MOKAPO YA ZOMI
Omitunaka mokolo na mokolo ete “wapi Yehova?”
1, 2. (a) Na ntango ya Yirimia, boyokani ya Bayuda ná Nzambe ezalaki ndenge nini? (b) Basengelaki kosala nini mpo na yango?
YIRIMIA azali kolela. Etamboli ya bato ya ekólo na ye, mpe lisusu makambo oyo Yehova ayebisaki ye asakola mpo na bango ezalaki kosala ye mpasi na motema. Alobaki ete soki motó na ye ezalaki liziba ya mai mpe miso na ye libulu ya mai, mbɛlɛ alelaki butu moi. Yirimia azalaki na ntina ya koyokela bato ya ekólo na ye mawa. (Yir. 9:1-3; tángá Yirimia 8:20, 21.) Bayuda bazalaki koboya mibeko ya Nzambe mpe batosaki mongongo ya Yehova te; yango wana mpasi esengelaki kokwela bango.—Yir. 6:19; 9:13.
2 Nzokande, bato ya Yuda bazalaki kosepela na ndenge oyo bakonzi na bango ya lingomba bazalaki ntango nyonso koyebisa bango ete ‘makambo nyonso ezali malamu,’ mpe bato yango bazalaki kokipe te ndenge oyo Yehova azalaki kotalela etamboli na bango. (Yir. 5:31; 6:14) Bazalaki lokola moto ya maladi oyo azali koluka monganga oyo akoyebisa ye makambo oyo ekokitisa ye motema kasi akoyebisa ye te ete maladi na ye ezali makasi. Soki ozali kobɛla makasi, okosepela ete monganga ayebisa yo maladi oyo ozali kobɛla mpenza mpo básalisa yo noki liboso maladi yango emema yo na liwa, boye te? Na ntango ya Yirimia, Bayuda basengelaki komitalela na bosembo mpo na koyeba ndenge oyo boyokani na bango ná Nzambe ezalaki. Basengelaki komituna ete: “Wapi Yehova?”—Yir. 2:6, 8.
3. (a) Ndenge nini Bayuda bakokaki koyanola na motuna, “Wapi Yehova?” (b) Likambo nini ya liboso Bayuda basengelaki kosala mpo na koluka Yehova?
3 Ndenge nini Bayuda bakokaki komituna, “Wapi Yehova?” Basengelaki koluka litambwisi ya Nzambe liboso ya kozwa ekateli, ezala ya moke to ya monene. Bayuda ya ntango ya Yirimia basalaki bongo te. Kasi nsima ya kobebisama ya Yerusaleme mpe kozonga na bango uta na Babilone, basengelaki ‘koluka Yehova.’ Kosala bongo elingaki kosalisa bango bázwa ye mpe báyeba banzela na ye. (Tángá Yirimia 29:13, 14.) Ndenge nini bakokaki kosala bongo? Ya liboso, basengelaki kopusana epai ya Nzambe na nzela ya libondeli oyo ezali kouta mpenza na motema, mpe kosɛnga ye atambwisa bango. Mokonzi Davidi asalaki bongo. Abondelaki Nzambe boye: “Salá ete nayeba banzela na yo, Ee Yehova; teyá ngai banzela na yo.” (Nz. 25:4) Yoká libyangi oyo Moto oyo ayokaka mabondeli apesaki na nzela ya Yirimia na mbula ya zomi ya boyangeli ya Mokonzi Zidikiya: “Bengá ngai, mpe nakoyanola yo, mpe na mbala moko nakoyebisa yo makambo minene mpe oyo okoki kokanga ntina te, oyo oyebi te.” (Yir. 33:3) Soki mokonzi mpe bato ya ekólo oyo bapɛngwi babengaki Yehova, Ye alingaki koyebisa bango makambo ‘oyo bakokaki kokanga ntina na yango te,’ elingi koloba, ete Yerusaleme ekobebisama mpe ekotongama lisusu nsima ya mbula 70.
4, 5. Makambo nini mosusu Bayuda basengelaki kosala mpo na koluka Yehova?
