Jéhovah azali kopesa liteya epai na bakonzi
“Misala minso na ye mizali solo mpe banzala na ye ezali na boyengebene mpe . . . akoki kokitisa baoyo batamboli na lolendo.”—DANYELE 4:37.
1. Elihu abendaki likebi likoló na ezaleli nini ya Jéhovah?
TALA, Nzambe asalelaka nguya na ye na lolenge ya kokamwa; nani azali molakisi lokola ye?” Maloba oyo Elihu alobelaki Yobo, wana ezalaki ye kobunda na mpasi mazali kobenda likebi likolo na moko na bizaleli malamu ya Mozalisi mpenza, Jéhovah Nzambe. Azali molakisi, moteyi, oyo aleki bateyi nyonso mosusu.—Yobo 36:22.
2, 3. (a) Moko na mateya oyo Jéhovah amonaki malamu kopesa na bato ezali nini? (b) Na ntango ya Moïse, Jéhovah apesaki liteya yango epai na mokonzi nini, mpe na nzela nini? (c) Kati na Liloba na ye, mbala boni Nzambe alobi ete mokano na ye ezali ya kolakisa liteya yango epai na bato?
2 Nzambe ateyaki mpenzampenza bato mpe mabota etelemelo nini bazali na yango liboso na ye. Ezali yango Davidi alobelaki na Nzembo 9:19, 20, M.N.: “E Jéhovah, telema! Tika te ete moto mpamba amimonisa ete aleki na nguya; tika ete mabota basambisama liboso na yo! E Jéhovah, tya kobanga kati na bango, mpo mabota bayeba ete bazali bobele bato mpamba.”
3 Moko na bakonzi ya bato, oyo Jéhovah Nzambe amonaki ntina na kopesa ye liteya yango, ezalaki Faraon ya ntango na Moïse. Mpo na yango Jéhovah asalelaki malozi oyo ayeisaki likoló na bato ya Ezipito. Nkutu alobaki epai na Faraon yango ya lolendo boye: “Tala mpenza ntina natiki yo: ezali mpo na komonisa yo nguya na ngai mpe mpo ete nkombo na ngai esakolama na mabelé.” (Exode 9:16) Lisusu, mbala koleka 70 kati na Liloba na ye (kobanda Exode 6:7 kino Yoele 3:17), Jéhovah azali koloba ete akokokisa misala na nguya ya motindo moko, mpo ete bakonzi, bato mpe mabota bayeba ete ye azali Oyo-Aleki-Likolo na mabelé mobimba.
4. Pesa nkombo ya bakonzi oyo Jéhovah apesaki bango liteya na eleko ya Danyele, mpe lolenge nini liteya yango epesamelaki bango?
4 Mokanda ya Danyele elobeli mwa mabaku oyo Jéhovah apesaki liteya monene na bakonzi Nebukadanezare, Belesazare mpe Dariuse. Asalaki yango ntango nini? Ekoki kozala mingimingi katikati na mibu kobanda 617 kino 535 liboso na ntango na biso. Mpe na motindo nini? Na nzela ya bandoto mpe bandimbola na yango, mpe na komonisaka bango bokasi na ye. Jéhovah alakisaki bakonzi yango ya bato ete azali Mokonzi aleki likoló ya molongo mobimba mpe bango bazali bobele bakonzi ya motau mpenza. Wana ezali liteya oyo bakonzi na mokili ya lelo basengeli mpe koyeba.
