Bongisá motema na yo mpo na kobanga Yehova
“Soki ata babongisaki mitema na bango mpo na kobanga ngai mpe kobatela mibeko na ngai libela.”—DETERONOME 5:29, NW.
1. Nini endimisi biso ete mokolo mosusu bato nyonso bakobanga lisusu te?
KOBANGA ezali likambo ebandi lelo te epai ya bato. Ebele ya bato babangaka ete nzala, maladi, mobulu to bitumba ekɔta na mboka. Yango wana, na kati ya maloba na yango ya ebandeli, mokanda moko ya ONU (Déclaration universelle des droits de l’homme), elobeli mokano ya ebongiseli yango ya kosala ete na mokili mobimba, bato nyonso bálongwa na boombo ya kobanga.a Nzokande, Nzambe ye moko alaki ete mokili ya ndenge yango ekoya, kasi ekosalema na makasi ya bato te. Na nzela ya mosakoli Mika, Yehova alaki biso ete na mokili ya sika, epai boyengebene ekozala, ‘moto moko te akobangisa bato na ye.’—Mika 4:4.
2. (a) Makomami elobi nini mpo kolendisa biso na kobanga Nzambe? (b) Mituna nini tokoki komituna lokola tosengeli kobanga Nzambe?
2 Kasi, kobanga ekoki mpe kozala likambo ya malamu. Na bisika mingi Makomami ezali kolendisa basaleli ya Nzambe ete bábangaka Yehova. Mose alobaki na Bayisalaele ete: “Okobanga [Yehova] Nzambe na yo, okosalela ye.” (Deteronome 6:13) Bankama ya bambula na nsima, Salomo akomaki ete: “Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango nde nyonso oyo esɛngisami na moto.” (Mosakoli 12:13, NW) Na nzela ya mosala na biso ya kotatola, mosala oyo baanzelu bazali kotambwisa, biso mpe tozali kolendisa bato nyonso ete ‘bábanga Nzambe mpe bápesa ye nkembo.’ (Emoniseli 14:6, 7) Baklisto basengeli kobanga Yehova, kasi basengeli mpe kolinga ye na motema na bango mobimba. (Matai 22:37, 38) Kasi, ndenge nini tokoki kolinga Nzambe mpe mbala moko kobanga ye? Mpo na nini tosengeli kobanga Nzambe ya bolingo? Bolamu nini tokozwa soki tokolisi ezaleli ya kobanga Nzambe na kati ya mitema na biso? Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tosengeli liboso koyeba soki kobanga Nzambe elimboli mpenza nini mpe ndenge nini ezaleli yango ezali na ntina mingi na boyokani na biso na Yehova.
Nsɔmɔ, limemya mpe kobanga
3. Kobanga Nzambe elimboli nini?
3 Baklisto basengeli kobanga Nzambe, Mozalisi na bango. Tokoki kolimbola kobanga yango lokola “nsɔmɔ mpe limemya mingi oyo moto asengeli kozala na yango mpo na Mozalisi mpe mposa makasi ya koboya koyokisa ye mawa.” Yango wana, kobanga Nzambe ebongolaka makambo mibale ya ntina na kati ya bomoi na biso: ezaleli na biso epai ya Nzambe mpe ndenge na biso ya kotalela misala oyo ayini. Makambo yango mibale ezali na ntina mingi mpe ebongi tótalela yango malamumalamu. Ndenge Vine akomaki yango na mokanda na ye moko ete, mpo na baklisto, kobanga yango ‘etambwisaka bomoi ya moto, etindaka ye na kosala makambo ya elimo to kozala na bizaleli malamu.’—Expository Dictionary of New Testament Words.
