“Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi”
“Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene. . . . Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi.”—1 PETELO 4:7, 8.
YESU ayebaki ete mwa bangonga oyo atikalaki na yango elongo na bantoma na ye, ezalaki na ntina mingi. Ayebaki makambo oyo ezalaki kozela bango. Bakozala na mosala monene ya kosala, kasi bakoyina bango mpe bakonyokola bango, ndenge bayinaki ye moko. (Yoane 15:18-20) Na butu wana ya nsuka oyo azalaki na bango, akundolelaki bango mbala ebele ntina ya ‘kolinganaka.’—Yoane 13:34, 35; 15:12, 13, 17.
2 Ntoma Petelo, oyo azalaki wana na butu yango, asimbaki malamu likambo yango. Nsima ya bambula, ntango akomaki mokanda moko liboso ete Yelusaleme ebomama, Petelo alobelaki mingi ntina ya bolingo. Apesaki baklisto toli oyo: “Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene. . . . Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi.” (1 Petelo 4:7, 8) Maloba oyo ya Petelo ezali na ntina mingi mpo na bato oyo bazali na bomoi na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. (2 Timote 3:1) ‘Kolingana makasi’ elimboli nini? Mpo na nini ezali na ntina ete tólinga bato mosusu ndenge wana? Mpe ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka bango bongo?
‘Kolingana makasi’ elimboli nini?
3 Bato mingi bakanisaka ete bolingo ezali mayoki oyo moto asengeli kobimisa kaka ndenge wana. Petelo azalaki kolobela te bolingo ya bongobongo; kasi azalaki nde kolobela bolingo oyo eleki mosusu nyonso. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kolinga’ na 1 Petelo 4:8 ezali agapê. Liloba yango elimboli bolingo ya solosolo, oyo etambwisami na mitinda. Buku moko elobi boye: ‘Bolingo agapê ekoki kolanda ndenge moto azali kotambwisa yango mpo ete yango ezali libosoliboso kaka mayoki te kasi mokano oyo ezali kotinda moto asala likambo moko.’ Lokola tobotamaka na ezaleli ya moimi, ezali na ntina bákundolelaka biso ete tólinganaka, tólinganaka ndenge mitinda ya Nzambe ezali kosɛnga.—Genese 8:21; Baloma 5:12.
4 Yango elingi koloba te ete tosengeli kolingana kaka mpo basɛngi biso tólingana. Bolingo agapê esɛngaka komonisa boninga mpe mayoki na biso. Petelo alobaki ete tosengeli ‘kolinganaka makasi’ [elimboli mpenzampenza “kofungwama” na bolingo na biso].a (Kingdom Interlinear) Atako bongo, bolingo ya ndenge wana esɛngaka milende mpenza. Na kotalela liloba ya Grɛki oyo babongoli na “makasi,” moto moko ya mayele alobi boye: “Liloba yango ezali kopesa likanisi ya moto oyo azali kokima mbangu, oyo abimisi makasi na ye nyonso ya nzoto ntango akómi na nsuka ya momekano.”
5 Yango emonisi ete bolingo na biso esengeli kosuka kaka te na kotinda biso tósala makambo oyo ezali mpasi te to mpe tosengeli komonisela yango kaka mwa ndambo ya bato te. Bolingo ya biso baklisto esɛngaka ‘tófungola’ mitema na biso, tómonisa bolingo ata ntango oyo ezali mpasi mpo na kosala yango. (2 Bakolinti 6:11-13) Emonani polele ete bolingo ya ndenge wana nde ezali eloko oyo tosengeli kolona mpe kosala makasi mpo na kozala na yango, ndenge kaka moto oyo akimaka mbangu asengeli kosalaka ngalasisi mpe kosalaka makasi mpo ete abongisa makoki na ye. Ezali mpenza na ntina ete tólinganaka ndenge wana. Mpo na nini? Ezali mpo na bantina misato to koleka.
Ntina nini tosengeli kolinganaka?
