MOKAPO 3
Lingá bato oyo Nzambe alingaka
“Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.”—MASESE 13:20.
1-3. (a) Biblia elobi likambo nini oyo ezali mpenza solo? (b) Ndenge nini tokoki kopona baninga oyo bakoki kosalisa biso tókolisa bizaleli ya malamu?
MBALA mingi, biso bato tomekolaka makambo oyo tomonaka epai ya bato mosusu zingazinga na biso. Mbala mosusu, kozanga kutu tóyeba yango, tókómaka kokanisa, kosala makambo, ata mpe komitambwisa lokola bato oyo totambolaka na bango.
2 Biblia elobi solo ete: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” (Masese 13:20) Lisese yango elobeli te kokutana na moto na mwa mabaku. Maloba ‘kotambola na’ ezali kopesa likanisi ya kozala mpenza moninga.a Buku moko oyo elimboli vɛrsɛ yango elobi boye: “Kotambola na moto elimbolaka kolinga ye mpe kokangama na ye.” Omonaka te ete mbala mingi tomekolaka bato oyo tolingaka? Lokola tokangamaka makasi na bato oyo tolingaka, bato yango bakoki kobongisa to kobebisa bizaleli na biso.
3 Mpo na kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, ezali na ntina mingi tózala baninga ya bato oyo bakoki kosalisa biso tókolisa bizaleli ya malamu. Ndenge nini tokoki kosala yango? Na mokuse, tokoki kosala yango soki tozali kolinga bato oyo Nzambe alingaka, elingi koloba kosala ete baninga na ye bákóma mpe baninga na biso. Kanisá naino: Tokoki nde kozwa baninga malamu koleka bato oyo bazali na bizaleli oyo Yehova alukaka epai ya baoyo babongi kozala baninga na ye? Na yango, tótalela bato ya ndenge nini Nzambe alingaka. Soki tozali na likanisi ya Yehova, tokopona baninga malamu.
BATO OYO NZAMBE ALINGAKA
4. Mpo na nini Yehova azali na lotomo ya kopona malamu baninga na ye, mpe mpo na nini abengaki Abrahama ete “moninga na ngai”?
4 Yehova aponaka baninga na ye biponelá te. Kutu, azali na lotomo ya kosala bongo! Azali Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe kozala moninga na ye ezali lokumu oyo eleki lokumu nyonso. Boye, Yehova aponaka banani mpo bázala baninga na ye? Yehova apusanaka penepene na bato oyo batyelaka ye motema mpe bazalaka na kondima epai na ye. Tótalela ndakisa ya Abrahama, moto oyo azalaki na kondima makasi. Mpo na biso bato, komekama moko te ezali makasi koleka básɛnga biso ete tókaba mwana na biso lokola mbeka.b Kasi, “tokoki koloba ete [Abrahama] akabaki Yisaka mbeka” mpo azalaki na kondima ete Nzambe “azalaki na likoki ya kolamwisa ye ata uta na bakufi.” (Baebre 11:17-19) Lokola Abrahama amonisaki kondima mpe botosi ya ndenge wana, Yehova abengaki ye ete “moninga na ngai.”—Yisaya 41:8; Yakobo 2:21-23.
5. Ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo batosaka ye na bosembo nyonso?
5 Yehova atalelaka na motuya mingi likambo ya kotosa ye na bosembo. Alingaka bato oyo batyaka bosembo na bango epai na ye liboso ya makambo mosusu nyonso. (Tángá 2 Samwele 22:26.) Ndenge tomonaki yango na Mokapo 1, Yehova asepelaka mingi na bato oyo batosaka ye mpo balingaka ye. Masese 3:32 elobi ete: “Ye azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.” Yehova apesi bato oyo bakokisaka masɛngami na ye na bosembo nyonso libaku malamu mpenza—bakoki kofanda na “hema” na ye, elingi koloba ete bakoki kokóma basambeli na ye mpe kobondela ye na bonsomi nyonso.—Nzembo 15:1-5.
6. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Yesu, mpe ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo balingaka Mwana na ye?
