Ozali kosepela na makambo na elimo oyo ezali kouta epai na Jehovah?
‘“Jehovah na bibele alobi ete ‘Meka ngai sikawa na yango’ ‘soko nakozipwela bino maninisa na lola te kosopela bino lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.’”—MALAKI 3:10.
1. Bikelamu mingi bikoki kotikala na bomoi bobele na kolyaka bilei ya ndenge nini?
SOKI otiki kopema okokufa nsima na mwa minutes. Soko otiki komela mai ekokufa nsima na mwa mikolo. Soko otiki kolya ekokufa nsima na mwa bamposo. Soko otiki kozwa litomba na makabo na elimo oyo ezali kouta epai na Jéhovah na bongo mokolo oyo okokufa ekozala mpo na libela. Jéhovah azali kopesa epai na bikelamu na ye nyonso mopepe mai mpe bilei oyo bazali na yango mposa. Yango wana mokomi na nzembo akomaki: “Okozipola loboko na yo mpe okosilisa mposa na nyonso na bomoi.” (Nzembo 145:16) Bikelamu mingi bikoki kotikala na bomoi bobele na kolyaka bilei ya mosuni. Kasi ezali bongo te mpo na bato.
2. Mposa mozindo ya moto ezali nini mpe bilei ya ndenge nini esengeli na ye mpo na kokokisa mposa yango?
2 Ezali yango Yesu amonisaki na maloba malandi: “Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monoko na Nzambe.” (Matai 4:4) Bikelamu mosusu bizali na likanisi ya bomoi na seko te kasi moto azali na yango ndenge Mosakoli 3:11 emonisi yango na maloba oyo: “Atii mpe lobiko kati na mitema na bango.” Libongoli ya Segond ebongoli verset yango na ndenge elandi: “Atyaki kati na mitema na bango likanisi na koumela seko.” Na yango moto azali na mposa mozindo ya kozala na bomoi kino ntango ezangi nsuka elingi koloba bomoi ya seko. Kasi ekoki bobele te kozala na mopepe mai mpe limpa mpo na kokokisa mposa yango. Mpo na kozala na bomoi libela esengeli kolya bilei ya elimo oyo ezwami na “maloba nyonso makobimaka na monoko na Jéhovah”. Na mikolo na biso tozali kozwa bilei yango mingi na ndenge boye ete ekoki kosila te kati na mokanda moko ebengami Biblia. Mokanda yango ezali na bilei mingi oyo tozali na yango mposa koleka nkutu oyo tokoki kolya. Ebombelo yango ya biloko ekauka ata mbala moko te.
3. Na kolandaka maloba na Yesu wapi bilei oyo bileki na ntina mpe Paulo ayekolaki likambo nini?
3 Yesu ateyaki epai na bayekoli na ye ete babondela mpo na kozwa bilei ya mosuni oyo ezali na ntina. Basengelaki koloba: “Pesa biso lelo bilei na biso na mokolo na mokolo.” Kasi mwa ntango moke na nsima apesaki bango toli ete batya na esika ya liboso makambo na elimo na kolobaka na bango: “Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye.” (Matai 6:11 33) Bilei ya mosuni ezali kobatela bomoi na biso bobele mpo na mokolo moko; kasi soko tozali kolya bilei ya elimo mbala na mbala yango ekoki kobatela bomoi na biso ata mpo na libela. Na bongo tomibanzabanza te mpo na biloko ya mosuni. Paulo azalaki komibanzabanza mpo na yango te. Na ntina na bozwi na elimo oyo ezalaki kosepelisa ye ata soko azangaki biloko ya mosuni alobaki boye: “Nayebi kozala mobola nayebi mpe kozala mozwi. Na likambo na likambo ee na makambo nyonso nalakisami nzela na kotunda mpe koyoka nzala kozala na biloko mingi mpe na kozanga. Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.”—Bafilipi 4:12, 13.
