Totelema ngwi liboso na mayele mabe ya Satana
“Bolata molato mobimba ya etumba na Nzambe ete boyeba kotelema ngwi liboso na mayele mabe [na greke “myango mabe”] na Diable.”—BAEFESE 6:11.
1. Ndenge nini lisolo ya komekama na Yesu ezali kotatola ete Satana azali?
SATANA azali mpenza? Bamosusu bazali na likanisi ete kati na Biblia liloba “Satana” elakisi bobele mabe oyo ekangani na nzoto na bato, kasi azali ekelamu mpenza te. Kasi Makomami mazali koteya nini? Evanzile ya Matai mpe ya Luka elobi ete Satana ye mpenza amekaki Yesu mbala misato, mpe na mokomoko na yango, Yesu atemelaki ye na kosalelaka Makomami. Mpo na nini Yesu asalelaki Makomami na liebele mpo na koyanola ye? Mpamba te Satana asalelaki bobele Makomami yango na lolenge mabe mpo na kotinda ye ete asala lisumu mpe abebisa mosala oyo asengelaki kokokisa lokola Mwana na Nzambe, Libota na ndaka.—Matai 4:1-11; Luka 4:1-13.
2. Nini emonisi ete Yesu akanisaki bobele kokanisa mpamba te mpo na bokutani na ye elongo na Satana?
2 Ya solo, bokutani yango euti na makanisi na Yesu te, mpamba te ye azalaki moto ya kokoka. (Baebele 4:15; 7:26) Yesu azalaki mpenza liboso na ekelamu ya nguya oyo abombanaki nsima na nyoka na Edene, oyo na boumeli ya mwa ntango azalaki ndeko na ye anzelu liboso na botomboki na ye mpe oyo sikawa azalaki kosala makasi mpo na kopekisa kokokisama ya Genese 3:15. Satana alukaki kobebisa bosembo ya Libota ya ndaka. Yesu oyo abungaki te mayele mabe ya Momeki, atemelaki ye makasi. Na bongo Satana asalaki nini? “Wana esilisaki Diable komekama nyonso, atikaki na ye kino libaku mosusu ya malamu.” Na ntembe te, Yesu akokaki te komitika ye moko! Te, ezalaki Satana nde, wana emonaki ye ete alongi te, atikaki Yesu, ‘mpe tala baanze bayei mpe basaleli ye’.—Luka 4:13; Matai 4:11.
3. Mokomi moko ya lisolo na bomoi na bato akomaki nini mpo na esika na Diable kati na mateya ya boklisto?
3 Mokomi moko ya lisolo ya bomoi na bato akomaki na sikisiki ete: “Koboya kondima ete Diable azali mpe ete azali na esika monene kati na boklisto ya solo, ezali kobongola mateya na bantoma mpe lisolo ya bindimeli ya baklisto. Lokola kolimbola boklisto na solo likoló na miboko mosusu ekozala na ntina te, ezali mayele te na kondima boklisto oyo eboi kondima ete Diable azali. Soki Diable azali te, na bongo boklisto ya solo ezali komikosa mpenza uta ebandeli na yango mpo na likambo moko ya mobokoa.” Yango ezali ntembe oyo etyami liboso na bato nyonso bazali na bomoi lelo. Mpo na yo, ondimi ete monguna moko oyo azangi komonana azali mpe azali koluka kobebisa boyangeli ya molongo mobimba ya Nzambe mpe bosembo na moto epai na Mozalisi na ye?
Satana azali mpenza nani?
