Lolenge Ya Koteya Lisosoli Na Yo
“LISOSOLI malamu ezali kusɛ́ oyo eleki malamu.” Lisese oyo ya kalakala lizali komonisa likambo moko ya ntina mingi: Ntango tozali kolanda lisosoli na biso, tokozala na kimya ya motema mpe tokomiyoka malamu.
Nzokande, bato nyonso te baponaka kosala bongo. Adolf Hitler amipesaki mokumba ya kosikola moto na bokosi oyo ezali konyokola ye, elingi koloba lisosoli. Boyangeli mabe na ye epesi elakiseli ya nsɔ́mɔ mpo na komonisa mabe oyo bato bakoki kozala na yango ntango baboyi kolanda lisosoli na bango. Kasi, lelo oyo mpe ezali na basáli minene ya mabe—baoyo bazali kosangisa nzoto na basi na makasi mpe bazali koboma kozanga ete bátungisama na mitema na bango. Motango monene ya basáli na mabe motindo wana ezali bongo bilenge. Búku moko oyo elobelaki likambo yango ezalaki na motó na likambo moke ete Bana bazangi lisosoli (na Lingelesi).
Atako bato mingi bakoki kokanisa ete bakosala mbeba monene te, mingi bazali kotungisama te na ntango bamipesi na kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo, na kokosa, to koyiba. Bizaleli malamu bizali kobeba na bisika nyonso. Kolobeláká lipɛngwi monene na losambo ya solo, ntoma Paulo akomaki ete baklisto mosusu bakomitika na bopusi ya mokili mpe na yango bakokóma ‘na lisosoli lisili kozika.’ (1 Timoté 4:2) Likámá ya kobeba ya bizaleli lizali monene koleka na ‘mikolo oyo ya nsuka.’ (2 Timoté 3:1) Na yango, baklisto basengeli kosala milende makasi mpo na kobatela lisosoli na bango. Tokoki kosala yango na koteyáká mpe kokólisáká lisosoli na biso.
Makanisi, motema, mpe lisosoli na yo
Ntoma Paulo alobaki ete: “Nazali koloba sembo kati na Klisto, nakobukaka lokuta te; lisosoli na motema na ngai etatweli ngai kati na [elimo santu, NW].” (Baloma 9:1) Na yango, lisosoli ekoki kotatola. Ekoki kotala na bozindo ya etamboli ya moto mpe kolóngisa to kokweisa yango. Mingimigi lolenge tozali kokesenisa malamu mpe mabe, Mozalisi na biso asilá kotya yango kati na biso. Nzokande, tokoki kobongisa mpe koteya lisosoli na biso. Lolenge nini? Na kozwáká boyebi ya sikisiki kati na Liloba ya Nzambe. Ntoma Paulo alobi ete “bóbongwana mpo na kozwa makanisi na sika kino bokokoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango ebongi kwa.” (Baloma 12:2) Na ntango ozali kokɔtisa makanisi ya Nzambe mpe bolingi na ye na bɔɔngɔ́ na yo, lisosoli na yo ekobanda kosala mingi na lolenge oyo ezali komonisa bokangami na Nzambe.
Batatoli ya Yehova basili kosalisa bamilió ya bato kati na mokili mobimba na ‘kozwa boyebi ya Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto.’ (Yoane 17:3) Na nzela ya boyekoli ya Biblia oyo bazali kotambwisa na bandako ya bato kozanga ete básɛnga mosolo, bazali koteya bato ya mitema sembo mitindá ya Yehova Nzambe na makambo lokola kosangisa nzoto, masanga, libala, makambo ya mombongo, mpe makambo mosusu mingi.a (Masese 11:1; Malako 10:6-12; 1 Bakolinti 6:9, 10; Baefese 5:28-33) Kozwa ‘boyebi yango ya sikisiki’ ezali litambe ya ntina mpo na kokólisa lisosoli ya moto oyo azali na bokangami na Nzambe. (Bafilipi 1:9) Ya solo, ata ntango moklisto akómi na makoki ya bososoli Biblia mingi, asengeli ntango nyonso kokóba koleisa makanisi na ye na Liloba ya Nzambe mpo ete lisosoli na ye litikala malamu.—Nzembo 1:1-3.
