“Biloko bizali kopesa biso elikya”
MOKOLO na Lomingo na ntongo ya le 10 Septembre, bato 4 155 bayanganaki kati na Salle d’assemblée kitoko ya ba Témoins de Jéhovah, na Jersey City, na Etats-Unis, mpo na kotala ndenge diplômes epesamaki epai na bana kelasi na mbala 87 na Galaad, Eteyelo na Biblia ya la Société Watchtower. Bayekoli 24 mpe babyangami na bango, elongo na basangani na libota na Béthel ya Brooklyn mpe basangani ya ba fermes ya la Société bazalaki wana.
Na ngonga ya zomi, Albert Schroeder, ye oyo azalaki kokamba likita yango, asengaki ete bato batika makelele; bongo, nsima na loyembo na ebandeli, John Barr asalaki libondeli. (Bandeko oyo mibale totangi nko- mbo bazali basangani ya Collège central.) Ndeko Schroeder alobelaki na lombango na ntina na kelasi yango, liboso na komonisa ete bayekoli oyo bazwaki diplômes bazalaki “pene mpo na kosangana na mosala ya ba Témoins de Jéhovah oyo ezali kosalelama sikawa kati na mikili 210 mpe bisanga”. Nsima na yango atikaki maloba na balobi nsambo.
Robert Wallen, ye mosali na biro oyo ekozwaka meko kati na siège ya la Société, na Brooklyn, aponaki lisolo elobi “Bozala na bolingo mozindo kati na bino”, ezwami na 1 Petelo 4:8. Akundolaki epai na bamisionere ete bazalaki na mposa na kosalisana, mpe, lokola bayekoli nyonso basila kobala, asalelaki mpenzampenza toli yango na libala. Amonisaki ete: “Mwasi asengeli kolinga mobali na ye, ata aleki ye na makoki mpo na koyekola monoko ya mopaya. Asengeli komitya na esika na ye mpe kokabola mpasi na ye. Lisusu, asengeli komeka koyeba mikakatano na ye soko mokolo na ye ya kolamba ekoki!” (Mingimingi, misionere moko-moko azali na mokolo oyo akolambaka kati na poso, mpo na baoyo nyonso bazali kofanda na ndako ya ba misionere.) Nsima na yango, molobi akundolaki bobele mpo na kosekisa, mikakatano miyelaki mibali mosusu oyo bazalaki koyekola kolamba, lokola moko oyo atyaki mokolo mosusu bicarbonate de soude na esika ya kotya levure. Lokola mikumba ya mobali kati na lisangá mikoki kozwa ye ntango mingi, frère Wallen akundolaki lisusu ete, mobali asengeli “kotya likebi na bamposa ya mwasi na ye”. Epai na mibali mpe basi, alobaki: “Bolendisana; botonga te, ata kati na bino, botongana te. Bomitangola na bamosusu te. Soko bosali libunga, bondima yango.”
Nsima ekomaki ngala ya Daniel Sydlik, mosangani na Collège central, oyo asalaki lisolo na motó na likambo “Tika ete mótô na elimo na Nzambe epela ntango nyonso kati na bino”, lisolo yango ezwami kati na 1 Batesaloniki 5:19. Alobaki ete: “Mótô ekoki solo kopesa mótô, kasi ekoki mpe kozikisa. Mbala mosusu, bamisionere balendisaka kasi ntango mosusu balembisaka mpe bato. Moafriké moko ya mpaka alobaki mokolo mosusu: ‘Fulaka mopepe malembe’, lokola moto azali komeka kopelisa lititi ya lindalala. Zala na limemya soko ozali kolobela makambo oyo ekoki komonana na teritware na yo: baterasé efungwama, banzinzi, bato ebele na nzela, mboka ya sika, lingomba oyo oyebi te. Bakokangaka banzinzi mingi na mafuta ya nzoi koleka na vinaigre. Yekola ‘kofula mopepe na malembe’, mpe tika ete moto na elimo na Jéhovah epela ntango nyonso kati na bino.”