4. Ndenge nini ekelamu ya kokoka ya elimo akomaki Satana?
4 Satana azali ekelamu ya elimo ya nguya; Nzambe asalaki anzelu yango na ebandeli, mwana ya elimo oyo azalaki komimonisa liboso na Ye na makoló. (Yobo 1:6) Kasi Satana asalelaki bonsomi na ye mpo na kotemela Nzambe mpe, na mayele mabe, apusaki Eva mpe na nzela na Eva, apusaki Adam na kozanga botosi mpe na liwa. (2 Bakolinti 11:3) Na yango amikomisaki Satana, nkombo oyo elimboli “Monguna”, mpe akomaki motomboki, démo, mobomi na bato mpe mokosi. (Yoane 8:44) Paulo alobaki solo ete “Satana akomimonisaka lokola ntoma na moi”, mpe azali bongo ‘mokonzi na mokili oyo na molili’. (2 Bakolinti 6:14; 11:14; Baefese 6:12) Na kopusaka baanzelu na botomboki, akotisaki bango kati na molili yango, bakabwani na pole ya Nzambe. Yango wana akomaki “mokonzi na bademo.” Na ntembe te, Satana akoki kozala mokonzi yango bobele soki azali na bomoi mpe azali ekelamu ya elimo.—Matai 9:34; 12:24-28; Yoane 16:11.
5. Na meko nini Makomami na greke ya boklisto mamonisi Satana?
5 Solo, balobeli Satana mingi te kati na Makomami na liebele, kasi Makomami na greke ya boklisto mamonisi ye polele. Elobeli ye mpenza malamu na boye ete nkombo Satana ezwami kuna mbala 36 mpe liloba Diable mbala 33. (Tala Comprehensive Concordance of the New World Translation of the Holy Scriptures) Kuna Satana azali mpe na bankombo mosusu. Yoane asaleli bankombo mibale kati na yango na Emoniseli 12:9, epai totangi ete: “Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abengami Diable mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba.”—Tala mpe Matai 12:24-27; 2 Bakolinti 6:14, 15.
6. Liloba “Diable” elimboli nini?
6 Kati na verset yango ya Emoniseli tokuti liloba ya greke diabolos, ebongolami na “Diable”. Mokomi na greke J. Thayer alimboli ete liloba yango elakisi mpenzampenza “motongi, mofundi na lokuta, motuki.” (Tala 1 Timote 3:11; 2 Timote 3:3) W. Vine alobi ete Diable azali‘ monguna mabe mpenza ya Nzambe mpe ya batob.”
7. Mpo na nini Satana akoki kolanda mingi mpenza nde libota na Jéhovah?
7 Monguna yango monene azali na goigoi te. (1 Petelo 5:8) Ezali mbala mosusu mpo na yango nde lisese moko elobi ete “Diable apesaka ntango nyonso mosala epai na baoyo bazangi eloko ya kosala.” Alukaka kobebisa baklisto nyonso ya solo. (2 Timoté 3:12) Nzokande, akoki kolanda mingi mpenza basaleli na Jéhovah mpo na mwa ntina oyo ete: Bato mosusu nyonso oyo batikali basili komitya na nse na bokonzi na ye. (1 Yoane 5:19) Mokili ya lelo ezali na maboko ya Satana. Ata bato bandimi yango to te, azali mokonzi mpe nzambe na yango. (Yoane 12:31; 2 Bakolinti 4:4) Na bongo azali pene mpo na kosalela mayele mabe nyonso, mitambo mpe mimekamo mpo na kobebisa basaleli na Jéhovah, moto na moto to lisangá mobimba. Totalela mwa misala na ye mosusu.—Malako 4:14, 15; Luka 8:12.
Mayele mabe mpe mitambo ya Satana
8. Na nini Satana akoki koleka biso?
8 Satana azwaki ntango mingi mpo na koyekola bizaleli na bato, mpo na kotalela malamu lolenge ya bato mpe mabunga na bango nyonso oyo babotamá na yango mpe oyo bazwaki kozwa. Ayebi kosalela bolembu na biso mpe lolendo na biso. Nini ekoki kosalema soki, na bokeseni na monguna yango, ozali kososola bolembu na yo te? Okotelema malamu mpo na kobunda te, mpamba te okoyeba te mabunga ya molato na yo na etumba ya elimo. (1 Bakolinti 10:12; Baebele 12:12, 13) Maloba oyo ya mokomi moko na nzembo ya mokili Ecosse mayokani na yango mpenza. Alobaki ete: ‘Ah! Soki mwa nguya ezalaki kosalisa biso na komimona lokola bamosusu bakomonaka biso, mbele tokopengolaka mabe mingi mpenza!’