4 Likambo ya mibale oyo Bayuda basengelaki kosala mpo na koluka Yehova ezali ete basengelaki kotalela makambo oyo Nzambe asalelaki bato na ye kala mpe komanyola likoló na yango. Na yango bakokaki komikundola makambo oyo esalaki ete Nzambe asepela na bato na ye mpe makambo oyo esalaki ete asilikela bango. Bazalaki na mikanda oyo Moize akomaki, ná masolo mosusu ya kala oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe babuku ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yisraele mpe ya Yuda. Bayuda ya ntango ya Yirimia bakokaki kozwa eyano na motuna “Wapi Yehova?” soki bamanyolaki likoló ya makomi yango mpe soki bayokaki basakoli ya solo ya Nzambe.
5 Likambo ya misato oyo Bayuda basengelaki kosala mpo na koluka Yehova ezali ete basengelaki kozwa liteya na makambo oyo ekómelaki bango mpe bato mosusu. Yango elingi koloba te ete basengelaki kosala bozoba liboso mpo bázwa mayele na nsima, kasi bakokaki kozwa matomba soki bamanyolaki likoló ya makambo oyo basalaki kala mpe ndenge oyo Yehova atalelaki yango. Soki bazalaki mpenza na likebi bakokaki koyeba ndenge oyo Nzambe azali kotalela etamboli na bango.—Mas. 17:10.
6. Ndenge nini ndakisa ya Yobo ekoki kolendisa yo?
6 Ezali boni mpo na biso lelo? Liboso ozwa ekateli mpe liboso osala likambo moko boye, omitunaka ntango nyonso ete, “Wapi Yehova?” Bandeko mosusu bakoki komona ete ntango bazwaki bikateli mbala mingi bamitunaki motuna wana te. Soki mbala mosusu yango esilá kokómela yo, kolɛmba nzoto te. Yango ekómelaki mpe Yobo, moto oyo azalaki sembo. Ntango mpasi elekelaki ye, akómaki kokanisa mingi mpo na ye moko. Elihu akundwelaki ye ezaleli oyo bato mingi bazalaka na yango; alobaki boye: “Moto moko te alobi: ‘Wapi Nzambe Mokeli na ngai Monene?’” (Yobo 35:10) Elihu alendisaki Yobo boye: “Tyá likebi na misala ya kokamwa ya Nzambe.” (Yobo 37:14) Yobo asengelaki kotala malamu misala ya nguya ya Yehova oyo ezalaki komonana na biloko oyo azalisá, oyo ezalaki zingazinga na ye mpe na makambo oyo asalelaka bato. Na nzela ya makambo oyo Yobo akutanaki na yango, ayebaki banzela ya Yehova. Nsima ya koyikela minyoko mpiko mpe nsima ya komona ndenge Yehova akataki likambo na ye, Yobo alobaki: “Nalobaki, kasi nazalaki kososola te makambo ya kokamwa mingi mpenza mpo na ngai, oyo nayebi te. Nayokaki yo na nsango, kasi sikoyo liso na ngai emoni yo.”—Yobo 42:3, 5.
7. Ndenge elilingi oyo ezali na lokasa 116 emonisi yango, likambo nini tokoyekola sikoyo?
7 Nzokande, mosakoli Yirimia ye akobaki koluka Yehova mpe azwaki ye. Na boumeli ya bambula mingi oyo asalelaki Nzambe na bosembo, Yirimia akobaki kotuna ete: “Wapi Yehova?”, kasi bato ya ekólo na ye basalaki bongo te. Na baparagrafe oyo elandi na mokapo oyo, tokomona ndenge oyo ndakisa ya Yirimia ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo tokoki koluka Yehova mpe kozwa ye na nzela ya libondeli, boyekoli, mpe makambo oyo tokutanaka na yango.—1 Nt. 28:9.
Kotuna “Wapi Yehova?” elimboli nini? Makambo nini Bayuda ya ntango ya Yirimia basengelaki kosala mpo na komonisa ete bazali komituna motuna yango?
