Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
“Yo ozali Klisto, Mwana na Nzambe na bomoi.”—Matai 16:16.
1, 2. (a) Lolenge nini tokoki kotanga moto moko ete azali monene? (b) Na boumeli na Lisoló na bato, bato nini oyo babéngamaki na nkombo Monene, mpe mpo na nini?
MPO na yo, nani akoki kozala moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo? Lolenge nini bakotangaka moto ete azali monene? Mpo na mayele na ye ya kokamba basodá na etumba? Mpo na bwanya oyo azali na yango? Mpo na makasi na ye ya nzoto?
2 Bayangeli mingi babéngamaki na nkombo “Monene,” lokola Siruse Monene, Alexandre Monene mpe Charlemagne, oyo abéngamaki ete “Monene” ata na ntango azalaki naino na bomoi. Mpo ete bazalaki bilombe, bato wana bazalaki na bopusi monene likoló na bato oyo bango bazalaki kokamba.
3. (a) Tanga moko na mitindo oyo tokoki komeka monene ya moto. (b) Mpo na yango, nani azali moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo?
3 Ekokisi mibu koleka 50, H. G. Wells, mokomi na makambo na kala alakisaki lolenge nini azalaki komeka monene ya moto. Akomaki ete: “Mokomi na makambo na kala oyo alingi koyeba soki moto boye azalaki monene, akomituna ete: ‘Makambo nini asili kotika nsima na liwa na ye? Asili kokɔtisa makanisi ya sika epai na bato ya ntango na ye, na bokasi oyo boumelaki nsima na liwa na ye?’” Wells asukisi ete, “na likambo oyo, Yesu azali na esika ya liboso.” Ata Napoléon alobaki ete: “Yesu Klisto azalaki na bopusi mpe na bokonzi likoló na bato na ye atako ye moko azalaki wana te kati na nzoto.”
4. (a) Makanisi nini makeseni bato bazali na yango na ntina na Yesu? (b) Esika nini mokomi moko na makambo na kala, oyo azalaki moklisto te, apesi na Yesu kati na Lisoló na bato?
4 Nzokande, bato mosusu bakolobaka ete Yesu azali moto ya solo te, kasi moto ya lisapo. Epai mosusu, bato mingi bakosambelaka ye lokola nde azalaki Nzambe mpe bakolobaka ete Nzambe ayaki awa na mabelé kati na bomoto na Yesu. Wana apesaki bosukisi na ye na kotalela bobele bilembeteli ya makambo na kala na bomoi ya moto Yesu, Wells akomaki ete: “Ezali likambo na esengo mpe na ntina mingi ete mokomi na makambo na kala amonisa kozanga kokɔtela teoloji moko, mpe na bosembo nyonso ete, akoki kolobela bokóli ya bato te bobele soki apesi esika monene epai na moteyi moto ya mboka Nazarete oyo azalaki na mosolo te. . . . Mokomi na makambo na kala lokola ngai, oyo namitangi te ete nazali moklisto, namoni ete makambo nyonso mazali mpenza kobaluka bobele na bomoi mpe na bomoto ya moto yango oyo azali na ntina mingi kati na bato nyonso.”
Yesu azalaki moto ya solo?
5, 6. Bakomi na makambo na kala H. G. Wells mpe Will Durant, balobi nini mpo na bosolo ya lisoló ya bomoi na Yesu?
5 Kasi, okoyanola nini soki balobi na yo ete Yesu azalaki moto ya solo te, ete azalaki moto ya lisapo, azalaki bobele na makanisi mpamba ya mwa bato na ekeke ya liboso? Kondimáká ete “toyebi makambo mingi te oyo tolingi koyeba likoló na [Yesu],” Wells amonisaki ete: “Baevenzile minei . . . ezali na boyokani wana elakisi biso bomoto na ye na lolenge malamu; ezali mpenza na bilembeteli bikondimisa. Soki azalaki na bomoi te mpe ete masoló ya bomoi na ye masalemi na bato, mbɛlɛ yango ekozala mpasi mpo na mokomi na makambo na kala mpe akozala na nkaká mpo na kondima solo ya makambo ya ntina na Baevanzile.”
6 Will Durant, mokomi na makambo na kala na lokumu mingi, apesi likanisi motindo moko, ete: “Soki ezali solo ete, bobele na boumeli ya libota moko, mwa ndambo na bato mpamba [baoyo bamipesaki nkombo baklisto] bamisalelaki likanisi ya moto moko na nguya mpe na kitoko mingi; soki bango moko babimisaki mpo na malako matombwami, emoneli na bondeko malamu mingi kati na bato, wana mbɛlɛ ekozala ekamwiseli moko eleki bikamwiseli nyonso totangaka kati na Baevanzile.”
