Batatoli Baklisto oyo mboka na bango ezali na likoló
“Nde mboka na biso ezali kuna na likoló.”—BAFILIPI 3:20.
1. Mokano nini kitoko Yehova azali na yango mpo na bato mosusu?
BATO babotami awa na mabelé bakoyangela lokola bakonzi mpe banganga na likoló, bakoyangela ata mpe baanzelu. (1 Bakolinti 6:2, 3; Emoniseli 20:6) Oyo nde likambo ya kokamwa! Nzokande, Yehova akanaki yango, mpe azali kokokisa yango na nzela ya Mwana na ye bobele moko, Yesu Klisto. Mpo na nini Mozalisi na biso asali likambo motindo oyo? Mpe lolenge nini boyebi ya likambo yango esengeli kozala na bopusi likoló na moklisto lelo oyo? Tótala lolenge nini Biblia ezali koyanola na mituna yango.
2. Likambo nini ya sika Yoane Mobatisi asakolaki ete Yesu asengelaki kosala, mpe likambo yango ya sika ezalaki na boyokani na likambo nini?
2 Na ntango Yoane Mobatisi azalaki kobongisa nzela mpo na Yesu, asakolaki ete Yesu asengelaki kosala likambo moko ya sika. Lisoló lilobi: “[Yoane] asakoli ete, Oyo aleki ngai na nguya azali koya nsima na ngai. Ngai nabongi kokumbama ete nakangola nsinga na sapato na ye te. Ngai nabatisi bino na mai, kasi ye akobatisa bino na [elimo santu, NW].” (Malako 1:7, 8) Liboso, moto moko te asilaki kobatisama na elimo santu. Yango ezalaki ebongiseli ya sika oyo etalelaki elimo santu, mpe yango ezalaki na boyokani na likambo oyo ete Yehova akómaki mpenza pene ya komonisa mokano ya kobongisa bato mpo na boyangeli ya likoló.
‘Kobotama lisusu’
3. Makambo nini ya sika Yesu alimbolaki epai na Nikodeme na ntina na Bokonzi ya likoló?
3 Na bokutani moko ya nkuku elongo na Mofalisai moko ya lokumu mingi, Yesu amonisaki ye makambo mingi mosusu na ntina na mokano wana ya Nzambe. Mofalisai yango, Nikodeme, ayaki epai na Yesu na butu, mpe Yesu alobaki na ye ete: “Soko moto akobotama lisusu te akokoka komona bokonzi na Nzambe te.” (Yoane 3:3) Nikodeme, ye oyo azalaki Mofalisai asilaki mpenza koyekola Makomami ya Liebele, ayebaki mwa makambo na ntina na solo kitoko ya Bokonzi ya Nzambe. Mokanda ya Danyele esakolaki ete Bokonzi yango esengelaki kopesama epai na “ye oyo akokani na mwana na moto” mpe epai na “bato oyo bazali babulami na ye Oyo-Aleki-Likoló.” (Danyele 7:13, 14, 27, NW) Bokonzi yango esengelaki ‘kobuka mpe kosilisa’ makonzi nyonso mosusu mpe kotikala mpo na libela. (Danyele 2:44) Ekoki mpenza kozala ete, Nikodeme akanisaki ete bisakweli wana esengelaki kokokisama epai na libota ya Bayuda; kasi Yesu alobaki mpo ete moto akoka komona Bokonzi yango, asengelaki kobotama lisusu. Nikodeme asosolaki te, yango wana Yesu akóbaki na kolobáká ete: “Soko moto akobotama na mai mpe na [elimo, NW] te, akokoka koingela na bokonzi na Nzambe te.”—Yoane 3:5.