4. Ndenge nini tokoki kokóma na nsɔmɔ mpe limemya mpo na Mozalisi na biso?
4 Ndenge nini tokoki kokóma na nsɔmɔ mpe limemya mpo na Mozalisi? Ntango totɛlɛmi mpe tozali kotala zamba moko kitoko, to tozali kotala mai oyo ezali kouta likoló ya ngomba mpe kokwea na nse, to mpe tozali kotala kolala ya moi, totikalaka monɔkɔ polele. Na nsima, tokamwaka lisusu mingi ntango tokangi ntina, na miso na biso ya kondima, ete nyonso wana ezali misala ya Nzambe. Lisusu, tomonaka ete tozali mpenza mwa biloko mike soki totali misala ya kokamwa oyo Yehova asalá. Tokanisaka lokola Mokonzi Davidi oyo alobaki ete: “Ekomona ngai Likoló oyo ezali mosala ya misapi na yo, sanza mpe minzoto na likoló oyo yo obongisaki, moto azali nini ete okanisa ye? mpe mwana ya moto nini ete otalela ye?” (Nzembo 8:3, 4) Kokamwa yango ememaka limemya, mpe limemya etindaka biso tótɔnda Yehova mpe tókumisa ye mpo na nyonso oyo azali kosala mpo na biso. Davidi akomaki lisusu ete: “Nakotɔnda yo mpo ete nasalami na motindo ya kokamwa mingi; misala na yo izali na kokamwa mpe molimo na ngai iyebi yango malamu.”—Nzembo 139:14.
5. Mpo na nini tosengeli kobanga Yehova, mpe banani oyo bazali kopesa biso ndakisa malamu mpenza na likambo yango?
5 Nsɔmɔ mpe limemya ememaka ezaleli ya kobanga Nzambe—kasi kobanga ya mabe te—mpo na nguya na ye lokola Mozalisi mpe Mokonzi oyo abongi kozala Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Yoane amonaki na kati ya emonaneli bato oyo “balongi na etumba na Nyama mpe na ekeko na ye,” elingi koloba bayekoli ya Klisto bapakolami na elimo, na bisika na bango kuna na likoló, bazali koloba na mongongo makasi ete: “Misala na yo minene mpe ya kokamwa, ɛ Nkolo Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Nzela na yo sembo mpe na solo, ɛ Mokonzi ya mabota. Nani akozanga [kobanga] yo, Nkolo? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo?” (Emoniseli 15:2-4) Ezaleli ya kobanga Nzambe oyo euti na limemya mingi oyo bazali na yango mpo na bonene na ye, ezali kotinda bato yango oyo bakoyangela elongo na Klisto na kati ya Bokonzi ya likoló bákumisa ye lokola Moto oyo azali na bokonzi oyo eleki nyonso. Soki tokanisi makambo nyonso oyo Yehova asili kosala mpe tokanisi bosembo oyo azali koyangela na yango molɔ́ngɔ́ mobimba, biso moko tokomona mpenza ete tosengeli kobanga ye?—Nzembo 2:11; Yilimia 10:7.
6. Mpo na nini tosengeli kobanga koyokisa Yehova mawa?
6 Kasi, longola nsɔmɔ mpe limemya oyo tosengeli kozala na yango mpo na Nzambe, tosengeli mpe kobanga koyokisa ye mawa to kobanga ete tozanga kotosa ye. Mpo na nini? Mpamba te atako Yehova “ayokaka nkanda noki te mpe atondi na boboto,” tosengeli kobosana te ete “akozanga ata moke te kopesa etumbu.” (Exode 34:6, 7, NW) Atako Yehova azali na bolingo mpe na ngɔlu, akangaka miso te na makambo ya kozanga bosembo mpe na mabe oyo moto asali na nko. (Nzembo 5:4, 5; Habakuku 1:13) Baoyo bazali kosala mabe na nko mpe balingi kobongola mitema te, mpe bazali kotɛmɛla ye, bakozanga te kozwa etumbu. Lokola ntoma Paulo alobaki yango, “ezali likambo ya nsɔmɔ kokwea na mabɔkɔ ya Nzambe ya bomoi.” Soki tozali koyoka nsɔmɔ ya kokwea na likambo ya ndenge wana, tozali komibatela.—Baebele 10:31.
“Bokokangana na ye”
