Kolinga Liloba ya Nzambe epesaka matomba
“Lingá [mayele] mpe ye akokɛngɛla yo. . . . Akoyeisela yo lokumu wana [okoyamba, NW] ye.”—MASESE 4:6, 8.
1. Kolinga Liloba ya Nzambe esɛngaka mpenza makambo nini?
KOTÁNGA Biblia ezali na ntina mingi mpo na moklisto. Kasi, kotánga mpamba emonisaka te ete moto alingi Liloba ya Nzambe. Okanisi boni soki moto atángaka Biblia kasi asalaka makambo oyo Biblia epekisi? Emonisi mpenza ete alingaka Liloba ya Nzambe te ndenge mokomi ya Nzembo 119 alingaki yango. Kolinga Liloba ya Nzambe epusaki mokomi yango na kotosa makambo oyo Liloba yango esɛngaka.—Nzembo 119:97, 101, 105.
2. Mayele oyo eutaka na Liloba ya Nzambe epesaka matomba nini?
2 Kotosa Liloba ya Nzambe esɛngaka na moto asembolaka ntango nyonso makanisi mpe bizaleli na ye. Yango ekomonisa ete moto yango azali na mayele euti na Nzambe, oyo elimboli kosalela boyebi mpe bososoli oyo tozwaka ntango tozali koyekola Biblia. “Lingá [mayele] mpe ye akokɛngɛla yo. Kumisá ye mpe akotombola yo; akoyeisela yo lokumu wana [okoyamba, NW] ye. Akozingela yo na motole na nkembo.” (Masese 4:6, 8, 9) Maloba yango ezali kolendisa biso tólinga Liloba ya Nzambe mingi mpe tótika yango etambwisa biso! Nani oyo aboyaka bábatela ye, bátombola ye, mpe bápesa ye lokumu?
Mpasi ya libela ekozwa biso te
3. Mpo na nini esengeli mpenza ete baklisto bábatelama sikoyo, mpe basengeli kobatelama liboso ya nani?
3 Moto oyo azwi mayele na nzela ya koyekola mpe kotosa Liloba ya Nzambe makambo nini ekokómela ye te? Ya liboso, abatelami na boye ete Satana Zabolo akozwa ye te. Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe ete abatela bango na oyo mabe, elingi koloba Satana. (Matai 6:13) Lelo oyo, tosengeli mpenza kosɛnga likambo yango na mabondeli na biso. Nsima ya 1914, babenganaki Satana na bademo na ye na likoló. Yango wana, Satana azali “kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” (Emoniseli 12:9, 10, 12) Na mikolo oyo ya nsuka, nkanda na ye engali kongala, yango wana azali kobundisa ‘baoyo bazali kotosa mibeko ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kotatola mpo na Yesu,’ kasi azali kolonga te.—Emoniseli 12:17.
4. Ndenge nini baklisto bakimaka masɛnginya mpe mitambo ya Satana?
4 Lokola Satana azali na nkanda makasi, azali kobimisela baministre baklisto yango mobulu mpe azali kolukela bango minyoko makasi to kopusa bato mosusu bápekisa mosala na bango. Satana azali mpe koluka kokosa basakoli ya Bokonzi mpo bátya makanisi na bango na makambo lokola koluka kozala bato minene na mokili, kolinga mosala te, konduka biloko, mpe komipesa na bisengo, na esika bámipesa na mosala ya kosakola Bokonzi. Eloko nini ebatelaka basaleli ya sembo ya Nzambe ete bálanda masɛnginya ya Satana te to bákwea na mitambo na ye te? Makambo ya ntina oyo: libondeli, boyokani malamu na Yehova, mpe kondima ete makambo oyo alaki ekokokisama solo. Kasi, mpo na kokokisa makambo yango nyonso, esengeli koyeba Liloba ya Nzambe mpe kozala na mposa makasi ya koyoka makambo oyo liloba yango ezali koloba na biso mbala na mbala. Bakundwelaka biso makambo yango ntango tozali kotánga Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, ntango tozali kokende na makita ya boklisto, ntango baninga na biso bandimi bazali kopesa biso toli na lisalisi ya Biblia, to mpe ntango tozali kokanisa mozindo na mibeko ya Biblia oyo elimo ya Nzambe ezali kozongisa na makanisi na biso.—Yisaya 30:21; Yoane 14:26; 1 Yoane 2:15-17.
