“Yisraele na Nzambe” mpe “Ebele monene”
“Natalaki mpe namoni ebele monene, oyo moto te akoki kotánga
motuya na yango.”—EMONISELI 7:9.
1-3. (a) Bilikya nini ya nkembo na likoló baklisto bapakolami bazali na yango? (b) Lolenge nini Satana alukaki kobebisa lisangá ya ekeke ya liboso? (c) Nini ebimaki na 1919 oyo emonisaki ete milende oyo Satana asalaki mpo na kobebisa lisangá ya baklisto bapakolami elóngaki te?
KOSALEMA ya “Yisraele na Nzambe” na 33 T.B. ezalaki litambe monene kati na kokokisama ya mikano ya Yehova. (Bagalatia 6:16) Basangani na yango bapakolami bazali na elikya ya kozala bikelamu ya bomoi oyo bizangi kufa mpe koyangela elongo na Klisto kati na Bokonzi ya Nzambe ya likoló. (1 Bakolinti 15:50, 53, 54) Kati na etɛmɛlo wana bazali liboso kati na mosala ya kobulisa nkombo ya Yehova mpe konyata motó ya monguna monene, Satana Zábolo. (Genese 3:15; Baloma 16:20) Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete Satana abimisaki nguya na ye nyonso mpo na koboma lisangá wana ya sika, na konyokoláká yango mpe na kolukáká kobebisa yango!—2 Timoté 2:18; Yuda 4; Emoniseli 2:10.
2 Na ntango bantoma bazalaki naino na bomoi, Satana akokaki kolónga te. Nzokande, nsima ya kokufa na bango, lipɛngwi epalanganaki kozanga nkaka. Na nsuka, engebene bato, emonanaki lokola ete lisangá ya peto oyo Yesu asalaki esilaki kobebisama ntango Satana abimisaki lisangá ya lipɛngwi oyo ezalaki bomekoli elongobani te ya losambo ya solo, eyebani lelo oyo lokola boklisto ya nkombo mpamba. (2 Batesaloniki 2:3-8) Nzokande, boklisto ya solo ekufaki te.—Matai 28:20.
3 Kati na lisese na ye ya nganu mpe matiti mabe, Yesu asakolaki ete na boumeli ya ntango moko, baklisto ya solo bakokóla esika moko na “matiti mabe,” to baklisto ya lokuta; mpe yango esalemaki. Kasi abakisaki mpe ete na mikolo ya nsuka, ekomonana lisusu polele ete “bana na bokonzi” bakokabwana na “matiti mabe.” (Matai 13:36-43) Yango mpe esalemaki bobele bongo. Na 1919, baklisto ya solo bapakolami babimaki na boombo longwa na Babilone. Na miso ya Nzambe, bandimamaki lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpe babandaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi na molende nyonso. (Matai 24:14, 45-47; Emoniseli 18:4) Eteni monene na bango bazalaki bapakano; kasi lokola bazalaki na kondimana ya Abalayama, bazalaki mpenza ‘bakitani ya Abalayama.’ Bazalaki basangani ya “Yisraele na Nzambe.”—Bagalatia 3:7, 26-29.
“Ebele monene”
4. Etuluku nini ya baklisto eyaki komonana polele, mingimingi na mibu 1930?
4 Na ebandeli, baoyo bayanolaki na mosala ya kosakola ya baklisto bapakolami wana bakómaki mpe Bayisraele ya elimo, batikali ya ba 144 000 oyo bazali na elikya ya kokende na likoló. (Emoniseli 12:17) Nzokande, mingimingi na bambula 1930, etuluku mosusu eyaki komonana. Bango babéngamaki “bampate mosusu” ya lisese ya mapango ya bampate. (Yoane 10:16) Bazalaki bayekoli ya Yesu oyo bazalaki na elikya ya kozwa bomoi ya seko na paladiso na mabelé. Na elobeli ya elilingi, bazalaki bana ya elimo ya baklisto bapakolami. (Yisaya 59:21; 66:22; kokanisá na 1 Bakolinti 4:15, 16.) Bandimaki lisangá ya baklisto bapakolami lokola moombo ya sembo mpe ya mayele, mpe lolenge moko na bandeko na bango bapakolami, bazali na bolingo mozindo mpo na Yehova, bazali na kondima kati na mbeka ya Yesu, bazali na molende mpo na kokumisa Nzambe, bazali mpe pene ya kondima koyoka mpasi mpo na bosembo.