YIRIMIA AZALAKI KOLUKA YEHOVA NA NZELA YA LIBONDELI
8. Ntango nini Yirimia apusanaki pene na Nzambe na nzela ya libondeli?
8 Na boumeli ya bambula oyo Yirimia azalaki molobeli ya Nzambe epai ya Bayuda, alukaki Yehova na nzela ya mabondeli oyo azalaki kosala na motema mobimba. Alukaki lisalisi ya Nzambe ntango asengelaki kosakola nsango oyo ezalaki kosepelisa bato te, ntango azalaki kokanisa ete akokoka lisusu kosakola te, mpe ntango azalaki komituna mpo na nini makambo mosusu ezali kosalema. Nzambe ayanolaki ye mpe asalisaki ye ayeba oyo asengeli kosala. Tózwa mwa bandakisa.
9. (a) Na Yirimia 15:15, 16, ndenge nini Yirimia amonisi ndenge oyo amiyokaki, mpe ndenge nini Yehova ayanolaki ye? (b) Mpo na nini okanisi ete ezali na ntina mingi komonisa Nzambe ndenge ozali komiyoka ntango ozali kobondela?
9 Mokolo moko ntango Nzambe ayebisaki Yirimia asakola nsango ya bitumbu, Yirimia amonaki lokola nde moto nyonso azali kolakela ye mabe. Na yango, mosakoli asɛngaki Nzambe akanisa ye. Talá libondeli oyo asalaki, oyo ekomami na Yirimia 15:15, 16; na libondeli yango, Yirimia amonisi ndenge oyo amiyokaki ntango Yehova ayanolaki ye. (Tángá.) Kaka na libondeli yango, Yirimia ayebisaki mpe Nzambe makambo oyo ezalaki kotungisa ye. Kasi, ntango azwaki maloba ya Nzambe mpe atyaki yango na monɔkɔ na ye, akómaki na esengo! Yehova asalisaki ye amona valɛrɛ ya mokumba oyo azalaki na yango ya komema nkombo na ye mpe kosakola nsango na ye. Yirimia amonaki polele likanisi ya Yehova na likambo yango. Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
10. Ntango mosakoli alobaki ete akoloba lisusu na nkombo ya Yehova te, ndenge nini Nzambe ayanolaki na libondeli na ye?
10 Mokolo mosusu, nganga-Nzambe Pashure, mwana ya Imere, abɛtaki Yirimia, mpe nsima na yango Yirimia alobaki ete akoloba lisusu na nkombo ya Yehova te. Ndenge nini Yehova ayanolaki na libondeli ya Yirimia? (Tángá Yirimia 20:8, 9.) Biblia eyebisi biso te ete Nzambe ayanolaki Yirimia uta na likoló. Ata bongo, Liloba ya Nzambe ekómaki lokola mɔtɔ kati na mikuwa na ye mpe akokaki lisusu te kokanga motema mpo na kosakola yango. Na yango, lokola Yirimia afungolelaki Nzambe motema na ye mpe andimaki ete mokano ya Nzambe etambwisa ye, azwaki makasi ya kokoba kosala mokano ya Nzambe.
11, 12. Eyano nini Yirimia azwaki mpo na motuna oyo amitunaki ntango amonaki lokola nde makambo ya bato mabe ezali kotambola malamu?
11 Ntango Yirimia amonaki ndenge oyo makambo ya bato mabe ezali kotambola malamu, atungisamaki mingi. (Tángá Yirimia 12:1, 3.) Yango elingi koloba te ete atyelaki bosembo ya Nzambe ntembe; mosakoli alukaki nde ete Nzambe ayoka “komilela” na ye. Lokola azalaki koyebisa Nzambe makambo polele, yango emonisi ete azalaki na boyokani makasi na Nzambe, lokola mwana oyo alingaka tata na ye. Soki Yirimia amilelaki, ezali mpo azalaki komituna mpo na nini makambo ya Bayuda mingi oyo bazalaki mabe ezalaki kotambola malamu. Yirimia azwaki eyano ya malamu na motuna na ye? Yehova ayebisaki ye ete akopikola bato mabe. (Yir. 12:14) Na ntembe te, ntango Yirimia amonaki ndenge oyo Nzambe akataki makambo oyo ayebisaki ye na libondeli, atyelaki bosembo ya Nzambe motema koleka. Mbala mosusu yango esalaki ete Yirimia abondelaka Nzambe mingi koleka, mpe akóma kofungolela Tata na ye motema.
