Obatela etonga na Nzambe na bolingo nyonso
“Bobatela etonga na Nzambe kati na bino, na kopusama te, kasi na bolingo nyonso.—1 PETELO 5:2.
1. Mpo na nini bankulutu basengeli ˈkobatela etonga na Nzambe na bolingo nyonsoˈ?
JÉHOVAH azali kobatela libota na ye na bolingo nyonso. (Nzembo 23:1-4) “Mobateli aleki malamu,” Yesu Klisto, apesaki na bolingo nyonso bomoi na ye ya moto na kokoka mpo na bato oyo bakokani na bampate. (Yoane 10:11-15) Yango wana, ntoma Petelo alendisaki bankulutu ya lisangá ya boklisto na ˈkobatela etonga na Nzambe na bolingo nyonso.ˈ—1 Petelo 5:2.
2. Na ntina na misala ya kobatela oyo bankulutu baklisto bazali na yango, mituna nini mizali kotunama?
2 Basaleli na Nzambe basalaka makambo na bolingo nyonso. (Nzembo 110:3) Kasi esengeli te bobele kozala na bolingo mpo na koponama mokɛngɛli, to mobateli molandi. Banani bazali kokokisa masengami mpo na kozala babateli motindo yango? Mosala na bango ya kobatela ezali kosenga nini? Basengeli kosala nini mpo na kokokisa yango malamu?
Bazali kokamba ndako na bango
3. Mpo na nini tokoki koloba ete lolenge oyo moklisto moko azali kokamba ndako na ye ezali na boyokani na makoki na ye ya kobatela lisangá?
3 Liboso ete bapona moto na “mosala ya mokengeli,” asengeli kokokisa masengami ya Makomami. (1 Timoté 3:1-7; Tito 1:5-9) Ya liboso, ntoma Paulo alobi ete mokengeli asengeli “kobongisa ndako na ye moko malamu, kotosisa bana na ye na sembo na bozito.” Yango ezali mpenza na ntina, mpo ete ntoma Paulo abakisi ete: “Mpo ete soko moto ayebi kobongisa ndako na ye moko te, akobatela lisanga na Nzambe boni?” (1 Timoté 3:4, 5) Wana aponaki bankulutu na masangá ya esanga ya Kelete, Tito azalaki na mokumba ya koluka “moto oyo azangi efundeli, mobali na mwasi moko, oyo bana na ye bazali bandimi, baoyo bazali na mobulu te, batomboki mpe te.” (Tito 1:6) Ya solo, ebongi kotalela lolenge moklisto moko azali kobatela libota na ye mpo na koyeba soki azali na makoki ya kokokisa mokumba monene oyo etali kobatela lisangá.
4. Longola likambo ya kobondela mpe ya koyekola Biblia elongo na bana na bango, lolenge nini baboti baklisto bakomonisa bolingo mpo na mabota na bango?
4 Mibali oyo bazali kobongisa ndako na bango malamu bazali kosuka te bobele na kobondela mpe koyekola Biblia mbala na mbala elongo na mabota na bango. Bazali ntango nyonso komilengela mpo na kosalisa balingami na bango. Mpo na baoyo bazali na bana, yango ezali kobanda uta mokolo na kobotama. Baboti baklisto bayebi ete wana bakokangama na mimeseno malamu ya elimo, boye bana na bango bakomesene na misala ya boklisto na bomoi ya mokolo na mokolo. Ekomonana ete tata moklisto akokisi masengami ya kozala nkulutu na motindo azali kokamba ndako na ye na likambo yango.—Baefese 5:15, 16; Bafilipi 3:16.
5. Lolenge nini tata moklisto akoki kobokola bana na ye “kati na mpamela mpe mateya na Jéhovah”?
5 Baklisto oyo bazali na bopotu te bazali kokamba ndako na bango na kolanda toli oyo ya ntoma Paulo: “Boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bobokola bango na mateya mpe mpamela na Jéhovah.” (Baefese 6:4) Koyekola Biblia ntango nyonso kati na libota, elongo na mwasi mpe bana, ezali kopesa mabaku malamu mpo na litambwisi ya bolingo. Bana bazali kozwa na lolenge yango “discipline,” to mateya oyo mazali na mokano ya kosembola. “Mateya” oyo mazali kopesama mazali kosalisa mwana moko na moko na koyeba makanisi ya Jéhovah na ntina na makambo mosusu. (Deteronome 4:9; 6:6, 7; Masese 3:11; 22:6) Na ntango wana ya esengo ya elimo, tata ya bolingo akoyoka bana na ye na likebi nyonso wana bazali koloba. Na boboto nyonso, akotuna mituna oyo mikotinda bango na kolobela mitungisi na bango mpe komonisa mayoki na bango. Tata akokanisa te ete ayebi makambo nyonso oyo mazali na makanisi na bango ya bolenge. Likambo wana ezali solo, mpamba te Masese 18:13 elobi ete: “Ye oyo azongisi monoko na likambo naino ayoki yango te, yango ezali epai na ye ebebe mpe na nsoni.” Na mikolo na biso, baboti mingi bazali komona likambo oyo, ete: makambo oyo bana na bango bazali kokutana na yango makeseni na oyo bango moko bakutanaki na yango ntango bazalaki bilenge. Mpo na yango, liboso ya koyebisa lolenge likambo moko esengeli kobongisama, tata asengeli kosala makasi mpo na koyeba ebandeli ya likambo yango mpe lolenge nini esalemaki.—Tala Yakobo 1:19.
