Kotika te kosala makambo oyo oyekoli
“Makambo oyo boyekolaki mpe bondimaki mpe boyokaki mpe bomonaki epai na ngai, bósalaka yango; mpe Nzambe ya kimya akozala elongo na bino.”—BAFILIPI 4:9.
1, 2. Soki totali mpenza malamu, Biblia ezali mpenza kobongola bomoi ya bato oyo balobaka ete basambelaka? Limbolá.
ANKƐTI moko esalemaki na États-Unis mobimba; nsima na yango, zulunalo moko (Emerging Trends) emonisaki na mokuse makanisi oyo bato mingi bazalaki na yango na lisolo na yango oyo ezalaki na motó ya likambo oyo: “Mangomba ezali kobakisama, bizaleli malamu ezali kosila.” Emonani ete na ekólo yango bato oyo bakendaka ndako-nzambe mpe balobaka ete losambo ezali na ntina mingi na bomoi na bango bakómi mingi. Kasi, zulunalo yango elobi boye: “Atako bato yango bazali mingi mpenza, ebele ya bato na États-Unis bazali mpenza kondima te ete losambo ezali kobongola bomoi ya bato mpe ekólo mobimba.”
2 Likambo yango ezali komonana kaka na ekólo moko te. Na mokili mobimba, bato mingi oyo balobaka ete bandimaka Biblia mpe basambelaka batikelaka Biblia nzela te ete ekoka kobongola bomoi na bango. (2 Timote 3:5) Mokambi ya lisangá moko ya bato oyo basalaka bolukiluki alobaki boye: “Tozali kaka kopesa Biblia valɛrɛ mingi, kasi mpo na kozwa mpenza ntango ya kotánga yango, koyekola yango mpe komanyola yango, wana ezali makambo ya kala.”
3. (a) Biblia esalaka mosala nini na baoyo bakómaka baklisto ya solo? (b) Ndenge nini bayekoli ya Yesu balandaka toli ya Paulo oyo ezali na Bafilipi 4:9?
3 Kasi, ezali bongo te mpo na baklisto ya solo. Kosalela toli ya Liloba ya Nzambe ebongoli makanisi mpe etamboli na bango. Lisusu, bato mosusu bamonaka mbala moko bomoto na bango ya sika. (Bakolose 3:5-10) Mpo na bayekoli ya Yesu, Biblia ezali te buku moko oyo babombaka kaka kasi batángaka yango te. Kutu, ntoma Paulo ayebisaki baklisto ya engumba Filipi ete: “Makambo oyo boyekolaki mpe bondimaki mpe boyokaki mpe bomonaki epai na ngai, bósalaka yango; mpe Nzambe ya kimya akozala elongo na bino.” (Bafilipi 4:9) Baklisto basukaka kaka te na kondima solo ya Liloba ya Nzambe. Basalaka makambo oyo bayekolaka, batikaka te kolanda toli ya Biblia na libota, na esika basalaka, na lisangá mpe na makambo mosusu nyonso ya bomoi.
4. Mpo na nini kotosa mibeko ya Nzambe ezalaka pɛtɛɛ te ?
4 Kotosa mibeko mpe mitinda ya Nzambe ezalaka pɛtɛɛ te. Tozali na kati ya mokili oyo ezali kotambwisama na Satana Zabolo, ye oyo Biblia ebengi ye “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 5:19) Yango wana, ezali na ntina ete tókeba na likambo nyonso oyo ekoki kopekisa biso kotikala sembo epai ya Yehova Nzambe. Ndenge nini tokoki kotikala sembo?
