Makomami malobi nini na ntina na “bonzambe na Klisto”?
YESU KLISTO azalaki na bopusi mozindo likoló na bato. Mpo na yango nde bamilió na bato kati na bango bakolobaka ete bazali kolanda nzela na ye. Nzokande, bango nyonso bazali na boyokani te na ntina etali bomoto na ye.
Bamoko oyo balobaka ete bandimi mateya na Yesu, bakotalelaka ye lokola Mwana na Nzambe, kasi lokola Mozalisi ye moko te. Basusu bazali na kondima kati na “bonzambe na Klisto” mpe bakanisi ete azali mpenza Nzambe ya solo. Mpo na bango, Yesu azali uta seko na seko, mpe na ntango azalaki awa na mabelé, azalaki mpenza moto te. Bato yango bazali na elónga? Makomami malobi nini?
Bomoi na Yesu liboso ete abotama lokola moto
Yesu ye moko alobaki ete azalaki na bomoi liboso na kobotama lokola moto: “Moto mpe te asili kobuta kino likoló bobele ye oyo akitaki longwa na likoló, ye Mwana na moto oyo auti na likoló.” (Yoane 3:13) Alobaki lisusu ete: “Ngai nazali limpa na bomoi oyo likiti longwa na likoló. Soki moto nani akolia limpa oyo, akozala na bomoi libela; mpe limpa likopesa ngai, ezali mosuni na ngai mpo na bomoi na mokili.”—Yoane 6:51.
Yesu azalaki na bomoi liboso ete aya na mabelé; ezali yango nde emonisami na maloba oyo ete: “Naino ezalaki Abalayama te, ngai nazalaki.” (Yoane 8:58) Abalayama azalaki na bomoi uta mobu 2018 kino mobu 1843 liboso na ntango na biso, nzokande bomoi na Yesu lokola moto ebandi longwa mobu 2 liboso na ntango na biso kino mobu 33 ya ntango na biso. Lisusu, mwa moke liboso na liwa na ye, Yesu asalaki libondeli oyo ete: “Tata, kumisa ngai pembeni na yo na lokumu lozalaki na ngai pembeni na yo, naino mokili mozalaki te.”—Yoane 17:5
Bayekoli na Yesu bapesaki litatoli motindo moko. Ntóma Yoane akomaki ete: “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe, mpe Liloba azalaki nzambe. Biloko nyonso bizalisamaki na nzela na ye, mpe soko na ye te, mbɛlɛ eloko moko ezalisami te. . . . Boye Liloba akómaki mosuni mpe afandaki kati na biso, mpe tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola oyo na mwana bobele moko longwa na tata; atondi na ngolu mpe na solo.” (Yoane 1:1, 3, 14, MN) Ee, “Liloba akómaki mosuni,” ezali bongo moto Yesu Klisto.
Kolobáká mpo na bomoi na Yesu liboso ete akóma moto, ntóma Paulo akomaki ete: “Bokanisa kati na bino yango ekanisaki Klisto Yesu. Atako azalaki na motindo na Nzambe, alukaki te ete ameka kokokana na Nzambe, nde amiyeisi mpamba, akamati motindo na moombo, abotami na lolenge na bato.” (Bafilipi 2:5-7) Paulo abéngaki Yesu ete “mobotami na liboso na biloko nyonso bizalisami; mpo ete biloko nyonso mosusu bizalisami na nzela na ye.”—Bakolose 1:13-16.
Azalaki Nzambe te awa na mabelé
Makomami mazali komonisa ete uta kobotama na ye kino na liwa na ye, Yesu azalaki mpenza moto. Yoane alobaki te ete Liloba amilatisaki mosuni. Liloba “akómaki mosuni,” kasi azalaki te ndambo-na-mosuni mpe ndambo-nzambe. Soki Yesu azalaki na mbala moko moto mpe nzambe, mbɛlɛ elobami na ntina ye te ete “akiti mwa moke na nsé na baanzelu.”—Baebele 2:9; Nzembo 8:4, 5.
