Tobanga Jéhovah mpe tokumisa nkombo na ye mosantu
“Nani akobanga yo te, Jéhovah? Nani akokumisa nkombo na yo te? Mpamba te bobele yo moko nde ozali sembo.”—EMONISELI 15:4, MN.
1, 2. (a) Na ndimbola nini Jéhovah afungolaki maziba na makoló na 1991? (b) Motindo na bomoi nini misionere moko azalaki na yango mpo akoka kopesa toli oyo ete: “Bobanga Jéhovah?” (Tala Annuaire 1991, pages 187 kino 189.)
JÉHOVAH asili ‘kofungola maziba na makoló mpe asili kosopa mapamboli kino esika ekozanga mpo na yango.’ Kala mingi te, maloba oyo makokani likoló na ba Témoins de Jéhovah. (Malaki 3:10) Na yango, na boumeli na mbula ya mosala 1991, esengo ya bapaya mpe oyo ya ba Témoins oyo bazali bankolo mboka, emonanaki kati na bondeko na boklisto na ntango na ba assemblées spéciales oyo esalemaki na bamboka mingi na mokili: uta Buenos Aires, na Amerike ya Ngele, kino na Manille, na Taipei mpe na Bangkok, mosika epai moi ebimaka, kuna esika ba assemblées “Monoko na peto” esalemaki; kino na Budapest, na Prague mpe na Zagreb (kobanda le 16 kino le 18 août 1991), na Europe de l’Est, mpo na ba assemblées “Baninga na bonsomi.”
2 Bandeko bautaki mikili misusu bazalaki na esengo mingi wana bakutanaki na ba Témoins baumeli mingi na solo kati na bamboka yango. Na ndakisa, na mboka Bangkok, moko na basembwi yango, Frank Dewar, oyo na eleko moko, bobele ye moko nde azalaki mosakoli na Bokonzi na mokili Thaïlande, alobelaki bambula 58 oyo alekisaki kati na mosala ya misionere. Elanga na mosala na ye epalanganaki longwa na bisanga ya Pacifique na Asie du Sud-Est, mpe ata kino na Chine. Akutanaki na makámá na mai, na nyama na yauli kati na zamba, na maladi mpe na makámá ya bokonzi mabe ya bankolo na bitumba ya Japon. Batunaki ye soki toli nini akokaki kopesa epai na bayangani, mpe ayanolaki na lolenge oyo na pɛtɛɛ ete: “Bobanga Jéhovah!”
3. Mpo na nini tosengeli komonisa kobanga na peto?
3 “Bobanga Jéhovah!“ Ezali ntina mingi mpo na moto na moto ete alóna kobanga wana ekopesaka lobiko. “Kobanga Jéhovah ezali ebandeli ya mayele.” (Nzembo 111:10) Kobanga wana na Jéhovah ezali nsɔmɔ na kolɛngalɛnga te. Ezali nde limemya ya mozindo mpo na lokumu na ye monene mpe mpo na bizaleli na ye ya bonzambe, limemya liuti na mayele oyo tozali kozwa na nzela na boyekoli ya Liloba na Nzambe. Na Emoniseli 15:3, 4 (MN) totangi kati na loyembo ya Moize mpe ya Mwana na Mpate ete: “Misala na yo minene mpe na kokamwa, ɛ Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Banzela na yo ezali boyengebene mpe solo, ɛ Mokonzi na seko. Nani akobanga yo te, Jéhovah? Nani akokumisa nkombo na yo te? Mpamba te bobele yo moko nde ozali sembo.” Komonisáká bosembo epai na basambeli na ye, Nzambe azali na “mokanda na kokanisa mokomamaki liboso na ye mpo na baoyo bakobangaka Jéhovah mpe mpo na baoyo bakokanisaka nkombo na ye.” Bato yango bakozwa mbano ya bomoi ya seko.—Malaki 3:16, MN; Emoniseli 20:12, 15.