12 Na mikolo ya nsuka ya boyangeli ya Zidikiya, ntango bato ya Babilone bazingaki Yerusaleme, Yirimia alobaki ete Yehova azali lokola moto “oyo miso efungwami likoló ya banzela nyonso ya bana ya bato, mpo na kopesa na mokomoko na kolanda mbuma ya misala na ye.” (Yir. 32:19) Yirimia akokaki komona ete Yehova alingaka mpenza bosembo, mpe ete Nzambe atalaka makambo oyo mokomoko azali kosala mpe ayokaka mabondeli ya basaleli na ye oyo euti na motema. Mpe basaleli na ye bakomona makambo mingi lisusu oyo ekomonisa ete ‘apesaka na mokomoko na kolanda mbuma ya misala na ye.’
13. Mpo na nini ozali na elikya ete mokano ya Nzambe ekokokisama mpenza?
13 Mbala mosusu totyaka ntembe te na bosembo ya Nzambe mpo na ndenge oyo azali kokokisa na bwanya mokano na ye lelo mpe ndenge akokokisa yango na mikolo ezali koya. Ata bongo, tokoki kozwa matomba soki tomanyoli likoló ya makambo oyo ekómelaki Yirimia mpe soki toyebisi Nzambe na libondeli ndenge tozali komiyoka. Soki tozali kofungolela Yehova motema ndenge wana, kondima na biso ekokóma lisusu makasi ete akozanga te kokokisa mokano na ye. Ata soki tozali koyeba mpenza te mpo na nini lelo makambo ezali kotambola ndenge moko boye, to mpo na nini mokano ya Nzambe ezali kokokisama noki te, tokoki kobondela Nzambe mpo na koyebisa ye ete tondimi mpenza ete ayebi malamu nyonso oyo ezali kosalema. Akokokisa mokano na ye na ntango mpe na ndenge oyo ayebi ete ezali malamu koleka. Mokano na ye ekosalema mpenza; ntembe ezali te. Wana tozali kobondela mpo na koluka koyeba mokano na ye mpe komona bilembeteli oyo ezali komonisa kokokisama na yango, ntango nyonso tokomituna ete: “Wapi Yehova?”—Yobo 36:5-7, 26.
Biyano oyo Yirimia azwaki na libondeli ntango azalaki koluka Nzambe, epesi yo elikya nini?
YIRIMIA ALEISAKI MOTEMA NA YE NA BOYEBI
14. Ndenge nini toyebi ete Yirimia azalaki koyekola masolo ya libota ya Nzambe?
14 Yirimia ayebaki ete mpo azwa eyano ya motuna, “Wapi Yehova?” asengelaki kozala na ‘boyebi ya Yehova.’ (Yir. 9:24) Mpo na kokoma mikanda ya Bakonzi 1 ná 2, na ntembe te Yirimia ayekolaki masolo ya libota ya Nzambe. Atángaki na nkombo mikanda mosusu lokola “buku ya makambo ya Salomo,” “buku ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yisraele” mpe “buku ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yuda.” (1 Bak. 11:41; 14:19; 15:7) Na yango, akangaki ntina mpo na nini Yehova azwaki ekateli boye to boye. Yirimia amonaki makambo oyo esepelisaka Yehova mpe ndenge oyo atalelaka bikateli oyo bato bazwaka. Akokaki mpe kotánga mikanda mosusu ya ntango wana oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe lokola mikanda ya Moize, Yosua, Samwele, Davidi mpe Salomo. Na ntembe te, ayebaki makomi ya basakoli ya kala mpe oyo ya basakoli ya mikolo na ye. Matomba nini Yirimia azwaki na boyekoli ya ye moko?