Soko Yesu azalaki na mbala moko nzambe mpe moto na ntango ye azalaki awa na mabelé, mpo na nini asengelaki ntango nyonso kobondela Jéhovah? Na yango, Paulo akomaki ete: “Na mikolo ya bomoi na ye lokoka moto, Klisto asalaki mabondeli mpe malɔmbɔ na konganga mpe na mpisoli, epai na Ye oyo akokaki kobikisa ye na liwa, mpe ayokamaki mpo na kobanga na ye na peto.”—Baebele 5:7, MN.
Petelo alobaki ete Klisto “abomamaki solo na nzoto, nde . . . azongisami na bomoi kati na elimo.” Yango emonisi ete wana ezalaki ye awa na mabelé, Yesu azalaki ndambo na elimo te. (1 Petelo 3:18) Yesu akutanaki na makambo oyo bato bazangi kokoka bakomonaka yango mpe akómaki nganga monene na motema mawa, mpo ete ye nyonso azalaki moto. Paulo akomaki ete: “Mpo tozali na nganga monene te oyo azangi koyoka mpasi esika moko na biso kati na bolɛmbu na biso. Nde amekami na makambo nyonso lokola biso, bobele ete akwei na masumu te.”—Baebele 4:15.
Yesu, “Mwana-na-mpate na Nzambe, molongoli na masumu na mokili,” “amipesi lokola mbeka na lisiko likoki mpo na banso.” (Yoane 1:29; 1 Timoté 2:6) Na motindo yango, asikolaki mpenza eloko oyo Adama abungisaki: bomoi ya bomoto na seko mpe ya kokoka. Lokola boyengebene na Nzambe esɛngisaki “molimo mpo na molimo,” esengelaki ete Yesu azala na lolenge oyo Adama azalaki na ebandeli; azalaki moto-Nzambe te, kasi moto ya kokoka.—Deteronome 19:21; 1 Bakolinti 15:22.
Totika kolobisa mikapo ya Biblia makambo oyo malobami kati na yango te
Baoyo batalelaka Yesu lokola moto-Nzambe basalelaka mikapo mikeseni na Makomami mpo na komeka kondimisa ete azali kati na Bosato na boklisto ya lokutá mpe akokani na Nzambe na lolenge, na nguya, na nkembo mpe na mbula ya bomoi. Nzokande, soki otaleli mikapo yango na likebi, okomona ete bakɔteli na “bonzambe na Klisto” bazali kolobisa mikapo wana makambo mingi oyo yango elobi te.
Basusu bakolobaka ete mikapo na Biblia kati na yango Nzambe azali na kosalelaka liloba biso, esali ete Yesu (Liloba) akokanaki na Jéhovah wana azalaki na bomoi liboso na kokóma moto. Nzokande, lolenge na kosala wana elakisi soko moke te ete Nzambe azali koloba epai na moto oyo akokani na ye. Elakisi bobele ete moko na bikelamu ya likoló azali na etelemelo monene liboso na Nzambe. Ya solo, na boumeli ya bomoi na ye liboso na kokóma moto, Yesu azalaki moninga na penepene na Nzambe, mosali na ye na mayele mpe molobeli na ye.—Genese 1:26; 11:7; Masese 8:30, 31; Yoane 1:3.
Makambo malekaki na batisimo na Yesu mamonisi te ete Nzambe, Klisto mpe elimo santu bakokani. Na ntango moto Yesu azwaki batisimo, amimonisaki epai na Tata na ye na likoló, wana nde ezali ndimbola ya batisimo. Na ntango wana, “makoló mazipwaki,” mpe elimo na Nzambe ekitaki likoló na Yesu lokola ebengá. Lisusu, mongóngo na Nzambe moyokamaki “longwa na makoló” ete: “Oyo Mwana molingami na ngai; ngai nandimi ye.”—Matai 3:13-17, MN.