Kobanga Nzambe ezwi elónga
4. Kosikolama nini esalemaki na ntango na kala, esengeli kolendisa biso na kobanga Jéhovah?
4 Na ntango Yisraele ebimaki na Ezipito, Moize amonisaki polele ete azalaki kobanga bobele Jéhovah. Nsima na mwa ntango, Bayisraele bakangamaki katikati na la mer Rouge mpe limpinga na nguya ya Farao. Bakokaki kosala nini? “Moize alobi na bango ete: ‘Bobanga te, botɛlɛma ngwi mpe tala kobikisa na Jéhovah ekosala ye mpo na bino lelo, mpo ete Baezipito emoni bino lelo, bokomona bango lisusu te, soko moke te. Jéhovah ye moko akobunda mpo na bino, mpe bino bokotikala nyɛɛ.’” Jéhovah akabolaki mai na likamwisi, likambo oyo lipesaki nzela na Bayisraele ete bakatisa mai monene. Mpe mai mazongaki na makasi mpe mabomaki limpinga ya Farao. Jéhovah abikisaki bongo libota oyo lizalaki kobanga ye, na kokweisáká etumbu na ye likoló na Ezipito, oyo ezalaki kotyola ye. Bobele bongo lelo, akomonisa bosembo na ye na kobikisáká ba Témoins na ye oyo bazali kobanga ye, longwa na mokili ya Satana.—Exode 14:13, 14; Baloma 15:4.
5, 6. Makambo nini mabimaki na eleko na Yosua mamonisi ete tosengeli kobanga Jéhovah kasi bato te?
5 Nsima na kobima na Bayisraele, Moize atindaki banɔngi 12 na Mabelé na ndaká. Zomi kati na bango babangaki wana emonaki bango ete bafandi na yango bazalaki mbinga, mpe bamekaki kolɛmbisa Bayisraele ete bakɔta na mokili yango te. Nzokande, mibale kati na bango, Yosua mpe Kalebe, balobaki ete: “Ezali mokili malamu mingi. Soko Jéhovah asepeli na biso, boye akokɔtisa biso na mokili yango mpe akopesa yango epai na biso. Ezali mokili moleki na mabɛlɛ mpe na mafuta na nzoi. Nde botomboka epai na Jéhovah te, mpe bobanga bato na mokili yango te, mpo ete bakozala lokola mampa mpo na biso. Libateli na bango lisili kolongwa na bango mpe Jéhovah azali na biso elongo. Bobanga bango te.”—Mituya 14:7-9.
6 Atako bongo, Bayisraele bamitikaki na bobangi. Mpo na yango, bakɔtaki na Mokili na ndaká te. Nzokande, Yosua mpe Kalebe bazwaki libaku kitoko ya kokɔta elongo na libota ya sika ya Bayisraele, kati na mokili wana kitoko mpe mpo na kolóna vinyo mpe nzeté ya olive kati na mokili yango. Na maloba ya nsuka oyo ayebisaki na libota na Yisraele na libaku yango, Yosua apesaki toli oyo ete: “Bobanga Jéhovah mpe bosalela ye na motema moko mpe na solo.” Mpe abakisaki ete: “Kasi mpo na ngai mpe libota na ngai, bokosalela Jéhovah.” (Yosua 24:14, 15, MN) Na maloba oyo, baoyo nyonso balingi kokɔta kati na mokili na boyengebene molakami na Nzambe, mpe mingi mpenza batata balendisami na kobanga Jéhovah.
