Yehova akopesa bato mabe etumbu
“Omibongisa mpo na [kokutana] na Nzambe na yo.”—AMOSA 4:12.
1, 2. Mpo na nini tokoki kolikya ete Nzambe akosilisa mabe?
YEHOVA akosilisa mpenza mabe ná bampasi awa na mabelé? Ebongi mpenza motuna wana etunama lelo oyo, na ebandeli ya ekeke ya ntuku mibale na moko. Na bisika nyonso, tozali komona ete bato bazali kosala bazalani na bango makambo ya nsɔmɔ. Tozali mpenza na mposa ya mokili oyo ezangi mobulu, bateroriste mpe kanyaka!
2 Likambo ya malamu ezali ete tokoki mpenza kolikya ete Yehova akosilisa mabe. Bizaleli ya Nzambe ezali kondimisa biso ete akotika bato mabe libela na libela te. Yehova azali moyengebene mpe azali sembo. Na Nzembo 33:5, Liloba na ye eyebisi biso boye: “Ye alingi boyengebene mpe [bosembo].” Nzembo mosusu elobi boye: “Molimo ya [Yehova eyini] ye oyo alingi mobulu.” (Nzembo 11:5) Tomoni mpenza ete Yehova, Nzambe oyo azali na nguya nyonso, oyo alingaka boyengebene mpe bosembo, akotika te ete makambo oyo ayinaka esalemaka libela na libela.
3. Makambo nini tokomona soki tokobi boyekoli ya esakweli ya Amosa?
3 Tótalela ntina mosusu oyo tokoki kolikya ete Yehova akolongola mabe. Masolo ya makambo oyo asalá na ntango ya kala ezali kondimisa yango. Mokanda ya Amosa elobeli bandakisa ya solosolo oyo emonisi makambo oyo Yehova asalaka bato ya mabe. Soki tokobi boyekoli na biso ya mokanda ya Amosa, tokomona makambo misato na ntina etali bitumbu ya Nzambe. Ya liboso, apesaka etumbu mpamba te. Ya mibale, nzela ya kokima yango ezalaka te. Mpe ya misato, ezwaka kaka baoyo babongi na yango, mpamba te Yehova apesaka bato mabe etumbu, kasi ayokelaka bato oyo babongoli motema mpe bazali na makanisi malamu mawa.—Baloma 9:17-26.
Nzambe apesaka etumbu mpamba te
4. Epai wapi Yehova atindaki Amosa, mpe mpo na nini?
4 Na mikolo ya Amosa, Yisalaele ekabwanaki na bikólo mibale. Mosusu ebengamaki Yuda, ezalaki na sudi mpe esangisaki bikólo mibale. Mosusu ebengamaki Yisalaele, esangisaki mabota zomi, mpe ezalaki na nɔrdi. Yehova atindaki Amosa alongwa na mboka na ye na Yuda mpe akende kosakola na Yisalaele. Kuna, Nzambe atindaki Amosa asakola bitumbu na ye.
5. Amosa asakolaki bitumbu oyo Nzambe akanaki kopesa bikólo nini, mpe wapi ntina moko oyo ebongaki bikólo yango ezwa bitumbu ya Nzambe?
5 Amosa abandaki mbala moko te kosakola bitumbu oyo Yehova akanaki kopesa Yisalaele, bokonzi ya nɔrdi, mboka ya bato ya mitó makasi. Abandaki naino koyebisa bitumbu oyo Nzambe akanaki kopesa bikólo motoba oyo ezalaki zingazinga ya Yisalaele. Bikólo yango ezalaki Silia, Filistia, Tulo, Edome, Amona, mpe Moaba. Kasi, ebongaki mpenza Nzambe apesa bikólo wana etumbu? Ntembe ezali soki moke te. Ntina moko ezali ete bikólo yango nyonso ezalaki banguna minene ya libota ya Yehova.
6. Mpo na nini Nzambe akanaki kopesa Silia, Filistia, mpe Tulo mpasi?
6 Na ndakisa, Yehova alobaki ete bato ya Silia babongi kozwa etumbu “zambi basili kotuta Gileadi.” (Amosa 1:3) Bato ya Silia babɔtɔlaki bamboka mosusu ya Gileadi, etúká moko ya Yisalaele oyo ezalaki na ɛsti ya Ebale Yolodani, mpe banyokolaki mpenza basaleli ya Nzambe oyo bazalaki kofanda kuna. Bongo Filistia ná Tulo? Bafilistia bazalaki na ngambo mpamba te bamemaki Bayisalaele na boombo mpe batɛkaki bango epai ya bato ya Edome, mpe bato ya Tulo oyo bazalaki kosala mombongo ya kotɛka baombo bakangaki bato mosusu ya Yisalaele. (Amosa 1:6, 9) Talá likambo: batɛkaki basaleli ya Nzambe na boombo! Yango wana, tokoki kokamwa te ete Yehova asakolaki ete mpasi esengelaki kokómela Silia, Filistia mpe Tulo.