Kangamá na “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba”
5. Maloba oyo Yesu alobi ete ‘tólanda ye ntango nyonso’ ezali komonisa nini?
5 Lolenge moko ya kosala makambo oyo toyekoli esɛngi ete tótika te losambo ya solo, atako bato oyo bazali bandimi te bazali kotɛmɛla biso. Mpo na koyika mpiko esɛngaka kosala milende. Yesu alobaki ete: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Matai 16:24) Yesu alobaki te ete tosengeli kolanda ye pɔsɔ moko, sanza moko, to mbula moko. Kasi, alobaki ete ‘tólanda ye ntango nyonso.’ Maloba na ye ezali komonisa ete tosengeli te kozala bayekoli na ye to komonisa ete tomipesi na losambo kaka mpo na mwa ntango moko boye ya bomoi na biso. Kotika te kosimba losambo ya solo elakisi koyika mpiko na nzela oyo toponi, ata soki likambo nini ekoki koyela biso. Ndenge nini tokoki kosala yango?
6. Ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba oyo Paulo ateyaki baklisto ya ekeke ya liboso ezali nini?
6 Paulo alendisaki Timote, moninga na ye ya mosala boye: “Kobá kosimba ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba oyo oyokaki epai na ngai na kondima mpe na bolingo oyo ezali na bokangani na Klisto Yesu.” (2 Timote 1:13) Paulo alingaki koloba nini? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ndakisa” ezali mpenzampenza ebandeli ya liyemi to eloko mosusu oyo moto ya ntɔki azali kosala. Atako ebongisami naino malamumalamu te, kasi lolenge na yango emonanaka polele na boye ete moto oyo ayebi kotala malamu akoki kososola ndenge oyo elilingi ekozala. Ndenge moko mpe, ndakisa ya solo oyo Paulo ateyaki Timote mpe basusu ezalaki te kopesa eyano na motuna nyonso oyo ekoki kotunama. Atako bongo, mateya yango ezali ndenge moko na ebandeli ya liyemi, emonisaka mpenza nzela na boye ete bato ya mitema sembo bakoki kososola makambo oyo Yehova azali kosɛnga bango. Kasi, mpo na kosepelisa Nzambe, ekosɛnga bákangama ntango nyonso na ndakisa ya mateya ya solo mpe básalaka makambo oyo bayekoli.
7. Ndenge nini baklisto bakoki kokangama na ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba?
7 Na ekeke ya liboso, bato lokola Himene, Alesandala mpe Filete bazalaki koteya makanisi oyo eyokanaki te na “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba.” (1 Timote 1:18-20; 2 Timote 2:16, 17) Ndenge nini baklisto ya eleko wana bakokaki kosala mpo ete bapɛngwi bákosa bango te? Basengelaki koyekola malamumalamu makomi oyo epemami mpe kosalela yango na bomoi na bango. Baoyo bazalaki kolanda ndakisa ya Paulo mpe ya baklisto mosusu ya sembo bazalaki na likoki ya koyeba likambo nyonso oyo eyokani te na ndakisa ya solo oyo bateyaki bango mpe bazalaki koboya likambo yango. (Bafilipi 3:17; Baebele 5:14) Bazalaki kaka kokende liboso na bomoi ya kokangama na Nzambe, na esika ‘bábɛla motó mpo na kolukaluka mpe bantembe likoló ya maloba.’ (1 Timote 6:3-6) Tosalaka se ndenge wana ntango tozali kotika te kosalela mateya ya solo oyo toyekoli. Kondima na biso ezali mpenza kokóma makasi ntango tozali komona ete ebele ya bato oyo bazali kosalela Yehova na mokili mobimba bazali ntango nyonso kosimba makasi ndakisa ya solo ya Biblia oyo bateyi bango.—1 Batesaloniki 1:2-5.
Boyá “masapo ya lokuta”
8. (a) Lelo oyo, ndenge nini Satana azali koluka kobebisa kondima na biso? (b) Likebisi nini ya Paulo tozali kokuta na 2 Timote 4:3, 4?