Likama ezali kozela baoyo bazangi kosepela
4. Makabo nini masepelisaki mobali mpe mwasi ya liboso te mpe eloko nini oyo bango balingaki mingi koleka?
4 Nzokande bato mingi bazali kosepela te na makabo mazali kouta epai na Jéhovah. Ezalaki bongo mpo na baboti na biso ya liboso. Bazalaki kofanda kati na paradis: lopango kitoko ezalaki kosepelisa miso na bango bafololo na langi na kongenga ezalaki kobimisa nsolo kitoko na mopepe oyo bazalaki kopema bilei kitoko ezalaki kopesa bango mposa ya kolya mpe banzembo na bandeke ezalaki kosepelisa matoi na bango. Mpe lisusu bazalaki na mokumba malamu oyo ya kobatela elanga yango mpe mosala moko epambolami: oyo ya kotondisa mabelé na bakitani ya kokoka. Kasi bazalaki na moimi. Nyonso oyo Nzambe apesaki bango esepelisaki bango te. Balingaki eloko mosusu. Balingaki kozwa ekateli mpo na oyo ezali mabe to malamu na ntina na makambo matali bango. Ezali yango nde basalaki mpe ekateli ya libosoliboso oyo bazwaki ezalaki na likama mpenza. Ebungiselaki bango biloko nyonso ezala mpo na bango mpe mpo na bana na bango.—Genese 3:1-7, 16-19.
5. Na lolenge nini Jéhovah apambolaki Bayisraele kasi basepelaki na yango?
5 Bayisraele balandaki ndakisa na bango ya mabe. Nzambe asikolaki bango na boombo na Ezipito abongisaki bango na libota apesaki bango mobeko ya kokoka atambolisaki bango kati na esobe asenzelaki na boye ete bilamba na bango ebeba te mpe aleisaki bango na ndenge ya ekamwiseli na mana oyo ezalaki kokita na makolo mpe mai oyo ezalaki kobima na libanga. Kasi basepelaki te na makabo yango ezalaki kouta longwa na Jéhovah. (1 Bakolinti 10:1-5) Wana ezalaki bango kotambolatambola kati na esobe bamilelaki mbala mingi mpenza.—Exode 13:21, 22; Mituya 11:1-6; Deteronome 29:5.
6. Likambo nini ya mabe Bayisraele basalaki oyo ebendelaki bango libebi na libota na bango?
6 Bazalaki ntango nyonso koimaima ata nsima wana bakotaki na Mabelé na ndaka-mboka oyo ezalaki kobimisa bilei mai ezalaki bebo “mokili moleki na mabele mpe na mafuta na nzoi”. Lokola bazangaki ntango nyonso botondi bazangaki ntango nyonso kosepela na makabo oyo mazalaki kouta longwa na Jéhovah yango wana batikaki losambo na ye bakomaki kosalela losambo na enama oyo ezalaki losambo na bikeko babonzelaki bana na bango na Moleke mpe babendelaki bongo libebi na libota na bango. Nsima na boombo na bango na Babilone bakomaki kolanda bonkoko oyo ezalaki kolembisa makasi ya Liloba na Nzambe. Babomaki ata Mobikisi na bango oyo alakamaki Yesu Klisto.—Deteronome 6:3; 8:7-9; Basambisi 10:6; 1 Mikonzi 14:22-24; 2 Mikonzi 21:1-16; Yisaya 14:1-6; Matai 15:3-9; 27:17-26.
7. Mpo na nini tokoki koloba ete bakonzi na mangomba ya mokili bazali ma misala mikokani na oyo ya banganga-nzambe bazangaki sembo na ntango na Malaki?