7. Edome, Amona, ná Moaba ezalaki ndenge nini na Yisalaele, kasi makambo nini basalaki Bayisalaele?
7 Bikólo misato oyo: Edome, Amona, mpe Moaba ezalaki bandeko ya Yisalaele. Baedome bazalaki bankɔkɔ ya Abalayama na nzela ya Esau, oyo azalaki lipasa ya Yakobo. Yango wana, tokoki koloba ete bango ná Bayisalaele bazalaki bandeko. Baamona ná Bamoaba bazalaki bankɔkɔ ya Lota, mwana ya ndeko ya Abalayama. Kasi, Edome, Amona mpe Moaba basalelaki bana ya Yisalaele makambo lokola bandeko na bango? Soki moke te! Edome abundisaki “ndeko na ye” na mopanga mpe ayokelaki ye ata mawa te, mpe Baamona bazalaki konyokola bana ya Yisalaele oyo bakangaki na bitumba. (Amosa 1:11, 13) Atako Amosa alobeli polele te makambo mabe oyo Moaba asalaki libota ya Nzambe, eyebani ete banda kala bato ya Moaba bazalaki banguna ya Yisalaele. Bikólo nyonso wana misato oyo eutaki na moto moko esengelaki kozwa etumbu ya makasi mpenza. Yehova alakaki ete akoboma yango na ndenge moko ya nsɔmɔ.
Nzela ya kokima etumbu ya Nzambe ezalaka te
8. Mpo na nini bikólo motoba oyo tozali kolobela ezalaki na nzela te ya kokima bitumbu oyo Nzambe akanaki kopesa yango?
8 Ntembe ezali te ete bikólo motoba oyo touti kolobela ebongaki kozwa etumbu ya Nzambe. Ekokaki mpe kokima etumbu yango te. Kobanda na Amosa mokapo 1, vɛrsɛ 3 tii na mokapo 2, vɛrsɛ 1, Yehova alobi mbala motoba ete: “Nakopɛngola etumbu na bango te.” Se ndenge alobaki, Yehova azongaki nsima te: apesaki bango etumbu. Masolo ya kala emonisi ete nsima ya bambula, mpasi eyelaki bikólo nyonso wana. Kutu, bikólo minei kati na yango, elingi koloba Filistia, Moaba, Amona, mpe Edome esukaki na kolimwa!
9. Bafandi ya Yuda babongaki na nini, mpe mpo na nini?
9 Na nsima, esakweli ya Amosa elobeli ekólo ya nsambo: ekólo na ye moko, Yuda. Ekoki kozala ete bato ya bokonzi ya nɔrdi oyo bazalaki koyoka Amosa bakamwaki ntango bayokaki ye asakoli mpe etumbu mpo na bokonzi ya Yuda. Mpo na nini ebongaki ete bato ya Yuda bázwa etumbu? Amosa 2:4 elobi boye: “Zambi baboyi Mobeko ya [Yehova].” Yehova amonaki te ete koboya Mibeko na ye na nko ezalaki likambo moke. Na Amosa 2:5, asakolaki boye: “Nakotinda mɔtɔ likoló na Yuda, mpe ekolya ndako minene ya Yelusaleme.”
10. Mpo na nini Yuda ekokaki te kokima mpasi oyo esengelaki koyela yango?
10 Yuda, ekólo ya bato oyo bazalaki sembo te, ekokaki te kokima mpasi oyo esengelaki koyela yango. Mpo na mbala ya nsambo, Yehova alobaki boye: “Nakopɛngola etumbu na bango te.” (Amosa 2:4) Yuda ezwaki etumbu oyo Amosa asakolaki ntango bato ya Babilone bayaki kobebisa ekólo yango na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Tomoni lisusu ete bato mabe bakoki kokima etumbu ya Nzambe te.
11-13. Mokumba oyo Amosa azwaki ya kosakola bitumbu ya Nzambe ezalaki libosoliboso mpo na ekólo nini, mpe ndenge nini bazalaki konyokola bato na ekólo yango?