8 Satana alukaka kotinda biso tókóma kotya ntembe likoló ya makambo oyo bateyi biso mpo tózala lisusu sembo te. Ndenge mpe esalemaki na ekeke ya liboso, lelo oyo bapɛngwi mpe bato mosusu balukaka kobebisa kondima ya baoyo bazali ekɛngɛ te. (Bagalatia 2:4; 5:7, 8) Ntango mosusu basalelaka televizyo, radio to mpe bazulunalo mpo na koloba makambo na ndenge mpenza ezali te to mpe makambo ya lokuta mpenza mpo na mosala mpe mikano ya basaleli ya Yehova. Paulo akebisaki ete bamosusu bakotika kolanda solo. Akomaki boye: “Ekozala na eleko moko boye oyo bakokoka te mateya oyo epesaka litomba, kasi, na boyokani na bamposa na bango moko, bakomindukela bateyi mpo básalaka bango nyɔminyɔmi na matoi; mpe bakolongola matoi na bango na solo, nzokande bakobaluka epai ya masapo ya lokuta.”—2 Timote 4:3, 4.
9. Ntango alobelaki “masapo ya lokuta,” Paulo azalaki ntango mosusu kokanisa nini?
9 Na esika bákangama na ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba, bamosusu bakómaki kobendama na “masapo ya lokuta.” Masapo yango ya lokuta ezalaki nini? Ntango mosusu Paulo azalaki kokanisa masapo oyo bato bakanisaki yango kokanisa; na ndakisa, masapo lokola oyo ezali na mokanda ya Tobia, mokanda oyo epemami te.a Masapo yango ya lokuta ekokaki mpe kozala nungunungu oyo ezalaki kobenda likebi ya bato. Na ntango wana, makanisi ya bamosusu—“na boyokani na bamposa na bango moko”—ekosamaki mpe ntango mosusu na baoyo bazalaki kondima ete mibeko ya Nzambe epesi moto na moto ndingisa ya kosala oyo motema na ye elingi to mpe na baoyo bazalaki kotɔnga bandeko oyo bazalaki na mikumba na kati ya lisangá. (3 Yoane 9, 10; Yuda 4) Ata soki mabaku yango ezalaki nini, emonani ete baklisto mosusu basepelaki mingi na lokuta koleka solo ya Liloba ya Nzambe. Eumelaki te, batikaki kosala makambo oyo bayekolaki, mpe yango ebebisaki bango na elimo.—2 Petelo 3:15, 16.
10. Tángá mwa masapo ya lokuta ya ntango na biso, mpe ndenge nini Yoane amonisaki polele ntina oyo tosengeli kozala ekɛngɛ?
10 Lelo oyo, tokoki koboya kobendama na masapo ya lokuta soki tozali kotalela malamumalamu mpe kopona makambo oyo toyokaka mpe oyo totángaka. Na ndakisa, televizyo, radio mpe bazulunalo ezali mbala mingi kolakisa makambo ya pite mpe ekobo. Bato mingi bazali kolendisa mateya oyo elobaka ete Nzambe akoki koyebana te to mpe azali te. Bato ya mayele oyo bayekolaka mikano ya bakomi ya Biblia bazali kondima te ete Biblia epemamaki na Nzambe. Bapɛngwi ya ntango na biso bazali mpe kotika te kolona ntembe mpo na kobebisa kondima ya baklisto. Na ekeke ya liboso, basakoli ya lokuta bazalaki mpe kobimisa likama ya ndenge wana; yango wana, ntoma Yoane apesaki likebisi oyo: “Balingami, bóndimaka te liloba nyonso oyo epemami, kasi bómekaka maloba mapemami mpo na komona soki yango euti na Nzambe, mpamba te basakoli mingi ya lokuta babimi na kati ya mokili.” (1 Yoane 4:1) Yango wana, tosengeli kozala ekɛngɛ.