6. Mpo na nini tata moklisto asengeli kotalela Liloba na Nzambe ntango azali kosalisa libota na ye?
6 Nini ekosalema wana mitungisi, mikakatano mpe mayoki ya mwana eyebani? Tata oyo azali kokamba libota malamu, akotalela Makomami, oyo mazali kopesa “litomba na mateya, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobokola, kati na boyengebene.” Akolakisa mwana na ye lolenge ya kosalela mitinda ya Biblia, oyo mipemami na Nzambe. Na motindo yango, mwana akokóma “mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.”—2 Timoté 3:16, 17; Nzembo 78:1-4.
7. Ndakisa nini batata baklisto basengeli kopesa mpo na oyo etali libondeli?
7 Bilenge oyo bazali kobanga Nzambe bazali kokutana na mikakatano epai na baninga na bango ya eteyelo baoyo bazali baklisto te. Lolenge nini batata baklisto bakoki kosalisa bana na bango na kolongola bobangi? Ezali na kobondela ntango nyonso elongo na bango mpe mpo na bango. Ntango bilenge wana bakokutana na mikakatano makasi, bakomekola solo ezaleli ya baboti na bango ya kotya elikya epai na Nzambe. Elenge mwasi moko ya mibu 13, oyo batunaki ye liboso ya kozwa batisimo lokola elembo ya komipesa na ye epai na Nzambe, alobaki ete baninga na ye ya kelasi bazalaki koseka ye mpe kofinga ye. Mokolo moko ntango asalelaki Biblia mpo na kolóngisa bindimeli na ye na ntina na ezaleli ya bulee ya makila, bilenge basi mosusu babetaki ye mpe babwakelaki ye nsoi. (Misala 15:28, 29) Azongisaki nde mabe mpo na mabe? Te. Alobaki ete: “Nabondelaki mingi Jéhovah ete asalisa ngai mpo ete nabatela kimya na ngai. Namikundolaki lisusu batoli oyo baboti na ngai bateyaki ngai na boyekoli ya libota, na ntina ya komipekisa wana tozali konyokwama.”—2 Timoté 2:24.
8. Lolenge nini nkulutu oyo azali na bana te akoki kokamba ndako na ye malamu?
8 Nkulutu oyo azali na bana te akoki mpe kozwa bibongiseli malamu ya elimo mpe ya mosuni mpo na bato na ndako na ye. Nani akozwa litomba na yango? Mwasi na ye, mpe mbala mosusu baklisto oyo bazali bandeko na ye ya mosuni baoyo bazali kofanda na ndako na ye. (1 Timoté 5:8) Kokamba [ndako na ye moko] malamu, ezali moko na masengami esengeli mpo ete moto aponama lokola nkulutu kati na lisangá. Na bongo, lolenge nini bankulutu basengeli kotalela mokumba kitoko oyo bazali na yango kati na lisangá?
Bazali kokamba “na mobulu te”
9. Lolenge nini bankulutu basengeli kotalela mosala oyo bazali kokokisa yango?
9 Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, ntoma Paulo azalaki kosala lokola kapita kati na ndako na Nzambe, lisangá na boklisto oyo etyami na nse na bokonzi na Klisto. (Baefese 3:2, 7; 4:15) Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye baklisto oyo bazalaki na Loma ete: “Tozali na makabo motindo na motindo, pelamoko na ngolu epesami na biso; bongo tosalisa yango mosala. Soko tozwi likabo na kosakola, tosakola pelamoko na kondima. Soko likabo na kosalela bato, tosalela bango. Molakisi alakisa. Ye oyo azali na toli, apesa toli na ye. Mopesi na makabo apesa na motema malamu; oyo azali kokamba asala yango na mobulu te. Mosungi na mawa azala na esengo.”—Baloma 12:6-8.