5. Litatoli nini ezali kolimwisa ntembe oyo bamosusu bazali na yango mpo na bosolo ya mokanda na Danyele?
5 Kasi bosolo ya mokanda ya Danyele etyameli ntembe te na ntalo monene ya batioli na eleko na biso? Koyanolaka na banguna yango, molimboli moko ya Biblia alobaki mpenza boye na bosikisiki: “Bikamwiseli oyo mokanda yango elobeli, bisakweli oyo bizali na kati na yango, ekomamaki solo na Danyele, na ntango makambo mazalaki kosalema. Na bongo, soki ezali bikamwiseli mpe bisakweli ya solosolo te loba ezali lokuta monene oyo ebongisami mpenza.” (Danyele mosakoli, ya E. Pusey, page 75 [angl.]) Mbala mingi, mokomi na mokanda yango azali komimonisa, lokola elakisi yango maloba oyo: “Ngai, Danyele.” (Danyele 8:15; 9:2; 10:2) Yango ezalaki bobele lisolo ya lokuta oyo babongisaki malamu? Toyeba malamu ete liboso na ebandeli ya ekeke ya 18, ezala Bayuda to baklisto bazalaki kotya ntembe te ete Danyele azalaki mokomi ya mokanda oyo elati nkombo na ye. Nzokande, tozali na litatoli ya kondimisa mpenza koleka oyo na balimboli nyonso ya Biblia ya eleko na biso likolo na mokanda ya Danyele: ezali oyo ya Makomami. Na bongo Danyele atangami mbala misato kati na mokanda ya Ezekiele. (Ezekiele 14:14, 20; 28:3) Endimiseli oyo eleki mosusu nyonso ezali maloba oyo ya Yesu, Mwana na Nzambe, mazali kati na Matai 24:15, 16: “Wana ekomona bino mbindo-na—libebisi ezali kotelema na esika ya mosantu, lokola elobaki yango mosakoli Danyele (tika ete motangi akanga ntina), na ntango wana, baoyo bakozala na Yuda bakima kuna na ngombaa.”
Nebukadanezare ayaki koyeba nani azali Nzambe ya solo
6. Bolongi nini ekoki kozala ete ekolisaki lolendo na mokonzi ya Babilone, mpe alobeli nini kati na makomi na ye?
6 Lokola mosakoli Yisaya amonisi yango, bakonzi ya Babilone batondaki na lolendo. (Yisaya 14:4-23) Na koleka, Nebukadanezare azalaki mosambeli monene. Kati na makomi na ye alobeli “mikano na ye ya botongi mpe lokumu azalaki kopesa na banzambe ya Babilone.” Bolongi oyo azwaki na kobotolaka Yelusaleme mpe mboka nyonso ya Yuda, kuna epai Senakeribe alongaki ata moke te, bolongi yango ematelaki ye solo na motó.
7. Na libaku nini, eyebisami na Danyele mokapo 1 Nebukadanezare akokaki koyekola komemya Nzambe na Baebele?
7 Nebukadanezare abongaki mpenza komemya Nzambe ya Danyele mpe ya baninga na ye misato baebele, nsima wana mibali yango bamimonisaki liboso na ye. Na bongo, “na makambo nyonso na mayele mpe na kososola, oyo mokonzi atunaki bango, amonaki ete bango balekaki mbala zomi banganga-nkisi mpe banganga-na-soloka nyonso na bokonzi na ye mobimba.” Ee, bato na mayele oyo Jéhovah azalaki Nzambe na bango balekaki na mosika basambeli nyonso ya banzambe mosusu. Nebukadanezare abungaki likambo yango te.—Danyele 1:20.
8. Na nzela nini Jéhovah amonisaki ete bato na mayele ya Babilone bazalaki na boyebi moko te ekeseni na oyo ya bato banso?
8 Kasi Jéhovah azali na makambo mosusu ya kolakisa Nebukadanezare. Liteya elandi, oyo apesaki ye, ekomami na Danyele mokapo ya mibale. Asalaki na boye ete mokonzi yango alota ndoto moko ya nsomo mpe abosana yango na nsima. Lokola ndoto yango etungisaki mokonzi ya Babilone, abengisaki bato na ye nyonso ya mayele mpo bayebisa ye ndoto yango mpe balimbolela ye yango. Na ntembe te, bakokaki te kokundola ye ndoto mpe kolimbola yango, likambo oyo epusaki bango bandima mpenza ete bazalaki na boyebi moko te oyo ekeseni na oyo ya bato banso. Mokonzi asilikaki mingi mpo na yango na boye ete atindaki baboma bango nyonso. Ntango bayebisaki Danyele mpe baninga na ye misato bonene ya mobeko ya mokonzi, Danyele asengaki batikela ye mwa ntango, mpe yango epesamelaki ye. Na nsima, elongo na baninga na ye misato, abondelaki makasi mpo na likambo yango, mpe Jéhovah amonisaki ye ndoto mpe ndimbola na yango.—Danyele 2:16-20.
9. (a) Bobele nani azalaki na likoki ya kolimbola ndoto ya Nebukadanezare, mpe ndimbola nini apesaki na yango? (b) Mokonzi ayaki kozwa esukiseli nini?