11. Ndenge nini tokoki komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima?
11 Mpo na yango, Paulo akomaki boye: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima.” (2 Bakolinti 13:5) Na maloba yango, ntoma alendisi biso tókoba komimeka mpo na koyeba soki tozali kolanda mateya nyonso ya boklisto. Soki tolingaka koyoka makambo oyo bato oyo bazalaka kaka na esengo te balobaka, tosengeli komitalela mpe kobondela mingi. (Nzembo 139:23, 24) Tozali nde na momeseno ya koluka bisika nini basaleli ya Yehova bazali na mabunga? Soki tosalaka yango, mpo na nini tosalaka yango? Moto moko azokisaki biso na maloba to na makambo mosusu oyo asalaki? Soki azokisaki biso, tozali kotalela likambo yango na liso ya malamu? Bolɔzi nyonso oyo tokoki kokutana na yango na mokili oyo ezali se ya ntango mokuse. (2 Bakolinti 4:17) Ata soki tokutani na mwa komekama na kati ya lisangá, mpo na nini tokotika kosalela Nzambe? Soki likambo moko boye ezali kosepelisa biso te, tomoni te ete ezali malamu mpenza tósala oyo tokoki kosala mpo na kosilisa likambo yango mpe, nsima na yango, tótika likambo yango na mabɔkɔ ya Yehova? —Nzembo 4:4; Masese 3:5, 6; Baefese 4:26.
12. Ndenge nini bato ya Beloya batikeli biso ndakisa ya malamu?
12 Na esika ya kotɔngatɔnga, tótalelaka boyebi oyo tozali kozwa na nzela ya boyekoli na biso moko mpe na makita ya lisangá na ndenge ya malamu. (1 Bakolinti 2:14, 15) Na esika tóbɛtela Liloba ya Nzambe ntembe, ekozala mpenza malamu tólanda ndakisa ya bato ya Beloya na ekeke ya liboso, bango bazalaki kotalela Makomami malamumalamu! (Misala 17:10, 11) Na nsima, tósala makambo oyo toyekolaka, tóboya masapo ya lokuta mpe tókangama na solo.
13. Ndenge nini tokoki kopanza masapo ya lokuta na kozanga koyeba?
13 Tosengeli mpe kokeba na motindo mosusu ya masapo ya lokuta. Masolo mingi ya kokamwa ezali kotambola, mingimingi na bansango oyo bato batindelanaka na Internet. Tosengeli kokeba na masolo ya ndenge wana, mingimingi soki toyebi te moto ya liboso oyo atindaki yango. Ata soki moklisto moko oyo tokoki kotyela motema nde atindaki lisolo moko, ndeko yango akoki ntango mosusu koyeba te ndenge makambo yango ezalaki mpenza. Yango wana, tosengeli kokeba kozongela to kotindela bato mosusu masolo oyo toyebi mpenza te soki ezali solo. Na ntembe te, tokolinga te kozongela “masolo ya kotsiola Nzambe” to “masolo ya lokuta oyo ebebisaka makambo ya bosantu.” (1 Timoté 4:7, Bible na Lingala ya lelo oyo) Lokola tosɛngisami mpe kolobanaka makambo ya solo, tokomonisa ete tozali na mayele soki tozali koboya likambo nyonso oyo ekotinda biso, ata na kozanga koyeba, na kopanza makambo ya lokuta. —Baefese 4:25.
Matomba oyo eutaka na kosalela solo
14. Matomba nini eutaka na kosala makambo oyo tozali koyekola na Liloba ya Nzambe?
14 Soki tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola na nzela ya boyekoli na biso moko mpe na makita ya lisangá, tokozwa matomba mingi. Na ndakisa, tokoki komona ete boyokani na biso na baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima ekokóma malamu koleka. (Bagalatia 6:10) Ntango tozali kotosa mitinda ya Biblia, ezaleli na biso moko ekokóma malamu koleka. (Nzembo 19:8) Longola yango, soki tozali kosala makambo oyo tozali koyekola, ‘tozali kokómisa kitoko mateya ya Nzambe’ mpe, na ntembe te, tokobenda bato mosusu na losambo ya solo.—Tito 2:6-10.