Na nsima, lisolo “Bokokisa mosala na bino na esengo mpe na mayele” esalamaki na Kenneth Flodin, mokengeli na Béthel ya Ferme. Lokola Eteyelo na Galaad ezali sikawa kati na Ferme ya la Société Watchtower, ba diplômés bayebi malamu ndeko Flodin, oyo amonisaki makambo mibale kati na yango esengeli kokeba na: 1) bozwi ya mosuni mpe 2) makanisi mpe maloba oyo ekoki kolembisa. Apesaki toli elandi: “Esengeli koboya ezaleli ya moimi, koboya koluka matomba na bino moko”. Alobaki: “Bokanisa na biloko malamu oyo bokozwa na mokili ya sika, kasi boluka te kozwa yango sikawa”. Mpo na kosalisa bayekoli na kolonga, molobi atangaki Mituya 13:28, 32. Abakisaki: “Mbala mosusu, liboso na mokakatano bobele moko wana, bamoko bazali kolemba, bamosusu bazali kolonga. Bomekola Kalebe na ntango na kala: botya elikya epai na Jéhovah. Lobela bato mosusu makanisi na yo oyo ekoki kolendisa. Mpe soko oyoki maloba oyo ezali kolendisa te, bongola lisolo mpo na kopengola makanisi makoki kolembisa yo.”
Lloyd Barry, mosangani na Collège central mpe ye moko misionere ya kala, apesaki batoli esengeli. Alobaki ete: “Bolingo, esengo mpe kimya ezali bizaleli ya ntina mpo na misionere ya sika. Kati na ndako na bamisionere, bokomona bolembu ya bamosusu, kasi botya likebi na bolembu na bino moko.” Amikundolaki basanza na ye ya liboso na Japon ntango bamisionere bazalaki kolya se mbisi mikolo nyonso. Bamisionere ya sika bayaki mpe bazalaki kokoka kolya mbisi te. Mpo na bolingo epai na baoyo bayaki sika, babongolaki ebongiseli wana. Molobi apesaki mpe toli oyo: “Boyeba koseka; botika te ete moi elala na likambo moko oyo ebimaki kati na bino. Bobatela kimya kati na ndako, mpe bokozala na esengo kati na bomoi na bino ya misionere.”—Baefese 4:26.
Jack Redford, moko na bateyi na Galaad, alobelaki mpo na lisolo “Jéhovah akosukisa kobongisama na bino”, oyo ezwami kati na 1 Petelo 5:10. Alobaki: “Jéhovah akoki kobongisa bino na kopesaka nzela ete makambo ya mpasi makomela bino. Lokola abongisaki bantoma na ntina mpo ete bayeba kolonga mikakatano kati na bango, bobele bongo akobongisa bino. Bolemba te liboso na makanisi makeseni. Bozala pene mpo na komesana. Lolendo ekopekisa yo ete omesana, kasi ezalela ya komikitisa ekopesa nzela na yango. Boyekola kopengola makambo makasi. Jéhovah akolakisa bino lisusu ndenge nini koyokana na bato mosusu. Bobele, ‘bolanda te maloba nyonso oyo bakoloba’ mpo na bino.” (Mosakoli 7:21, 22) Monyoko ekoki lisusu kozala formation. Bamisionere oyo bayikaki mpiko bazali na esengo mpe bazali koyoka mawa te; bazali nde na esengo ya kobongisama na nzela na monyoko.
Na lisolo ya nsuka oyo asalaki liboso na bayekoli, Ulysses Glass, moteyi mosusu ya Eteyelo wana, atongaki lisolo na ye likoló na Baefese 4:1-3. Akumisaki kelasi na ndenge bamonisaki bizaleli bitangami na mokapo yango, bizaleli oyo bazali kopesa nzela na bomoko, mpe alendisaki bango na kolanda ntango nyonso nzela yango. Alobaki ete: “Kimya ekosalisa mpo na kosala boyokani, ezali na ntina mingi mpo na bomoko.” Alendisaki lisusu lisolo na ye na Baefese 4:4-6, kolobelaka bongo mpo na makasi ya elimo na Nzambe, mpe akundolaki ete “Jéhovah azali Liziba na nguya nyonso. Tosengeli kobanga ye; ezali likambo na nsomo ete kokwea na maboko na ye”.—Baebele 10:31.
