeseni na bamosusu mpe akotia bobele bango lokola “ba princes na mokili mobimba” oyo ekomi Paradis? Te; soki esakweli esengelaki kokokana boye, mbele motuya ya “ba princes” na mokili mobimba ekozala se moke. Lisusu, bankoko nyonso ya Yesu basalaki makambo minene te mpo bakoka kozwa lotomo ya kozala na etelemelo ya lokumu na mabelé na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto. Longola bankoko na ye ya mabelé, Mokonzi, Yesu Klisto, akotia lokola “ba princes” ntalo monene na bato -mibali ya makoki kati na babiki ya Armagedon mpe “bampate mosusu” oyo bakosekwa, bakisa mpe mibali na kondima ya eleko oyo ezalaki liboso na boklisto. Kati na mibali yango, akopona baoyo babongi mpo na kozwa mokumba ya prince, bazala lokola bamonisi na ye awa na mabelé.
13, 14. Babiki na Armagedon bakozala na libaku kitoko ya komona basekwi nini na miso na bango mpenza?
13 Tokanisa na mibali yango baoyo bazali kozela ete basekwisama na nse ya Bokonzi na Masiya. Yango ekosalema solo? Tala Abele, mobomami ya liboso, mpe Enoka, oyo atambolaki ntango nyonso elongo na Nzambe ya solo. Tala mpe Noa, motongi ya masuwa, na Abrahame, Yisaka mpe Yakobo, bankoko ya libota na Yisraele. Tala Moïse (moto na libota ya bonganga ya Levi), mpe David, elongo na ye Nzambe asalaki boyokani ya seko mpo na Bokonzi. Mpe kuna, Yisaya, Yilimia, Ezekiele, Danyele mpe basakoli mosusu nyonso Baebele oyo bakomaki mikanda na Biblia, oyo na nsuka ezali Malaki. Mpo na kosilisa, botala Yoane Mobatisi, na Yozefe, tata mobokoli na Yesu.
14 Mokolo moko, Yesu alobaki epai na Bayuda: “Bokomona Abrahame na Yisaka na Yakobo na basakoli nyonso kati na bokonzi na Nzambe, nde bino mpenza [bokobimisama] libanda.” (Luka 13:28) “Ebele monene” ya baoyo bakobika na mabelé na “etumba ya mokolo monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso” bakozala na libaku malamu ya komona na miso na bango moko “Abrahame mpe Yisaka mpe Yakobo mpe basakoli nyonso” kozongisama na bomoi kati na Paradis na mabelé mpe kosalela Bokonzi na Nzambe oyo etambwisami na “Tata na seko”, Yesu Klisto.—Emoniseli 7:9, 14; 16:14; Yisaya 9:6.
15. Libaku nini ya kitoko ezali kozela bato oyo bakobika na Armagedon?
15 Esengo ya motindo nini ekozala mpo na yo moto okobika na nsuka ya mokili mabe oyo mpo na kosolola elongo na Noa mpe libota na ye, “bato mwambe” baoyo babikaki na kobomama ya liboso ya mokili kati na mpela ya molongo mobimba na 2 370 liboso ya ntango na biso! Libela na libela, moto mosusu te akomona makambo motindo moko na yo mpe kozala bongo, Témoin moko ya Jéhovah Nzambe na lolenge oyo ya sipesiale.—1 Petelo 3:20; Malako 13:19; 2 Petelo 3:5-7.
Mosali mabe na motema mawa bakobosana ye te
16, 17. (a) Ntango Yesu akokanisela mosali mabe oyo azalaki na motema mawa, libaku nini babiki na Armagedon mpe bato mosusu oyo bakozala na bomoi bakozala na yango? (b) Elikya nini tozali na yango mpo na mosali mabe oyo akosekwa?
16 Na ntembe te kozongisama ya Paradis na mabelé ekozala ete ekomi mosika ntango, kati na yango, mosali mabe oyo abomamaki na nzete esika moko na Yesu, na Kalvere akosekwisama. Ye andimaki bosolo ya likomi etiamaki likoló na motó na Yesu, kolobaka na ye: “Yesu, wana ekokoma yo na bokonzi na yo, kanisa ngai.” (Luka 23:42) Babiki na Armagedon mpe bato mosusu oyo bakozala na bomoi na ntango yango bakozala na libaku malamu ya koyamba mobali yango ntango akosekwisama kati na bakufi. Bakolakisa ye makambo nyonso matali Mokonzi Yesu Klisto, moto oyo ye ayokelaki mawa mozindo le 14 Nisan ya mobu 33, nzokande ntango wana akozala koyangela kati na Bokonzi na ye.
