MOKAPO 3
Poná baninga oyo balingaka Nzambe
“Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.”—MASESE 13:20.
1-3. (a) Masese 13:20 ezali koteya biso nini? (b) Mpo na nini tosengeli kopona malamu baninga na biso?
OSILÁ komona ndenge mwana moke atalaka baboti na ye? Liboso ete abanda koloba, akangaka makambo nyonso oyo azali komona mpe koyoka. Ntango azali kokola, abandaka komekola baboti na ye kozanga ete ayeba yango. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te soki mikóló mpe bakanisaka mpe basalaka makambo oyo bamonaka epai ya bato oyo balekisaka na bango ntango mingi.
2 Masese 13:20 elobi: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.” Na vɛrsɛ yango, ‘kotambola na’ moto elimboli kondima kolekisaka ntango elongo na ye. Yango esɛngaka kaka te kokutana na moto mbala na mbala. Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobaki ete na vɛrsɛ yango, kotambola na moto elimboli mpe kolinga moto yango mpe kokangama na ye mpenza. Mbala mingi tolandaka makambo ya bato oyo tolekisaka na bango ntango mingi, mingimingi soki tosepelaka na bango.
3 Baninga na biso bakoki kosalisa biso to kobebisa biso. Eteni ya nsuka ya Masese 13:20 elobi: “Kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” Na monɔkɔ ya Ebre, ‘kozala na boyokani na’ moto ekoki kolimbola “kozala ntango nyonso elongo” na moto yango, elingi koloba kozala moninga na ye. (Masese 22:24; Basambisi 14:20) Soki oponi baninga oyo balingaka Nzambe, bakolendisa yo otikala sembo epai na ye. Mpo na kosalisa yo oyeba ndenge ya kopona baninga, tólobela naino bato oyo Yehova aponaka bázala baninga na ye.
BANINGA YA NZAMBE
4. Mpo na nini kozala moninga ya Nzambe ezali lokumu monene? Mpo na nini Yehova abengaki Abrahama ete “moninga na ngai”?
4 Yehova azali Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba; atako bongo, apesi biso libaku ya kozala baninga na ye. Yango ezali lokumu monene mpenza. Yehova aponaka malamu baninga na ye. Aponaka baoyo balingaka ye mpe bazalaka na kondima epai na ye. Tózwa ndakisa ya Abrahama. Azalaki kosala mbala moko nyonso oyo Nzambe asɛngi. Abrahama amonisaki mbala mingi ete azalaki moto ya sembo mpe ya botosi. Andimaki kopesa ata mwana na ye Yisaka lokola mbeka. Abrahama azalaki na kondima ete “Nzambe akokaki kolamwisa ye [Yisaka] ata uta na bakufi.” (Baebre 11:17-19; Ebandeli 22:1, 2, 9-13) Abrahama azalaki moto ya sembo mpe ya botosi, yango wana Yehova abengaki ye “moninga na ngai.”—Yisaya 41:8; Yakobo 2:21-23.
5. Ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo bazali sembo epai na ye?
5 Yehova azwaka baninga na ye na valɛrɛ mingi. Baninga ya Yehova balukaka libosoliboso kozala sembo epai na ye. (Tángá 2 Samwele 22:26.) Bazalaka sembo mpe batosaka ye mpo balingaka ye. Biblia elobi ete Nzambe “azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana,” oyo batosaka ye. (Masese 3:32) Yehova abengaka baninga na ye bákɔta na “hema” na ye, mpo na kosambela mpe kobondela ye na ntango nyonso oyo balingi.—Nzembo 15:1-5.
6. Ndenge nini okoki komonisa ete olingaka Yesu?
6 Yesu alobaki: “Soki moto alingi ngai, akotosa liloba na ngai, mpe Tata na ngai akolinga ye.” (Yoane 14:23) Na yango, mpo ozala moninga ya Yehova, osengeli mpe kolinga Yesu, kosala makambo oyo ateyaki biso. Na ndakisa, osengeli kotosa mitindo oyo Yesu apesaki ete tósakola nsango malamu mpe tókómisa bato bayekoli. (Matai 28:19, 20; Yoane 14:15, 21) Lokola tolingaka Yesu, ‘tolandaka matambe na ye malamumalamu.’ (1 Petro 2:21) Yehova asepelaka ntango amonaka ndenge tosalaka makasi mpo tómekola Mwana na ye na maloba mpe na misala na biso.