9. Makambo nini makoki koyela biso soki tomitaleli malamu te mpe tosali mabongwani te kati na bomoi na biso?
9 Tozali na mposa ya komimona ndenge bamosusu bazali komona biso mpe mingimingi ndenge Nzambe mpe Satana bazali komona biso? Mpo na yango tosengeli komitalela malamu mpe kozala pene mpo na kosala mabongwani kati na bomoi na biso. Ezali mpasi te na komikosa. (Yakobo 1:23, 24) Tozali kolobaka mpenza maloba mingi mpo na kolongisa etamboli na biso! (Tala 1 Samwele 15:13-15, 20, 21, 24) Mpe ezalaka esengo na koloba ete: “Oyebi, biso banso tozali bato bazangi kokoka!” Ezali bongo solo, Satana mpe ayebi yango, mpe azali koluka kozwela na yango litomba. (2 Samwele 11:2-27) Ekozala mawa mpenza wana ekomi biso mikoló, na koyeba ete na boumeli na bambula, awa ezalaki biso na ezaleli ya komitia ntango nyonso na esika ya liboso, ya kozanga mayoki mpe ya makambo makasimakasi, tozangi baninga to tozali kosepelisa lisusu bamosusu te! Ekoki kozala ete Satana asalelaki mayele mabe likoló na moimi na biso ya kobotama mpo na kozipa biso miso na boumeli ya bomoi na biso, mpe tobosanaki kolata makanisi ya Klisto mpo ete tomonisa bolingo, mawa mpe boboto.—1 Yoane 4:8, 11, 20.
10. Mituna nini mizali na ntina ete tomituna yango mpe mpo na nini?
10 Mpo na kotelema ngwi liboso na Satana, moto na moto asengeli bongo komitalela. Ozali na bolembu oyo Satana akoki kozwela na yango litomba to oyo asilaki kobanda kozwela na yango litomba? Ozali na ezaleli ya komilinga yo moko? Olingaka ntango nyonso kozala na esika ya liboso? Lolendo ezali ezaleli na yo oyo ebombami oyo etambwisaka misala na yo? Zuwa, kolula mpe bolingo ya mosolo ezali kobebisa bomoto na yo? Mayoki na yo mazali na mobulu? Omonisaka ete ozali mpio to mpe moseki baninga? Osilikaka soki bazali kopesa yo toli to soki bazali kopamela yo? Ozalaka na mokakatano mpo na kondima batoli, kino mbala mosusu koboya yango? Soki tomiyebi, tokoki kosilisa mabunga yango, bobele soki tozali na komikitisa. Soki bongo te, tozali komitika kati na mitambo ya Satana.—1 Timoté 3:6, 7; Baebele 12:7, 11; 1 Petelo 5:6-8.
11. Mayele mabe nini Satana asalelaka mbala mosusu mpo na komeka kobebisa elimo na biso?
11 Satana akoki mpe kobebisa elimo na biso na lolenge ya mayele mabe mpe ya lokuta. Ekoki kozala ete tozali kosepela te na ndenge makambo mazali kotambola kati na lisanga ya Nzambe. Mbala mingi, toyebi makambo nyonso na yango te, yango wana tozwi nokinoki esukiseli ete ezali boye to boye. Soki tozali na boyokani ya penepene elongo na Jéhovah te, tokoumela te mpo na kokolisa ezaleli mabe ya elimo mpe kobanda kozala na ntembe mpo na solo. Bamosusu balukaka ntango mosusu elonga mpo na kozanga kokokisa mikumba oyo solo epesi bango. Satana azali kokotisa bozangi bosembo mpe bopengwi kati na mitema na bango, mpe azali na esengo monene na komona bango kokwea mosika te kati na botomboki.—Luka 22:3-6; Yoane 13:2, 27; 2 Yoane 9-11.
