MOKAPO YA MISATO
“Osengeli koloba na bango liloba oyo”
1. (a) Na ndenge nini Yesu akokanaki na Yirimia? (b) Mpo na nini tosengeli komekola Yirimia na mosala na biso ya kosakola?
YESU KRISTO nde ndakisa monene oyo tolandaka ntango tozali kosakola nsango malamu. Kasi simbá ete na siɛklɛ ya liboso bato mosusu oyo bamonaki Yesu bakanisaki ete azali mosakoli Yirimia. (Mat. 16:13, 14) Nzambe apesaki Yesu mokumba ya kosakola, ndenge apesaki mpe Yirimia. Na ndakisa, mokolo moko Nzambe ayebisaki Yirimia ete: “Osengeli koloba na bango liloba oyo, ‘Talá oyo Yehova . . . alobi.’” (Yir. 13:12, 13; Yoa. 12:49) Lisusu, na mosala na ye ya kosakola, Yirimia amonisaki bizaleli oyo Yesu mpe amonisaki ntango azalaki awa na mabele.
2. Likambo nini bato ya ntango ya Yirimia basengelaki kosala oyo bato ya ntango na biso basengeli mpe kosala?
2 Kasi bandeko mosusu bakoki koloba ete: ‘Lelo oyo, mosala na biso ya kosakola ekeseni na oyo ya Yirimia. Ye azalaki molobeli ya Nzambe epai ya bato oyo basilaki komipesa na Nzambe; nzokande, bato mingi oyo biso tosakwelaka bayebi Yehova te.’ Yango ezali solo. Kasi osengeli koyeba ete na ntango ya Yirimia, Bayuda mingi ‘bazangaki bwanya’ mpe batikaki Nzambe ya solo. (Tángá Yirimia 5:20-22.) Basengelaki kobongwana mpo Nzambe andima losambo na bango. Lelo oyo mpe, bato basengeli koyekola kobanga Yehova mpe kolanda losambo ya solo, ezala bato oyo batutaka ntolo ete bazali bakristo to bato mosusu. Tótala ndenge oyo tokoki komekola Yirimia ntango tozali kosalela Nzambe ya solo mpe ntango tozali kosalisa bato báyeba Nzambe.
‘YEHOVA ASIMBAKI MONƆKƆ NA NGAI’
3. Ntango Yirimia abandaki mosala na ye, Nzambe asalaki likambo nini oyo ekamwisaki Yirimia, mpe mosakoli yango amiyokaki ndenge nini?
3 Kobosana te ete ntango Yirimia abandaki mosala na ye ya kosakola, Nzambe ayebisaki ye ete: “Okokende epai ya baoyo nyonso nakotinda yo; mpe okoloba likambo nyonso oyo nakopesa yo mitindo. Kobanga bilongi na bango te, mpo ‘nazali elongo na yo mpo na kobikisa yo,’ yango nde liloba ya Yehova.” (Yir. 1:7, 8) Mpe na nsima, Nzambe asalaki likambo moko oyo ekamwisaki Yirimia. Yirimia alobi boye: “Yehova asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asalaki ete yango esimba monɔkɔ na ngai. Na nsima, Yehova alobaki na ngai ete: ‘Talá natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo. Talá, lelo oyo napesi yo mokumba.’” (Yir. 1:9, 10) Kobanda na ntango yango, Yirimia ayebaki ete akómaki molobeli ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.a Na lisalisi ya Nzambe, molende ya Yirimia mpo na mosala mosantu ebakisamaki.—Yis. 6:5-8.
