Tózala baninga ya Yehova
MOYEKOLI Yakobo akomaki boye: “Bóbɛlɛma epai na Nzambe mpe ye akobɛlɛma epai na bino.” (Yakobo 4:8) Mpe Davidi mokomi ya nzembo alobaki ete: “Yehova azali moninga ya baoyo babangaka ye.” (Nzembo 25:14, NW) Emonani polele ete, Yehova alingi biso tózala baninga na ye ya motema. Kasi, ezali moto nyonso te oyo asambelaka Nzambe mpe atosaka mibeko na ye nde amiyokaka ete azali mpenza na boyokani malamu na ye.
Ezali bongo mpo na yo? Ozali mpenza na boyokani ya malamu na Nzambe? Na ntembe te, olingaka mpenza kokóma moninga na ye. Ndenge nini tokoki kozala baninga ya Nzambe? Yango esɛngi nini mpo na biso? Biblia epesi eyano na mokanda ya Masese mokapo ya misato.
Tózala na boboto mpe sembo
Salomo mokonzi ya Yisalaele ya kala abandi mokapo ya misato ya mokanda ya Masese na maloba oyo: “Mwana na ngai, bosaná mobeko na ngai te; kasi tiká ete motema na yo mobatela malako na ngai. Zambi ikobakisela yo mikolo mingi mpe bomoi molai mpe kimya.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:1, 2) Lokola Salomo akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe, toli ya tata yango euti mpenza epai ya Yehova mpe apesi biso yango. Bapesi biso toli tótosa makambo oyo Nzambe ayebisaka biso mbala na mbala, elingi koloba mibeko na ye, to mateya, mpe malako na ye oyo ekomami na Biblia. Soki tosali bongo, tokozala na “mikolo mingi mpe bomoi molai mpe kimya.” Na ntembe te, ata sikoyo tokoki kozala na bomoi ya kimya mpe kokima banzela oyo ekoki komema biso na liwa ya mobesu. Bato mingi oyo bamipesaka na misala mabe bakufaka bongo. Lisusu, tokoki kozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika ya kimya.—Masese 1:24-31; 2:21, 22.
Salomo alobi lisusu boye: “Tiká te ete boboto mpe sembo ilongwa na yo; kangá yango na nkingo na yo; komá yango na etando ya motema na yo. Boye okozwa mapamboli mpe bososoli malamu na miso na Nzambe mpe na bato.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:3, 4.
Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “boboto,” babongolaka yango mpe na “bolingo ya solosolo” mpe yango elingi koloba koboya kobebisa boninga, kozala liboke moko mpe kokangana libela. Tondimi ete oyo ekoya eya, tokokangana kaka na Yehova? Tozalaka na boboto epai ya bandeko na biso na lisangá? Tosalaka makasi mpo tózala na boyokani malamu na bango? Na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, tobatelaka ‘mobeko ya boboto na lolemo na biso’ ata na ntango ya komekama?—Masese 31:26.
Lokola Yehova atondi na boboto, “akolimbisaka mabe.” (Nzembo 86:5) Soki totiki masumu na biso ya kala mpe tozali kotambola sikoyo na nzela ya sembo, tóyeba ete Yehova akopesa biso “ntango ya kopema.” (Misala 3:19) Tosengeli kolanda ndakisa ya Nzambe na biso mpe kolimbisa masumu ya bamosusu, boye te?—Matai 6:14, 15.
Yehova azali “Nzambe ya [solo, NW ],” mpe alingi ete baoyo balingi kozala baninga na ye bázala “sembo.” (Nzembo 31:5) Tokoki kotya motema ete Yehova akozala moninga na biso soki tozali bato ya ndenge mibale? Elingi koloba soki tozali esika moko na bandeko tozali ndenge mosusu mpe soki bandeko bazali te tokómi ndenge mosusu, lokola “bato na lokuta” oyo babombaka lolenge bazali? (Nzembo 26:4) Yango ekozala bozoba, mpamba te biloko “nyonso ezali bolumbu mpe emonisami polele na miso” ya Yehova!—Baebele 4:13.