7. Lolenge nini Davidi amonisaki ete esengeli kobanga Nzambe?
7 Davidi, elenge mobateli na mpate, amonisaki mpe na motindo malamu ete azalaki kobanga Nzambe na ntango atɛmɛlaki Goliata na nkombo na Jéhovah. (1 Samwele 17:45, 47) Liboso na kufa na ye, Davidi alobaki ete: “Elimo na Jéhovah elobaki na nzela na ngai, mpe liloba na ye lizalaki na lolemo na ngai. Nzambe na Yisraele alobaki, Libangá na Yisraele alobaki na ngai ete: ‘Soki ye oyo azali koyangela bato azali sembo, mpe akobangaka Nzambe, ezali lokola pole na ntango moi mokobimaka na ntɔngɔ oyo ezali na lipata te.’ ”(2 Samwele 23:2-4, MN) Kobanga Nzambe ezali soko moke te epai na bakonzi ya mokili, mpe tozali komona matomba mabe na yango. Makambo makobongwana mpenza na ntango Yesu, “Mwana na Davidi,” akoyangela mabelé kati na bobangi ya Jéhovah.—Matai 21:9.
Basalaki elongo na kobanga Jéhovah
8. Mpo na nini Yuda ezalaki na bolamu na nsé na boyangeli ya Yosafata, mpe yango emonisi nini mpo na eleko na biso?
8 Pene na ekeke moko nsima na liwa ya Davidi, Yosafata akómaki mokonzi na Yuda. Ye mpe azalaki kobanga Jéhovah. Apesaki etinda moko ya teokratike na Yuda, atyaki basambisi kati na mboka mobimba mpe apesaki bango malako, ete: “Bokosambisa mpo na moto te, kasi mpo na Jéhovah. Ye azali elongo na bino mpo na kokata makambo. Mpe tika ete bozala na nsɔmɔ na Jéhovah! Bokeba na oyo bokosala, mpamba te bokesene, koponapona, kondima konyaka ekoki na Jéhovah te . . . . Bongo nde bokosala elongo na kobanga Jéhovah, na bosembo mpe na motema moko.” (2 Ntango 19:6-9, MN) Yuda etondaki bongo na kobanga Jéhovah, lokola mpe basaleli na Nzambe bazali lelo kokóla na nzela na mosala malamu ya bakɛngɛli na motema mawa.
9, 10. Lolenge nini Yosafata alóngaki na kobanga Jéhovah?
9 Atako bongo, Yuda azalaki na banguna oyo balukaki na lolenge nyonso ete baboma libota na Nzambe. Mampinga ya Amona, ya Moaba mpe ya ngomba na Seili bakɛtaki na mokili na Yuda mpe babundisaki Yelusaleme. Lisangani ya mampinga wana esalaki limpinga moko na nguya. Yosafata abongwanaki epai na Jéhovah kati na libondeli. “Na ntango wana, bato nyonso na Yuda batɛlɛmaki liboso na Jéhovah, bana na bango ya mike, mpe basi na bango elongo na bana na bango.” Mpo na koyanola na libondeli wana, elimo na Jéhovah ekitelaki Yahaziele, moto na libota na Levi, oyo alobaki ete: “Jéhovah alobi na bino ete: ‘Bobanga te mpe bozala na nsɔmɔ te mpo na bibele wana, mpamba te etumba ezali mpo na bino te, kasi mpo na Nzambe. Bokita lobi mpo na kokutana na bango . . . . Bino bokobunda etumba yango te. Bozala na bisika na bino, botelema, mpe botala elónga na Jéhovah mpo na bino. Ɛ Yuda mpe Yelusaleme, bobanga te mpe bozala na nsɔmɔ te. Bobima lobi mpo na kokutana na bango, mpe Jéhovah akozala na bino elongo.’”—2 Ntango 20:5-17, MN.
10 Lobi lolandaki, mibali na Yuda batɛlɛmaki na ngonga malamu. Batósaki mpe babimaki kokutana na banguna, bongo Yosafata atelemaki mpe alobaki ete: “Ɛ Yuda, yoka ngai, mpe bino bafandi na Yelusaleme! Bondimela Jéhovah, Nzambe na bino, mpo ete bobika mpo na mikolo mingi. Bondimela basakoli na ye, boye bokozala na elónga uta sikawa!” Bayembi na Jéhovah bazakaki liboso na mibali na etumba mpo na koyemba ete: “Bokumisa Jéhovah, mpo ete motema malamu na ye ezali mpo na libela.” Jéhovah amonisaki motema malamu yango na kobulunganisáká banguna kati na milongó, mpe bango moko babomanaki. Ekómaki bango na ekɛngɛlo, kati na lisobe, mibali na Yuda bamonaki bobele bibembe ya banguna na bango.—2 Ntango 20:20-24.