4. Okoki kotánga bandakisa ya bandeko oyo bazalaka molende mpenza na mosala ya kosakola?
4 Ya solo, lelo oyo Yehova asimbaka basaleli na ye na monɔkɔ te. Kasi na nzela ya elimo na ye, apesaka bango mposa makasi ya kosakola nsango malamu. Mingi kati na bango bazalaka molende mpenza na mosala ya kosakola. Tózwa ndakisa ya ndeko-mwasi Maruja oyo afandaka na Espagne. Ndeko yango azali paralize esili koleka mbula 40. Kosakola ndako na ndako ezalaka mpasi mpo na ye, kasi asalelaka banzela mosusu mpo na kozala ntango nyonso molende na mosala ya kosakola. Na ndakisa, akomelaka bato mikanda. Mwana na ye ya mwasi nde akomaka makambo oyo Maruja ayebisaka ye. Na kampanye moko oyo eumelaki sanza mobimba, Maruja ná mwana na ye batindaki mikanda koleka 150 mpe bakɔtisaki trakte na mokanda mokomoko. Na nzela ya milende na bango, bato mingi ya mboka oyo ezali pene na bango bayokaki nsango malamu. Ndeko Maruja ayebisaki mwana na ye boye: “Soki ata mokanda moko oyo totindi ekwei na mabɔkɔ ya moto ya motema sembo, Yehova akopesa biso libaku ya koyekola na moto yango Biblia.” Nkulutu moko ya lisangá ya Maruja akomaki boye: “Napesaka Yehova matɔndi mpo na bandeko-basi oyo bazali lokola Maruja, oyo bazali kosalisa bato mosusu báyeba makambo oyo ezali mpenza na ntina.”
5. (a) Ndenge nini Yirimia azalaki ntango nyonso molende atako bato bazalaki kokipe te makambo oyo azalaki kosakwela bango? (b) Ndenge nini okoki kozala ntango nyonso molende na mosala ya kosakola nsango malamu?
5 Na ntango ya Yirimia, bato mingi oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme bazalaki ‘kosepela te’ na mateya ya solo ya Nzambe. Mosakoli atikaki nde kosakola mpo bato bazalaki kokipe nsango na ye te? Te! Yirimia alobi boye: “Natondi na nkanda makasi ya Yehova. Nalɛmbi kokanga yango na kati na ngai.” (Yir. 6:10, 11) Ndenge nini okoki kozala ntango nyonso molende lokola ye? Komanyola likoló ya lokumu oyo tozali na yango ya kozala bamonisi ya Nzambe ya solo ezali moko ya makambo oyo ekoki kosalisa yo. Oyebi malamu ete bato minene ya mokili oyo bafingaka nkombo ya Nzambe ya solo. Kanisá mpe ndenge oyo bakonzi ya mangomba bakosaka bato ya teritware na bino, kaka ndenge banganga-nzambe basalaki na mikolo ya Yirimia. (Tángá Yirimia 2:8, 26, 27.) Nzokande, nsango malamu ya Bokonzi oyo osakolaka emonisaka ete Nzambe alingaka mpenza bato. (Bil. 3:31, 32) Ya solo, komanyola likoló ya makambo wana ekoki kosalisa yo ozala ntango nyonso molende, wana ozali kosakola nsango malamu mpe kosalisa bato oyo bazali lokola bampate.
6. Mikakatano nini Yirimia akutanaki na yango?
6 Ya solo, ezalaka pɛtɛɛ te kozala ntango nyonso molende na mosala ya kosakola. Ntango Yirimia azalaki kosalela Yehova, akutanaki na mikakatano mingi, oyo mosusu eutaki epai ya basakoli ya lokuta. Soki otángi Yirimia mokapo 28, okomona moko ya mikakatano oyo Yirimia akutanaki na yango. Bato mingi bayokelaki ye te, mpe na bantango mosusu azalaki komiyoka ete azali ye moko. (Yir. 6:16, 17; 15:17) Lisusu, banguna bazalaki koluka koboma ye.—Yir. 26:11.
Mpo na nini okoki kotyela Yehova motema ete akosalisa yo ntango ozali kosakola nsango malamu?
“OKOSI NGAI, EE YEHOVA”
7, 8. Na ndenge nini kokosa oyo Yehova ‘akosaki’ Yirimia esalisaki ye?
7 Na ntango oyo bato bazalaki kosɛka Yirimia mpe kofinga ye mokolo na mokolo, Yirimia ayebisaki Nzambe ndenge oyo azalaki komiyoka. Mpo na yo, na ndenge nini Yehova ‘akosaki’ mosakoli na ye ya sembo, ndenge Yirimia 20:7, 8 elobi?—Tángá.