5. Makambo nini ekokómela biso te soki tozali na mayele oyo euti na Liloba ya Nzambe?
5 Bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe babatelami mpe na makambo mosusu. Na ndakisa, bamibatelaka na bampasi ya makanisi mpe bamaladi oyo bato bazwaka na komela bangi, likaya, mpe kosala pite. (1 Bakolinti 5:11; 2 Bakolinti 7:1) Bazalaka ntango nyonso na boyokani malamu na baninga na bango mpo baboyaka sɔngisɔngi to bilobaloba. (Baefese 4:31) Lokola mpe bamipesaka na mateya ya filozofi te oyo ezali mayele ya mokili mpe ezali kokosa bato, bazalaka na elimo ya ntembe te. (1 Bakolinti 3:19) Lokola balingi Liloba ya Nzambe, makambo oyo ekoki kobebisa boninga na bango na Nzambe mpe kobebisa elikya na bango ya bomoi ya seko ekokómela bango te. Bamipesaka na kosalisa bazalani na bango bátyela makambo malamu oyo Biblia elaki motema. Bayebi ete ntango bazali kosala bongo, ‘bakomibikisa mpe bakobikisa bango bazali koyoka bango.’—1 Timote 4:16.
6. Ndenge nini mayele oyo euti na Liloba ya Nzambe ekoki kobatela biso ata na bantango ya mpasi?
6 Ya solo, moto nyonso, ata oyo alingaka Liloba ya Nzambe, akutanaka na “ntango mpe makambo oyo eyaka na mbalakaka.” (Mosakoli 9:11, NW) Bamoko kati na biso bakokutana na makama oyo ebimaka na mokili, na maladi makasi, to liwa ya mbalakaka. Kasi, tokoki mpenza koloba ete tobatelami. Likambo moko te ekoki kopesa moto oyo alingaka mpenza Liloba ya Nzambe mpasi oyo ekoumela libela. Yango wana, tómitungisaka mingi te mpo na makambo oyo ekoki kokómela biso na mikolo ezali koya. Soki tosali nyonso oyo tokoki kosala mpo na komibatela, ekoleka malamu tótika nyonso na mabɔkɔ ya Yehova mpe tóbebisa kimya na biso te na komitungisa mpo mokili oyo ezali na libateli te. (Matai 6:33, 34; Bafilipi 4:6, 7) Tóbosana elikya ya lisekwa te mpe bomoi ya malamu mingi ntango Nzambe ‘akosala biloko nyonso ya sika.’—Emoniseli 21:5; Yoane 11:25.
Zalá “mabelé malamu”
7. Lisese nini Yesu apesaki bato ebele oyo bayaki koyoka ye?
7 Lisese moko ya Yesu emonisaki mpenza ntina ya kotalela Liloba ya Nzambe na lolenge malamu. Ntango Yesu azalaki kosakola nsango malamu na Palestine, bato ebele bazalaki koyangana mpo na koyoka ye. (Luka 8:1, 4) Kasi, bango nyonso te nde balingaki mpenza Liloba ya Nzambe. Na ntembe te, bato mingi bazalaki koya koyoka ye kaka mpo bazalaki na mposa ya komona bikamwiseli to mpo azalaki koteya malamu. Yango wana, Yesu alobaki na bango lisese oyo: “Mokoni moko abimaki mpo na kokona nkona na ye. Kati na kokona na ye, nkona mosusu ekwei pembeni na nzela mpe enyatami, mpe ndɛkɛ na likoló balei yango. Nkona mosusu ekwei likoló na mabanga mpe esili yango kobima ekauki mpo na kozanga mai. Nkona mosusu ekwei katikati na nzube, mpe nzube ebimi na yango elongo, mpe ekibisi yango. Nkona mosusu ekwei kati na mabelé malamu mpe ebimi mpe eboti mbuma mokama mokama.”—Luka 8:5-8.