Na yango, Yesu akanisaki nini wana atindaki bantóma na ye ete bakende kozalisa bayekoli, “kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu”? (Matai 28:19, 20) Alobaki te, mpe alingaki koloba te ete Tata na ye, elimo santu mpe ye moko bakokanaki. Kasi, elimboli ete baoyo bazwi batisimo bazali kondima Jéhovah lokola Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso, Ye oyo liziba na bomoi, bomoi oyo bazali kopesa epai na ye. Lisusu, bandimi ete Yesu azali Masiya, na nzela na ye nde Nzambe apesaki mbeka na lisiko mpo na bandimi. Na nsuka, bazali kokanga ntina ete elimo santu ezali bokasi na Nzambe bokosalaka mosala, oyo basengeli kotambwisama na yango. Nzokande, mpo na bato yango balingi kozwa batisimo, Jéhovah, Yesu mpe elimo santu basali nzambe na bosato te.
Kasi, makamwisi na Yesu mazali komonisa te ete azalaki moto-Nzambe? Te, mpamba te Moize, Eliya, Elizé, ntóma Petelo mpe ntóma Paulo, mpe bamosusu basalaki makamwisi nzokande bazalaki bato-Nzambe te. (Exode 14:15-31; 1 Mikonzi 18:18-40; 2 Mikonzi 4:17-37; Misala 9:36-42; 19:11, 12) Lokola bango, Yesu azalaki moto oyo asalaki makamwisi na nguya oyo Nzambe apesaki ye.—Luka 11:14-19.
Na nzela na esakweli, Yisaya alobaki mpo na Yesu, Masiya, na kobéngáká ye ete “Nzambe na nguya.” (Yisaya 9:6) Na Yisaya 10:21, bobele mosakoli wana alobi na ntina na Jéhovah lokola “Nzambe na nguya.” Basusu bazali komeka kosalela bokokani wana mpo na kondimisa ete Yesu azali Nzambe. Kasi, tosengeli kosɛnzela ete tolobisa ba versets wana te, makambo oyo yango elobi te. Liloba na Liebele libongolami na “Nzambe na nguya” lizali bobele mpo na Jéhovah te, lokola yango ezali mpo na liloba “Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso. (Genese 17:1) Na ntembe te, kozala na nguya ekeseni na kozala mozwi-na-nyonso, kozanga ete moto molai aleka yo.
Engebene Yisaya 43:10, Jéhovah alobaki ete: “Liboso na ngai Nzambe mosusu esalamaki te, mpe mosusu akozala nsima na ngai te.” Kasi, maloba oyo mamonisi te ete Yesu azali Nzambe. Ya solo, moto moko te azalaki na bomoi liboso na Jéhovah; nzambe moko te azalaki liboso na ye, mpamba te azali libela ma libela. Nsima na ye, nzambe mosusu akozala te, mpamba te ye akozala mpo na seko mpe akozala na mokitani te ete azala Nkolo moyangeli na bayangeli nyonso. Atako bongo, yango epekisaki Jéhovah te ete azalisa bikelamu oyo ye moko abéngaki bango banzambe; yango nde alobaki epai na bato mosusu, lokola emonisami na Makomami ete: “Ngai nalobi ete, Bino bozali banzambe mpe bino nyonso bozali bana na Oyo-Aleki-Likoló. Kasi bino bokokufa lokola bato mpe bokokwea lokola moko na bana na mikonzi.” (Nzembo 82:6, 7) Bobele bongo, Liloba azalaki nzambe oyo azalisamaki na Jéhovah, kasi likambo yango lisalaki te ete akokana na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.