4. Mpo na baoyo babotami kati na elimo santu, lolenge nini boyokani na bango elongo na Yehova ekobongwana?
4 Yoane Mobatisi alobaki na ntina na batisimo na elimo santu. Sikawa, Yesu abakisi ete mpo na kokɔta kati na Bokonzi ya Nzambe moto asengeli kobotama kati na elimo santu. Na nzela ya kobotama wana oyo ekokani na mosusu te, mibali mpe basi ya kozanga kokoka bakɔti kati na boyokani ya ntina mingi elongo na Nzambe. Bakómi bana na ye oyo akamati. Tozali kotánga ete: “Epai na baoyo bayambi ye [Yesu], apesi bango bokonzi na kozala bana na Nzambe, na baoyo bandimi na nkombo na ye. Babotami na makila te soko na mposa na nzoto te soko na mposa na mobali te kasi na Nzambe mpenza.”—Yoane 1:12, 13; Baloma 8:15.
Bana na Nzambe
5. Ntango nini bato ya liboso ya kozanga kokoka babatisamaki na elimo santu, mpe misala nini ya elimo santu eyokani na yango esalemaki na ntango yango?
5 Na ntango oyo Yesu asololaki na Nikodeme, elimo santu esilaki kokitela Yesu, epakolaki ye mpo na koyangela kati na Bokonzi ya likoló na mikolo misengelaki koya nsima, mpe Nzambe asilaki kondima Yesu liboso na bato ete azali Mwana na Ye. (Matai 3:16, 17) Yehova abotaki bana mingi ya elimo na Pantekote na mobu 33 T.B. Bayekoli ya sembo oyo bayanganaki na ndako na likoló na Yelusaleme babatisamaki na elimo santu. Bobele na ntango yango, babotamaki lisusu kati na elimo santu mpo na kozala bana ya Nzambe ya elimo. (Misala 2:2-4, 38; Baloma 8:15) Lisusu, bapakolamaki na elimo santu mpo na kozwa libula na likoló na mikolo oyo misengelaki koya, mpe na nsima batyamaki elembo ya ebandeli na elimo santu lokola elembeteli ya endimiseli makasi ya elikya wana ya likoló.—2 Bakolinti 1:21, 22.
6. Mokano ya Yehova ezali nini mpo na oyo etali Bokonzi ya likoló, mpe mpo na nini ebongi ete bato basangana kati na yango?
6 Bango bazalaki bato ya liboso ya kozanga kokoka oyo baponamaki na Nzambe mpo na kokɔta na Bokonzi. Elingi koloba ete, nsima ya kokufa na bango mpe nsima ya kosekwa na bango, basengelaki kokóma basangani ya ebongiseli ya Bokonzi ya likoló oyo ekoyangela bato mpe baanzelu. Yehova akanaki ete na nzela ya Bokonzi yango, nkombo na ye monene ebulisama mpe boyangeli na ye elóngisama liboso na bikelamu nyonso. (Matai 6:9, 10; Yoane 12:28) Ebongi mpenza ete bato bazala kati na Bokonzi wana! Kati na Elanga ya Edene, Satana asalelaki bato ntango abimisaki ntembe na ye ya ebandeli mpo na kotɛmɛla boyangeli ya Yehova, mpe sikawa Yehova akani ete bato bakokɔtisama kati na likambo litali koyanola na ntembe wana. (Genese 3:1-6; Yoane 8:44) Ntoma Petelo akomaki epai na bato oyo baponamaki ete bayangela kati na Bokonzi wana: “Nzambe Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto akumisama! Pelamoko ezali mawa na ye mingi, aboti biso lisusu ete tozala na elikya na bomoi na nzela na lisekwa na Yesu Klisto kati na bakufi; ete tozala mpe na libula likobeba te, lizangi mbindo, likosila te, libombami kuna na likoló mpo na bino.”—1 Petelo 1:3, 4.