15. Mbala mosusu boyekoli Yirimia asalaki ya esakweli ya Eliya esalisaki ye ndenge nini?
15 Yirimia akomaki lisolo ya Yezabele, mwasi mabe ya Mokonzi Ahaba ya Samaria. Na lisolo yango, alobelaki mpe esakweli ya Eliya oyo emonisaki ete bambwa ekolya Yezabele na eteni ya mabele ya Yizireele. (1 Bak. 21:23) Mpe na kolanda makambo oyo Yirimia akomaki, toyebi malamu ete mbula soki 18 na nsima, Yezabele abwakamaki uta na lininisa, bampunda ya Yehu enyatanyataki ye, mpe bambwa elyaki ye. (2 Bak. 9:31-37) Na ntembe te, boyekoli ya esakweli ya Eliya mpe kokokisama na yango ata na makambo na yango ya mikemike, elendisaki kondima oyo Yirimia azalaki na yango na liloba ya Nzambe. Ya solo, koyekola makambo oyo Nzambe asalaki na ntango ya kala elendisaki kondima ya Yirimia mpe esalisaki ye ayika mpiko na mosala na ye.
16, 17. Okanisi nini esalisaki Yirimia akoba kokebisa bakonzi mabe ya ntango na ye?
16 Tózwa ndakisa mosusu. Mpo na yo, nini esalisaki Yirimia akoba kokebisa bakonzi mabe lokola Yehoyakime mpe Zidikiya, atako akutanaki na minyoko? Likambo ya libosoliboso oyo esalisaki ye ezali ete Yehova akómisaki ye “engumba oyo ebatelami makasi, likonzí ya ebende mpe bifelo ya motako” liboso ya bakonzi ya Yuda. (Yir. 1:18, 19) Kasi tóbosana te ete Yirimia ayekolaki mingi masolo ya boyangeli ya kala ya Yuda mpe ya Yisraele. Akomaki mpe ndenge oyo Mokonzi Manase “atongelaki limpinga nyonso ya likoló bitumbelo na mapango mibale ya ndako ya Yehova,” alekisaki mwana na ye mbeka na mɔtɔ, mpe asopaki makila mingi mpenza ya bato oyo bazalaki na likambo te. (2 Bak. 21:1-7, 16; tángá Yirimia 15:4.) Ata bongo, na ntembe te Yirimia ayebaki ete ntango Manase amikitisaki mpe akobaki kobondela Yehova, Nzambe “andimaki libondeli” na ye, mpe azongisaki ye na bokonzi na ye.—Tángá 2 Ntango 33:12, 13.
17 Na mikanda oyo Yirimia akomaki, alobeli te mawa oyo Yehova amoniselaki Manase. Kasi Manase akufaki mbula soki 15 liboso Yirimia abanda mosala na ye ya kosakola. Na yango, ekoki kozala ete mosakoli ayokaki makambo oyo ekómelaki mokonzi yango ntango abongolaki motema mpo na mabe nyonso oyo asalaki. Na ntembe te, makambo oyo Yirimia ayekolaki na oyo etali etamboli mabe ya Manase mpe ndenge oyo yango esukelaki ye esalisaki ye amona ntina ya kokebisa bakonzi lokola Zidikiya báluka mawa mpe motema-boboto ya Nzambe, mpo ata mokonzi oyo akendeki nsango mpo na losambo ya bikeko mpe asopaki makila mingi abongolaki motema mpe Nzambe alimbisaki ye. Soki ozalaki na esika ya Yirimia, okanisi ete makambo oyo ekómelaki Manase elingaki kolendisa yo mpe kopesa yo makasi okoba kosakola na boumeli ya boyangeli ya bakonzi mosusu ya mabe?