8 Yehova akosaki Yirimia to azimbisaki ye te na kosalela mayele mabe. Kokosa oyo Nzambe ‘akosaki’ mosakoli na ye ezalaki na ndenge ya mabe te, kasi alingaki nde kosalisa ye. Yirimia azalaki komona ete botɛmɛli ezali makasi mpenza mpe akanisaki ete akokoka lisusu te kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Kasi akokisaki yango na lisalisi mpe lisungi ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Na yango, tokoki koloba ete Yehova alongaki Yirimia. Amonisaki ete azali na nguya koleka ye mpe ete makanisi na ye eleki ya Yirimia. Na ntango oyo moto yango ya Nzambe akanisaki ete asuki mpe akokoka lisusu te, Yehova asalelaki nguya moko boye oyo esalisaki ye akoba na mosala na ye; na ndenge yango, tokoki koloba ete Yirimia akosamaki. Nzambe amonisaki ete makasi na ye eleki bolɛmbu ya mosakoli na ye. Yango wana, Yirimia akobaki na mosala na ye atako bato bazalaki kokipe te, bayokelaki ye te, mpe bazalaki konyokola ye.
9. Ndenge nini maloba oyo ezali na Yirimia 20:11 ekoki kolendisa yo?
9 Yehova azalaki elongo na Yirimia lokola “elombe moko ya nsɔmɔ,” mpo na kosalisa ye. (Yir. 20:11) Nzambe akoki mpe kosalisa yo ozala ntango nyonso molende mpo na losambo ya solo mpe olɛmba te ata soki okutani na mikakatano minene. Na vɛrsɛ yango, Biblia mosusu (Contemporary English Version) esaleli maloba “soda ya mpiko” mpo na komonisa ete soki Yehova azali pembeni na yo, okoki kobanga eloko moko te.
10. Ozwi ekateli ya kosala nini ntango okokutana na botɛmɛli?
10 Ntoma Paulo amonisaki ntina mpenza ya likambo yango ntango alendisaki bakristo oyo bazalaki kokutana na botɛmɛli; akomaki ete: “Bómitambwisa na ndenge oyo ebongi na nsango malamu ya Kristo, mpo . . . nayoka . . . ete bozali kotɛlɛma ngwi na elimo kaka moko, na molimo kaka moko bozali kobunda elongo mpo na kondima ya nsango malamu, mpe bozali kotika banguna na bino bábangisa bino na likambo ata moko te.” (Flp. 1:27, 28) Na ndakisa ya Yirimia mpe bakristo ya siɛklɛ ya liboso, okoki mpe osengeli kotyela Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso motema ete akosalisa yo mpo okokisa mokumba na yo. Soki bato mosusu bazali kotyola yo to kobundisa yo, kobosana te ete Yehova azali elongo na yo mpe akopesa yo makasi. Asalaki bongo mpo na Yirimia mpe mpo na ebele ya bandeko na biso; na yango, akoki mpe kosala bongo mpo na yo. Bondelá ye mpo asalisa yo mpe zalá na elikya ete akoyanola na libondeli na yo. Ntango Nzambe akopesa yo makasi ya kolonga mikakatano minene kozanga kobanga, yo mpe okoki komona lokola nde Nzambe ‘akosi’ yo. Ɛɛ, mbala mosusu okosala makambo oyo okanisaki te ete okokoka kosala.—Tángá Misala 4:29-31.
11, 12. (a) Mbongwana nini okoki kosala mpo na kokutana mpe kosolola na bato mingi na mosala ya kosakola? (b) Ndenge fɔtɔ oyo ezali na lokasa 39 emonisi yango, bisika nini mosusu na teritware na bino okoki kokutana na bato mpe kosolola na bango?
11 Makambo oyo Biblia elobi mpo na mosala ya Yirimia ekoki kosalisa biso na lolenge mingi mpo tókóma basakoli oyo bayebi koteya malamu. Nsima ya kozala mosakoli ya Yehova mbula koleka 20, Yirimia alobaki ete: “Nazalaki kaka koloba na bino, nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koloba, kasi boyokaki te.” (Yir. 25:3) Ɛɛ, azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kokokisa mokumba na ye. Ezali nde na likambo moko oyo ndakisa wana ya Yirimia ekoki koteya biso? Na masangá mingi, ezali na basakoli oyo balamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kokende kosolola na bato na bisika oyo bisi to engbunduka etɛlɛmaka. Na bamboka mosusu, basakoli mingi babimaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kokende kosolola na basali-bilanga mpe bato mosusu oyo babandaka mosala ntɔngɔntɔngɔ. Makambo nini mosusu okanisi ete okoki kosala mpo olanda ndakisa ya Yirimia, moto oyo asalelaki Yehova na bosembo? Okoki kosala makasi olamuka mwa ntɔngɔ mpo okóma liboso likita ya mosala ebanda?