15. (a) Ndenge nini elenge moko azwaki mpiko ya kotatola na kelasi? (b) Liteya nini ozwi na lisolo yango?
15 Na kati ya Batatoli ya Yehova, ezali na bilenge mingi oyo basalelaka makambo oyo bayekoli na nzela ya boyekoli na bango moko ya Biblia mpe ya mikanda oyo elimbolaka yango, bakisa mpe na makita ya lisangá oyo bazangisaka te. Etamboli na bango malamu ezali litatoli moko monene epai ya balakisi na bango mpe epai ya baninga na bango ya kelasi. (1 Petelo 2:12) Tózwa ndakisa ya Leslie, elenge mwasi moko ya mbula 13 oyo afandaka na États-Unis. Ye alobi ete azalaki kokoka te koyebisa baninga na ye ya kelasi makambo ya lingomba na ye; kasi mokolo moko, makambo ebongwanaki. “Na kelasi, tozalaki kolobela mayele oyo bato basalelaka mpo na kotɛkela bato biloko. Elenge mwasi moko atombolaki mosapi mpe apesaki ndakisa ya Batatoli ya Yehova.” Lokola Leslie azali Motatoli, asalaki nini? Ye moko alobi boye: “Nalobelaki makambo ya lingomba na ngai, mpe nakanisi ete bana-kelasi nyonso bakamwaki, mpamba te bayebi ete ngai nalobaka na kelasi te.” Mpiko ya Leslie ebotaki mbuma nini? Leslie alobi boye: “Natikelaki mwana-kelasi yango mwa buku moko mpe trakte moko, mpamba te azalaki na mituna mosusu ya kotuna.” Tokanisi mpenza ete Yehova ayokaka esengo ntango bilenge oyo basalaka makambo oyo bayekoli bazali kozwa mpiko mpo na kopesa litatoli! —Masese 27:11; Baebele 6:10.
16. Matomba nini elenge Motatoli moko azwaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi?
16 Tózwa ndakisa ya elenge mosusu nkombo na ye Elizabeth. Kobanda na ntango oyo azalaki na mbula nsambo mpe na boumeli ya bambula nyonso oyo asalaki na eteyelo ya ebandeli, elenge mwasi yango azalaki kobengisa balakisi na ye na Ndako ya Bokonzi mbala nyonso oyo azalaki na lisolo ya kosala na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Soki molakisi azalaki na likoki te ya koya na makita, Elizabeth azalaki kotikala nsima ya kelasi mpo na kosala lisolo na ye liboso ya molakisi yango. Na mbula na ye ya nsuka na eteyelo ya ntei (secondaire), Elizabeth akomaki lisolo moko ya nkasa zomi oyo elobelaki matomba ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe atángaki yango liboso ya balakisi minei. Lisusu, basɛngaki ye asala lisolo moko mpo na komonisa ndenge masolo esalemaka na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi; mpo na lisolo yango, aponaki motó ya likambo oyo: “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe?” Elizabeth azwi matomba na mateya oyo Batatoli ya Yehova bapesaka na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Longola ye, ezali na bilenge baklisto mingi oyo bazali kokumisa Yehova na ndenge bazali kosala makambo oyo bayekoli na Liloba na ye.
17, 18. (a) Biblia epesi toli nini na ntina na bosembo? (b) Etamboli ya sembo ya Motatoli moko ya Yehova esalaki moto moko nini?
17 Biblia epesi baklisto toli ete bámitambwisaka na bosembo na makambo nyonso. (Baebele 13:18) Kozanga bosembo ekoki kobebisa boyokani na biso na basusu mpe, na koleka, na Yehova ye moko. (Masese 12:22) Etamboli na biso ya sembo emonisaka ete tozali kosala makambo oyo toyekoli, mpe yango esali ete bato mingi bápesa Batatoli ya Yehova limemya mingi.