7 Kino lelo oyo mokili mobimba ezali ntango nyonso kolinga bindimeli na lokuta ya mangomba na esika ya kolinga solo. Bakonzi na mangomba bazali kotiola nkombo ya Jéhovah mpe bazali ata kosalela yango te. Bazangi kokumisa Nzambe na ndenge bazali koteya mateya mazwami na Biblia te lokola la Trinité kozanga kokufa ya molimo mpe mitungisi ya libela kati na linfelo na moto. Bindimeli ya mangomba bibebisami bobele te na lokuta oyo ezwami na mangomba na kala na Babilone mpe na Ezipito kasi lisusu mingimingi na ndenge ezali koboya kondima lisiko efutami na Klisto kasi bazali kondima likanisi ya évolution. Bazali koboya kopesa Jéhovah lokumu oyo esengeli na ye lokola banganga-nzambe bazalaki kosala yango na ntango na Malaki.—Malaki 1:6-8; 3:7-9.
8. (a) Libyangami nini banganga-nzambe na ntango na Malaki mpe bakonzi na mangomba na ntango oyo basili kobwaka? (b) Nani ayanoli na ndenge malamu na libyangami yango mpe litomba nini yango esili kobimisa?
8 Na eleko yango Jéhovah alendisaki Bayisraele ete bamipetola mpe bazonga epai na ye. Alobaki na bango: “Bobutwa epai na ngai mpe ngai nakobutwa epai na bino”. Bongo apesaki bango libyangami elandi: Jéhovah na bibele alobi ete: “Meka ngai sasaipi na yango soko nakozipwela bino maninisa na lola te kosopela bino lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.” (Malaki 3:7, 10) Bobele litika na libota na Bayuda ezongaki epai na Jéhovah; na mikolo na biso litika ya sembo ya Yisraele na elimo esili kobima na mangomba na lokuta ya mokili. Elongo na ebele monene ya “bampate mosusu” oyo ezali se kokola basangani ya litika yango bazali kokumisa Jéhovah lokola Batemwe. (Yoane 10:16) Jéhovah akokisaki elaka na ye epai na bango: ‘afungolaki maninisa na lola mpe asopelaki bango mapamboli kino esika ezangaki mpo na yango’. Abongisaki mpenza mpo na bango elambo na bilei na mafuta.—Yisaya 25:6.
Bilei mingi ya elimo
9. Bilei nini bikoki lelo oyo kolyama na bato mingi mpe yango ezali bongo mpo na mosala nini mpe ebimisi litomba nini?
9 “Moombo na sembo mpe na mayele” oyo Yesu alobelaki ete akozala na eleko na biso azali komipesa mpenza mpo na kopesa bilei mingi ya elimo. (Matai 24:45) Bobele na mbula eleki kati na bamboka 208 mpe bisanga mpe na minoko 200 koleka bamilio misato ya ba Témoins de Jéhovah basili komemela bazalani na bango bilei yango ya elimo. Bakabolaki ndako na ndako bamilio na mikanda bazulunalo mpe Babiblia. Mingi bandimaki bilei yango ya elimo mpe basepelaki: Na mbula moko mpamba bayekoli ya sika koleka 225 000 bazwaki batisimo!
10. Bibongiseli nini bisili kozwama mpo ete toyanganaka lokola Paulo azali kolendisa biso?
10 Makabo ya elimo mazali kouta longwa na Jéhovah mazali mpe kopesama na nzela na ba assemblées ya distrike assemblées ya circonscription mpe makita mitano makosalamaka poso na poso kati na masangá 52 000 ya ba Témoins de Jéhovah—nyonso wana na kotosaka na elendiseli na Paulo oyo ezwami kati na Baebele 10:25 oyo elobi ete ‘totika koyangana elongo moko te’.