12 Lisusu, na bisika mingi, kosakola ndako na ndako nsima ya nzanga mpe na mpokwa ebimisaka matomba. Basakoli mosusu basakolaka na butu, mpe bakendaka kotala bato oyo basalaka na bapɔmpi ya esansi, barestora, mpe bisika mosusu oyo bato basalaka butu moi. Okoki kobongisa programɛ na yo mpo osakolaka ntango oyo bato mingi bazalaka epai na bango to mpo okende kosakola bisika mosusu?
Mpo na nini ondimaka mpenza ete Yehova asungaka yo ntango ozali kosakola nsango na ye?
13, 14. (a) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yirimia na oyo etali kozongela bato? (b) Nini emonisi ete tosengeli kozala bato oyo bakoki kotyelama motema na oyo etali kozongela bato?
13 Na mabaku mosusu, Yehova ayebisaki Yirimia akende kosakola na baporte ya tempelo to na baporte ya Yerusaleme. (Yir. 7:2; 17:19, 20) Kosakola na baporte epesaki Yirimia libaku ya kosakwela bato mingi liloba ya Yehova. Mpe lokola bato ya lokumu ya engumba, bato ya mombongo mpe bakomelesa bazalaki mbala mingi koleka na baporte yango, Yirimia akokaki kosakwela bato yango mbala na mbala mpo na kosalisa bango bákanga ntina ya makambo oyo basilaki koyoka. Likambo yango ekoki koteya biso nini na oyo etali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu?
14 Yirimia ayebaki ete mosala na ye ya kosakola ekoki kobikisa bomoi ya bato. Mokolo moko, lokola azalaki na likoki te ya kokende koyebisa bato malako ya Nzambe, atindaki moninga na ye Baruke asalisa ye. (Tángá Yirimia 36:5-8.) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yirimia? Soki toyebisi moto ete tokozonga, tozongelaka ye mpenza? Soki tokokoka te kozongela moto to kokende koyekola na ye Biblia, tosɛngaka ndeko mosusu akende kotala moto yango? Yesu alobaki ete: “Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ.” (Mat. 5:37) Lokola tozali bamonisi ya Nzambe ya solo, oyo asalaka makambo na molɔngɔ, tosengeli kotosa maloba na biso.—1 Ko. 14:33, 40.
15, 16. (a) Na kolanda ndakisa ya Yirimia, ndenge nini basakoli mingi bazali kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na kosakola? (b) Liteya nini ozwi na ndakisa ya ndeko-mwasi oyo afandaka na Chili, ndenge fɔtɔ oyo ezali na lokasa 40 emonisi yango?
15 Mpo na kolendisa Bayuda oyo bazalaki na Babilone, Yirimia akomelaki bango mokanda moko oyo ezalaki na “liloba malamu” ya kozongisama oyo eutaki epai ya Yehova. (Yir. 29:1-4, 10) Lelo oyo mpe, “liloba malamu” oyo etali makambo Yehova akosala mosika te ekoki mpe kokómela bato noki na nzela ya mikanda mpe ya telefone. Okoki mpe kosalela mayele wana mpo na kosalisa bandeko na yo mpe bato mosusu oyo bafandaka mosika to bato mosusu oyo ezalaka mpasi kokutana na bango?
