Monisá ete ozali kokola mpe kokende liboso
NTANGO obandaki koyekola kosalela mitinda ya Biblia, makanisi, maloba mpe bizaleli oyo ekɔtelá yo mpenza na motema ebandaki kobongwana mokemoke. Kutu, makambo yango mingi ebandaki kobongwana liboso obanda kosala masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Na ntembe te, lelo oyo, okoli mpe omipesi na Yehova. Yango elimboli ete okoki kotika kokola? Te. Batisimo na yo ezali kaka ebandeli.
Moyekoli Timote azalaki nkulutu moklisto ntango Paulo ayebisaki ye ete ‘akanisaka malamumalamu’ toli mpe na mikumba oyo azwaki—‘amipesa na mobimba na’ makambo yango—mpo ‘bokoli na ye emonana polele na miso ya bato nyonso.’ (1 Tim. 4:12-15) Ezala obandi kolanda nzela ya solo sika to ozali moklisto ya kala, osengeli koluka kokende liboso.
Ndenge oyo boyebi ekoki kobongola moto
Na Baefese 3:14-19, ntoma Paulo abondelaki mpo na bandeko na ye baklisto ete bázala “mpenza na likoki ya kososola na kati ya makanisi . . . bonene mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo” ya solo. Yango wana, Yesu apesaki makabo oyo ezali bato mpo na koteya, kosembola mpe kotonga lisangá. Soki tozali komanyola mbala na mbala Liloba ya Nzambe oyo epemami mpe tozali kolanda toli ya bato oyo bamesani koteya, yango ekoki kosalisa biso “tókola” na elimo.—Ef. 4:11-15.
Mpo na kokola ndenge wana, yango esɛngi mpe ‘kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kopusa makanisi na yo.’ Yango elimboli ete osengeli kosala makasi ete mposa ya makanisi na yo eyokana na oyo ya Nzambe mpe ya Klisto. Yango esɛngi ete oyokaka mpe otángaka ntango nyonso makanisi na bango mpo ‘olata bomoto ya sika.’ (Ef. 4:23, 24) Ntango oyekolaka Baevanzile, omonaka masolo wana ya bomoi ya Klisto lokola ndakisa oyo osengeli kolanda? Olukaka mpenza koyeba bizaleli oyo Yesu azalaki na yango mpe osalaka mpenza milende mpo na kozala na bizaleli yango na bomoi na yo?—1 Pet. 2:21.
Makambo oyo olobelaka na masolo na yo ekoki komonisa soki ozali mpenza kokende liboso na likambo oyo. Bato oyo balati bomoto ya sika bamipesaka te na maloba oyo ezangi kolongobana, maloba ya mbindo, ya nsɔni to ya mabe. Maloba na bango ezalaka nde “malamu mpo na kotonga . . . mpo epesa bayoki oyo ezali malamu.” (Ef. 4:25, 26, 29, 31; 5:3, 4; Yuda 16) Ezala ntango bazali bango moko to na makita ya lisangá, maloba na bango mpe biyano na bango ezali komonisa ete solo ezali kobongisa bomoi na bango.
Soki ozali lisusu te “kotindikama lokola na mbonge mpe komemema epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya,” yango mpe ekomonisa polele ete ozali kokola. (Ef. 4:14) Na ndakisa, osalaka nini ntango mokili ezali kosopela yo makanisi ya sika, mateya to masano ndenge na ndenge? Olukaka kosalela ntango na yo ya makambo ya elimo mpo na kolanda makambo yango? Soki osali ndenge wana, yango ekoki mpenza kopekisa bokoli na yo ya elimo. Ezali mpenza malamu kosomba ntango mpo na makambo ya elimo!—Ef. 5:15, 16.
Boyokani na yo na basusu ekoki mpe komonisa soki ozali kokende liboso na elimo. Oyekoli ndenge ya ‘koyokelaka’ bandeko na yo ya mibali mpe ya basi “mawa mingi” mpe ‘kolimbisaka na motema moko’?—Ef. 4:32.
Milende na yo mpo na kosala makambo ndenge Yehova alingi esengeli komonana na lisangá mpe na ndako. Esengeli mpe komonana na kelasi, na balabala mpe na esika na yo ya mosala. (Ef. 5:21–6:9) Soki na makambo oyo nyonso, ozali mpenza komonisa bizaleli ya moto ya Nzambe na ndenge esengeli, boye ekomonana ete ozali kokende liboso.
Salelá makoki na yo
Yehova apesi mokomoko na biso makoki mpe mayele oyo esengeli. Alingi ete tósalela makoki yango mpo na bolamu ya basusu mpo amonisela bango boboto na ye na nzela na biso. Ntoma Petelo akomaki boye: “Na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango mpo na kosalelana bino na bino lokola bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe.” (1 Pet. 4:10) Ndenge nini ozali kokokisa mosala na yo ya mobateli?
Petelo alobi lisusu boye: “Soki moto azali koloba, aloba lokola nde ezali maloba mosantu ya Nzambe.” (1 Pet. 4:11) Vɛrsɛ oyo emonisi ete tosengeli kobimisa maloba oyo eyokani na Liloba ya Nzambe, mpo tókumisa Nzambe. Lolenge na biso ya koloba esengeli mpe kokumisa Yehova. Mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekoki kosalisa yo osalela makoki na yo na ndenge yango, elingi koloba, okumisa Nzambe na ndenge oyo ozali kosalisa basusu. Soki omityeli mokano ya kosala bongo, ndenge nini okoyeba soki ozali kokende liboso na eteyelo yango?