6 Yehova alingaka bato oyo balingaka Yesu, Mwana na ye se moko oyo abotamaki. Yesu alobaki boye: “Soki moto alingi ngai, akotosa liloba na ngai, mpe Tata na ngai akolinga ye, mpe tokoya epai na ye mpe tokosala esika na biso ya kofanda epai na ye.” (Yoane 14:23) Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Yesu? Soki tozali kotosa makambo oyo atindaki, na ndakisa kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 28:19, 20; Yoane 14:15, 21) Tomonisaka mpe ete tolingaka Yesu na ndenge ‘tolandaka matambe na ye malamumalamu,’ elingi koloba tosalaka makasi tómekola ye na maloba mpe na misala na biso, atako tozali bato ya kozanga kokoka. (1 Petro 2:21) Yehova asepelaka na milende ya bato oyo bolingo na bango epai ya Mwana na ye etindaka bango bálanda ndakisa na ye.
7. Mpo na nini ezali malamu ete baninga na biso bázala mpe baninga ya Yehova?
7 Kondima, bosembo, botosi, mpe bolingo epai ya Yesu mpe mateya na ye ezali na kati ya bizaleli oyo Yehova alukaka epai ya baninga na Ye. Ebongi mokomoko na biso amituna boye: ‘Baninga na ngai ya motema bamonisaka bizaleli yango? Baninga na ngai bazali mpe baninga ya Yehova?’ Ezali na ntina mingi tómituna mituna yango. Bato oyo bazali na bizaleli malamu mpe basakolaka nsango malamu ya Bokonzi na molende bakoki mpenza kosalisa biso tókokisa mokano na biso ya kosepelisa Nzambe.—Talá etanda “Nani azali moninga malamu?”
NDAKISA MOKO EUTI NA BIBLIA OYO EKOKI KOTEYA BISO
8. Nini ezali kobenda likebi na yo na boninga ya (a) Naomi ná Ruta? (b) bilenge Baebre misato? (c) Paulo ná Timote?
8 Biblia elobeli bato mingi oyo bazwaki matomba na ndenge baponaki baninga malamu. Na ndakisa, Biblia elobeli boninga ya Naomi ná bokilo na ye Ruta, boninga makasi ya bilenge Baebre misato oyo bazalaki na Babilone, mpe boninga ya Paulo ná Timote. (Ruta 1:16; Danyele 3:17, 18; 1 Bakorinti 4:17; Bafilipi 2:20-22) Kasi, sikoyo tótya naino likebi na ndakisa ya bato mibale oyo bazalaki baninga ya solosolo: Davidi ná Yonatana.
9, 10. Nini esimbaki boninga ya Davidi ná Yonatana?
9 Biblia elobi ete Davidi abomaki Goliate; na nsima, “motema ya Yonatana ekanganaki na motema ya Davidi. Yonatana alingaki ye lokola motema na ye moko.” (1 Samwele 18:1) Kobanda na ntango yango, mibali yango mibale bakómaki baninga makasi atako bakesanaki mpenza na bambula, mpe boninga yango eumelaki tii ntango Yonatana akufaki na etumba.c (2 Samwele 1:26) Nini esimbaki boninga makasi ya Davidi ná Yonatana?
10 Davidi ná Yonatana balingaki Nzambe mingi mpe bazalaki na mposa makasi ya kotikala sembo epai na ye; bizaleli yango nde esangisaki bango. Bango mibale bazalaki na mposa ya kosepelisa Nzambe. Mokomoko na bango amonisaki bizaleli oyo esalaki ete mosusu alinga ye makasi. Na ntembe te, Yonatana asepelaki mingi na mpiko mpe molende oyo Davidi amonisaki mpo na kolongisa nkombo ya Yehova. Kasi, Davidi azalaki na limemya epai ya Yonatana, mokóló na ye oyo atosaki bibongiseli ya Yehova mpe azalaki koluka liboso matomba ya Davidi. Na ndakisa, tótalela likambo oyo Yonatana asalaki ntango Davidi azalaki na mokakatano moko monene, na ntango oyo azalaki kokimakima na esobe mpo Mokonzi Saulo, tata ya Yonatana, azalaki koluka koboma ye. Yonatana amonisaki mpenza bosembo na ndenge “akendaki epai ya Davidi . . . kolendisa ye atyela Nzambe motema.” (1 Samwele 23:16) Kanisá ndenge oyo Davidi ayokaki ntango moninga na ye ya motema akendaki kokutana na ye mpo na kosalisa ye mpe kolendisa ye!d