17 Nkolo Yesu Klisto akozanga te kokanisela mosali mabe wana ya motema mawa na boumeli ya Boyangeli na Ye ya mbula nkoto. Na ntembe te mobali yango akomonisa botondi na ye epai na Mokonzi Yesu Klisto, oyo akosewisa ye, kozalaka mpe sembo na Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba, Jéhovah Nzambe. Mbala mosusu akotalelama lokola abongi mpo na kofanda libela na libela kati na mokili ya sika, Paradis oyo ekosila kozongisama, elongo na bato mosusu ya botosi oyo bakotikala.
Bomoi kati na Elanga ya Edene ezongisami na mabelé mobimba
18. Bomoi ya bato ekozala ndenge nini kati na Paradis oyo ekozongisama?
18 Kati na Paradis oyo ezongi, bato nyonso bazali baninga. Na nse ya motema na ye mpenza, moto na moto azali komiyoka mosangani ya libota ya mokili mobimba. Bato nyonso bazali komitia na esika ya bamosusu na bolingo nyonso. Bazali koloba lokota moko kati na mokili mobimba, ekoki solo kozala lokota ya ebandeli oyo bato nyonso balobaka kala na boumeli ya mibu 1 800 ya liboso-uta kozalisama na Adam, na 4 026 liboso ya ntango na biso, kino na eleko ya Pelege (2 269 kino 2,030 liboso ya ntango na biso), mpamba te “na ntango na ye mokili ekabwanaki”. (Genese 10:25; 11:1) Bato oyo nyonso bazali na esengo ya kozala na bomoi, mpe bazali koyamba na botondi nyonso ‘mokolo ya sika lokola mokolo mosusu ebakami mpo na bomoi. Bazali kobakisa mbeba kati na nzoto na bango te wana ekoumela bango. Nkutu, nguya ya nzoto na bango ezali nde kozonga sika mokolo na mokolo mpe nzoto na bango ezali kobeba te.—Tala Yobo 38:25.
19. Ekozala boni mpo na bato oyo bazali bazalaki na mbeba kati na nzoto na bango?
19 Mpe tala! baoyo kala bazalaki bibosono bazali kotambola, ee, bazali kopumbwapumbwa na esengo. Baoyo maboko na bango mpe makolo na bango ekatanaki bazwi lisusu binama yango na lolenge ya ekamwiseli. Bakufi miso bazali komona, bato bakufa-matoi bazali koyoka, bimimi (to bababa) bazali koloba mpe koyemba na esengo. (Tala Yisaya 35:5, 6) Nzoto mabe to elongi mabe ezali lisusu te. Bizaleli ya mibali ekomi mpenza na bokatikati elongo na oyo ya basi. (Genese 2:18) Ezalela ya kokoka ya bato ezali kokumisa Jéhovah Nzambe, Mozalisi ya nzoto na moto ya kokoka.
20. Makambo nini tokomona mpo na oyo etali biloko na nguya na mokili, mpo na bilei, mpo na banyama, mpe ndenge nini mabelé ekosalelama?
20 Mabelé mobimba ekomi esika ya kitoko. Epai ya région moko te ya mabelé tokoyoka nsango ya kozanga na mai, ya kotondana na mai, soko mpe mbula makasi ebebisi esika boye to oyo kuna to mipepe makasi oyo ebukaka bandako mpe kozindisa bamasuwa. (Tala Malako 4:37-41) Nguya nyonso ya mokili ebatelami na bokatikati oyo ebongi mpo na kokomisa mabelé mobimba esika kitoko ya kofanda. Esika moko te bilei bizangi, mpamba te mabelé mazali kobota mbuma mingi. (Nzembo 72:16) Kimya mpe kobatelama ezali esika nyonso, ezala mpo na moto to mpo na nyama, na boyokani na maloba oyo na Jéhovah: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulee na ngai.” (Yisaya 11:9; tala mpe ba versets 6 kino na 8) Ezali boye nde mabelé makobongwana esika moko kitoko, epai bato bakosambela mpe bakosalela Jéhovah Nzambe, Mozalisi mpe Nkolo ya mabelé. Etando ezali ya ye, mpamba te ezali ye nde akelaki yango. Ebongi ete yango esalelama na motindo mokosepelisa ye mpe oyo mokokumisa ye.—Tala Yisaya 35:1, 2, 6, 7.
21. Ndenge nini bato basombami bakotalela makambo nyonso oyo bakomona na mabelé, mpe miziki nini ekoyokana?
21 Na mabelé, makambo nyonso mazali mpenza sika mpo na bato oyo basombami, baoyo bafanda naino te kati na elanga ya Edene, Paradis epai oyo bomoi na moto ebandaki kati na kokoka mpe bonzenga. (Emoniseli 21:5) Miziki kitoko, ezala ya bibetelo na miziki to ya koyemba, ekoyokana na ntango yango, mpo na kokumisa Jéhovah.—1 Ntango 23:4, 5; Nzembo 150:3-6.