11 Tii na ntango wana, Amosa asakolaki bitumbu ya Yehova kaka mpo na bikólo nsambo. Nzokande, moto nyonso oyo akanisaki ete Amosa asilisaki kosakola, amikosaki. Mosala ya Amosa asilaki naino te! Nzambe apesaki ye mokumba ya kosakola libosoliboso etumbu makasi oyo asengelaki kopesa Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi oyo ezalaki na nɔrdi. Ebongaki mpenza Yisalaele ezwa etumbu ya Nzambe mpamba te bizaleli ya bato ya ekólo yango mpe losambo na bango ebebaki mpenza.
12 Amosa alobaki polele ete na ekólo Yisalaele, bato mingi bazalaki konyokola bazalani na bango. Mpo na yango, Amosa 2:6, 7 (NW) elobi boye: “Yehova alobi boye: ‘Mpo na botomboki misato ya Yisalaele, mpe mpo na minei, nakopɛngola etumbu na bango te mpamba te batɛki moto ya sembo kaka mpo na palata, mpe mobola na ntalo ya sandalɛ. Bazali na mposa makasi ya koyeisa mputulu ya mabelé likoló ya motó ya bato mpamba; mpe bazali kopɛngwisa nzela ya bato mpamba.’”
13 Bazalaki kotɛka bato ya sembo “kaka mpo na palata,” yango elimboli ntango mosusu ete bazuzi bazalaki kondima kanyaka ya palata mpo na kokatela bato oyo basali mabe te etumbu. Bato oyo bazalaki kodefisa babola bazalaki kotɛka bango na boombo na ntalo ya “sandalɛ,” ntango mosusu kaka mpo na mwa banyongo ya moke. Bato yango oyo bazangá mawa ‘bazalaki na mposa makasi’ ya kokitisa “bato mpamba” tii bákóma komibwakela mputulu na motó mpo na komonisa ete bazali na mpasi, na mawa, to na nsɔni. Kanyaka ekɔtaki na bisika nyonso; yango wana “bato mpamba” bakokaki kozala na elikya te ete bakoki kokata makambo na bango na bosembo.
14. Banani bazalaki konyokwama na Yisalaele, ekólo ya mabota zomi?
14 Tomoni banani oyo bazalaki konyokwama. Ezalaki bato ya sembo, babola, mpe bato mpamba. Kondimana ya Mibeko oyo Yehova asalaki na Bayisalaele esɛngaki ete báyokelaka bato ya mpasi to bato oyo bazali kokelela mawa. Nzokande, na Yisalaele, ekólo ya mabota zomi, bato ya ndenge wana bazalaki na mpasi mpenza.
‘Omibongisa mpo na kokutana na Nzambe na yo’
15, 16. (a) Mpo na nini bayebisaki Bayisalaele ete: ‘Omibongisa mpo na kokutana na Nzambe na yo’? (b) Ndenge nini Amosa 9:1, 2 ezali komonisa ete bato mabe bakokaki te kokima etumbu ya Nzambe? (c) Nini ekómelaki Yisalaele, ekólo ya mabota zomi, na mobu 740 L.T.B.?
15 Lokola bato mingi na Yisalaele bamipesaki na pite, ekobo mpe masumu mosusu, ebongaki mpenza mosakoli Amosa ayebisa libota yango ete: ‘Omibongisa mpo na kokutana na Nzambe na yo.’ (Amosa 4:12) Yisalaele, ekólo ya bato oyo bazalaki sembo te, ekokaki te kokima etumbu oyo etikalaki moke Nzambe apesa bango mpamba te, mpo na mbala ya mwambe, Yehova alobaki ete: “Nakopɛngola etumbu na bango te.” (Amosa 2:6) Mpo na bato mabe oyo bakokaki ntango mosusu koluka komibomba mpo amona bango te, Nzambe alobaki boye: “Moko akokima te, moko akomibikisa te. Ata bakotimola na nse kino [Sheole] lobɔkɔ na ngai ekolubola bango wana; ata [bamati] likoló kino lola, nakokitisa bango wana.”—Amosa 9:1, 2.