7, 8. Bopusi nini monene Yesu azali na yango na lisoló na bato?
7 Na yango, okoki koloba na moto oyo akobɛta ntembe ete Yesu azalaki moto ya solo te, ete: moto na lisapo oyo azalaki solo te, akokaki nde kozala na bopusi motindo wana na lisoló na bato? Mokanda mokolimbolaka makambo (The Historians’ History of the World) moyebisi ete: “Ezala na etaleli ya mosuni mpenza, misala na [Yesu] mizwi lokito monene koleka misala minene ya moto nyonso mosusu kati na lisoló na bato. Mikili minene mindimi ete kobotama na ye ezalaki ebandeli ya eleko ya sika.” Likambo yango limonani na oyo ete ata manáka mosusu ya lelo matongami likoló na mbula oyo ekanisami ete Yesu abotamaki. Tokoki kotanga yango kati na encyclopédie moko (The World Book Encyclopedia) ete, “bambula oyo ezali liboso na mobu wana etangami ete liboso na Klisto, mpe oyo ezali nsima na mobu wana etangami ete, anno Domini (na mbula na Nkolo na biso).”
8 Na mateya na ye ya nguya mpe na bomoi na ye boyokani na mateya yango, Yesu azali na bopusi monene likoló na bomoi ya bato mingi mpenza uta mibu soko nkɔto mibale. Lokola elobaki yango mokomi moko na bosembo nyonso ete, “mampinga nyonso ya mokili kino lelo, masúwa nyonso masili kotongama, biyangeli binso bisili kosalema mpe bakonzi nyonso basili koyangela uta ebandeli, balóngi naino te kobongola bomoi na bato awa na mokili.” Nzokande, bakɔtɔli bakoloba ete: ‘Makambo nyonso oyo toyebi na ntina na Yesu mazwami kati na Biblia. Ezali na mokanda mosusu te ya ntango na ye oyo elobi na ntina na ye.’ Kasi yango ezali solo?
9, 10. (a) Bakomi mosusu na makambo na kala mpe bakomi ya ntango na kala, balobaki nini na ntina na Yesu? (b) Mokanda moko mosukisaki nini na kotalela litatoli ya bakomi na makambo na kala ya ekeke ya liboso ?
9 Atako bakomi ya masolo na bato ya ntango na kala balobi mingi te na ntina na Yesu, kasi basili kolobela yango. Tacite, mokomi na makambo na kala na lokumu mingi na ekeke ya liboso, ye Moloma, akomaki ete mokonzi Néron ‘akweisaki ngambo na kozika ya Loma likoló na baklisto.’ Mpe alimbolaki na nsima ete: “Bazwi nkombo [baklisto] epai na Klisto, oyo guvernere Pontius Pilatus akabaki ye ete abomama na liwa ya mpasi, na nsé na boyangeli ya Tibele.” Suétone mpe Pline le Jeune, bakomi mosusu mibale Baloma ya ekeke wana, bango mpe balobelaki Klisto. Tozali mpe na litatoli ya Flavius Josèphe, Moyuda mokomi ya ekeke ya liboso, oyo alobelaki liwa ya Yakobo, moyekoli moklisto kati na mokanda na ye Histoire ancienne des Juifs, koyebisáká sikisiki ete azalaki “ndeko na Yesu, oyo abéngami Klisto.”
10 Yango wana mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique esukisi boye ete: “Matatoli oyo mauti na bato bakeseni mamonisi ete na ntango na kala, ata banguna na boklisto batyaki ntembe soko moke te mpo na bomoi na Yesu, oyo etɛmɛlamaki na ntina te na mbala ya liboso, na nsuka ya ekeke ya zomi na mwambe, mpe na nsima, na boumeli na ekeke ya zomi na libwa mpe na ebandeli na ekeke ya ntuku mibale.”
Yesu azalaki nani mpenza?
11. (a) Epai wapi tozali kokuta makambo ya ntina oyo toyebi likoló na Yesu? (b) Motuna nini bayekoli na Yesu bango moko bamitunaki likoló na bomoto na ye?