7. Boyokani nini ekokani na mosusu te baoyo babatisami na elimo santu bazali na yango elongo na Yesu?
7 Awa Nzambe akamataki bango lokola bana na ye, baklisto wana baponami bakómaki bandeko ya Yesu Klisto. (Baloma 8:16, 17; 9:4, 26; Baebele 2:11) Lokola Yesu amonisaki ete azalaki Mombóto oyo balakelaki Abalayama, baklisto wana oyo bapakolami na elimo bazali basangani, to ndambo mosusu ya Mombóto wana, oyo esengelaki kopesa lipamboli epai na bato oyo bazali na kondima. (Genese 22:17, 18; Bagalatia 3:16, 26, 29) Lipamboli nini? Libaku ya kosikolama na lisumu mpe ya kozongisama na boyokani elongo na Nzambe mpe ya kosalela ye sikawa mpe mpo na seko. (Matai 4:23; 20:28; Yoane 3:16, 36; 1 Yoane 2:1, 2) Baklisto bapakolami oyo bazali awa na mabelé bazali kokamba bato ya mitema sembo epai na lipamboli yango na kotatoláká na ntina na ndeko na bango ya elimo Yesu Klisto mpe na ntina na Tata oyo akamati bango, Yehova Nzambe.—Misala 1:8; Baebele 13:15.
8. “Emoniseli” ya bana ya Nzambe oyo babotami na elimo ezali nini?
8 Biblia ezali koloba na ntina na “emoniseli” ya bana wana ya Nzambe oyo babotami na elimo. (Baloma 8:19) Awa bakɔti kati na Bokonzi lokola bakonzi oyo bakosala elongo na Yesu, basangani na mosala ya koboma ebongiseli ya biloko ya mokili ya Satana. Na nsima, na boumeli ya mbula nkóto, bakosunga kati na mosala ya kopesa matomba ya mbeka ya lisiko epai na bato mpe na yango bakozongisa bato na ezalela ya kokoka oyo Adama abungisaki. (2 Batesaloniki 1:8-10; Emoniseli 2:26, 27; 20:6; 22:1, 2) Emoniseli na bango esangisi mpe makambo oyo nyonso. Ezali likambo oyo bato na kondima bazali kozela yango na motema likoló.
9. Lolenge nini Biblia ezali kobénga lisangani ya baklisto bapakolami ya mokili mobimba?
9 Lisangani ya baklisto bapakolami na mokili mobimba ezali “[lisangá, NW] na baoyo babotami liboso, baoyo bakomami nkombo kuna na likoló.” (Baebele 12:23) Bazali bato ya liboso ya kozwa litomba kati na mbeka ya lisiko ya Yesu. Bazali mpe “nzoto na Klisto,” oyo ezali komonisa boyokani na bango ya penepene kati na moko na mosusu mpe elongo na Yesu. (1 Bakolinti 12:27) Paulo akomaki ete: “Pelamoko nzoto ezali eloko moko nde ezali na bilembo mingi, mpe bilembo nyonso na nzoto ata izali mingi izali bobele nzoto moko, bongo na Klisto. Zambi biso nyonso tobatisami na nzoto moko kati na [elimo, NW] moko, soko Bayuda, soko Baela, soko baombo, soko bansomi. Biso nyonso tomelisami na [elimo, NW] yango.”—1 Bakolinti 12:12, 13; Baloma 12:5; Baefese 1:22, 23; 3:6.
“Yisraele na Nzambe”
10, 11. Mpo na nini Yisraele ya sika ezalaki na ntina na ekeke ya liboso, mpe banani basanganaki kati na libota wana ya sika?
10 Na boumeli ya bambula koleka 1 500 liboso ya koya ya Yesu lokola Masiya oyo alakamaki, libota ya Yisraele ya mosuni lizalaki libota ya ntina mingi ya Yehova. Atako azalaki kokundwela bango mbala na mbala, na mobimba na yango, libota yango emonanaki ete ezalaki sembo te. Na ntango Yesu abimaki, libota yango libwakaki ye. (Yoane 1:11) Na yango, Yesu ayebisaki bakonzi ya lingomba ya Bayuda ete: “Bokonzi na Nzambe ekolongwa na bino mpe ekopesama na libota likobimisa mbuma na yango.” (Matai 21:43) Koyeba “libota [yango] oyo likobimisa mbuma ya [Bokonzi ya Nzambe]” ezali na ntina mingi mpo na lobiko.