7. Makambo nini ezali kotinda biso tótya motema na nguya oyo Yehova azali na yango mpo na kobikisa?
7 Moto oyo abangaka Nzambe mpe ayebaka malamu nguya na ye monene, akómaka na kondima mpe na elikya epai ya Yehova. Mwana moke abangaka eloko te ntango azali pembeni ya tata na ye, ndenge moko mpe, biso tobangaka eloko te mpe tozalaka na elikya ntango toyebi ete lobɔkɔ ya Yehova ezali kotambwisa biso. Yoká likambo Bayisalaele basalaki ntango Yehova abimisaki bango na Ezipito: “Yisalaele mpe bamonaki mosala monene mosalaki [Yehova] epai na Baezipito, mpe bato yango babangaki [Yehova]. Bandimaki mpe [Yehova].” (Exode 14:31) Makambo oyo Elisa akutanaki na yango ezali mpe komonisa ete “anzelu ya [Yehova] akozingela esika ya baoyo [babangaka, NW ] ye; mpe akobikisa bango.” (Nzembo 34:7; 2 Mikonzi 6:15-17) Makambo oyo basaleli ya Yehova bazali kokutana na yango na mikolo na biso mpe mbala mosusu oyo yo moko osilá kokutana na yango ezali kondimisa ete Nzambe asalelaka nguya na ye mpo na kosunga basaleli na ye. (2 Ntango 16:9) Yango ezali kosalisa biso na kososola ete “elikya ezalaka makasi ntango moto azali kotyela Yehova motema.”—Masese 14:26, NW.
8. (a) Mpo na nini kobanga Nzambe etindaka biso na kotambola na banzela na ye? (b) Ndenge nini tosengeli “kokangana” na Yehova?
8 Kobanga Nzambe epesaka biso elikya mpe kondima epai na ye; elendisaka biso mpe na kotambola na banzela na ye. Ntango Salomo asalisaki fɛti monene mpo na kofungola tempelo, abondelaki Yehova ete: “[Tiká ete [Yisalaele] bábanga, NW] yo mpe bátambola na nzela na yo mikolo nyonso mpe ete báfanda na mokili mopesi yo epai na batata na biso.” (2 Ntango 6:31) Bambula mingi liboso na yango, Mose ayebisaki Bayisalaele boye: “[Bokolanda Yehova, NW] Nzambe na bino mpe bokobanga ye mpe bokobatela malako na ye mpe bokotosa mongongo na ye mpe bokosalela ye mpe bokokangana na ye.” (Deteronome 13:4) Bavɛrsɛ oyo ezali komonisa polele ete elikya mpe kondima epai ya Nzambe epesaka mposa ya kolanda banzela ya Yehova mpe ya ‘kokangana’ na ye. Ya solo, kobanga Nzambe etindaka biso na kotosa Yehova, kosalela ye mpe kokangana na ye, lokola mwana moke akangamaka epai ya tata na ye mpo azali kotyela ye motema mpe elikya nyonso.—Nzembo 63:8; Yisaya 41:13.
Kolinga Nzambe elimboli kobanga Ye
9. Kolinga Nzambe mpe kobanga ye ezali na boyokani nini?
9 Makomami ezali komonisa ete tokoki mbala moko kobanga Nzambe mpe kolinga ye. Kutu, Bayisalaele bazwaki toli ete ‘bábangaka Yehova mpe bátambolaka na banzela na ye nyonso mpe bálinga ye.’ (Deteronome 10:12) Elingi koloba ete kobanga Nzambe mpe kolinga ye etambolaka nzela moko. Kobanga Nzambe etindaka biso na kotambola na banzela na ye mpe kotambola na banzela na ye emonisaka ete tolingi ye. (1 Yoane 5:3) Yango ezali likambo elongobani mpamba te na ntango tolingi moto moko, tobangaka kosala likambo oyo ekoyokisa ye mawa. Ntango bazalaki na kati ya esobe, Bayisalaele bayokisaki Yehova mawa mpo bazalaki na motó makasi. Na ntembe te, biso tokoki kolinga te tósala likambo moko oyo toyebi ete ekopesa Tata na biso ya likoló mawa. (Nzembo 78:40, 41) Nzokande, lokola ‘Yehova asepelaka na baoyo babangaka ye,’ botosi na biso mpe bosembo na biso esepelisaka motema na ye. (Nzembo 147:11; Masese 27:11) Bolingo oyo tozali na yango mpo na Nzambe etindaka biso tósepelisa ye, mpe kobanga Nzambe epekisaka biso tósilikisa ye. Bizaleli yango mibale ezali na boyokani, kasi ezali bongolabongola te.
10. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kosepela na kobanga Yehova?