8. Na lisese ya Yesu, nkona ezali nini?
8 Lisese ya Yesu emonisaki ete moto na moto akoyamba nsango malamu na kotalela motema na ye. Nkona oyo ezali kokonama ezali “Liloba ya Nzambe.” (Luka 8:11) To, ndenge Evanzile mosusu oyo elobeli lisese yango elobi, nkona ezali “Liloba ya Bokonzi.” (Matai 13:19) Yesu akokaki kobenga nkona yango Liloba ya Nzambe to Liloba ya Bokonzi, mpamba te Liloba ya Nzambe elobelaka Bokonzi ya likoló. Ye moko Yesu Klisto azali Mokonzi na yango mpe na nzela na yango, Yehova akolakisa ete azali mokonzi mpe akosantisa nkombo na ye. (Matai 6:9, 10) Nkona ezali nsango malamu ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Batatoli ya Yehova balobelaka mingi nsango ya Bokonzi ntango balonaka nkona na ndakisa ya Moloni ya libosoliboso, Yesu Klisto. Bato bayambaka nsango na bango ndenge nini?
9. (a) Nkona oyo ekwei na mabelé elimboli nini? (b) Nkona oyo ekweaki na mabanga elimboli nini? (c) Nkona oyo ekweaki na nzube elimboli nini?
9 Yesu alobaki ete nkona mosusu ekwei na nzela mpe enyatami. Ezali komonisa bato oyo bazalaka na ntango te mpo nsango ya Bokonzi ebota na mitema na bango. Liboso bábanda kolinga Liloba ya Nzambe, “Satana ayei mpe abɔtɔli Liloba na mitema na bango ete bándima mpo na kobika te.” (Luka 8:12) Nkona mosusu ekwei na mabanga. Wana ezali elilingi ya bato oyo basepelaka na nsango ya Biblia kasi batikelaka yango ntango te ebongola mitema na bango. Soki bakutani na botɛmɛli, to soki bamoni ete kolanda toli ya Biblia ezali mpasi mpo na bango, “bazongaka nsima” mpo bazali na misisa te. (Luka 8:13, NW) Ezali mpe na baoyo bayoki liloba kasi “mitungisi” mpe komipesa na “bozwi mpe bisengo ya bomoi” ezali kopekisa bango bákola. Yango wana, lokola milona oyo ezingami na nzube, “efinani nyonso.”—Luka 8:14, NW.
10, 11. (a) Mabelé malamu ezali elilingi ya banani? (b) Tosengeli kosala nini mpo na “kobatela” Liloba ya Nzambe na mitema na biso?
10 Na nsuka, ezali na nkona oyo ekwei na mabelé malamu. Yango ezali elilingi ya bato oyo bayambaka nsango na ‘motema kitoko mpe malamu.’ Toyebi ete mokomoko na biso akolinga atángama nkona oyo ekwei na mabelé malamu. Kasi, eloko eleki ntina ezali ndenge oyo Nzambe atalelaka makambo. (Masese 17:3; 1 Bakolinti 4:4, 5) Liloba ya Nzambe elobi ete makambo oyo tozali kosala sikoyo mpe oyo tokosala tii liwa na biso to na nsuka ya mokili oyo nde ekomonisa soki tozali na ‘motema kitoko mpe malamu.’ Soki na ebandeli tondimi nsango ya Bokonzi, ezali malamu. Kasi, baoyo bazali na motema kitoko mpe malamu bandimaka Liloba ya Nzambe mpe ‘babotaka mbuma na etingya.’—Luka 8:15.
11 Lolenge kaka moko oyo tokoki kobatela Liloba ya Nzambe na mitema na biso ezali bongo kotánga mpe koyekola yango biso moko mpe ntango tosangani na baninga na biso bandimi. Yango esɛngi mpe kolya malamu bilei ya elimo oyo tozali kozwa na nzela oyo ebongisami mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya bayekoli ya solo ya Yesu. (Matai 24:45-47) Na ndenge yango, bolingo ezali kopusa baoyo bazali kobatela Liloba ya Nzambe na mitema na bango ‘bábota mbuma na etingya.’
12. Mbuma nini tosengeli kobota na etingya?
12 Mabelé malamu ezali kobota mbuma nini? Toyebi ete soki baloni milona, ekobimisa kaka nzete oyo ekozala na mbuma oyo ezali na milona ya lolenge yango. Soki bakoni yango bisika mosusu, ekobota lisusu mbuma. Ndenge moko mpe, nkona ya liloba ekolaka epai ya bato ya mitema kitoko mpe malamu; ekolisaka bango na elimo, na nsima bango mpe bakonaka milona na mitema ya bato mosusu. (Matai 28:19, 20) Mpe basalaka mosala na bango ya kokona na etingya. Yesu amonisaki ntina ya kozala na etingya na mosala ya kolona ntango alobaki ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika. Mpe nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:13, 14.