11 Libota yango ya sika ezali bongo lisangá ya baklisto bapakolami, oyo ebotamaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. Basangani na yango ya liboso bazalaki bongo bayekoli ya Yesu oyo bazalaki Bayuda, baoyo bandimaki ye lokola Mokonzi na bango ya likoló. (Misala 2:5, 32-36) Nzokande, bazalaki basangani ya libota ya sika ya Nzambe, ezalaki te mpo ete bazalaki bakitani ya Bayuda, kasi mpo ete bazalaki na kondima kati na Yesu. Na yango, libota wana ya sika ya Yisraele ya Nzambe ekesanaki mpenza na mabota mosusu nyonso—libota ya elimo. Wana eteni monene ya Bayuda baboyaki kondima Yesu, libyangi ya kosangana kati na libota ya sika epesamaki epai na Basamalia mpe na nsima epai na Bapakano. Libota ya sika libéngamaki “Yisraele na Nzambe.”—Bagalatia 6:16.
12, 13. Lolenge nini emonanaki polele ete Yisraele ya sika ezalaki te bobele mwa lingomba oyo eutaki na lingomba ya Bayuda?
12 Kati na Yisraele ya kala, na ntango baoyo bazalaki Bayuda te bazalaki kobongwana na losambo ya Bayuda, basengelaki kotosa Mibeko ya Mose mpe mibali basengelaki kokatama ngenga. (Exode 12:48, 49) Bayuda mosusu oyo bazalaki baklisto bakanisaki ete esengelaki mpe kosalema bongo mpo na baoyo bazalaki Bayuda te kati na Yisraele ya Nzambe. Nzokande, Yehova akanisaki bongo te. Elimo santu ekambaki ntoma Petelo kino na ndako ya Mopakano Korneye. Na ntango Korneye mpe libota na ye bandimaki mateya ya Petelo, bazwaki elimo santu—liboso nkutu ete bábatisama na mai. Yango emonisaki polele ete Yehova andimaki Bapakano wana lokola basangani ya Yisraele ya Nzambe kozanga kosɛnga na bango ete bátosa Mibeko ya Mose.—Misala 10:21-48.
13 Mwa ndambo ya bandimi bakakatanaki mpo na kondima yango, mpe nokinoki, bantoma mpe bankulutu na Yelusaleme basololaki na ntina na likambo yango. Lisangani wana oyo ezalaki na bokonzi eyokaki litatoli oyo ezalaki komonisa na bozindo lolenge oyo elimo santu esalaki mosala likoló na bandimi oyo bazalaki Bayuda te. Bolukiluki kati na Biblia emonisaki ete yango ekokisaki esakweli epemami. (Yisaya 55:5; Amosa 9:11, 12) Ekateli oyo elongobani mpenza ekamatamaki: baklisto oyo bazalaki Bayuda te basengelaki te kotosa Mibeko ya Mose. (Misala 15:1, 6-29) Na yango, Yisraele ya elimo ezalaki mpenza libota ya sika, kasi ezalaki te eteni oyo ekabwanaki uta na lingomba ya Bayuda.
14. Nini emonisami na likambo oyo ete Yakobo abéngaki lisangá ya boklisto ete “mabota zomi na mibale na lipalangana”?
14 Na boyokani na likambo oyo, na ntango azalaki kokoma epai na baklisto bapakolami ya ekeke ya liboso, moyekoli Yakobo atindaki nkomá na ye epai na “mabota zomi na mibale na lipalangana.” (Yakobo 1:1; Emoniseli 7:3-8) Ya solo, banamboka ya Yisraele ya sika bakabolamaki te na mabota makeseni. Kati na Yisraele ya elimo bokabwani kati na mabota 12 ezalaki te, lokola ezalaki kati na Yisraele ya mosuni. Nzokande, liloba lipemami ya Yakobo lizali komonisa ete engebene Yehova, Yisraele ya Nzambe esilaki mpenza kokitana na esika ya mabota 12 ya Yisraele ya mosuni. Soki Moyisraele moko ya mosuni akómi mosangani ya libota ya sika, eutelo na ye na mosuni—ata soki azalaki moto ya libota ya Yuda to ya Levi—yango ezalaki na ntina te.—Bagalatia 3:28; Bafilipi 3:5, 6.