10 Yesu Klisto amonisaki polele na bomoi na ye ndenge oyo tokoki na mbala moko kolinga Nzambe mpe kobanga ye. Mosakoli Yisaya akomaki na ntina na Yesu ete: “Elimo ya Yehova ekofanda likoló na ye, elimo ya mayele mpe ya bososoli, elimo ya toli mpe ya nguya, elimo ya boyebi mpe ya kobanga Yehova; mpe akosepela na kobanga Yehova.” (Yisaya 11:2, 3, NW) Esakweli yango ezali komonisa ete elimo ya Nzambe esalisaki Yesu na kobanga Tata na ye ya likoló. Lisusu, tomoni ete kobanga yango ezalaki kotungisa ye te; kutu, ezalaki nde kosepelisa ye. Yesu azalaki koyoka esengo na kosala mokano ya Tata na ye ya likoló mpe kosepelisa ye, ata na makambo ya mpasi mingi. Liboso bábaka ye na nzete mpo na konyokola ye mpe koboma ye, alobaki na Yehova ete: “Lokola elingi ngai te nde lokola elingi yo.” (Matai 26:39) Lokola azalaki kobanga Nzambe ndenge wana, Yehova ayokaki kolela ya Mwana na ye, alendisaki ye mpe na nsima, asekwisaki ye.—Baebele 5:7.
Tóyekola kobanga Yehova
11, 12. (a) Mpo na nini tosengeli koyekola kobanga Nzambe? (b) Ndenge nini Yesu ateyaka biso kobanga Yehova?
11 Kobanga Nzambe ekeseni na kobanga oyo tozalaka na yango liboso ya biloko ya mokili oyo ezali na nguya to ezali na makasi; kobanga Nzambe eyaka yango moko te. Yango wana Davidi Monene, elingi koloba Yesu Klisto, alobi na biso na kati ya esakweli ete: “Yaká bino bana, yokamelá ngai, nakoteya bino [kobanga Yehova, NW].” (Nzembo 34:11) Ndenge nini Yesu akoki koteya biso kobanga Yehova?
12 Yesu ateyaka biso kobanga Yehova na ndenge asalisaka biso tóyeba malamu bomoto malamu mingi ya Tata na biso ya likoló. (Yoane 1:18) Ndakisa ya Yesu ye moko emonisaka biso makanisi ya Nzambe mpe ndenge oyo atalelaka bato, mpamba te Yesu amonisaka bomoto ya Tata na ye mobimba. (Yoane 14:9, 10) Lisusu, mbeka oyo Yesu epesaki efungoli nzela mpo ete Yehova akoka koyoka biso ntango tozali kobondela mpo na kosɛnga bolimbisi ya masumu na biso. Likambo yango monene oyo Nzambe asalaki oyo ezali komonisa ngɔlu na ye ezali mpenza kotinda biso na kobanga ye. Mokomi ya Nzembo akomaki ete: “Na yo nde kolimbisa ezali na ntina ete obangama.”—Nzembo 130:4.
13. Mokanda ya Masese etángi makambo nini oyo tosengeli kosala mpo na kolona ezaleli ya kobanga Yehova?
13 Mokanda ya Masese emonisi mwa molɔngɔ ya makambo oyo tosengeli kosala mpo tólona ezaleli ya kobanga Nzambe. “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, ete osembola litoi na yo epai na mayele mpe ete otya motema na yo koluka boyebi; ɛɛ, soko okolela mpo na bososoli mpe soko okoganga mpo na boyebi, . . . mbɛ, okososola [kobanga Yehova, NW] mpe okozwana na boyebi ya koyeba Nzambe.” (Masese 2:1-5) Yango elingi koloba ete mpo tólona ezaleli ya kobanga Nzambe, tosengeli koyekola Liloba na ye, kosala makasi ete tókanga ntina ya malako na ye mpe kolanda toli na ye malamumalamu.
14. Ndenge nini tokoki kolanda toli oyo bapesaki bakonzi ya Yisalaele?
14 Na Yisalaele ya kala, mokonzi nyonso ya sika asɛngisamaki ete asala kopi ya Mibeko mpe ‘atángaka kati na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye, ete ayekola [kobanga Yehova] Nzambe na ye na kotosa maloba nyonso ya [mobeko, NW].’ (Deteronome 17:18, 19) Mpo na biso mpe, kotánga Biblia mpe koyekola yango ezali na ntina mingi mpo na koyekola kobanga Yehova. Ntango tozali kosalela mitinda ya Biblia na kati ya bomoi na biso, mokemoke tozwaka mayele mpe boyebi ya Nzambe. Na ndenge wana nde ‘tososolaka kobanga Yehova’ mpamba te tomonaka mbuma malamu oyo yango ebotaka na kati ya bomoi na biso, mpe boyokani na biso na Nzambe ekómaka likambo ya ntina mingi na miso na biso. Lisusu, soki tozali koyangana mbala na mbala na baninga na biso bandimi, biso nyonso, ezala bilenge to mikóló, tokoki koyoka mateya ya Nzambe, koyekola kobanga ye, mpe kolanda banzela na ye.—Deteronome 31:12.