11. Kokesena nini ezali kati na nsɔmɔ oyo mabota bakozalaka na yango mpe kobanga ya libota na Nzambe?
11 Ntango mabota na zingazinga bayokaki nsango ya kobikisama wana na likamwisi baokaki “nsɔmɔ na Nzambe.” Nzokande libota oyo litósaki na kobanga Jéhovah, lizalaki uta ntango yango na “kimya na zingazinga.” (2 Ntango 20:29, 30) Bobele bongo, na Armagedon, ntango Jéhovah akokokisa ekateli na ye, mabota bakozala na “nsɔmɔ na Nzambe” mpe na Mwana na ye, Yesu Klisto, Mokokisi na bikateli na ye, mpe bakokoka kotelema te liboso na mokolo na nkanda na Nzambe.—Emoniseli 6:15-17.
12. Lolenge nini kobanga Nzambe ezwaki mbano na yango na ntango na kala?
12 Kobanga na peto na Jéhovah ekopesamelaka mbano monene. Noa “amonisaki kobanga na peto mpe atongaki masuwa mpo na kobikisa libota na ye.” (Baebele 11:7) Mpe mpo na baklisto na ekeke ya liboso, lisoló liyebisi ete nsima na konyokwama, lisangá “lizalaki na kimya, mpe lilendisamaki; mpe lokola [lisangá] litambolaki na kobanga Jéhovah mpe na kobondisama na elimo santu, ezalaki kokóla,” lokola yango ezali kosalema lelo na Europe de l’Est.—Misala 9:31, MN.
Tólinga malamu, toyina mabe
13. Na likambo nini tokoki kozwa mapamboli na Jéhovah?
13 Jéhovah azali mpenza malamu. Na yango, tozali kokanga ntina ete “kobanga Jéhovah elimboli koyina mabe.” (Masese 8:13) Elobamaki na ntina na Yesu ete: “Olingi boyengebene mpe oyini kotyola mibeko. Yango wana, Nzambe na yo apakoli yo na mafuta na esengo.” (Baebele 1:9, MN) Soki tolingi kozwa mapamboli na Jéhovah lokola Yesu azwaki yango, tosengeli koboya mabe, pite, mobulu mpe lokósó, bizaleli ya mokili oyo ya lolendo na Satana. (Tala Masese 6:16-19.) Tosengeli kolinga makambo oyo Jéhovah alingi yango mpe koyina makambo oyo ye ayini yango. Tosengeli kobanga na kosala likambo nyonso oyo likozanga kosepelisa Jéhovah. “Moto akopɛngwa na mabe na nzela na kobanga Jéhovah.”—Masese 16:6.
14. Ndakisa nini Yesu asili kotikela biso?
14 Yesu asili kotikela biso ndakisa mpo ete tolanda matambé na ye malamu. “Atukamaki nde azongisaki kotuka te; aokaki mpasi nde akanelaki moto te; kasi atikaki nyonso epai na ye oyo akosambisaka sembo.” (1 Petelo 2:21-23) Na kobanga Jéhovah, biso mpe tokoki koyika mpiko na bifundeli na lokutá, na kosɛka mpe na minyoko oyo mizali kobimela biso longwa na mokili na Satana.