10. Na lolenge na ye ya kobatela etonga na Nzambe, ndakisa nini ntoma Paulo atikelaki bankulutu ya mikolo na biso?
10 Ntoma Paulo akundweli Batesaloniki ete: “Boyebi ete lokola tata na bana na ye, tobyangi moko na moko na bino mpe toyikisi bino mpiko mpe totatweli bino ete botambola na bulee na Nzambe oyo abengi bino kino na Bokonzi na ye na nkembo.” (1 Batesaloniki 1:1; 2:11, 12) Ntoma Paulo apesaki elendiseli yango mpenza na boboto mpe na bolingo, yango wana akokaki kokoma ete: “Kasi, tokómi bato na malembe na kati na bino pelamoko mama oyo azali kobokola bana na ye mpenza. Boye, awa ezalaki biso na bolingo monene epai na bino, toselingwi kokabela bino bobele nsango malamu na Nzambe te kasi bomoi na biso mpenza, mpo ete bosili kokoma balingami na biso.” (1 Batesaloniki 2:7, 8) Na kolanda ndakisa ya ntoma Paulo oyo ayebaki komimonisa lokola tata, bankulutu ya sembo bazali komibanzabanza mpenza mpo na bato nyonso kati na lisangá.
11. Lolenge nini bankulutu bakoki komonisa molende na bango?
11 Boboto mpe ezaleli ezangi mobulu esengeli mpenza komonana na lolenge oyo baklisto babateli na biso ya sembo bazali kokokisa mokumba na bango ya bakengeli. Lolenge na bango ya kosala ezali na ntina mingi. Ntoma Petelo apesi bankulutu toli ete babatela etonga na Nzambe “na kopusama te” to “na mposa ya kozwa lifuti te.” (1 Petelo 5:2) Na likambo yango, molimboli na Biblia William Barclay apesaki likebisi moko. Akomaki ete: “Ezali na lolenge moko ya kondima mosala mpe ya kokokisa mosala na kotalela yango lokola mokumba ya makasi mpe ya kolembisa, lokola eloko moko ya bozito mingi. Ekoki kosalema ete basengi na moto moko asala mosala moko mpe asali yango, kasi kosala yango kozanga bosepeli mosala nyonso ekoki kobeba. . . . Nzokande, [Ntoma Petelo] amonisi ete baklisto nyonso basengeli, na nsomo, kozala na mposa makasi ya kokokisa mosala wana lokola ekoki na bango, wana ezali bango koyeba ete babongi mpenza na yango te.”
Bankulutu oyo bazali kosala na bolingo nyonso
12. Lolenge nini bankulutu bakoki komonisa ete bazali kosala na bolingo nyonso?
12 Ntoma Petelo apesi lisusu elendiseli oyo ete: “Bobatela etonga na Nzambe oyo ezali kati na bino . . . na bolingo nyonso.” Mokengeli moklisto oyo azali kobatela etonga azali kosala yango na bolingo nyonso, na kotindikama te, na nse ya litambwisi ya Mobateli Aleki malamu, Yesu Klisto. Kosala na bolingo nyonso elimboli lisusu ete mobateli moklisto asengeli kotosa bokonzi na Jéhovah, ˈMobateli mpe Mokengeli na milimo na biso.ˈ (1 Petelo 2:25) Moklisto mobateli molandi oyo azali kosala na bolingo nyonso amonisaka limemya na bibongiseli ya teokratike. Azali kosala yango wana azali kobenda likebi ya baoyo bayei koluka toli, kati na Liloba na Nzambe, Biblia. Atako eksperianse ezali kopesa na nkulutu moklisto libaku ya koyeba batoli mingi ya Biblia, yango elingi koloba te ete akoki kozwa nokinoki kati na Makomami batoli mpo na kosilisa mikakatano nyonso. Ata ayebi eyano na likambo yango, akoki komona ntina ya kosala bolukiluki—elongo na moto oyo atuni motuna—na ba Index des publications de la Société Watch Tower to ba index mosusu ya lolenge yango. Na bongo, azali koteya na mitindo mibale: azali komonisa lolenge ya kozwa biyano ya ntina, mpe na komikitisa nyonso azali komonisa limemya epai na Jéhovah na kobenda likebi likoló na makambo oyo lisangá na Nzambe ebimisaki kati na mikanda.