9 Ntango Danyele akotisamaki liboso na mokonzi, Nebukadanezare atunaki ye: “Ozali na makoki masengeli mpo na koyebisa ngai ndoto oyo nalotaki mpe ndimbola na yango?” Nsima na kokundola na mokonzi yango ya lolendo ete bato na ye ya mayele bakokaki te koyebisa ye mabombami ya ndoto mpe ndimbola na yango, Danyele alobaki na ye: “Kasi Nzambe moko azali na makoló, oyo akomonisaka makambo mabombami, mpe ye ayebisi mokonzi Nebukadanezare makambo makobima na mikolo ya nsuka.” Na nsima Danyele alobelaki mokonzi ndoto na ye, oyo ya ekeko molai, mpe ayebisaki ye ndimbola na yango. Ekamwaki ye mingi, mokonzi alobaki: “Solo, Nzambe na bino azali Nzambe na banzambe, mpe Nkolo na bakonzi, mpe Momonisi na makambo mabombami oyo.” Tala motindo nini Jéhovah alakisaki mokonzi Nebukadanezare ete ye azali Nzambe bobele moko ya solo.—Danyele 2:26, 28, 47.
10, 11. (a) Na lolendo, mokonzi Nebukadanezare asalaki nini? (b) Na koboyaka kotosa mobeko ya mokonzi, Baebele misato batyaki ntembe na nini, mpe yango ebimisaki likambo nini?
10 Atako akamwaki solo na boyebi mpe na mayele ya Nzambe na Baebele, mokonzi Nebukadanezare asengelaki kozwa mateya mosusu. Epusamaki ye na lolendo, atelemisaki na libanda monene ya Dula ekeko monene ya wolo ya maboko 60 na bolai, maboko 6 na bonene, mitango oyo mitindi biso na kokanisa na motuya 666, “elembo na nyama ya yauli” ya Satana oyo elobelami na Emoniseli 13:18. (Loboko moko ekokani na basantimetre pene na 45. Ekeko ezalaki bongo na bametele soki 27 na bolai mpe bametele 2,70 na bonene.) Mokonzi apesaki etinda epai na bato na lokumu nyonso ya mboka ete “baya kosepela kosila ya ekeko” mpe bangumbama liboso na yango mpo na kosambela yango ntango miziki ekobanda kobeta. Komonaka ete Baebele misato oyo bazalaki wana basanganaki na molulu yango te, bato na lokumu ya Kaladea, na zuwa, bafundaki bango epai na mokonzi.—Danyele 3:1, 2.
11 Oyo wana ezalaki likambo moko eleki monene na miso ya Nebukadanezare. Amikumisaki te mokolo mosusu ete azali “oyo azali kopusa minoko ya bato ete ekumisa banzambe minene?” Ezaleli na Baebele yango ezalaki kofinga monene mpo na lokumu ya bokonzi na ye mpe mpo na molende na ye ya kosambela. Ekomaki ye na nkanda monene, mokonzi yango ya lolendo apesaki na Baebele misato oyo libaku ya mibale mpo batosa, kasi elongo na likebisi oyo: “Soki nde bokosambela te, bokobwakama na ntango yango mpenza kati na litumbu na móto ya kongala. Mpe Nzambe nini akokoka kobikisa bino na maboko na ngai?” Nebukadanezare asengelaki mpe koyeba ete Nzambe akoki solo kosikola basaleli na ye na maboko ya mwa mokonzi motau lokola ye mpe ete nzambe mosusu azali te oyo akoki kobikisa lokola Nzambe ya Baebele.—Danyele 3:15.
Ndoto ya nzete
12, 13. (a) Danyele apesaki Nebukadanezare ndimbola nini na ndoto ya nzete? (b) Na motindo nini Nebukadanezare amonisaki ete ndimbola ya ndoto yango ekitisaki lolendo na ye te?
12 Likambo nini mateya yango misato makoki kosala likolo na yo? Emonani ete yango ekokaki te mpo ete etinda mokonzi Nebukadanezare amitya na esika na ye. Na bongo Jéhovah apesaki ye liteya mosusu. Asalelaki lisusu ndoto moko, mpe na mbala oyo lisusu, ata moto moko na mayele ya Babilone ayebaki kolimbola yango te. Na nsuka, Danyele abengisamaki, mpe alimbolelaki mokonzi ndoto yango, ete na boumeli ya mbula nsambo mokonzi yango akozala na bomoi lokola “banyama na zamba”, mpe ete na nsima akozongela mayele na ye.—Danyele 4:1-37.