11. Pesa ndakisa oyo emonisi ndenge bilei ya elimo esengeli kolambama.
11 Ntango mama nkolo ndako ayambi babyangami akosuka te bobele na kobimisa mosuni ya nyama mpe kotya yango na sani. Akolamba yango malamu kati na supu mpe akotya biloko ya nsolo kitoko mpe akobongisa yango malamu mpo ete epesa mposa ya kolya. Bobele ntango bakomona yango mpe bakoyoka nsolo babyangami bakobanda komela nsoi. Ezali ndenge yango makabo mazali kouta longwa na Jéhovah mazali kolambama-ezali bilei bikaoki te kasi etondi bobele na biloko ya ntina nde ezali na elengi mpo na kosepelisa elimo mpe kosimba motema. Moklisto nyonso asengeli kolanda ndakisa yango. “Litoi ekomeka maloba te? Mpe lolemo ekomeka elengi te?”—Yobo 12:11.
12. Bato nini batangami na Biblia balambaki bilei ya elimo na ndenge ya kopesa mposa?
12 Boyekoli ya liboso ya Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe emonisi ntina ya kosalela maloba kitoko. Salomon asalelaki bobele maloba na solo te kasi lisusu maloba oyo mazali kosepelisa. (Mosakoli 12:10) Nzembo 45:2 esakolaki boye na ntina na Masiya Yesu Klisto: “Ngolu esopani na bibebu na yo.” Ezalaki mpe bongo. Bayoki na ye “bakamwaki na maloba na ngolu mabimaki na monoko na ye.” Bazalaki koyoka ye na mposa mingi bazalaki koya ntongontongo na temple mpo na koyoka ye bazalaki kolanda ye na esengo mpe bakamwaki na lolenge na ye ya koteya. Bato oyo batindamaki mpo na kokenda kokanga ye balobaki: “Moto moko te asila koloba ndenge yango.” (Luka 4:22; 19:48; 21:38; Malako 12:37; Matai 7:28; Yoane 7:46) Mokanda mpo na Eteyelo ebimisamaki mpo na kosalisa biso ete tolobaka maloba kitoko ya solo. Osalelaka yango na ndenge ekoki?
13. Na maloba nini ya makasi mokapo ya Baefese 5:15-17 elendisi biso ete ‘tosomba ntango’ mpe mpo na nini elobeli makasi likambo yango?
13 Tala elendiseli oyo tozali kokuta kati na Baefese 5:15-17: “Bongo bokeba mpo na etambweli na bino bozalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza. Bosomba ntango mpamba te mikolo ezali mabe. Na ntina yango bozala bilema te nde bososola yango ezali mokano na Nkolo.” Liloba na greke oyo ebongolami awa na “ntango” elimboli ntango te ndenge tomeseni kotanga yango kasi elimboli ntango etyami nsuka ntango esengeli mpo na kokokisa mokano moko ya sikisiki. Verbe greke ebongolami na “kosomba” ezali kopesa likanisi ya kobakisa milende mpe kati na mokapo oyo ekoki kozala na ndimbola ya ‘kobanda kosomba mingi’; elingi koloba kokanga mabaku malamu nyonso oyo mamonani”a. Ozwaka ntango na programme na yo mpo na kokoma mayele na kolyaka bilei ya elimo oyo Jéhovah azali kopesa? Osengeli kosala bongo. Biso banso tosengeli kosala bongo. Mpo na nini? Mpo ete “mikolo mizali mabe”.
Longwa na esobe na elimo kino na paradis na elimo
14. Verset nini ya Biblia oyo tokotalela mpo na komonisa ete ebimeli ya sika ya Traduction du monde nouveau (Biblia oyo ebimisami na la Société) ezali na likambo moko oyo tokoki kozwela yango litomba?
14 Ebimeli ya 1987 ya Les Saintes Ecritures—Traduction du monde nouveau (ezali Biblia oyo ebimisami na la Société) ezali likabo monene ya elimo. Ezali na likambo moko oyo tokoki kozwela yango litomba mpo na kokolisa boyebi na biso na ‘kosombaka ntango’: mpo ete ezali na mitindami. Na ndakisa soko tofungoli na Nzembo 1:3. Verset yango ezali komonisa ezalela ya moto oyo azali kokanisa na mobeko ya Nzambe butu mpe moi na maloba malandi: “Azali lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima na mai oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokauka te. Nyonso ekosala ye ebongi.” Maloba yango mazali na ndimbola mingi koleka mpe bozindo na yango ezali komonana te wana tozali kotanga yango mbangombango.