6 Ntina ya liboso, ezali “mpamba te bolingo euti na Nzambe.” (1 Yoane 4:7) Yehova, Mobandisi ya ezaleli yango oyo tosepelaka na yango mingi, ye moto alingaki biso liboso. Ntoma Yoane alobi boye: “Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele na oyo etali biso, mpamba te Nzambe atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko na kati ya mokili mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye.” (1 Yoane 4:9) Nzambe “atindaki” Mwana na ye: akómaki moto, akokisaki mosala na ye, mpe akufaki likoló na nzete ya mpasi—asalaki makambo nyonso wana mpo “biso tókoka kozwa bomoi.” Tosengeli kosala nini mpo na bolingo monene boye oyo Nzambe amoniseli biso? Yoane alobi boye: “Soki ezali ndenge wana nde Nzambe alingaki biso, boye biso moko mpe tosengeli kolingana.” (1 Yoane 4:11) Simbá ete Yoane akomi, “Soki ezali ndenge wana nde Nzambe alingaki biso”—kaka yo te kasi biso. Yango emonisi mpenza polele ete soki Nzambe alingaka bandeko na biso baklisto, boye biso mpe tosengeli kolingaka bango.
7 Ya mibale, ezali mpenzampenza na ntina ete tólinganaka mingi na mikolo na biso mpo tósalisa bandeko na biso oyo bazali na mposa ya lisalisi mpamba te “nsuka ya makambo nyonso ekómi pene.” (1 Petelo 4:7) Tozali kobika na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1) Makambo oyo ezali koleka na mokili, koningana ya mabelé to mpe mipɛpɛ ya makasi, mpe botɛmɛli ezali komemela biso mpasi mingi. Na ntango ya mpasi, tosengeli biso nyonso kolinganaka makasi koleka. Bolingo makasi ekosala ete tózala na bomoko mpenza kati na biso mpe ekotinda biso ‘tómibanzabanzaka mpo na bandeko na biso.’—1 Bakolinti 12:25, 26.
8 Ya misato, tosengeli kolinganaka mpo mposa na biso ezali ete ‘tótikela Zabolo esika te’ ete asalela bolɛmbu na biso. (Baefese 4:27) Satana awelaka kosalela makambo mabe ya baninga na biso baklisto—bolɛmbu na bango, mabunga na bango, mpe makambo mikemike oyo basalaka—mpo na kobɛtisa biso mabaku. Soki bakateli biso mangala to basali biso likambo moko ya mabe, yango ekotinda biso tótika lisangá? (Masese 12:18) Soki tolinganaka makasi, tokotika lisangá te! Bolingo ya boye esalisaka biso tóbatela kimya mpe tósalela Nzambe “na bomoko.”—Sefania 3:9, NW.
Ndenge oyo okoki komonisa ete olingaka basusu
9 Tosengeli komonisa bolingo libosoliboso na libota. Yesu alobaki ete bato bakoyeba bayekoli na ye ya solo soki bazali kolingana. (Yoane 13:34, 35) Tosengeli komonisa bolingo kaka na lisangá te kasi mpe na libota—kati na babalani mpe kati na baboti mpe bana. Bolingo mpo na bato ya libota na biso esengeli kosuka kaka na motema te, tosengeli komonisa yango na misala ya malamu.
10 Ndenge nini babalani bakoki komonisa ete balinganaka? Mobali oyo alingaka mpenza mwasi na ye, amonisaka ye yango na maloba mpe na misala, ezala ntango bazali bango mibale to na miso ya bato. Apesaka ye lokumu, andimaka makanisi mpe atalelaka mayoki na ye. (1 Petelo 3:7) Atyaka matomba ya mwasi na ye liboso ya matomba na ye, mpe asalaka nyonso mpo na kokokisa bamposa na ye ya mosuni, ya elimo, mpe ya mayoki. (Baefese 5:25, 28) Mwasi oyo alingaka mpenza mobali na ye apesaka ye “limemya makasi,” ata soki mobali na ye akokisaka bamposa na ye te. (Baefese 5:22, 33) Asungaka mobali na ye mpe atosaka ye, asɛngaka ye makambo oyo eleki ndelo te, kasi asalaka elongo na ye mpo bango nyonso bátalelaka libosoliboso makambo ya elimo.—Genese 2:18; Matai 6:33.
11 Baboti, ndenge nini bokoki komonisa ete bolingaka bana na bino? Ezali nde na ntango bozali kondima koboma nzoto mpo na kokokisa bamposa na bango ya mosuni. (1 Timote 5:8) Kasi, bana basengeli kaka na bilei, bilamba to mpe esika ya kolala te. Mpo bálingaka mpe básalelaka Nzambe ya solo ntango bazali kokola, esengeli kopesaka bango formasyo na makambo ya elimo. (Masese 22:6) Yango elimboli kobongisa ntango mpo na koyekola Biblia na libota, kobima na mosala ya kosakola, mpe koyangana na makita ya boklisto. (Deteronome 6:4-7) Mpo na kokoba kokokisa makambo yango, bosengeli komipimela makambo mingi, mingimingi na ntango oyo ya mpasi. Komibanzabanza oyo bozali komonisa mpe milende oyo bozali kosala mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya bana na bino ezali komonisa ete bolingi bango, mpamba te na ndenge yango bozali komonisa ete bozali mpenza na mposa ete bázwa bolamu.—Yoane 17:3.