“Bóbota mbuma na misala nyonso malamu”
13. Libondeli nini Paulo asalaki oyo emonisi boyokani kati na kobota mbuma na koyeba Liloba ya Nzambe?
13 Moto mosusu oyo alobelaki ntina ya kobota mbuma ezali ntoma Paulo, mpe alobelaki kobota mbuma na boyokani na Liloba ya Nzambe. Abondelaki mpo ete baninga na ye bandimi ‘bátonda na boyebi na mokano na Nzambe, na mayele nyonso mpe na bososoli na elimo. Na bongo, bátambola na sembo na Nkolo mpe básepelisa ye na makambo nyonso. Bábota mbuma na misala nyonso malamu.’—Bakolose 1:9, 10; Bafilipi 1:9-11.
14-16. Na kotalela libondeli ya Paulo, baoyo balingaka Liloba ya Nzambe bazali kobota mbuma nini?
14 Na maloba yango, Paulo amonisaki ete tosengeli kosuka kaka na koyeba mateya ya Biblia te. Kasi, bolingo mpo na Liloba ya Nzambe esengeli kopusa biso ‘tótambola na sembo na Nkolo’ mpe tókoba ‘kobota mbuma na misala nyonso malamu.’ Misala malamu nini? Kosakola nsango malamu ya Bokonzi ezali mosala oyo eleki monene mpo na baklisto na mikolo oyo ya nsuka. (Malako 13:10) Lisusu, bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe basalaka nyonso ete bápesaka mwa likabo mpo mosala yango ekende liboso. Basepelaka kosala yango mpo bayebi ete “Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:7) Makabo na bango esalisaka mpo na kotambwisa Babetele koleka nkama moko. Betele ezali esika batambwisaka mosala ya kosakola Bokonzi mpe na Babetele mosusu, babimisaka Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. Mpe lisusu, makabo na bango esalisaka mpo na kobongisa mayangani ya baklisto mpe mibembo ya bakɛngɛli-batamboli, bamisionɛrɛ, na babongisi-nzela monene.
15 Misala malamu mosusu ezali misala ya kotonga mpe kobatela bisika ya losambo ya solo. Basambeli ya Nzambe babatelaka Bandako ya Mayangani mpe Bandako ya Bokonzi malamu mpo balingaka Liloba ya Nzambe. (Talá Nehemia 10:39.) Lokola nkombo ya Nzambe ekomamaka na libándá ya bandako yango, ebongi mpenza ezalaka pɛto, ezala na kati to na libándá. Ebongi mpe ete bato oyo basambelaka na bandako yango bázala na bizaleli malamu. (2 Bakolinti 6:3) Baklisto mosusu bakoki kosala makambo mosusu koleka oyo wana. Lokola balingaka Liloba ya Nzambe, bandimaka kokende mosika na bamboka mopaya mpo na kotonga bisika mosusu ya losambo na bamboka oyo bandeko na bango bazangi yango mpo na bobola to mpe bazali na bato oyo bayebi misala yango te.—2 Bakolinti 8:14.
16 Kokokisa bamposa ya libota mpe komibanzabanza mpo na bandeko baklisto ezali mpe lolenge mosusu ya “kobota mbuma na misala nyonso malamu.” Lokola tolingaka Liloba ya Nzambe, yango totyelaka bamposa ya ‘bandeko na biso na kondima’ likebi mpe ‘tosalelaka Nzambe kati na ndako na [biso].’ (Bagalatia 6:10; 1 Timote 5:4, 8) Na makambo oyo, misala malamu ezali na ndakisa kotala bato ya maladi mpe kobɔndisa baoyo bazali kolela. Bankulutu ya lisangá mpe bandeko oyo bazali na Bakomite ya Boyokani na Minganga mpo na kosalisa bandeko oyo bazali kokutana na mikakatano mpo na makila bazali mpenza kosala mosala malamu! (Misala 15:29) Mpe lisusu, toyebi ete makama ezali kosalema mingi. Makama mosusu ezali kouta na biloko ya mokili mpe mosusu ezali kobima mpo na makambo mabe oyo bato bazali kosala. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, na bisika mingi na mokili Batatoli ya Yehova bayebani ete basungaka bandeko na bango mpe bato mosusu soki bazwi makama. Nyonso wana ezali mbuma malamu oyo bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe bazali kobota.