15. Mituna nini mizali kotunama wana tozali kotanga Nzembo 1:3 mpe eyebisi biso nini na ntina yango?
15 Nzete ekonami. Kasi nani akoni yango? Ezali penepene na bitima na mai liloba bitima ezali na pluriel (ebele). Osila komona nzete oyo ekonami penepene na mabongo ya bitima mingi? Te. Kasi luka koyebayeba likambo yango mpe omituna motuna oyo: Nzete yango elimboli nini? Mitindami ekopesa biso nzela na koyeba yango. Mikapo mitangami na mitindami mizali Yisaya 44:4; 61:3 mpe Yilimia 17:8. Kati na Yisaya 44:4 eyebisami ete basaleli na Jéhovah bakozala lokola banzete “pembeni na bitima na mai”. Bitima mingi na mai? Ee bitima yango na mai ezali mabulu matimolami mpo na kopanza mai na elanga esika banzete ekonami!
16. Makambo nini mazali mpe na ntina tozali kozwa kati na Yisaya 61:3 mpe na Yilimia 17:8?
16 Yisaya 61:3 ezali kobenga ndambo na banzete yango “Banzete makasi na boyengebene oyo ekonami na Jéhovah ete akembisama”. Ezali Jéhovah oyo azali kokona mpe azali kosopela banzete yango mai mpe azali kokembisama na bambuma oyo yango ezali kobimisa. Yilimia 17:8 ekokisi moto azali kokanisa mozindo na mobeko na Nzambe butu na moi na “nzete oyo ekonami pembeni na mai oyo ekosembola misisa na yango pembeni na ebale; akobanga te wana ekoya moi makasi kasi nkasa na ye ekozala mobesu: akobanga na elanga na kokauka te akotika kobimisa mbuma mpe te.” Nkasa na ye ekokauka te; mpe mosala na ye nyonso ekolonga!
17. Elakiseli nini tozali sikawa komona polele kati na Nzembo 1:3 mpe yango epesi biso mosala nini?
17 Tokanga malamu ntina na yango sikawa! Nzembo 1:3 epesi elakiseli moko kitoko. Baoyo bazali kokanisa mozindo likolo na mobeko na Jéhovah butu mpe moi bakokani na banzete ekonami pembeni na liziba na mai ekokaukaka te. Bazali lisusu kati na masangá ya mokili oyo te oyo makaoki kasi bazali kosala elongo na lisangá ya Nzambe oyo mai mingi ya mpio ya solo ezali kosopana likolo na yango. Bazali mpenza kati na paradis ya elimo bafandi na mpio mpe bazali kobota bambuma na elimo mpo na kokumisa Jéhovah. Mpe kanisa mwa moke! Nzambe azali kosalela Batemwe na ye mpo na kobimisa bato mosusu na masangá makaoki ya mokili oyo mpe kokotisa bango kati na paradis yango ya elimo ekokitisaka motema mpe ekosopamela mai na ndenge ekoki.
18. Batemwe bazali koloba nini wana ezali bango komona baninga na bango kokola kati na mosala ya kosakola mpe mpo na nini mbala mosusu bazali kokoka kosala bongo te?