Biblia ezali mpe kokokanisa lisosoli mpe motema ya elilingi, oyo esangisi mayoki na biso. (Baloma 2:15) Mpo ete lisosoli likoka kosala malamu, makanisi mpe motema esengeli kosala elongo. Yango elimboli kosuka bobele na kokɔtisa makambo na bɔɔngɔ́ te. Osengeli mpe kobongisa motema na yo—mayoki ya motema na yo, bamposa mpe bosɛnga na yo. Na bongo, mokanda ya Masese ezali kosalela maloba lokola “osembola [motema, NW] na yo,” “kambá motema na yo,” mpe “tyá motema na yo.” (Masese 2:2; 23:19; 27:23) Mwango moko ya kosala yango ezali bongo bomanyoli mpe kokanisa likoló ya Makomami. Nzembo 77:12 elobi ete: “Nakobanzaka mpe mosala na yo nyonso, nakosolola yango nyonso esali yo.” Bomanyoli esalisaka biso na kosimba mayoki ya motema mpe matindiki na biso.
Na ndakisa, kanisá ete ozali na momeseno moko mabe lokola komela likaya. Na ntembe te, lokola bato mingi oyebi malamu makámá na yango na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Kasi, atako baninga mpe libota na yo bazali kokebisa yo, ozali na mokakatano mpo na kotika yango. Lolenge nini komanyola nsango ya Biblia ekolendisa lisosoli na yo na likambo yango?
Na ndakisa, meká komanyola likoló na maloba ya ntoma Paulo kati na 2 Bakolinti 7:1: “Balingami, awa ezali biso na bilaka oyo, tómipɛtola na mbindo nyonso na nzoto mpe na [elimo, NW] mpe tókokisa ezaleli na biso na bulɛɛ kati na nsɔ́mɔ na Nkolo.” Kangá ntina ya maloba yango. Omituna yo moko, ‘Wapi “bilaka oyo” Paulo alobeli?’ Na kotángáká lisoló mobimba, okomona ete vɛrsɛ́ oyo ezali liboso elobi ete: “Yango wana, bóbima kati na bango, mpe bókabwana na bango. Nzambe alobi bongo. Bómama eloko na mbindo te, mpe boye nakoyamba bino. Nakozala tata epai na bino, mpe bino bokozala bana na ngai babali mpe bana na ngai basi. Nkolo-na-Nguya-Nyonso alobi bongo.”—2 Bakolinti 6:17, 18.
Toli ya Paulo ya ‘komipɛtola na mbindo’ ekómi sikawa na nguya koleka! Lokola nguya oyo ezali kopusa biso na kosala yango, Nzambe alaki ‘koyamba biso,’ elingi koloba ete akobatela biso. Okoki komituna yo moko ete ‘nakoki kozala na boyokani ya pene elongo na ye—lokola oyo ya mwana mobali to mwana mwasi elongo na tata na ye?’ Likanisi ya ‘koyambama’ to kolingama na Nzambe ya mayele mpe ya bolingo, ezali kosepelisa yo, boye te? Soki likanisi yango liyelaka yo te, talá lolenge batata ya bolingo bamonisaka yango epai ya bana na bango. Sikawa kanisá ete boyokani motindo yango ezali kati na yo mpe Yehova! Ntango ozali kokanisa yango mingi, mposa ya boyokani motindo wana ekokóla epai na yo.
Kasi simbá likambo oyo: Boyokani ya pene elongo na Nzambe ekoki kosalema bobele soki yo ‘okosimba eloko na mbindo te.’ Omituna yo moko ete: ‘Komela likaya ezali te kati na “biloko na mbindo” oyo Nzambe aboyi? Kosalela yango ekozala “mbindo na nzoto,” oyo ekomemela kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na ngai lolenge nyonso ya makámá, boye te? Lokola Yehova azali Nzambe ya pɛto to ya “bulɛɛ,” akondima lolenge nazali komikómisa mbindo boye?’ (1 Petelo 1:15, 16) Simbá lisusu ete Paulo akebisi mpe na ‘mbindo ya elimo,’ to bopusi ya makanisi. Omituna ete: ‘Komibebisa yango ezali nde na bopusi na lolenge na ngai ya kokanisa? Nakokende nde mosika mpo na kokokisa mposa na ngai, kino mbala mosusu kotya kolɔngɔ́nɔ́ na ngai, libota na ngai, to ata etɛlɛmɛlo na ngai liboso na Nzambe na likámá? Kino wapi natiki nzela ete komela likaya ebebisa bomoi na ngai?’ Na kotaleláká mituna ya kobulunganisa motindo wana okoki mpenza kozwa mpiko ya kotika!