12 Ezali mpe na ntina ete baboti bákokisaka bamposa ya mayoki ya bana na bango mpo na komonisa ete balingaka bango. Bana bazalaka makasi mingi te; lokola bazali bana, bazalaka na mposa ete bómonisaka bango ete bolingaka bango. Bóyebisaka bango ete bolingaka bango; bólingaka bango mingi, yango nde ekondimisa bango ete bango mpe bazali na bato oyo balingaka bango mpe bamonaka bango ete bazali na ntina. Soki bozali kopesa bango longonya ya solosolo, bakoyeba ete bosepelaka mpenza na milende oyo basalaka. Esengeli mpe bópesaka bango disipilini na bolingo, disipilini yango emonisaka bango ete bozali kotya likebi na bomoto oyo bazali kokóma na yango. (Baefese 6:4) Ndenge wana nyonso ya malamu ya komonisa bolingo esalisaka mpo na kozala na libota ya esengo, oyo ezali na boyokani ya malamu mpenza mpe oyo ezali mpenza pene mpo na kotɛmɛla mitungisi ya mikolo oyo ya nsuka.
13 Bolingo etindaka biso tólandelaka mabunga ya bato mosusu te. Omikundola ete ntango Petelo apesaki baoyo bakotánga mokanda na ye toli ete ‘bálinganaka makasi,’ amonisaki mpe mpo na nini kosala bongo ezali na ntina mingi; alobaki boye: “Mpamba te bolingo ezipaka ebele ya masumu.” (1 Petelo 4:8) Liloba ‘kozipa’ masumu elimboli te kobomba masumu ya minene. Esengeli koyebisa masumu ya ndenge wana epai ya baoyo batambwisaka lisangá mpo bátalela yango. (Levitike 5:1; Masese 29:24) Kotika bato oyo basali masumu ya minene bákoba kosala bato oyo basali eloko te mabe to komonisa bango mpasi, ezali mpenza elembo ya bolingo te mpe eyokani te na oyo Makomami elobi.—1 Bakolinti 5:9-13.
14 Mbala mingi, mabunga oyo bandeko na biso baklisto basalaka ezalaka mpenza ya mike. Ekómelaka biso nyonso na bantango mosusu tókwea na maloba to na misala, tólɛmbisana nzoto to mpe tópesana mpasi na motema. (Yakobo 3:2) Tokendeke mbangu mpo na koyebisa bato nyonso mabunga ya basusu? Ezaleli ya ndenge wana ekoki kobimisa bokabwani na lisangá. (Baefese 4:1-3) Soki bolingo ezali kotambwisa biso, ‘tokotɔnga’ te bandeko na biso baklisto. (Nzembo 50:20) Ndenge kaka mabelé to simá mpe langi ezipaka bisika oyo efelo ebebi, ndenge moko mpe bolingo ezipaka mabe ya basusu.—Masese 17:9.
15 Bolingo ekotinda biso tósalisa baoyo bazali mpenza na mposa ya lisalisi. Lokola makambo ezali se kobeba na mikolo oyo ya nsuka, ekozala na bantango oyo bandeko na biso baklisto bakokóma na mposa ete tósalisa bango na biloko. (1 Yoane 3:17, 18) Na ndakisa, ndeko moko ya lisangá na biso azali konyokwama mpo azangi mpenza mbongo, to mpo balongoli ye na mosala? Na yango, tokoki kosalisa na mwa biloko na kotalela makoki na biso. (Masese 3:27, 28; Yakobo 2:14-17) Mobange mwasi moko oyo akufelá mobali azali na mposa ete bábongisela ye mwa bisika ya ndako oyo ebebi? Mbala mosusu tokoki kozwa bibongiseli ya malamu mpo na kosalela ye mwa misala yango.—Yakobo 1:27.
