“Oboya masapo ya lokuta”
BIBLIA etondi na makambo mpe masoló na ntina na bato. Tozali kosepela te bobele na kotánga yango, kasi tozali lisusu kozwela yango matomba. Ntoma Paulo akomelaki lisangá ya baklisto ya Loma ete: “Mpɔ na yɔnsɔ ikomamaki kalakala, ikomami mpo na kolakisa biso ete tojala na elikia na njela na koyika mpiko mpe na kolendisa na makomi.”—Baloma 15:4.
Paulo ye moko mpe ayebisaki makambo oyo akutanaki na yango. Biblia ezali koloba na ntina na ntoma Paulo mpe Balanaba, na nsuka ya mobembo na bango ya liboso ya misionere, ete: “Esili bango kokóma [na Antiɔka ya Sulia] mpe koyanganisa [lisangá, NW] basakoli misala yɔnsɔ misalaki Njambe na bango elɔngɔ.” (Misala 14:27) Ntembe ezali te ete bandeko bayikisamaki mpenza mpiko na masoló wana.
Kasi, masoló nyonso mazali ya kolendisa te. Na kopemama na Nzambe, ntoma Paulo apesaki Timoté toli oyo ete: “Oboya masapo ya lokuta oyo mazali kotuka makambo na bulɛɛ mpe oyo basi mibangé babetaka.” (1 Timoté 4:7, NW) Mpe akomaki epai na Tito ete baklisto ya sembo basengelaki kotya likebi na “masɛsɛ na Bayuda tɛ sɔkɔ na malako na bato tɛ; baoyo bajali koboya makambo na sɔlɔ.”—Tito 1:14.
Masese, to masapo yango ya lokuta mazalaki nini? Maloba wana mibale mauti na liloba ya Greke myʹthos (“lisapo”). Búku The International Standard Bible Encyclopaedia elobi ete liloba wana ezali kolobela “lisoló moko (ya losambo) oyo ezali na boyokani te na solo.”
Na eleko ya ntoma Paulo, mokili motondaki na masoló motindo wana. Na ndakisa, mokanda ya Tobie oyo epemami te, ekoki kozala ete ekomamaki mpenza koleka mibu nkámá mibale liboso ya eleko ya Paulo. Lisoló yango ezali koloba na ntina na Tobit, Moyuda moko oyo azalaki na bobangi Nzambe, oyo akufaki miso na ntango nyei ya ndeke moko ekwelaki ye na miso. Na nsima, atindaki mwana na ye, Tobie ete akende kozwa mosolo mosengelaki kopesamela ye. Na nzela, kokambamáká na anzelu moko, Tobie azwaki motema, libale, mpe lolɛmbɛ ya mbisi moko. Na nsima, akutanaki na mwasi moko mokufeli-mobali, kasi atako abalaki mbala nsambo, asangisaki naino nzoto na mobali te mpo ete mibali wana nyonso bazalaki kobomama na elimo mabe moko na butu ya mokolo ya libala. Na kolandáká etindá ya anzelu wana, abalaki mwasi yango mpe abenganaki demó wana na kotumbáká motema mpe libale ya mbisi wana. Na nsima, na lisalisi ya lolɛmbɛ ya mbisi wana, abongisaki miso ya tata na ye.
Emonani polele ete lisapo oyo lizali solo te. Longola likambo oyo ete euti bobele na makanisi mpamba mpe na misala ya biyambayamba, ezali mpe na mabungá. Na ndakisa, lisoló yango elobi ete Tobit amonaki botomboki ya mabota ya nɔ́rdi mpe komemama ya Bayisraele na Ninive, nzokande lisoló ya Yisraele, mibu 257 milekaki katikati na kosalema ya makambo wana mibale. Kasi, lisapo yango elobi ete Tobit azalaki na mibu 112 na ntango akufaki.—Tobie 1:4, 11; 14: 1, Biblia Liloba lya Nzambe.
Masapo motindo oyo makeseni mpenza na “lolenge na maloba sembo” oyo masakolami na basaleli ya sembo ya Nzambe. (2 Timɔtɛ 1:13) Euti bongo na makanisi mpamba oyo makeseni mpenza na makambo ya solo oyo esalemaki kati na lisoló ya bato, ezali lolenge ya masoló oyo mibangé basi oyo bayebi Nzambe te basololaka yango. Yango ezalaki masoló oyo baklisto basengelaki koboya.