18 Tólobela likambo oyo ekómelaki soda moko na nkombo Phillip. Abungisaki chèque moko oyo atyaki sinyatili na ye kasi akomaki naino motángo ya mbongo te mpe ezali kaka na ntango oyo bazongiselaki ye yango na nzela ya posita nde ayebaki ete chèque wana ebungaki. Motatoli moko ya Yehova nde alɔkɔtaki yango, mpe mwa mokanda oyo ekangisamaki na chèque yango elobaki ete makambo oyo moto oyo alɔkɔtaki yango andimaka nde etindi ye azongisa yango. Phillip akamwaki. Alobaki boye: “Bakokaki mpenza koyiba mbongo na ngai dolare 9 000!” Liboso na yango, mokolo mosusu, bayibaki ekɔti na ye na kati ya ndako-nzambe mpe likambo yango elɛmbisaki ye nzoto. Emonani ete ezali moto moko oyo ayebanaki na ye nde ayibaki yango, nzokande, sikoyo moto oyo ayebanaki na ye te azongiseli ye chèque oyo ezalaki na valɛrɛ ya ebele ya mbongo! Ya solo, baklisto oyo bazali sembo bakumisaka Yehova Nzambe!
Kotika te kosala makambo oyo oyekoli
19, 20. Matomba nini tokozwa soki tozali kotosa mateya ya Makomami oyo tozali koyekola?
19 Baoyo basalaka makambo oyo bayekoli na kati ya Liloba ya Nzambe bazwaka matomba mingi. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Moto oyo azali kotalatala na kati ya mobeko ya kokoka oyo ezali ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango, moto wana, lokola akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosala mosala, akozala na esengo na kosaláká yango.” (Yakobo 1:25) Soki tozali kotosa mateya ya Makomami oyo tozali koyekola, tokozala mpenza na esengo ya solosolo mpe tokozala mpenza na likoki ya kolonga mitungisi ya bomoi. Na koleka, Yehova akopambola biso mpe tokozala na elikya ya bomoi ya seko!—Masese 10:22; 1 Timote 6:6.
20 Yango wana, kotika soki moke te komipesa na boyekoli ya Liloba ya Nzambe. Yanganáká ntango nyonso na basambeli ya Yehova, mpe tyáká likebi na makambo oyo elobamaka na makita ya lisangá. Saláká makambo oyo ozali koyekola, kotika te, mpe ‘Nzambe ya kimya akozala elongo na yo.’—Bafilipi 4:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokanda ya Tobia, oyo ekoki kozala ete ekomamaki na ekeke ya misato liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ezali na lisolo moko oyo etondi na biyambayamba ya Moyuda moko na nkombo Tobia. Bazalaki koloba ete motema, nsongi (bile) mpe libale (foie) ya mbisi moko monene ezalaki kopesa ye nguya ya kobikisa moto ya maladi mpe ya kobengana bilimu mabe.
Ozali koyeba lisusu?
• “Ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” ezali nini, mpe ndenge nini tokoki kokoba kosimba yango?
• “Masolo” nini “ya lokuta” tosengeli koboya?
• Baoyo basalaka makambo oyo bazali koyekola na Liloba ya Nzambe bazwaka matomba nini?
[Elilingi na lokasa 17]
Ndenge nini baklisto ya ekeke ya liboso bakokaki kosala mpo ete bapɛngwi bákosa bango te?
[Bililingi na lokasa 18]
Televizyo, radio, bazulunalo mpe Internet ezalaka na makambo oyo ekoki kolona ntembe, bakisa mpe bapɛngwi ya mikolo na biso
[Elilingi na lokasa 19]
Ezali malamu te kopanza masolo oyo toyebi mpenza te soki ezali solo
[Bililingi na lokasa 20]
Na mosala, na kelasi mpe bisika nyonso, Batatoli ya Yehova basalaka makambo oyo batángaka na Liloba ya Nzambe