ATEYAMAKI NA MAKAMBO OYO AMONAKI
18. Liteya nini Yirimia akokaki kozwa na likambo oyo ekómelaki Uriya, mpe mpo na nini oyanoli ndenge wana?
18 Ntango Yirimia azalaki mosakoli, na ntembe te amonaki makambo mosusu oyo bato ya ntango na ye bazalaki kosala mpe yango epesaki ye liteya. Moko ya bato yango ezali mosakoli Uriya oyo asakolaki bitumbu oyo esengelaki kokwela Yerusaleme mpe Yuda na ntango ya boyangeli ya Yehoyakime. Uriya akimaki na Ezipito mpo abangaki ete Mokonzi Yehoyakime asala ye mabe. Mwa moke na nsima, mokonzi yango atindaki bato na Ezipito mpo bákanga Uriya mpe bámema ye epai ya mokonzi, mpe mokonzi yango abomaki ye. (Yir. 26:20-23) Okanisi ete Yirimia azwaki liteya na makambo oyo ekómelaki Uriya? Lokola Yirimia akobaki kokebisa Bayuda ata na kati ya tempelo, mpo na likama oyo elingaki kokwela bango, yango emonisi ete mbala mosusu azwaki liteya na makambo yango. Yirimia azalaki ntango nyonso na mpiko mpe Yehova asundolaki ye te. Ekoki kozala ete Nzambe nde moto atindaki Ahikame, mwana ya Shafane abikisa Yirimia na liwa.—Yir. 26:24.
19. Lokola Yehova azalaki kaka kotinda basakoli na ye, mbala mosusu yango eteyaki Yirimia likambo nini?
19 Yirimia azwaki mpe liteya na makambo oyo amonaki ntango Yehova asalelaki ye mpo na kokebisa bato na ye. Na mbula ya minei ya boyangeli ya Mokonzi Yehoyakime, Yehova ayebisaki Yirimia akoma maloba nyonso oyo ayebisaki ye uta mikolo ya Yosiya tii na ntango wana. Mpo na nini Nzambe apesaki ye etinda wana? Ezalaki mpo na kolendisa bato bábongola motema mpe bálimbisama. (Tángá Yirimia 36:1-3.) Yirimia azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpo na koyebisa bato makebisi oyo euti na Nzambe; kutu, abondelaki bato yango bátika misala na bango ya mabe. (Yir. 44:4) Emonani polele ete makambo oyo Yirimia amonaki eteyaki ye ete Nzambe azalaki kotinda basakoli na ye mpo azalaki koyokela libota na ye mawa, boye te? Mpe likambo yango esengelaki kotinda Yirimia ayokela bato mosusu mawa, boye te? (2 Nt. 36:15) Omoni sikoyo mpo na nini, ntango Yirimia abikaki wana Yerusaleme ebebisamaki, alobaki ete: “Ezali mpo na misala ya motema boboto ya Yehova nde tosili te, mpamba te ebele ya misala na ye ya motema mawa ekosuka te. Ezalaka ya sika ntɔngɔ nyonso.”—Bil. 3:22, 23.
Ntango Yirimia ayekolaki makambo oyo Yehova asalaki kala mpe amanyolaki likoló ya makambo oyo ekómelaki ye mpe bato mosusu, yango eteyaki ye nini? Likambo yango eteyi biso nini?
YO MPE OMITUNAKA MOKOLO NA MOKOLO, “WAPI YEHOVA?”
20. Ndenge nini okoki komekola Yirimia na oyo etali koluka Yehova?
20 Mokolo na mokolo, liboso ya kozwa ekateli, osalaka makasi oluka koyeba soki mokano ya Nzambe ezali nini? Omitunaka, “Wapi Yehova?” (Yir. 2:6-8) Na bokeseni na Bayuda ya ntango na ye, Yirimia azalaki ntango nyonso koluka ete Mozwi-ya-Nguya-Nyonso asalisa ye mpo asosola nzela oyo asengeli kolanda. Biso mpe tokomonisa ete tozali na bwanya mpe ete tozali komekola Yirimia soki mokolo na mokolo tozali koluka koyeba likanisi ya Yehova liboso ya kozwa ekateli.