Na esika ete otalela toli boni oyo osili kokokisa na lokasa na yo ya toli mpo na molobi, to otalela masolo nini bapesá yo, talelá nde lolenge oyo mateya yango esalisi yo opesa mbeka ya masanzoli oyo ezali malamu koleka. Eteyelo ezali kobongisa biso mpo tóbota mbuma ya malamu mpenza na mosala ya kosakola. Yango wana, omituna: ‘Nabongisaka mpenza makambo oyo nakoloba na mosala ya kosakola? Nasepelaka na bato oyo nazali kopesa bango litatoli? Mpo na kobongisa bozongeli ya sika, natikaka bato na motuna moko oyo nakoyanola na mbala ya nsima? Soki nazali koyekola Biblia na moto moko, nasalaka makasi nakola mpe nakóma moteyi oyo ayebi kosimba motema ya moto?’
Mpo na koyeba soki ozali kokola, kotalela kaka te mikumba oyo bapesi yo na lisangá. Ezali mikumba te nde ekomonisa ete ozali kokende liboso, kasi lolenge oyo ozali kokokisa mikumba yango nde ekomonisa ete ozali kokola. Soki bapesaki yo mokumba moko oyo esɛngaki ete oteya, omituna boye: ‘Nasalelaki mpenza mayele ya koteya? Lolenge nateyaki esalaki ete mateya yango ebongola mpenza bomoi ya bato oyo bayokaki yango?’
Toli oyo emonisi ete osalelaka makoki na yo, esɛngi mpe ete oyeba komipesa. Ozalaka moto ya liboso mpo na kosɛnga basusu ete osakola elongo na bango? Olukaka mabaku mpo na kosalisa bandeko ya lisangá na bino oyo bazali bato ya sika, oyo bazali bilenge to bibɔsɔnɔ? Omipesaka mpo na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi to mpo na kosala misala ndenge na ndenge na mayangani ya mike mpe ya minene? Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala na mbala? Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza to kosalisa lisangá moko oyo ezali na mposa ya basakoli mingi? Soki ozali ndeko mobali, ozali koluka kokokisa masɛngami ya Makomami mpo na kokóma mosaleli ya misala mpe nkulutu? Elimo ya komipesa oyo ozali na yango mpo na kosalisa basusu mpe kondima mikumba emonisi mpenza ete ozali kokende liboso.—Nz. 110:3.
Ntango oyebi makambo mingi
Soki ozali komona ete oyebi makambo ya bomoi ya boklisto mingi te, kolɛmba te. Liloba ya Nzambe ekoki kopesa “bwanya na moto oyo ayebi makambo mingi te.” (Nz. 19:7, NW; 119:130; Mas. 1:1-4) Soki tozali kosalela toli ya Biblia, yango ekosalisa biso tózwa litomba na bwanya ya Yehova mpamba te ezali bwanya ya kokoka mpe ezali na motuya monene koleka bwanya oyo tozwi na makambo oyo biso moko tokutanaki na yango. Kasi ntango tozali kokende liboso na mosala na biso mpo na Yehova, tozali koyeba makambo mingi oyo ezali na motuya mpenza. Ndenge nini tokoki kosalela yango malamu mpenza?
Soki moto akutanaki na makambo ndenge na ndenge na bomoi na ye, akoki kokanisa boye: ‘Nakutanaki na likambo oyo liboso. Nayebi nini nasengeli kosala.’ Yango nde bwanya? Masese 3:7 ekebisi biso boye: “Tiká te ete omonana na [bwanya, NW] na miso na yo moko.” Na ntembe te, soki toyebi makambo mingi, yango ekosalisa biso tózala na makambo mingi oyo tosengeli kotalela ntango tokutani na mikakatano na bomoi na biso. Kasi soki tozali kokola na elimo, makambo oyo toyebi esengeli mpe kokɔtisa mpenza na elimo na biso mpe na motema na biso likanisi oyo ekomonisa ete tozali na mposa ya mapamboli ya Yehova mpo tólonga. Yango wana, ezali te mpo tozali komityela motema ntango tozali kokutana na mikakatano nde bato bakomona ete tozali kokende liboso, kasi ezali nde mpo tozali kondima kotalela Yehova mpo atambwisa biso na bomoi na biso. Ekomonana na ndenge totii motema ete eloko moko te ekoki kosalema soki Nzambe atikeli yango nzela te mpe soki ntango nyonso, na boyokani na biso na Tata na biso ya likoló, tozali mpenza kotalela ye mpe kolinga ye.
Kende ntango nyonso liboso
Atako azalaki moklisto oyo akɔmeli mpe apakolami na elimo, ntoma Paulo andimaki ete asengeli ntango nyonso ‘komitandola’ mpo na kozwa bomoi. (Filp. 3:13-16) Yo mpe ozalaka na likanisi wana?
Osili kokola mpenza? Mpo na koyeba soki ozali kokola, talelá soki osili kolata mpenza bomoto ya sika, soki ozali mpenza kotosa bokonzi ya Yehova mpe soki ozali mpenza kosalela makoki na yo mpo na kokumisa Yehova. Ntango ozali kozwa mateya na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, mokemoke, ekomonana polele ete na maloba na yo mpe na mateya na yo, ozali komonisa bizaleli oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Makambo oyo etali kokola na yo, kobosana yango te. Ya solo, sepelá na yango mpe nokinoki ekomonana polele ete ozali kokende liboso.