11. Ndakisa ya Davidi ná Yonatana eteyi yo nini na ntina etali boninga?
11 Boninga ya Yonatana ná Davidi ezali koteya biso nini? Tomoni ete eloko ya libosoliboso oyo esengeli kosangisa baninga ezali bolingo oyo balingi makambo ya elimo. Soki tozali baninga ya bato oyo bazali na bindimeli ndenge moko na biso, biso ná bango totosaka mitinda moko, mpe biso ná bango tozali na mposa ya kotikala sembo epai ya Nzambe, tokobanda kolendisana ntango tozali kosolola mpe kopesana makanisi. (Tángá Baroma 1:11, 12.) Tokoki kozwa baninga ya ndenge wana, oyo bazali bato oyo balingaka makambo ya Nzambe, na kati ya bandeko na biso basambeli ya Yehova. Kasi, yango elingi koloba ete moto nyonso oyo ayaka na makita na Ndako ya Bokonzi azali moninga ya malamu? Ezali bongo te.
NDENGE YA KOPONA BANINGA
12, 13. (a) Mpo na nini tosengeli kopona malamu baninga na biso ata na kati ya bandeko na biso bakristo? (b) Mokakatano nini ezalaki na masangá ya siɛklɛ ya liboso, mpe yango etindaki Paulo apesa makebisi nini?
12 Ata na kati ya lisangá, tosengeli kopona malamu soki tolingi kozwa baninga oyo bakolendisa biso na elimo. Likambo yango esengeli nde kokamwisa biso? Te. Esɛngaka ntango mingi mpo bakristo mosusu bákɔmɛla na elimo, ndenge kaka, na nzete moko, esɛngaka ntango mingi mpo mbuma mosusu etela. Yango wana, na masangá nyonso, tokutaka bakristo oyo bakɔmɛli na elimo mpe bamosusu oyo bakɔmɛli naino te. (Baebre 5:12–6:3) Ya solo, tolingaka bato ya sika to baoyo bazali makasi te na elimo mpe tomoniselaka bango motema molai mpo na kosalisa bango bákola na elimo.—Baroma 14:1; 15:1.
13 Na kati ya lisangá, tokoki mbala mosusu kokutana na makambo oyo ekosɛnga tómituna soki tozali kaka kotambola na baninga malamu. Bato mosusu bakómaka na etamboli ya mabe. Bamosusu bakoki kokóma na ezaleli ya koimaima to ya komilelalela. Makambo yango ezalaki mpe kosalema na masangá ya ekeke ya liboso. Atako bakristo mingi bazalaki sembo, bamosusu bazalaki na etamboli ya malamu te. Lokola bato mosusu na lisangá ya Korinti bazalaki kondima te mateya mosusu ya bokristo, ntoma Paulo akebisaki bakristo ya lisangá yango na maloba oyo: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakorinti 15:12, 33) Paulo ayebisaki Timote ete ata na kati ya bakristo, ekoki kozala na baoyo basalaka makambo ya mabe. Paulo alendisaki ye ete akima bato ya ndenge wana, azala moninga na bango te.—Tángá 2 Timote 2:20-22.
14. Ndenge nini tokoki kosalela toli ya Paulo na oyo etali baninga?
14 Ndenge nini tokoki kosalela toli ya ntoma Paulo? Soki tozali koboya boninga na moto nyonso oyo akoki kobebisa bizaleli na biso, ezala na kati to na libándá ya lisangá. (2 Batesaloniki 3:6, 7, 14) Tosengeli kobatela boyokani na biso na Nzambe. Tóbosana te ete biso bato tolandaka makanisi mpe bizaleli ya baninga na biso. Tokoki te kozindisa éponge na masanga mpe kolikya ete ekotonda na mai; ndenge moko mpe, tokoki te kolikya kokóma na bizaleli ya malamu soki tozali kotambola na baninga mabe.—1 Bakorinti 5:6.