Kondimana ya sika
15, 16. (a) Lolenge nini Yehova azali kotalela basangani ya Yisraele ya Nzambe oyo bazali Bayuda te? (b) Na moboko nini mobongi Yisraele ya sika etyamaki?
15 Na miso ya Yehova, basangani ya libota wana ya sika oyo bazali Bayisraele te bazalaki mpenza Bayuda na elimo! Ntoma Paulo ayebisaki ete: “Moyuda na solo azali Moyuda bobele na makambo na libandá te. Kokatama-ngenga ezali bobele oyo emonani na nzoto te. Kasi ye oyo azali Moyuda na solo abongi na epai na katikati; kokatama-ngenga na solo ezali na motema, ezali na [elimo, NW] ekomami na mokanda te. Moto na lolenge yango akozwa masanzoli epai na bato te kasi epai na Nzambe mpenza.” (Baloma 2:28, 29) Bapakano mingi bayanolaki na libyangi ya kosangana kati na Yisraele ya Nzambe, mpe likambo yango ekokisaki esakweli ya Biblia. Na ndakisa, mosakoli Hoseya akomaki ete: “Nakomonisa mawa epai na ye oyo amonisamelaki mawa te, mpe nakoloba epai na baoyo bazali te kati na libota na ngai ete: ‘Bozali libota na ngai’; mpe bango, na ngambo na bango, bakoloba ete: ‘Ozali Nzambe na ngai.’”—Hoseya 2:23, NW; Baloma 11:25, 26.
16 Soki Bayisraele ya elimo bazali te kati na kondimana ya Mibeko ya Mose, na moboko nini bazali basangani ya libota ya sika? Yehova asalaki kondimana ya sika na nzela ya Yesu elongo na libota ya elimo. (Baebele 9:15) Na ntango Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, na mokolo ya 14 Nisan, na mobu 33 T.B., alekisaki limpa mpe vinyo epai na bantoma 11 ya sembo mpe alobaki ete vinyo ezalaki elembo ya “makila na kondimana.” (Matai 26:28; Yilimia 31:31-34) Lokola eyebisami kati na lisoló oyo Luka akomaki, Yesu alobaki ete kopo ya vinyo ezalaki elembo ya “kondimana na sika.” (Luka 22:20) Na kokokisama ya maloba ya Yesu, na ntango elimo santu esopanaki na Pantekote mpe Yisraele ya Nzambe ebotamaki, Bokonzi elongolamaki na mabɔkɔ ya Yisraele ya mosuni mpe epesamaki epai na libota ya sika mpe ya elimo. Na esika ya Yisraele ya mosuni, libota wana ya sika ekómaki mosaleli ya Yehova, esalemi na batatoli na ye.—Yisaya 43:10, 11.
“Yelusaleme na sika”
17, 18. Makambo nini malobami kati na búku ya Emoniseli na ntina na nkembo oyo ezali kozela baklisto bapakolami?
17 Oyo nde nkembo ezali kozela baoyo bazali na libaku malamu ya kosangana na libyangi ya likoló! Mpe, oyo nde nsai tozali na yango ya koyeba makambo kitoko oyo mazali kozela bango! Mokanda ya Emoniseli ezali komonisa biso makambo kitoko na ntina na libula na bango ya likoló. Na ndakisa, na Emoniseli 4:4, totángi ete: “Kiti na bokonzi ntuku mibale na minei izingaki kiti na bokonzi [ya Yehova], mpe mikólo ntuku mibale na minei bafandi na kiti na bokonzi yango. Balati bilamba mpembe, mpe na mitó na bango mitole na wolo.” Mikóló 24 wana bazali baklisto bapakolami, basekwisami mpe bazali sikawa na ebongá ya likoló oyo Yehova alakaki bango. Mitole mpe kiti ya bokonzi na bango ezali kokundwela biso bokonzi na bango. Lisusu, kanisa na ntina na libaku monene oyo bazali na yango ya kosala zingazinga na kiti ya bokonzi ya Yehova!