15. Mpo na nini tosengeli kobanga Jéhovah na esika na kobanga baoyo bakoki koboma nzoto?
15 Na Matai 10:28, Yesu apesaki biso toli oyo ete: “Bobanga te baoyo bakobomaka nzoto nde bakoki koboma molimo te; kasi bobanga ye oyo akoki kobebisa na molimo, na nzoto kati na Geena.” Ata soko moto oyo akobangaka Jéhovah abomami na banguna, liwa likokanga ye bobele mpo na mwa ntango. (Hosea 13:14) Na ntango akosekwa, akotuna ete: “Liwa, wapi elónga na yo? Liwa, wapi etubeli na yo?”—1 Bakolinti 15:55, MN.
16. Lolenge nini Yesu amonisaki kobanga na ye epai na Jéhovah, mpe lolenge nini akumisaki ye?
16 Yesu ye moko apesaki ndakisa moko kitoko epai na baoyo nyonso balingi boyengebene na Jéhovah mpe bayini mabe. Kobanga na ye mpo na Jéhovah emonani na maloba na nsuka oyo alobaki epai na bayekoli na ye, na Yoane 16:33 (MN) ete: “Nasili koloba na bino makambo oyo ete bozala na kimya kati na ngai. Kati na mokili bozali na bolózi, kasi bozala na mpiko! Ngai nasili kolónga mokili.” Lisoló na Yoane lilandi ete: “Yesu alobi bongo, mpe atamboli miso likoló, mpe alobi ete: “Tata, ntango eyei; kumisa mwana na yo, ete mwana na yo akumisa yo. . . . Nasili koyebisa nkombo na yo epai na bato oyo yo opesaki ngai kati na mokili.’”—Yoane 17:1-6, MN.
Tobanga Jéhovah mpe tosanzola ye
17 Motindo nini tokoki komekola ndakisa na Yesu?
17 Tokoki nde komekola ndakisa na molende na Yesu? Na ntembe te, soki nde tozali kobanga Jéhovah. Yesu asili koyebisa biso nkombo mpe bizaleli minene na Jéhovah. Na kobangáká Jéhovah, Nkolo Moyangeli na biso na molóngó mobimba, tozali kopesa ye lokumu koleka banzambe nyonso mosusu, kati na yango Trinité ya boklisto ya lokutá, nzambe oyo bato bayebi kososola te mpe azangi nkombo. Yesu asalelaki Jéhovah na kozaláká na kobanga na peto mpo na ye mpe na kozanga kobanga bato oyo bakokufaka. “Na mikolo na bomoi na ye lokola moto, [Klisto] asalaki mabondeli mpe malɔmbo na konganga mpe na mpisoli, epai na Ye oyo akokaki kobikisa ye na liwa, mpe ayokamaki mpo na kobanga na ye na peto.” Na ndakisa na Yesu, tobanga Jéhovah na kolanda koyekola botósi na nzela na mpasi oyo tozali koyikela yango mpiko, kozaláká ntango nyonso na mokano ya kozwa lobiko na seko.—Baebele 5:7-9.
18. Lolenge nini tokoki kosalela Nzambe mosala na bulɛɛ elongo na kobanga na peto?
18 Liboso kuna, kati na mokanda na ye epai na Baebele, Paulo apesi elendiseli oyo epai na baklisto bapakolami ete: “Lokola tosengeli kozwa bokonzi oyo bokoki koningana te, tika ete tolanda kozala na ngolu monene oyo na yango tokoki kosalela Nzambe mosala na bulee mpe na lolenge oyo ekosepelisa ye, na bobangi na Nzambe mpe na nsɔmɔ.” Lelo, “ebele monene” bazali kosangana na mosala yango na bulee. Yango etaleli nini? Nsima na kolobela ngolu oyo Jéhovah amonisaki na kopesáká Yesu Klisto, Mwana na ye, lokola mbeka, Paulo alobaki ete: “Mpo na ye, totómbolaka ntango nyonso mbeka na masanzoli epai na Nzambe, yango mbuma na bibebu oyo bikoyambolaka mpo na nkombo na ye.” (Baebele 12:28; 13:12, 15, MN) Mpo na botɔndi epai na Jéhovah, oyo asili kopesa biso ngolu na ye, tosengeli kozala na mposa ya kolekisa mwa ntango oyo tozali na yango kati na mosala na ye ya bulee. Basangani ya ebele monene, baninga na sembo ya batikali na baklisto bapakolami, bazali kokokisa eteni monene ya mosala yango. Lokola bazali liboso na kiti na bokonzi na Nzambe na elilingi, mpe ‘bazali kosalela ye mosala na bulee butu na moi,’ bazali bongo kopesa lobiko epai na Nzambe mpe na Klisto.—Emoniseli 7:9, 10, 15.