Okoki kozwa baninga malamu na kati ya bandeko na lisangá
15. Okoki kosala nini mpo ozwa baninga oyo basepelaka na makambo ya elimo?
15 Likambo ya malamu ezali ete tozali na likoki ya kozwa ebele ya baninga malamu na kati ya lisangá. (Nzembo 133:1) Ndenge nini okoki kozwa baninga oyo basepelaka na makambo ya elimo? Soki ozali kolona bizaleli ya malamu, na ntembe te bato mosusu oyo bazali kosala lokola yo bakopusana penepene na yo. Kasi, osengeli mpe kosala mwa makambo mosusu mpo na kozwa baninga ya sika. (Talá etanda “Ndenge oyo tozwaki baninga malamu.”) Tyáká likebi epai ya bato oyo bazali na bizaleli oyo olingaka kozala na yango. Landá toli ya Biblia oyo ezali kolendisa yo ‘ofungwama,’ elingi koloba, lukáká baninga ata na kati ya bandeko ya loposo, ekólo, to mimeseno mosusu. (2 Bakorinti 6:13; tángá 1 Petro 2:17.) Kosuka te kaka epai ya bato oyo ozali na bango bambula ndenge moko. Kobosana te ete Yonatana azalaki mokóló mpenza epai ya Davidi. Mikóló mingi bakoki kozala baninga malamu mpamba te bayebi makambo mingi mpe bazali na bwanya.
NTANGO MATATA EBIMI
16, 17. Soki ndeko moko azokisi biso, mpo na nini tosengeli kotika lisangá te?
16 Lokola tokeseni bomoto mpe tokolá ndenge moko te, ekoki kokóma mbala na mbala ete mikakatano ebima na kati ya bandeko na lisangá. Ndeko moko akoki koloba to kosala likambo moko oyo ezokisi biso. (Masese 12:18) Na bantango mosusu, matata ekómaka makasi soki bato bayokanaka malamu te, soki moto na moto akaniselaka moninga mabe, to ntango bazali na makanisi ndenge moko te na likambo moko. Makambo ya ndenge wana esengeli nde kobɛtisa biso libaku mpe kotinda biso tótika lisangá? Ekozala bongo te soki tolingaka mpenza Yehova mpe bato oyo ye alingaka.
17 Ebongi mpenza tólinga Yehova mpe tókangama na ye mpamba te azali Mozalisi na biso mpe Mopesi-bomoi. (Emoniseli 4:11) Longola yango, tosengeli kopesa mabɔkɔ na lisangá oyo azali kosalela. (Baebre 13:17) Na yango, soki ndeko moko azokisi biso to asali biso likambo moko ya mabe, tokotika lisangá te mpo na komonisa ete tozali na nkanda. Kutu, ezali Yehova te nde asali biso mabe. Lokola tolingaka mpenza Yehova, tosengeli soki moke te kopesa ye mokɔngɔ mpe kokabwana na basaleli na ye!—Tángá Nzembo 119:165.
18. (a) Tokoki kosala nini mpo na kobatela kimya na kati ya lisangá? (b) Kolimbisa ndeko na biso soki tozali na ntina malamu ya kosala yango ememaka mapamboli nini?
18 Bolingo oyo tolingaka bandeko na biso basambeli ya Yehova etindaka biso tóbatela kimya na kati ya lisangá. Yehova alukaka te ete bato oyo alingaka bákóma bato ya kokoka, biso mpe tosengeli kosala lokola ye. Bolingo esalisaka biso tólimbisa mabunga mikemike, mpamba te biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga. (Masese 17:9; 1 Petro 4:8) Bolingo esalisaka biso tókoba “kolimbisana na motema moko.” (Bakolose 3:13) Ntango mosusu ezalaka pɛtɛɛ te kosalela toli yango. Soki totiki nzela na makanisi ya mabe, tokoki kobomba nkanda, mpo tokokanisa mbala mosusu ete na ndenge yango, tokopesa ndeko oyo asali biso mabe etumbu. Nzokande, kobomba nkanda na motema ekosala biso moko mabe. Kolimbisa ndeko na biso soki tozali na ntina malamu ya kosala yango ememaka mapamboli mingi. (Luka 17:3, 4) Epesaka biso kimya ya motema, ebatelaka kimya na kati ya lisangá, mpe likambo oyo eleki ntina, ebatelaka boyokani na biso ná Yehova.—Matai 6:14, 15; Baroma 14:19.
