Nzete oyo ‘nkasa na yango ekaukaka te’
OSILÁ komona mboka moko oyo etondi na banzete oyo ezali na nkasa kitoko? Na ntembe te ezalaka kitoko na kotala. Ntango omoni ebele ya banzete minene, oyo ezali na nkasa mingi, okokanisa mpenza ete mai ezangi na esika yango? Te, kasi okoyeba nde ete esika yango ezalaka na mai mingi oyo esalaka ete banzete yango ekola malamu.
Ndenge moko, Biblia elobi ete bato oyo bazali na boyokani malamu na Nzambe bazali lokola banzete ya minene, oyo ezali na nkasa ya mobesu. Na ndakisa, talá makambo kitoko oyo ezali na mokanda ya Nzembo 1:1-3:
“Esengo ezali na moto oyo aboyi kolanda toli ya bato na mabe, oyo atɛlɛmi na nzela ya bato ya masumu te, oyo afandi esika moko na batyoli te; kasi mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova]; [atángaka Mobeko na ye na mongongo ya nse, NW] butu na moi. Azali lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima ya mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekaukaka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.”
Lisusu, na Yilimia 17:7, 8, tozali kotánga boye: “Moto apambolama oyo akotalela [Yehova] mpe oyo [Yehova] azali elikya na ye. Zambi akozala lokola nzete oyo ekonami pembeni ya mai; oyo ekosembola misisa na yango pembeni na ebale; akobanga te wana ekoya moi makasi kasi nkasa na ye ekozala mibesu: akobanga na elanga na kokauka te, akotika kobimisa mbuma mpe te.”
Mikapo wana mibale esaleli elilingi ya banzete mpo na komonisa oyo ekómelaka moto oyo asalaka oyo ezali malamu, asepelaka na mibeko ya Nzambe, mpe atyelaka ye mpenza motema. Yango etindi biso tómituna ete: Na ndenge nini moto yango azali lokola nzete oyo nkasa na yango ekaukaka te? Tótalela bavɛrsɛ yango na mozindo.
“Ekonami penepene na bitima ya mai”
Biblia elobeli banzete oyo ekonami “penepene na bitima ya mai” to “pembeni ya mai,” kasi te kaka na ebale to etima moko. Biblia esaleli mpe elilingi ya ndenge wana na Yisaya 44:3, 4, epai Yehova Nzambe amonisi ndenge akosalisa Bayuda oyo babongolaki motema mpe balongwaki na boombo na Babilone. Na nzela ya mosakoli Yisaya Yehova alobaki boye: “Nakosopa mai na mabelé mazali na mposa ya komɛla, mpe bitima na putulu oyo ekauki; . . . Bokotoa na kati ya matiti, lokola nzete ya alabimi pembeni ya [banzela ya mai, NW].” Bavɛrsɛ yango elobi ete “bitima” mpe “banzela ya mai” ezali kosala ete bato oyo Nzambe azali kobatela mpe kotambwisa bákola lokola nzete ya alabimi.
Lelo oyo mpe na bisika oyo basalaka bilanga, okoki komona banzela ya mai mpe bitima ya mai oyo ezali kouta na mabulu ya mozindo, ebale, laki, to na esika oyo bakangi mai. Mbala mingi, ezalaka batalase oyo basalaka mpo na komema mai na bilanga. Ntango mosusu banzela ya mai ekendaka mbala moko na elanga ya banzete ya mbuma. Mbala mingi, bitima ya mai esopanaka na bilanga mpe na bilanga ya banzete, mbala mosusu emonisaka bandelo ya elanga.
Banzete oyo ekonami na bitima ya mai ebotaka ndenge nini? Nzembo 1:3 elobeli nzete oyo “ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki.” Na ntango ya kala, ezalaki na banzete ya figi, ya mbuma ya grenade, ya pɔme, ya mbila mpe ya olive. Atako nzete ya figi ekokaki kokóma na molai ya mɛtrɛ 9 mpe na bitape milai, banzete mosusu ya mbuma ezalaki milai mingi te. Atako bongo, ezalaki na nkasa mingi mpe ezalaki kobota mbuma mingi na ntango na yango.
Na ntango ya kala, banzete minene ya alabimi ezalaki kokola pembeni ya bibale mpe bitima ya mai na Syrie mpe Palestine. Mbala mingi soki Biblia elobeli nzete ya alabimi elobelaka mpe bibale to mabwaku ya mai. (Levitike 23:40) Nzete ya sole, oyo ezali na molɔngɔ moko na nzete ya alabimi, ezalaki mpe kokola na bisika oyo mai ezali mingi. (Ezekiele 17:5) Banzete wana ya minene oyo ezalaki na nkasa mingi ebongi mpo na komonisa likanisi oyo mokomi ya nzembo mpe Yilimia balingaki koloba: Baoyo batosaka mobeko ya Nzambe mpe batyelaka ye motema mobimba, bakokoba kozala na boyokani malamu na ye, ‘mpe nyonso oyo bakosala ekolonga.’ Biso nyonso tolingaka kolonga na bomoi, boye te?
Tósepelaka na mobeko ya Yehova
Lelo oyo bato balukaka kolonga na bomoi na banzela ndenge na ndenge. Bamipesaka na makambo oyo ekoki kokómisa bango bato ya lokumu mpe ya bomɛngo, kasi mbala mingi balongaka te. Kasi, nini mpenza ekoki kopesa moto esengo ya solosolo na bomoi? Lisolo ya Yesu likoló ya ngomba epesi eyano. Alobaki ete: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Matai 5:3) Ya solo, esengo ya solosolo eutaka te na kozala na biloko mingi ya mokili, kasi na koyeba mpe kokokisa bamposa na biso ya elimo, mpe na ndenge yango tokozala lokola banzete ya nkasa mingi oyo ebotaka mbuma na ntango oyo ebongi. Ndenge nini tokoki kofuluka na elimo?
Ndenge mokomi ya nzembo amonisi yango, ezali na makambo oyo tosengeli koboya. Atángaki “toli ya bato mabe,” “nzela ya bato ya masumu,” mpe kofanda “esika moko na batyoli.” Mpo na kozala na esengo, tosengeli kokima bato oyo batyolaka to baboyaka mibeko ya Nzambe.
Ya mibale, tosengeli kosepela na mobeko ya Yehova. Soki tosepeli na likambo to mosala moko, tosalaka nyonso mpo na kokokisa yango, boye te? Na yango, kosepela na mobeko ya Nzambe elimboli kozwa Liloba ya Nzambe na motuya mingi, kozala na mposa ya koyekola yango mingi mpe kokanga mpenza ntina na yango.
Ya misato, tosengeli kotángaka yango “na mongongo ya nse butu na moi.” Yango elingi koloba kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe kokanisa na mozindo na makambo oyo tozali kotánga. Tosengeli kolinga Liloba ya Nzambe lokola mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Ee nalingi Mobeko na yo na bolingo bɛ! Nakobanzaka yango mokolo mobimba.”—Nzembo 119:97.
Ya solo, soki toyebi Yehova Nzambe malamumalamu mpe toyekoli kotyela ye mpe bilaka na ye motema, tokozala mpenza na boyokani malamu na ye. Na ndenge yango, tokozala lokola moto ya esengo oyo mokomi ya nzembo alobaki ete, “nyonso ekosala ye ebongi.”