13 Makambo malandaki mamonisi polele ete ndoto yango ekitisaki lolendo ya Nebukadanezare te. Na bongo, pene na mbula moko na nsima, wana ezalaki ye kotambola kati na ndako na ye, mokonzi yango alobaki na lolendo ete: “Oyo ezali Babilone Monene te, oyo ngai natongi mpo na ndako ya mokonzi, na makasi ya nguya na ngai mpe mpo na nkembo ya lokumu na ngai?” Oyo nde lolendo! Na ntango yango mpenzampenza, mongongo moko eyokanaki na likolo mpe elobaki na mokonzi ya lolendo ete bokonzi na ye ekobotolama mpe akotikala elongo na banyama ya zamba ntango nsambo; kino akoyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Mokonzi na boyangeli ya bato.—Danyele 4:30-32.
14. Ndenge nini ndoto ya nzete ekokisamaki, mpe ebimisaki likambo nini mpo na Nebukadanezare?
14 Nsima wana efandaki Nebukadanezare lokola nyama ntango nsambo, to bambula nsambo, Jéhovah azongiselaki ye mayele na ye mpe andimaki ‘ete moto moko te akoki kopekisa loboko na Oyo-Aleki-Likoló to kolobela ye ete: “ozali kosala nini?” Mokonzi na Babilone amonisaki mpe ete azwaki litomba monene lisusu na liteya yango, na kolobaka: “Sikawa ngai, Nebukadanezare, nasanzoli mpe natomboli, mpe nakumisi Mokonzi na makoló, mpo ete misala minso na ye mizali solo mpe banzela na ye ezali na boyengebene mpe mpo ete akoki kokitisa baoyo batamboli na lolendo”- lokola ye moko. Litatoli oyo mpo na motindo Jéhovah asilisaki mbala mingi ntembe etali bokonzi ya molongo mobimba, ezali endimiseli makasi oyo ezali komonisa ete masolo yango mazali makanisi mpamba te, kasi ezali makambo mpenza ya lisolo ya bomoi na bato eyebisamaki na moto oyo apemamaki na Nzambe. Boye te?—Danyele 4:35, 37.
Belesazare mpe makomi likoló na mur
15. Ndenge nini Belesazare amonisaki ete atyelaki Jéhovah, Nzambe ya solo?
15 Belesazare azali mokonzi mosusu oyo Jéhovah azwaki libaku ya kopesa ye liteya. Azalaki mokitani na Nebukadanezare. Na ntango na elambo monene, Belesazare amonisaki lolendo na kotindaka ete bamemela ye bambeki na wolo oyo nkoko na ye ya mobali azwaki kati na temple ya Jéhovah na Yelusaleme, ete bamela na yango, ye, bato na ye na lokumu, basi na ye mpe bamakango na ye. Na bongo, “bamelaki vinyo, mpe basanzolaki banzambe ya wolo mpe ya palata, ya motako, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga.”—Danyele 5:3, 4.
16, 17. (a) Na motindo nini Jéhovah abengisaki Belesazare? (b) Ndimbola nini Danyele apesaki mpo na makomi mabimaki likoló na mur, mpe ndenge nini yango emonanaki ete ezalaki solo?
16 Ntango ekokaki mpo ete Nzambe asukisa boyangeli ya Babilone. Na yango abimisaki makomi ya kokamwa likolo na mur. Likamwisi yango ebangisaki mokonzi mpenza na boye ete abengisaki nokinoki bato na ye nyonso ya mayele mpo ete balimbola makomi yango, kasi ata moto moko te akokaki kolimbola yango. Na nsima mama na ye akundolelaki ye ete Danyele, oyo alimbolaki bandoto ya Nebukadanezare, asengelaki kokoka kolimbola makomi yango. (Danyele 5:10-12) Na bongo Danyele abengisamaki. Ntango mokonzi atunaki ye soki akoki kopesa ndimbola na makomi, Danyele akundolaki ye ete Nzambe akitisaki nkoko na ye ya lolendo, mpo ayeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Mokonzi na boyangeli ya bato.—Danyele 5:20, 21.
17 Danyele alobaki lisusu na Belesazare ete: “Nde Nzambe oyo mpema na yo ezali na maboko na ye, mpe oyo banzela na yo nyonso ezali epai na ye, yo osanzoli ye te.” (Danyele 5:23) Makomi mazalaki mpo na koyebisa mo-konzi ya Babilone ete bokonzi na ye ekomaki na nsuka na yango, ete bokonzi na ye ekopesama na ba Mede mpe ba Perse. Mpe na butu yango, nsima wana epesaki Jéhovah liteya yango oyo ekokaki mpenza na Belesazare, mokonzi na lolendo ya Kaladea abomamaki.—Danyele 5:30.