5. Lolenge nini, mokemoke, etɛlɛmɛlo ya bampate mosusu eyaki kososolama malamu koleka?
5 Na ebandeli mokumba ya bampate mosusu wana esosolamaki malamu te, kasi na nsima ya ntango, makambo mayaki komonana polele. Na 1932, baklisto bapakolami bayikisamaki mpiko ete balendisa bampate mosusu ete básangana kati na mosala ya kosakola—likambo oyo mingi kati na bampate mosusu basilaki kobanda kosala liboso. Na 1934, bampate mosusu balendisamaki ete bázwa batisimo ya mai. Na 1935 bamonisamaki lokola “ebele monene” ya Emoniseli mokapo 7. Na 1938 babyangamaki ete báyangana na Ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto, bobele mpo na kotala. Na 1951, basosolaki ete mibali bateli oyo bazalaki kati na bango basengelaki kozala “bankumu” oyo bazali kosala lokola “ebombelo mpo na mopepe, ezipelo na ntango na mbula makasi.” (Nzembo 45:16; Yisaya 32:1, 2) Na 1953, lisangá ya Yehova ya mabelé—oyo eteni monene na yango na ntango wana esalemaki na bampate mosusu—batalelamaki lokola moboko ya libota ya mabelé oyo ekozala kati na mokili ya sika. Na 1985, esosolamaki ete na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Yesu, bampate mosusu batángami bayengebene baninga ya Nzambe, mpe bazali na elikya ya kobika na Armagedon.
6. Boyokani nini ezali kati na etɛlɛmɛlo ya bapakolami mpe bampate mosusu lelo oyo, yango ebimisi mituna nini?
6 Sikawa, na eteni oyo epusani ya “mikolo ya nsuka,” eteni monene ya ba 144 000 basili kokufa mpe kozwa mbano na bango na likoló. (2 Timoté 3:1; Emoniseli 6:9-11; 14:13) Baklisto oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé bazali lelo oyo kokokisa eteni monene ya mosala ya kosakola nsango malamu, mpe bazali kotalela yango ete ezali libaku malamu ya kosunga bandeko bapakolami ya Yesu kati na likambo yango. (Matai 25:40) Nzokande, bapakolami wana bazali moombo ya sembo mpe ya mayele oyo na nzela na bango bilei ya elimo bizali kopesama na boumeli ya eleko mobimba oyo ya mikolo ya nsuka. Ezalela ya bampate mosusu ekozala nini ntango bapakolami nyonso bakosila kozwa mbano na bango na likoló? Bibongiseli nini bikosalema mpo na bampate mosusu? Kotalela mwa moke ezalela ya Yisraele ya kala ekosalisa biso mpo ete tókoka koyanola na mituna oyo.
“Bokonzi na banganga” ya elilingi
7, 8. Na meko nini Yisraele ya kala ezalaki bokonzi ya banganga mpe libota ya bulɛɛ na nsé ya Mibeko ya kondimana?
7 Na ntango Yehova aponaki Yisraele lokola libota na ye liponami mpe ya ntina mingi, asalaki kondimana elongo na bango, kolobáká ete: “Soko bokotosa monoko na ngai mpe [bokobatela] kondimana na ngai, mbele bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso, mpo ete mokili mobimba ezali na ngai, mpe bokozala bokonzi na banganga mpe libota na bulɛɛ.” (Exode 19:5, 6) Yisraele ezalaki libota ya ntina mingi ya Yehova na lisalisi ya kondimana ya Mibeko. Kasi, lolenge nini elaká oyo etalaki bokonzi ya banganga mpe libota ya bulɛɛ esengelaki kokokisama?