13. Matambe nini bankulutu bakoki kolanda mpo na kopesa batoli ya mayele?
13 Nkulutu akoki kosala nini soki motuna oyo batuni ye elobelami te kati na mikanda ya la Société? Na ntembe te, akobondela mpo na kozwa mayele mpe akoluka mitinda ya Biblia oyo mizali na boyokani na likambo yango. Akoki lisusu komona malamu na koyebisa na moto oyo azali koluka lisalisi ete atalela ndakisa na Yesu. Nkulutu akoki kotuna ete: “Soki Yesu, Moteyi Monene, azalaki na esika na yo, okanisi ete alingaki kosala nini?” (1 Bakolinti 2:16) Motindo wana ya kokanisa ekoki kotinda moto yango na kozwa ekateli ya mayele. Nzokande, ekozala malamu te ete nkulutu apesa mbala moko likanisi na ye lokola nde yango ezali toli ya mayele oyo euti na Biblia! Soki mikakatano ya makasi mibimi, bankulutu bakoki kozala mingi mpo na kotalela yango. Bakoki ata kotya makambo ya ntina mingi na molongo ya makambo oyo basengeli kotalela na likita ya collège ya bankulutu. (Masese 11:14) Bikateli oyo bakozwa ekopesa bango nzela ya koloba bango nyonso na motindo moko.—1 Bakolinti 1:10.
Bopolo ezali na ntina mingi
14, 15. Nini esengami na bankulutu wana basengeli kosembola moto oyo ˈanyati litambe mabe liboso ete asosola yangoˈ?
14 Nkulutu asengeli kozala na bopolo ntango azali koteya basusu, mingi mpenza wana azali kopesa bango toli. Ntoma Paulo apesi toli ete: “Bandeko, soko moto moko anyati litambe mabe liboso ete asosola yango, bino bato na elimo bomeka kosembola ye na elimo na bopolo.” (Bagalatia 6:1) Tozali komona ete liloba ya Greke oyo ebongolami awa na “kosembola” ezalaki liloba lisalelamaki na makambo matali kopasola bato, mpo na kolobela likambo ya kozongisa mokuwa oyo elongwi na esika na yango, mpo na kopengola ete moto oyo azoki atenguma te bomoi na ye mobimba. Molimboli na maloba, W. E. Vine azali kolobela yango lokola kozongisa na esika esengeli “bato oyo basali lisumu oyo bakokani na mokuwa oyo elongwi na esika na yango na nzoto ya elimo, na lisalisi ya bato na elimo.” Lolenge mosusu ya kobongola liloba wana ezali “kozongisa na esika oyo ebongi” to “kozongisa na molongo.”
15 Kosembola makanisi na biso moko emonanaka ete ezali mpasi; na bongo tozali kokanga ntina ete ezali likambo ya petee te mpo na kobongisa makanisi ya moto oyo abungi. Kasi soki topesi lisalisi na biso na elimo ya bopolo, lisalisi yango ekoki kondimama na botondi nyonso. Mpo na yango, esengeli na bankulutu ete balanda toli oyo ya ntoma Paulo: “Bomilatisa mitema mawa, na boboto, na kosokema, na bopolo, na mitema milai.” (Bakolose 3:12) Bankulutu basengeli kosala nini soki moto oyo azali na mposa ya kosembolama azali na ezaleli ya mabe? Basengeli ˈkolanda . . . bopolo.ˈ—1 Timoté 6:11.
Babateli oyo bazali na bakengi
16, 17. Bankulutu basengeli kokeba na makama nini ntango bazali kopesa toli?
16 Toli ya ntoma Paulo kati na Bagalatia 6:1 ezali mpe na mateya mosusu. Ntoma Paulo apesi elendiseli oyo epai na mibali oyo bazali na bizaleli bisengeli ya elimo: “Bosembola ye [moto oyo asali libunga] na elimo ya bopolo. Omibatela yo moko ete yo omekama te!” Makama minene makoki kobima soki balandi toli oyo te. Ntango ayokaki ete pastere moko ya lingomba ya Anglican asalaki ekobo (elongo na basi mibale ya paroisse na ye), mwasi moko mopanzi nsango akomaki kati na zulunalo Times ya Londres ete: “Esalemaka uta kala ete: moto moko, mopesi toli, oyo azali komonisa ezaleli ya tata to ya ndeko, akwei na lisumu elongo na moto oyo ayei koluka toli mpo ete moto yango atyelaki ye motema.” Azongelaki maloba ya monganga Peter Rutter, oyo alobaki ete “kati na mokili na biso oyo etiki bonsomi na kosangisa nzoto, makambo ya kobuba basi na mibali oyo bazali na bokonzi likoló na bango—minganga, ba avocats, basango mpe bakonzi na misala—ezali kosalema mingi, atako balobelaka te likambo yango ya mabe mpe ya nsoni.”