21. Mabondeli ya ndenge nini ekoki kosalisa yo na mosala ya kosakola, na ndakisa ntango okutani na moto ya nkanda?
21 Kasi tokoluka Yehova te kaka soki tolingi kozwa ekateli na likambo moko ya monene to likambo mosusu oyo ekoki kobongola bomoi na biso. Na ndakisa, tokosala nini soki tozalaki na programɛ ya kobima na mosala ya kosakola mokolo moko boye kasi ntango tolamuki na ntɔngɔ, tomoni ete likoló eyindi. Mbala mosusu teritware oyo ebongisamaki mpo na kosakola ndako na ndako ezali teritware oyo bandeko basakolaka mingi. Ntango mosusu omikundoli mpe ndenge oyo bato mosusu na teritware yango baboyaki koyoka yo na mwa bokonde ya lokuta to babenganaki yo lokola mbwa. Na ebandeli ya mokolo ya ndenge wana, omoni te ete ekozala malamu obondela Yehova mpe omituna, “Wapi Yehova?” Kosala bongo ekosalisa yo omikundola ete nsango oyo okokende kosakola ezali nsango moko ya kitoko mpenza. Lisusu okomona mpenza ete ezali mokano ya Nzambe ete osakola nsango na ye. Soki osali bongo, Liloba ya Yehova ekokóma esengo mpe nsai na motema na yo, ndenge ezalaki mpo na Yirimia. (Yir. 15:16, 20) Soki kaka na mokolo yango okutani na moto ya nkanda makasi to na moto oyo agangeli yo, okoki lisusu kobondela Nzambe mpo na komonisa ye mayoki na yo. Okosala bongo? Kobosana te ete Nzambe akoki kopesa yo elimo na ye mpo oyeba oyo okosala soki okutani na likambo ya ndenge wana, mpe mposa na yo ya kosakola Liloba na ye ekolonga makanisi mabe oyo okoki kozala na yango.—Luka 12:11, 12.
22. Mpo na nini mabondeli mosusu esukaka na nzela?
22 Kasi tóbosana te ete mabondeli mosusu esukaka na nzela to elekaka te. (Tángá Bileli 3:44.) Yehova aboyaki koyoka mabondeli ya Bayuda oyo batombokelaki ye mpo ‘balongolaki matoi na bango ete bayoka ye te’ mpe bakangamaki na etamboli na bango ya mabe. (Mas. 28:9) Likambo yango eteyaki Yirimia; esengeli mpe koteya biso ete, soki makambo oyo moto azali kosala eyokani te na mabondeli na ye, yango ekoyokisa Nzambe mpasi mpe ekoki kosala ete aboya koyoka mabondeli ya moto yango. Ya solo, tosengeli koboya kosala makambo oyo esalaka Yehova mpasi na motema.
23, 24. (a) Likambo nini ya ntina tosengeli kosala soki tolingi koyeba mokano ya Nzambe? (b) Makambo nini okoki kosala mpo ozwa matomba mingi koleka na boyekoli na yo ya Biblia?
23 Mpo na koyeba mokano ya Yehova, tosengeli kosuka kaka te na kobondela ye mpo atambwisa biso; tosengeli mpe kokoba koyekola biso moko. Na likambo yango, biso tozali na bisaleli mingi oyo Yirimia azalaki na yango te. Na ndakisa, tozali na Biblia na mobimba na yango. Yirimia asalaki bolukiluki mingi mpe yango esalisaki ye akoma masolo na ye na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Yo mpe okoki komekola ye; okoki kosala bolukiluki na Liloba ya Nzambe mpe koluka litambwisi na ye, yango ekomonisa ete ozali komituna, “Wapi Yehova?” Koyekola koyeba mokano ya Nzambe, ekosalisa yo otyela ye motema, mpe ‘okokóma mpenza lokola nzete oyo elonami pembeni na mai, oyo ezali kotinda misisa na yango tii pembeni ya mokɛli ya mai.’—Tángá Yirimia 17:5-8.
24 Ntango ozali kotánga mpe komanyola likoló ya Makomami Mosantu, luká koyeba oyo Yehova alingi osala na likambo boye to boye. Okoki mpe koluka mitinda oyo olingi kobosana te mpe oyo olingi kosalela na bomoi na yo. Ntango ozali kotánga masolo ya bato ya kala, mibeko ya Nzambe, mitinda na ye, mpe maloba ya bwanya oyo ezali na Liloba ya Nzambe, kanisá ndenge mikapo yango ekoki kosalisa yo mpo oyeba ndenge ya kozwa bikateli mokolo na mokolo. Ntango omituni, “Wapi Yehova?” Nzambe akoki komonisa yo, na nzela ya Liloba na ye, ndenge oyo okoki kolonga mikakatano oyo okutani na yango. Ya solo, mbala mosusu Biblia ekosalisa yo oyeba malamu makambo oyo liboso ‘okokaki kokanga ntina na yango te to oyo oyebaki te!’—Yir. 33:3.