11 Kasi, makambo ya ntina oyo toyebi yango lelo mpo na Yesu, mayanganisamaki na baninga na ye na ekeke ya liboso. Masoló na bango oyo mazali kati na Baevanzile, mikanda na Biblia oyo mikomamaki na Matai mpe Yoane, bantóma na ye; Malako mpe Luka, bayekoli na ye. Masoló ya mibali wana mamonisi nini likoló na bomoto na Yesu? Ye azalaki nani? Na ekeke ya liboso, baninga na Yesu bamitunaki motuna oyo. Na ntango bamonaki Yesu kopamela mopepe ya mai monene, bakamwaki mpe bamitunaki ete: “Moto oyo azali nde nani?” Na mbala mosusu, Yesu atunaki bantóma na ye ete: “Bino bokolobaka ete ngai nazali nani?”—Malako 4:41; Matai 16:15.
12. Ndenge nini toyebi ete Yesu azali Nzambe te?
12 Okoyanola nini soki batuni yo motuna oyo? Yesu azalaki nani? Ya solo, basangani mingi na boklisto ya lokutá bakoyanola ete azalaki Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso oyo alataki motindo na moto, nzokande azalaki Nzambe. Kasi, baninga ya solo na Yesu bakanisaki mokolo moko te ete ye azalaki Nzambe. Ntóma Petelo abéngaki ye ete, “Yo ozali Klisto, Mwana na Nzambe na bomoi.” (Matai 16:16) Mpe okolukaluka, nde ekotanga esika moko te epai Yesu andimaki ete ye azali Nzambe. Kasi, alobaki na Bayuda ete ye azalaki “Mwana na Nzambe,” kasi Nzambe te.—Yoane 10:36.
13. Na nini Yesu akesenaki na bato nyonso mosusu?
13 Wana ezalaki ye kotambola likolo na mai monene, bayekoli bakamwaki, mpo ete azalaki moto lokola bato nyonso te. (Yoane 6:18-21) Yesu alekaki mpenza bato nyonso. Ezali mpo ete liboso, ye azalaki na bomoi lokola elimo pene na Nzambe na likoló, na lolenge na anzelu oyo Biblia ebéngi ete mokóló na baanzelu. (1 Batesaloniki 4:16; Yuda 9) Nzambe azalisaki ye liboso na biloko nyonso mosusu. (Bakolose 1:15) Na yango, na boumeli na bileko biyebani te, liboso nkutu ya kozalisama na molóngó, Yesu azalaki moninga ya solo ya Tata na ye na likoló, Jéhovah Nzambe, Mozalisi monene.—Masese 8:22, 27-31; Mosakoli 12:1.
14. Ndenge nini Yesu akómaki moto?
14 Na nsima, esili koleka soko mibu nkɔto mibale, Jéhovah akɔtisaki bomoi ya Mwana na ye kati na libumu ya mwasi moko. Na mwango wana, Yesu akómaki mwana na Nzambe na lolenge na moto, oyo abotamaki na mwasi, lokola bato nyonso mosusu. (Bagalatia 4:4) Wana ezalaki ye kokóla kati na libumu ya Maria, mama na ye, mpe nsima, na boumeli ya bambula ya bokóli na ye, azalaki na mabɔkɔ ya baoyo Jéhovah aponaki ete bazala baboti na ye awa na mabelé. Mpe Yesu akómaki mokóló, mpe tokoki kokanisa ete na batisimo na ye, ‘wana makoló mazipwamaki liboso na ye,’ Jéhovah akundwelaki ye bomoi oyo azalaki na yango liboso elongo na Nzambe, kati na likoló.—Matai 3:16; Yoane 8:28; 17:5.
15. Ndenge nini toyebi ete Yesu azalaki mpenza moto ya solo awa na mabelé?
15 Na ntembe te, Yesu azalaki moto oyo akesenaki na bato nyonso. Atako bongo, azalaki moto oyo akokanaki na Adam, oyo Nzambe azalisaki liboso mpe atyaki ye kati na elanga ya Edene. Ntóma Paulo alobi na biso ete: “‘Adam moto na liboso akómaki molimo na bomoi.’ Adam na nsuka akómaki elimo ekopesaka bomoi.” Yesu abéngami “Adam na nsuka” mpo ete azalaki moto na kokoka lokola Adam na liboso. Kasi, na ntango akufaki, asekwaki lokola elimo, mpe azongaki epai na Tata na ye na likoló.—1 Bakolinti 15:45, MN.
Lolenge malamu ya koyekola mpo na koyeba Nzambe
16. (a) Mpo na nini kozala moninga na Yesu ezalaki libaku moko kitoko? (b) Mpo na nini Yesu alobaki ete komona ye, elimboli komona Nzambe?