NTANGO OYO ESƐNGAKA KOKATA BONINGA NÁ MOTO
19. Makambo nini ekoki kosɛnga ete tókata boninga na moto moko?
19 Na bantango mosusu, esɛngaka tókata boninga ná moto moko oyo azalaki ndeko na kati ya lisangá. Likambo yango ekómaka ntango moto moko abuki mobeko ya Nzambe, aboyi kobongola motema mpe mpo na yango, abimisami na lisangá; to ntango moto awangani kondima mpe akómi koteya mateya ya lokuta; to mpe ntango moto amilongoli na lisangá. Liloba ya Nzambe elobi na biso polele ete ‘tótika kosangana’ na bato ya ndenge wana.e (Tángá 1 Bakorinti 5:11-13; 2 Yoane 9-11) Ekoki kozala mpasi kokabwana na moto oyo mbala mosusu azali moninga to ndeko na biso. Tokondima kosala yango mpo na komonisa ete bosembo na biso epai ya Yehova mpe na mibeko na ye ezali na ntina koleka eloko mosusu nyonso? Tóbosana te ete bosembo mpe botosi na biso ezali na motuya mingi na miso ya Yehova.
20, 21. (a) Mpo na nini ekateli ya kobimisa moto na lisangá emonisaka bolingo? (b) Mpo na nini ezali na ntina tóponaka malamu baninga na biso?
20 Ekateli ya kolongola moto na lisangá emonisaka bolingo ya Yehova. Na ndenge nini? Kolongola na lisangá mosumuki oyo aboyi kobongola motema emonisaka ete tolingi nkombo mosantu ya Yehova mpe mitinda na ye. (1 Petro 1:15, 16) Ekateli ya kobimisa moto na lisangá ebatelaka lisangá. Ebatelaka basangani na yango oyo bazali sembo mpo bato oyo basalaka masumu na nko bábebisa bango te mpe na bongo, bákoba kosambela Nzambe lokola bayebi ete lisangá na ye ezali esika ya kimya na kati ya mokili oyo etondi na mabe. (1 Bakorinti 5:7; Baebre 12:15, 16) Etumbu wana ya makasi emonisaka mpe tozali kolinga mosali-mabe. Ekateli yango ekoki kotinda ye azongela makanisi malamu mpe asala milende mpo na kozonga epai ya Yehova.—Baebre 12:11.
21 Tokoki te kowangana ete baninga na biso bakoki kobongisa bizaleli na biso to mpe kobebisa yango. Yango wana, ezali na ntina mingi tóponaka malamu baninga na biso. Soki tozali baninga ya bato oyo bazali baninga ya Yehova mpe soki tozali kolinga bato oyo Nzambe alingaka, tokozala na baninga malamu mpenza. Makambo oyo tokomekola epai na bango ekosalisa biso tókokisa mokano na biso ya kosepelisa Yehova.
a Liloba ya Ebre oyo ebongolami na ‘kozala na boyokani na’ ebongolami mpe na ‘kokangana’ to mpe “kosala boninga.”—Basambisi 14:20; Masese 22:24.
b Likambo oyo Yehova asɛngaki Abrahama emonisaki ndenge oyo Ye moko asengelaki kopesa lokola mbeka Mwana na ye se moko oyo abotamaki. (Yoane 3:16) Kasi, Yehova apekisaki Abrahama aboma Yisaka mpe apesaki ye mpate mpo atumba yango lokola mbeka na esika ya Yisaka.—Ebandeli 22:1, 2, 9-13.
c Davidi azalaki “bobele elenge” ntango abomaki Goliate mpe azalaki na mbula soki 30 ntango Yonatana akufaki. (1 Samwele 17:33; 31:2; 2 Samwele 5:4) Lokola Yonatana azalaki na mbula soki 60 ntango akufaki, emonani ete alekaki Davidi na mbula soki 30.
d Ndenge 1 Samwele 23:17 emonisi yango, Yonatana alobaki makambo mitano mpo na kolendisa Davidi: (1) Ayebisaki ye ete abanga te. (2) Ayebisaki ye ete Saulo akolonga te koboma ye. (3) Ayebisaki ye ete akokóma mokonzi ndenge Nzambe alakaki yango. (4) Alapaki ndai ete akotika ye te. (5) Ayebisaki ye ete ata Saulo mpe ayebi ete ye Yonatana azali sembo epai ya Davidi.
e Mpo na koyeba ndenge ya kotalela moto oyo abimisami na lisangá to oyo amilongoli, talá na Apɛndisi, lisolo “Ndenge ya kotalela moto oyo abimisami na lisangá.”