22. Mayoki nini bato oyo bakofanda kati na Paradis bakoyoka?
22 Ekozala mpenza kitoko na kofanda na mabelé oyo etondi na bato bakembi na nguya, na mabelé oyo bilembo nyonso ya bonunu euti na lisumu ya Adam bikolimwa! (Tala Yoane 10:10) Ee, ekozala mabelé moko oyo moto nyonso akondimama epai na Jéhovah Nzambe, akomonisa elilingi na Ye mpe akozala na lolenge na Ye, lokola moto ya liboso Adam na ntango ya kozalisama na ye. (Genese 1:26, 27) Mabelé ekozala lisusu eloko na bosoto te na miso na baserafin, na bakeluba mpe na baanzelu na nkembo. Ntango, longwa na makoló, bakobalola miso na bango na mabelé mpo na kotala malamumalamu etando yango na kitoko ya paradis, bakokumisa mpe bakotondo Ye oyo bazali na libaku ya komona mpenza, Jéhovah, Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba.—Matai 18:10.
Avenire moko ya esengo mpe ezangi nsuka
23. Makambo nini bato oyo bakofanda kati na Paradis ya mabelé bakoyeba mbala mosusu na ntina na baklisto bapakolami, mpe mayoki nini bakoyoka?
23 Ekoki mpenza kosalema, to mpe ekosalema solo, ete na eleko moko bankombo ya baklisto nyonso oyo bapakolami baoyo batyaki molende mpe na kobatela ‘ebiangeli mpe eponeli na bango’ mpo na kozala kati na Bokonzi ya makolo mpe baoyo bazwaki lisekwa ya likoló, bankombo na bango ekoyebisama epai na libota ya bato kati na Paradis na mabelé. (2 Petelo 1:10; Nzembo 87:5, 6) Na bongo, bato nyonso bakoyeba mpo na nini bayekoli 144 000 ya Yesu bapakolami mpe babotami na elimo bakozala te kati na Paradis na mabelé. Moto na moto akomitungisa te mpe akosepela na motema mobimba mpo na bango mpe elongo na bango.
24. (a) Jéhovah akokokisa likambo nini mpo na “etielo na makolo” na ye? (b) Ndenge nini toyebi ete mokili ya sika ekosuka te, mpe loyembo nini ya esakweli ekokokisama?
24 Baoyo nyonso bakokangama libela na Jéhovah, Nkolo ya solo ya molongo mobimba, bakofanda libela na esengo. Paradis ya mabelé oyo ekotonda malamu ekozala esika oyo ekobonga mpenzampenza mpo na kozala “etemelo na makolo“ oyo likoló na yango Nzambe akokoka kotia makolo, na elobeli ya elilingi. Ee, Jéhovah akokembisa libela ‘esika ya makolo na ye’, mpe bato nyonso bakozala na botosi makasi epai na ye. (Matai 5:34, 35; Misala 7:49) Mokili ya sika ekolimwa te, mpamba te “kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te”. (Yisaya 9:7) Na bongo loyembo na esakweli oyo eyembamaki na baanzelu na ntango ya kobotama na Yesu, na Beteleme ya Yuda, na mobu 2 liboso ya ntango na biso ekokokana: “Nkembo na Nzambe na bisika-bileki-Likoló, mpe kimya na nse kati na bato oyo ye asepeli [na] bango!”—Luka 2:13, 14.
25. (a) Na likambo nini “ebele monene” ya “bampate mosusu” bazali kotia likebi monene? (b) Mposa na biso mpenza esengeli kozala nini?
25 “Ebele monene” ya “bampate mosusu” ya Mobateli na mpate aleki malamu bazali kotia likebi monene na elaka kitoko ya Paradis oyo ekozongisama. Uta sikawa bazali na libaku kitoko ya kozala kati na lisangá ya Nzambe mpe kosangana na molende kati na mosala oyo moyebisamaki na Nkolo Yesu Klisto, kosakolama ya nsango malamu na Bokonzi na mabelé mobimba, mpo na kopesa litatoli ya nsuka. (Matai 24:14; Malako 13:10) Biso baoyo tozali ba Témoins de Jéhovah, tolingi mpenzampenza kotikala sembo mpo na libela, na bongo kokumisaka mpe kolongisaka Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba, Jéhovah Nzambe, na nse na bokonzi ya Mwana na ye bobele moko, Yesu Klisto. “Alleluia!”—Emoniseli 19:1, 3, 4, 6; Masese 10:9.
Bozongeli
◻ Elaka nini Jéhovah apesaki mpo na mabelé etemelo ya elilingi na makolo na ye?
◻ Banani bakosangana na kozongisama ya Paradis?
◻ Katikati na bato nini Mokonzi, Yesu Klisto, akopona bato oyo ye akotia bango “ba princes na mokili mobimba”?
◻ Kokutana nini ya esengo mingi tokokoka kozala na yango na ntango ya lisekwa?
◻ Avenire nini ezali liboso na baoyo bakangami libela epai na Jehovah?