18 Mpo na kokokisa mosala yango na ndenge moko ya malamu tosengeli kosembola elimo na biso mpe motema na biso mpo na kozwa litomba na makabo na elimo nyonso mazali kouta longwa na Jéhovah. Ekomaka ete wana azali koyoka ndenge Temwe moko azali kolimbola mikapo ya Biblia bamoko bakomiloba: “Ngai mpe nalingaka koyekola Biblia lokola ye!” Kasi soki bamisemboli mpo na koyekola Biblia bakoki mpe kobakisa boyebi na bango. Wana ezali bango koyoka ndeko mwasi moko kosakola ndako na ndako bamoko balobaka: “Ngai mpe nalingaka kosakola lokola ye!” Kasi soki bamisemboli mpo na kobima ntango nyonso na mosala ya kosakola na kosalelaka mokanda Comment raisonner à partir des Ecritures bakoki bango mpe lisusu kokoma basakoli malamu. Wana ezali bango koyoka moko kati na baninga na bango kosala badisikulu bamoko bazali koloba: “Ngai mpe nalingaka kosala disikulu ndenge ye asalaka!” Kasi soki mpe baoyo bazali koloba bongo bazali kobongisa malamumalamu badisikulu na bango mpe bazali kosalela batoli epesami na Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe bakoki bango mpe lisusu kokola kino ete basala masolo kitoko.
19. Sekele ya koyeba kosakola ezali nini?
19 Nzokande soki ezali likambo malamu mpo na kokola osengeli kotya milende mpo na yango. Ezali na kotyaka milende nde okokoma na mikano na yo. Omisembola mpenza mpo na kosomba ntango mpe tya milende esengeli mpo na kokokisa mikano na yo. Soko ozali kosalela mosisa moko ya nzoto te ekolemba. Soko ozali kosalela te likoki oyo osila kozwa ekobunga. Soki ozali kosalela elimo na yo te mayele na yo ekolemba. Soko ozali kosalela boyebi na yo te okobungisa yango. Na makambo oyo nyonso etinda ezali boye: “Kosalela to kobungisa.” ‘Bisoswelo bikokola soki nde bizali kosalelama’. Na bongo “Mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo.”—Baebele 5:14; Masese 2:11.
20. Wana ezali biso kozwa litomba na makabo na elimo mazali kouta longwa na Jéhovah tozali komipengola na nini mpe bolamu nini tozali kozwa?
20 Zwa litomba na makabo na elimo mazali kouta longwa na Jéhovah. Sepela elongo na baoyo bazali kosepela na yango. Omipengola na nzala oyo Amosa asakolaki na maloba oyo: “Nkolo Jéhovah alobi ete Tala mikolo ekoya wana nakotinda nzala kati na mokili. Ekozala nzala na kwanga te kozanga na mai mpe te; ekozala nzala na koyoka maloba na Jéhovah.” (Amos 8:11) Zala kati na baoyo bazali kolya mpe kosepela kasi boya kozala elongo na baoyo bazali koboya bilei mpe bazali kooka nsoni: “Bongo Nkolo Jéhovah alobi ete Tala baombo na ngai bakolya nde bino bokoyoka nzala. Tala baombo na ngai bakomela nde bino bokoyoka mposa na mai. Tala baombo na ngai bakosepela nde bino bokozwa nsoni.”—Yisaya 65:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Le nouveau dictionnaire international de théologie du Nouveau Testament (Angl.) tome 1 page 268 de Colin Brown.
Bozongeli
◻ Ndenge nini libota na Yisraele emonisaki ete esepelaki te na makabo mazalaki kouta na Jéhovah?
◻ Ndenge nini maloba mazwami kati na Malaki 3:10 mazali komonana ete mazali solo mpo na oyo etali ba Témoins de Jéhovah?
◻ Ndimbola mozindo ya Nzembo 1:3 ezali nini?
◻ Mpo na nini ezali na ntina ete tosalela makambo oyo tozali koyekola na nzela na makabo na elimo mazali kouta longwa na Jéhovah?
[Elilingi na lokasa 15]
Baoyo bazali kokanisa na mozindo likolo na mobeko na Jéhovah bakokani na banzete ekonami pembeni na liziba na mai oyo ekokaukaka te