Nsuka ya libota moko
Liteya euti na Makomami: Amos 1:1 kino 9:15.
“JEHOVAH, Nzambe na bibele”, alobi na libota ya Yisraele “omibongisa mpo na kozwana na Nzambe na yo”. (Amos 4:12, 13) Mpo na ntina nini azali kopesa bango likebisi oyo? Mpamba te, lokola miso na bango mazipamaki na bozwi, babosanaki Mibeko na ye mpe babebisaki mabelé na Ye ya bulee na komipesaka na losambo ya bikeko, na pite, na koboma bato mpe na kosala mobulu.
Jéhovah abimisi bongo mosakoli, Amos, mpo ete asakola nsango ya likebisi, bobele epai na bato ya libota na ye te, Yuda, kasi mingimingi mpenza epai na bokonzi ya nord, ya Yisraele. Amos azali kokweisa bafandi ya bokonzi yango baoyo bazalaki na bomoi etongami likoló na bisengo mpe azali kosakola ete na nsuka na yango bakokwea na maboko ya mabota na banguna. Mokanda na ye, oyo ekomamaki kati na mibu 829 mpe 804 liboso ya ntango na biso, emonisi ete Nzambe azali na nguya ya kosakola bampasi, mpe ezali na makebisi oyo masengeli mpo na ntango na biso.
Banguna na Nzambe bakobomama na nkele nyonso
Moto moko te akoki kokima bisambiseli na Nzambe. Damas (Syrie), Gaza (Filistia), Tyr, Edome, Amone, Moabe mpe Yuda bakondima yango! Jéhovah ‘akolongola te’ loboko oyo atomboli epai na bango mpo na mabe na bango. Nzokande, mpasi oyo esakolamaki ekozala mpo na komonisa malamu kosambisama oyo Yisraele akozwa mpo ete abatelaki te boyokani na ye elongo na Nzambe to mpe kotosa mibeko na ye.—Amos 1:1 kino 2:16.
Ebongi koyoka likebisi na Nzambe: Jéhovah alobi na Bayisraele “nayebi bobele bino kati na mabota nyonso na mokili”. (Amos 3:2) Kasi na nzela na etamboli na bango ya mbindo, bazali kotyola nkombo mpe bokonzi na Nzambe. Mingi bazwaki ekateli ya kokoma bazwi, kozala na bomoi etombwani mpe koboya mosala, kozalaka na ‘ndako na ntango na mpio mpe ndako na ntango na moi makasi’, nyonso wana na nzela na mosolo ya bandeko na bango. (Amos 3:15) Bato wana na moimi bazalaki kopesa mpasi epai na babola na kosalelaka bimekeli na lokuta. Lokola batikaki losambo ya solo, babongaki mpo na kozwa etumbu epai na Jéhovah. Nzokande, ‘Jéhovah akosala likambo te bobele akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye’. Yango wana Amos azali kosakola bikateli na Jéhovah mpe koyeisa likebisi oyo na Yisraele: “Omibongisa mpo na kozwana na Nzambe na yo.”—Amos 3:1 kino 4:13.
Jéhovah azali lobiko
Nzambe akolimbisa baoyo bakobongola motema. Jéhovah azali koyebisa libiangi oyo epai na Bayisraele: “Luka ngai mpe bokobika.” (Amos 5:4) “Boyina mabe mpe bolinga malamu.” (Amos 5:15) Kasi bazali kozipa matoi na bango na batoli oyo. Bapengwi wana bazali kolinga komata na Béthel mpe na Guilgal, bisika losambo na bikeko epikaki miboko na yango, mpo na kopesa mbeka epai na banzambe ya lokuta. (Amos 5:26; 1 Mikonzi 12:28-30) Lokola bazalaki kolala na bambeto ya mpembe na nzoku, babuki wana na mibeko oyo bamimonaki ete bakoki, bazali komela vinyo ya malonga, bazali na boyokani malamu mpe bazali komipakola malasi maleki malamu. (Amos 5:11; 6:4-6) “Mokolo na Jéhovah” ezali kobelema, mpe Nzambe akati ndai “na ye moko” ete akoboma Yisraele. (Amos 5:18; 6:8) Jéhovah akobimisa libota moko oyo ekonyokola Yisraele mpe ekomema yango na boombo.—Amos 5:1 kino 6:14.
Tobanga Jéhovah, kasi banguna na biso te. Kobomama ya Yisraele ekokaki kosalema epai na liboke ya mabanki to na móto ya kongala. Kasi Amos abeleli Nzambe mpo na kobikisa Yisraele, mpe ‘Jéhovah ayoki mawa’ mpo na ekateli oyo alobaki; na bongo ekobomama te na motindo oyo ye akanaki yango. Nzokande, lokola motongi ndako moko oyo azali kotala na likebi nyonso na lisalisi ya nivo soki mur etelemi alima, Jéhovah ‘akolimbisa’ lisusu Yisraele te. (Amos 7:1-8) Libota esengeli kobomama. Lokola nsango ya Amos epesaki ye nkanda, Amasia, nganga na losambo ya mwana na ngombe, akoselaki mosakoli makambo ete asali komplo mpo na kotekisa mboka. Apesi ye etinda ete ‘akima na mokili ya Yuda mpe atika kosakola’ na Béthel. (Amos 7:12, 13) Amos akomitika kolongama? Te! Azali kosakola kozanga kobanga ete Amasia akokufa mpe ete libota na ye elakelami mabe. Lokola babukaka bambuma na eleko ya bobuki mbuma, motindo moko mpe ngonga ekoki mpo na Jéhovah ete apesa etumbu epai na libota ya Yisraele. Ekobika te.—Amos 7:1 kino 8:14.