Bilikya bizali kosepelisa
Na nsima, bato banso balandaki na likebi nyonso Theodore Jaracz, mosangani ya Collège central ya ba Témoins de Jéhovah, ye oyo asalaki diskur ya ntina oyo ezalaki na motó na likambo “Biloko bizali kopesa biso elikya”. Kokanisaka likoló na 1 Bakolinti 2:9, molobi alobaki: “Mokapo oyo ezali kolobela biloko na mosuni te, mpamba te verset oyo elandi, 1 Bakolinti 2:10, etali ‘biloko na mozindo na Nzambe’. Ezali bongo ‘mayele na Nzambe’ ekangani na ‘libombami mosantu’ ‘mayele na ye mabombami’, oyo euti na libanda na mokili na bato te, oyo euti na Nzambe ye moko.” (1 Bakolinti 2:7) Bayoki babengamaki bongo mpo na kokanisa likoló na Yisaya 64:4, esika bakundoli biso ete: esengeli ‘kozela’ Nzambe mpe biloko oyo ye abongisi.
Bilikya na libota na Nzambe ezali kosepelisa solo! Ndeko Jaracz alobaki ete: “Na 1919, Babilone Monene ekweaki; na 1922, elendiseli monene epesamaki mpo na ‘kosakola Mokonzi mpe Bokonzi na ye’, elingi koloba ete kosakola kati na mokili mobimba Bokonzi oyo eutaki kozalisama; na 1935, libota na Nzambe eyebaki ndimbola ya liloba ‘ebele monene’, oyo ezali kati na Emoniseli 7:9; na 1943, libota na Nzambe emonaki Eteyelo na Galaad ebandaki kotinda bamisionere kino na biteni bileki mosika na mabelé; lelo oyo, na 1989, bino, ba diplômés ya eteyelo yango, bozali na libaku malamu ya koloba makambo kitoko epai na bato na teritware na bino oyo bazali na mposa makasi ya koyoka yango.”
Nsima na kopesa ba diplômes, moko na bayekoli atangaki mokanda na maloba kitoko kati na yango, kelasi emonisaki botondi.
Nsima na midi, Lon Schilling, coordinateur ya Comité ya Ferme, atambwisaki boyekoli mokuse ya La Tour de Garde. Nsima na yango, bayekoli babetaki miziki kitoko mpe bamonisaki mwa bilakiseli bitongamaki na makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Nsima na yango, basakoli ya Ferme bamonisaki drame kitoko oyo ezalaki na motó na likambo “Toyeba kokima mayele mabe na Satana”. Na nsuka, nsima na koyoka lisolo kati na yango ba diplômés motoba ya sika batunamaki, bayoki wana na esengo bayembaki loyembo ya nsuka mpe babondelaki elongo, na litambwisi ya mokambi ya Eteyelo na Galaad, Frederick Franz, oyo azali na mibu 96.
[Etanda na lokasa 23]
MITANGO NA KELASI
Bauti na mikili boni: 5
Batindami na mikili boni: 10
Babalani: 12
Motuya na bayekoli: 24
Mwayene ya mbula: 30,9
Mwayene ya mibu kati na solo: 13,4
Mwayene na mibu kati na mosala ya pionnier: 9,2
[Elilingi na lokasa 23]
Kelasi na mbala 87 na Galaad, Eteyelo na Biblia na la Société Watchtower
Na liste ezali awa na nse, milongo mitangami longwa na liboso mpo na kozonga nsima mpe nkombo etangami longwa na loboko na mwasi kino loboko na mobali: 1) E. Heindel; D. Andrews; D. Casavant; E. Montanez; P. Nale; S. Koukaras. 2) T. Miell; M. Heithaus; T. Melton; N. Hagberg; M. Kettinen. 3) L. Kettinen; W. Andrews; E. Koukaras; S. McCollough; G. Melton; J. McCollough. 4) W. Heindel; G. Casavant; G. Miell; J. Montanez; M. Nale; I. Hagberg; K. Heithaus.