8 Na ntango Yisraele ezalaki sembo, endimaki boyangeli ya Yehova mpe endimaki ye lokola Mokonzi na bango. (Yisaya 33:22) Na yango, bazalaki bokonzi. Kasi, lokola eyaki komonana na nsima, elaká na ntina na “bokonzi” elingaki kozala na ndimbola monene koleka. Lisusu, na ntango batosaki Mibeko ya Yehova, bazalaki sembo, bakabwanaki na mabota oyo ezalaki zingazinga na bango. Bazalaki libota ya bulɛɛ. (Deteronome 7:5, 6) Bazalaki bokonzi ya banganga? Na Yisraele, Libota ya Levi etyamaki pembeni mpo na mosala ya tempelo, mpe kati na libota yango ezalaki na banganga Balevi. Na ntango Mibeko ya Mose mibandaki kosalelama, mibali ya libota ya Levi bakamataki na esika ya bana ya liboso ya mabota nyonso oyo mazalaki ya Balevi te.a (Exode 22:29, Mituya 3:11-16, 40-51) Na yango, ekoki kolobama ete, mabota nyonso ya Yisraele mapesamaki kati na mosala ya tempelo. Yango ezalaki lolenge oyo ya penepene mpenza oyo ekomisaki libota wana libota ya banganga. Nzokande, bazalaki komonisa Yehova liboso na bikólo nyonso. Moto nyonso ya ekólo mosusu oyo asepelaki kosambela Nzambe ya solo asengelaki kosangana na Yisraele.—2 Ntango 6:32, 33; Yisaya 60:10.
9. Nini epusaki Yehova na koboya bokonzi ya Yisraele oyo ezalaki na nɔ́rdi ete ‘ezala nganga na ye te’?
9 Na nsima ya liwa ya Salomo, libota ya Nzambe likabwanaki katikati na libota ya nɔ́rdi ya Yisraele na nsé ya boyangeli ya Yeloboama mpe libota ya súdi ya Yuda na boyangeli ya Leboama. Lokola tempelo, moboko ya losambo ya solo, ezalaki kati na mabelé ya Yuda, Yeloboama abandisaki lolenge moko ya losambo ya mabe na kotyáká bikeko ya bana na ngombe kati na teritware ya ekólo na ye. Na nsima, “asalaki mpe ndako kati na bisika na likoló mpe aponaki banganga kati na bato oyo bazalaki Balevi te.” (1 Mikonzi 12:31) Ekólo ya nɔ́rdi ekɔtaki mozindo mpenza kati na losambo ya lokuta ntango Mokonzi Ahaba atikaki nzela na mwasi na ye mopaya, Yezabele, ete atya losambo ya Baala kati na mboka. Na nsuka, Yehova akweisaki ekateli likoló na bokonzi wana ya botomboki. Na nzela ya Hoseya, alobaki ete: “Bato na ngai babebisami mpo na kozanga boyebi; mpo ete yo oboyi boyebi; boye ngai nakoboya yo ete ozala nganga na ngai te.” (Hoseya 4:6) Mwa moke na nsima, bato ya Asulia babebisaki bokonzi ya nɔ́rdi ya Yisraele.
10. Lolenge nini bokonzi ya Yuda na súdi, na ntango ezalaki sembo, emonisaki Yehova liboso na bikólo nyonso?
10 Ezalaki boni mpo na ekólo ya súdi, Yuda? Na mikolo ya Ezekiase, Yehova alobaki na bango na nzela ya Yisaya ete: “Bino bozali batatoli na ngai, . . . moombo na ngai oyo nasili kopona yo, . . . bato oyo natongi bango mpo na ngai moko ete bamonisa kosanzola na ngai.” (Yisaya 43:10, 21; 44:21) Na ntango bazalaki sembo, bokonzi ya súdi esalelamaki mpo na kosakola nkembo ya Yehova epai na mabota mpe kobenda bato ya sembo ete basambela ye kati na tempelo na ye mpe basalisama na bonganga ya libota ya Levi oyo ezalaki na lotómo lobongi.
Bato ya bikólo mosusu kati na Yisraele
11, 12. Tangá mwa ndambo ya bato ya mboka mosusu oyo bayaki kosalela Yehova elongo na Yisraele.