Tómekaka maloba ya solo
Masapo motindo wana mazali kofuluka mingi lelo oyo. Paulo akomaki ete: “Mpɔ ete ntango ekoya wana ekoyokaka bato mateyo na sembo tɛ kasi, . . . bakopɛngwa longwa na makambo na sɔlɔ, bakobongwa koyoka masese na mpamba.” (2 Timɔtɛ 4:3, 4) Na mikili misusu, masapo na ntina na bilímá epalangani mpe ezali kolingama na bato mingi. Na bwanya nyonso, baklisto bazali “komeka maloba” oyo mauti na masapo ya mangomba mpo na kotala soki ezali na boyokani na Biblia.—Yobo 12:11.
Emonani mpenza ete mingi na yango ezali na boyokani te na Biblia. Na ndakisa, kati na mikili mingi, masapo mingi oyo mazali koyokama kuna mazali oyo makotombolaka liteya oyo ete molimo ya moto ekufaka te. Masapo yango malobelaka lolenge nini moto akufaka, mpe na nsima, akobima kati na nzoto ya mwana moke oyo abotami sika, akobima lokola elimo, lokola nyama, to lokola moto na esika mosusu.
Nzokande, liloba ya Nzambe ezali komonisa ete milimo mikokufaka. (Ezekiele 18:4) Lisusu, Biblia elobi ete bakufi bazali na bomoi te kati na nkunda, bakoki kokanisa te, bakoki koloba te, soko mpe kosala likambo mosusu te. (Mosakoli 9:5, 10; Baloma 6:23) Na yango, baoyo balengolami na masapo ya lokuta oyo ezali kotombola likanisi oyo ete molimo ekufaka te, lokola Paulo alobi yango, bazali “kopɛngwa” longwa na “makambo na sɔlɔ” ya Biblia.
Masapo ya bilímá
Masapo mosusu mazali kolobela mingi bandoki. Na ndakisa, na mikili mosusu ya Afrika, elobamaka ete bato motindo wana bazalaka na nguya moko ya kokamwisa, bazali na makoki ya kobongwana bango moko to kobongola bato mosusu banyama oyo ekotambolaka na nsé, kobongwana makaku, mpe kobongwana ndeke; bazali na makoki ya kopumbwa lokola mpepo mpo na kokokisa mikano na bango; bazali na makoki ya kobima pwasa mpe komilimwisa; bazali na makoki ya koleka katikati na bifelo; bazali na makoki ya komona biloko oyo bikundami na nsé ya mabelé.
Kofuluka ya ebele ya masapo motindo oyo, bakisa mpe kopalangana ya kondimama ya masapo yango, ekoki mpe komeka kozala na bopusi epai na basusu kati na lisangá ya boklisto mpo na kondima ete makambo yango mazali ya solo. Bakoki kokanisa ete, wana bato oyo bazali lokola bato nyonso bakoki kosala bongo te, baoyo bazali kozwa nguya oyo eleki nguya ya bato longwa na bikelamu ya elimo, bademó, bango bakoki kosala bongo. Nkutu, emonani lokola ete likanisi yango ezwi moboko likoló na 2 Batesaloniki 2:9, 10, (NW) oyo elobi ete: “Kozala ya motyoli na mibeko ezali na boyokani na mosala ya Satana, na misala nyonso ya nguya mpe bilembo mpe bisakweli ya lokuta mpe elongo na bokosi nyonso ya kozanga boyengebene mpo na baoyo bazali kokufa, yango nde etumbu mpo ete bandimaki bolingo ya solo te mpo ete bákoka kobika.”
Atako mokapo oyo mozali komonisa solo ete Satana azali na makoki ya kosala misala ya nguya, ezali mpe koyebisa ete Satana azali nkolo ya “bilembo mpe bisakweli ya lokuta,” mpe nkolo ya “bokosi nyonso ya kozanga boyengebene.” Biblia emonisi mbala mingi ete Satana azali nkolo na bakosi, ye oyo azali “mojimbisi na bato na mokili mobimba.” (Emɔnisɛli 12:9) Azali mpenza nganga mpo na oyo etali kondimisa bato makambo oyo ezali solo te.