Tosengeli kozala na boboto mpe kozala sembo lokola sɛnɛti ya ntalo ‘oyo tolati na nkingo,’ mpamba te yango ekosalisa biso ‘tóndimama na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato.’ Tosengeli kaka te komonisa bizaleli yango na libándá kasi kokoma yango na ‘etando ya mitema na biso,’ kokómisa yango bomoto na biso.
Tótyela Yehova motema mobimba
Mokonzi ya mayele alobi lisusu ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:5, 6.
Ebongi mpenza tótyela Yehova motema mobimba. Lokola azali Mozalisi, azali na “makasi kati na nguya” mpe apesaka “makasi.” (Yisaya 40:26, 29) Yehova akokisaka makambo nyonso oyo akani. Nkombo na ye elimboli, “Ye oyo akómisaka,” mpe yango ezali kosalisa biso tóndima solo ete akoki mpenza kokokisa makambo oyo alaki! Likambo oyo ete Nzambe “akoki kobuka lokuta te” emonisi ete bomoto na ye ezali nde solo. (Baebele 6:18, NW ) Bolingo ezali ezaleli na ye oyo eleki monene. (1 Yoane 4:8) Azali na “boyengebene na nzela na ye nyonso; azali mpe [sembo, NW ] na misala na ye nyonso.” (Nzembo 145:17) Soki totyeli Nzambe motema te, tokotyela nani lisusu? Na yango, mpo ete kondima na biso epai na ye ekóma lisusu makasi, tosengeli ‘komeka mpe kososola ete Yehova azali malamu’ na kosaleláká makambo oyo tozali koyekola na bomoi na biso mpe kokanisa bolamu oyo yango ebimisaka.—Nzembo 34:8.
Ndenge nini tokoki ‘kondima Yehova na nzela na biso nyonso’? Mokomi ya nzembo oyo akomaki yango na elimo ya Nzambe alobi boye: “Nakobanzaka mpe mosala na yo nyonso, [nakosepela, NW ] yango nyonso esali yo.” (Nzembo 77:12) Lokola Nzambe amonanaka te, soki tolingi kozala baninga na ye, esengeli mpenza tókanisaka misala na ye minene mpe makambo oyo asalelaka bato na ye.
Libondeli ezali mpe likambo ya ntina mpo na kondima Yehova. Mokonzi Davidi alandaki kobenga Yehova “mokolo mobimba.” (Nzembo 86:3) Davidi azalaki kobondela butu mobimba, na ndakisa ntango akimaki na mokili mokauki. (Nzembo 63:6, 7) Ntoma Paulo apesaki elendiseli oyo: “Bóbondelaka ntango nyonso kati na [elimo].” (Baefese 6:18) Tosalaka libondeli mbala boni? Tosepelaka kosolola na Nzambe makambo oyo euti mpenza na motema na biso? Ntango tokutani na mikakatano, tosɛngaka ye asunga biso? Tosalaka mpenza libondeli mpo na kosɛnga ye alakisa biso nzela liboso ya kokamata mikano ya ntina mingi? Mabondeli na biso ya sembo epai na Yehova ekómisaka biso baninga na ye. Mpe tozali na elikya ete akoyoka libondeli na biso mpe ‘akotambolisa biso.’
Oyo nde bozoba ya ‘kondima bososoli na biso moko’ to ya bato minene ya mokili, nzokande tokoki kotya motema mobimba na Yehova! Salomo alobi ete: “Tiká te ete omonana na mayele na miso na yo moko.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Kasi, apesi toli oyo: “[Bangá Yehova, NW ] mpe longwá na mabe. Yango ekozala lokola nkisi mpo na nzoto na yo mpe mafuta mpo na mikwa na yo.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:7, 8) Soki mpenza tobangaka koyokisa Nzambe mpasi, yango ekomonana na misala na biso, na makanisi na biso, mpe na mayoki na biso. Kobanga yango ekopekisa biso kosala makambo ya mabe mpe ezali kobikisa mpe kobɔndisa na elimo.