11 Mpo na bapaya oyo bayanolaki na litatoli wana ya libota mobimba, bibongiseli bikamatamaki mpo na bango kati na Mibeko oyo epesamaki na nzela ya Mose—oyo mwasi na ye, Zipora, azalaki moto ya Madiani. “Ebele na bato ndenge na ndenge” baoyo bazalaki Bayisraele te batikaki Ezipito mpe bazalaki na ntango Mibeko mipesamaki. (Exode 2:16-22; 12:38; Mituya 11:4) Rahabe mpe libota na ye babatelamaki na Yeliko mpe na nsima bandimamaki kati na lisangá ya Bayuda. (Yosua 6:23-25) Mwa moke na nsima, bato na Gibona basalaki boyokani ya kimya elongo na Bayisraele mpe bapesamelaki mikumba kati na ndako ya Nzambe.—Yosua 9:3-27; talá mpe 1 Mikonzi 8:41-43; Esetele 8:17.
12 Na nsima, bato ya bikólo mosusu bakómaki kokokisa mikumba ya ntina mingi. Ulia Mohititi, mobali ya Bata-seba, azalaki kati na “bato na makasi” ya Davidi, lokola ezalaki Zeleki Moamoniti. (1 Ntango 11:26, 39, 41; 2 Samwele 11:3, 4) Ebede-Meleke, ye Moetiopia, azalaki kosala kati na ndako ya mokonzi mpe azalaki na lotómo ya kokɔta epai na mokonzi. (Yilimia 38:7-9) Nsima wana Yisraele ebimaki na boombo longwa na Babilone, Banetinimi, baoyo bazalaki Bayisraele te babakiselamaki mikumba mpo na kosunga banganga. (Esdrase 7:24) Lokola ebele ya bato ya sembo ya bikólo mosusu, to bapaya, batalelami lokola elilingi ya ebele monene lelo oyo, ezalela na bango ezali kobenda likebi na biso.
13, 14. (a) Kati na Yisraele, baprozelite bazalaki na mikumba mpe misala nini? (b) Lolenge nini Bayisraele basengelaki kotalela baprozelite ya sembo?
13 Bango bazalaki baprozelite, basambeli bamipesi na Yehova na nsé ya Mibeko ya Mose, baoyo, elongo na Bayisraele, bakabwanaki na mabota mosusu. (Levitike 24:22) Bazalaki kopesa mbeka, bazalaki komibatela peto na losambo ya lokuta, bazalaki koboya makila, bobele lokola Bayisraele. (Levitike 17:10-14; 20:2) Bapesaki lisungi kati na mosala ya kotonga tempelo ya Salomo mpe basanganaki kati na kozongisama ya losambo ya solo na nsé ya boyangeli ya Mokonzi Asa mpe Mokonzi Ezekiase. (1 Ntango 22:2; 2 Ntango 15:8-14; 30:25) Na ntango Petelo asalelaki lifungola ya liboso ya Bokonzi na Pantekote na mobu 33 T.B., maloba na ye mayokanaki epai na “Bayuda mpe [baprozelite, NW] [bango bazalaki Bayuda te].” Ekoki mpenza kozala ete, bamoko kati na nkóto misato oyo bazwaki batisimo na mokolo yango bazalaki baprozelite. (Misala 2:10, 41) Mosika te, Filipi abatisaki prozelite moko Moetiopia—liboso ete Petelo asalela lifungola ya nsuka ya Bokonzi epai na Korneye mpe libota na ye. (Matai 16:19; Misala 8:26-40; 10:30-48) Emonani polele ete, baprozelite batalelamaki te lokola Bapakano.
14 Nzokande, etɛlɛmɛlo ya baprozelite kati na mboka ekokanaki te na oyo ya bato babotamaki mpenza Bayisraele. Baprozelite bazalaki te kosala lokola banganga, mpe bana na bango ya liboso bamonisamaki te kati na bonganga ya libota ya Levi.b Mpe baprozelite bazalaki te kozwa libula ya mabelé kati na Yisraele. Atako bongo, Bayisraele bapesamelaki etindá ya kozala na limemya epai na baprozelite mpe ya kotalela bango lokola bandeko.—Levitike 19:33, 34.