16 Kanisa naino mpo na libaku kitoko oyo bato mosusu bazalaki na yango wana basalaki boninga makasi elongo na Yesu na ntango azalaki awa na mabelé! Kanisa wana bazalaki koyoka ye mpe na ntango bazalaki koloba na ye, kotala ye mpe ata nkutu kosala mosala elongo na Ye oyo alekisaki soko bamiliare ya bambula na likoló, kati na boninga elongo na Jéhovah Nzambe! Lokola mwana na sembo, Yesu amekolaki Tata na ye ya likoló kati na makambo nyonso oyo azalaki kosala. Epai mosusu, amekolaki ye na motindo na kokoka mpenza kino alobaki na bantóma na ye, liboso na kobomama na ye, ete: “Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.” (Yoane 14:9, 10) Ya solo, kati na makambo nyonso oyo akutanaki na yango awa na mabelé, Yesu asalaki mpenza lokola Tata na ye, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso akokaki kosala yango. Bongo, wana ezali biso koyekola bomoi mpe mosala na Yesu Klisto, tozali mpenza koyekola bomoto na Nzambe.
17. Mokano nini kitoko mokokisamaki na lisoló “Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye,” oyo ezalaki kobima kati na Mosenzeli?
17 Yango wana, na lisoló “Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye,” oyo ezalaki kobima mbala na mbala kati na Mosenzeli, kobanda janvier 1986 kino juin 1991, emonisaki bobele bomoto malamu na Yesu te, kasi ezalaki lisusu koteyama monene likoló na Jéhovah Nzambe, Tata na ye ya likoló. Uta lisoló ya mibale, pionnier moko na botondi akomelaki la Société Watch Tower, ete: “Ezali na mwango mosusu te mpo na kobɛlɛma na Tata, bobele kozala na boyebi malamu mpo na Mwana.” Yango ezali sembo! Bolingo ya Tata mpo na bato mpe bobóto na ye ekumisamaki kati na bomoi ya Mwana.
18. Nani azali Nkolo na nsango na Bokonzi, mpe lolenge nini Yesu andimaki likambo yango?
18 Bolingo oyo Yesu amonisaki epai na Tata na ye na kotósáká na mokano na Ye mobimba, ezali mpenza kitoko. Alobaki epai na Bayuda oyo balukaki koboma ete: “Nazali kosala likambo moko te na motema na ngai, kasi lokola Tata asili kolakisa ngai, nazali koyebisa makambo yango.” (Yoane 8:28) Na yango, azalaki te nkolo na nsango na Bokonzi oyo ye azalaki kosakola; ezalaki Jéhovah Nzambe! Ezali likambo oyo Yesu azalaki koloba mbala na mbala. Alobaki ete: “Nasololi monoko na ngai moko te, kasi Tata, oyo atindaki ngai, ye moko asili kopesa ngai etinda mpo na makambo oyo nasengelaki koloba mpe koyebisa . . . Bongo, makambo mazali ngai koloba, nazali koloba yango lokola Tata alakaki ngai.”—Yoane 12:49, 50, MN.
19. (a) Ndenge nini toyebi ete Yesu ateyaki motindo moko na Jéhovah? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azali moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo?
19 Nzokande, Yesu azalaki bobele koloba to koteya makambo oyo Tata na ye ayebisaki te. Kasi asalaki mingi koleka wana. Alobelaki yango to mpe ateyaki yango na lolenge oyo Tata akokaki kosala yango. Oyo eleki mpenza, kati na misala na ye nyonso mpe kati na boyokani na ye elongo na moto na moto, atambolaki mpenza na lolenge oyo Tata na ye akokaki kotambola na mabaku wana. Alobaki sikisiki ete: “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala. Mpo ete yango ekosala Ye, Mwana mpe akosalaka bongo.” (Yoane 5:19) Kati na makambo nyonso, Yesu azalaki momonisi na Jéhovah Nzambe, Tata na ye na lolenge na kokoka. Ezali bongo likambo na kokamwa te ete azali moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Na ntembe te, ezali ntina ete tosepela mpenza na moto yango aleki bato nyonso.
Bolingo na Nzambe emonani kati na Yesu
20. Ndenge nini Yoane akokaki koyeba ete “Nzambe azali bolingo”?
20 Tozali kososola nini mpenza na ntango tozali koyekola bomoi mpe mosala na Yesu na likebi nyonso mpe na bozindo? Ntóma Yoane alobaki ete: “Moto moko te asili komona Nzambe.” (Yoane 1:18, MN) Nzokande, na 1 Yoane 4:8 (MN), akakatanaki te na kokoma ete: “Nzambe azali bolingo.” Soki alobaki yango, ezali mpo ete ayebaki bolingo na Nzambe kati na makambo oyo amonaki epai na Yesu.