Elikya ezali epai na baoyo bazali kotya motema epai na Jéhovah. Jéhovah alobi “nakobebisa libela te ndako na Yakobo”. Elikya ezali lisusu mpo na bakitani mosusu ya Yakobo, kasi mpo na bato ya masumu te. Kobomama na bango ezali solo. Atako bongo, Jéhovah ‘akobutwisa bakangami’ ya Yisraele.—Amos 9:1-15.
Liteya tosengeli kozwa: Jéhovah akoboma baoyo bazali kotemela ye, kasi akoyokela mawa mpe akobatela moto nyonso oyo akoyoka nsango ya likebisi na nzela na yango azali kobianga bato na kobongola mitema. Soki tozali kobanga Nzambe, tokopesa nzela te na banguna na biso ete bapekisa biso kosala mokano na ye.
[Etanda na lokasa 20]
KOTALELAMA YA MWA MIKAPO NA BIBLIA
○ 1:5—Na kala, bingumba bizalaki na mapango to murs milai mpe bikuke to porte ya minene. Mpo na kokanga bikuke yango, bazalaki kotya bibende milai na nsima na yango. ‘Ebende na Damas ekobukama’ na boye ete kapitale ya Syrie ekokwea na maboko ya Basulia. Ekozala lokola soki nde bikuke ya engumba yango, bikoki lisusu kokangama te mpo bibende na yango bibukani.—2 Mikonzi 16:8, 9.
○ 4:1—Basi kitoko oyo bazalaki kofanda na Samarie bakokisami na “bangombe na Basana”. Bilei kitoko mpo na banyama, oyo ezalaki na Basana ezalaki kobimisa lolenge kitoko ya banyama. (Deteronome 32:14; Ezekiele 39:18) Bangombe na Basana” yango ya moimi bazalaki mpenzampenza kopusa bankolo na bango, to mibali na koyiba mosolo epai na babola mpo na kotondisa “bandako na bango ya mpembe na nzoku”. (Amos 3:15) Kasi Nzambe apesaki bango etumbu mpo na ezalela na bango wana.
○ 4:6—Elobeli “mino mpembe” engengisami na elobeli mosusu ekokani na yango “kozanga na kwanga. Ezali bongo kolobela eleko na nzala na boumeli na yango mino makomaki mpembe mpo bilei bizangaki. Jéhovah amonisaki ete azalaki koboya mabota zomi oyo bazalaki kosambela bikeko na kokotisaka nzala na mboka yango, engebene likebisi oyo apesaki liboso mpenza. (Deteronome 28:48) Kasi, ezala nzala, to bitumbu mosusu ya Nzambe, moko te etungisaki motema ya libota yango oyo ezangaki bosembo na kondimana oyo basalaki.-Amos 4:6, 8-11.
○ 5:2—Ntango Amos azalaki kosakola, nguya moko te ya bopaya eyangelaki Yisraele to ekotelaki mabele na yango. Emonisamaki bongo lokola moseka. Kasi bobele mwa bambula na nsima, ekweaki na maboko ya Basulia mpe ‘ekendaki na boombo mosika koleka Damas’. (Amos 5:27) Mpo na Amos, kobebisama na libota ya Yisraele, oyo ezangaki bosembo ezalaki likambo ya solo mpenza na boye ete alobelaki yango lokola likambo moko oyo esilaki kosalema.
○ 7:1—“Matiti ya mokonzi oyo mabebisami” makokaki kozala elilingi ya mpako etyamaki na mokonzi mpo na koleisa banyama na ye mpe bampunda na ye. Mpako ya mokonzi esengelaki kofutama liboso, mpe bobele na nsima nde bato bakokaki kozwa “matiti”, mpo na misala na bango. Kasi liboso ete bakoka kosala yango, mabanki, bayaki mpe balyaki milona yango oyo mitikalaki.
○ 8:2—Mbuma ya eleko na moi (été) ezalaki kobukama na nsuka mpenza. Nsuka ya mbula na milona elimbolaki ete Yisraele ekomaki na nsuka na yango. Jéhovah alobaki: “Nakolimbisa bango lisusu te”. Libota elingaki kozwa etumbu na yango.
○ 9:7—Mpo na bosembo ya bankoko na bango, Jéhovah aponaki Yisraele, asikolaki batata na bango na boombo na Ezipito mpe akumbaki bango na Kanana. Kasi bazalaki na ntina ya komikumisa te mpamba te na miso ya Jéhovah, mabe na bango ekomisaki bango lokola Basute. (Tala Baloma 2:25) Kosikolama na bango na Ezipito ezalaki ndanga te mpo ete bandimama na Jéhovah. Bobele bongo, Bafilistia mpe Basyrié bakokaki te kondimama na Nzambe mpo bakomaki kofanda na mboka mosusu. Kokitana na bango uta na batata na mabota ya sembo ekobikisa mpe Bayisraele te. Mpo na kondimama na Nzambe, esengeli kotosa mokano na ye.—Amos 9:8-10; Misala 10:34, 35.