Etelemelo na solo na Yesu
Baoyo bakolobaka ete Nzambe alataki lolenge na moto, mpe akómaki moto-Nzambe, basengeli kotalela likambo oyo: Biblia epesi ata likanisi moko te ete Yesu amitalelaki lolenge yango. Kasi, emonisi bisika nyonso ete Yesu azali ntango nyonso na nsé na Tata na ye. Na ntango azalaki awa na mabelé, Yesu amilobaki te ete etelemelo na ye eleki oyo ya mwana na Nzambe. Mpe, alobaki ete: “Tata aleki ngai.”—Yoane 14:28.
Paulo akesenisaki Jéhovah mpe Yesu wana alobaki ete: “Mpo na biso Nzambe moko azali, ye Tata; biloko nyonso bizalisamaki na ye, biso mpe tozali uta na ye. Mpe Nkolo moko azali, ye Yesu Klisto; biloko nyonso bizalisamaki na ntina na ye. Biso mpe tozali na ntina na ye.” (1 Bakolinti 8:6) Paulo alobaki lisusu ete: Bino bozali mpo na Klisto, Klisto mpe azali mpo na Nzambe.” (1 Bakolinti 3:23) Na yango, lokola baklisto bazali mpo na Nkolo na bango, Klisto, bobele bongo Yesu azali mpe na Nkolo na ye, Jéhovah Nzambe.
Na kolanda bobele likanisi wana moko, Paulo akomaki ete: “Motó na mibali nyonso ezali Klisto, mpe . . . motó na mwasi ezali mobali mpe . . . motó na Klisto ezali Nzambe.” (1 Bakolinti 11:3) Boyokani wana bozali kati na Nzambe mpe Klisto bokolandana, mpamba te, nsima na na Boyangeli ya mbula nkɔto, Yesu “akozongisa bokonzi epai na Nzambe mpe Tata na ye,” mpe “Mwana ye moko akokita na nsé na bokonzi na ye oyo akitisi biloko nyonso na nsé na ye, ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.”—1 Bakolinti 15:24, 28; Emoniseli 20:6.
Mikapo misusu
Na ntina etali kobotama na Yesu, Matai akomaki ete: “Makambo manso mabimaki bongo, ete yango Jéhovah alobaki na nzela na mosakoli na ye [na Yisaya 7:14] ekokana, ete: ‘Tala elenge mwasi akozwa zemi mpe akobota mwana mobali, mpe bakobenga nkombo na ye Emanwele,’ oyo elimboli: ‘Nzambe azali na biso.’” (Matai 1:22, 23) Yesu abyangamaki Emanwele te, kasi na mokumba na ye lokola moto, akokisaki ndimbola ya nkombo yango. Komonana na ye awa na mabelé lokola Libota na masiya mpe Mosangoli na kiti na bokonzi na Davidi endimisaki basambeli na Jéhovah ete Nzambe azalaki na bango elongo, ete azalaki na ngambo na bango, mpe azalaki kosunga bango kati na misala na bango.—Genese 28:15; Exode 3:11, 12; Yosua 1:5, 9; Nzembo 46:5-7; Yilimia 1:19.
Kolobáká na Yesu oyo asekwaki, ntóma Thomas akamwaki ete: “Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!” (Yoane 20:28) Lisoló oyo, mpe mingi mosusu, “esili kokomama mpo ete [tondima] Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe.” Toma etɛmɛlaki Yesu te, oyo atindaki nsango oyo epai na bayekoli na Ye, ete: “Nazali kobuta epai na . . . Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.” (Yoane 20:17, 30, 31) Na yango, Toma akanisaki te ete ete Yesu azali Nzambe Mozwi-na Nguya-Nyonso. Mbala mosusu Toma abengaki Yesu “Nzambe na ngai” na ndimbola oyo ete Klisto azali “nzambe,” atako ezali ye te “Nzambe bobele moko ya solo.” (Yoane 1:1; 17:1-3) To mbala mosusu, na kolobáká “Nzambe na ngai,” Thomas ayebaki ete Yesu azali Molobeli mpe Momonisi na Nzambe; na yango bato mosusu basili koloba epai na anzelu momemi nsango lokola epai na Jéhovah.—Tala Genese 18:1-5, 22-33; 31:11-13; 32:24-30; Basambisi 2:1-5; 6:11-15; 13:20-22.