7. Mpo na nini osengeli kopona baninga oyo bazali mpe baninga ya Yehova?
7 Baninga ya Yehova bazalaka na kondima, bazalaka sembo, batosaka ye, mpe balingaka Mwana na ye Yesu. Yo mpe oponaka baninga ya ndenge wana? Soki baninga na yo balandaka ndakisa ya Yesu mpe bamipesaka na koteya basusu makambo ya Bokonzi ya Nzambe, bakoki kosalisa yo okóma moto malamu mpe otikala sembo epai ya Yehova.
BANDAKISA YA BIBLIA EKOKI KOTEYA YO
8. Nini esepelisi yo na boninga ya Ruta ná Naomi?
8 Biblia ezali na masolo ebele ya bato oyo bazalaki baninga, na ndakisa Ruta ná bokilo na ye Naomi. Basi yango bazalaki bato ya mboka moko te, mpe Naomi azalaki mokóló ya Ruta ya bambula ebele mpenza. Kasi, bakómaki baninga ya motema mpo bango mibale bazalaki kolinga Yehova. Ntango Naomi alingaki kolongwa na Moabe mpo na kozonga na mboka na ye Yisraele, “Ruta akangamaki na ye.” Alobaki na Naomi: “Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai.” (Ruta 1:14, 16) Ruta amoniselaki Naomi boboto mpenza. Ntango bakómaki na Yisraele, Ruta asalaki mosala makasi mpo na kosalisa moninga na ye. Naomi alingaki Ruta mingi mpe apesaki ye toli ya malamu. Ruta ayokelaki ye, mpe na nsima bango mibale bazwaki mapamboli ebele.—Ruta 3:6.
9. Nini ekamwisi yo na boninga ya Davidi ná Yonatane?
9 Davidi ná Yonatane mpe bazalaki baninga ya motema oyo bazalaki sembo epai ya Yehova. Yonatane alekaki Davidi na mbula soki 30 mpe ye nde akokaki kokóma mokonzi na Yisraele. (1 Samwele 17:33; 31:2; 2 Samwele 5:4) Kasi, ntango ayebaki ete Yehova aponaki nde Davidi lokola mokonzi, Yonatane ayokelaki ye zuwa te mpe alukaki te kowelana na ye. Asalaki nyonso mpo na kosalisa Davidi. Na ndakisa, ntango Davidi azalaki na likama, Yonatane asalisaki ye “atyela Yehova motema.” Yonatane atyaki kutu bomoi na ye na likama mpo na Davidi. (1 Samwele 23:16, 17) Davidi mpe azalaki moninga ya malamu. Alakaki Yonatane ete akobatela libota na ye mpe akokisaki elaka yango ata nsima ya liwa ya Yonatane.—1 Samwele 18:1; 20:15-17, 30-34; 2 Samwele 9:1-7.
10. Ndakisa ya bilenge Baebre misato eteyi yo nini na oyo etali boninga?
10 Bilenge Baebre misato na nkombo Shadrake, Meshake, mpe Abedenego bamemamaki na mboka-mopaya ntango bazalaki naino bana mike. Lokola mabota na bango etikalaki mosika, baninga yango basalisanaki mpo bátikala sembo epai ya Yehova. Na nsima, ntango bakómaki mikóló, kondima na bango emekamaki ntango Mokonzi Nebukadenezare asɛngaki bango básambela ekeko ya wolo. Shadrake, Meshake, mpe Abedenego baboyaki kosambela ekeko yango mpe bayebisaki mokonzi ete: “Tosalelaka banzambe na yo te, mpe ekeko ya wolo oyo otɛlɛmisi tokosalela yango te.” Ntango kondima na bango emekamaki, baninga yango misato batikalaki sembo epai ya Nzambe na bango.—Danyele 1:1-17; 3:12, 16-28.
11. Ndenge nini toyebi ete ntoma Paulo ná Timote bazalaki baninga?
11 Ntango ntoma Paulo akutanaki na elenge Timote, amonaki ete Timote alingaki Yehova mpe azalaki komitungisa mpenza mpo na lisangá. Na yango, ntoma Paulo alakisaki Timote ndenge ya kosalisa bandeko na bisika ndenge na ndenge. (Misala 16:1-8; 17:10-14) Timote amipesaki mingi na mosala yango mpe ntoma Paulo alobaki ete: “Asalaki lokola moombo elongo na ngai mpo nsango malamu ekende liboso.” Ntoma Paulo ayebaki ete Timote ‘akomitungisa mpenza’ mpo na bandeko. Wana bazalaki komipesa elongo na mosala ya Yehova, ntoma Paulo ná Timote bakómaki baninga.—Bafilipi 2:20-22; 1 Bakorinti 4:17.