18 Na Emoniseli 14:1, tozali komona likambo mosusu na ntina na bango: “Natalaki mpe namoni Mwana na Mpate atɛlɛmi na ngomba na Siona. Bato nkoto monkámá na ntuku minei na minei batɛlɛmi na ye elongo, baoyo bazalaki na nkombo na ye mpe nkombo na Tata na ye esili kokomama na bilongi na bango.” Awa tomoni motuya ya sikisiki ya bapakolami wana—144 000. Etɛlɛmɛlo na bango ya bokonzi esosolami na ndimbola oyo ete batɛlɛmi elongo na Mokonzi atyami na Yehova, “Mwana na Mpate,” Yesu. Mpe bazali na Ngomba Siona ya likoló. Ngomba Siona ya mabelé ezalaki esika Yelusaleme, mboka mokonzi ya Yisraele etongamaki. Ngomba Siona ya likoló ezali komonisa etɛlɛmɛlo ya nkembo ya Yesu mpe basangoli libula elongo na ye, baoyo basali Yelusaleme ya likoló.—2 Ntango 5:2; Nzembo 2:6.
19, 20. (a) Baklisto bapakolami bokosangana kati na ebongiseli nini ya likoló? (b) Na boumeli ya eleko nini Yehova aponaki baoyo mboka na bango ekozala na likoló?
19 Na boyokani na likambo oyo, kati na nkembo na bango ya likoló, bapakolami balobelami mpe lokola “Yelusaleme na sika.” (Emoniseli 21:2) Yelusaleme ya mabelé ezalaki “mboka na mokonzi monene” mpe esika tempelo ezalaki. (Matai 5:35) Yelusaleme ya likoló ezali ebongiseli ya bokonzi oyo na nzela na yango Nkolo Moyangeli monene, Yehova, mpe Mokonzi na ye oyo aponami, Yesu, azali sikawa koyangela mpe kati na yango mosala ya bonganga mozali kosalema wana mapamboli mingi mazali kosopama uta na kiti na bokonzi ya Yehova mpo na kobikisa bato. (Emoniseli 21:10, 11; 22:1-5) Na emonaneli mosusu, Yoane ayoki basembwi, basekwisami, baklisto bapakolami babéngami ‘mwasi na Mwana na Mpate.’ Oyo nde elilingi kitoko oyo ezali komonisa boyokani makasi oyo bakozala na yango elongo na Yesu mpe botosi ya bolingo malamu epai na ye! Kanisa esengo oyo ekozala kati na likoló na ntango moto ya nsuka kati na bango akozwa mbano na ye ya likoló. Sikawa, “libala na Mwana na Mpate” ekoki kosalema! Na bongo ebongiseli wana ya bokonzi ya likoló ekokóma na mobimba na yango.—Emoniseli 19:6-8.
20 Ee, mapamboli kitoko mazali kozela baoyo ntoma Paulo alobaki na ntina na bango ete: “Nde mboka na biso ezali kuna na likoló.” (Bafilipi 3:20) Esili koleka bambula soko nkóto mibale, Yehova azali kopona bana na ye ya elimo mpe azali kobongisa bango mpo na kozwa libula ya likoló. Na kotalela bilembeteli, mosala yango ya kopona mpe ya kobongisama esili kokóma mpenza pene ya kosila. Kasi makambo mingi mosusu masengelaki kolandana, lokola emonisami epai na Yoane kati na emonaneli na ye na Emoniseli mokapo 7. Na yango, ezali kosɛnga ete totalela etuluku mosusu ya baklisto, mpe tokotalela yango na lisoló lilandi.
Ozali komikundola?
◻ Misala nini mikeseni ya elimo mizali kosalema likoló na baoyo bazali na libula ya likoló?
◻ Boyokani nini ya penepene bapakolami bazali na yango elongo na Yehova? elongo na Yesu?
◻ Lolenge nini lisangá ya baklisto bapakolami elobelami kati na Biblia?
◻ Na moboko nini mobongi Yisraele ya Nzambe etyamaki?
◻ Matomba nini ya likoló mazali kozela baklisto bapakolami?
[Bililingi na lokasa 10]
Na boumeli ya eleko ya bambula soko nkóto mibale, Yehova aponaki baoyo bakoyangela kati na Bokonzi ya likoló