18. Na motindo nini Jéhovah akopesa mateya lolenge moko epai na bakonzi ya lelo mpo na bokonzi na ye ya molongo mobimba mpe nguya na ye ya kobikisa?
18 Motindo moko lokola Nzambe apesaki mateya na bakonzi ya lolendo, Nebukadanezare, mpo na kopusa bango bandima bokonzi na ye ya molongo mobimba mpe nguya na ye ya kobikisa, na motindo moko mpe, na Armagedon, akolakisa bakonzi nyonso ya mabelé ete azali Mokonzi aleki-likolo, Moyangeli na nguya nyonso na molongo mobimba. Na bongo bomoi na yo ekozala na likama. Mpo na ntina nini? Mpamba te na ntango wana, Jéhovah akobikisa mpe basaleli na ye ya sembo, lokola abikisaki mpe basaleli na ye ya sembo, lokola abikisaki Baebele misato kati na fulu na móto makasi.—Danyele 3:26-30.
Dariuse ayaki koyeba ete Jéhovah azali na nguya ya kobikisa
19, 20. Eteni nini na bomoi ya Danyele elakisaki Dariuse ete Jéhovah azali na nguya ya kobikisa?
19 Mokapo ya 6 ya mokanda na Danyele eyebisi ete Jéhovah apesaki liteya epai na mokonzi mosusu, Dariuse: Amonisaki nguya na ye ya kobikisa. Nsima na mayele mabe oyo esalemaki, mokonzi akokaki kosala likambo mosusu te bobele kobwaka Danyele kati na libulu ya bankosi. Mokonzi yango amitombolaki te na lolendo mpo na kotemela Nzambe ya solo. Nzokande, atako andimisaki Danyele ete Nzambe na ye akobikisa ye, emonani ete andimaki yango mpenzampenza te. Soki boye te, mpo na nini alalaki te butu mobimba na mitungisi ya makanisi mpe akendaki mbangu na ntongontongo na libulu ya bankosi? Na nsima angangaki ete: “E Danyele, mosaleli na Nzambe ya bomoi, Nzambe na yo oyo ekosalelaka ntango nyonso abikisi yo na bankosi?”—Danyele 6:18-20.
20 Ee, Nzambe azalaki na likoki ya kobatela Danyele. Mokonzi Dariuse asepelaki mingi na boye ete asakolaki mobeko oyo: “Tika ete, na bokonzi na ngai mobimba, bato balenga mpe babanga liboso na Nzambe ya Danyele. Mpamba te azali Nzambe na bomoi mpe oyo akoumelaka seko, mpe bokonzi na ye ezali oyo ekobebisama te. . . . Ye akobikisaka, mpe akosikolaka, mpe akosalaka bikamwiseli na makoló mpe na mabelé, mpamba te abikisi Danyele na nguya ya bankosi.”—Danyele 6:26, 27.
21. (a) Bandakisa malamu nini mikapo motoba ya liboso ya mokanda na Danyele ezali kopesa? (b) Lisolo ya makambo yango esengeli kosala nini likoló na biso?
21 Mikapo motoba ya liboso ya mokanda ya Danyele mimonisi mpenza na lolenge kitoko motindo nini Jéhovah, oyo azali na molende, ee, oyo azali na zuwa mpo na nkombo na ye, alakisaki na bakonzi ya nguya ete azali solo Mozwi-na-Nguya-Nyonso, Mokonzi ya molongo mobimba, oyo akoki kokitisa bakonzi ya lolendo mpe kobikisa basaleli na ye ya sembo. Makambo yango masengeli kopesa biso kobanga malamu ya Jéhovah mpe limemya mpo na nguya na ye nyonso mpe bokonzi na ye ya molongo mobimba. Epai mosusu, lisolo yango oyo epemami na Nzambe ezali kolendisa mpenza kondima na biso, mpamba te ezali kopesa bandakisa malamu ya basaleli na Jéhovah Nzambe oyo bamonisaki kondima mpe mpiko monene, ndenge lisolo elandi ekolimbola yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
Bozongeli
◻ Liteya nini Jéhovah apesaki na bakonzi ya bato?
◻ Tokoki koloba nini mpo na bosolo ya mokanda na Danyele?
◻ Liteya nini ekitisaki mokonzi Nebukadanezare?
◻ Mateya oyo Jéhovah apesaki epai na bakonzi ya Babilone mazali kosala nini likolo na biso?