21. Eloko nini esali ete Yesu azala moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo?
21 Lokola Tata, Yesu azalaki na motema mawa, na motema malamu, na komikitisa mpe azalaki kosolola na bato. Basɔkɛmi mpe baoyo banyokwamaki—ya solo, motindo na bato nyonso: mibali, basi, bana, bazwi, babólá, bato na nguya, ata basali na masumu mingi—bazalaki komiyoka malamu epai na ye. Eloko esali ete Yesu azala moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, liboso mpenza ezali bolingo na ye monene, oyo amekolaki yango epai na Tata na ye. Kino Napoléon alobaki ete: “Alexandre, Kaïsala, Charlemagne mpe ngai, tosalaki bikonzi, bongo mayele ya misala na biso matongami likoló na moboko nini? Likoló na bokasi. Bobele Yesu Klisto nde atongaki bokonzi na ye likoló na bolingo, mpe lelo oyo, bamilió na bato bazali pene na kokufa mpo na ye.
22. Na mateya na Yesu, eloko nini ebongolaki makambo?
22 Mateya na Yesu mabongolaki makambo mingi. Alobaki ete: “Botɛmɛla moto mabe te; kasi epai na ye oyo akobɛta yo mbatá na litáma na mobali, pesa ye litáma mosusu.” “Bolingaka banguna na bino mpe bobondelaka mpo na baoyo bazali konyokola bino.” ‘Makambo manso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino mpe bosalela bango bongo.’ (Matai 5:39, 44; 7:12, MN) Soki bato nyonso bamiyokanisaki na mateya oyo minene, mbɛlɛ mokili mozali boye te.
23. Yesu asalaki nini mpo na kosimba mitema na bato mpe kopusa bango na kosala malamu?
23 Maloba na bililingi to masese na Yesu mazalaki kosimba mitema na bato: mazalaki kopusa bato na kosala malamu mpe mapekisaki bango na kosala mabe. Mbala mosusu ozali komikundola lisoló liyebani ya Mosamalia oyo atyolamaki, ye oyo asalisaki moto na ekólo mosusu oyo azokisamaki mpótá, nzokande bakonzi na lingomba ya ekólo na ye moko baboyaki kosalisa ye. To mpe lisese ya tata na motema mawa oyo alimbisaki mwana na ye oyo abungaki. To mpe lisese ya mokonzi oyo alimbisaki moombo na ye mpo na nyongo ya bamilió 60 ya denali, nde nsima, moombo yango abwakaki moko na baninga na ye na bolɔko mpo ete akokaki te kofuta ye mwa badenali 100? Na lisalisi ya masese na pɛtɛɛ, Yesu amonisaki mabe nyonso mauti na misala ya moïmi mpe na lokoso mpe malamu nyonso mauti na misala ya bolingo mpe na motema mawa!—Matai 18:23-35; Luka 10:30-37; 15:11-32.
24. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azali mpenza moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo?
24 Kasi liboso na makambo nyonso, eloko oyo ezalaki kobenda bato epai na Yesu mpe ezalaki na bopusi malamu likoló na bango, ezali ete bomoi na ye eyokanaki mpenza na mateya na ye. Azalaki kosalela makambo oyo ye azalaki koteya. Azalaki koyika mpiko na mabunga ya bato mosusu na motema molai. Wana bayekoli na ye bazalaki kowelana mpo na koyeba soki nani alekaki monene kati na bango, azalaki kosembola bango na bobóto kasi abénganaki bango te. Azalaki kokokisa bamposa na bango na komikitisa nyonso, mpe nkutu asukolaki bango makolo. (Malako 9:30-37; 10:35-45; Luka 22:24-27; Yoane 13:5) Na nsuka, andimaki kufa na mpasi, bobele mpo na bango te, kasi lisusu mpo na mokili mobimba! Na ntembe te, Yesu azali ye oyo alekaki bato nyonso kino lelo.
Bozongeli
◻ Elembeteli nini tozali na yango ete Yesu azalaki na bomoi?
◻ Ndenge nini toyebi ete Yesu azalaki moto, kasi na likambo nini akesenaki na bato nyonso mosusu?
◻ Mpo na nini lolenge malamu ya koyekola koyeba Nzambe ezali bongo koyekola bomoi na Yesu?
◻ Tokoki koyekoli nini na ntina na bolingo na Nzambe na kozaláká na boyebi malamu na Yesu?
[Elilingi na lokasa 10]
Bantóma na Yesu bamitunaki na kokamwa ete: “Moto oyo azali nde nani?”