Tokumisa Jéhovah libela na libela
19, 20. Tánga mitindo mibale ya kobanga oyo ekomonana na “mokolo na Jéhovah.”
19 Mokolo na nkembo oyo Jéhovah akolóngisama, esili kobɛlɛma nokinoki. “‘Tala mokolo mozali koya, mozali kopɛla lokola litumbo na mɔ́tɔ makasi; mpe bato nyonso na lolendo mpe baoyo nyonso bakosalaka mabe bakokóma lokola ndɛlɛ. Mokolo oyo mozali koya, mokozikisa bango.’ Jéhovah na bibele alobi bongo.” Mokolo yango mokozala “mokolo monene mpe na nsɔmɔ na Jéhovah.” (Malaki 4:1, 5, MN) Likámá wana likoyeisa “nsɔmɔ” kati na mitema ya basali na mabe, mpe “nzela na kokima ekozala te.”—Yilimia 8:15; 1 Batesaloniki 5:3.
20 Nzokande, basaleli na Jéhovah bazali na motindo mosusu na kobanga. Anzelu oyo apesamelaki “nsango malamu ya seko” apesaki bango etinda na mongongo makasi ete: “Bobanga Nzambe mpe bokumisa ye, mpo ete ntango na kosambisa na ye esili kobɛlɛma.” (Emoniseli 14:6, 7) Na ntango kongala makasi ya Armagedon ekokómisa mokili na Satana lokola mputulu, kosambisama wana ekopesa biso nsɔmɔ. Kobanga na peto na Jéhovah ekozala makasi mpenza kati na mitema na biso. Tokoki kozwa bolamu ya kozala kati na ‘babiki baoyo bakobelela nkombo na Jéhovah’!—Yoele 2:31, 32; Baloma 10:13.
21. Mapamboli nini tokozwa yango soki tozali kobanga Jéhovah?
21 Makambo yango makolandama na mapamboli kitoko, kati na yango “bambula na bomoi” oyo ekobakisama libela na libela. (Masese 9:11; Nzembo 37:9-11, 29) Na yango, ata tozali na elikya ya kosangola Bokonzi to ya kozala na bomoi na mabelé, tolanda kosalela Nzambe mosala na bulee elongo na kobanga na peto mpe na nsɔmɔ. Tolanda kokumisa nkombo na ye mosantu. Ekopesa litomba nini kitoko? Tokosepela libela na libela mpo ete totósaki toli na mayele oyo ya kobanga Jéhovah ntango nyonso.
Bozongeli
◻ “Kobanga Jéhovah” elimboli nini?
◻ Kobanga Jéhovah epesaki bolamu nini epai na basaleli na ye na ntango na kala?
◻ Ndakisa nini Yesu asili kotikela biso mpo na kobanga na peto?
◻ Lolenge nini tokoki kotikela sembo kati na kobanga Jéhovah?
[Elilingi na lokasa 18]
Kati na mokanda ya Emoniseli, tozali komona bandeko na Yesu bazali koyemba “loyembo na Moize” mpo na kosanzola Jéhovah
[Elilingi na lokasa 20]
Limpinga na Yosafata lilóngaki mpo na kobanga Jéhovah
[Elilingi na lokasa 23]
Bambula ya bomoi ekobakisama libela na libela, ekozala mbano mpo na baoyo bazali kobanga Jéhovah