Pesá Yehova biloko oyo eleki motuya
Na nzela nini mosusu tokoki kobɛlɛma na Nzambe? Mokonzi Salomo apesi toli oyo: “Kumisá [Yehova] na biloko na yo, mpe na mbuma na liboso na bozwi na yo nyonso.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:9) Kokumisa Yehova elimboli kopesa ye nkembo mpe kosanzola ye liboso ya bato nyonso na kosangana mpe na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola nkombo na ye. Biloko ya motuya oyo tokumisaka na yango Yehova ezali ntango na biso, makoki na biso, makasi na biso, mpe biloko na biso ya mosuni. Yango esengeli kozala mbuma ya liboso ya biloko na biso oyo eleki malamu. Lolenge oyo tosalelaka biloko na biso ya mosuni esengeli komonisa ete tozali na mokano ya ‘koluka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye,’ boye te?—Matai 6:33.
Kokumisa Yehova na biloko na biso ya motuya epesaka mbano. Salomo apesi biso elikya oyo: “Boye bibombelo na yo ikotonda [meke] mpe bikamwelo na yo ikobimisa vinyo na sika mingi mpenza.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:10) Bozwi ya elimo yango moko epesaka bozwi ya mosuni te, kasi kosalela na motema boboto biloko na biso ya mosuni mpo na kokumisa Yehova nde epesaka mapamboli mingi. Mpo na Yesu kosala mokano ya Nzambe ezalaki “bilei” ya kobatela nzoto. (Yoane 4:34) Se bongo, kosangana na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, mosala oyo ekumisaka Yehova eleisaka biso. Soki totii molende na mosala yango, bibombelo na biso ya elimo ekotonda meke. Esengo na biso, oyo babengi yango lokola vinyo ya sika ekozala mingi mpenza.
Totalaka epai ya Yehova mpe tobondelaka ye apesa biso bilei oyo ekoki na mokolo na mokolo, boye te? Biloko nyonso oyo tozali na yango, euti epai ya Tata na biso ya bolingo na likoló. Yehova akosopa mapamboli mingi na kolanda se ndenge oyo tozali kosalela biloko na biso ya motuya mpo na lokumu na ye.—1 Bakolinti 4:7.
Ndimá disipilini ya Yehova
Mpo na komonisa ete disipilini ezali na ntina mpo na kozala moninga ya Yehova, mokonzi ya Yisalaele apesi toli oyo: “Mwana na ngai, tyolá kolakisama na [Yehova] te mpe lɛmbá na mpamela na ye te. Zambi [Yehova] akopamela ye oyo akolinga, lokola tata akopamelaka mwana oyo akosepela na ye.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:11, 12.
Nzokande, ekoki mbala mosusu kozala mpasi mpo na kondima disipilini. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bitumbu nyonso iyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ikozwisa mbuma na kimya na boyengebene epai na bango baoyo balendisami na yango.” (Baebele 12:11) Mpamela mpe disipilini ezali na ntina mpo na kopesa mateya oyo ekotinda biso tózala baninga ya Nzambe. Soki Yehova asemboli biso, ezala na nzela ya baboti, na makita ya lisangá, to ntango tozali komanyola Makomami na boyekoli ya biso moko, tóyeba ete ezali elembo ya bolingo na ye mpo na biso. Soki tozali na mayele tokondima yango.
Simbá mayele mpe bososoli makasi
Lisusu, Salomo amonisi ete mayele mpe bososoli ezali na ntina mingi soki tolingi kozala baninga ya Nzambe. Alobi boye: “Mapamboli epai na moto oyo azwi mayele mpe moto oyo [akómi na bososoli, NW ]. Zambi litomba na yango eleki palata mpe kozwa yango eleki wolo na kitoko. . . . Ye azali lokola nzete na bomoi mpo na nyonso baoyo bakosimbaka ye; moto na moto oyo akobatelaka ye azali na esengo.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:13-18.