16 Bato mabe bakokaki kokima etumbu ya Yehova te mpe kotimola “kino na Sheole,” oyo ezali maloba ya elilingi mpo na komonisa ndenge bakoluka komibomba na nse mpenza ya mabelé. Bakokaki mpe kokima etumbu ya Nzambe te mpe ‘komata na likoló’ to komibomba likoló ya bangomba milai. Likebisi ya Yehova ezalaki polele: Ezali na esika ata moko te ya komibomba oyo ye akoki kokóma te. Bosembo ya Nzambe esɛngaki ete bokonzi ya nɔrdi ezwa etumbu mpo na misala mabe na yango. Mpe yango esalamaki. Na mobu 740 L.T.B., mbula soki 60 kobanda Amosa akomaki esakweli na ye, Baasulia babundisaki Yisalaele, bokonzi ya nɔrdi, mpe bakómaki koyangela yango.
Etumbu ya Nzambe ezwaka kaka baoyo babongi na yango
17, 18. Amosa mokapo 9 ezali komonisa nini na ntina na motema mawa ya Nzambe?
17 Esakweli ya Amosa esalisi biso na komona ete Nzambe apesaka etumbu mpamba te mpe nzela ya kokima yango ezalaka te. Kasi mokanda ya Amosa eteyi biso mpe ete etumbu ya Yehova ezwaka kaka baoyo babongi na yango. Yehova akoki komona bato mabe mpe kopesa bango etumbu, ata soki bamibombi wapi. Akoki mpe komona bato oyo babongoli motema mpe bato ya sembo, baoyo asepeli koyokela bango mawa. Likanisi yango emonisami malamu mpenza na mokapo ya nsuka ya mokanda ya Amosa.
18 Na Amosa mokapo 9, vɛrsɛ 8, Yehova alobaki boye: “Nakobebisa ndako [mobimba] ya Yakobo te.” Ndenge Am 9 vɛrsɛ 13 tii 15 emonisi yango, Yehova alakaki ete ‘akozongisa bato na ye oyo bakangami.’ Akoyokela bango mawa, bakofanda na kimya mpe bakozala na bomoi ya malamu. Yehova alakaki ete ‘motimoli akozwana na mobuki.’ Kanisá naino—bilanga esengelaki kobota mbuma ebele mpenza na boye ete tii na ntango ya kotimola lisusu mabelé mpe kolona, bakokaki naino kosilisa kobuka yango te!
19. Nini ekómelaki batikali ya Yisalaele mpe ya Yuda?
19 Tokoki koloba ete etumbu ya Yehova epai ya bato mabe ya Yuda mpe ya Yisalaele ezwaki kaka baoyo babongaki na yango mpamba te baoyo babongolaki mitema mpe bazalaki na ezaleli ebongi, bayokelaki bango mawa. Esakweli ya kozongisama oyo ezali na Amosa mokapo 9 ekokisamaki ntango batikali ya Yisalaele mpe ya Yuda oyo babongolaki motema babimaki na boombo na Babilone na mobu 537 L.T.B. Ntango bazongaki na mboka na bango oyo balingaki mingi, bazongisaki lisusu losambo ya pɛto. Batongaki lisusu bandako na bango mpe basalaki bilanga ya vinyo mpe ya banzete mosusu kozanga ete moto moko asala bango mabe.
Yehova akozanga te kopesa etumbu!
20. Boyekoli ya bitumbu ya Nzambe oyo Amosa asakolaki esengeli kopesa biso elikya nini?
20 Boyekoli ya bitumbu ya Nzambe oyo Amosa asakolaki esengeli kopesa biso elikya ete Yehova akosukisa mabe oyo tozali komona lelo oyo. Mpo na nini tokoki kondima yango? Ya liboso, makambo touti komona oyo Yehova asalaki bato mabe na ntango ya kala ezali bandakisa oyo ezali komonisa biso makambo oyo akosala na ntango na biso. Ya mibale, etumbu oyo Nzambe apesaki Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi oyo epɛngwaki, ezali komonisa polele ete Nzambe akoboma mangomba ya boklisto, eteni eleki mabe ya “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba.—Emoniseli 18:2.
21. Mpo na nini mangomba ya boklisto ebongi kozwa etumbu ya Nzambe?
21 Ntembe ezali te ete mangomba ya boklisto ebongi kozwa etumbu ya Nzambe. Moto moko te abungi makambo mabe mpe losambo ya mbindo oyo ezali kosalema na mangomba yango. Etumbu oyo Yehova akani kopesa mangomba ya boklisto mpe bibongiseli mosusu ya mokili ya Satana ebongi mpenza. Bakoki mpe kokima yango te, mpamba te ntango ngonga ekokoka mpo Yehova apesa etumbu yango, maloba ya Amosa mokapo 9, vɛrsɛ 1, ekokokisama: “Moko akokima te, moko akomibikisa te.” Ya solo, ata soki bamibombi wapi, Yehova akomona bango.