Yango wana, ata litatoli to biyambweli ya baoyo bazalaki kosala misala ya bilimu mabe mpe bondɔki ekoki kotyelama motema soko moke te. Bato motindo wana, bakoki na bosembo nyonso kondima ete bamonaki, bayokaki, to bakutanaki na makambo mosusu; nzokande, esalemaki solo te. Na ndakisa, ezali na baoyo bakanisaka ete basilá kosolola na bilimu ya bato oyo bakufá. Kasi bazali na libungá, bakosami na mayele mabe ya Satana. Biblia elobi na ntina na bakufi ete “bakokitaka na esika na nyɛ.”—Njembo 115:17.
Na kotalela lisoló na ntina etali bokósi, bosolo ya masapo ya bilímá ekoki kondimama soko moke te. Mingi na yango euti na biyambayamba mpe na makanisi mpamba, elobelami makasi na lolenge eleki ndelo na kozongelamaka mbala na mbala.
Kopalanganisa masapo motindo wana ezali kotombola matomba ya tata na lokuta, Satana Zábolo. (Yoane 8:44) Ekolamwisaka mposa ya koyeba misala ya bilimo mabe oyo eyinami na Yehova. (Dutɛlɛnomɛ 18:10-12) Ezali kokanga bato na motambo kati na monyámá ya bobangi mpe ya biyambayamba. Ezali likambo ya kokamwa te ete Paulo apesaki toli epai na baklisto ete ‘batya mitema tɛ epai na masapo mpamba.’—1 Timɔtɛ 1:3, 4.
Tóbwaka litatoli ya bademó
Kasi, ezali boni soki masoló yango mamonani mpenza ete mazali solo? Mbala mosusu, masoló mosusu mayebisaka ete badémo mpe bato na misala ya bilimu mabe bandimaka nguya eleki monene ya Yehova mpe bosolo ya Batatoli na ye. Baklisto bakoki kolobela mingi masoló motindo wana?
Bakoki kosala yango soko moke te. Biblia elobi ete na ntango bilimu ya mbindo bingangaki ete Yesu azali mwana na Nzambe, “ye apekisaki bango mbala mingi ete bayebisa ye polele tɛ.” (Malako 3:12) Bobele bongo, na ntango demó moko ya kosakola makambo apusaki elenge mwasi moko na komonisa Paulo mpe Balanaba ete bazalaki “baombo na Njambe Oyo-Aleki-Likoló,” mpe basakoli ya “njela na lobiko,” Paulo abimisaki elimo yango na nzoto ya elenge mwasi wana. (Misala 16:16-18) Ezala Yesu, to mpe Paulo, soko mpe bakomi mosusu ya Biblia, moko te apesaki nzela na bademó ete bakoka koloba na ntina na mokano ya Nzambe to mpo na basaleli baponami na ye.
Esengeli koyeba lisusu ete Yesu azalaki mpe na bomoi kati na mokili ya elimo liboso ete aya awa na mabelé. Ayebaki mpenza Satana malamu. Kasi asepelisaki bayekoli na ye te na kobeteláká bango masoló mpo na oyo etali misala ya Satana, soko mpe koyebisa bango likambo mokomoko mpo na oyo Zábolo akoki kosala na oyo akoki kosala te. Satana na bademó na ye bazalaki baninga ya Yesu te. Bazalaki babenganami, batomboki, bayini na makambo ya bulɛɛ mpe banguna ya Nzambe.
Biblia ezali koyebisa biso makambo oyo tosengeli koyeba. Ezali koyebisa biso soki bademó bazali banani, mpe lolenge nini bakozimbisaka bato, mpe lolenge nini tokoki kokima bango. Ezali komonisa ete Yehova mpe Yesu bazali na nguya mingi koleka bademó. Mpe ezali koteya biso ete soki tosaleli Yehova na bosembo nyonso, bilimu mabe bikoki te kopesa biso mpasi oyo ekoumela.—Yakobo 4:7.
Na yango, baklisto bazali na ntina malamu ya koboya masapo ya lokuta oyo mosala na yango ezali bobele kotombola matomba ya baoyo bazali kotɛmɛla Nzambe. Lokola Yesu ‘atatolaki mpɔ na sɔlɔ,’ balandi na ye bazali kosala bobele bongo lelo oyo. (Yoane 8:37) Na bwanya nyonso, bazali kolanda etindá oyo ya Biblia ete: “Makambo yɔnsɔ na sɔlɔ . . . bokanisa yango.”—Bafilipi 4:8.
[Elilingi na lokasa 31]
Baklisto ya solo basengeli mpenza komibatela na misala nyonso ya bilimu mabe