16 Tosengeli komonisa bolingo te kaka epai ya baoyo bafandi esika moko na biso. Ekoki kokóma ete tozwi nsango ete basaleli ya Nzambe na bisika mosusu bakómi na mpasi mpo na mipɛpɛ makasi, koningana ya mabelé, to bitumba oyo ebimi kati na bana-mboka. Bakoki kokóma na mposa makasi ya biloko ya kolya, ya bilamba, mpe biloko mosusu. Bázala bato ya loposo mosusu to ya mboka mosusu, yango ekoki kopekisa biso te tósalisa bango. Biso ‘tolingaka lisangá mobimba ya bandeko.’ (1 Petelo 2:17) Yango wana, ndenge moko na masangá ya ekeke ya liboso, biso mpe tozalaka na mposa makasi ya kopesa mabɔkɔ na bibongiseli oyo ezwami mpo na kosalisa bandeko yango. (Misala 11:27-30; Baloma 15:26) Ntango tozali komonisa bolingo na ndenge wana nyonso, tozali koyeisa makasi ekanganeli oyo ezali kosangisa biso na mikolo oyo ya nsuka.—Bakolose 3:14.
17 Bolingo etindaka biso tósakwela bato mosusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Tótalela ndakisa ya Yesu. Mpo na nini azalaki kosakola mpe koteya? ‘Azalaki koyokela bibele ya bato mawa’ mpo bazalaki mpenza babola na elimo. (Malako 6:34) Babateli ya mpate ya mangomba ya lokuta oyo basengelaki koteya bango solo mpe kopesa bango elikya, bazalaki kotyela bango likebi te mpe bazalaki kokosa bango. Lokola Yesu azalaki na bolingo makasi na motema mpe motema mawa, yango etindaki ye abɔndisa bango na “nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.”—Luka 4:16-21, 43.
18 Lelo oyo mpe, ebele ya bato bazali kotyelama likebi te mpe bakosami na elimo, bazali ata na elikya moko te. Ndenge moko mpe, soki tolandi ndakisa ya Yesu, tokomibanzabanza mpenza mpo na bamposa ya elimo ya bato oyo bayebi naino Nzambe ya solo te; bolingo mpe mawa ekotinda biso tósakwela bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 6:9, 10; 24:14) Lokola ntango oyo etikali ezali mokuse, tosengeli kosakola na lombangu koleka nsango oyo ya lobiko.—1 Timote 4:16.
“Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene”
19 Kobosana te, liboso Petelo apesa biso toli ete tólinganaka alobaki ete: “Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene.” (1 Petelo 4:7) Mosika te, mokili ya sika mpe ya boyengebene ya Nzambe ekozwa esika ya mokili oyo ya mabe. (2 Petelo 3:13) Yango wana, oyo ezali lisusu ntango ya kozala mafumafu te. Yesu akebisaki biso boye: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, mpe ete na pwasa mokolo wana ekwela bino na ntango wana kaka lokola motambo.”—Luka 21:34, 35.
20 Yango wana, tiká ete ‘tókɛngɛlaka’ mpenza lokola toyebi ntango oyo tokómi sikoyo. (Matai 24:42) Tókebaka makasi na komekama nyonso ya Satana oyo ekoki kolongola likebi na biso. Tótika te ete mokili oyo ezangi bolingo epekisa biso komonisa ete tolingaka basusu. Na koleka, tiká ete tópusana lisusu penepene na Nzambe ya solo, Yehova, oyo Bokonzi na ye apesi Masiya ekokokisa mosika te mokano na ye ya nkembo mpo na mabelé.—Emoniseli 21:4, 5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na 1 Petelo 4:8, mabongoli mosusu ya Biblia elobaka ete tosengeli kolinganaka “solosolo,” “na mozindo,” to “mingi mpenza.”
MITUNA YA BOYEKOLI
• Toli nini ya nsuka Yesu apesaki bayekoli na ye, mpe nini emonisi ete Petelo asimbaki yango malamu? (Par. 1-2)
• ‘Kolingana makasi’ elimboli nini? (Par. 3-5)
• Mpo na nini tosengeli kolinganaka? (Par. 6-8)
• Ndenge nini okoki komonisa ete olingaka bato mosusu? (Par. 9-18)
• Mpo na nini oyo ezali lisusu ntango ya kozala mafumafu te, mpe mokano na biso esengeli kozala nini? (Par. 19-20)
[Elilingi na lokasa 29]
Libota oyo ezali na boyokani ya malamu mpenza ezali pene mpo na kotɛmɛla mitungisi ya mikolo oyo ya nsuka
[Elilingi na lokasa 30]
Bolingo etindaka biso tósalisa baoyo bazali mpenza na mposa ya lisalisi
[Elilingi na lokasa 31]
Kosakwela basusu nsango malamu emonisaka ete tolingaka bango