12. (a) Satana apusaka baklisto mosusu na kosala nini? (b) Ndenge nini Satana azali kokweisa baklisto mingi kati na motambo ya pite?
12 Satana azali kopusa baklisto mosusu bobele na kosala masumu minene te oyo mpo na yango basengeli kobimisama na lisangá, kasi lisusu na kosalela lokuta to mayele mabe mpo na kokosa bankulutu ya lisangá. Ndenge moko na Anania mpe Safira, bakanisi ete bakoki kokosa baanzelu mpe elimo santu ya Nzambe. (Misala 5:1-10) Na bambula oyo, bankoto na baklisto bakweaki na motambo ya pite oyo etyami na Satana. Diable ayebi ete mposa na kosangisa nzoto ezali makasi epai na bato mpe, na nzela ya mokili na ye, azali kokumisa, kobebisa mpe kobongola likambo ya kosangisa nzoto. (Mituya 25:1-3) Baklisto oyo bazali minzemba bakoki komekama mpo na kosala pite to komipesa na mitindo mosusu ya etamboli na mbindo. (Masese 7:6-23) Mpo na baklisto oyo babálá, soki bakebi te na makanisi na bango mpe na mitema na bango, bakoki mosika te kokosa babalani na bango nzokande balakaki bango bosembo.—1 Bakolinti 6:18; 7:1-5; Baebele 13:4.
13. (a) Bopusi nini télévizio ekoki kosala likoló na makanisi na biso? (b) Ndenge nini tokoki kotemela bopusi yango?
13 Tozali kobika kati na mokili epai lokuta, mayele mabe mpe nkanda makasi epalangani. Satana azali kosalela mingi misala ya bopanzi nsango mpo na kondimisa makanisi yango ya mabe. Bilakiseli ya télévizio ezali komonisa bato ya nzoto sembe sembe baoyo bazali kobika na kokosanaka moko na mosusu. Soki totiki ete makanisi yango mapusa biso, tokoki nokinoki komitika kosala masumu “mike”, oyo efungolaka nzela mpo na masumu “minene”. Makanisi mabe ya Satana makoki kokota noki kati na elimo na biso. Ndenge nini tokoki kotemela bopusi yango? Na ‘koboyaka kopesa Diable nzela’, ndenge Paulo apesi biso toli na yango. Yango elimboli mpe kotalela malamumalamu bato oyo bakotaka kati na ndako na yo na nzela na télévizio. Osengeli koboya ete bato na mobulu, bato na mbindo mpe ya maloba mabe batya mbindo na esika na yo, boye te?—Baefese 4:23-32.
Ndenge nini tokoki kotemela Satana mpe kotikala sembo epai na Nzambe?
14. Bikateli nini mibale tosengeli kokamata soki tolingi kotemela Satana mpe yango esengi nini?
14 Liboso na monguna oyo aleki bato na makasi boye, ndenge nini tokoki kotikala sembo, biso baoyo tozali bobele bato bazangi kokoka? Yakobo alimboleli biso yango na maloba oyo: “Na bongo botosaka Nzambe. Botemelaka Diable mpe akokima mosika na bino.” (Yakobo 4:7) Boyeba ete Yakobo apesi biso toli oyo ezali na biteni mibale.“Epai moko kotemela Diable mpe mokano na ye, epai mosusu kotosa mokano na Nzambe. Yango elimboli lisusu kolinga mokano na Nzambe mpe koyina oyo ya Satana. (Baloma 12:9) Na bongo Yakobo alobi ete: “Bobelema epai na Nzambe mpe ye akobelema epai na bino. Bopetola maboko, bino bato na masumu. Bozalisa mitema na bino mpeto, bino bato na mitema mibale.” (Yakobo 4:8) Mpamba te, tokoki te kobunda na Satana na mitema mibale to oyo ezangi likatami ya sikisiki. Tomitya te na likama ya kobebisa bokangami na biso na kobelemaka na mabe. Tosengeli nde ‘koyina makambo mabe’.—Nzembo 97:10.
