Okolanda Jéhovah na motema na yo mobimba?
“BAYENGEBENE bazali na mpiko lokola nkosi.” (Masese 28:1) Bazali komonisa kondima, na elikya nyonso bazali kosalela Liloba na Nzambe, mpe na molende nyonso bazali kokende liboso kati na mosala na Jéhovah atako mikakatano mizali.
Ntango Bayisraele bazalaki na Sinai nsima wana Nzambe abimisaki bango longwa na boombo na Ezipito na ekeke ya 16 L.T.B., mibali mibale bamonisaki mpenza ete bazalaki na mpiko lokola nkosi. Bamonisaki mpe bosembo epai na Jéhovah kati na bantango ya mikakatano. Moko kati na mibali wana azalaki Yosua moto na libota na Efalaima, oyo azalaki mosaleli na Moize mpe oyo aponamaki na nsima lokola mokitani na ye. (Exode 33:11; Mituya 13:8, 16; Deteronome 34:9; Yosua 1:1, 2) Mosusu azalaki Kalebe, mwana na Yefune na libota na Yuda.—Mituya 13:6; 32:12.
Na bosembo nyonso mpe na molende nyonso, Kalebe asalaki mokano na Jéhovah. Bomoi na ye molai ya mosaleli na sembo kati na mosala na Nzambe epesaki ye nzela na koloba ete ˈalandaki Jéhovah na motema na ye mobimba.ˈ (Yosua 14:8, MN) Tozali kotanga kati na Liloba lya Nzambe ete: “Natosaki Yawe Nzambe wa ngai na motema moko.” Kalebe “atosaki na bosembo nyonso,” to “na bosembo nyonso akokisaki mokano ya,” Jéhovah Nzambe. (Todayˈs English Version; The New English Bible) Na elobeli mosusu, Kalebe alobaki ete: “Ngai ... nalandaki NKOLO na ngai Nzambe na motema na ngai mobimba.” (New International Version) Ezali boni mpo na yo? Ozali kolanda Jéhovah na motema na yo mobimba?
Bazali konɔnga Mokili
Omimona yo moko ete ozali kati na Bayisraele mwa ntango moke nsima wana Jéhovah abimisaki bango longwa na boombo ya bato na Ezipito. Tala lolenge nini mosakoli Moize na bosembo nyonso alandaki malako oyo Nzambe apesaki. Ee, mpe okomona ete Kalebe andimisamaki ete Jéhovah azalaki elongo na libota na Ye.
Ezali na mbula ya mibale nsima na kobima longwa na Ezipito, mpe Bayisraele basalaki molako na Kadesi-balenea kati na mokili mokauki ya Paran. Batelemaki na ndelo ya Mokili na Ndaká. Na boyokani na etinda na Nzambe, Moize amibongisaki mpo na kotinda banɔngi 12 na Kanana. Alobi ete: “Buta kuna na mokili na ngɛlɛ mpe na mokili na ngomba, mpe tala lolenge na mokili, soko bato bafandi na yango bazali makasi to motau, soko bazali mingi te to bazali mingi, mpe soko mokili mofandi bango mozali malamu to mabe, mpe soko mboka na bango ezali na milako to mboka ezingami makasi, mpe soko mabelé mazali na mafuta to mazali mabe, mpe soko nganda ezali na yango to ezali te. Boyika mpiko malamu mpe bozonga na ndambo na mbuma na mokili yango.”—Mituya 13:17-20.
Mibali 12 babandi mobembo na bango wana ya mpasi. Mobembo na bango ekoumela mikolo 40. Na Hebɛloni bamoni mibali ya milai mingi. Na lobwaku na Esɛkoli, bamoni ete mokili ezali kobota mbuma mingi mpe bazwaki ekateli ya kozonga na ndambo na mbuma na yango. Etape na ebolo ya mbuma na vinyo oyo bakati ezali bozito mingi na boye ete esengeli mibali mibale mpo na komema yango na nzete!—Mituya 13: 21-25.
Wana ezongaki bango na molako ya Bayisraele, banɔngi bayebisi makambo bakutanaki na yango: “Tokomi na mokili kuna etindi yo biso. Yango eleki na mabele mpe na mafuta na nzoi, mpe oyo ezali mbuma na yango. Kasi bato bafandi kuna bazali makasi, mpe mboka na bango ezingami makasi mpe ezali minene mingi, mpe tomoni bana na Anaki wana lokola. Baamaleki bazali kofanda na mokili na ngɛlɛ. Bahiti mpe Bayebusi mpe Baamola bazali kofanda na mokili na ngomba. Bakanana bazali kofanda na libongo na mai monene mpe pembeni na Yaladene.” (Mituya 13:26-29) Banɔngi zomi basepelaki te na kondima mitinda na Nzambe mpe na kokota na Mokili na ndaká.
“Jehovah azali elongo na biso”
Nzokande, Kalebe, monɔngi na mpiko, oyo azali na kondima epai na Nzambe apesi toli oyo: “Tobuta kuna noki mpe tokamata mokili yango, mpo ete tokoki kobuka bango malamu.” Kasi banɔngi zomi bandimaki likanisi wana te, balobaki ete bafandi na Kanana bazali makasi mingi koleka Bayisraele. Banɔngi wana ya bobangi mpe bazangi kondima bazali komimona ete bazali lokola mayoyo.—Mituya 13:30-33.
“Jéhovah azali elongo na biso. Bobanga bango te,” ezali wana maloba ya Kalebe mpe Yosua. Bato baboyaki koyoka bango. Wana bato bazalaki koloba ete babamba bango mabanga, Nzambe akamataki maloba mpe alobaki ekateli moko likoló na bato oyo baimaimaki: “Moto moko na bino te akokota na mokili mosimbaki ngai ndai ete nakofandisa bino wana, bobele Kalebe mwana na Yefune mpe Yosua mwana na Nuni. Nde bana na bino ... nakokotisa bango mpe bango bakoyeba mokili motyoli bino. ... Bana na bino bakozala babateli na mpate na mokili mokauki oyo mbula ntuku minei, ... kino ebembe na bino na nsuka epoli na mokili mokauki. Bokomema mabe na bino pelamoko na motuya na mikolo minɔngaki bino mokili yango, mikolo ntuku minei, mbula moko mpo na mokolo moko, mbula ntuku minei.”—Mituya 14:9, 30-34.
Ntango nyonso sembo nsima na bambula mingi
Mibu 40 ya etumbu ekomi na nsuka na yango, mpe liwa esilisi libota mobimba ya bato oyo baimaimaki. Kasi Kalebe mpe Yosua bazali ntango nyonso sembo epai na Nzambe. Kati na bisobe na Moaba, Moize mpe Nganga Monene Eleazare batangaki motuya ya mibali babundi oyo bazalaki na mibu kobanda 20 kino na likoló. Nzambe aponaki mobali moko mpo na libota moko na moko na Yisraele oyo bakopesa ye eteni ya Mokili na Ndaka. Kalebe, Yosua, mpe Eleazare bazali kati na bango. (Mituya 34:17-29) Atako sikawa azali na mibu 79, Kalebe azali ntango nyonso makasi, sembo mpe molende.
Ntango Moize mpe Alona batangaki motuya na bato na Sinai mwa moke liboso ete baboya na bobangi nyonso kokota na mokili na Kanana, Yisraele ezalaki na mibali babundi 603.550. Nsima na mibu ntuku minei kati na mokili mokauki, limpinga ya babundi lizalaki na motuya moke ya bato 601.730. (Mituya 1:44-46; 26:51) Nzokande, elongo na Yosua liboso na bango mpe mosembwi Kalebe kati na bango, Bayisraele bakotaki na Mokili na Ndaká mpe bazalaki ntango nyonso kolónga na bitumba. Lokola Yosua mpe Kalebe bazalaki kondima yango ezalaki Jéhovah nde azalaki kolónga bitumba mpo na libota na ye.
Wana ekatisaki bango ebale Yaladene elongo na mibali babundi na Yisraele, Yosua mpe Kalebe lokola bazalaki mibange, bandimaki mokumba na bango kati na bitumba oyo bilandaki na nsima. Nzokande, nsima na mibu motoba ya bitumba, ndambo monene ya mokili etikalaki naino oyo basengelaki kokamata yango. Jéhovah akobengana bafandi na mokili yango kasi sikawa apesi etinda ete mokili mopesama na nzela na mondenge kati na mabota na Yisraele.—Yosua 13:1-7.
Alandaki Jéhovah na motema na ye mobimba
Lokola mobundi na kala ya bitumba mingi, Kalebe atelemi liboso na Yosua mpe alobi ete: “Ngai nazalaki na mbula ntuku minei na mokolo Moize, moombo na Jéhovah, atindaki ngai longwa na Kadesi-balenea mpo na konɔnga mokili. Ngai mpe nazongaki lisusu na monoko lokola ezalaki na motema na ngai. Bandeko na ngai nde baoyo babutaki na ngai elongo, banangwisaki mitema na bato, kasi ngai nalandaki Jéhovah Nzambe na ngai na motema na ngai mobimba.” (Yosua 14:6-8, MN) Ee, Kalebe alandaki Jéhovah na motema na ye mobimba, na bosembo nyonso asalaki mokano na Nzambe.
Kalebe abakisaki ete: “Na yango, Moize asimbaki ndai na mokolo yango ete ˈSolo mokili enyati makolo na yo mokozala libula na yo mpe na bana na yo libela mpo ete olandaki Jéhovah Nzambe na ngai na motema na yo mobimba.ˈ Mpe sikawa tala, Jéhovah abateli ngai na bomoi mbula ntuku minei na mitano oyo longwa na ntango Jéhovah alobelaki Moize [maloba] oyo, wana etambolaki Yisraele na mokili mokauki, lokola elobelaki ye; mpe tala, lelo nazali na mbula ntuku mwambe na mitano. Natikali na makasi kino lelo oyo lokola na mokolo Moize atindaki ngai. Nguya na ngai sikawa ezali pelamoko ezalaki nguya na ngai na ntango yango mpo na etumba mpe na kokende mpe na kozonga. Na bongo pesa ngai mokili na ngomba oyo etangaki Jéhovah na mokolo yango, mpo ete Baanaki bazalaki wana, na mboka minene ezingamaki makasi. Soko Jéhovah akozala na ngai elongo, mbele nakobimisa bango lokola elobaki Jéhovah.” Kalebe sikawa azwi Hɛbɛloni lokola libula.—Yosua 14:9-15.
Mobange Kalebe azwaki eteni oyo ezalaki na mikakatano koleka—etuka oyo ezalaki na mibali milai koleka. Kasi yango ezali mpasi mingi te mpo na mobundi wana oyo azalaki na mibu 85. Nsima na mwa ntango bilombe wana oyo bazalaki kofanda na Hɛbɛloni balóngaki te na etumba. Otaniele, mwana ya leki ya Kalebe mpe mosambisi na Yisraele, akamati engumba Debili. Bingumba wana mibale bikomaki na nsima esika Balevi bazalaki kofanda, mpe Hɛbɛloni ekomaki engumba na kobombama mpo na moto oyo abomi moto na nko te.—Yosua 15:13-19; 21:3, 11-16; Basambisi 1:9-15, 20.
Tolanda ntango nyonso Jéhovah na motema na biso mobimba
Kalebe mpe Yosua bazalaki bato bazangi kokoka. Nzokande, na bosembo nyonso basalaki mokano na Jéhovah. Kondima na bango elembaki te na boumeli ya mbula 40 ya mpasi oyo balekisaki kati na mokili mokauki mpo ete Yisraele ezangaki kotosa Nzambe. Bobele bongo, basaleli na Jéhovah ya ntango na biso bazali kopesa nzela na eloko moko te ete ebebisa mosala bango oyo bazali kosala mpo na lokomu na Nzambe. Lokola bayebi ete etumba ezali kati na lisanga na Nzambe mpe lisanga na Satan le Diable, bazali kotikala ngwi mpe bazali koluka ntango nyonso kosepelisa Tata na bango ya likoló na makambo nyonso.
Na ndakisa, bato mingi kati na libota na Jéhovah, bandimi kokumisa Elambo na Nkolo, to Ekaniseli ya Liwa na Yesu Klisto, ezala ete bakonyokwama to mpe kobomama. (1 Bakolinti 11:23-26) Mpo na yango, mwasi moklisto moko oyo akangamaki na Camp de concentration ya Nazi na boumeli ya Etumba na Mibale ya mokili mobimba ayebisaki ete:
“Balobaki na bato nyonso ete basengeli kozala na esika basukolaka bilamba na 11 heures ya butu. Ntango 11 heures ya butu ekokaki, toyanganaki biso nyonso na motuya ya bato 105. Tozingamaki kati na biso mpe na katikati ezalaki na mesa ya moke oyo ezalaki na elamba ya pembe likoló na yango limpa mpe vinyo etyamaki. Buzi moko engengisaki esika tozalaki, mpamba te pole ya lontiliki elingaki kofunda biso. Tozalaki komiyoka lokola baklisto ya liboso kati na mabulu na nse ya mabelé. Ezalaki molulu moko monene. Tomonisaki lisusu na Tata na biso ndai eutaki na motema oyo tosalaki ya kosalela makasi na biso nyonso mpo na kolongisama ya nkombo na Ye mosantu, kokangama na bosembo nyonso na Teokrasi.”
Atako minyoko oyo tozali kokutana na yango mpo ete tozali basaleli na Jéhovah, tokoki kotya elikya na nguya oyo Nzambe azali kopesa mpo na kosalela ye na mpiko nyonso mpe kokumisa nkombo na ye mosantu. (Bafilipi 4:13) Lokola tozali kosala makasi mpo na kosepelisa Jéhovah, ekozala malamu mpo na biso na komikundola ndakisa ya Kalebe. Ndakisa na ye ya kolanda Jéhovah na motema na ye mobimba esalaki bopusi mingi likoló na elenge mobali moko oyo akotaki kati na mosala ya kosakola lokola pionnier na 1921. Akomaki ete:
“Atako kokóma pionnier elimbolaki mpo na ngai kotika mosala kitoko kati na enyateli ya sika ya mikanda na Coventry [Angleterre] nazalaki na mawa mpo na yango te. Komipesa na ngai esilaki kokata likambo; bomoi na ngai epesamaki na Nzambe. Nazalaki komikundola Kalebe, oyo akotaki na Mokili na Ndaka elongo na Yosua mpe mpo na ye bazalaki koloba ete ˈAlandaki Jéhovah na motema na ye mobimba.ˈ (Yos. 14:8) Yango emonanaki mpo na ngai ezaleli moko kitoko. Nayebaki ete kosalela Nzambe ˈna motema mobimbaˈ ekokaki kokomisa bomoi na ngai oyo nasilaki kopesa malamu koleka; ekokaki kopesa ngai mabaku kitoko mpo na kobota mbuma na elimo oyo ezali komonisa moklisto.”
Kalebe apambolamaki mpenza mpo na bosembo na ye na kolanda Jéhovah na motema na ye mobimba, ntango nyonso alukaki kosala mokano na Nzambe. Lokola ye, basusu bazwaki esengo monene mpe mapamboli kati na mosala na Nzembe. Tika ete omitambwisa lokola moto oyo azali kolanda ntango nyonso Jéhovah na motema mobimba.
[Elilingi na lokasa 26]
Kalebe mpe Yosua bazalaki sembo epai na Jéhovah kati na komekama. Ezali bongo mpo na yo?