25, 26. Ndenge nini makambo oyo ekómelaki biso mpe bato mosusu ekoki kosalisa biso?
25 Longola yango, okoki koyekola makambo oyo ekómelaki yo mpe bato mosusu. Na ndakisa, mbala mosusu okomona ete ezali na bato oyo batiki kotyela Yehova motema, ndenge Uriya asalaki. (2 Tim. 4:10) Makambo oyo basalaki ekoki koteya yo mpe yango ekoki kosalisa yo okima likama oyo ekwelaki bango. Kanisá mbala na mbala ndenge oyo Yehova azali komonisela yo motema-boboto na ye, mpe kobosana te ete Yirimia asepelaki mpe na motema mawa mpe boboto ya Nzambe. Ata soki likambo oyo okutani na yango ezali mpasi ndenge nini, kokanisa te ete Moto Oyo-Aleki-Likoló akipaka yo te. Akipaka yo mpenza, kaka ndenge azalaki kokipe Yirimia.
26 Ntango ozali komanyola likoló ya makambo oyo Yehova asalelaka basaleli na ye mokomoko lelo, okomona ete mokolo na mokolo apesaka bango litambwisi na banzela ndenge na ndenge. Aki, ndeko mwasi oyo azali naino elenge, oyo azalaki kofanda na Japon, azalaki komiyoka lokola nde abongi te kozala Mokristo. Mokolo mosusu oyo abimaki na mosala ya kosakola elongo na mwasi ya mokɛngɛli ya zongazonga, afungolelaki ye motema mpe alobaki na ye boye: “Namiyokaka lokola nde etikali moke Yehova asanza ngai, kasi natingami kaka na ye, mpe nasɛngaka ye atikela ngai mwa ntango lisusu.” Mwasi ya mokɛngɛli ya zongazonga atalaki ya na miso mpe ayebisaki ye ete: “Namonaka te ete ozali mokristo oyo azali mɔtɔ te mpiɔ te!” Na nsima, Aki amanyolaki likoló ya maloba wana ya kobɔndisa. Ya solo, likambo ata moko te emonisaki ete Yehova azali kotalela ye lokola moto oyo azali mɔtɔ te mpiɔ te. Na nsima, Aki abondelaki Yehova boye: “Tindá ngai esika nyonso olingi. Oyo nyonso okotinda ngai nasala, nakosala.” Eumelaki te, akendeki mobembo na ekólo mosusu esika oyo mwa etuluku ya basakoli oyo balobaka monɔkɔ ya Japonais ezalaki, mpe etuluku yango ezalaki na mposa ya mosakoli oyo alobaka monɔkɔ wana oyo akokaki kofanda kuna mpe kosalisa bango. Nzokande, Aki abotamá na mboka yango; yango wana ezalaki mpasi te akende kofanda kuna mpe asalisa bango. Kasi alingaki kofanda epai ya nani? Ndeko mwasi moko oyo mwana na ye ya mwasi akendeki kofanda esika mosusu, andimaki kopesa ye shambre moko na ndako na ye. Mpo na kosukisa, Aki alobi boye: “Ezalaki lokola nde sambole moko ezwi ndimbola na yango; Yehova azalaki nde kofungolela ngai nzela.”
27. Mpo na nini tosengeli ntango nyonso komituna ete, “Wapi Yehova?”
27 Bandeko mingi ya basi mpe ya mibali bamonaka ete Nzambe atambwisaki bango, mbala mosusu na ntango oyo bazalaki kotánga Biblia to kosala boyekoli ya bango moko. Mbala mosusu yo mpe omonaka bongo. Yango esengeli kolendisa boyokani na yo ná Yehova mpe kotinda yo opusana pene na ye na libondeli mbala mingi koleka mpe na molende. Tózala na elikya ete Yehova akolakisa biso nzela na ye oyo tosengeli kotambola, wana tozali komituna mokolo na mokolo ete, “Wapi Yehova?”—Yis. 30:21.
Ndenge nini okoki kozwa eyano na motuna oyo, “Wapi Yehova?” Ndenge nini okoki koluka litambwisi na ye?