22. Makambo nini etali etumbu ya Nzambe emonisami polele na 2 Batesaloniki 1:6-8?
22 Nzambe apesaka ntango nyonso etumbu na ye mpamba te, nzela ya kokima yango ezalaka te, mpe ezwaka kaka baoyo babongi na yango. Tokoki komona yango na maloba ya ntoma Paulo oyo: “Ezali likambo ya boyengebene mpo na Nzambe kozongisa bolɔzi epai ya baoyo bazali kobimisela bino bolɔzi, kasi, epai na bino baoyo bozali kozwa bolɔzi, kopema elongo na biso na ntango ya emoniseli ya Nkolo Yesu uta na likoló elongo na baanzelu na ye ya nguya na kati ya mɔtɔ ya kopela, ntango akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.” (2 Batesaloniki 1:6-8) “Ezali likambo ya boyengebene mpo na Nzambe” kozongisela mabe baoyo babongi kozwa etumbu mpo banyokolaki bapakolami na ye. Nzela ya kokima etumbu yango ekozala te, mpamba te bato mabe bakobika te na ‘komonana ya Yesu elongo na baanzelu ya nguya na kati ya mɔtɔ oyo ezali kopela.’ Lisusu, etumbu ya Nzambe ekozwa kaka baoyo babongi na yango mpamba te Yesu akozongisa mabe “na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu.” Mpe etumbu ya Nzambe ekobɔndisa bato oyo babangaka ye, oyo bazali konyokwama.
Elikya mpo na bato ya sembo
23. Elikya mpe libɔndisi nini tokoki kozwa na mokanda ya Amosa?
23 Esakweli ya Amosa ezali na nsango ya elikya kitoko mpe ya kobɔndisa mpo na bato ya mitema malamu. Ndenge mokanda ya Amosa esakolaki yango, Yehova asilisaki libota na ye ya kala mobimba te. Nsukansuka, ayanganisaki bato ya Yisalaele mpe ya Yuda oyo bakendaki na boombo, azongisaki bango na mokili na bango mpe apesaki bango kimya mingi mpe bomoi ya malamu. Yango ezali komonisa nini mpo na biso lelo oyo? Ezali kopesa biso elikya ete ntango ngonga ekobɛta mpo na etumbu ya Nzambe, Yehova akomona bato mabe ata soki babombami wapi mpe akomona bato oyo abongi koyokela bango mawa, ata soki bafandi na esika nini awa na mabelé.
24. Basaleli ya Yehova ya mikolo na biso bazwi mapamboli nini?
24 Wana tozali kozela ntango oyo Yehova akopesa bato mabe etumbu, makambo nini biso basaleli na ye ya sembo tozali komona? Yehova azali kopesa biso ebele ya bozwi na elimo! Losambo na biso ebebisami te na lokuta mpe bongolabongola oyo euti na mateya ya lokuta ya mangomba ya boklisto. Lisusu, Yehova azali kopesa biso ebele ya bilei ya elimo. Kasi, tóbosanaka te ete ebele ya makabo wana nyonso oyo Yehova azali kopesa biso ememeli biso mpe mokumba moko monene. Nzambe alingi ete tókebisa basusu ete etumbu na ye ezali koya. Tósala nyonso oyo tokoki mpo na koluka ‘baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.’ (Misala 13:48) Tósalisa ebele ya bato bákóma mpe na bozwi ya elimo oyo tozali na yango sikoyo. Tóluka mpe ete bábika ntango Nzambe akopesa bato mabe etumbu. Kasi, mpo na kozwa mapamboli yango, tosengeli kozala na motema oyo ebongi. Ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi, esakweli ya Amosa emonisi mpe likambo yango.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini esakweli ya Amosa ezali komonisa ete Yehova apesaka etumbu mpamba te?
• Elembeteli nini Amosa apesi mpo na komonisa ete nzela ya kokima etumbu ya Nzambe ezalaka te?
• Ndenge nini mokanda ya Amosa ezali komonisa ete etumbu ya Nzambe ezwaka kaka baoyo babongi na yango?
[Elilingi na lokasa 17]
Ekólo ya Yisalaele ekokaki kokima etumbu ya Nzambe te
[Elilingi na lokasa 18]
Na mobu 537 L.T.B., batikali ya Yisalaele mpe ya Yuda balongwaki na boombo na Babilone