16 Lelo oyo, basakoli ya Bokonzi oyo bakokisaka mosala na bango malamumalamu na ndakisa ya Yirimia, bazwaka matomba mingi. Ndeko-mwasi moko oyo afandaka na Chili asololaki na mwasi moko na esika oyo engbunduka etɛlɛmaka. Mwasi yango asepelaki mingi na nsango ya Biblia mpe andimaki bákoba na lisolo yango ya Biblia epai na ye. Nzokande, ndeko yango abosanaki kokoma adrɛsi ya mwasi yango. Na nsima, amonaki ete asengeli kolandela mposa oyo mwasi yango amonisaki mpo na mateya ya solo. Mokolo oyo elandi, kaka na ngonga oyo akutanaki liboso na mwasi yango, azongaki na esika oyo engbunduka etɛlɛmaka mpe akutanaki lisusu na mwasi yango. Ya mbala oyo azwaki adrɛsi na ye mpe azongelaki ye epai na ye mpo na kosalisa ye ayeba mateya ya Biblia. Mosika te, Nzambe akosopela mokili ya Satana bitumbu na ye. Kasi elikya ezali mpo na bato oyo bazali kobongola motema mpe bazali kondima nsango malamu. (Tángá Bileli 3:31-33.) Na yango, tiká tósakola na molende nyonso na teritware na biso mpo na komonisa ete tozali mpenza kokanga ntina ya likambo yango.
“MBALA MOSUSU BAKOYOKA MPE BAKOZONGA”
17. Ndenge nini okoki komekola Yirimia na teritware na bino?
17 Yehova alingaki te ete bato bakufa. Mbula soki zomi liboso Yerusaleme ebomama, atindaki Yirimia mpo na koyebisa nsango ya elikya epai ya baoyo bazalaki na boombo na Babilone. Totángi boye: “Nakotya liso na ngai likoló na bango na ndenge ya malamu, mpe nakozongisa mpenza bango na mokili oyo. Mpe nakotonga bango, mpe nakobuka te; mpe nakolona bango, mpe nakopikola te.” Yango wana Yirimia ayebisaki bato yango ete: ‘Elikya ezali mpo na bomoi na bino na mikolo oyo ezali koya.’ (Yir. 24:6; 26:3; 31:17) Yirimia azalaki kotalela bato ndenge oyo Nzambe atalelaka bango. Azalaki komibanzabanza mpenza mpo na bato ntango azalaki kosakwela bango, mpe apesaki bango toli ya Yehova ete: “Nabondeli bino, bózonga, moto na moto alongwa na nzela na ye ya mabe, mpe bóbongisa misala na bino.” (Yir. 35:15) Lolenge nini mosusu okoki komonisa bato ya teritware na bino ete omibanzabanzaka mpenza mpo na bango?
18, 19. (a) Na oyo etali mosala ya kosakola, makanisi nini tosengeli kopɛngola? (b) Ezaleli nini ya Yirimia tosengeli komekola?
18 Bolingo makasi oyo Yirimia azalaki na yango mpo na bato ekitaki te. Ata ntango Yerusaleme ebomamaki, azalaki kaka koyokela bato mawa. (Tángá Bileli 2:11.) Ya solo, soki likama ekwelaki Bayuda, ezalaki foti na bango moko. Atako bongo, Yirimia alobaki na bango te ete: ‘Nayebisaki bino nini, bozwi!’ Ayokaki nde mawa mpo na makambo oyo ekwelaki bango. Ndenge moko mpe, tosengeli te kosakola kaka mpo na kosakola to lokola nde bazali kotindika biso. Milende oyo tozali kosala mpo na kosakola esengeli komonisa ete tolingaka mingi Nzambe mpe bato oyo asalá na elilingi na ye.
19 Mokumba to mosala moko te na mokili ekokani na mosala ya kopesa litatoli mpo na Nzambe ya solo. Yirimia azalaki kotalela mosala na ye ndenge wana; yango wana akomaki ete: “Maloba na yo ezwamaki, mpe nalyaki yango; mpe liloba na yo ekómaki nsai epai na ngai mpe esengo na motema na ngai; mpo ngai nabengami na nkombo na yo, Ee Yehova.” (Yir. 15:16) Soki tozali kosakola nsango malamu, tokoki kosalisa bato mingi lisusu báyeba mpe bálinga Moto oyo apesaki bango bomoi. Mpo na ntina yango, tósakola na molende mpe na bolingo ndenge Yirimia asalaki.
Na ndakisa ya Yirimia, banzela nini mosusu okoki kosalela mpo na kopalanganisa “liloba malamu” ya Yehova na mikolo ezali koya?
a Ndenge lisolo oyo emonisi yango, mbala mingi Yehova azalaki koloba na nzela ya baanzelu na ye bamemi-nsango, kasi ntango bazalaki koloba ezalaki komonana lokola Ye nde moto azali koloba.—Bas. 13:15, 22; Gal. 3:19.