Bongo, engebene Biblia, Yesu azalaki na bomoi liboso ete abotama lokola moto: na ntango wana azalaki Liloba. Awa na mabelé, azalaki nzambe te, soko moto-Nzambe te. Atako azalaki na kokoka lokola Adam azalaki na ebandeli, Yesu azalaki nyonso moto. Uta lisekwa na ye, Yesu azali elimo atombolami mpe akokufa te, nde azali ntango nyonso na nsé na Nzambe. Ezali bongo polele ete Makomami mazali kondimisa ata moke te “bonzambe na Klisto.”
[Etanda na lokasa 23]
Baanzelu basambelaka Yesu?
MABONGOLI mosusu mayeisi Baebele 1:6 ete: “Tika ete banzelu nyonso na Nzambe basambela ye [Yesu].” (Jérusalem; Segond). Emonani lokola ete ntóma Paulo azongeli maloba na Nzembo 97:7, epai totangi na libongoli ya Septante ete: “Bosambela ye (Nzambe], bino banzelu na ye nyonso.“—Engebene libongoli ya C. Thompson.
Liloba na greke proskunéô, liye libongolami na ‘kosambela’ na Baebele 1:6 lizwami na Nzembo 97:7, kati na libongoli Septante, mpo na kobongola liloba ya Liebele (shahah) oyo elimboli “kokumbamela.” Likambo wana likoki kondimama soko yango ezali elembo ya limemya epai na bato. (Genese 23:7; 1 Samwele 24:8; 2 Mikonzi 2:15) Ekoki mpe kosalelama na losambo ye Nzambe ya solo to mpo na banzambe ya lokuta.—Exode 23:24; 24:1; 34:14, Deteronome 8:19.
Mbala mingi, proskunéô oyo esalelami mpo na Yesu ekokani na lokumu lopesami na mikonzi mpe na bato mosusu. (Kokanisa Matai 2:2, 8; 8:2; 9:18; 15:25; 20:20; elongo na 1 Samwele 25:23, 24; 2 Samwele 14:4-7; 1 Mikonzi 1:16; 2 Mikonzi 4:36, 37.) Emonani polele ete, mbala mingi topesaka lokumu epai na Yesu lokola Nzambe te, kasi lokola “Mwana na Nzambe” to “Mwana (Masiya) na moto.”—Matai 14:32, 33; Luka 24:50-52; Yoane 9:35, 38.
Baebele 1:6 etaleli etelemelo na Yesu, oyo azali na nsé na Nzambe. (Bafilipi 2:9-11) Mwa mabongoli mosusu mayeisi proskunéô ete ‘kokumbama liboso na’ (Osty, TOB), ‘kopesa lokumu’ (Traduction du monde nouveau), to ‘kopesa lokumu mpe kokumbamela’ (Kuen). Ye oyo aponi liloba ‘kosambela’ asengeli komikundola ete losambo yango ezali na ndelo, mpamba te Yesu alobaki na Satana ete: “Okosambela [motindo ya proskunéô] Jéhovah, Nzambe na yo mpe okosalela bobele ye na mosala na bulɛ.”—Matai 4:8-10, MN.
Atako na Baebele 1:6 Paulo asaleli mpo na Klisto Nzembo 97:7 epai elobelami kosambela Nzambe, nzokande amonisi mwa moke liboso ete Yesu oyo asekwi, azali “komonisa nkembo na Nzambe, azali mpe elilingi na motindo na ye mpenza.” (Baebele 1:1-3) Na yango, losambo nyonso oyo baanzelu bazali kopesa na mwana na Nzambe ezali na ndelo mpe ezali mpo na Jéhovah, na nzela na Yesu.