15. Mpo na nini “molato mobimba ya etumba na Nzambe” ezali na ntina mingi mpenza? Limbola eyano na yo.
15 Mokapo 6 ya mokanda na Baefese emonisi biso malamu mpenza ndenge nini tokoki kotemela Satana. Engebene Paulo, ndenge nini tokoki kotelema ngwi liboso na “mayele mabe”, “mabaku” to “mitambo” ya Satana? (Baefese 6:11, Français courant, Votre Bible, Darby) Alobi na biso ete “bolata molato mobimba na etumba na Nzambe”. Na kolobaka “molato mobima” Paulo alakisi ete moklisto akoki te kozala na ezaleli ya bongo na bongo, ndenge moko mpe Soda na Loma akokaki te komibongisa mpo na etumba na lolenge ya bongo na bongo. Soda mbele asukaki boni soki alataki molato na ye ya etumba nyonso longola nguba na ye to ekoti na ye? Akokaki mbala mosusu komiloba ete: ‘Nguba na ngai eleki monene mpenza mpe ekoti na ngai eleki kilo mingi. Oyo nde bozito! Namoni mpe ete ezali na ntina mingi te mpo na ngai’. Kanisa naino ndenge ekoki kozala soki soda na Loma amibongisi mpo na etumba kasi azangi bibundeli na ye ya ntina mingi mpo na kotemela monguna.—Baefese 6:16, 17.
16. (a) Na ndakisa na Yesu, ndenge nini tosengeli kosalela “mopanga” na biso? (b) Ndenge nini tokoki kolanda komibatela na “mbanzi na móto” ya Satana mpe yango ekobimisa mbano nini?
16 Kanisa sikawa ete soda moko azangi mopanga. “Mopanga ya elimo” ezali ebundeli malamu mingi mpo na kotemela monguna. Moklisto akoki kosalela yango mpo na kokatakata mbanzi oyo Satana azali kobwakela ye. Na bongo tosengeli ntango nyonso kozala na “mopanga” na biso na maboko. Ekozala ndenge yango soki tobosani te koyekola Biblia biso moko mpe na libota. Kasi “mopanga yango . . . elingi koloba Liloba na Nzambe”, ezali mpe mingimingi ebundeli na biso mpo na kobundisa monguna. Yesu asalelaki yango na lolenge mibale. (Matai 4:6, 7, 10; 22:41-46) Tosengeli komekola ye. Tosengeli ntango nyonso kokolisa botondi na biso mpo na solo. Tokoki te kobatela elimo na biso na kosukaka bobele na makambo toyekolaki na boumeli na basanza ya liboso to na bambula ya ebandeli ya bomoi na biso ya moklisto. Soki tokoleisaka elimo na biso te ntango nyonso na makanisi ya Biblia, emoneli na biso ya elimo ekozanga te kokoma molili, mpe molende na biso mpo na losambo na solo ya Jéhovah ekozwa mpio. Tokolemba na elimo. Tokokoka lisusu te kotelema ngwi liboso na botemeli ya baboti, ya bayebani na biso, ya baninga mpe ya bapengwi baoyo bazali kotyola bindimeli na biso. Nzokande, Jéhovah akobatela biso liboso na Diable mpe na “mbanzi na móto” na ye soki tobateli “molato mobimba na etumba na Nzambe.”—Yisaya 35:3, 4.
17, 18. Tozali kobunda na banani, mpe eloko nini ekosalisa biso ete tólonga?