Ekólo ya elimo
15. Nini ebimaki na ntango Bayisraele ya mosuni boboyaki kondima Masiya?
15 Mibeko misalemaki mpo ete ekoka kobatela Yisraele peto mpe ekesana na bikólo ya zingazinga. Kasi ekokisaki mokano mosusu. Ntoma Paulo akomaki ete: “Mibeko izalaki Molakisi na biso kino ekoya Klisto, ete tólongisama na kondima.” (Bagalatia 3:24) Na mawa nyonso, mingi kati na Bayisraele batikaki te ete Mibeko ekamba bango epai na Klisto. (Matai 23:15; Yoane 1:11) Na yango, Yehova Nzambe abwakaki libota wana mpe asalaki ete “Yisraele na Nzambe” ebotama. Lisusu, apesaki libyangi epai na baoyo bazalaki Bayuda te ete bakóma banamboka oyo babongi mpenza kati na Yisraele wana ya sika. (Bagalatia 3:28; 6:16) Ezalaki bongo epai na libota wana ya sika nde elaká ya Yehova oyo ezwami na Exode 19:5, 6 na ntina na bokonzi ya banganga ekokisamaki na kitoko mpenza, na mobimba na yango. Lolenge nini?
16, 17. Na ndimbola nini baklisto bapakolami oyo bazali awa na mabelé bazali “bato babongi na bokonzi”? mpe “banganga”?
16 Petelo atángaki maloba ya Exode 19:6 na ntango akomaki epai na baklisto bapakolami ya mikolo na ye: “Bino bozali libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulɛɛ, bato baponami.” (1 Petelo 2:9) Yango elimboli nini? Baklisto bapakolami oyo bazali na mabelé bazali bakonzi? Te, bokonzi na bango ezali naino ya mikolo mizali koya. (1 Bakolinti 4:8) Nzokande, bazali “bato babongi na bokonzi” na ndimbola oyo ete batyami elembo mpo na mikumba ya bokonzi na mikolo mizali koya. Ata sikawa, bazali libota oyo lizali na nsé ya mokonzi moko, Yesu, oyo aponami na Moyangeli Monene, Yehova Nzambe. Paulo akomaki ete: “[Yehova] abikisi biso longwa na nkanga na molili mpe akɔtisi biso na bokonzi na Mwana na ye na bolingo.”—Bakolose 1:13.
17 Baklisto bapakolami oyo bazali awa na mabelé bazali banganga? Ee, na lolenge moko. Lokola lisangá, bazalaki kokokisa mokumba ya bonganga oyo ekoki kobetelama ntembe te. Petelo alimbolaki yango na ntango alobaki ete: “Bino mpe . . . botongama ndako na [elimo, NW]; bozala banganga na bulɛɛ.” (1 Petelo 2:5; 1 Bakolinti 3:16) Lelo oyo, batikali ya baklisto bapakolami bango nyonso bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele,” nzela mpo na kokabolama ya bilei ya elimo. (Matai 24:45-47) Lokola ezalaki na Yisraele na ntango ya kala, moto nyonso oyo alingi kosalela Yehova asengeli kosangana na bapakolami wana.
18. Lokola banganga, mokumba ya liboso ya lisangá ya baklisto bapakolami oyo bazali awa na mabelé ezali mpenza nini?
18 Lisusu, baklisto bapakolami bazwaki esika ya Yisraele mpo na oyo etali mokumba ya kotatola bonene ya Yehova kati na bikólo nyonso. Zingazinga ya makambo emonisi ete na ntango Petelo abéngaki baklisto bapakolami ete libota ya banganga, azalaki kolobela mosala ya kosakola. Ya solo, asangisaki esika moko elaká ya Yehova oyo ezwami na Exode 19:6 elongo na maloba na Ye oyo alobaki na Yisraele kati na Yisaya 43:21 wana alobaki ete: “Bino bozali . . . banganga na bokonzi . . . [na boye] ete boyebisa malamu na oyo abyangi bino kobima na molili kokɔta na moi na ye na kokamwisa.” (1 Petelo 2:9) Na boyokani na yango, Paulo alobaki na ntina na kosakolama ya misala ya lokumu ya Yehova lokola mbeka ya tempelo. Akomaki ete: “Bongo mpo na ye, totombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye.”—Baebele 13:15.