17 Tosengeli kokanisa te ete libota ya Jéhovah bazali kokutana te na masenginya motindo wana. Nkulutu moko oyo bandeko bazalaki komemya ye mingi, oyo asalelaki Nzambe na bosembo nyonso na boumeli ya bambula mingi, akweaki na ekobo mpo ete azalaki kokende kotala ndeko mwasi moko oyo asila kobala, wana ndeko mwasi yango azalaki bobele ye moko na ndako. Ya solo, ndeko mobali yango abongolaki motema; kasi abungisaki mikumba na ye nyonso. (1 Bakolinti 10:12) Mpo na yango, bankulutu basengeli kosala nini mpo ete bakwea na masenginya te wana bazali kokende kotala bandeko kati na mosala na bango ya babateli na mpate? Bibongiseli nini bakoki kozwa mpo na kosolola elongo na ndeko moko, mpo na kobondela, mpo na kotanga Biblia mpe kotalela mikanda ya boklisto elongo na ye?
18. (a) Lolenge nini kotosa ebongiseli ya bokonzi, ekoki kosalisa bankulutu na kopengola makambo oyo makoki komema na lisumu? (b) Bibongiseli nini bankulutu bakoki kozwa mpo na kotala ndeko mwasi moko na mosala na bango ya babateli na mpate?
18 Bankulutu basengeli kotosa ebongiseli ya bokonzi. (1 Bakolinti 11:3) Soki elenge moko ya lisangá ayei koluka lisalisi epai na yo, salá makasi—soki likoki ezali—kokotisa baboti na ye kati na lisoló yango. Soki ndeko mwasi moklisto oyo asila kobala ayei kosenga lisalisi epai na yo, okoki nde kozwa bibongiseli mpo ete mobali na ye akoka kozala na ntango ya visite? Kasi okosala nini soki likoki ezali te to soki mobali na ye azali mondimi te mpe azali konyokola ye? Na makambo ya lolenge yango, ebongi kosala lokola osalaka ntango ya visite pastorale epai ya bandeko basi oyo bazali minzemba. Ebongi ete bandeko mibali mibale oyo bazali na bizaleli ya elimo bisengami bakende elongo kotala ndeko mwasi wana. Soki likoki ezali te ya kosala bongo, mbala mosusu bandeko mibale bakoki koluka ntango oyo ebongi mpo na kosolola elongo na ye kati na Salle du Royaume, mwa mosika na bandeko to na eteni mosusu ya ndako pembeni. Na yango, ata soko bandeko mosusu mibali mpe basi bazali kati na salle, moto moko te akobeta libaku wana bakoki te komona mpe koyoka makambo oyo mazali kolobama.—Bafilipi 1:9, 10.
19. Matomba nini kitoko mazali kozwama wana etonga na Nzambe ebatelami na bolingo nyonso, mpe tosengeli komonisa botondi epai ya nani mpo ete apesi biso babateli oyo bazali kosala na bolingo nyonso?
19 Kobatela bampate na Nzambe na bolingo nyonso, epesaka matomba malamu: etonga ekozala makasi na elimo mpe ekotambwisama malamu. Lokola ntoma Paulo, bankulutu ya mikolo na biso bazali komibanzabanza mpo na bandeko na bango baklisto. (2 Bakolinti 11:28) Na mikolo ya mpasi oyo tozali kobika na yango, kobatela etonga na Nzambe ezali mokumba moko monene. Mpo na yango, tozali solo na botondi epai na bandeko na biso oyo bazali kosala lokola bankulutu mpo na mosala kitoko oyo bazali kokokisa. (1 Timoté 5:17) Tozali kokumisa Ye oyo azali Mopesi na “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi,” Mobateli malamu na biso ya likoló, Jéhovah oyo apesi biso “makabo na lolenge na mibali” wana mpo na kobatela biso na bolingo nyonso.—Baefese 4:8; Yakobo 1:17.
Okoki kopesa eyano nini?
◻ Lolenge nini moto akoki kokamba ndako na ye malamu?
◻ Bizaleli nini bankulutu basengeli komonisa kati na mosala na bango ya bakɛngɛli baklisto?
◻ Lolenge nini bankulutu bakoki komonisa komikitisa mpe bopolo, wana bazali kopesa toli?
◻ Lolenge nini tokoki kosaia malamu mpo na kosembola moto na elimo?
◻ Ntango bazali kobatela etonga, lolenge nini bankulutu bakoki kopengola makambo oyo makoki kobimisa makámá?
[Elilingi na lokasa 18]
Nkulutu asengeli kokamba ndako na ye malamu
[Elilingi na lokasa 21]
Mosala ya mobateli moklisto esongeli kosalema na bopolo mpe na mayele