17 Paulo abendaki likebi likoló na mokakatano na etumba ya moklisto wana ekomaki ye ete: Mpamba te tozali kobunda na bato te, kasi na banguya ya bilimu mabe na likoló, na mikonzi mpe bankolo na mokili oyo ya molili.” (Baefese 6:12, Français courant) Ndenge nini biso bato na motau tokoki kobunda mpe kolonga bilimu bileki biso na makasi? Paulo azongeli toli na ye ete: “Bokamata bongo molato mobimba na etumba na Nzambe ete boyeba kotelema na mokolo na mabe mpe nsima na kosala nyonso, kotelema ngwi.” (Baefese 6:13) Kati na eteni yango, maloba ya moboko ezali: “Nsima na kosala nyonso.‘ Emonisi ete tokoki te kosalela boklisto ya solo na mitema mibale to na lolenge ya bongo na bongo.—1 Yoane 2:15-17.
18 Na bongo totelema ngwi kati na solo, tolingaka boyengebene ya Jéhovah, tosakolaka nsango malamu ya kimya, tozalaka na kondima makasi mpo na lobiko oyo Jéhovah azali kopesa biso na nzela na Yesu Klisto, na kosalelaka Liloba na Nzambe lokola lisungi na biso oyo eleki monene. (Baefese 6:14-17) Tobosana te ete Nzambe asenzelaka likoló na biso mpe akosalisa biso na kolonga mimekamo mpe mitungisi oyo ezingi biso kati na mokili oyo ya Satana. Tika ete biso banso totosa likebisi oyo: “Bomisenzelaka, bolalaka mpongi te. Motemeli na bino Diable azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukaka soki akolya nani.”—1 Petelo 5:6-9.
19. (a) Eloko nini tosengeli mpenza kosala mpo na kotemela Satana? (b) Satana nsuka na ye ekozala nini?
19 Tobosana te ete nsima na kopesa biso toli ete tolata “molato na etumba”, Paulo abakisi ete: “Na mabondeli nyonso mpe na malombo, bobondelaka ntango nyonso kati na elimo. Mpo na yango bolongwa na mpongi na etingya nyonso mpe bolombaka mpo na babulami nyonso.” (Baefese 6:18) Monguna na biso oyo amonanaka te azali na nguya mingi na boye ete tosengeli kotinda epai na Nzambe mabondeli nyonso mpe malombo. Na bongo mabondeli na biso masengeli kouta na motema mpe kozala engebene likambo mokomoko. Tosengeli bobele kotya elikya na biso mobimba epai na Jéhovah soki tolingi kolonga mpe kotikala sembo. Bobele ye nde akoki kopesa biso “nguya oyo eleki nguya na biso moko” mpo esalisa biso na kotemela monguna na biso monene. Oyo elendiseli nini na koyeba ete mosika te Monguna akobwakama na libulu mozindo mpe mokolo ekoya akobomama libela!—2 Bakolinti 4:7; Emoniseli 20:1-3, 10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Satana kati na mimesano na baklisto ya yambo (Angl.), ya Jeffrey Russell, page 25.
b Diksionere ya bandimbola na maloba ya Kondimana na Sika. (Angl.)
Bozongeli
◻ Ndenge nini toyebi ete Satana azali ekelamu ya solo mpenza?
◻ Mpo na nini bankombo mosusu ya Satana ekoki na ye mpenza?
◻ Ndenge nini tokoki komitalela malamu mpo na kotemela mayele mabe ya Satana?
◻ Toli mibale nini ekosalisa biso na kolonga Satana, mpe mpo na nini?
[Elilingi na lokasa 29]
Lolenge moko ya kosala mpo na kotemela bopusi ya Satana ezali ya komonisa boboto, mayele mpe bolingo.
[Elilingi na lokasa 30]
Tosengeli kokeba ete tókokana te na Anania mpe Safira baoyo bakweaki na bopusi ya Satana.
[Elilingi na lokasa 31]
Mpo na komibatela na mbanzi ya Satana, tosengeli kotika ata eloko moko te na molato na biso ya elimo.