Esengo na moto oyo abangaka Yehova
15. Boyokani nini ezali kati na kobanga Nzambe mpe losambo na biso epai na ye?
15 Nyonso oyo tolobi emonisi biso ete kobanga Nzambe ezali ezaleli malamu oyo biso nyonso tosengeli kolona, mpamba te ezali na esika monene na losambo na biso epai na Yehova. Esalisaka biso na kotyela ye motema mobimba, na kolanda banzela na ye mpe kokangana na ye. Kobanga Nzambe esalisaki Yesu Klisto na kokokisa ndai na ye lokola moto amipesi na Yehova; biso mpe soki tozali kobanga Nzambe, tokokokisa ndai na biso sikoyo mpe mpo na libela.
16. Mpo na nini Yehova azali kolendisa biso ete tóbangaka ye?
16 Kobanga Nzambe ezalaka kobanga ya mabe te, epekisaka biso mpe te tósepela na makambo ya malamu. Biblia elobi na biso ete: “Esengo ezali na moto oyo [abangaka Yehova, NW] oyo akotambolaka na nzela na ye.” (Nzembo 128:1) Yehova azali kolendisa biso tóbangaka ye mpamba te ayebi ete ekobatela biso. Maloba oyo ayebisaki Mose ezali komonisa biso lobanzo na ye mpe bolingo na ye: “Soki ata [Bayisalaele] babongisaki mitema na bango mpo na kobanga ngai mpe kobatela mibeko na ngai libela, mpo nyonso ezala malamu mpo na bango mpe mpo bana na bango bázala malamu tii na ntango oyo eyebani nsuka te!”—Deteronome 5:29, NW.
17. (a) Kobanga Nzambe epesaka biso matomba nini? (b) Na lisolo oyo elandi tokolobela makambo nini etali kobanga Nzambe?
17 Ndenge moko mpe, soki tobongisi motema na biso mpo na kobanga Nzambe, tokozala malamu. Na ndenge nini? Ya liboso, ezaleli yango ekosepelisa Nzambe mpe ekobenda biso penepene na ye. Makambo oyo Davidi akutanaki na yango eteyaki ye ete Nzambe “[akokokisa] mposa ya bango baoyo bakobanga ye, akoyoka mpe koganga na bango mpe akobikisa bango.” (Nzembo 145:19) Ya mibale, kobanga Nzambe ekozala mpo na bolamu na biso mpo ekotinda biso tóboya makambo ya mabe. (Masese 3:7) Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo kobanga yango ebatelaka biso na makama ya elimo, mpe ekolobela bato mosusu oyo balobeli na kati ya Biblia, oyo babangaki Nzambe mpe bakimaki makambo ya mabe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Likita monene ya bikólo nyonso ya ONU endimaki mikano oyo ezali na mokanda Déclaration universelle des droits de l’homme na mokolo ya 10 Desɛmbɛ 1948.
Okoki kopesa biyano na mituna oyo:
• Kobanga Nzambe elimboli nini, mpe yango esalaka makambo nini epai na biso ntango tozali na yango?
• Boyokani nini ezali kati na kobanga Nzambe mpe kotambola na Nzambe?
• Ndenge nini ndakisa ya Yesu ezali komonisa ete kobanga Nzambe eyokani na kolinga Nzambe?
• Ndenge nini tokoki kobongisa motema na biso mpo na kobanga Yehova?
[Elilingi na lokasa 17]
Bakonzi ya Yisalaele basɛngisamaki ete básala kopi ya Mibeko mpe bátángaka yango mokolo na mokolo
[Elilingi na lokasa 18]
Kobanga Yehova epusaka biso na kotyela ye motema ndenge oyo mwana atyelaka tata na ye motema
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]
Minzoto: Fɔtɔ ya Malin, © IAC/RGO 1991