Ya solo, okoki kozala na mposa ya lisalisi mpe lisungi ya bato mosusu mpo na kolónga momeseno ya komela likaya. Nzokande, komanyola likoló na Biblia ekoki kosala mingi mpo na kopusa mpe kolendisa lisosoli na yo mpo ete olónga momeseno ya komela likaya.
Na ntango tosali mabe
Atako tozali kosala milende makasi mpo na kosala oyo ezali malamu, na bantango mosusu ezaleli na biso ya kozanga kokoka elóngaka biso mpe tokweaka. Na ntango yango lisosoli na biso etungisaka biso, kasi mbala mosusu tobendamaka na koboya koyokela yango. To tokoki kolɛmba na boye ete tokolinga kosundola milende nyonso mpo na kosalela Nzambe. Nzokande, tómikundola likambo oyo ekómelaki Mokonzi Davidi. Nsima ya kosala ekobo na Bata-seba, lisosoli na ye etungisamaki. Alobelaki mpasi oyo ayokaki na maloba oyo: “Lobɔkɔ na yo ezalaki na bozito likoló na ngai na moi na butu; mai na nzoto na ngai ekaoki lokola na ntango makasi.” (Nzembo 32:4) Mpasi? Ɛɛ! Kasi mawa wana oyo eyokani na mokano ya Nzambe epusaki Davidi na kobongola motema mpe na kozongisa boyokani elongo na Nzambe. (Kokanisá na 2 Bakolinti 7:10.) Komilela ya Davidi mpo na kosɛnga bolimbisi epesi mpenza elembeteli oyo ezali komonisa solo ete abongolaki motema. Mpo ete ayanolaki na mongongo ya lisosoli na ye, Davidi azwaki lisungi mpo na kobongwana mpe azongelaki lisusu esengo na ye.—Nzembo 51.
Lelo oyo ekoki mpe kozala bongo. Basusu bayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova kasi na nsima batikaki ntango bayaki koyeba ete lolenge ya bomoi na bango eyokanaki te na mitindá mitombwani ya Nzambe. Mbala mosusu bazalaki na libala ya makango to bazalaki baombo ya misala ya mbindo. Lisosoli na bango etungisaki bango!
Soki ozali na ezalela motindo wana, talelá maloba ntoma Petelo alobaki mokolo ya Pantekote. Na ntango atɔndɔlaki masumu ya baninga na ye banamboka Bayuda, ‘bakatanaki na mitema.’ Na esika ete bálɛmba, balandaki toli ya Petelo ete bábongola mitema, mpe bazwaki ngɔlu ya Nzambe. (Misala 2:37-41) Yo mpe okoki kosala bongo! Na esika ya kotika solo mpamba te lisosoli na yo ezali kotungisa yo, tiká ete lisosoli na yo epusa yo na ‘kobongola motema mpe kobutwa.’ (Misala 3:19) Na kozwáká ekateli makasi mpe molende, okoki kosala mbongwana oyo esengeli mpo na kondimama na Nzambe.
‘Zalá na lisosoli malamu’
Ezala ete ozali bobele na ebandeli ya boyekoli banzela ya Yehova to oumeli bambula mingi lokola moklisto oyo ateli, toli oyo ya Petelo ebongi na yo: “[Zalá] na lisosoli malamu.” (1 Petelo 3:16) Yango ezali esaleli, kasi bozito te. Teyá yango na kotondisáká makanisi mpe motema na yo na mayele mazali kati na Biblia, Liloba ya Nzambe. Landá lisosoli na yo na ntango ezali kokebisa yo. Sepelá na kimya ya makanisi oyo kotosa lisosoli na yo ekoki komema.
Ya solo, koteya mpe kobongisa lisosoli na yo ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Nzokande, okoki kobondela Yehova Nzambe ete asunga yo. Na lisalisi na ye, okozala na likoki ya kosalela Nzambe “na lisosoli malamu mpe kondima ezangi bokosi.”—1 Timoté 1:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki osepeli na boyekoli ya Biblia na ndako, kokakatana te kotuna na lisangá ya Batatoli ya Yehova na esika ofandi to komelá babimisi ya zulunalo oyo.
[Elilingi na lokasa 6]
Kotánga mpe komanyola Liloba ya Nzambe esalisaka biso ete tóteya lisosoli na biso