NDENGE YA KOPONA BANINGA
12, 13. (a) Mpo na nini tosengeli kokeba ntango tozali kopona baninga ata na kati ya lisangá? (b) Mpo na nini ntoma Paulo apesaki likebisi oyo ezali na 1 Bakorinti 15:33?
12 Na lisangá, toyekolaka makambo epai ya bandeko mosusu mpe tosalisanaka mpo tótikala sembo epai ya Yehova. (Tángá Baroma 1:11, 12.) Kasi, ata na kati ya lisangá, tosengeli kokeba na bato oyo tokopona bázala baninga na biso ya motema. Tozali na bandeko ya bikólo mpe mimeseno ekeseni. Bamosusu bazali bato ya sika, bamosusu basalelaka Yehova banda bambula ebele. Ndenge kaka ezwaka ntango mpo mbuma ekɔmɛla, ezwaka mpe ntango mpo moto akóma na boninga makasi ná Yehova. Yango wana, tosengeli kozala motema molai, kolinga bandeko, mpe kopona malamu baninga na biso.—Baroma 14:1; 15:1; Baebre 5:12–6:3.
13 Na bantango mosusu, makambo ya minene ekoki kobima na kati ya lisangá, oyo ekosɛnga tókeba mpenza. Ekoki kozala ete ndeko moko azali kosala makambo oyo Biblia epekisi. To ndeko moko akoki kokóma na ezaleli ya koimaima, oyo ekoki kobebisa lisangá. Makambo ya ndenge wana ekamwisaka biso te, mpo ata epai ya bakristo ya liboso, makambo ezalaki kobima na bantango mosusu. Ntoma Paulo akebisaki bakristo ya ntango wana ete: “Bómikosa te, baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakorinti 15:12, 33) Ntoma Paulo ayebisaki Timote akeba ntango azali kopona bato oyo bakozala baninga na ye ya motema. Biso mpe tosengeli kokeba.—Tángá 2 Timote 2:20-22.
14. Ndenge nini baninga bakoki kobebisa boyokani na yo na Yehova?
14 Osengeli kobatela boninga na yo na Yehova. Ezali na motuya koleka eloko nyonso oyo ozali na yango. Yango wana, osengeli koboya kozala moninga ya motema ya moto oyo akoki kolɛmbisa kondima na yo mpe kobebisa boyokani na yo na Nzambe. Soki otye linyuka na kati ya mai ya ngayi, okozela te ete emɛla kaka mai ya mpamba; ndenge moko mpe, soki ozali na baninga oyo basalaka makambo ya mabe, kokanisa te ete kosala makambo ya malamu ekozala pɛtɛɛ mpo na yo. Yango wana, tosengeli kopona malamu bato oyo bakozala baninga na biso ya motema.—1 Bakorinti 5:6; 2 Batesaloniki 3:6, 7, 14.
15. Okoki kosala nini mpo ozwa baninga ya malamu na lisangá?
15 Na lisangá, bato oyo balingaka mpenza Yehova bazali. Bakoki kokóma baninga na yo ya motema. (Nzembo 133:1) Koluka te kozwa kaka baninga ya mbula na yo to oyo makambo na bino ekokani. Kobosana te ete Yonatane azalaki mokóló ya Davidi ya bambula ebele mpenza, mpe ete Ruta azalaki mwana epai ya Naomi. Malamu olanda toli oyo ya Biblia ete: “Bófungwama.” (2 Bakorinti 6:13; tángá 1 Petro 2:17.) Mpe wana ozali kokoba kolinga Yehova, bato mingi mpe bakolinga kozala baninga na yo.
SOKI MATATA EBIMI
16, 17. Soki moto moko na lisangá apesi yo mpasi, nini osengeli kosala te?
16 Na libota, moto na moto azalaka na bizaleli na ye, makanisi na ye, mpe ndenge na ye ya kosala makambo. Ezali mpe bongo na lisangá. Bokeseni yango ebakisaka elɛngi na bomoi, mpe tokoki koyekola makambo ebele epai ya basusu. Kasi, na bantango mosusu, bokeseni yango ekoki kosala ete oyokana malamu te na bandeko mosusu mpe okóma kosilikela bango. Na bantango mosusu ndeko moko akoki kopesa yo nkanda to kozokisa yo na motema. (Masese 12:18) Okotika makambo yango elɛmbisa yo to ekimisa yo lisangá?