Matomba minene na mikolo ezali koya
17, 18. (a) Mosala ya kolona nkona ya Bokonzi ezali kobota mbuma nini? (b) Etikali moke, makambo nini ya minene ekosalema na mokili oyo bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe bakomona?
17 Bato mingi bazali kozwa matomba na mosala ya kokona nkona ya Bokonzi. Na mikolo oyo euti koleka, mbula na mbula, bato koleka 300 000 batikaki ete nsango ya Biblia ebimisa misisa na mitema na bango mpe bamipesaki epai na Yehova mpe bamonisaki yango na batisimo ya mai. Bato yango bakozala na bomoi malamu na mikolo ezali koya!
18 Bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe bayebi ete etikali moke Yehova Nzambe akosantisa nkombo na ye. “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, ekobomama. (Emoniseli 18:2, 8) Na nsima, Mokonzi Yesu Klisto akoboma baoyo nyonso bazali koboya kotosa Liloba ya Nzambe. (Nzembo 2:9-11; Danyele 2:44) Nsima na yango, Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mobulu, bitumba mpe makama mosusu, mpo na libela. Ntina ya kobɔndisa bato mpo na bampasi, maladi, mpe liwa ekozala lisusu te.—Emoniseli 21:3, 4.
19, 20. Bato oyo balingaka mpenza Liloba ya Nzambe bakozwa bolamu nini na mikolo ezali koya?
19 Na ntango yango bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe bakosala mosala moko monene! Bato oyo bakobika na Armagedon bakobanda mosala moko ya esengo: bakobongisa mabelé oyo ekóma paladiso. Bakozala na esengo monene ya kobongisa biloko mpo na kokokisa bamposa ya bato oyo bakufá, baoyo bazali kopema na malita mpe Nzambe abombi bango na makanisi na ye na elikya ete bakosekwa. (Yoane 5:28, 29) Na ntango wana, Nkolo Mokonzi Yehova, na nzela ya Mwana na ye Yesu Klisto oyo azwi lokumu mingi, akokamba bato oyo bakozala awa na mokili malamu. ‘Barulo ekofungwama,’ mpe ekomonisa malako ya Yehova mpo na bomoi na mokili ya sika.—Emoniseli 20:12, NW.
20 Na ntango oyo Yehova aponi, baklisto bapakolami nyonso ya sembo bakokende na likoló mpo na kozwa mbano na bango, ‘bakozwa libula elongo na Klisto.’ (Baloma 8:17) Na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, bato nyonso oyo balingaka Liloba ya Nzambe oyo bakozala awa na mabelé bakokóma na makanisi ya malamu mpe na nzoto kolɔngɔnɔ mpe bakokóma bato ya kokoka. Na nsima, komekama ya nsuka ekozala mpe soki bakotikala sembo, bakozwa mbano ya bomoi ya seko mpe bakozwa “bonsomi ya nkembo ya bana ya Nzambe.” (Baloma 8:21; Emoniseli 20:1-3, 7-10) Ekozala mikolo malamu mpenza! Ɛɛ, ezala Yehova apesi biso elikya ya kozwa bomoi na likoló to awa na mabelé, soki tokolinga mpenza Liloba na ye mpe soki tokozala na mposa makasi ya kosalela mayele oyo Nzambe azali kopesa, tokomibatela. Mpe na mikolo ezali koya mayele yango ‘ekopesa biso lokumu mpo toyambi yango.’—Masese 4:6, 8.
Okoki kolimbola?
◻ Ndenge nini kolinga Liloba ya Nzambe ebatelaka biso?
◻ Nkona ya lisese ya Yesu ezali nini, mpe ezali kolonama ndenge nini?
◻ Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali “mabelé malamu”?
◻ Bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe bakoki kozala na elikya ya kozwa bolamu nini?
[Elilingi na lokasa 16]
Na lisese ya Yesu, nkona elimboli nsango malamu oyo ezali na Liloba ya Nzambe
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Garo Nalbandian
[Elilingi na lokasa 17]
Batatoli ya Yehova bazali kolanda ndakisa ya Moloni Monene
[Bililingi na lokasa 18]
Bato oyo bakobika na Armagedon bakosepela na mbuma ya mabelé.