Kokokisama kati na likoló
19. Wapi kokokisama ya nsuka, ya monene ya elaká oyo ete Yisrale ekozala bokonzi ya banganga?
19 Nzokande, na nsuka, Exode 19:5, 6 ezali na kokokisama moko ya nkembo mingi. Kati na mokanda ya Emoniseli, ntoma Yoane ayoki bikelamu ya likoló kosalela mokapo yango wana bazali kokumisa Yesu oyo asekwisami: “Obomami mpe na makila na yo osikoli mpo na Nzambe bato na mikili nyonso, na minoko nyonso, na bibolo nyonso mpe ozalisi bango bokonzi na banganga mpo na Nzambe na biso, mpe bakozala bakonzi na mokili.” (Emoniseli 5:9, 10) Na yango, na ndimbola ya nsuka, bokonzi ya banganga ezali bongo Bokonzi ya Nzambe ya likoló, bokonzi oyo mpo na yango Yesu ateyaki biso ete tosambelaka. (Luka 11:2) Baklisto nyonso bapakolami 144 000 oyo bazali koyika mpiko na bosembo nyonso kino nsuka bakosangana kati na ebongiseli wana ya Bokonzi. (Emoniseli 20:4, 6) Oyo nde kokokisama kitoko ya elaká oyo epesamaki uta kala na nzela ya Mose!
20. Motuna nini motikali oyo mosengeli koyanolama?
20 Nyonso wana ezali na boyokani nini na ezalela ya ebele monene mpe na mikolo na bango mizali koya na ntango bapakolami nyonso bakosila kozwa libula na bango ya kitoko? Yango ekomonana polele kati na lisoló ya nsuka ya molɔngɔ́.
[Maloba na nse]
a Na ntango mosala ya bonganga ya Yisraele ebandaki, bana mibali ya liboso ya mabota ya Yisraele oyo ezalaki ya Levi te mpe mibali ya libota ya Levi bazalaki kotángama. Ezalaki na bana mibali ya liboso 273 koleka mibali ya libota ya Levi. Na yango, Yehova apesaki etindá ete sekéla mitano mpo na mokomoko ya mibali 273 esengelaki kofutama lokola lisiko mpo na motángo oyo elekaki.
b Ebele ya bato ndenge na ndenge oyo bazalaki Bayisraele te bazalaki na ntango Mibeko mibandaki na mobu 1513 L.T.B., kasi bana mibali na bango ya liboso batángamaki te na ntango Balevi bazalaki kokamatama na esika ya bana mibali ya liboso ya Yisraele. (Talá paragrafe 8.) Na yango, Balevi bakamatamaki te na esika ya bana ya liboso ya baoyo bazalaki Bayisraele te.
Okoki kolimbola?
◻ Lolenge nini, mokemoke, etɛlɛmɛlo ya bampate mosusu esosolamaki malamu?
◻ Mpo na nini Yehova aboyaki bokonzi na nɔ́rdi ya Yisraele ete esala mosala ya bongaga te mpo na ye?
◻ Ntango Yuda ezalaki sembo ezalaki na mokumba nini liboso na bikólo nyonso?
◻ Mokumba ya bato ya sembo oyo babongwanaki na losambo ya Bayuda ezalaki nini kati na Yisraele?
◻ Lolenge nini lisangá ya bapakolami lizali kosala lokola bokonzi ya banganga?
[Elilingi na lokasa 16]
Lokola bokonzi ya banganga, baklisto bapakolami bazali kosakola nkembo ya Yehova na mabelé
[Elilingi na lokasa 18]
Kokokisama ya nsuka ya Exode 19:6 ezali Bokonzi