Mpo na kokundwela biso ete Yehova asalelaki mayele mpe bososoli mpo na kozalisa biloko kitoko oyo tomonaka, mokonzi alobi boye: “[Yehova] asalaki mokili na nzela na mayele, abongisaki lola na nzela na bososoli. . . . Mwana na ngai, tiká te ete ilongwa liboso na miso na yo, batelá mayele na solo mpe bososoli. Ikozala bomoi mpo na molimo na yo mpe kitoko mpo na nkingo na yo.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:19-22.
Mayele mpe bososoli ezali bizaleli ya Nzambe. Tosengeli kaka te kokolisa bizaleli wana epai na biso, kasi tosengeli mpe kokangama na yango. Tokotika te koyekola Makomami na molende mpe kosalela makambo oyo toyekolaka. Salomo alobi lisusu ete: “Boye okotambola na nzela na yo na kimya mpe lokolo na yo [ekotuta] libaku te.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Alobi lisusu ete: “Ekolala yo mpɔngi, okobanga te; ɛɛ, okolala mpe mpɔngi na yo ekozala kitoko.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:23, 24.
Ya solo, tokoki kotambola na kimya mpe kolala na kimya lokola tozali kozela mokolo ya ‘libebi ya pwasa’ oyo ekoya lokola moyibi likoló ya mokili mabe ya Satana. (1 Batesaloniki 5:2, 3; 1 Yoane 5:19) Ata ntango bolɔzi monene oyo ezali koya mbangumbangu ekokóma, tokozala na elikya oyo: “Bangá mpo na nsɔmɔ na pwasa te mpe na kobeba na bato mabe te, wana ekoya yango. Zambi [Yehova] akozala elikya na yo mpe akobatela lokolo na yo ete lozwama te.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:25, 26; Matai 24:21.
Salá makambo ya malamu
Salomo alendisi biso boye: “Boyá kosalela bato malamu te baoyo bakoki kozwa yango, wana lobɔkɔ na yo ezwi eposa na kosala bongo.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:27) Kosalela bamosusu malamu esɛngi kondima kosalela biloko na biso mpo na bolamu na bango, mpe yango ekoki kosalema na ndenge ebele. Kasi kosalisa bato mosusu bákóma baninga ya Nzambe ya solo ezali likambo eleki malamu oyo tokoki kosala mpo na bango na ‘ntango oyo ya nsuka,’ boye te? (Danyele 12:4, NW ) Na yango, oyo ezali mikolo ya kozala na molende na mosala ya kosakola Bokonzi mpe kozalisa bayekoli.—Matai 28:19, 20.
Mokonzi ya mayele atángi lisusu misala oyo tosengeli koboya. Alobi ete: “Lobá na mozalani na yo te ete, Kendá mpe yaká lisusu, nakopesa yo lobi; kasi ozali na biloko epai na yo. Salelá mozalani na yo mabe te, zambi ye afandi pembeni na yo [na kimya, NW ]. [Koswana] na moto mpamba te, soko asaleli yo mabe te. Yokelá moto na yauli zuwa te, [landá] ata moko na nzela na ye te.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:28-31.
Na mokuse, mpo na komonisa ntina ya toli na ye, Salomo alobi boye: “Moto na yauli aboyami na [Yehova kasi ye azali moninga ya bato ya sembo, NW ]. Kotuka na [Yehova] ezali epai na ndako na bato mabe; nde akopambola efandelo na bayengebene. Solo akotyola batyoli nde akopesa ngɔlu epai na basɔkɛmi. Bato na mayele bakosangola lokumu; kasi nsɔni ekozala litomba na bibebe.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 3:32-35.
Soki tolingi kozala baninga ya Yehova, tosengeli te kobotaka makanisi ya yauli mpe ya mabe. (Masese 6:16-19) Bobele soki tokosala oyo ezali malamu na miso ya Nzambe nde akondima biso mpe akopambola biso. Tokoki mpe kozwa lokumu oyo tokanisaki yango te ntango bato bazali komona ete tozali kosala ndenge mayele ya Nzambe esɛngi. Tóboya banzela ya mabe mpe ya mobulu ya mokili mabe oyo. Nzokande, tólanda nzela ya sembo mpe tózala baninga ya Yehova!
[Bililingi na lokasa 25]
“Kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya”