Bokonzi ya kala oyo etungisaki batyoli ya Biblia
“Na ntango ya kala, lisoló ya bokonzi ya Asulia ezalaki moko na mikapo eleki molili ya mikanda ya kolandana ya masolo ya mokili.” “Makambo nyonso oyo toyebaki na ntina na Ninive ya ntango na kala epalanganaki kati na mwa masolo mpe bisakweli ya Biblia oyo ezali kolobela yango, mpe kati na mwa bansango ya likololikolo mpe ya ndambondambo ya lisoló ya Asulia euti na Diodore de Sicile ... mpe basusu.”—Encyclopédie ya makomi ya Biblia (na Lingelesi), Volumes 1 mpe 3, 1862.
MOKOMI ya lisoló ya kala Diodore de Sicile azalaki na bomoi esili koleka mibu 2.000. Alobaki ete Ninive ezalaki engumba moko ya bipai minei; bipai na yango nyonso minei ezalaki na bolai ya ba setada 480. Zolongano na yango ezalaki na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 96! Biblia epesi likanisi bobele moko na ntina na yango, emonisi Ninive lokola engumba monene “na mikolo misato mpo na kokatisa yango.”—Yona 3:3.
Batyoli ya Biblia na ekeke ya 19 baboyaki kondima ete engumba moko oyo eyebani te ya ntango na kala ekokaki kozala monene bongo. Balobaki lisusu ete soki Ninive ezalaki, esengelaki kozala eteni ya civilisation ya kala oyo ezalaki liboso na Babilone.
Likanisi wana ekesenaki na Genese mokapo 10, epai tozali kotanga ete mokitani moko ya Noa, na nkombo Nimrode, atongaki bokonzi ya liboso ya politike na etúka ya Babel (Babilone). Biblia elandi ete: “AIongwaki na mokili yango mpe akendaki na Asulia mpe atongaki Ninive mpe Lehobotili mpe Kala mpe Lɛsɛnɛ kati na Ninive mpe Kala. Yango ezalaki mboka monene.” (Genese 10:8-12) Totala ete Makomami matangi bingumba yango minei ya sika ya Asulia lokola “mboka moko monene.”
Na 1843, archéologue ya ekolo France, Paul-Émile Botta, akundolaki bitika ya ndako ya mokonzi oyo, lokola bamonisaki yango, ezalaki ya engumba moko ya Asulia. Nsango ya bokundoli wana esepelisaki mokili mobimba. Alan Millard alimboli kati na mokanda na ye Trésors des temps bibliques (na Lingelesi) ete: “Bato basepelaki mingi ntango bamonisaki ete ndako yango ezalaki ya Sargon, mokonzi ya Asulia oyo alobelami na Yisaya 20:1, oyo bandimaki te ete azalaki na bomoi mpamba te elembo na yango moko te emonanaki.”
Na kati wana, archéologue mosusu, Austen Henry Layard, abandaki kotimola bitika na esika moko ebengami Nimroud penepene bakilomɛtɛlɛ 42 na sud-ouest ya Khursabād. Bitika yango bizalaki ya Kala—moko na bingumba minei ya Asulia oyo etangami na Genese 10:11. Na nsima, na 1849, Layard akundolaki bitika ya ndako moko monene na esika ebengami Quyunjiq, kati na Kala mpe Khursabād. Ndako yango ya mokonzi ezalaki eteni ya Ninive. Kati na Khursabād mpe Kala ezali na bituluku ya bandako, oyo kati na yango libóndo moko ebengami Kéremles. Layard amonisaki ete: “Soki tozwi mabóndo minei ya Nimrúd [Calah], Quyunjik [Ninive], Khursabād, mpe Kéremles, lokola matúmu ya carré moko, tokomona ete bipai na yango ekokani na setada 480 to miles 60 [bakilomɛtɛlɛ 96] eyokani na géographie, oyo ekokani na ˈnzela ya mikolo misatoˈ ya mosakoli [Yona].”
Emonani lokola ete, Yona asangisaki bisika wana nyonso kati na “engumba moko monene,” oyo abengaki na nkombo ya engumba oyo etangami na esika ya liboso kati na Genese 10:11, elingi koloba Ninive. Lelo mpe basalaka bongo. Na ndakisa, bakesene ezali kati na engumba mpenza ya Londres mpe mamboka pembeni na yango, oyo eyikani na yango, oyo mbala mosusu babengaka “Londres Monene.”
Mokonzi ya lofundo ya Asulia
Ndako na mokonzi na Ninive ezalaki na biteni 70, penepene kilomɛtɛlɛ misato ya bifelo. Likoló ya bifelo wana ezali na bitika biziki ya bililingi oyo ezali kokanisela elonga ya bitumba mpe makambo mosusu ya nkembo. Bikeko mingi ebebaki. Nzokande, na nsuka ya mikolo oyo alekisaki kuna, Layard akundolaki eteni moko oyo ebatelamaki mpenza malamu. likoló na bifelo bakoki komona elilingi moko ezali kolakisa kokamatama ya engumba moko ezingami na bifelo mpe bakangami bazali kotambola liboso na mokonzi molongi, oyo afandi na kiti na ye ya bokonzi libanda ya engumba. likoló na mokonzi, makomi moko oyo bayekoli ya makomi ya Asulia bazali kobongola yango boye: “Sin-ahhê-eriba (Senakeliba), mokonzi ya molongo, mokonzi ya Asulia, afandi na kiti mpe bakangami ya Lakisu (Lakish) bazali koleka liboso na ye.”
Lelo oyo, tokoki komona elilingi yango mpe makomi yango na British Museum. Eyokani na likambo oyo eyebisami kati na Biblia na 2 Mikonzi 18:13, 14: “Na elanga ya zomi na minei ya mokonzi Hizikiya, Senakeliba mokonzi ya Asulia, ayelaki mboka nyonso na mapango na Yuda mpe apunzaki yango. Hizikiya mokonzi na Yuda, atindaki epai na mokonzi na Asulia na Lakisi, alobaki ete: ˈNasali mabe, zonga na liboso na ngai; etumbu oyo yo olingi kotiela ngai, nakokumba yango.ˈ Mokonzi na Asulia akatelaki Hizikiya, mokonzi na Yuda, talanta nkama misato na palata mpe talanta ntuku misato ya wolo.”
Kati na bitika ya Ninive, bakundolaki makomi mosusu oyo ezali koyebisa makambo mingi na ntina ya kokamatama ya Yuda na Senakeliba mpe mpako ya Hizikiya. Layard akomaki ete: “Motuya ya mosolo Hizikiya asengelaki kopesa, talanta ntuku misato ekokani kati na masolo mibale oyo ezwami na bisika bikeseni; bakokani ya matatoli wana mibale ezali na ntembe te likambo ya ntina mingi.” Sir Henry Rawlinson, oyo asalisaki na kotanga makomi ya Asulia ayambolaki ete makomi wana “elongolaki ntembe nyonso likoló na lisoló ya [Senakeliba].” Lisusu, kati na mokanda na ye Ninive mpe Babilone (na Lingelesi), Layard abimisi motuna oyo: “Nani alingaki kondima, liboso na bakundoli oyo ete, na nse ya mabelé mpe bitika mingi na esika ezalaki Ninive, bakokaki kozwa lisoló ya bitumba kati na Hizikya mpe Senakeliba, oyo ekomami na Senakeliba ye moko na eleko oyo makambo yango masalemaki, mpe mandimisi makambo nyonso oyo mazali kati na lisoló na yango na Biblia?”
Ya solo, makambo mosusu ya lisoló ya Senakeliba mayokani na lisoló ya Biblia te. Na ndakisa, archéologue Alan Millard amonisi ete: “Likambo oyo eleki kokamwisa ezali na nsuka [ya lisoló ya Senakeliba]. Hizikiya atindaki ntoma na ye, elongo na mosolo ya mpako nyonso, epai na Senakeliba ˈna nsima, na Ninive.ˈ Basoda ya Asulia bamemaki mpako epai na bango te na nkembo nyonso lokola na momeseno.” Biblia eyebisi ete mpako yango efutamaki liboso ete mokonzi na Asulia azonga na Ninive. (2 Mikonzi 8:15-17) Mpo na nini bokeseni wana? Mpe mpo na nini Senakeliba amikumisaki te ete alongaki mboka-mokonzi na Yuda, Yelusaleme, lokola asalaki yango mpo na mboka ebatelami ya Lakisu? Bakomi misato ya Biblia bapesi biso eyano na yango. Moko na bango, oyo amonaki makambo yango akomaki ete: “Bongo anzelu na Jéhovah abimaki mpe abetaki kati na efandelo na Baasulia, bato nkoto mokama na ntuku mwambe na mitano. Elongwaki bango na mpongi na ntongo, tala, bazalaki nyonso bibembe. Boye Senakeliba mokonzi na Asulia alongwaki, akendaki mpe azongaki; afandaki na Ninive.”—Yisaya 37:36, 37; 2 Mikonzi 19:35; 2 Ntango 32:21.
Kati na mokanda na ye Trésors des temps bibliques, Millard asukisi ete: “Ntina ya kotya ntembe na lisoló oyo ezali te ... Ya solo, Senakeliba akokaki te kokoma likámá motindo wana. Bakitani na ye balingaki kotanga yango mpe kotyola ye.” Na esika ya kosala bongo, Senakeliba amekaki nde komonisa ete bokoti na ye na Yuda ezalaki mpenza elonga monene, mpe ete Hizikiya azalaki ntango nyonso kotosa, na kotindaka mpako na Ninive.
Ebandeli ya Asulia emonisami
Bakundolaki na Ninive babiblioteke oyo ezalaki na ebele ya bankoto ya bitando ya mabelé. Makomi wana mazali komonisa ete bokonzi ya Asulia ebandaki na sud, na Babilone, lokola Genese 10:11 emonisi yango. Ntango balandaki liyebisi wana, ba archéologues babandaki kotya milende mpo na kolukaluka epai na sud. Mokanda, Encyclopédie ya Biblia (na Lingelesi) elimboli ete: “Biloko nyonso oyo Baasulia batiki nsima na bango ezali komonisa eutelo na bango na Babilone. Monoko mpe lolenge ya makomi na bango, mikanda, losambo mpe zébi na bango euti na baninga na bango ya sud, soko tolongoli bobele makambo moke ya kokesena.”
Bokundoli wana ememaki batyoli ya Biblia na kozala na bokatikati. Ya solo, botaleli ya penepene ya Biblia ezali komonisa ete ekomamaki na bato ya bizaleli malamu mpe ya kolongobana. Nsima ya kosala bolukiluki likoló na Biblia, mokambi ya kala ya Cour Suprème ya Etata-Unis, Salmon P. Chase, alobaki ete: “Ezalaki boyekoli moko molai, ya makasi mpe ya mozindo. Nasalelaki mitinda yango mpo na kotalela likambo wana ya losambo lokola nasalaka mpo na kokata makambo ya mosuni. Nzokande, nakomaki na bosukisi oyo ete, Biblia ezali mokanda moko eleki mayele na bato, oyo euti na Nzambe.”—Maloba ya ebandeli mpo na Mokanda moleki mikanda nyonso (na Lingelesi).
Biblia ezali bobele te mokanda ya makambo masalemaki solo oyo masolami kati na yango. Ezali nde Liloba lipemami na Nzambe, likabo mpo na bolamu na bato. (2 Timoté 3:16) Tokomona bilembeteli na yango ntango tokoyekola géographie ya Biblia. Ezali yango nde nimero na biso oyo elandi ekolobela.
[Bililingi na lokasa 6, 7]
Na likoló: makambo misato malakisami na bililingi ya efelo moko
Na nse: dessin ya bililingi ya efelo ya Asulia ezali komonisa kokamatama ya Lakisu
[Eutelo ya bafɔtɔs]
(Courtesy of The British Museum)
(From The Bible in the British Museum, published by British Museum Press)
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]
Courtesy of the Trustees of The British Museum