17 Te. Ata soki moto moko apesi yo mpasi, kokima lisangá te. Ezali Yehova te nde asali yo mabe. Apesá biso bomoi mpe biloko mosusu nyonso. Na yango, tosengeli kolinga ye mpe kotikala sembo epai na ye. (Emoniseli 4:11) Lisangá ezali likabo ya Yehova oyo esalisaka biso tókoba kozala na kondima makasi. (Baebre 13:17) Kobwaka likabo yango ata mokolo moko te kaka mpo moto moko apesi yo mpasi.—Tángá Nzembo 119:165.
18. (a) Nini ekoki kosalisa yo oyokanaka malamu na bandeko? (b) Mpo na nini osengeli kolimbisaka basusu?
18 Lokola tolingaka bandeko na biso, mposa na biso ezali ete tóyokanaka na bango malamu. Yehova asɛngi biso te tózala bato ya kokoka, yo mpe koluka te basusu bázala bato ya kokoka. (Masese 17:9; 1 Petro 4:8) Biso nyonso tosalaka mabunga, kasi bolingo ekotinda biso tókoba ‘kolimbisana na motema moko.’ (Bakolose 3:13) Soki tolingi bandeko, bolingo ekopekisa biso tókómisa likambo yango monene. Ezali solo ete soki moto asiliki, ekoki kozala mpasi atika kokanisa likambo oyo basalaki ye. Na yango, ezali pɛtɛɛ abomba nkanda na motema mpo na ndeko. Kosala bongo ekopesa biso esengo te, kasi ekokómisa biso nde mawamawa. Nzokande, soki tolimbisi moto oyo asalaki biso mabe, tokozala na kimya ya motema, bomoko ekozala na lisangá, mpe oyo eleki ntina, tokobatela boyokani malamu na Yehova.—Matai 6:14, 15; Luka 17:3, 4; Baroma 14:19.
NTANGO MOTO ALONGOLAMI NA LISANGÁ
19. Ntango nini osengeli kokata boninga na moto moko ya lisangá?
19 Mpo libota ezala na esengo, moto mokomoko asengeli kosala nyonso mpo baninga bázala na esengo. Kasi, nini esalemaka soki moto moko ya libota akómi motomboki? Bato nyonso balukaka kosalisa ye, kasi akoki koboya lisalisi yango. Akoki kutu kolongwa na ndako, to tata akoki kosɛnga ye alongwa na ndako na ye. Likambo ya ndenge wana ekoki kosalema mpe na lisangá. Moto mosusu akoki kopona komipesa na makambo oyo Yehova aboyi, mpe yango ekoki kotya lisangá na likama. Akoki koboya básalisa ye mpe akoki komonisa na misala na ye ete alingi lisusu kozala na kati ya lisangá te. Ye moko akoki kopona komilongola na lisangá, to bakoki kolongola ye na lisangá. Soki esalemi bongo, Biblia elobi polele ete tosengeli ‘kotika kosangana’ na ye. (Tángá 1 Bakorinti 5:11-13; 2 Yoane 9-11) Kosala bongo ekoki kozala mpasi mingi soki moto yango azali moninga na yo to ndeko na yo ya libota. Kasi, na likambo yango, bosembo na biso epai ya Yehova esengeli kozala makasi koleka bosembo na biso epai ya bato.—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 8.
20, 21. (a) Na ndenge nini ebongiseli ya kolongola moto na lisangá emonisaka bolingo? (b) Mpo na nini kopona malamu baninga na biso ezali na ntina?
20 Kolongola moto na lisangá ezali ebongiseli moko oyo emonisaka bolingo ya Yehova. Ebatelaka lisangá na bato oyo baboyi kotosa mibeko ya Yehova. (1 Bakorinti 5:7; Baebre 12:15, 16) Esalisaka biso tómonisa ete tolingaka nkombo mosantu ya Yehova, mibeko na ye ya sembo, mpe Yehova ye moko. (1 Petro 1:15, 16) Kolongola moto na lisangá ezali ebongiseli oyo emonisaka ete tozali na bolingo mpo na moto oyo azali lisusu na lisangá te. Mpo disiplini ya makasi oyo azwi ekoki kosalisa ye amona ete azali kosala mabe mpe kotinda ye abongwana. Bato mingi oyo balongolamaki na lisangá, na nsima bazongelaki Yehova mpe bayambamaki lisusu na esengo na kati ya lisangá.—Baebre 12:11.
21 Tomoni ete baninga bakoki kosalisa biso to kobebisa biso. Yango wana, kopona malamu baninga na biso ezali na ntina. Soki tolingi bato oyo Yehova alingaka, tokozala na baninga oyo bakoki kosalisa biso tótikala sembo libela na libela.